Mokanda ya Biblia nimero 21—Mosakoli
Mokomi: Salomo
Esika ya bokomi: Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: Liboso ya 1000 L.T.B.
1. Mpo na mokano nini motombwani mokanda ya Mosakoli mokomamaki?
MOKANDA ya Mosakoli ekomamaki na mokano oyo etombwani mpenza. Lokola Salomo azalaki mokambi ya libota oyo emipesaki epai na Yehova, azalaki na mokumba ya koyanganisa bango na losambo ete bázala ntango nyonso sembo na elaka na bango ya komipesa epai na Nzambe. Alukaki kokokisa mokumba yango na nzela ya batoli ya mayele oyo ezwami kati na mokanda ya Mosakoli.
2. Lolenge nini mokano yango emonisami kati na nkombo ya mokanda ya Mosakoli na Liebele, oyo esali ete ezala ebéngeli malamu koleka ebéngeli na yango na Greke mpe na Lifalansé?
2 Kati na Mosakoli 1:1, (NW) amibéngi “moyanganisi.” Na lokótá ya Liebele liloba yango ezali bongo Qo·heʹleth, mpe kati na Biblia ya Liebele, mokanda yango epesameli nkombo wana. Biblia ya Greke ya Septante ebéngi yango Ek·kle·si·a·stesʹ, oyo elimboli “mosangani ya eklezia (lisangá; liyangani),” yango nde ebimisi liloba Ecclésiaste na Lifalansé. Nzokande, Qo·heʹleth nde ebongolami malamu mpe na liloba “Moyanganisi,” mpe yango ezali ebéngeli oyo ebongi mpenza mpo na Salomo. Ezali komonisa mokano oyo mpo na yango Salomo akomaki mokanda yango.
3. Na ndimbola nini Salomo azalaki moyanganisi?
3 Na ndimbola nini Mokonzi Salomo azalaki moyanganisi, mpe ayanganisaki banani? Azalaki moyanganisi ya libota na ye, Bayisalaele, mpe ya baninga na bango, bapaya. Ayanganisaki bato oyo nyonso mpo na losambo ya Nzambe na ye, Yehova. Liboso atongaki tempelo ya Yehova na Yelusaleme, mpe na mokolo ya bofungoli yango abyangaki bato nyonso esika moko, to ayanganisaki, bango nyonso mpo na losambo ya Yehova. (1 Mik. 8:1) Sikawa, na lisalisi ya mokanda ya Mosakoli, alukaki koyanganisa bato na ye mpo na misala ya ntina mpe kopɛngola bango na misala mizangi litomba ya mokili oyo.—Mos. 12:8-10.
4. Nini emonisi ete Salomo nde akomaki mokanda yango?
4 Atako nkombo ya Salomo etángami mpenza sikisiki te, kasi mikapo mingi mizali komonisa polele ete ye nde akomaki mokanda yango. Moyanganisi amilakisi lokola “mwana na Davidi” oyo ‘azalaki mokonzi likoló na Yisalaele kati na Yelusaleme.’ Yango ekokaki kosalelama bobele epai na Mokonzi Salomo, mpamba te baoyo bayaki na nsima na ye kati na Yelusaleme bazalaki bakonzi bobele likoló na Yuda. Lisusu, lokola moyanganisi akomi yango: “Nazwi mayele mingi koleka bango nyonso baoyo bazalaki liboso na ngai kati na Yelusaleme; ɛɛ, motema na ngai eyebaki mingi mpo na mayele na yango.” (1:1, 12, 16) Yango ekokani na Salomo. Mosakoli 12:9 ezali koyebisa biso ete “atalaki malamu, alukaki mpe abongisaki masese mingi.” Mokonzi Salomo alobaki masese 3 000. (1 Mik. 4:32) Mosakoli 2:4-9 ezali kolobela ebongiseli oyo mokomi asalaki mpo na botongi; bilanga na miwiti, bilanga mpe bisika na nzeté na mbuma; talasé ya kolekisa mai; bibongiseli na ntina na basaleli basi mpe basaleli mibali; azwaki palata mpe wolo mingi; mpe asalaki misala mosusu. Makambo oyo nyonso makokanaki epai na Salomo. Na ntango mokonzi-mwasi ya Seba amonaki ete Salomo azalaki na mayele mpe na bozwi, alobaki ete: “Nayebisameli ata ndambo te.”—1 Mik. 10:7.
5. Epai wapi mpe ntango nini mokanda ya Mosakoli mokomamaki?
5 Mokanda yango ezali komonisa Yelusaleme lokola esika oyo yango ekomamaki na kolobáká ete moyanganisi azalaki mokonzi kati “na Yelusaleme.” Ekoki mpenza kozala ete ekomamaki liboso ya mobu 1000 L.T.B., pene na nsuka ya bokonzi ya Salomo oyo ayangelaki na boumeli ya mbula 40, nsima ya komipesa na misala ndenge na ndenge oyo elobelami kati na mokanda oyo, na ntembe te ezalaki bongo liboso ya kokwea na ye kati na losambo ya bikeko. Asilaki bongo kozwa boyebi mingi na ntina na misala oyo bato bamipesaka na yango kati na mokili mpe lolenge basalaka milende makasi mpo na kozwa biloko ya mosuni. Na ntango yango azalaki naino na ngɔlu ya Nzambe mpe na kopemama na Ye.
6. Ntembe nini ebɛtami na ntina na kopemama ya mokanda ya Mosakoli, kasi lolenge nini ntembe yango ekoki kobwakama?
6 Lolenge nini tokoki kondimisama solo ete mokanda ya Mosakoli “epemami na Nzambe”? Basusu bakoki kobɛta ntembe na ntina na kopemama na yango mpo ete elobeli nkombo ya Nzambe, Yehova, ata mbala moko te. Nzokande, na ntembe te, ezali kotombola losambo ya solo ya Nzambe, mpe ezali kosalela mbala na mbala liloba ha·ʼElo·himʹ, oyo elimboli “Nzambe ya solo.” Ntembe mosusu ekoki kobimisama mpo ete mikanda mosusu ya Biblia mizongeli mpenza te maloba oyo mazwami kati na Mosakoli. Nzokande, mateya oyo mamonisami kuna mpe mitindá oyo mizwami kati na mokanda yango ezali na boyokani na mobimba na yango na mikanda mosusu ya Makomami. Búku Commentary ya Clarke, Volimi III, lokasa 799, elobi ete: “Mokanda, oyo ebéngami Koheleth, to Mosakoli, uta kala lingomba ya Bayuda mpe ya Boklisto etalelaka yango ete ekomamaki na kopemama ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso; mpe etalelamaki ete ezalaki mpenza moko na mikanda ya bulɛɛ oyo mindimami.”
7. Makambo nini oyo Salomo asalaki kati na bomoi na ye epesaki ye makoki mingi ya kokoma mokanda ya Mosakoli?
7 “Bato ya mayele” ya mokili, oyo bamilobaka ete bayekolaka bosolo ya makomi, baboyaki kondima ete mokanda ya Mosakoli mokomamaki na Salomo to ete ezali mpe eteni mpenza ya “Makomami nyonso,” kolobáká ete elobeli mpe filozofi oyo esalelami kati na yango ezalaki ya eleko oyo ezalaki na nsima ya Salomo. Bazangi koyeba likambo oyo ete Salomo asilaki kozwa boyebi mpo na bokóli ya mombongo mpe ya misala na ye na mikili mingi, mpe mpo na bankumu oyo bazalaki kotambola na mikili ndenge na ndenge mpe boyokani mosusu oyo asalaki elongo na mikili mosusu. (1 Mik. 4:30, 34; 9:26-28; 10:1, 23, 24) Lokola F. C. Cook akomaki yango kati na búku na ye Bible Commentary, Volimi IV, lokasa 622: “Misala ya mokolo na mokolo mpe makambo oyo mokonzi monene ya Baebele azalaki kolinga mingi etalelaki te bobele bomoi, lolenge ya kokanisa, mpe lokótá ya Baebele.”
8. Wapi likanisi ya makasi mpenza oyo endimisi bosolo ya mokanda ya Mosakoli?
8 Nzokande, tozali na ntina ya bilembeteli oyo bizwami na libanda ya Biblia mpo na komonisa bosolo ya mokanda ya Mosakoli? Boyekoli mozindo ya mokanda yango ezali komonisa te bobele boyokani oyo ezali kati na yango, kasi lisusu boyokani na yango na mikanda mosusu ya Makomami, oyo Mosakoli ezali mpenza moko kati na yango.
MAKAMBO MAZALI KATI NA MOSAKOLI
9. Makambo nini moyanganisi amoni kati na misala ya bana na bato?
9 Bomoi ya moto ezali bobele mpamba (1:1–3:22). Maloba ya ebandeli ezali komonisa motó na likambo ya mokanda yango: “Mosakoli alobi ete, Bisalasala na mpamba! Bisalasala na mpamba! Nyonso ezali bobele mpamba!” Moto akozwa litomba nini kati na molende mpe kati na mosala makasi? Mabota mazali koya mpe mazali koleka, zolongano ya biloko bizalisami ezali kozongelama na mabelé, mpe “likambo na sika lizali na nsé na moi te.” (1:2, 3, 9) Moyanganisi abongisaki motema na ye mpo na koluka mpe kotimola mayele oyo ezali na boyokani na misala ya mpasi ya bana na bato, kasi ayei komona ete kati na mayele mpe kati na bozoba, kati na misala minene mpe kati na misala makasi, kati na kolya mpe kati na komela, nyonso ezali “bisalasala mpe koluka kokwa mopepe.” Ayei ‘koyina bomoi,’ bomoi ya mpasi mpe ya koluka konduka biloko mingi ya mosuni.—1:14; 2:11, 17.
10. Nini ezali likabo ya Nzambe, kasi na nsuka, likámá nini likwelaka bato na masumu?
10 Eloko na eloko ezali na ntango na yango—ɛɛ, Nzambe “asalaki nyonso na kitoko na ntango na yango.” Alingi ete bikelamu na ye bisepela na bomoi na mabelé. “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela mpe ete básala malamu naino bazali na bomoi, mpe ete moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango likabo na Nzambe.” Kasi, oyo nde mawa! Nsuka ya bato ekokani nde na nsuka ya banyama: “Lokola moko akokufa, oyo mosusu mpe akokufa; ɛɛ, bango nyonso bazali na mpema moko; boye moto azali koleka likoló na nyama te. Nyonso bobele mpamba.”—3:1, 11-13, 19.
11. Toli nini ya mayele moyanganisi apesi epai na bato oyo babangaka Nzambe?
11 Batoli ya mayele mpo na baoyo bakobangaka Nzambe (4:1–7:29). Salomo apesi longonya epai na bakufi, mpamba te basikwami na “minyoko nyonso misalami na nsé na moi.” Mpe akóbi kolobela misala ya mpamba mpe misala ya mpasi. Apesi batoli na mayele nyonso ete “mibale baleki moko na malamu” mpe ete “nkamba na nsinga misato ekokatama noki te.” (4:1, 2, 9, 12) Apesi batoli kitoko epai na libota ya Nzambe wana ezali bango koyangana esika moko: “Batelá makolo na yo wana okokɔta na ndako na Nzambe, mpe meká koyoka.” Kozala na motema mɔ́tɔmɔ́tɔ te wana ezali yo koloba liboso na Nzambe; tiká ete “maloba na yo mázala mingi te,” mpe kokisá ndai oyo olapi liboso na Nzambe. “Bangá Nzambe ya solo.” Wana babólá banyokolami, omikundola ete “mokóló atalami na mosusu oyo aleki ye na lokumu, mpe bamosusu bazali baoyo baleki bango na lokumu.” Alobi ete mosáli mpamba akolala mpɔngi kitoko, kasi mozwi azali kozwa mpɔngi te mpo ete atɔ́ndi na mitungisi. Nzokande, ayaki bolumbu na mokili, nsima ya liwa, akoki komema eloko moko te euti na mosala na ye nyonso makasi.—5:1, 2, 4, 7, 8, 12, 15.
12. Toli nini epesami mpo na makambo ya ntina ya bomoi, mpe mpo na matomba ya mayele likoló na mosolo?
12 Moto akoki kozwa bozwi mpe nkembo, kasi mpo na ntina nini kobika “mbula nkóto mbala mibale” soki azangi komona bolamu? Ebongi malamu kotalela na mozindo makambo ya ntina oyo etali bomoi mpe liwa, na esika ya koyangana elongo na bazoba “na ndako na bisengo”; ɛɛ, ebongi malamu ete moto azwa mpamela euti na moto na mayele, mpamba te “lokola makɛlɛlɛ na kozika na nzube na nsé na mbɛki, boye ezali kosɛka na zóba.” Mayele mazali na litomba. “Zambi mayele ekobatelaka lokola ekobatelaka mosolo. Malamu na mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” Na bongo, mpo na nini nzela na moto esili kokóma mpasi? “Nzambe asalaki moto na sembo; nde bayangi myango mingi.”—6:6; 7:4, 6, 12, 29.
13. Moyanganisi apesi toli nini mpe akumisi eloko nini, mpe alobi nini na ntina na esika moto akendaka?
13 Nsuka bobele moko mpo na bato banso (8:1–9:12). Moyanganisi apesi toli oyo ete: “Obatela mobeko na mokonzi”; nde amonisi ete lokola etumbu mpo na mosala mabe epesami noki te, “mitema na bana na bato ikani makasi kosala mabe.” (8:2, 11) Ye moko mpe akumisi bosepeli, kasi likambo mosusu ya mawa ezali! Bato ya lolenge nyonso balandaka bobele nzela moko—liwa! Bato oyo bazali na bomoi basosoli ete bakokufa, “nde bakufi bayebi likambo te, . . . Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.”—9:5, 10.
14. (a) Mayele nini mabongi moyanganisi alobeli yango makasi? (b) Nsuka ya likambo ezali nini?
14 Mayele mabongi kosalelama mpe mokumba ya moto (9:13–12:14). Moyanganisi alobeli makambo mosusu ya mawa, na ndakisa likambo oyo ete “Bolema . . . na bisika mingi bitombwani.” Ayebisi mpe masese mosusu oyo mazali na boyokani na mayele mabongi kosalelama, mpe alobi ete ata “bomwana mpe bolenge izali mpamba”—soki ezangi koluka mayele ya solo. Alobi ete: “Kanisá Motongi na yo na mikolo na bolenge na yo.” Soki moto asali bongo te, na bobangé na ye akozonga bobele mputulu, na kolandana na maloba oyo ya moyanganisi, ete: “Bisalasala na mpamba! . . . Nyonso ezali mpamba!” Ye moko atiki te koteya bato na ye mpo na kozwa boyebi, mpamba te “maloba na bato na mayele izali lokola mpimbo,” mapusaka biso ete tósala misala malamu, kasi na ntina na mayele ya mokili oyo, apesi likebisi oyo ete: “Ezali na nsuka kosala mikanda te, koyekola mingi ekolɛmbisa nzoto.” Na bongo, moyanganisi akómi na nsuka ya mokanda na ye, alobeli na mokuse makambo nyonso oyo asilaki koloba na ntina na bisalasala na mpamba mpe mayele: “Awa makambo manso masili koyokama, nsuka ya likambo ezali ete: Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindá na ye. Mpamba te wana ezali mokumba mobimba ya moto. Mpamba te Nzambe ya solo akomema misala ya motindo nyonso na kosambisama na kotalela eloko nyonso ebombami, soko ezali malamu to ezali mabe.”—10:6; 11:1, 10; 12:1, 8-14, NW.
LITOMBA NA YANGO
15. Lolenge nini Salomo akesenisi misala na mpasi na misala ya ntina?
15 Mokanda ya Mosakoli ezali soko moke te mokanda oyo ezangi kopesa elikya, kútu, etondi nde na biloko ya motuya ya mayele mauti na Nzambe. Ntango atángi misala mingi oyo abéngi yango ete bisalasala na mpamba, Salomo atángi te kati na yango kotongama ya tempelo ya Yehova likoló na Ngomba Moliya na Yelusaleme, atángi mpe te losambo ya solo ya Yehova kati na bisalasala na mpamba. Alobeli te likabo ya bomoi oyo Nzambe apesi biso ete ezali mpamba, kasi amonisi ete epesamaki na mokano ete moto asepela mpe asala malamu. (3:12, 13; 5:18-20; 8:15) Misala ya mpasi mizali misala oyo mizangi kotalela Nzambe. Tata akoki kobomba bozwi mpo na mwana na ye ya mobali, kasi likámá ekoki kobebisa oyo nyonso mpe eloko moko te ekotikala mpo na ye. Ebongi malamu mpenza kopesa epai na bana libula oyo ekoki koumela: bozwi ya elimo. Kozala na biloko mingi mpe kozanga likoki ya kosepela na yango ezali bongo likambo ya mawa. Likámá ekamataka bato ya bozwi nyonso ya mokili na ntango ‘bakendeke’ kati na kufa bobele mabɔkɔ mpamba.—5:13-15; 6:1, 2.
16. Nini emonisi ete Qo·heʹleth, to Mosakoli, ezali na boyokani na mateya ya Yesu?
16 Kati na Matai 12:42, Yesu Klisto amibéngi “oyo aleki Salomo.” Lokola Salomo azalaki elilingi ya Yesu, tomoni ete maloba ya Salomo oyo mazwami kati na mokanda ya Qo·heʹleth ezali na boyokani na mateya ya Yesu, boye te? Tomoni bokokani mingi! Na ndakisa, Yesu amonisaki polele bonene ya mosala ya Nzambe wana alobaki ete: “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.” (Yoa. 5:17) Salomo mpe alobelaki misala ya Nzambe: “Bongo namonaki mosala mobimba na Nzambe ete moto akoki kososola mosala mosalami na nsé na moi te. Ata moto akoluka makasi; akososola yango te. Lisusu, ata moto na mayele alobi ete ayebi yango, akoki kozwa yango te.”—Mos. 8:17.
17. Makambo nini mosusu makokani tokoki komona yango kati na maloba ya Yesu mpe oyo ya Salomo?
17 Yesu mpe Salomo, bango mibale balendisaki basambeli ya solo ete báyangana elongo. (Mat. 18:20; Mos. 4:9-12; 5:1) Bandimbola ya Yesu na ntina na “nsuka na ekeke oyo” mpe “bilaka na mabota” ekokani na maloba oyo ya Salomo ete “ntango ezali mpo na eloko na eloko mpe saa mpo na likambo na likambo na nsé na moi.”—Mat. 24:3; Luka 21:24; Mos. 3:1.
18. Na kopesáká makebisi nini Yesu mpe bayekoli na ye basangani na Salomo?
18 Likambo lileki ntina lizali oyo ete, Yesu mpe bayekoli na ye balobi lolenge moko Salomo alobaki wana apesaki likebisi na ntina na mitambo ya ezaleli ya koluka biloko mingi ya mosuni. Mayele ezali libateli, mpamba te Salomo alobi ete “ebatelaka mozwi na yango.” Yesu alobi: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.” (Mos. 7:12, NW; Mat. 6:33) Kati na Mosakoli 5:10, ekomami ete: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te. Oyo ezali mpe mpamba.” Ekokani mpenza na toli oyo Paulo apesi kati na 1 Timoté 6:6-19 ete “[kolinga] mosolo ezali ntina na mabe mingi.” Ezali mpe na mikapo misusu oyo mimonisi bokokani motindo wana kati na batoli ya Biblia.—Mos. 3:17—Mis. 17:31; Mos. 4:1—Yak. 5:4; Mos. 5:1, 2—Yak. 1:19; Mos. 6:12—Yak. 4:14; Mos. 7:20—Lom. 3:23; Mos. 8:17—Lom. 11:33.
19. Na elikya nini ya esengo tokoki koyangana kati na losambo ya Yehova lelo oyo?
19 Boyangelami na Bokonzi ya Mwana molingami na Nzambe, Yesu Klisto, oyo na mosuni azalaki mokitani ya mokonzi ya mayele, Salomo, ekotya mokili mosusu ya sika awa na mabelé. (Emon. 21:1-5) Makambo oyo Salomo akomaki mpo na kokamba bato na ye kati na bokonzi na ye oyo ezalaki bongo ya elilingi ezali na ntina mingi mpo na baoyo nyonso bazali kotya elikya na bango kati na Bokonzi ya Nzambe oyo etambwisami na Yesu Klisto. Na nsé ya boyangeli yango, bato bakomitambwisa na mitindá ya mayele oyo moyanganisi alobelaki mpe bakosepela seko na seko na likabo ya Nzambe ya bomoi ya esengo. Sikawa ezali ntango ya koyanganisama kati na losambo ya Yehova, mpo na kozwa mpenza bisengo ya bomoi na nsé ya Bokonzi na ye.—Mos. 3:12, 13; 12:13, 14.