Mokapo ya libwa
Nguya oyo elikya ya lisekwa epesaka
1. Soki elikya ya lisekwa ezalaki te, nini elingaki kozela bato oyo bakufá?
BATO na yo mosusu oyo ozalaki kolinga bakufá? Soki lisekwa ezalaki te, mbɛlɛ elikya moko ezali te mpo na komona bango lisusu. Mbɛlɛ batikali kaka na kati ya ezalela oyo Biblia elobelaka ntango emonisaka ete: “Bakufi bayebi likambo te . . . mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi [lilita], esika ekokenda yo.”—Mosakoli 9:5, 10.
2. Libaku malamu nini lisekwa epesi nzela na yango?
2 Na motema mawa na ye mpe na nzela ya lisekwa, Yehova apesi libaku malamu na ebele ya bato oyo bakufá mpo básekwa mpe bázwa bomoi ya seko. Yango elingi koloba ete okoki kozala na elikya kitoko ete mokolo mosusu, na mokili ya sika ya Nzambe, okozala lisusu elongo na bato na yo oyo ozalaki kolinga oyo bakufá.—Malako 5:35, 41, 42; Misala 9:36-41.
3. (a) Na lolenge nini lisekwa ezali na ntina mingi na likambo etali kokokisama ya mokano ya Yehova? (b) Ntango nini mpenza lisekwa ezalaka liziba ya kolendisa mpo na biso?
3 Lokola lisekwa ezali, tosengeli kobanga liwa te. Lokola ayebi ete likambo moko te ekoki kokómela basaleli na ye ya sembo oyo mpasi na yango ekoumela libela, Yehova akoki kotika Satana ameka komonisa lokuta na ye ndenge alobaki ete “moto akopesa nyonso ezali na ye mpo na bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Yesu atikalaki sembo epai ya Nzambe ata tii na liwa, mpe na yango Nzambe asekwisaki ye mpo na kozwa bomoi na likoló. Yango wana, Yesu amonisaki motuya ya mbeka na ye ya moto ya kokoka liboso ya kiti ya bokonzi ya Tata na ye na likoló, mpe mpo na yango tozwi litomba ya kobikisa bomoi na biso. Na nzela ya lisekwa, bato ya “etonga moke,” basangoli ya libula elongo na Klisto, bazali na elikya ya kozala elongo na ye na Bokonzi ya likoló. (Luka 12:32) Bato mosusu bazali na elikya ya lisekwa mpo na kozala na bomoi ya seko awa na paladiso na mabele. (Nzembo 37:11, 29) Baklisto nyonso bamonaka elikya ya lisekwa lokola liziba ya nguya “oyo eleki makasi” ntango bakutanaka na komekama oyo ekómisaka bango pene na liwa.—2 Bakolinti 4:7.
Mpo na nini lisekwa ezali na ntina mingi mpo na kondima ya baklisto?
4. (a) Na lolenge nini lisekwa ezali ‘liteya moko ya ebandeli’? (b) Bato ya mokili batalelaka lisekwa ndenge nini?
4 Ndenge Baebele 6:1, 2 elobi yango, lisekwa ezali ‘liteya moko ya ebandeli.’ Ezali moko ya mateya oyo kondima etongami likoló na yango, mpe soki tondimi yango te tokokóma baklisto oyo bakɔmeli te. (1 Bakolinti 15:16-19) Kasi, bato ya mokili bamonaka liteya ya Biblia mpo na lisekwa lokola likambo moko oyo elongobani te. Lokola bazangi makanisi ya elimo, bato mingi bakómi komona ete kaka bomoi oyo tozali na yango nde ezali likambo ya solo. Yango wana, bazali koluka kaka bisengo. Ezali mpe na bato mosusu oyo bakangamá na mangomba ya bonkɔkɔ—ezala na mangomba ya boklisto to mangomba mosusu—oyo bakanisaka ete bazali na molimo oyo ekufaka te. Kasi, likanisi yango eyokani te na liteya ya Biblia mpo na lisekwa, mpamba te lisekwa ekokaki kozala na ntina te soki bato bazalaki na molimo oyo ekufaka te. Komeka kosangisa bindimeli yango mibale ezali likambo ya mpasi koleka oyo ekopesa elikya moko te. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya motema sembo oyo balingi koyeba solo?
5. (a) Liboso ete moto akanga ntina na likambo etali lisekwa, asengeli naino koyeba nini? (b) Bavɛrsɛ nini okoki kosalela mpo na kolimbola molimo? ndenge bato oyo bakufá bazalaka? (c) Esengeli kosala nini soki moto moko asalelaka Biblia oyo emonisaka bosolo ya makambo polele te?
5 Liboso ete bato yango bákanga ntina na ebongiseli malamu ya lisekwa, basengeli liboso koyeba malamumalamu liteya etali molimo mpe soki bato oyo bakufá bazalaka ndenge nini. Mbala mingi, kaka mwa bavɛrsɛ moke ekoki mpo na komonisa likambo yango polele epai ya moto oyo azali na nzala ya solo ya Biblia. (Genese 2:7; Nzembo 146:3, 4; Ezekiele 18:4) Kasi, mabongoli mosusu ya Biblia ya mikolo na biso mpe Babiblia oyo bato mosusu babongoli yango na kokɔtisáká makanisi na bango moko, emonisaka mpenza polele te bosolo ya likambo etali molimo. Yango wana, ekozala mbala mosusu malamu kotalela maloba oyo basalelá na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli.
6. Ndenge nini okoki kosalisa moto ayeba soki molimo ezali nini?
6 Libongoli ya Mokili ya Sika esali mosala yango malamu mpamba te ebongoli bipai nyonso liloba ya Liebele nèphèsh mpe oyo ekokani na yango na Grɛki psukhê na “molimo.” Na apɛndisi ya libongoli yango batii bavɛrsɛ mingi epai maloba yango ezali. Mabongoli mosusu mingi ya Biblia ezali mpenza kobongola yango bipai nyonso ndenge moko te, kasi ebongoli maloba yango ya ebandeli kaka te na “molimo” kasi mpe na “ekelamu,” “moto,” mpe “bomoi”; “nèphèsh na ngai” ekoki kobongolama na “ngai,” mpe “nèphèsh na yo” ekoki kobongolama na “yo.” Kokokanisa mabongoli mosusu ya Biblia na Libongoli ya Mokili ya Sika ekosalisa moyekoli ya motema sembo ayeba ete maloba ya ebandeli oyo ebongolami na “molimo” elobelaka bato mpe banyama. Kasi maloba yango epesaka likanisi soki moke te ya molimo oyo ezangi komonana, oyo bakoki kosimba te oyo ekoki kobima na nzoto ya moto na ntango ya liwa mpe kokoba kozala na bomoi esika moko boye.
7. Ndenge nini, na lisalisi ya Biblia, okoki kolimbola ezalela ya baoyo bazali na Sheol? na Hadesi? na Gehena?
7 Libongoli ya Mokili ya Sika mpe esalelaka liloba moko ntango ezali kobongola liloba “Sheol” mpo na kolobela liloba ya Liebele sheohl mpe “Hadesi” mpo na kolobela liloba ya Grɛki haides mpe “Gehenna” mpo na kolobela liloba ya Grɛki geenna. “Sheol” ezali na ndimbola moko na liloba “Hades.” (Nzembo 16:10; Misala 2:27) Biblia emonisi polelepolele ete ezala Sheol to Hades ezali lilita mpo na moto nyonso mpe balobelaka yango kaka na likambo etali liwa, kasi na bomoi te. (Nzembo 89:48; Emoniseli 20:13) Makomami mpe emonisaka likoki ya kobima na lilita na nzela ya lisekwa. (Yobo 14:13; Misala 2:31) Nzokande, elikya moko te ya bomoi na mikolo ezali koya epesami mpo na baoyo bakendaka na Gehena, mpe balobi ata mbala moko te ete molimo ezalaka na bomoi kuna.—Matai 10:28.
8. Ndenge nini boyebi ya solosolo ya lisekwa ekoki kobongola ezaleli mpe misala ya moto?
8 Soki makambo yango elimbolami polele, yango ekoki kosalisa moto ayeba soki lisekwa ezali na ntina nini mpo na ye. Akoki kokóma na botɔndi mpo na bolingo oyo Yehova amoniseli bato ndenge azwi ebongiseli ya ndenge wana. Mpasi ya bato mosusu oyo bakufelá bato ekoki kokita mpo na esengo ya kokutana na bango lisusu na mokili ya sika ya Nzambe. Koyeba makambo yango ezali mpe kopesa likoki ya kokanga ntina ya liwa ya Klisto. Baklisto ya ekeke ya liboso bayebaki ete lisekwa ya Yesu Klisto ezali likambo ya ntina mingi mpo na kondima ya baklisto, yango nde efungoli nzela mpo na lisekwa ya bato mosusu. Basakolaki lisekwa ya Yesu mpe elikya na yango na molende mpenza. Ndenge moko mpe, baoyo lelo bazali kokanga ntina mpe bazali na botɔndi mpo na ebongiseli ya lisekwa bazalaka na mposa makasi ya koyebisa bato mosusu likambo yango ya motuya mingi.—Misala 5:30-32; 10:42, 43.
Kosalela ‘fungola ya Hadesi’
9. Ndenge nini Yesu asaleli liboso mpenza “bafungola ya liwa mpe ya Hadesi”?
9 Baoyo nyonso bakozala na Klisto kati na Bokonzi na ye na likoló nsukansuka basengeli kokufa. Kasi bayebi malamu mpenza elikya oyo apesaki bango ntango alobaki ete: “Nakómaki mokufi, kasi, talá! Nazali na bomoi libela na libela seko, mpe nazali na bafungola ya liwa mpe ya Hadesi.” (Emoniseli 1:18) Alingaki koloba nini? Azalaki kobenda likebi na oyo ekómelaki ye moko. Ye mpe akufaki. Kasi Nzambe atikaki ye na Hadesi te. Mokolo ya misato, Yehova ye moko asekwisaki ye mpe apesaki ye bomoi ya elimo mpe ezalela ya kozanga kokufa. (Misala 2:32, 33; 10:40) Lisusu, Nzambe apesaki ye “bafungola ya liwa mpe ya Hadesi” oyo akosalela mpo na kobimisa bato mosusu na malita mpe kosikola bato na makambo oyo lisumu ya Adama ebimisaki. Lokola azali na bafungola yango, Yesu azali na likoki ya kolamwisa bayekoli na ye ya sembo na liwa. Azali naino kosekwisa liboso basangani ya lisangá na ye bapakolami na elimo, azali kopesa bango likabo kitoko ya bomoi oyo ezangi liwa na likoló, kaka ndenge Tata na ye apesaki ye.—Baloma 6:5; Bafilipi 3:20, 21.
10. Ntango nini baklisto bapakolami ya sembo basekwaka?
10 Ntango nini baklisto bapakolami yango ya sembo basekwisamaka mpo na bomoi ya likoló? Biblia emonisi ete lisekwa yango esili kobanda. Ntoma Paulo alobaki ete bakosekwisama ‘na ntango ya kozala ya klisto,’ oyo ebandaki na 1914. (1 Bakolinti 15:23) Lokola bapakolami yango ya sembo bazali kokufa sikoyo na ntango ya kozala na ye, basengeli lisusu te kozela tii ntango Nkolo na bango akozonga. Kaka ntango bakataka motema, basekwisamaka mbala moko na elimo, ‘bakobongwana ndenge mosusu,’ lokola na “kobɛta ya liso.” Bazali mpenza bato ya esengo mingi mpamba te misala malamu oyo basalaki “ezali kokende na bango elongo moko”!—1 Bakolinti 15:51, 52; Emoniseli 14:13.
11. Lisekwa nini ekozala mpo na ebele ya bato mosusu, mpe yango ekobanda ntango nini?
11 Kasi lisekwa ezali kaka moko te oyo ya basangoli ya Bokonzi ya likoló. Lokola ebengami na Emoniseli 20:6 ete “lisekwa ya liboso,” yango ezali komonisa ete lisekwa mosusu esengeli kolanda. Baoyo bakosekwa na lisekwa yango oyo mosusu, bakozala na elikya malamu ya kozala na bomoi na paladiso awa na mabele. Ntango nini lisekwa yango ekobanda? Mokanda ya Emoniseli emonisi ete ekozala nsima wana “mabele mpe likoló”—elingi koloba ebongiseli mabe ya makambo ya ntango oyo, na bayangeli na yango—ekolongolama. Nsuka ya ebongiseli yango oyo enuni ekómi pene. Na nsima, na ntango oyo Nzambe ye moko aponi, lisekwa ya bato oyo bakofanda na mabele ekobanda.—Emoniseli 20:11, 12.
12. Banani bakozala kati na bato ya sembo oyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele, mpe mpo na nini elikya yango ezali likambo ya esengo mpenza?
12 Banani bakosekwa na lisekwa yango awa na mabele? Kati na bato yango ekozala na basaleli ya kala mpenza ya Yehova, mibali mpe basi oyo, mpo na kondima makasi oyo bazalaki na yango na lisekwa, “bandimaki te kosikolama na nzela ya lisiko moko boye.” Elingi koloba balingaki te kobebisa bosembo na bango epai ya Nzambe mpo na kokima liwa ya mabe mpe ya mbalakaka. Koyebana na bango mpe koyoka bango ndenge bakolobela na mozindo makambo na bango oyo elobelami na mokuse na kati ya Biblia, ekozala mpenza esengo! Bato mosusu oyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele ekozala Abele, motatoli ya Yehova ya liboso oyo azalaki sembo; Enoki mpe Noa, basakoli oyo bazalaki kobanga te kopesa nsango liboso ya Mpela ete Yehova akobebisa mabele; Abalayama mpe Sala, oyo bayambaki baanzelu; Moize, oyo na nzela na ye Mibeko epesamaki na Ngomba Sinai; basakoli ya mpiko lokola Yilimia, oyo amonaki kobebisama ya Yelusaleme na 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.); mpe Yoane Mobatisi, oyo ayokaki Nzambe ye moko azali koloba ete Yesu azali Mwana na ye. Lisusu, ekozala mpe na bato mosusu mingi ya sembo basi na mibali oyo bakufi na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo mabe.—Baebele 11:4-38; Matai 11:11.
13, 14. (a) Nini ekokómela Hadesi mpe bato oyo bakufá oyo bazali na kati na yango? (b) Banani mpe bakosekwa, mpe mpo na nini?
13 Na nsima, longola basaleli ya Nzambe oyo bazalaki sembo, bato mosusu mpe bakosekwisama, moto moko te akotikala na lilita epai bakundaka bato nyonso. Lolenge malita ekobimisa bato mpe ekotikala mpamba ekoki komonana na ndenge Yesu akosalela ‘fungola ya Hadesi’ mpo na bolamu ya bato. Ntoma Yoane amonaki yango na emonaneli, amonaki Hadesi “ebwakamaki na kati ya laki ya mɔtɔ.” (Emoniseli 20:14) Yango elimboli nini? Elingi koloba ete Hadesi, lilita ya bato nyonso, ekolongolama nyonso nyɛɛ. Ekozala lisusu te, ekotikala mpamba, mpo longola lisekwa ya basambeli ya sembo ya Yehova, na mawa na ye, Yesu akosekwisa ata mpe bato bazangi boyengebene. Liloba ya Nzambe eyebisi biso na bosolo nyonso ete: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Misala 24:15.
14 Moko te kati na bato yango oyo bazangi boyengebene akosekwisama kaka mpo bápesa ye lisusu etumbu ya liwa. Lokola mabele mobimba ekokóma esika ya sembo na ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, bakosalisa bango mpo báyokanisa bomoi na bango na banzela ya Nzambe. Emonaneli emonisi ete “rulo ya bomoi” ekofungolama. Na yango, bakozala na libaku ya kosala ete bankombo na bango ekɔta na kati ya rulo yango. Bato yango ‘bakosambisama moto na moto engebene misala na ye’ oyo akosala nsima ya lisekwa na ye. (Emoniseli 20:12, 13) Yango wana, lokola bakotalelama na makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa, lisekwa na bango ekoki kozala “lisekwa ya bomoi” kasi ekozala te ata ndenge nini “lisekwa ya [kokweisama na] kosambisama.”—Yoane 5:28, 29.
15. (a) Banani bakosekwa te? (b) Lokola toyebi bosolo ya likambo etali lisekwa, yango esengeli kotinda biso na kosala nini?
15 Kasi, ezali te ete bato nyonso oyo bakufá bakosekwa. Bato mosusu basalaki masumu oyo ekolimbisama te. Bato ya ndenge wana, bazali na kati ya Hadesi te, kasi bazali na kati ya Gehena, kuna babomamá mpo na libela. Kati na bato yango ekozala mpe na baoyo bakobomama na ntango ya “bolɔzi moko monene,” oyo ekómi pene. (Matai 12:31, 32; 23:33; 24:21, 22; 25:41, 46; 2 Batesaloniki 1:6-9) Yango wana, atako Yehova amonisi motema mawa mpo na kosekwisa bato oyo bakufá na Hadesi, elikya ya lisekwa ezali kopesa biso likanisi moko te ete tótambwisa bomoi na biso sikoyo ndenge tolingi. Lisekwa moko ezali te mpo na bato oyo bazali kotombokela boyangeli ya Yehova na nko. Lokola toyebi likambo yango, yango esengeli kotinda biso tómonisa ete tozali mpenza na botɔndi mpo na motema mawa ya Nzambe mpe na yango tosengeli kotambwisa bomoi na biso na boyokani na mokano na ye.
Elikya ya lisekwa elendisi bango
16. Ndenge nini elikya ya lisekwa ekoki kozala liziba ya kolendisa?
16 Baoyo bandimaka mpenza elikya ya lisekwa bakoki kolendisama makasi mpo na yango. Na ntango oyo, soki tokómi mibange, toyebi ete tokoki ntango nyonso kopusa liwa te—ezala ata mpo na bankisi ya monganga oyo tokosalela. (Mosakoli 8:8) Soki tosalelaki Yehova na bosembo mpenza na kati ya lisangá na ye, tokoki kozala na elikya mpo na mikolo mizali koya. Toyebi ete na nzela ya lisekwa, tokozonga lisusu na bomoi, na ntango oyo Nzambe ye moko abongisi. Yango ekozala bomoi moko kitoko mpenza! Ntoma Paulo abengaki yango, “bomoi ya solosolo.”—1 Timote 6:19; Baebele 6:10-12.
17. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela bosembo na biso epai na Yehova?
17 Lokola toyebi ete lisekwa ezali, toyebi mpe Ye oyo apesi elikya yango, yango ezali kosalisa biso tózala na kondima makasi mpe tózala sembo epai ya Nzambe ata liboso ya liwa na mabɔkɔ ya banyokoli. Banda kala, Satana azali kosalela kobanga liwa ya mobesu mpo na kokanga bato na boombo. Kasi, Yesu abangaki liwa ya ndenge wana te. Atikalaki sembo epai ya Yehova tii na liwa. Na nzela ya mbeka oyo apesaki mpo na kosikola biso, Yesu apesaki nzela mpo na kosikola bato mosusu oyo bazali na kobanga ndenge wana.—Baebele 2:14, 15.
18. Nini esalisaka basaleli ya Yehova bázala bato ebele ya sembo?
18 Lokola bazali na kondima kati na mbeka ya Klisto mpe elikya ya lisekwa, basaleli ya Yehova ya sembo bakómi ebele. Ntango bakutani na mitungisi, bamonisaka ete ‘balingaka milimo na bango te’ koleka bolingo oyo balingaka Yehova. (Emoniseli 12:11) Bamonisaka mpenza bwanya mpo babukaka mitinda ya boklisto te mpo na kobikisa bomoi na bango ya ntango oyo. (Luka 9:24, 25) Bayebi ete ata bakufi sikoyo mpo na bosembo na bango epai na boyangeli ya Yehova, akopesa bango mbano na nzela ya lisekwa. Ozali na kondima ya ndenge wana? Okoki kozala na yango soki olingi mpenza Yehova mpe soki otii motema na ndimbola mpenza ya elikya ya lisekwa.
Bozongeli
• Liboso ya kokanga ntina ya lisekwa, mpo na nini esengeli naino koyeba ndimbola ya molimo mpe ezalela ya bato oyo bakufá?
• Nani akosekwa, mpe boyebi ya likambo yango esengeli kosala biso nini?
• Ndenge nini elikya ya lisekwa ezali kolendisa biso?
[Elilingi na lokasa 84, 85]
Yehova alaki ete ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene