MOKAPO 2
Ndenge nini okoki kobatela lisosoli ya malamu?
“Bózala na lisosoli ya malamu.”—1 PETRO 3:16.
1, 2. Boussole ezali eloko ya ntina mingi mpo na likambo nini, mpe mpo na nini tokoki kokokanisa yango na lisosoli?
KAPITƐNƐ moko azali kotambwisa masuwa na kati ya mbu; moto moko azali kotambola na kati ya esobe; pilote moko azali kotambwisa mpɛpɔ likoló ya mapata. Likambo nini ekoki kokómela bato yango misato? Mokomoko na bango akoki kokutana na mokakatano monene soki azangi boussole, mingimingi soki azali te na baaparɛyi oyo siansi ebimisi na mikolo na biso.
2 Boussole ezali eloko moke lokola montre ya lobɔkɔ mpe ezalaka na likɔnga oyo etalaka ntango nyonso na nɔrdi. Boussole ekoki kosalisa moto soki ezali kosala malamu, mingimingi soki moto yango azali mpe na karte ya malamu. Tokoki kokokanisa boussole na lisosoli, likoki ya ntina mingi oyo Yehova apesá biso. (Yakobo 1:17) Soki tozalaki na lisosoli te, tolingaki kozala lokola bato oyo babungi nzela. Soki tozali kosalela lisosoli na ndenge ya malamu, ekoki kosalisa biso tópona nzela malamu oyo tosengeli kolanda na bomoi na biso. Na yango, tótalela soki lisosoli ezali nini mpe ndenge nini esalaka. Na nsima, tokozwa biyano na mituna oyo: (1) Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso? (2) Mpo na nini tosengeli kotalela lisosoli ya basusu? (3) Kozala na lisosoli ya malamu ezali na matomba nini?
LISOSOLI MPE NDENGE OYO ESALAKA
3. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lisosoli” elimboli mpenza nini, mpe emonisaka likoki nini oyo bato bazali na yango?
3 Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lisosoli” elimboli “koyebana na yo moko, to komiyeba.” Na bokeseni na bikelamu mosusu awa na mabele, Nzambe apesá biso bato likoki ya komiyeba. Na maloba mosusu, tokoki komitalela mpe kotalela etamboli na biso. Lisosoli na biso ezali lokola motatoli oyo azalaka na kati ya motema na biso, to mosambisi oyo akoki kotalela misala na biso, makanisi na biso mpe makambo oyo toponaka. Lisosoli ekoki kosalisa biso tózwa ekateli ya malamu to kokebisa biso ntango tolingi kozwa ekateli ya mabe. Lisosoli ekoki kokitisa biso motema mpo tozwi ekateli ya malamu; ekoki mpe kotungisama mpo tozwi ekateli ya mabe.
4, 5. (a) Ndenge nini toyebi ete Adama ná Eva bazalaki na lisosoli, mpe nini ekómelaki bango ntango babukaki mobeko ya Nzambe? (b) Bandakisa nini emonisi ete bato ya sembo ya ntango ya kala bazalaki koyokela lisosoli na bango?
4 Mobali mpe mwasi ya liboso bakelamaki na lisosoli. Emonani ete Adama ná Eva bazalaki na lisosoli. Tokoki komona yango na ndenge bayokaki nsɔni nsima ya kosala lisumu. (Ebandeli 3:7, 8) Nzokande, atako lisosoli na bango etungisamaki, na ntango wana ekokaki lisusu kosalisa bango te. Babukaki mobeko ya Nzambe na nko. Na ndenge yango, bango moko nde baponaki kotombokela Yehova Nzambe; bamikómisaki banguna na ye. Lokola bazalaki bato ya kokoka, bayebaki ete bazali kosala mabe mpe yango ekokabola bango libela ná Nzambe.
5 Nzokande, ezali na bato mingi ya kozanga kokoka oyo bayokelaki lisosoli na bango. Na ndakisa, Yobo, moto moko ya sembo, alobaki boye: “[Nabateli] bosembo na ngai, mpe nakotika yango te; motema na ngai ekotungisa ngai ata moke te mikolo na ngai nyonso.”a (Yobo 27:6) Yobo azalaki mpenza koyokela lisosoli na ye; azalaki kotika ete lisosoli na ye etambwisa ye na makambo oyo azalaki kosala mpe na bikateli oyo azalaki kozwa. Yango wana, akokaki koloba na esengo nyonso ete lisosoli na ye etungisaki ye te; asalaki likambo moko te oyo epesaki ye nsɔni to etindaki ye ayoka lokola nde amemi ngambo. Sikoyo, talá bokeseni kati na Yobo ná Davidi. Ntango Davidi asalaki likambo moko oyo emonisaki ete azangi limemya epai ya Saulo, mokonzi oyo Yehova aponaki, “na nsima, motema ya Davidi eyokaki mabe.” (1 Samwele 24:5) Lokola lisosoli ya Davidi etungisamaki, eteyaki ye mpo asala lisusu te likambo oyo ezangi limemya.
6. Nini emonisi ete bato nyonso bazali na lisosoli?
6 Kasi, ezali kaka basaleli ya Yehova nde bazali na lisosoli? Tótalela maloba oyo ntoma Paulo akomaki na lisalisi ya elimo santu: “Ntango bato ya bikólo oyo bazali na mibeko te bazali kosala makambo ya mibeko kaka mpo bazali bato, bato yango, atako bazalaka na mibeko te, bazali na mobeko na mitema na bango moko. Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na mitema na bango, ntango lisosoli na bango ezali kotatola elongo na bango mpe, na makanisi na bango moko, ezali kofunda bango to mpe kolongisa bango.” (Baroma 2:14, 15) Lisosoli ezali lokola motatoli na motema ya moto mpe yango nde etindaka ata bato oyo bayebi mibeko ya Yehova te básala makambo mosusu oyo mibeko esɛngi.
7. Nini ekoki kobebisa lisosoli na biso?
7 Kasi, na bantango mosusu, lisosoli ekoki kobungisa biso nzela. Na ndenge nini? Toyebi ete soki moto atye pembeni ya boussole ebende, na esika likɔnga ya boussole etala na nɔrdi, ekobaluka na ngámbo ya ebende yango. Moto akoki kozala na boussole, kasi soki azali na karte ya malamu te, boussole yango ekosalisa ye mpenza te. Ndenge moko mpe, soki motema na biso etondi na bamposa ya mabe, lisosoli na biso ekoki kobeba mpe ekolakisa biso nzela ya mabe. Lisusu, soki tozali kolanda yango kozanga kotalela batoli ya Liloba ya Nzambe, tokoyeba te kokesenisa mabe ná malamu na makambo mingi ya ntina. Tomoni mpenza ete mpo lisosoli na biso esala malamu, tosengeli kolanda litambwisi ya elimo santu ya Yehova. Paulo akomaki boye: “Lisosoli na ngai ezali kopesa litatoli elongo na ngai na kati ya elimo santu.” (Baroma 9:1) Kasi, tosengeli kosala nini mpo lisosoli na biso elandaka litambwisi ya elimo santu ya Yehova? Tosengeli koteya yango.
NDENGE OYO TOKOKI KOTEYA LISOSOLI NA BISO
8. (a) Ndenge nini motema ekoki kobebisa lisosoli, mpe tosengeli kotalelaka libosoliboso nini ntango tolingi kozwa bikateli? (b) Mpo na nini ebongi te mokristo akanisa ete ekateli oyo azwi ezali mabe te kaka mpo lisosoli na ye etungisami te? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
8 Ndenge nini okoki kosalela lisosoli na yo mpo na kozwa ekateli? Emonani ete mpo na kozwa ekateli, bato mosusu balandaka kaka motema na bango. Nsima ya kozwa ekateli, bato yango balobaka ete: “Lisosoli na ngai ezali kotungisama te.” Bamposa ya motema ekoki kozala makasi mpe kobebisa lisosoli ya moto. Biblia elobi boye: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?” (Yirimia 17:9) Yango wana, ebongi te tótalelaka libosoliboso bamposa ya motema na biso. Tosengeli nde kotalelaka makambo oyo esepelisaka Yehova Nzambe.b
9. Kobanga Nzambe elimboli nini, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso tózala na lisosoli ya malamu?
9 Soki tozwi ekateli moko oyo eyokani na lisosoli na biso oyo eteyami, tokomonisa ete tobangaka Nzambe, kasi tolandaka bamposa na biso te. Tótalela ndakisa moko. Guvɛrnɛrɛ Nehemia, mobali moko ya sembo, azalaki na lotomo ya kosɛnga mpako mosusu epai ya bafandi ya Yerusaleme. Kasi, asalaki yango te. Mpo na nini? Alingaki te ete Yehova asepela na ye te mpo azali konyokola bato na Ye. Alobaki boye: “Nasalaki bongo te mpo na kobanga Nzambe.” (Nehemia 5:15) Yango wana, ezali na ntina mingi tóbangaka Nzambe, elingi koloba tólingaka ata moke te kosala likambo oyo ekoyokisa Tata na biso ya likoló mawa. Kobanga yango ekotinda biso tólukaka toli ya Liloba ya Nzambe ntango tolingi kozwa bikateli.
10, 11. Mitinda nini ya Biblia tosengeli kotalela na likambo etali komɛla masanga, mpe ndenge nini tokoki kotika Nzambe atambwisa biso mpo na kotosa mitinda yango?
10 Na ndakisa, tótalela likambo ya komɛla masanga. Ntango tozali kosepela ná baninga, mbala mingi esɛngaka tózwa ekateli ya komɛla to te. Mpo na yango, tosengeli naino koteya lisosoli na biso. Mitinda nini ya Biblia tosengeli kotalela na likambo yango? Toyebi ete Biblia epekisi te komɛla mwa moke. Kutu, ekumisi Yehova, oyo apesá bato likabo ya vinyo. (Nzembo 104:14, 15) Kasi, Biblia epekisi komɛla mingi mpe kolangwa. (Luka 21:34; Baroma 13:13) Kutu, etángi molangwa na kati ya masumu minene lokola pite mpe ekobo.c—1 Bakorinti 6:9, 10.
11 Mitinda ya ndenge wana nde eteyaka mpe ebongisaka lisosoli ya mokristo. Yango wana, soki tokolekisa ntango ná baninga to tokokende na fɛti moko, tosengeli komituna mituna lokola oyo: ‘Fɛti yango ekozala ndenge nini? Ekoki nde kokóma na makambo ya loyenge? Ngai moko nazalaka ndenge nini liboso ya masanga? Nalingaka yango mingi, nazali moombo na yango, namɛlaka yango mpo elongola ngai susi to elongola ngai nsɔni? Nazali mpenza na komipekisa mpo namɛla koleka ndelo te?’ Ntango tozali kotalela mitinda ya Biblia mpe mituna oyo touti kotuna, tosengeli mpe kobondela mpo Yehova atambwisa biso. (Tángá Nzembo 139:23, 24.) Na ndenge yango, tokomonisa ete tolingi Yehova atambwisa biso na lisalisi ya elimo santu na ye. Tokoteya mpe lisosoli na biso mpo na koyokanisa yango na mitinda ya Nzambe. Kasi, ezali mpe na likambo mosusu oyo tosengeli kotalela ntango tozali kozwa bikateli.
MPO NA NINI TOSENGELI KOTALELA LISOSOLI YA BASUSU?
12, 13. Wapi mwa bantina oyo esalaka ete lisosoli ya mokristo moko ekesana na oyo ya mokristo mosusu, mpe ndenge nini tosengeli kotalela bokeseni yango?
12 Mbala mosusu, tokoki kokamwa ndenge oyo lisosoli ya mokristo moko ekoki kokesana mpenza ná oyo ya mokristo mosusu. Mokristo mosusu akoki komona ete ezaleli to momeseno moko boye ezali mabe; nzokande, mokristo mosusu asepelaka na yango mpe amonaka yango mabe te. Na ndakisa, mokristo mosusu asepelaka komɛla elongo na baninga ntango bazali kozwa mwa mopɛpɛ na mpokwa; kasi, mokristo mosusu amonaka yango mabe. Mpo na nini lisosoli ya mokristo moko ekoki kokesana na oyo ya mokristo mosusu, mpe ndenge nini tosengeli kotalela yango ntango tozali kozwa bikateli?
13 Bato bakesanaka mpo na bantina mingi. Ndenge oyo bato bakolá ekoki kokesana makasi. Na ndakisa, bato mosusu bayebaka ete babundaki makasi mpo bálonga bolɛmbu moko oyo bazalaki na yango, mpe babangaka kokwea lisusu na bolɛmbu yango. (1 Bakonzi 8:38, 39) Soki bolɛmbu yango etalelaki masanga, bato ya ndenge wana babangaka mpenza komɛla. Soki moto ya ndenge wana ayei na ndako na yo, mpe osepeli kopesa ye masanga, lisosoli na ye ekoki kopekisa ye amɛla. Okoloba na ye ete osepeli te? Okotya ye kaka mbamba ete amɛla? Te. Ezala oyebi ntina oyo aboyi komɛla to te, mpo ntango mosusu akomona ete ebongi te ayebisa yo yango na esika wana, bolingo esengeli kotinda yo omitya na esika na ye.
14, 15. Lisosoli ya bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso ekesanaki na likambo nini na oyo ya bandeko na bango, mpe Paulo apesaki toli nini na likambo yango?
14 Na siɛklɛ ya liboso, ntoma Paulo amonaki ete bakristo bazalaki na lisosoli ndenge moko te. Bakristo mosusu bazalaki komona mabe kolya biloko oyo epesamaki liboso lokola mbeka na banzambe ya bikeko. (1 Bakorinti 10:25) Lisosoli ya Paulo ezalaki kopekisa ye te kolya biloko yango oyo, na nsima ezalaki kotɛkama na zando. Mpo na ye, bikeko ezalaki eloko te; lokola Yehova nde asalá biloko ya kolya, biloko yango ezali ya Ye, ekoki kozala ya bikeko te. Kasi, Paulo ayebaki ete bandeko mosusu bazalaki na likanisi ndenge moko te ná ye. Ekoki kozala ete bamosusu bazalaki basambeli ya bikeko yango liboso bákóma bakristo. Mpo na bandeko yango, eloko nyonso oyo esalelamaki liboso na losambo ya bikeko ezalaki mabe. Ndenge nini esengelaki kotalela likambo yango?
15 Paulo alobaki boye: “Nzokande, biso baoyo tozali makasi tosengeli komema bolɛmbu ya baoyo bazali makasi te, mpe tómisepelisa te. Mpo Kristo kutu amisepelisaki te.” (Baroma 15:1, 3) Paulo amonaki ete biso mpe tosengeli kosala lokola Kristo, elingi koloba kotya bamposa ya bandeko na biso liboso ya bamposa na biso moko. Na mokanda mosusu oyo alobelaki likambo yango, Paulo amonisaki ete akosepela kutu alyaka mosuni te na esika azala libaku mpo na bampate oyo Kristo apesaki bomoi na ye mpo na bango.—Tángá 1 Bakorinti 8:13; 10:23, 24, 31-33.
16. Mpo na nini bato oyo lisosoli na bango epekisaka bango makambo mosusu basengeli te kosambisa bato oyo batalelaka makambo ndenge mosusu?
16 Nzokande, bandeko oyo lisosoli na bango epekisaka bango básala makambo oyo bandeko mosusu basalaka, basengeli te koloba mabe mpo na bandeko wana to koluka ete bato nyonso bátalelaka makambo ndenge oyo bango batalelaka yango. (Tángá Baroma 14:10.) Kutu, lisosoli ya moto esengeli nde kozala mosambisi mpo ye moko, kasi asengeli te kosalelaka yango mpo na kosambisa basusu. Tosengeli kobosana te maloba ya Yesu oyo: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te.” (Matai 7:1) Na kati ya lisangá, biso nyonso tosengeli koboya bantembe na makambo etali lisosoli ya moto na moto. Tosengeli nde kolukaka kimya mpe bomoko, kolendisana, kasi kokabwana te.—Baroma 14:19.
MATOMBA YA LISOSOLI YA MALAMU
17. Lisosoli ya bato mingi ekómá ndenge nini?
17 Ntoma Petro akomaki ete: “Bózala na lisosoli ya malamu.” (1 Petro 3:16) Lisosoli oyo ezali pɛto na miso ya Yehova Nzambe ezali lipamboli monene. Lisosoli ya ndenge wana ekeseni na lisosoli ya bato mingi lelo oyo. Paulo alobelaki bato oyo “batyami elembo lokola oyo ya ebende ya mɔtɔ makasi na lisosoli na bango.” (1 Timote 4:2) Ebende ya mɔtɔ makasi etumbaka mposo mpe esika yango ekómaka makasi mpe eyokaka lisusu mpasi te. Bato mingi bazali na lisosoli ekufá, elingi koloba ekebisaka bango lisusu te, etungisamaka mpe te ntango basali likambo moko ya mabe. Lelo oyo, bato mingi basepelaka lokola bayokaka lisusu motema mpasi te ntango basali mabe.
18, 19. (a) Koyoka mpasi na motema ekoki kozala na litomba nini? (b) Tokoki kosala nini soki lisosoli na biso ezali kaka kotungisama mpo na masumu oyo tosalá, atako tosilá kobongola motema?
18 Nzokande, koyoka mpasi na motema ekoki kozala lolenge oyo lisosoli ezali koyebisa biso ete tosali mabe. Soki mpasi yango ememi moto abongola motema, Nzambe akoki kolimbisa ye ata soki asalaki lisumu monene mpenza. Na ndakisa, Mokonzi Davidi asalaki lisumu monene, kasi Nzambe alimbisaki ye mpo abongolaki mpenza motema. Lokola ayinaki mabe na ye mpe azwaki ekateli ya kotosa mibeko ya Yehova, amonaki mpenza ete Yehova azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ (Nzembo 51:1-19; 86:5) Kasi, tosengeli kosala nini soki tozali kaka kotungisama nsima ya kobongola motema mpe kolimbisama masumu na biso?
19 Na bantango mosusu, lisosoli etungisamaka na ndenge oyo eleki ndelo, enyokolaka moto oyo asali lisumu mpe etindaka ye amiyoka lokola nde amemi ngambo, ata soki ntina ya koyoka bongo ezali lisusu te. Na ntango wana, tosengeli kondimisa motema na biso ete Yehova azali monene koleka motema ya moto nyonso. Tosengeli kosala likambo oyo tolendisaka bato mosusu básala, elingi koloba kondima ete Yehova alingaka mpe alimbisaka biso. (Tángá 1 Yoane 3:19, 20.) Nzokande, lisosoli ya pɛto epesaka kimya na motema, esalaka ete moto azala motema mpiɔ, ayoka esengo ya solosolo oyo bato mingi bazali na yango te na mokili oyo. Bato mingi oyo bakweaki na lisumu ya monene bayokaki kimya yango nsima ya kobongola motema mpe lelo oyo, bazali kosalela Yehova Nzambe na lisosoli ya malamu.—1 Bakorinti 6:11.
20, 21. (a) Buku oyo ebongisami mpo na kosalisa yo osala nini? (b) Bakristo bazali na bonsomi ya ndenge nini, kasi ndenge nini basengeli kosalela bonsomi yango?
20 Buku oyo ebongisami mpo na kosalisa yo oyoka esengo wana, ozala na lisosoli ya malamu na mikolo ya nsuka mpe oyo etondi na yikiyiki ya mokili oyo Satana azali koyangela. Ya solo, buku oyo elobeli te mibeko mpe mitinda nyonso ya Biblia oyo osengeli kotalela mpe kolanda na makambo nyonso oyo tokutanaka na yango mokolo na mokolo. Lisusu, tosengeli te kolikya ete Biblia epesa biso mibeko oyo ezali mpenza polele na makambo oyo etali lisosoli. Mokano ya buku oyo ezali ya kosalisa yo oteya lisosoli na yo mpo oyeba kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi ya mokolo na mokolo. Na bokeseni na Mibeko ya Moize, “mobeko ya Kristo” elendisaka bato oyo balandaka yango bátalelaka mingimingi lisosoli mpe mitinda, kasi te mibeko oyo ekomami. (Bagalatia 6:2) Yango emonisi ete Yehova apesi bakristo bonsomi mingi. Nzokande, Liloba na ye eyebisi biso ete tosengeli te kosalela bonsomi yango “mpo na kozipa makambo ya mabe.” (1 Petro 2:16) Bonsomi yango ezali nde kopesa biso libaku ya komonisa ete tolingaka Yehova.
21 Soki ozali kokanisa ndenge oyo okoki kosalela malamumalamu mitinda ya Biblia mpe ozali kobondela mpo na yango, mpe ozali kokokisa bikateli oyo ozali kozwa, okotikala na nzela oyo oponaki ntango oyebaki Yehova. Na ndenge yango, “makoki na [yo] ya kososola” ekomesana lokola ozali ‘kosalela’ yango. (Baebre 5:14) Lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia ekomemela yo matomba na bomoi na yo mobimba. Lokola boussole oyo esalisaka moto ya mobembo, lisosoli na yo ekosalisa yo ozwaka bikateli oyo ekosepelisa Tata na yo ya likoló. Yango ekosalisa yo mpenza mpo otikala na kati ya bolingo ya Nzambe.
a Na Makomami ya Liebele, ezali na liloba moko te oyo elimboli mpenza “lisosoli.” Kasi, ezali polele ete bandakisa lokola oyo elobeli nde lisosoli. Mbala mingi, liloba “motema” elimbolaka bomoto ya kati. Ezali polele ete bandakisa lokola oyo ezali kolobela eloko moko na bomoto ya kati, elingi koloba lisosoli na ye. Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “lisosoli” ezali na bisika soki 30.
b Biblia emonisi ete ekoki kaka te ete moto azala na lisosoli oyo ezali kotungisama te. Na ndakisa, Paulo alobaki boye: “Mpo nazali komona ata eloko moko te oyo ezali kokweisa ngai. Atako bongo namonani moyengebene te mpo na yango, kasi moto oyo azali kotalela ngai ezali Yehova.” (1 Bakorinti 4:4) Kutu, bato mosusu banyokolaka bakristo, ndenge Paulo mpe azalaki kosala liboso; kasi lisosoli na bango etungisamaka te mpo bakanisaka ete Nzambe asepelaka na likambo oyo basalaka. Ezali na ntina mingi ete lisosoli na biso ezala pɛto na miso na biso moko, kasi mpe na miso ya Nzambe.—Misala 23:1; 2 Timote 1:3.
c Minganga mingi balobaka ete bato oyo bazali baombo ya masanga bazali na likoki te ya komipekisa; mpo na bango, “kolekisa ndelo te” elimboli komɛla ata moke te.