Sabata
Ndimbola: Liloba Sabata euti na liloba ya Ebre shavath, oyo elimboli “kopema, kotika.” Na mobeko ya Moize, ezalaki na sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ, ezalaki na mikolo mosusu oyo eyebanaki ete esengeli kopema na boumeli ya mbula, ezalaki mpe na sabata ya mbula ya nsambo, mpe sabata ya mbula ya ntuku mitano. Epai ya Bayuda, sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo esalemaka na mokolo ya nsambo na kolanda manaka na bango, ebandaka mokolo ya mitano nsima ya kolala ya moi tii na mokolo ya pɔsɔ nsima ya kolala ya moi. Bato mingi oyo batutaka ntolo ete bazali bakristo baponá mokolo ya lomingo mpo na kopema mpe kosambela; bato mosusu baponá mokolo oyo ezali na manaka ya Bayuda.
Bakristo basengeli nde kobatela mokolo ya sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ?
Kob. 31:16, 17: “Bana ya Yisraele basengeli kobatela sabata, mpo na kotosa sabata na boumeli ya mabota na bango. Ezali kondimana ya ntango oyo etyami ndelo te [“kondimana na seko,” hf]. Kati na ngai ná bana ya Yisraele, yango ezali elembo ya ntango oyo etyami ndelo te.” (Simbá ete kotosa sabata ezalaki elembo kati na Yehova ná Yisraele; Nzambe alingaki koloba bongo te soki moto nyonso asengelaki kotosa Sabata. Liloba ya Ebre oyo hf ebongoli na “seko” ezali ‛ohlam, oyo elimboli mpenzampenza eleko ya ntango moko boye oyo na ebandeli boumeli na yango eyebani te to ebombani, kasi ekoumela. Yango ekoki kolimbola seko, kasi na bisika nyonso te. Na Mitángo 25:13 liloba ya Ebre kaka moko wana esalelami mpo na kolobela bonganga-nzambe oyo ekómaki na nsuka, ndenge Baebre 7:12 emonisi yango.)
Rom. 10:4: “Kristo azali nsuka ya Mibeko, mpo moto nyonso oyo azali na kondima azala moyengebene.” (Mobeko esɛngaki mpe kotosa Sabata. Nzambe asukisaki Mobeko yango na nzela ya Kristo. Kondimela Kristo nde ekosala ete tómonana bayengebene na miso ya Nzambe, kasi kobatela sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ te.) (Talá mpe Bagalatia 4:9-11; Baefese 2:13-16.)
Kol. 2:13-16: “[Nzambe] alimbisaki biso mabunga na biso nyonso na boboto mpenza mpe abomaki mokanda oyo ekomamá na mabɔkɔ, oyo ezalaki kokweisa biso, oyo ezalaki na mibeko mpe oyo ezalaki kotɛmɛla biso . . . Na yango, moto asambisa bino te mpo na kolya mpe komɛla to mpo na fɛti moko boye to mpo na kokumisa sanza ya sika to mpe mpo na sabata.” (Na kolanda Kobima 31:14 mpe Mitángo 15:32-35, soki moto azali na nse ya Mobeko ya Moize mpe abuki mobeko ya Sabata, lisangá mobimba ezalaki kobamba ye mabanga tii akokufa. Na yango, bato mingi oyo balobaka ete esengeli kobatela mokolo ya sabata basengeli kosepela ete tozali lisusu na nse ya Mobeko yango te. Vɛrsɛ yango emonisi ete mpo Nzambe andima biso, tosɛngisami te kotosa mobeko ya Sabata oyo Nzambe apesaki Yisraele.)
Ndenge nini mokolo ya lomingo ekómaki mokolo monene ya losambo na mangomba mingi ya bokristo ya nkombo mpamba?
Atako Kristo asekwaki mokolo ya liboso ya pɔsɔ (oyo ezali lelo mokolo ya lomingo), Biblia elobi te ete mokolo yango ezali mosantu.
“Soki nkombo ‘Dies Solis,’ to ‘Sunday’ [mokolo ya moi] oyo bapakano bazalaki kosalela kala ebatelamaki mpo na fɛti ya pɔsɔ na pɔsɔ ya bakristo, ezali mingimingi mpo na koluka bomoko kati na bapakano ná bakristo ya nkombo mpamba. Mpo na yango Constantin asɛngaki bato na ye bapakano mpe bakristo bábatelaka mokolo ya liboso ya pɔsɔ [abimisaki mobeko yango na 321 T.B.], mokolo yango ekómaki mokolo ya ‘kokumisa Moi.’ . . . Azalaki kosala bongo mpo na kosangisa mangomba ya ampire na ye oyo ezalaki koyokana te mpo ezala na bomoko.”—Lectures on the History of the Eastern Church (New York, 1871), A. P. Stanley, lok. 291.
Nzambe apesaki Adama mobeko ya sabata, mpe bana na ye basengelaki nde kotosa yango?
Ebandeli 2:1-3 elobi ete nsima ya kobongisa mabele ete ezala esika ya moto, Yehova abandaki kopema na misala na ye ya biloko oyo asalaki awa na mabele. Kasi Biblia elobi te ete Nzambe asɛngaki Adama abatela sabata na mokolo ya nsambo ya pɔsɔ na pɔsɔ.
Mib. 5:15: “Osengeli kokanisa ete [yo Yisraele] okómaki moombo na mokili ya Ezipito mpe Yehova Nzambe na yo abimisaki yo kuna na nguya ya lobɔkɔ na ye mpe na lobɔkɔ oyo esembolami. Yango wana Yehova Nzambe na yo apesaki yo mitindo mpo na kotosa mokolo ya sabata.” (Na vɛrsɛ oyo Yehova amonisi ete soki apesaki Yisraele mobeko ya sabata, ezali mpo abimisaki bango na boombo na Ezipito, kasi mpo na makambo oyo elekaki na Edene te.)
Kob. 16:1, 23-29: “Liyangani mobimba ya bana ya Yisraele ekómaki na esobe ya Sine . . . na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mibale nsima ya kobima na bango na mokili ya Ezipito. . . . [Moize] alobaki na bango ete: ‘Yango nde Yehova alobi. Lobi ekozala molulu ya sabata, ya sabata moko mosantu mpo na Yehova . . . Mikolo motoba bokolɔkɔta yango [mana], kasi mokolo ya nsambo ezali sabata. Na mokolo wana, yango ekozala te.’ . . . Yehova alobaki na Moize ete: ‘Bósimba likambo oyo ete Yehova apesi bino sabata.’” (Liboso na yango, manaka ezalaki komonisa ete pɔsɔ ezali na mikolo nsambo, kasi awa ezali mbala ya liboso mobeko ya sabata epesama.)
Mobeko ya Moize ekabwani nde na biteni mibale, eteni ya “losambo” ná eteni ya “bizaleli malamu,” mpe bakristo basengeli nde kotosa eteni ya “bizaleli malamu” (mibeko zomi)?
Ntango Yesu alobelaki Mobeko, amonisaki nde ete ekabwani na biteni mibale?
Mat. 5:17, 21, 23, 27, 31, 38: “Bókanisa te ete nayaki mpo na kobebisa Mibeko to Basakoli. Nayaki mpo na kobebisa yango te, kasi mpo na kokokisa yango.” Simbá sikoyo makambo mosusu oyo Yesu abakisaki. “Boyokaki ete balobaki na bato ya ntango ya kala, ‘Osengeli koboma moto te [Kob. 20:13; Mobeko ya Motoba]’ . . . Soki omemi likabo na yo na etumbelo [Mib. 16:16, 17; ezali na kati ya Mibeko Zomi te] . . . Boyokaki ete balobi, ‘Osengeli kosala ekobo te [Kob. 20:14; Mobeko ya Nsambo].’ Balobá lisusu ete, ‘Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, apesa ye mokanda ya koboma libala [Mib. 24:1; ezali na kati ya Mibeko Zomi te].’ Boyokaki ete balobi, ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino [Kob. 21:23-25; ezali na kati ya Mibeko Zomi te].’” (Na yango, Yesu akaboli Mibeko Zomi na masɛngami mosusu ya Mibeko te. Mpo na nini biso tókabola yango?)
Ntango moto moko atunaki Yesu ete, “Moteyi, mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko”? Yesu alobaki ete Mibeko Zomi nde eleki? Te, kasi alobaki ete: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Mibeko nyonso mpe Basakoli esimbami na mibeko oyo mibale.” (Mat. 22:35-40) Soki bato mosusu bakangami na Mibeko Zomi (Mib. 5:6-21), mpe bazali koloba ete bakristo basɛngisami kotosa yango kasi mibeko mosusu te, bazali nde koboya makambo oyo Yesu alobaki (ntango atángaki Mib. 6:5; Lev. 19:18), mpo na komonisa mibeko oyo eleki monene, boye te?
Ntango Biblia elobi ete Mobeko ya Moize esengelaki koleka, yango elimboli ete Mibeko Zomi mpe esengelaki koleka?
Rom. 7:6, 7: “Sikoyo tolongwe na Mibeko, mpo tokufi na kotalela eloko oyo ezalaki kokanga biso makasi . . . Bongo tokoloba nini? Mibeko ezali nde lisumu? Te, ata moke te! Ya solo mpenza mbɛlɛ nayebi lisumu te soki Mibeko ezalaka te; mpe, na ndakisa, mbɛlɛ nayebi bilulela te soki Mibeko elobaka te ete: ‘Osengeli kolula eloko ya moto te.’” (Awa, nsima ya koloba ete Bayuda oyo bakómaki bakristo basilá ‘kolongwa na mibeko,’ mobeko nini ntoma Paulo atángi? Mobeko ya Zomi, mpo na komonisa ete ezalaki mpe na kati ya mibeko oyo bakristo basilaki kolongwa na yango.)
2 Ko. 3:7-11: “Soki mibeko oyo ekomami epesaka liwa mpe oyo bakataki makomi na mabanga eyaki na nkembo, bongo bana ya Yisraele bakokaki te kotala mpenza elongi ya Moize mpo na nkembo ya elongi na ye, nkembo oyo esengelaki kolongolama, mpo na nini mosala ya kopesa elimo ezala na nkembo mingi koleka te? . . . Mpo soki eloko oyo esengelaki kolongolama bakɔtisaki yango na nkembo, eloko oyo ezali koumela esengeli kozala na nkembo mingi koleka.” (Vɛrsɛ oyo elobeli mobeko oyo ‘bakataki makomi na mabanga’ mpe elobi ete “bana ya Yisraele bakokaki te kotala mpenza elongi ya Moize” na ntango oyo apesaki bango mibeko. Vɛrsɛ yango ezali kolobela nini? Kobima 34:1, 28-30 emonisi ete ezali kolobela ntango oyo Nzambe apesaki bango Mibeko Zomi oyo bakataki makomi na mabanga. Emonani polele ete vɛrsɛ yango elobeli mpe mibeko yango ntango elobi ete “esengelaki kolongolama.”)
Kozala lisusu te na nse ya mobeko ya Moize, ata mpe Mibeko Zomi, yango elingi koloba ete moto asengeli kotosa lisusu te bizaleli malamu oyo mibeko yango elobeli?
Te; mitinda mingi ya bizaleli malamu oyo ezali na Mibeko Zomi ezongelami na Makomami ya Grɛki ya bokristo? (Nzokande, mobeko ya Sabata ezongelami te.) Kasi ata mobeko ezali malamu ndenge nini, soki makanisi ya masumu ezali kaka kotambwisa bamposa ya moto, moto akobuka mibeko kaka. Nzokande, mpo na kondimana ya sika, oyo ezwaki esika ya kondimana ya Mibeko, Baebre 8:10 elobi: “‘Mpo talá kondimana oyo nakosala ná ndako ya Yisraele nsima ya mikolo yango,’ Yehova alobi. ‘Nakotya mibeko na ngai na makanisi na bango, mpe nakokoma yango na mitema na bango. Mpe nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.’” Ya solo, mibeko yango ezali na nguya koleka oyo bakataki makomi na bitando ya mabanga!
Rom. 6:15-17: “Tokosala nde lisumu mpo tozali na nse ya mibeko te kasi na nse ya boboto monene? Te, ata moke te! Boyebi te ete soki bozali kokoba komipesa na moto moko bózala baombo mpo na kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye, baombo ya lisumu mpo na kokufa to baombo ya botosi mpo na kozwa boyengebene? Kasi Nzambe azwa matɔndi mpo bozalaki baombo ya lisumu kasi bokómaki kotosa na motema mateya oyo bapesaki bino.” (Talá mpe Bagalatia 5:18-24.)
Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ elimboli nini mpo na bakristo?
Bakristo bazali na “kopema moko ya sabata” mokolo na mokolo
Baebre 4:4-11 elobi: “[Nzambe] alobeli mokolo ya nsambo na esika moko [Ebandeli 2:2] ete: ‘Mpe Nzambe apemaki na mokolo ya nsambo na misala na ye nyonso oyo asalaki,’ mpe na esika mosusu [Nzembo 95:11] alobi ete: ‘Bakokɔta na kopema na ngai te.’ Yango wana, lokola etikali ete bamosusu bákɔta na kopema yango, mpe baoyo bayokaki nsango malamu liboso bakɔtaki te mpo bazangaki botosi, atye lisusu mokolo moko boye ntango alobi, nsima ya ntango molai, na nzembo ya Davidi [Nzembo 95:7, 8] ete ‘Lelo’; kaka ndenge elobamaki likoló: ‘Lelo oyo soki boyoki mongongo na ye, bókómisa mitema na bino makasi te.’ Mpo soki Yosua akɔtisaka bango na esika moko ya kopema, mbɛlɛ na nsima Nzambe alobeli mokolo mosusu te. Yango wana, etikali na kopema moko ya sabata mpo na bato ya Nzambe. Mpo moto oyo akɔti na kopema ya Nzambe apemi mpe na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye. Yango wana, tósala nyonso oyo ekoki mpo tókɔta na kopema wana, noki moto moko akwea mpe alanda ndakisa yango ya kozanga botosi.”
Vɛrsɛ oyo elendisi bakristo ete bápema na likambo nini? Na “misala na bango.” Misala nini? Misala oyo liboso bazalaki kokanisa ete na nzela na yango nde bakokóma bayengebene. Bakanisaka lisusu te ete Nzambe akondima bango mpe bakozwa bomoi ya seko na nzela ya kotosa mibeko mosusu. Yango nde libunga oyo Bayuda oyo bazangaki bosembo basalaki, mpo ‘balukaki kotya boyengebene na bango moko, batosaki boyengebene ya Nzambe te.’ (Rom. 10:3) Bakristo ya solo bayebi ete biso nyonso tobotamaki na lisumu mpe moto akoki kokóma moyengebene na miso ya Nzambe kaka soki andimeli mbeka ya Kristo. Basalaka makasi báyeba mpe básalela mateya nyonso ya Mwana ya Nzambe. Na komikitisa nyonso, bandimaka toli mpe mpamela ya Liloba ya Nzambe. Yango elingi koloba te ete bakanisaka ete na makasi na bango moko nde bakondimama na Nzambe; kasi oyo bazali kosala, ezali kaka mpo na komonisa bolingo na bango mpe kondima na bango. Na yango, bazali kolanda te “ndakisa ya kozanga botosi” ya Bayuda.
“Mokolo ya nsambo” oyo elobelami na Ebandeli 2:2, ezalaki kaka te mokolo ya ngonga 24. (Talá lokasa 154, na motó ya likambo “Bozalisi.”) Ndenge moko mpe “kopema ya sabata” oyo bakristo ya solo bazali kopema ezali te ya mokolo moko ya ngonga 24. Soki bazali na kondima mpe bazali kotosa toli ya Biblia, bakoki kopema mikolo nyonso, mpe bakopema mpenza nde na mokili ya sika ya Nzambe.
Bato bazali kozela “sabata” ya mbula nkóto na mikolo ezali koya
Mrk. 2:27, 28: “[Yesu] alobaki na bango lisusu ete: ‘Sabata esalemaki mpo na moto, kasi moto mpo na sabata te; yango wana Mwana ya moto azali Nkolo ata ya sabata.’”
Yesu ayebaki ete Yehova abandisaki Sabata mpo ezala elembo kati na ye ná Yisraele, mpe asalaki yango mpo bápema, básala misala ya makasi te. Yesu ayebaki mpe ete liwa na ye ekolongola mobeko ya Moize mpo ye nde akokisaki mobeko yango. Ayebaki ete Mibeko, ezala mpe mobeko ya sabata, ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Ebr. 10:1; Kol. 2:16, 17) “Sabata” oyo ye azali Nkolo na yango ezali na kati ya “makambo malamu” yango.
Lokola Kristo azali Nkolo ya bankolo, akoyangela mabele mobimba na boumeli ya mbula nkóto. (Em. 19:16; 20:6; Nz. 2:6-8) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, na motema mawa, abikisaki bato mosusu na mokolo ya Sabata; na ndenge yango amonisaki kopema oyo akopesa bato ya bikólo nyonso na Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto. (Luka 13:10-13; Yoa. 5:5-9; 9:1-14) Baoyo bakangi mpenza ntina ya Sabata bakozwa mpe matomba oyo kopema ya “Sabata” yango ekopesa.
Soki moto alobi—
‘Bakristo basengeli kotosa mobeko ya Sabata’
Okoki koyanola: ‘Nakoki koyeba mpo na nini olobi bongo?’ Okoki kobakisa: ‘Tosengeli kolanda oyo Biblia elobi mpo na likambo yango, boye te? . . . Natángaki na Biblia mwa bavɛrsɛ mosusu oyo esalisaki ngai. Tiká natángela yo yango. (Na nsima salelá makanisi mosusu oyo touti kolobela.)’
‘Mpo na nini botosaka mobeko ya Sabata te?’
Okoki koyanola: ‘Liboso napesa yo eyano, nalingi nayeba sabata nini olingi kolobela. Oyebaka ete Biblia elobelaka kaka sabata moko te? . . . Nzambe apesaki Bayuda mobeko ya sabata. Kasi oyebaka ete Biblia elobeli sabata mosusu oyo bakristo basengeli kobatela?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Totosaka mobeko ya Sabata mokolo moko na pɔsɔ te mpo Biblia elobi ete mobeko yango “esengelaki kolongolama.” (2 Ko. 3:7-11; talá makanisi oyo ezali na nkasa 410, 411.)’ (2) ‘Kasi ezali na sabata oyo totosaka ntango nyonso. (Ebr. 4:4-11; talá nkasa 412, 413.)’