Bɔndisáká baoyo moto na bango akufi ndenge Yesu asalaki
LAZARE, oyo azalaki kofanda na Betania abɛlaki makasi. Marta ná Maria, bandeko na ye mibale ya basi, batindaki bato báyebisa Yesu, moninga na bango ya motema nsango yango. Kasi, Lazare akufaki na maladi yango. Nsima ya kotya ye na lilita, baninga mpe bato mosusu ya pembeni bayaki kotala Marta ná Maria “mpo na kobɔndisa bango.” (Yoane 11:19) Nsukansuka, Yesu akómaki na Betania mpe akendaki kotala bango. Soki totaleli makambo oyo alobaki mpe asalaki, ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kobɔndisa baoyo moto na bango akufi.
Kokende na esika yango ekomonisa ete ozali komibanzabanza
Mpo na kokóma na Betania, Yesu asengelaki kosala mobembo ya mikolo soki mibale, kokatisa Ebale ya Yordani mpe komata na banzela ya ngombangomba mpe oyo ezalaki nyokanyoka banda na Yeriko. Marta akendaki mbangu kopesa Yesu mbote liboso akɔta na engumba yango. Na nsima, ntango Maria ayokaki ete Yesu ayei, ye mpe akendaki mbangu kokutana na ye. (Yoane 10:40-42; 11:6, 17-20, 28, 29) Na ntembe te, koya ya Yesu ebɔndisaki bandeko mibale wana oyo bazalaki na mpasi makasi na motema.
Lelo oyo mpe, kokende kotala baoyo moto na bango akufi, ekoki kobɔndisa. Scott ná Lydia, oyo mwana na bango ya mobali Theo, akufaki na aksida, balobi boye: “Tozalaki na mposa ete libota mpe baninga bázala pene na biso. Bayaki mbala moko na lopitalo na katikati ya butu.” Baninga yango balobaki nini? “Na ntango wana tozalaki na mposa ya maloba te. Koya na bango elobaki mingi—emonisaki ete bazalaki komibanzabanza mpo na biso.”
Biblia elobi ete ntango Yesu amonaki baoyo bazalaki kolela Lazare, ye mpe “abulunganaki” mpe “alelaki, abimisi mpisoli.” (Yoane 11:33-35, 38) Yesu ayokaki nsɔni te, kobimisa mpisoli na miso ya bato. Ayokaki mpasi na bango mpe akabolaki mawa na bango. Liteya nini tokoki kozwa? Ntango tokei kotala baoyo moto na bango akufi, tosengeli te koyoka nsɔni kolela elongo na baoyo bazali kolela. (Baroma 12:15) Epai mosusu, tosengeli te kotinda na makasi moto oyo azali kolela moto na ye atangisa mpisoli. Bato mosusu bamonaka malamu kosala yango na esika oyo bato bazali te.
Yoká na boboto nyonso
Na ntembe te, Yesu azalaki na maloba ya kolendisa Marta ná Maria, kasi emonani ete atikaki bango báloba naino. (Yoane 11:20, 21, 32) Ntango alobaki na Marta, atunaki ye motuna, mpe na nsima ayokaki eyano na ye.—Yoane 11:25-27.
Kozala moyoki malamu emonisaka ete ozali komitya mpenza na esika ya moto. Mpo na kobɔndisa moto oyo azali na mawa, tosengeli koyoka ye malamu. Tokoki komonisa ete tozali kotya litoi, soki tozali kotuna mituna oyo ekotinda moto yango akoba koloba. Kasi, kebá ete otinda ye na makasi te aloba, ntango azali na mposa ya koloba te. Ekoki kozala ete alɛmbi mpe azali na mposa ya kopema.
Bato oyo bakweli makambo bakoki ntango mosusu kobulungana mpe kobanda kozongela kaka makambo oyo bazali koloba. Bamosusu balobaka ndenge oyo bazali koyoka na motema. Maria ná Marta, bango nyonso mibale balobaki na Yesu boye: “Nkolo, soki ozalaki awa mbɛlɛ ndeko na ngai ya mobali akufaki te.” (Yoane 11:21, 32) Yesu asalaki nini? Ayokaki na likebi nyonso mpe na boboto. Alukaki te kopesa bango toli. Na ntembe te, ayebaki ete bazalaki na mpasi makasi na motema.
Soki oyebi te makambo oyo okoki koloba ntango okei kotala moto oyo akweli makambo, okoki kobanda lisolo na motuna lokola: “Ezalaki ndenge nini?” Na nsima, tyá likebi na eyano oyo azali kopesa. Fungolá mpenza matoi ntango azali koloba. Talá ye ntango azali koloba mpo na koyeba mpenza ndenge oyo azali komiyoka.
Koyeba ndenge oyo moto oyo akweli makambo azali komiyoka, ezalaka pɛtɛɛ te. Lydia, alobi boye: “Bamposa na biso ebongwanaki. Na bantango mosusu tozalaki kokoka kokanga motema te, tozalaki kolela makasi na miso ya bato oyo bayei kotala biso. Tozalaki na mposa bato bámitungisa te. Baninga na biso basalaki nyonso mpo na koyeba ndenge oyo tozali komiyoka.”
Yesu asalaki mpenza bongo. Ayebaki ete moto na moto azali na “bolɔzi na ye moko mpe mpasi na ye moko.” (2 Ntango 6:29) Yesu ayanolaki bandeko basi yango mibale, na kolanda ndenge oyo basalaki ntango bamonaki ye. Marta akobaki koloba, na yango Yesu asololaki na ye. Lokola Maria azalaki kolela, Yesu asololaki na ye mingi te. (Yoane 11:20-28, 32-35) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu? Ekozala malamu mingi kotikela moto oyo akweli makambo nde akoba lisolo. Koyoka na likebi ntango azali kolobela mpasi na ye, ekoki kobɔndisa ye mingi.
Maloba oyo ebɔndisaka
Ntango Maria ná Marta balobaki na Yesu ete: “Soki ozalaki awa,” apamelaki bango te, mpe ayokaki mabe te na oyo balobaki. Eyano na ye epai ya Marta ezalaki: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” (Yoane 11:23) Na maloba wana ya moke, Yesu asalisaki ye atya miso na ye liboso mpe na boboto nyonso akundwelaki ye ete elikya ezali.
Ntango tozali kosolola na moto oyo akweli makambo, tóbosana te ete ata soki ezali moke, maloba ya kolendisa oyo euti mpenza na motema, ekoki koloba mingi! Tokoki kobɔndisa moto ntango tozali koloba na ye to mpe kokomela ye mwa mokanda. Lokola moto akoki kotánga mbala na mbala mokanda to karte oyo okomeli ye, yango ekoki kobɔndisa ye ata nsima ya mikolo mingi. Sanza libwa, nsima ya liwa ya mobali na ye Bob, Kath atángaki lisusu bakarte nyonso oyo bato bakomelaki ye. Alobi boye: “Namonaki ete esalisaki ngai mingi koleka kutu ntango oyo nazwaki yango; na ntango yango nde nabɔndisamaki.”
Makambo nini okoki kokoma na mwa karte oyo ozali kotindela moto oyo akweli makambo? Okoki kokoma makambo etali moto oyo akufi—likambo moko oyo bosalaki na ye elongo to ezaleli na ye ya malamu oyo ozalaki kosepela na yango. Kath alobi boye: “Maloba wana ya malamu oyo bakomaki mpo na Bob mpe ezaleli na ye epesaki ngai mposa ya kosɛka mwa moke ná kolela. Masolo ya kosɛkisa oyo etalaki ye etindaki ngai nasɛka na nse ya motema mpe nakanisa bomoi ya esengo oyo nazalaki na yango elongo na ye. Bakarte mingi oyo nasepelaka na yango lelo oyo, ezalaki na bavɛrsɛ ya Biblia.”
Pesá lisungi oyo ebongi
Mpo na kosalisa libota ya Lazare, Yesu asalaki likambo oyo biso tokoki kosala te. Azongisaki Lazare na bomoi. (Yoane 11:43, 44) Kasi, tokoki kosala makambo oyo tozali na likoki ya kosala, oyo ekoki kosalisa mpenza moto, na ndakisa kolambela ye, kopesa bapaya na ye esika ya kofanda, kosukolela ye bilamba, kobatela bana, kosalela ye misala ya mikemike to komema ye na motuka na biso to kopesa ye tike. Na ntembe te, mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa bolingo na biso ekoki kosepelisa mpenza moto oyo akweli makambo.
Kasi, tosengeli koyeba ete moto oyo akweli makambo akoki kosepela ntango mosusu kozala ye moko. Atako bongo, okoki kobongisa mpo na kozwaka nsango na ye. Mama moko oyo mwana na ye akufaki alobi boye: “Ezali na ntango moko te oyo etyamá, oyo moto akoki kotika komitungisa to mokolo moko oyo etyamá mpo moto amiyoka malamu.” Bato mosusu balukaka kokanisa moto oyo akweli makambo na mikolo lokola anivɛrsɛrɛ ya libala, to na mokolo oyo moto na bango akufaki. Soki ondimi kosalisa na ntango wana, okozala moninga ya motema mpo na ntango ya mpasi.—Masese 17:17.
Na libɔndisi oyo Yesu apesaki, alobelaki mpe elikya oyo ayebisaki bayekoli na ye ete: “Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.” (Yoane 11:11) Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete lisekwa ya bakufi ekosalema. Atunaki Marta boye: “Ondimi yango?” Ayanolaki boye: “Ɛɛ, Nkolo.”—Yoane 11:24-27.
Ondimaka ete Yesu akosekwisa bakufi? Soki ezali bongo, yebisá elikya wana kitoko na bato oyo ndeko na bango akufi. Pesá bango lisalisi oyo ebongi mpenza. Na yango, maloba mpe makambo oyo okosala ekobɔndisa bango mwa moke.—1 Yoane 3:18.
[Karte na lokasa 9]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
PEREA
Ebale Yordani
Yeriko
Betania
Mbu ya Mungwa
Yerusaleme
SAMARIA