Mabele
Ndimbola: Na Biblia liloba “mabele” ezali na ndimbola mingi. Mbala mingi tokanisaka ete mabele elimboli kaka esika tofandi, esika oyo Yehova abongisá malamu mpenza mpe atyá biloko nyonso mpo na kokokisa bamposa na biso mpe kosepelisa biso. Nzokande, tosengeli koyeba ete liloba “mabele” ekoki mpe kozala na ndimbola ya elilingi; na ndakisa, ekoki kolobela bato oyo bafandi na mabele to bato mosusu oyo bazali na ezaleli moko boye.
Mabele oyo ekobebisama na etumba ya nikleere?
Na kolanda Biblia, mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
Mat. 6:10: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”
Nz. 37:29: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”
Talá mpe Mosakoli 1:4; Nzembo 104:5.
Lokola bato ya bikólo bazali komemya mokano ya Nzambe te, bakoki nde kobebisa mpenza mabele mpo bato báfanda lisusu wana te?
Yis. 55:8-11: “[Liloba ya Yehova elobi boye:] Ndenge likoló etombwani mosika koleka mabele, ndenge mpe banzela na ngai etombwani mosika koleka banzela na bino, mpe makanisi na ngai koleka makanisi na bino. . . . Liloba . . . na ngai . . . ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.”
Yis. 40:15, 26: “Talá! [Na miso ya Yehova Nzambe] bikólo ezali lokola litangá ya mai na katini; mpe etalelami lokola mwa putulu moke likoló ya bimekeli-kilo. . . . ‘Bótombola miso na bino likoló mpe bómona [moi, sanza, mpe bamiliare ya minzoto]. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo. Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga.’” (Bibundeli ya nikleere oyo bato ya bikólo basalá epesaka bato nsɔmɔ. Kasi bamiliare ya minzoto ebimisaka nguya ya nikleere mingi koleka. Nani azalisaki minzoto yango nyonso mpe atambwisaka yango? Moto yango akoki te kopekisa bato ya bikólo básalela bibundeli na bango ya nikleere oyo ekoki kopekisa ete mokano na ye ekokisama? Lokola Nzambe abomaki mampinga ya Ezipito ntango Farao alukaki kopekisa Bayisraele bábima na boombo, yango emonisi ete akoki kopekisa bikólo bábebisa mabele.—Kob. 14:5-31.)
Em. 11:17, 18: “Totɔndi yo, Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Oyo azali mpe azalaki, mpo ozwi nguya na yo monene mpe obandi koyangela. Kasi bikólo basilikaki, mpe nkanda na yo eyaki, ná ntango oyo etyamá mpo . . . obebisa baoyo bazali kobebisa mabele.”
Nzambe akoboma mabele na mɔtɔ?
Mokanda ya 2 Petro 3:7, 10 (LNz) endimi likambo yango? “Sikawa mpo ya Liloba lya ye, Nzambe akobatelaka likoló na nse tee mokolo akozikisa binso na móto. O mokolo mwango, akokata makambo ma bato banso mpe akosukisa [“akoboma,” hf] baye baboyi ye. . . . Kasi mokolo mwa Mokonzi mokoya lokola moyibi: mokolo mona etando ya likoló ekolimwa na lokito la nsomo, mpe biloko bya likoló binso bikobeba na móto; mokili na misala mya mokili mikomonono lisusu te [“ekotumbama,” hf; “ekolimwa,” TEV; “ekomonisama polele,” NAB; “ekozipolama,” NE; “ekomonana polele,” NW].” (Simbá ete Kodeksi Sinaiticus mpe Vatican MS 1209, nyonso mibale ya siɛklɛ ya 4 T.B., elobi “ekomonana polele.” Bamaniskri mosusu oyo bakomaki na nsima, Kodeksi Alexandrinus na siɛklɛ ya 5 mpe Kodeksi Clementine ya Vulgate oyo ebongolamaki lisusu na siɛklɛ ya 16, elobi “ekotumbama.”)
Emoniseli 21:1 (hf) emonisi ete mabele ekobomama? “Namonaki likoló na sika, na nse na sika, mpo ete lola na liboso, na nse na liboso esili kolongwa. Mai monene mpe ezali lisusu te.”
Mpo ndimbola ya bavɛrsɛ yango ezala solo, esengeli koyokana na bavɛrsɛ mosusu ya mikapo yango mpe na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia
Soki bavɛrsɛ yango (2 Petro 3:7, 10 mpe Emoniseli 21:1) elimboli ete mabele ekozikisama mpenza na mɔtɔ, boye likoló mpe (elingi koloba minzoto, sanza, moi) ekobomama na mɔtɔ. Nzokande, makanisi ya ndenge wana eyokani te na elaka oyo ezali na bavɛrsɛ lokola Matai 6:10, Nzembo 37:29; 104:5, mpe Masese 2:21, 22. Lisusu, ndenge nini mɔtɔ ekoki kozikisa moi mpe minzoto oyo ezali na mɔtɔ makasi koleka? Na yango, liloba “mabele” ezali na ndimbola mosusu na bavɛrsɛ wana.
Na bavɛrsɛ oyo (Ebandeli 11:1; 1 Bakonzi 2:1, 2; 1 Ntango 16:31; Nzembo 96:1) mpe bavɛrsɛ mosusu, liloba “mabele” ezali na ndimbola ya elilingi; elimboli bato. Mikapo ya 2 Petro 3:7, 10 ná Emoniseli 21:1 ekoki mpe kozala na ndimbola wana, boye te?
Simbá ete makambo oyo 2 Petro 3:5, 6 (ná 2:5, 9) elobeli, ekokani na makambo oyo esalemaki na ntango ya Mpela ya Noa, oyo ebomaki bato mabe, kasi Noa ná libota na ye babatelamaki, ezala mpe mabele. Ndenge moko mpe, 2 Petro 3:7 elobi ete baoyo bakobomama ezali nde “bato oyo batyolaka Nzambe.” Koloba ete na vɛrsɛ oyo liloba “mabele” elimboli bato mabe eyokani mpenza na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia, ndenge tomonaki yango na bavɛrsɛ oyo tolobelaki liboso. Ezali “mabele” yango ya elilingi, to bato mabe nde ‘bakomonana polele’; elingi koloba ete Yehova akozikisa lokola nde na mɔtɔ makambo nyonso oyo ebombaná, akobimisa polele mabe ya bato oyo batyolaka Nzambe mpe akomonisa ete yango esengeli kobebisama libela. Bato mabe yango nde “nse na liboso” oyo elobelami na Emoniseli 21:1 (hf).
Na kolanda ndimbola oyo epesami likoló, maloba ya Yesu na Luka 21:33 (“likoló ná mabele ekoleka, kasi . . . ”), ezali mpe na ndimbola ya elilingi. Ndenge moko mpe, Emoniseli 21:1 elobeli “likoló ya kala mpe mabele ya kala.”—Talá mpe Matai 24:35.
Bayengebene bakokende na likoló mpe bakozonga na mabele nsima ya kobomama ya bato mabe?
Emoniseli 21:2, 3 endimi likambo yango? Vɛrsɛ yango elobi: “Namonaki mpe engumba mosantu, Yerusaleme ya Sika, euti na likoló epai ya Nzambe ezali kokita mpe ebongisami lokola mwasi ya libala oyo abongisi nzoto mpo na mobali na ye. Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango.’” (Lokola Nzambe “akofanda” na bato mpe “akozala” na bango, yango elimboli ete akokóma moto lokola biso? Yango ekoki kosalema te, mpo Yehova ayebisaki Moize ete: “Moto moko te akoki komona ngai mpe kozala lisusu na bomoi.” [Kob. 33:20] Na yango, bato oyo bakozala na Yerusaleme ya Sika bakozonga lisusu te na mabele mpo bázala bato lokola biso. Bongo na ndimbola nini Nzambe “akozala” na bato mpe ndenge nini Yerusaleme ya Sika ‘ekouta na likoló ekiti’? Tozwi mpenza eyano na motuna wana na Ebandeli 21:1 oyo elobi ete Nzambe “akómaki epai” ya Sara, na ndenge apesaki ye libaku ya kobota mwana na bobange. Kobima 4:31 eyebisi biso ete Nzambe ‘akómaki epai’ ya Yisraele na ndenge atindaki Moize alongola bango na boombo. Luka 7:16 elobi ete na nzela ya Yesu, Nzambe ‘ayaki kotala’ bato na ye. [Bavɛrsɛ yango nyonso euti na hf.] Babiblia mosusu elobi ete Nzambe ‘atyaki likebi na ye’ epai ya bato na ye [NW] to ‘amibanzabanzaki’ mpo na bango [NE]. Na yango, Emoniseli 21:2, 3 elimboli ete Nzambe ‘akoya epai’ ya bato to akozala na bango na nzela ya Yerusaleme ya Sika oyo ekozala na likoló, oyo ekopesa bato ya botosi mapamboli.)
Mas. 2:21, 22, hf: ‘Basembwi bakofanda na mokili [“na mabele,” NE], mpe bato malamu [“bato oyo bazangi mbeba,” NE] bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.’ (Simbá ete vɛrsɛ yango elobi te ete bato oyo bazangi mbeba bakozonga na mabele kasi elobi ete “bakotikala na yango.”)
Mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele ebongwaná?
Eba. 1:27, 28: “Nzambe abandaki kozalisa moto na elilingi na ye, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali ná mwasi. Lisusu, Nzambe apambolaki bango mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.’” (Na yango, Nzambe amonisaki ete mokano na ye ezali ete mabele etonda na bana ya Adama ná Eva, oyo basengeli kobatela paradiso oyo ekozala na mabele mobimba. Lokola Nzambe asalaki mabele esika ya kitoko mpenza mpo moto afanda, mpe asalaki ete mabele ezala te lokola baplanɛti mosusu nyonso oyo bato batalaka na nzela ya bamasini ndenge na ndenge, bongo Mozalisi asundola mokano na ye kaka boye, ekokisama te libela kaka mpo na lisumu ya Adama?)
Yis. 45:18: “Talá oyo Yehova alobi, Mozalisi ya likoló, Ye Nzambe ya solo, Moto oyo asalaki mabele mpe Moto oyo akelaki yango, Moto oyo atɛlɛmisaki yango ngwi, azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana: ‘Nazali Yehova, mpe mosusu azali te.’” (Talá mpe Yisaya 55:10, 11.)
Soki bato bakokufa lisusu te na mokili ya sika ya Nzambe, mabele ekokóma nkaka te?
Kobosana te ete ntango Nzambe alobelaki mokano na ye mpo na mabele alobaki ete: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele.” (Eba. 1:28) Nzambe apesaki moto likoki ya kobota bana, mpe ntango mokano na Ye ekokokisama, akosala ete bato bábota lisusu te.
Nzambe akopesa bomoi ezangi nsuka awa na mabele na bato ya ndenge nini?
Sef. 2:3: “Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele, oyo botosi ekateli na Ye ya lisambisi. Bóluka boyengebene, bóluka komikitisa. Ntango mosusu bokobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.”
Nz. 37:9, 11: “Bato oyo balikyaka na Yehova nde bakozwa mabele. . . . Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”