Mokapo 25
Ndenge ya kotika kosakana na binama ya kobotela
“Nabandaki kosimbasimba binama ya kobotela ntango nazalaki na mbula mwambe. Na nsima nayaki koyeba ndenge Nzambe atalelaka momeseno yango. Nazalaki koyoka mabe mbala nyonso oyo nazalaki kozongela yango. Nazalaki komituna ete: ‘Nzambe akoki mpenza kolinga moto lokola ngai?’”—Luiz.
NTANGO obandi kokóma elenge, mposa ya kosangisa nzoto ekómaka mpenza makasi. Na yango, okoki kokwea na momeseno ya kosimbasimba binama ya kobotela.a Bato mingi bakoloba ete eza’ n’ango mabe te. Balobaka ete: “Ezokisaka moto te.” Kasi, ezali na ntina oyo esengeli koboya momeseno wana. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na yango, bóboma binama ya nzoto na bino . . . na likambo ya . . . mposa ya kosangisa nzoto.” (Bakolose 3:5) Kosimbasimba binama ya kobotela ebomaka mposa ya kosangisa nzoto te, kasi ematisaka yango. Longola yango, talelá makambo oyo elandi:
● Kosimbasimba binama ya kobotela etindaka moto akóma na ezaleli ya moimi. Na ndakisa, ntango moto azali kosimbasimba binama ya kobotela, azali komipesa mobimba na bamposa na ye ya nzoto.
● Kosimbasimba binama ya kobotela etindaka moto amona moto oyo azali molongani na ye te, lokola eloko mpamba, to esaleli mpo na kokokisa bamposa na ye.
● Ezaleli ya moimi oyo moto akómaka na yango ntango azali na momeseno ya kosimbasimba binama ya kobotela, ekosala ete azala na mokakatono ya kokokisa mposa ya kosangisa nzoto na libala.
Na esika osimbasimba binama ya kobotela mpo na kokitisa mposa ya kosangisa nzoto oyo ekómi makasi, salá makasi ozala na komipekisa. (1 Batesaloniki 4:4, 5) Mpo na kosalisa yo, Biblia elobi ete osengeli kokima makambo oyo ekoki kolamwisa epai na yo mposa ya kosangisa nzoto. (Masese 5:8, 9) Kasi, okosala nini soki okómá moombo ya kosimbasimba binama ya kobotela? Ntango mosusu osalaki makasi otika, kasi okokaki te. Ekoki kozala pɛtɛɛ okanisa ete okolonga te, mpe ete okoki te kotosa mibeko ya Nzambe. Yango mpe elenge mobali moko na nkombo Pedro akanisaki. Alobi boye: “Ntango nazalaki kozongela momeseno yango, nazalaki mpenza komiyoka mabe. Nazalaki komona ete nakokoka te kobongisa mabe oyo nasali. Nazalaki kokoka te kobondela.”
Soki yo mpe oyokaka bongo, yiká mpiko. Kokanisa te ete okolonga te. Ebele ya bilenge mpe mikóló balongaki momeseno yango. Yo mpe okoki kotika yango!
Ndenge nini okoki kotika koyoka lokola omemi ngambo
Ndenge touti kolobela yango, mbala mingi bato oyo bazalaka na momeseno ya kosimbasimba binama ya kobotela, bamiyokaka ete bamemi ngambo. Na ntembe te, koyoka mawa na ndenge oyo eyokani na mokano ya Nzambe, ekoki kolendisa yo otika momeseno yango. (2 Bakorinti 7:11) Kasi, komitungisa koleka ndelo ekoki komema yo mosika. Ekoki mpenza kolɛmbisa yo mpe kotinda yo otika kobundana na momeseno yango.—Masese 24:10.
Yango wana, luká kotalela likambo yango na ndenge ebongi. Kosimbasimba binama ya kobotela ezali mpe misala ya mbindo. Yango ekoki kokómisa yo ‘moombo ya bamposa ndenge na ndenge mpe ya bisengo,’ mpe ekotinda yo okóma na bizaleli oyo ekoki kobebisa makanisi na yo. (Tito 3:3) Kasi, moto oyo azali kosimbasimba binama na ye ya kobotela asali te lisumu monene lokola pite. (Yuda 7) Soki ozalaka na momeseno ya kosimbasimba binama na yo ya kobotela, kokanisa te ete osali lisumu oyo ekoki kolimbisama te. Likambo eleki ntina ezali nde osala makasi mpo na kopekisa mposa mabe wana, mpe kolɛmba soki moke te kobundisa yango!
Moto akoki komitungisa soki akwei lisusu na momeseno yango. Soki eyeli yo, kanisá lisusu maloba ya Masese 24:16, oyo elobi: “Moyengebene akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma mpenza; kasi bato mabe, mpasi ekobɛtisa bango libaku.” Soki okwei mbala moko to mibale, yango ekómisi yo te moto mabe. Yango wana, kotika te kosala milende. Luká nde koyeba nini esalaki ete okwea mpe bóya misala oyo etindaki yo okwea lisusu.
Zwá ntango mpo na kokanisaka bolingo mpe motema mawa ya Nzambe. Davidi, moko ya bakomi ya nzembo oyo asalá mpe mabunga, alobaki boye: “Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa, Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa. Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu.” (Nzembo 103:13, 14) Yehova ayebi mpenza ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe ‘asepelaka kolimbisa.’ (Nzembo 86:5) Kasi, alingaka mpe ete tósalaka milende mpo na kobongisa etamboli na biso. Kasi, makambo nini osengeli kosala mpo otika momeseno wana?
Talelá malamu ndenge ominanolaka. Otalaka bafilme, baemisyo ya televizyo to basite ya Internet oyo elamwisaka mposa ya kosangisa nzoto? Mokomi ya nzembo abondelaki Nzambe boye: “Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina.”b—Nzembo 119:37.
Salá makasi okanisaka makambo mosusu. Elenge moko mokristo na nkombo William, alobi boye: “Liboso okende kolala, tángá likanisi moko ya Biblia. Ezali na ntina ete na nsuka ya mokolo, ozala na makanisi ya Biblia na motó.”—Bafilipi 4:8.
Sololá likambo yango ná moto mosusu. Nsɔni ekoki kopekisa yo oyebisa likambo yango na moto oyo otyelaka ye motema. Kasi, kosala bongo ekoki kosalisa yo otika momeseno yango! Yango mpe elenge moko mokristo nkombo na ye David, amonaki. Alobi boye: “Nasololaki ná papa. Nakobosana ata mokolo moko te makambo oyo alobaki. Asɛkaki mwa moke mpo na kolendisa ngai mpe alobaki boye: ‘Osepelisi ngai makasi.’ Ayebaki ete esɛngaki nazala na mpiko mpo nasolola na ye likambo wana. Yango nde epesaki ngai makasi mpe esalisaki ngai nakoba kosala malamu.
“Na nsima, papa alakisaki ngai mwa bavɛrsɛ mpo na kosalisa ngai nayeba ete ‘nazalaki moto mabe te,’ mpe alakisaki ngai bavɛrsɛ mosusu mpo ayeba soki namoni ete momeseno wana ezalaki mpenza mabe. Alobaki ete ‘nakoba kobunda na momeseno yango,’ mpe na nsima tokosolola yango lisusu. Ayebisaki ngai ete nalɛmba nzoto te soki nakwei lisusu, kasi nabunda na momeseno yango ntango molai kozanga kokwea lisusu.” David asukisi ndenge nini? Alobi boye: “Kozala na moto oyo ayebi mokakatano na ngai malamu mpe azali kosalisa ngai, esalaki ete nayoka malamu mpenza.”c
Kosangisa nzoto na moto nyonso oyo olingi ezali mabe mpenza. Mpo na nini?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Esengeli te kokanisa ete kosimbasimba binama ya kobotela ekokani ná ntango oyo bamposa ya nzoto elamukaka yango moko. Na ndakisa, ekoki kozala ete mwana mobali alamuki na mpɔngi na mposa ya kosangisa nzoto, to mai ya mobali ebimaki na enama na ye na butu. Ndenge moko, bana basi bakoki koyoka mbala moko mposa ya kosangisa nzoto, mingimingi liboso to nsima ya komona sanza. Nzokande, kosimbasimba binama ya kobotela elakisi kolamwisa na nko mposa ya kosangisa nzoto.
b Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 33 ya Volimi 2.
c Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Volimi 2, nkasa 239-241.
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Kimá bamposa ya bolenge, kasi landá nde boyengebene, kondima, bolingo, kimya, esika moko na baoyo babelelaka Nkolo na motema ya pɛto.”—2 Timote 2:22.
TOLI
Bondelá liboso ete bamposa yango ekóma makasi. Sɛngá Yehova apesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo olonga komekama.—2 Bakorinti 4:7.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Moto ya bolɛmbu nde alandaka bamposa na ye ya kosangisa nzoto. Kasi mobali to mwasi ya solo ezali oyo amipekisaka ata ntango azali ye moko.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Nakoki kotya makanisi na makambo oyo ezali pɛto soki na ․․․․․
Na esika nalanda bamposa ya nzoto, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini ezali na ntina kobosana te ete Yehova ‘asepelaka kolimbisa’?—Nzembo 86:5.
● Lokola Nzambe, oyo asalá mposa ya kosangisa nzoto, alobi mpe ete osengeli komonisa komipekisa, likambo nini andimi ete okoki kosala?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 182]
“Banda natiká momeseno wana, nazali na lisosoli ya pɛto liboso ya Yehova, mpe nakolinga kobungisa yango ata mokolo moko te mpo na eloko moko boye!”—Sara
[Elilingi na lokasa 180]
Soki okwei ntango ozali kokima mbangu, yango elimboli te ete osengeli kobandela kokima; ndenge moko, kokwea lisusu na momeseno wana ya kosimbasimba binama ya kobotela, elongoli te milende nyonso osalaki liboso