-
Eteni 1: Bindimeli ya BakristoTobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
-
-
MITUNA MPO NA BAOYO BALINGI KOZWA BATISIMO
Eteni 1: Bindimeli ya Bakristo
Boyekoli na yo ya Biblia na Batatoli ya Yehova esalisi yo oyeba mateya ya solo. Na ntembe te, makambo oyo oyekoli esalisi yo okóma na boyokani malamu na Nzambe mpe epesi yo elikya ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya mpe ya kozwa mapamboli na paradiso awa na mabele, ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela yango. Okómi kondimela Liloba ya Nzambe mingi, mpe lokola ozali kosangana na lisangá ya bokristo, osili kozwa ebele ya mapamboli. Oyebi sikoyo ndenge oyo Yehova azali kosalela basaleli na ye na mikolo na biso.—Zek. 8:23.
Lokola ozali sikoyo komilɛngɛla mpo na batisimo, ekozala malamu bankulutu ya lisangá bátalela elongo na yo bindimeli ya moboko ya bakristo. (Ebr. 6:1-3) Tiká ete Yehova akoba kopambola yo na milende nyonso oyo ozali kosala mpo na koyeba ye, mpe apesa yo mbano oyo alaki.—Yoa. 17:3.
1. Mpo na nini olingi kozwa batisimo?
2. Yehova azali nani?
• “Yehova azali Nzambe ya solo kuna na likoló mpe awa na mabele. Mosusu azali te.”—Mib. 4:39.
• “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”—Nz. 83:18.
3. Mpo na nini ezali na ntina osalelaka nkombo ya Nzambe?
• “Bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.’”—Mat. 6:9.
• “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”—Rom. 10:13.
4. Maloba nini Biblia esaleli mpo na kolobela Yehova?
• “Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na libela.”—Yis. 40:28.
• “Tata na biso na likoló.”—Mat. 6:9.
• “Nzambe azali bolingo.”—1 Yoa. 4:8.
5. Eloko nini okoki kopesa Yehova Nzambe?
• “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.”—Mrk. 12:30.
• “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”—Luka 4:8.
6. Mpo na nini olingi kotikala sembo epai ya Yehova?
• “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.”—Mas. 27:11.
7. Obondelaka nani, mpe obondelaka ye na nkombo ya nani?
• “Ya solosolo mpenza, ngai [Yesu] nalobi na bino ete: Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.”—Yoa. 16:23.
8. Okoki kobondela mpo na makambo nini?
• “Bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele. Pesá biso lelo bilei na biso mpo na mokolo oyo; mpe limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo bazali na nyongo na biso. Mpe salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.’”—Mat. 6:9-13.
• “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”—1 Yoa. 5:14.
9. Nini ekoki kosala ete Yehova ayoka te libondeli oyo moto asali?
• “Bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, kasi akoyanola bango te . . . na kolanda mabe oyo basalaki na misala na bango.”—Mika 3:4.
• “Miso ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango; kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.”—1 Pe. 3:12.
10. Yesu Kristo azali nani?
• “Simo Petro ayanolaki ye ete: ‘Ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.’”—Mat. 16:16.
11. Mpo na nini Yesu ayaki awa na mabele?
• “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”—Mat. 20:28.
• “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”—Luka 4:43.
12. Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na mbeka ya Yesu?
• “Akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.”—2 Ko. 5:15.
13. Bokonzi nini Yesu azali na yango?
• “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.”—Mat. 28:18.
• “Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso.”—Flp. 2:9.
14. Ondimaka ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova nde “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yesu atye?
• “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?”—Mat. 24:45.
15. Elimo santu ezali moto?
• “Anzelu azongiselaki ye ete: ‘Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.’”—Luka 1:35.
• “Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?”—Luka 11:13.
16. Ndenge nini Yehova asalelaki elimo santu na ye?
• “Likoló esalemaki na liloba ya Yehova, mpe limpinga na yango mobimba na elimo ya monɔkɔ na ye.”—Nz. 33:6.
• “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 1:8.
• “Esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto. Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”—2 Pe. 1:20, 21.
17. Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
• “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”—Dan. 2:44.
18. Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na yo?
• “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Em. 21:4.
19. Ndenge nini oyebi ete mosika te tokozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele?
• “Bayekoli bapusanaki epai na ye kaka bango moko mpe balobaki ete: ‘Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?’ Mpe Yesu azongiselaki bango ete: ‘. . . ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge. Mpe nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.’”—Mat. 24:3, 4, 7, 14.
• “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”—2 Tim. 3:1-5.
20. Ndenge nini okoki komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mpo na yo?
• “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”—Mat. 6:33.
• “Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: ‘Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.’”—Mat. 16:24.
21. Satana ná bademo bazali banani?
• “Bino bouti na tata na bino Zabolo . . . Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki.”—Yoa. 8:44.
• “Dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.”—Em. 12:9.
22. Makambo nini ya lokuta Satana akoselaki Yehova, mpe bato oyo basambelaka Yehova?
• “Mwasi alobaki na nyoka ete: ‘Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: “Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.”’ Bongo nyoka alobaki na mwasi ete: ‘Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.’”—Eba. 3:2-5.
• “Satana apesaki Yehova eyano mpe alobaki: ‘Loposo mpo na loposo, mpe eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.’”—Yobo 2:4.
23. Ndenge nini okoki komonisa ete makambo oyo Satana alobaki ezali lokuta?
• “Salelá [Nzambe] na motema mobimba.”—1 Nt. 28:9.
• “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”—Yobo 27:5.
24. Mpo na nini bato bakufaka?
• “Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”—Rom. 5:12.
25. Moto akómaka ndenge nini soki akufi?
• “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”—Mos. 9:5.
26. Elikya nini ezali mpo na moto oyo akufi?
• “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Mis. 24:15.
27. Bato boni bakokende likoló mpo na koyangela ná Yesu?
• “Talá! Mwana-Mpate atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona, mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000) oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango.”—Em. 14:1.
-
-
Eteni 2: Bomoi ya BakristoTobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
-
-
MITUNA MPO NA BAOYO BALINGI KOZWA BATISIMO
Eteni 2: Bomoi ya Bakristo
Boyekoli na yo ya Biblia esalisi yo oyeba makambo oyo Yehova asɛngi yo mpe ndenge ya kotosa mitinda na ye ya sembo. Ntango mosusu, makambo oyo oyekoli esalisi yo obongisa bizaleli na yo mosusu mpe lolenge na yo ya kotalela bomoi. Sikoyo lokola osili kozwa mokano ya kotosa mitinda ya sembo ya Yehova na bomoi na yo, okoki kozala mosakoli ya nsango malamu mpe kosalela Yehova mosala oyo akondima.
Kotalela mituna oyo elandi ekosalisa yo obomba malamu na makanisi makambo ya sembo oyo Yehova asɛngaka na basaleli na ye mpe ekosalisa yo obosana te makambo mosusu oyo okoki kosala mpo ozala mpe mosaleli oyo ye andimi. Boyebi yango ekomonisa yo ete kosala makambo nyonso na lisosoli ya malamu mpe mpo na lokumu ya Yehova ezali na ntina mingi.—2 Ko. 1:12; 1 Tim. 1:19; 1 Pe. 3:16, 21.
Na esika oyo okómi na boyekoli na yo, na ntembe te ozali na mposa makasi ya kondima boyangeli ya Yehova mpe kokɔta na ebongiseli na ye. Mituna mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo etyami na eteni oyo ekosalisa yo omitalela soki okangi mpenza ntina na likambo etali kotosa boyangeli ya Yehova, ezala na lisangá, na libota, to na oyo etali bakonzi ya politiki ya mokili oyo. Na yango, okosepela lisusu makasi na bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na koteya bato na ye mpe kokómisa makasi kondima na bango. Na ndakisa, koyangana na makita ya lisangá, mpe kopesa biyano soki ozwi libaku.
Na eteni oyo, tokolobela mpe ntina ya kobima sanza nyonso na mosala ya kosakola Bokonzi, mpo na kosalisa bato báyeba Yehova mpe makambo oyo azali kosala mpo na bato. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Eteni oyo ekosalisa yo mpe omona ete komipesa na Yehova Nzambe na libondeli mpe kozwa batisimo ezali makambo ya kozwa na lisɛki te. Okoki kotya motema ete asepelaka mingi ndenge ondimi na motema moko boboto monene oyo amoniseli yo.
1. Bakristo balandaka malako nini na oyo etali libala? Na kotalela Biblia, wapi ntina kaka moko ya koboma libala?
• “Botángá te ete moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali ná mwasi mpe alobaki ete: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’? Bongo bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te. . . . Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”—Mat. 19:4-6, 9.
2. Mpo na nini bato oyo bafandaka lokola mwasi ná mobali basengeli kobalana ndenge mibeko ya Leta esɛngi? Soki obalá, ondimisami mpenza ete libala na bino eyokani na mibeko mpe ekomisami na buku ya Leta?
• “Kobá kokundwela bango ete bámikitisa mpe bátosa baguvɛrnema mpe bakonzi.”—Tito 3:1.
• “Libala ekumisama na kati ya bato nyonso, mpe mbeto ya libala ezala na mbindo te, mpo Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo.”—Ebr. 13:4.
3. Mokumba na yo na libota ezali nini?
• “Mwana na ngai, yoká disiplini ya tata na yo, mpe kotika mobeko ya mama na yo te.”—Mas. 1:8.
• “Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye ndenge Kristo mpe azali mokonzi ya lisangá . . . Mibali, bókoba kolinga basi na bino, ndenge Kristo mpe alingaki lisangá.”—Ef. 5:23, 25.
• “Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.”—Ef. 6:4.
• “Bino bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, mpo yango ezali malamu mingi na kati ya Nkolo.”—Kol. 3:20.
• “Bino basi, bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko.”—1 Pe. 3:1.
4. Mpo na nini tosengeli kozwa bomoi na motuya?
• “[Nzambe] apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso. Mpamba te na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.”—Mis. 17:25, 28.
5. Mpo na nini tosengeli koboma moto te, ezala mwana oyo azali naino na libumu?
• “Soki bato babundi mpe batuti mpenza mwasi ya zemi mpe . . . Kasi soki likama ya liwa ebimi, boye osengeli kopesa molimo mpo na molimo.”—Kob. 21:22, 23.
• “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo: mikolo oyo yango esalemaki Mpe ntango oyo eteni na yango ata moko ezalaki naino te.”—Nz. 139:16.
• “Yehova ayinaka . . . mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te.”—Mas. 6:16, 17.
6. Nzambe apesi mobeko nini mpo na makila?
• “Bókoba koboya . . . makila mpe banyama oyo ekamolamá mpe pite.”—Mis. 15:29.
7. Mpo na nini tosengeli kolinga bandeko na biso bakristo?
• “Nazali kopesa bino mobeko ya sika: bólinganaka; ndenge ngai nalingaki bino, bino mpe bólinganaka. Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”—Yoa. 13:34, 35.
8. Mpo na nini moto oyo azali na maladi moko ya mabe mpe oyo ekoki kozwa bato mosusu: (a) asengeli te kosala makambo oyo bato basalaka mpo na komonisa bolingo, na ndakisa koyambana to kopesana bizi? (b) Asengeli te komona mabe soki bandeko mosusu baboyi kobengisa ye epai na bango? (c) Mpo na nini moto oyo ntango mosusu asalaki likambo moko to azalaki na esika moko oyo akoki kozwa maladi oyo ekoki mpe kozwa bato mosusu noki asengeli koluka kosala naino ekzamɛ ya makila liboso atuna moto libala? (d) Mpo na nini moto oyo azali na maladi moko ya mabe oyo ekoki kozwa bato mosusu asengeli koyebisa mokambi-misala ya lisangani ya bankulutu liboso azwa batisimo?
• “Bózala na nyongo ya moto te, longola kaka nyongo ya kolingana; . . . ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Bolingo esalaka moto mabe te.”—Rom. 13:8-10.
• “Bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Flp. 2:4.
9. Mpo na nini Yehova asɛngi biso tólimbisaka basusu?
• “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.”—Kol. 3:13.
10. Osengeli kosala nini soki ndeko moko akoseli yo makambo to abubi yo?
• “Soki ndeko na yo asali lisumu, kende komonisa ye libunga na ye, yo ná ye kaka. Soki ayokeli yo, ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu. Kasi soki ayoki yo te, kamatá moto moko to bato mibale, mpo na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato likambo nyonso endimama. Soki ayoki bango te, lobá na lisangá. Soki ayoki ata lisangá te, azala na miso na yo lokola moto ya bikólo mpe lokola mokɔngɔli-mpako.”—Mat. 18:15-17.
11. Ndenge nini Yehova atalelaka masumu oyo elandi?
▪ Pite
▪ Kosalela bikeko na losambo
▪ Libala ya mibali-mibali to ya basi-basi
▪ Moyibi
▪ Masano ya mbongo
▪ Kolangwa masanga
• “Bómikosa te. Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali, miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”—1 Ko. 6:9, 10.
12. Na oyo etali pite, oyo esangisi mpe makambo ndenge na ndenge ya kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, ekateli na yo ezali nini?
• “Bókima pite.”—1 Ko. 6:18.
13. Mpo na nini tosengeli koboya kosalela drɔgɛ to biloko mosusu oyo elangwisaka, longola kaka oyo minganga basɛngi tósalela?
• “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima: mosala mosantu oyo bozali kosala na makoki na bino ya kokanisa. Mpe bótika kolanda makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana, bókómisa makanisi na bino makanisi ya sika, mpo bómindimisa bino moko mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”—Rom. 12:1, 2.
14. Tángá mwa misala ya bademo oyo Nzambe apekisi
• “Epai na yo moto azwama te oyo . . . azali kosakola makambo oyo ebombaná, moto ya misala ya maji to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi.”—Mib. 18:10, 11.
15. Soki moto asali lisumu monene kasi alingi Yehova andima ye lisusu, likambo nini asengeli kosala nokinoki?
• “Nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te. Nalobaki ete: ‘Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.’”—Nz. 32:5.
• “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi na kati na bino? Abenga bankulutu ya lisangá, mpe bango bábondela mpo na ye, bápakola ye mafuta na nkombo ya Yehova. Mpe libondeli ya kondima ekobikisa moto oyo azali kobɛla, mpe Yehova akotɛlɛmisa ye. Lisusu, soki asalaki masumu, akolimbisama.”— Yak. 5:14, 15.
16. Soki oyebi ete ndeko moko asali lisumu ya monene, osengeli kosala nini?
• “Sikoyo soki molimo moko asali lisumu na ndenge ayoki elakeli mabe ya polele oyo esɛngi ye atatola lisumu oyo moto moko asali, oyo ye amonaki to ayei koyeba, kasi ayebisi yango te, asengeli kozongisa monɔkɔ mpo na libunga na ye.”—Lev. 5:1.
17. Soki bapesi liyebisi ete songolo azali lisusu Motatoli ya Yehova te, ndenge nini osengeli kotalela ye?
• “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te.”—1 Ko. 5:11.
• “Soki moto ayei epai na bino mpe amemi liteya oyo te, bóyamba ye na bandako na bino soki moke te to bópesa ye mbote te.”—2 Yoa. 10.
18. Mpo na nini baninga na yo ya motema basengeli kozala bato oyo balingaka Yehova?
• “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”—Mas. 13:20.
• “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”—1 Ko. 15:33.
19. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te?
• “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai [Yesu] mpe nazali moto ya mokili te.”—Yoa. 17:16.
20. Mpo na nini osengeli kotosa bakonzi ya guvɛrnema?
• “Tiká molimo nyonso eyokelaka bakonzi oyo bazali liboso, mpo bokonzi ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te; bokonzi na bango ezali na ndelo oyo etyami na Nzambe.”—Rom. 13:1.
21. Soki mobeko ya bato eyokani te na mobeko ya Nzambe, okosala nini?
• “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”—Mis. 5:29.
22. Bavɛrsɛ nini ekoki kosalisa yo osangana te na mokili ntango olingi kopona mosala ya mosuni?
• “Bakotombola mopanga te, ekólo moko mpo na kobunda na ekólo mosusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te.”—Mika 4:3.
• “Bóbima kati na ye [Babilone Monene], bato na ngai, soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.”—Em. 18:4.
23. Kominanola mpe masano ya ndenge nini okoki kopona to koboya?
• “Molimo [ya Yehova] eyinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.”—Nz. 11:5.
• “Bóyina oyo ezali mabe, bókangama na oyo ezali malamu.”—Rom. 12:9.
• “Makambo nyonso ya solo, makambo nyonso ya lokumu, makambo nyonso ya boyengebene, makambo nyonso ya pɛto, makambo nyonso oyo ekoki kolingama, makambo nyonso oyo elobelami malamu, soki ezaleli moko ya malamu ezali mpe soki eloko moko oyo ebongi kokumisama ezali, bókoba kokanisa makambo wana.”—Flp. 4:8.
24. Mpo na nini Batatoli ya Yehova basambelaka te elongo na mangomba mosusu?
• “Bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.”—1 Ko. 10:21.
• “‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’”—2 Ko. 6:17.
25. Mitinda nini ekosalisa yo oyeba soki okosangana na molulu moko boye to te?
• “Basanganaki na bikólo mpe bayekolaki misala na bango. Mpe bazalaki se kosalela bikeko na bango, mpe yango ekómelaki bango motambo.”—Nz. 106:35, 36.
• “Bakufi bayebi ata eloko moko te.”—Mos. 9:5.
• “Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.”—Yoa. 17:16.
• “Ntango oyo esili koleka ekoki bongo oyo bino bosalaki mokano ya bikólo ntango botambolaki na misala ya etamboli ya nsɔni, na bamposa makasi, na kolekisa ndelo na vinyo, na bafɛti ya lokoso, na komɛla mingi, mpe na losambo mabe ya bikeko.”—1 Pe. 4:3.
26. Ndenge nini bandakisa oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu na oyo etali kosala fɛti ya mbotama?
• “Mokolo ya misato ezalaki mokolo ya mbotama ya Farao, mpe asalaki fɛti mpo na basaleli na ye nyonso mpe atombolaki motó ya kapita ya bapesi-masanga mpe kapita ya basali-mampa kati na basaleli na ye. Na yango, azongisaki kapita ya bapesi-masanga na mosala na ye ya mopesi-masanga . . . Kasi akakisaki kapita ya basali-mampa.”—Eba. 40:20-22.
• “Ntango bazalaki kosepela mokolo ya mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiadi abinaki na mokolo yango mpe asepelisaki Erode mingi bongo alakaki mpe alapaki ndai ete akopesa ye eloko nyonso oyo akosɛnga. Bongo ye alobaki ndenge mama na ye atindaki ye ete: ‘Pesá ngai motó ya Yoane Mobatisi na saani, awa.’ Mpe atindaki bákata Yoane motó na bolɔkɔ.”—Mat. 14:6-8, 10.
27. Mpo na nini ezali malamu olanda malako oyo bankulutu bapesi?
• “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.”—Ebr. 13:17.
28. Mpo na nini ezali na ntina yo ná libota na yo bózalaka ntango nyonso na programɛ ya kotánga mpe koyekola Biblia?
• “Asepelaka na mobeko ya Yehova, mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi. Mpe akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai, oyo epesaka mbuma na yango na eleko na yango mpe oyo nkasa na yango ekaukaka te, mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.”—Nz. 1:2, 3.
29. Mpo na nini osepelaka koyangana na makita mpe kopesa biyano?
• “Nakosakwela bandeko na ngai nkombo na yo; nakosanzola yo na katikati ya lisangá.”—Nz. 22:22.
• “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.”—Ebr. 10:24, 25.
30. Mosala nini ya ntina mingi koleka oyo Yesu apesá biso?
• “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango . . . , bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”—Mat. 28:19, 20.
31. Ntango topesi makabo mpo na mosala ya Bokonzi to tosalisi bandeko na biso, Yehova asepelaka soki tozali na makanisi ya ndenge nini?
• “Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.”—Mas. 3:9.
• “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”—2 Ko. 9:7.
32. Mikakatano nini bakristo bakoki kokutana na yango?
• “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, mpo bokonzi ya likoló ezali ya bango. Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.”—Mat. 5:10-12.
33. Mpo na nini kozwa batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova ezali lokumu monene?
• “Liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai; mpo ngai nabengami na nkombo na yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga.”—Yir. 15:16.
-
-
Lisolo ya nsuka ná baoyo bakozwa batisimoTobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
-
-
MITUNA MPO NA BAOYO BALINGI KOZWA BATISIMO
Lisolo ya nsuka ná baoyo bakozwa batisimo
Mbala mingi, bato bazwaka batisimo na mayangani ya mike mpe ya minene ya Batatoli ya Yehova. Na nsuka ya diskur ya batisimo, molobi akosɛnga baoyo bakozwa batisimo bátɛlɛma mpe bápesa biyano na mituna mibale oyo elandi, na mongongo makasi:
1. Osili kobongola motema, komipesa na Yehova na libondeli, mpe ondimi ete Yehova akopesa biso lobiko na nzela ya Yesu Kristo?
2. Okangi ntina ete awa ozali kozwa batisimo ozali kokóma Motatoli ya Yehova mpe kokɔta na ebongiseli na ye?
Soki baoyo bakozwa batisimo bayanoli ɛɛ na mituna wana, yango emonisi ete ‘balobi polele,’ bandimi lisiko mpe ete basili komipesa mobimba na Yehova. (Rom. 10:9, 10) Yango wana, ekozala malamu ete moto oyo akozwa batisimo akanisa na mituna wana liboso mpe abondela mpo na yango, mpo akoka kopesa biyano oyo eyokani na makambo oyo andimi mpenza na motema na ye mobimba.
Osili komipesa na Yehova na libondeli, mpe osili kolaka ye ete okosambela kaka ye mpe ete kosala mokano na ye ekozala likambo oyo eleki ntina na bomoi na yo?
Ondimi mpenza na motema mobimba ete osengeli kozwa batisimo soki kaka libaku emonani?
Bilamba ya ndenge nini ebongi mpo na batisimo? (1 Tim. 2:9, 10; Yoa. 15:19; Flp. 1:10)
Tosengeli kolata na ‘kolekisa ndelo te mpe kozala na makanisi ya malamu’ mpo na komonisa ete tozali na “ezaleli ya kokangama na Nzambe”. Na yango, baoyo bakozwa batisimo basengeli te kolata elamba oyo basalá mpo na kosakana na mai (maillot de bain) oyo ezali kotika nzoto libándá to bilamba oyo bakomakomá makambo. Basengeli kolata bilamba ya malamu, ya pɛto, ya mindɔndɔ te mpe oyo ebongi na libaku yango.
Ezaleli nini moto asengeli kozala na yango ntango azali kozwa batisimo? (Luka 3:21, 22)
Batisimo ya Yesu ezali ndakisa oyo bakristo basengeli kolanda lelo oyo. Yesu ayebaki malamu ete batisimo ezali likambo moko ya lisɛki te, mpe amonisaki yango na ezaleli na ye mpe na misala na ye. Yango wana, esika ya batisimo ezali te esika ya kosala masɛki, ya kosakana, ya kobɛta mai, to kosala makambo mosusu oyo ekokitisa valɛrɛ ya molulu yango. Ndeko oyo akómi mokristo sika asengeli te kosala makambo lokola nde azwi elonga monene. Atako batisimo ezali likambo ya esengo, tosengeli komonisa esengo yango na ndenge oyo ebongi.
Ndenge nini koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe komipesa na makambo ya lisangá ekosalisa yo okokisa ndai na yo ya komipesa na Yehova?
Ata nsima ya kozwa batisimo, mpo na nini ekozala na ntina mingi ete ozala ntango nyonso na programɛ malamu ya koyekola yo moko mpe ya kosakola sanza na sanza?
-