MABELE EKOBEBISAMA NYONSO?
Ba-océan
BA-OCÉAN epesaka biso kaka te bilei mingi oyo tolyaka kasi mpe biloko mosusu oyo tokoki kosalela lokola nkisi ya monganga. Ba-océan ebimisaka mopɛpɛ mingi ya malamu oyo topemaka, mpe emelaka mopɛpɛ ya mabe oyo biso bato tobimisaka. Longola yango, ba-océan ebatelaka klima na biso mpo ezala na bokatikati.
Ba-océan ekómi na likama
Ndenge klima ezali kobongwana, yango ezali kobebisa mabanga ya korai, banyama mikemike mpe bikelamu mosusu ya bomoi na ba-océan. Bato ya siansi balobi ete mabanga ya korai—oyo esimbi bomoi ya bikelamu mingi oyo ezalaka na nse ya mai—ekoki kokufa na bambula 30 oyo ezali koya.
Bato ya mayele balobi ete bandɛkɛ mingi oyo elyaka biloko oyo eutaka na mai ezali kokufa mbula na mbula, mpo na esika elya biloko yango, ezali nde kolya baplastike.
Na 2022, António Guterres, secrétaire général ya ONU, alobaki boye: Lokola tobatelaki ba-océan te, yango wana lelo tokutani na mokakatano oyo nakoki kobenga “likama ya ba-océan.”
Mabele esalemá na ndenge ya kokamwa
Ba-océan mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na kati esalemá na ndenge ete emibatelaka pɛto mpe ezala malamu soki bato babebisi yango te. Buku moko na nkombo Regeneration: Ending the Climate Crisis in One Generation elobi: Soki bato bazali kobebisa ba-océan te, “ba-océan yango moko ekoki komipɛtola.” Tótalelá mwa bandakisa:
Mwa bikelamu mikemike ya bomoi oyo babengi phytoplancton elyaka mpe ebombaka mopɛpɛ ya mabe (gaz cabonique)—mopɛpɛ oyo emonani ete ebimisaka molunge oyo ezali kobebisa mokili mobimba. Phytoplancton yango moko mpamba ebombaka motángo ya gaz carbonique lokola oyo banzete, matiti, mpe lolenge nyonso mosusu ya milona oyo ezali na mabele, soki basangisi esika moko.
Bamikrobe elyaka mposo mpe mikuwa ya bambisi oyo ekufi na océan, soki bongo te mbɛlɛ mikuwa mpe mposo yango ekokaki kobebisa océan. Na nsima, bikelamu mosusu ya mai elyaka mikrobe yango. Na kotalela site ya Smithsonian Institution Ocean, yango nde esalaka ete “ba-océan ezala pɛto.”
Mabumu ya bikelamu mingi na océan esalemá na ndenge ete ebongolaka mai ya océan oyo ezalaka mungwamungwa—oyo ekoki kosala mabe na mabanga ya korai, banyama mikemike oyo efandaka na océan, mpe bikelamu mosusu—mpe ekómisa yango mai ya malamu mpo na banyama yango.
Bato bazali komekameka kobongisa makambo
Soki salite ekɔti na océan te ntina ya kopɛtola yango mpe ekozala te. Yango wana, bato ya mayele bazali kolendisa bato ete básalelaka bisaleli oyo bakoki kosalela mbala na mbala na esika ya kosalela basashɛ to biloko ya plastike mpe kobwaka yango na nsima.
Kasi yango ekoki te. Kala mingi te, kaka na mbula moko mpamba, ebongiseli moko oyo elandelaka makambo ya bopɛto, elokotaki kilo 9200000 ya milangi ya plastike oyo ebimaki na mabongo ya bikólo 112. Nzokande, yango ezali kaka mwa motángo moke mpenza na kotalela basalite oyo babwakaka na océan mbula na mbula.
Zulunalo moko na nkombo National Geographic elobi: “Emonani ete kobebisama ya [ba-océan] ekoki kosila te. Bato bazali kobwaka bosɔtɔ mingi na ba-océan mpe [bikelamu oyo ezalaka na kati] ekokoka te kopɛtola ba-océan na bosɔtɔ nyonso wana.”
Elikya oyo Biblia epesi
“Mabele etondi na biloko oyo obimisaki. Bongo mbu oyo, monene boye mpe ebakata, kuna, biloko oyo eyebani motángo te ezali kotambola, bikelamu ya bomoi, ezala ya mike to ya minene.”—Nzembo 104:24, 25.
Mozalisi na biso asalá ba-océan na likoki ya komipɛtolaka yango moko. Kanisá naino: Soki Nzambe ayebi malamu ba-océan mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaka kuna, okanisi ete akokoka te kolongola bosɔtɔ nyonso oyo bato bazali kobwaka na ba-océan? Talá lisolo “Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te,” na lokasa 15.