Elimo
Ndimbola: Liloba ya Ebre ruah mpe liloba ya Grɛki pneuma, oyo ebongolamaka mbala mingi na liloba “elimo,” ezali na bandimbola mingi. Maloba yango nyonso mibale elimboli eloko oyo emonanaka te na miso ya moto mpe oyo ezali na nguya oyo ezali kosala mosala. Liloba yango na Ebre mpe na Grɛki esalelamaka mpo na kolobela (1) mopɛpɛ, (2) nguya ya bomoi oyo ezali kosala mosala na kati ya bikelamu ya mabele, (3) nguya oyo euti na motema ya elilingi mpe oyo etindaka moto aloba to asala makambo na lolenge moko boye, (4) maloba oyo euti na esika moko boye oyo ezali komonana te, (5) bikelamu ya elimo, mpe (6) nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala, to elimo santu. Na lisolo oyo, tokolobela mingi bandimbola oyo tokoki kosalela na mosala ya kosakola.
Elimo santu ezali nini?
Bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo elobeli elimo santu emonisi ete bato bakoki ‘kotonda’ na yango; bakoki ‘kobatisama’ na yango; mpe bakoki “kotyama mafuta” na yango. (Luka 1:41; Mat. 3:11; Mis. 10:38) Soki elimo santu ezalaka moto, Biblia elingaki kosalela maloba ya ndenge wana te.
Lisusu, Yesu alobaki ete elimo santu ezali “mosungi” (na Grɛki, parakletos), mpe alobaki ete mosungi yango “akoteya,” “akopesa litatoli,” “akoloba,” mpe ‘akoyoka.’ (Yoa. 14:16, 17, 26; 15:26; 16:13) Mbala mingi Biblia elobelaka eloko moko lokola nde ezali moto. Na ndakisa, Biblia emonisi ete mayele ezali na “bana.” (Luka 7:35, hf) Biblia elobi ete lisumu ná liwa ezali koyangela. (Rom. 5:14, 21) Bavɛrsɛ mosusu elobi ete elimo “elobaki,” nzokande bavɛrsɛ mosusu emonisi polele ete ezali baanzelu to bato nde balobaki. (Mis. 4:24, 25; 28:25; Mat. 10:19, 20; tángá mpe Misala 20:23 ná 21:10, 11.) Na 1 Yoane 5:6-8, Biblia emonisi ete ezali kaka elimo te nde ezali “kopesa litatoli,” kasi mpe ‘mai ná makila.’ Na yango, liloba moko te na bavɛrsɛ yango endimisi ete elimo santu ezali moto.
Ndimbola ya solo ya elimo santu esengeli koyokana na bavɛrsɛ nyonso oyo elobeli elimo yango. Na kotalela likanisi wana, tokoki mpenza koloba ete elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala. Ezali moto te kasi nguya oyo eutaka na Nzambe mpo na kokokisa mokano na ye mosantu.—Nz. 104:30; 2 Pe. 1:21; Mis. 4:31.
Talá nkasa 130, 131, na moto ya likambo “Bosato.”
Makambo nini emonisaka ete moto azali mpenza na elimo santu?
Luka 4:18, 31-35: “[Yesu atángaki na rulo ya mosakoli Yisaya:] ‘Elimo ya Yehova ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu’ . . . Mpe akitaki na Kapernaume, engumba moko ya Galile. Mpe azalaki koteya bango na sabata; mpe bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya, mpo liloba na ye ezalaki na nguya. Nzokande na sinagoga ezalaki na moto moko oyo azalaki na elimo moko boye, demo moko ya mbindo, mpe agangaki na mongongo makasi . . . Kasi Yesu apamelaki yango ete: ‘Kangá monɔkɔ, mpe bimá na nzoto na ye.’ Bongo, nsima ya kokweisa moto yango na katikati na bango, demo yango abimaki atiki ye, asali ye mabe te.” (Nini emonisaki ete Yesu azali na elimo ya Nzambe? Lisolo yango elobi te ete azalaki kolɛngalɛnga, kogangaganga to kotutukatutuka na molende. Lisolo yango elobi nde ete azalaki koloba na nguya. Kasi simbá ete na libaku yango, demo moko nde agangisaki moto yango mpe akweisaki ye na nse.)
Misala 1:8 elobi ete ntango bayekoli ya Yesu bakozwa elimo santu, bakozala batatoli na ye. Misala 2:1-11 emonisi ete ntango bazwaki elimo yango, bato oyo bazalaki kotala bakamwaki mpo, atako baoyo bazalaki koloba bazalaki bato ya Galile, bazalaki koloba makambo minene ya Nzambe na minɔkɔ ya bapaya mingi oyo bazalaki wana. Kasi lisolo yango elobi te ete baoyo bazwaki elimo santu babandaki kotutukatutuka.
Esengeli mpe koyeba ete ntango Elizabeti azwaki elimo santu mpe agangaki na “mongongo makasi,” azalaki na makita ya losambo te kasi azalaki nde kopesa mbote na ndeko na ye oyo ayaki kotala ye. (Luka 1:41, 42) Misala 4:31 emonisi ete ntango elimo santu ekitelaki bayekoli oyo bayanganaki, esika yango eninganaki; kasi, elimo elɛngisaki bayekoli te mpe ebalusaki bango na mabele te. Bayekoli babandaki nde ‘koloba liloba ya Nzambe na mpiko.’ Ndenge moko mpe lelo oyo, soki moto azali koloba Liloba ya Nzambe na mpiko mpe azali kopesa litatoli na molende, yango nde emonisaka ete azali na elimo santu.
Gal. 5:22, 23: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.” (Moto oyo azali na elimo ya Nzambe ayebanaka nde na mbuma ya elimo kasi na kogangaganga te to kotutukatutuka te.)
Soki moto azali koloba na nguya mpenza monɔkɔ oyo ayekolá te, yango emonisi ete azali na elimo ya Nzambe?
Talá motó ya likambo “Minɔkɔ mosusu (Koloba na).”
Makamwisi ya kobikisa bato oyo esalemaka lelo esalemaka na lisalisi ya elimo ya Nzambe?
Talá motó ya likambo “Makamwisi ya kobikisa bato.”
Nani abatisami na elimo santu?
Talá lokasa 93, na motó ya likambo “Batisimo,” talá mpe motó ya likambo “Kobotama lisusu.”
Ezali nde na eteni moko ya moto, eteni ya elimo, oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi?
Ezk. 18:4: “Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” (Na vɛrsɛ oyo, hf ebongoli liloba ya Ebre nephesh na liloba “molimo,” yango emonisi ete molimo ekufaka. Babiblia mosusu oyo ebongoli liloba nephesh na “molimo” na bavɛrsɛ mosusu esaleli maloba “motu to moto” to “oyo” na vɛrsɛ oyo. Na yango, nephesh, to molimo, ezali nde moto mpenza, kasi te eteni moko ya moto oyo etikalaka na bomoi ntango akufi.) (Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá motó ya likambo “Molimo.”)
Nz. 146:4: “Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Liloba ya Ebre oyo ebongolami awa na “elimo” euti na liloba ruah. Babiblia mosusu ebongoli yango na “mpema.” Ntango ruah yango to nguya ya bomoi oyo esalaka mosala etiki nzoto, makanisi ya moto esilaka; ekendaka esika mosusu te.)
Mos. 3:19-21: “Bana ya bato bazali na nsuka mpe nyama ezali na nsuka, mpe bakosuka ndenge moko. Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akufaka; mpe bango nyonso bazali na elimo kaka moko, yango wana moto aleki nyama te, mpo nyonso ezali mpamba. Bango nyonso bakokende esika moko. Bango nyonso bauti na putulu, mpe bango nyonso bazali kozonga na putulu. Nani ayebi soki elimo ya bana ya bato ezali komata likoló, mpe soki elimo ya nyama ezali kokita na nse, na mabele?” (Lokola bato nyonso bazwá lisumu mpe liwa epai ya Adama, bakufaka mpe bazongaka na putulu, ndenge moko na banyama. Kasi moto azalaka nde na elimo moko oyo etikalaka na bomoi mpe ezalaka na mayele ntango yango etiki nzoto? Te; vɛrsɛ 19 elobi ete bato ná banyama “bango nyonso bazali na elimo kaka moko.” Moto moko te akoki na mayele na ye moko kopesa eyano na motuna oyo ezali na vɛrsɛ 21 oyo elobeli elimo. Kasi Liloba ya Nzambe elobi ete moto abotamaka na eloko moko te oyo ekesenisaka ye na nyama ntango akufi. Nzokande, lokola Nzambe azali na motema mawa, azwi ebongiseli na nzela ya Kristo, mpe yango epesi bato oyo bakondimela ye libaku ya kozala na bomoi libela, kasi banyama bazwi yango te. Bato mingi bakozwa libaku yango na nzela ya lisekwa, ntango Nzambe akopesa bango lisusu nguya ya bomoi.)
Luka 23:46: “Yesu abelelaki na mongongo makasi mpe alobaki ete: ‘Tata, natiki elimo [na Grɛki, pneuma] na ngai na mabɔkɔ na yo.’ Ntango asilisaki koloba bongo, akataki motema.” (Simbá ete Yesu akataki motema. Ntango elimo na ye ebimaki, ekendaki na likoló te. Ezali kaka na mokolo ya misato nsima ya liwa na ye nde asekwaki. Na yango, ndenge Misala 1:3, 9 emonisi, azongaki na likoló mikolo 40 na nsima. Bongo, maloba oyo Yesu alobaki ntango akufaki elimboli nini? Alingaki koloba ete ayebaki ete nsima ya liwa na ye, elikya na ye ya kozonga na bomoi etikalaki kaka na mabɔkɔ ya Nzambe. Mpo na kozwa makanisi mosusu oyo etali maloba ‘elimo ezali kozonga epai ya Nzambe,’ talá nkasa 393, 394, na motó ya likambo “Molimo.”)
Soki moto atuni—
‘Ozali na elimo santu?’
Okoki koyanola: ‘Ɛɛ, yango wana nayei kotala yo lelo. (Mis. 2:17, 18)’
To okoki koloba: ‘Yango nde esalisaka ngai nasakola. Kasi namonaka ete bato nyonso bazalaka na likanisi moko te mpo na makambo oyo emonisaka ete moto azali mpenza na elimo ya Nzambe. Mpo na yo, nini emonisaka yango?’ Okoki kobakisa: (Salelá makanisi mosusu oyo ezali na nkasa 179, 180.)