A5
Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo
Bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka ete nkombo ya Nzambe, ndenge emonisami na Tetragrami (יהוה), ezali mbala soki 7000 na makomi ya libosoliboso ya Makomami ya Ebre. Kasi, mingi bamonaka ete nkombo yango ezalaki te na makomi ya libosoliboso ya Makomami ya Grɛki ya bokristo. Yango wana, babongoli mingi lelo basalelaka nkombo Yehova te ntango babongolaka oyo babengaka Testama ya Sika. Ata ntango bazali kobongola bavɛrsɛ oyo euti na Makomami ya Ebre oyo ezali na Tetragrami, babongoli mingi batyaka “Nkolo” na esika ya nkombo ya Nzambe.
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika esali bongo te. Esaleli nkombo Yehova mbala 237 na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Mpo na kosala yango, babongoli batalelaki makambo mibale ya ntina: (1) Bamaniskri ya Grɛki oyo ezali lelo ezali te oyo ya libosoliboso. Na ebele ya bakopi oyo ezali lelo, mingi ekomamaki soki siɛklɛ mibale nsima ya oyo ya libosoliboso. (2) Na ntango wana, baoyo bazalaki kosala bakopi ya bamaniskri bazalaki kotya Kyrios, liloba ya Grɛki mpo na “Nkolo,” na esika ya Tetragrami, to mpe kosalela bamaniskri oyo esilaki kolongola nkombo yango.
Komite ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika emonaki ete ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Tetragrami ezalaki na bamaniskri ya Grɛki ya libosoliboso. Ekateli ezwamaki na kolanda bilembeteli oyo:
Bakopi ya Makomami ya Ebre oyo ezalaki na eleko ya Yesu ná bantoma na ye ezalaki na Tetragrami na bisika mingi. Na kala, mwa bato moke bazalaki kobɛta ntembe mpo na yango. Lelo oyo, nsima ya komona bakopi ya Makomami ya Ebre ya siɛklɛ ya liboso pene na Qumran, ntembe yango esili.
Na eleko ya Yesu ná bantoma na ye, Tetragrami ezalaki mpe na mabongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre. Basiɛklɛ mingi, bato ya mayele bakanisaki ete Tetragrami ezalaki te na bamaniskri ya Septante, libongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre. Na nsima, na katikati ya siɛklɛ ya 20, balakisaki bato ya mayele biteni ya kala mpenza ya libongoli ya Septante oyo ezalaki na ntango ya Yesu. Biteni yango ezalaki na nkombo ya Nzambe, ekomami na Ebre. Boye, na eleko ya Yesu, bakopi ya Makomami na Grɛki ezalaki na nkombo ya Nzambe. Kasi, na siɛklɛ ya minei, bamaniskri ya ntina mingi ya Septante, lokola Codex Vaticanus mpe Codex Sinaiticus, ezalaki na nkombo ya Nzambe te banda na Ebandeli tii na Malaki (na bisika oyo ezalaki na bamaniskri ya libosoliboso). Boye, tokamwaka te ndenge na makomi ya eleko wana, nkombo ya Nzambe ezalaka te na oyo babengaka Testama ya Sika, to Makomami ya Grɛki ya Biblia.
Yesu alobaki polele ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai.” Alobaki mpe ete azalaki kosala misala na ye na “nkombo ya Tata” na ye
Makomami ya Grɛki ya bokristo emonisi ete Yesu atángaki nkombo ya Nzambe mingi mpe ayebisaki yango basusu. (Yoane 17:6, 11, 12, 26) Yesu alobaki polele ete: “Nayei na nkombo ya Tata na ngai.” Alobaki mpe ete azalaki kosala misala na ye na “nkombo ya Tata” na ye.—Yoane 5:43; 10:25.
Lokola Makomami ya Grɛki ya bokristo ekomamaki na elimo santu mpo ebakisama na Makomami ya Ebre, makomi yango ekozala na boyokani te soki nkombo ya Yehova elimwe na mbala moko. Na siɛklɛ ya liboso, moyekoli Yakobo alobaki na bankulutu ya Yerusaleme ete: “Simeone ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14) Yakobo akokaki koloba bongo te soki moto te na siɛklɛ ya liboso ayebaki to azalaki kosalela nkombo ya Nzambe.
Ebengeli mokuse ya nkombo ya Nzambe ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Na Emoniseli 19:1, 3, 4, 6, nkombo ya Nzambe ezali na kati ya liloba “Aleluya.” Euti na maloba ya Ebre oyo elimboli “Bósanzola Yah.” “Yah” ezali ebengeli mokuse ya Yehova. Bankombo mingi oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo eutá na nkombo ya Nzambe. Kutu, babuku ya kosala bolukiluki elobi ete nkombo ya Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.”
Mikanda ya kala ya Bayuda emonisi ete Bayuda oyo bakómaki bakristo basalelaki nkombo ya Nzambe na mikanda na bango. Tosefta, buku ya mibeko oyo esilaki kokomama na mobu soki 300, elobi mpo na mikanda ya bakristo oyo etumbamaki mokolo ya Sabata ete: “Babuku ya baoyo basakolaka Evanzile mpe babuku ya ba-minim [na ntembe te Bayuda oyo bakómaki bakristo] ebika te na mɔtɔ. Esengeli kotika yango etumbama bisika oyo ezali, yango ná nkombo ya Nzambe oyo ezali na kati na yango.” Na kati ya buku yango, Rabbi Yosé moto ya Galile, oyo azalaki na bomoi na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale, alobaki ete na mikolo mosusu ya pɔsɔ, “moto akataka nkasa oyo ezali na nkombo ya Nzambe kati na yango [na ntembe te na makomi ya bakristo], abombaka yango, mpe atumbaka nkasa oyo etikali.”
Bato mosusu ya mayele bandimi ete emonani ete nkombo ya Nzambe ezalaki na bavɛrsɛ ya Makomami ya Ebre oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Na motó ya likambo “Tetragrami na Testama ya Sika,” diksionɛrɛ moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi: “Ezali na bilembeteli oyo emonisi ete Tetragrami, nkombo ya Nzambe, Yawe, ezalaki na bavɛrsɛ ndambo to nyonso ya T[estema] ya K[ala] oyo ezongelami na T[estama] ya S[ika] ntango mikanda ya TS ekomamaki.” Moto moko ya mayele na nkombo George Howard alobi: “Lokola Tetragrami ekomamaki na bakopi ya Biblia ya Grɛki [Septante] oyo ezalaki Makomami mpo na lingomba ya liboso, tokoki mpenza kondima ete ntango bakomi ya T[estema] ya S[ika] bazalaki kozongela bavɛrsɛ ya Makomami, babatelaki Tetragrami na kati ya makomi ya Biblia.”
Babongoli minene ya Biblia basalelaki nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Mosusu kati na bango basalaki bongo liboso kutu Libongoli ya Mokili ya Sika ebima. Na ndakisa: A Literal Translation of the New Testament . . . From the Text of the Vatican Manuscript, ya Herman Heinfetter (1863); The Emphatic Diaglott, ya Benjamin Wilson (1864); The Epistles of Paul in Modern English, ya George Barker Stevens (1898); St. Paul’s Epistle to the Romans, ya William Rutherford (1900); The New Testament Letters, ya John Wand, Episkɔpɔ ya Londres (1946). Lisusu, na libongoli moko na monɔkɔ ya Espagnol ya ebandeli ya siɛklɛ ya 20, mobongoli moko na nkombo Pablo Besson asalelaki “Jehová” na Luka 2:15 mpe Yuda 14, mpe, na maloba na nse ya lokasa ya bavɛrsɛ koleka 100, amonisi ete nkombo ya Nzambe ekokaki kozala na bisika yango. Bambula mingi kutu liboso, banda na bambula ya 1700, mabongoli ya Ebre ya Makomami ya Grɛki ya bokristo esalelaki Tetragrami na bavɛrsɛ mingi. Na monɔkɔ ya Allemand mpamba, mabongoli ata 11 esaleli “Yehova” (to “Yawe”) na Makomami ya Grɛki ya bokristo, mpe babongoli minei babakisi nkombo yango na kati ya baparantɛzɛ nsima ya titre “Nkolo.” Babiblia koleka 70 ya Allemand esaleli nkombo ya Nzambe na maloba na nse ya lokasa to na bisika oyo balimboli makambo.
Babiblia ya minɔkɔ koleka 100 ezali na nkombo ya Nzambe na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Minɔkɔ mingi ya Afrika, ya ba-indien ya Amerika, Azia, Mpoto mpe bisanga ya Pasifike esalelaka nkombo ya Nzambe mingi. (Talá liste na nkasa 2062-2063.) Babongoli ya Babiblia yango bamonaki malamu básalela nkombo ya Nzambe mpo na bantina lokola oyo tolobeli likoló. Mabongoli yango mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo ebimaki bambula eleki, na ndakisa Biblia na monɔkɔ ya Rotumien (1999), oyo esaleli “Jihova” mbala 51 na bavɛrsɛ 48, mpe na monɔkɔ ya Batak (Toba) (1989) ya Indonésie, oyo esaleli “Jahowa” mbala 110.
Na ntembe te, ebongi mpenza kozongisa nkombo ya Nzambe, Yehova, na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Yango nde babongoli ya Libongoli ya Mokili ya Sika basali. Bazali na limemya makasi mpo na nkombo ya Nzambe mpe babangaka kolongola eloko nyonso oyo ezalaki na makomi ya libosoliboso.—Emoniseli 22:18, 19.