Yehova
Ndimbola: Nkombo mpenza ya Nzambe ya solo. Ye moko amipesá nkombo yango. Yehova azali Mozalisi mpe azali na lotomo ya kozala Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Nkombo “Yehova” ebongolami uta na balɛtrɛ minei ya Ebre oyo babengi Tetragrami, יהוה, oyo elimboli “Akómisaka.” Na minɔkɔ mingi, balɛtrɛ yango minei ya Ebre ekomamaka JHVH to YHWH.
Esika nini tokoki kozwa nkombo ya Nzambe na Babiblia oyo bato basalelaka lelo oyo?
The New English Bible: Nkombo Yehova ezali na Kobima 3:15; 6:3. Talá mpe Ebandeli 22:14; Kobima 17:15; Basambisi 6:24; Ezekiele 48:35. (Kasi soki Biblia oyo mpe Babiblia mosusu esaleli “Yehova” na bavɛrsɛ mingi, mpo na nini basaleli nkombo yango te bisika nyonso oyo balɛtrɛ minei ya Ebre ezali komonana na Makomami ya Ebre?)
Revised Standard Version: Maloba na nse ya lokasa na Kobima 3:15 elobi: “Liloba NKOLO, ntango ekomami na balɛtrɛ ya minene, ezali komonisa nkombo ya Nzambe, YHWH.”
Today’s English Version: Maloba na nse ya lokasa na Kobima 6:3 elobi: “NKOLO: . . . Esika oyo Makomami ya Ebre etye Yawe, Babiblia mingi etyaka Yehova; nzokande Biblia oyo etye liloba NKOLO na balɛtrɛ ya minene, ndenge ezali na Babiblia mingi ya Lingelesi.”
King James Version: Nkombo Yehova ezali na Kobima 6:3; Nzembo 83:18; Yisaya 12:2; 26:4. Talá mpe Ebandeli 22:14; Kobima 17:15; Basambisi 6:24.
American Standard Version: Na Biblia yango, nkombo Yehova esalelami bipai nyonso na Makomami ya Ebre, kobanda na Ebandeli 2:4.
Douay Version: Maloba na nse ya lokasa na Kobima 6:3 elobi: “Nkombo na ngai Adonai. Nkombo yango, oyo ezali na Makomami ya Ebre, ezali mpenza nkombo ya Nzambe, oyo elimboli azali seko, azali, (Kob. 3, 14,) nkombo oyo Bayuda bazalaki koboya kotánga mpo bazalaki komemya yango; kasi na bisika nyonso oyo nkombo yango ezalaki na Makomami, bazalaki kotánga Adonai, oyo elimboli Nkolo; mpe, na yango, batyaki bilembo to milelisi (voyelles) ya nkombo Adonai na balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe oyo esengeli kotángama te: Jod, He, Vau, He. Kasi Babiblia mosusu ya sika ebimisi nkombo Yehova, oyo kala eyebanaki te, ezala na Bayuda to na bakristo; nzokande, ebengeli ya solo ya nkombo yango, ndenge ezalaki na makomi ya Ebre ebungá, mpo basalelaki yango te na boumeli ya ntango molai.” (Simbá ete buku moko [The Catholic Encyclopedia, 1913, Vol. VIII, lok. 329] elobi ete: “Yehova, ezali nkombo mpenza ya Nzambe na Kondimana ya Kala; kutu Bayuda bazalaki kobenga yango nkombo ya lokumu, nkombo monene, nkombo bobele moko.”)
The Holy Bible oyo ebongolamaki na Ronald A. Knox: Nkombo Yawe ezali na Kobima 3:14 mpe 6:3, na maloba na nse ya lokasa.
The New American Bible: Maloba na nse ya lokasa na Kobima 3:14 esaleli “Yawe,” kasi nkombo yango emonani te na kati ya libongoli yango. Talá ebimeli ya Saint Joseph, mpe apɛndisi na mitó ya makambo “Nkolo” ná “Yawe.”
The Jerusalem Bible: Tetragrami ebongolami Yawe mpe emonani mbala ya liboso na Ebandeli 2:4.
Libongoli ya Mokili ya Sika: Nkombo Yehova esalelami mbala 7 210 na Makomami ya Ebre mpe na Makomami ya Grɛki ya bokristo, na libongoli yango.
An American Translation: Na Kobima 3:15 mpe 6:3, basaleli nkombo Yawe, mpe balandisi yango na “NKOLO” na kati ya bakroshɛ.
The Bible in Living English, S. T. Byington: Esaleli nkombo Yehova na Makomami ya Ebre mobimba.
The ‘Holy Scriptures’ oyo ebongolami na J. N. Darby: Esaleli nkombo Yehova na Makomami ya Ebre mobimba, mpe na maloba mingi na nse ya lokasa na Makomami ya Grɛki ya bokristo, banda na Matai 1:20.
The Emphatic Diaglott, Benjamin Wilson: Nkombo Yehova ezali na Matai 21:9 mpe bisika mosusu 17 na libongoli yango na Makomami ya Grɛki ya bokristo.
Biblia na Ngala (Uele): Esaleli nkombo Yehova na Genese (Ebandeli) 22:14; Exode (Kobima) 6:2, 3, 6-8; Basauma (Nzembo) 83:18; Yisaya 12:2; 49:14.
Kondimana na Sika—Njembo: Esaleli nkombo Yawe na mwa bavɛrsɛ mingi na mokanda ya Njembo mpe Kondimana ya Sika.
Liloba lya Nzambe: Esaleli nkombo Yawe na bisika mosusu na Bondeko bwa Kala
Bible (na Lingala ya lelo oyo): Na ndimbola ya maloba ya Biblia elobi ete Yawe: na ebré Yawe to Yahu. Ebakisi ete bato mosusu bakanisaki ete yango elingi koloba “oyo azali” to “oyo akozala” to “oyo azalaka.” Nkombo yango ekoti na bankombo ebele ya bato. . . . Banda eleko ya boombo na Babilone, Bayuda batikaki kotánga nkombo “Yawe.” Na esika bákoma yango, babandaki kotánga “Nkolo.”
Biblia (haut fleuve): Esaleli mingi nkombo Yawe na Kondimana na Kala.
The Holy Bible, ebongolami na Robert Young: Na Biblia yango, nkombo ya Nzambe ezali na Makomami ya Ebre mobimba. Biblia yango ebongolami liloba na liloba.
Mpo na nini Babiblia mingi esaleli nkombo ya Nzambe te to esaleli yango mbala mingi te?
Maloba ya ebandeli ya Revised Standard Version elobi ete: “Komite ya babongoli elandi ndakisa ya Biblia King James, mpo na ntina mibale: (1) liloba ‘Yehova’ ekokani ata moke te na ebengeli moko ya nkombo ya Nzambe oyo esalelamaki na Ebre; mpe (2) na losambo ya Bayuda, liboso ya eleko ya Kristo, batikaki kosalela nkombo moko boye mpo na komonisa Nzambe kaka moko, lokola nde banzambe bazali mingi mpo ye akesana na bango, mpe kosalela nkombo moko boye mpo na kolobela Nzambe ezali na ntina te na boyambi ya Eklezia na mokili mobimba.” (Na yango balandaki makanisi na bango moko mpo na kolongola na Biblia Mosantu nkombo ya Nzambe oyo akomisaki Biblia. Na Makomami ya Ebre ya kala, nkombo yango ezali komonana mingi koleka nkombo to titre mosusu nyonso. Emonani polele ete balandi ndakisa ya bato ya Lingomba ya Bayuda oyo Yesu alobaki na bango ete: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino.”—Mat. 15:6.)
Babongoli oyo bamonaki ete basengeli kosalela nkombo ya Nzambe mbala moko to mbala mingi na Makomami, atako basalaki bongo te esika nyonso oyo nkombo yango ezali na Makomami ya Ebre, balandaki mpenza ndakisa ya William Tyndale oyo asalelaki nkombo ya Nzambe na libongoli na ye ya Pantatɛkɛ oyo ebimisamaki na 1530, mpe na ndenge yango atikaki momeseno oyo bato mosusu bazalaki na yango ya koboya kosalela nkombo ya Nzambe.
Bato oyo batambwisamaki na elimo ya Nzambe mpo na kokoma Makomami ya Grɛki ya bokristo basalelaki nkombo Yehova?
Na siɛklɛ ya minei, Jérôme akomaki: “Matai, oyo abengami mpe Levi, oyo atikaki mosala ya kokɔngɔla mpako mpe akómaki ntoma, azali moto ya liboso oyo akomaki Evanzile ya Kristo na Yudea na monɔkɔ ya Ebre, mpo na Bayuda oyo bakatami ngenga oyo bakómaki bandimi.” (De viris inlustribus, mok. III) Evanzile yango etángi mbala 11 Makomami ya Ebre esika Tetragrami ezali. Ezali na ntina moko te ya kokanisa ete Matai akomaki bavɛrsɛ yango te ndenge ezali na makomi ya Ebre.
Bato mosusu oyo batambwisamaki na elimo ya Nzambe mpo na kokoma Makomami ya Grɛki ya bokristo bakomaki bavɛrsɛ ebele ya Septante, libongoli ya Makomami ya Ebre na monɔkɔ ya Grɛki. Bavɛrsɛ na yango mingi ezalaki na Tetragrami na Ebre na Babiblia ya liboso ya Septante oyo ekomamaki na Grɛki. Bayekoli ya Yesu basalelaki nkombo ya Nzambe na mikanda oyo bakomaki, mpo balandaki ndakisa ya Yesu oyo akumisaki nkombo ya Tata na ye.—Talá Yoane 17:6, 26.
Na zulunalo moko (Journal of Biblical Literature), George Howard na Iniversite ya Géorgie akomaki: “Toyebi mpenza ete Bayuda oyo bazalaki koloba Grɛki bakobaki kokoma יהוה na Makomami na bango ya Grɛki. Lisusu, ekokaki kozala mwa mpasi kondima ete Bayuda oyo bakómaki bakristo oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki mpe oyo bazalaki kondima mbongwana te, bátika momeseno wana. Atako mbala mosusu bazalaki kosalela mwa moke maloba [Nzambe] mpe [Nkolo], ekokaki kosalema te ete bálongola Tetragrami na mikanda ya Biblia. . . . Lokola Tetragrami ezalaki na Babiblia ya monɔkɔ ya Grɛki oyo eklezia ya liboso ezalaki kosalela, tokoki kokanisa ete baoyo bakomaki K[ondimana] ya S[ika], ntango bazalaki kobongola, babatelaki Tetragrami na mikanda na bango ya Biblia. . . . Kasi, ntango elongolamaki na makomi ya Grɛki ya K[ondimana] ya K[ala], elongolamaki mpe na K[ondimana] ya S[ika]. Na yango, pene na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale, lokola babandaki kosalela [batitre], yango ezwaki esika ya Tetragrami na kati ya Kondimana nyonso mibale.”—Vol. 96, No. 1, Marsi 1977, nk. 76, 77.
Yehova to Yawe—Ebengeli nini ebongi?
Lelo oyo, moto moko te ayebi mpenza ndenge oyo bazalaki kobenga nkombo ya Nzambe na Ebre. Mpo na nini? Mpo na ntango Biblia ekomamaki, Ebre ezalaki kokomama kaka na mileli (consonnes) kasi na milelisi (voyelles) te. Na masolo ya mokolo na mokolo, bato bazalaki kokɔtisa milelisi oyo ebongi. Nzokande, nsima ya mwa ntango, Bayuda, mpo na biyambayamba na bango, bakómaki koloba ete ezali mabe kotánga nkombo ya Nzambe na mongongo makasi; yango wana bakómaki kosalela batitre. Na nsima ya basiɛklɛ, Bayuda oyo bazalaki banganga-mayele, babimisaki likanisi ya kotya bilembo mpo na komonisa milelisi oyo esengeli kosalelama ntango moto azali kotánga monɔkɔ ya Ebre ya kala, kasi na balɛtrɛ minei oyo ezali komonisa nkombo ya Nzambe batyaki milelisi ya batitre. Na yango, ebengeli ya kala ya nkombo ya Nzambe ebungaki.
Banganga-mayele mingi basepelaka na ekomeli “Yawe,” kasi bayebi te soki yango nde ekomeli ya solo mpe bango moko bazali koyokana te na likambo yango. Lisusu, “Yehova” nde ebengeli oyo eyebani mingi, mpo yango nde esalelami banda kala na Lingala.
J. B. Rotherham, na Biblia oyo abongolaki (The Emphasised Bible), asaleli ebengeli Yawe na Makomami ya Ebre mobimba. Nzokande, na buku na ye (Studies in the Psalms) asaleli ebengeli “Yehova.” Alimboli boye: “YEHOVA—Soki tosalelaki na Lingelesi nkombo yango oyo esengeli kokanisama . . . na libongoli ya sika ya Nzembo, ezali te ete totye ntembe ete ebengeli Yawe ezali malamu te; kasi ezali kaka mpo esengeli kozala bongo. Yango wana, toponaki yango mpo tomonaki malamu ete na likambo ya ndenge wana, tosengeli kolanda oyo bato bayokaka mpe bamonaka; likambo ya ntina mingi ezali ete bato báyeba nkombo ya Nzambe noki.”—(Londres, 1911), lok. 29.
Nsima ya kolobela ndenge mingi ya kobenga nkombo ya Nzambe, profesɛrɛ Gustav Friedrich Oehler, moto ya Allemagne, alobaki boye: “Banda sikoyo nazali kosalela nkombo Yehova, mpo nkombo yango esili kokɔta na maloba ya lokota na biso, mpe tozali na nkombo mosusu te oyo tokoki kotya na esika na yango.”—Theologie des Alten Testaments, ebimeli ya mibale (Stuttgart, 1882), lok. 143.
Paul Joüon, sango mpe nganga-mayele, alobaki boye: “Na mabongoli na biso, na esika ya kosalela ebengeli Yawe (oyo euti kaka na makanisi) tosaleli nde Yehova . . . , yango nde ebengeli oyo toyokanaki tósalela na Lifalanse.”—Grammaire de l’hébreu biblique (Rome, 1923), maloba na nse ya lokasa, lok. 49.
Bankombo mingi ebongwanaka mwa moke soki batángi yango na monɔkɔ mosusu. Yesu azalaki Moyuda, mpe mbala mosusu na Ebre nkombo na ye ezalaki kotángama Yeshua‛, kasi bato oyo Nzambe atambwisaki na elimo na ye mpo na kokoma Makomami ya Grɛki ya bokristo, bakakatanaki te mpo na kobenga nkombo yango, Iesous. Na minɔkɔ mosusu, ebengeli ya nkombo yango ekeseni mwa moke, kasi yango epekisaka biso te tótánga yango ndenge etángamaka na monɔkɔ na biso. Likambo yango ezali mpe bongo mpo na bankombo mosusu oyo ezali na Biblia. Na yango, ndenge nini tokoki komonisa ete tomemyaka moto oyo azali na nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso? Soki toboyi mpenza kotánga yango to kokoma yango, mpo toyebi malamu mpenza te ndenge bazalaki kotánga yango kala, tokomonisa mpenza ete tomemyaka ye? To, ekozala nde malamu tósalela nkombo yango ndenge esalelamaka na monɔkɔ na biso, kolobela yango malamu, mpe komitambwisa na ndenge oyo ekopesa ye lokumu mpo tozali basaleli na ye, boye te?
Mpo na nini esengeli koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango?
Ozali na moninga moko ya motema oyo oyebi nkombo na ye te? Mbala mingi, bato oyo bakanisaka ete Nzambe azali na nkombo te, bamonaka ete azali kaka nguya moko boye kasi moto ya solo te oyo bakoki koyeba, kolinga mpe kosolola na ye na libondeli. Ntango bato yango babondelaka, babondelaka kaka mpo na kobondela, mpe na mabondeli na bango, bazongelaka kaka makambo oyo bakangá na motó.
Yesu Kristo apesaki bakristo ya solo mosala ya kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso. Ntango bazali koteya bato yango, ndenge nini bakoki kosalisa bango bákesenisa Nzambe ya solo na banzambe ya lokuta ya bikólo? Ezali kaka na kosalela nkombo na ye ndenge Biblia ezali kosalela yango.—Mat. 28:19, 20; 1 Ko. 8:5, 6.
Kob. 3:15: “Nzambe alobaki . . . na Moize ete: ‘Talá oyo okoloba na bana ya Yisraele: “Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino . . . atindi ngai epai na bino.” Wana nde nkombo na ngai mpo na seko, mpe wana nde ekaniseli na ngai bileko na bileko.’”
Yis. 12:4: “Bópesa Yehova matɔndi! Bóbelela nkombo na ye. Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye. Bóloba ete nkombo na ye etombwani likoló.”
Ezk. 38:17, 23: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘ . . . Mpe nakomitombola mpenza mpe nakomisantisa mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
Mal. 3:16: “Baoyo babangaka Yehova balobanaki, moto na moto na moninga na ye, mpe Yehova azalaki kotya likebi mpe koyoka. Mpe buku ya kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bakanisaka nkombo na ye.”
Yoa. 17:26: “[Yesu abondelaki Tata na ye boye:] Nayebisi bango [bayekoli na ye] nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”
Mis. 15:14: “Simeone ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.”
Yehova na “Kondimana ya Kala” nde Yesu Kristo na “Kondimana ya Sika”?
Mat. 4:10: “Yesu alobaki na ye ete: ‘Longwá, Satana! Mpo ekomamá ete: “Osengeli kosambela nde Yehova [“Nkolo,” na hf mpe na Babiblia mosusu] Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”’” (Emonani polele ete Yesu alobaki te ete bato basengeli kosambela ye.)
Yoa. 8:54: “Yesu ayanolaki [Bayuda] ete: ‘Soki nazali komipesa nkembo ngai moko, nkembo na ngai ezali mpamba. Tata na ngai nde moto azali kopesa ngai nkembo, ye oyo bino bolobi ete azali Tata na bino.’” (Makomami ya Ebre emonisi polele ete Yehova nde Nzambe oyo Bayuda bazalaki kosambela. Yesu alobaki te ete ye nde Yehova, kasi ete Yehova azali Tata na ye. Awa Yesu amonisi polele ete ye ná Tata na ye bazali bato mibale oyo bakeseni mpenza.)
Nz. 110:1: “Liloba oyo Yehova alobi na Nkolo na ngai [Nkolo ya Davidi] yango oyo: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.’” (Na Matai 22:41-45, Yesu amonisaki ete ye azalaki “Nkolo” ya Davidi oyo Nzambe atángi na Nzembo. Na yango, Yesu azalaki te Yehova kasi nde moto oyo Yehova azalaki koloba na ye.)
Flp. 2:9-11: “Yango wana mpe Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, mpo, na nkombo ya Yesu, mabɔlɔngɔ nyonso ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabele mpe ya baoyo bazali na nse ya mabele egumbama, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Kristo azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” (Simbá ete Yesu Kristo akeseni na Nzambe Tata mpe azali na nse na Ye.)
Ndenge nini moto akoki kolinga Yehova mpe lisusu kobanga ye?
Biblia elobi na biso ete tosengeli kolinga Yehova (Luka 10:27) mpe kobanga ye. (1 Pe. 2:17; Mas. 1:7; 2:1-5; 16:6) Soki tozali mpenza kobanga Nzambe, yango ekosalisa biso tóboya kosilikisa ye. Soki tozali kolinga Yehova, tokosala makambo oyo esepelisaka ye, tokotɔnda ye mpo na bolingo mpe boboto oyo azali komonisela biso.
Ndakisa: Mwana abangaka kopesa tata na ye nkanda, kasi soki azali kotɔnda tata na ye mpo na nyonso oyo azali kosalela ye, yango ekotinda ye alinga tata na ye mpenza. Moto akoki koloba ete alingaka kobɛta mai, kasi makama ya mai esengeli mpe kotinda ye abanga kosala makambo mosusu. Ndenge moko mpe mpo na biso, soki tolingi Nzambe, tokobanga mpe kosala makambo mosusu oyo ekoki kosilikisa ye.