Mokapo 4
Yesu Klisto lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe
1, 2. Lolenge nini mangomba ya mokili masili kobebisa lifungola oyo ezali kopesa nzela na kozwa boyebi ya Nzambe?
OTƐLƐMI na ekuke, ozali komekameka mafungola na yo. Malili mpe molili ezali, mpe ozali kosala makasi mpo na kokɔta na ndako—kasi efungeli ezali kofungwama te. Lifungola ezali yango mpenza, kasi lifungola-mama ezali koningana te. Oyo nde motungisi! Otali lisusu mafungola na yo. Ozali kosalela oyo ya malamu? Moto mosusu abebisi nde lifungola yango?
2 Ndakisa oyo ebongi mpo na komonisa mobulungano oyo mangomba ya mokili masili koyeisa na boyebi ya Nzambe. Ya solo, mingi basili kobebisa lifungola oyo ezali kofungola bososoli na biso—Yesu Klisto. Mangomba mosusu masili mpenza kobwaka lifungola mpo ete bazali kobosana Yesu. Basusu basili kobongola mokumba ya Yesu, bazali kosambela ye lokola Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Ezala lolenge nini, tokozwa boyebi ya Nzambe te kozanga bososoli ya sikisiki ya moto oyo ya ntina mingi, Yesu Klisto.
3. Mpo na nini Yesu akoki ete abéngama lifungola oyo ezali kopesa nzela na kozwa boyebi ya Nzambe?
3 Omikundola ete Yesu alobaki: “Oyo elimboli bomoi ya seko, ete báyekola koyeba yo, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3, NW) Na kolobáká bongo, Yesu azalaki komikumisa te. Mbala mingi, Makomami mazali komonisa ntina ya kozala na boyebi ya sikisiki ya Klisto. (Baefese 4:13; Bakolose 2:2; 2 Petelo 1:8; 2:20) Ntoma Petelo amonisaki ete “Basakoli nyonso bakotatolaka mpo na [Yesu Klisto].” (Misala 10:43) Mpe ntoma Paulo akomaki ete: “Kati na [Yesu] mabonza nyonso na mayele mpe na boyebi masili kobombama.” (Bakolose 2:3) Nkutu Paulo alobaki ete bilaka nyonso ya Yehova bizali solo na ntina na Yesu. (2 Bakolinti 1:20) Na bongo, Yesu Klisto azali mpenza lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe. Boyebi na biso ya Yesu esengeli te kobebisama na mateya ya lokuta na ntina na lolenge na ye mpe mokumba na ye kati na bibongiseli ya Nzambe. Kasi mpo na nini bayekoli ya Yesu batalelaka ye ete azali na esika monene kati na bilaka ya Nzambe?
MASIYA OYO ALAKAMAKI
4, 5. Bilikya nini bitongamaki likoló na Masiya, mpe lolenge nini bayekoli ya Yesu batalelaki ye?
4 Kobanda na mikolo ya moto na sembo Abele, basaleli ya Nzambe bazalaki mpenza kozela Mombóto oyo Yehova Nzambe ye moko asakolaki ete akoya. (Genese 3:15; 4:1-8; Baebele 11:4) Esilaki komonisama ete Mombóto yango akokokisa mokano ya Nzambe lokola Masiya, oyo elimboli “Mopakolami.” Asengeli “kosilisa lisumu,” mpe nkembo ya Bokonzi na ye esakolamaki na mokanda ya Nzembo. (Danyele 9:24-26; Nzembo 72:1-20) Nani alingaki komonana ete azali Masiya yango?
5 Kanisá esengo ezalaki na elenge Moyuda moko na nkombo André ntango ayokaki maloba ya Yesu, moto na Nasalɛtɛ. André apotaki nokinoki epai na ndeko na ye Simona Petelo mpe ayebisaki ye ete: “Tosili komona Masiya.” (Yoane 1:41) Bayekoli ya Yesu bandimisamaki ete azalaki Masiya oyo alakamaki. (Matai 16:16) Mpe bayekoli ya solo bandimi kobungisa ata bomoi na bango na ntina na endimeli oyo ete Yesu azali solo Masiya oyo asakolamaki, to Klisto. Elembeteli nini bazali na yango? Tiká tótalela bilembeteli misato.
ELEMBETELI OYO EMONISI ETE YESU AZALAKI MASIYA
6. (a) Mombóto oyo alakamaki alingaki kobima na libota oyo wapi, mpe lolenge nini toyebi ete Yesu autaki na libota yango? (b) Mpo na nini ezalaki mpasi na moto nyonso oyo azalaki na bomoi nsima ya mobu 70 T.B. koloba polele ete azali Masiya?
6 Molɔngɔ́ ya bankɔ́kɔ ya Yesu ezali kopesa moboko ya liboso mpo na koyeba ye lokola Masiya oyo alakamaki. Yehova ayebisaki na mosaleli na Ye Abalayama ete Mombóto oyo alakamaki akobima na libota na ye. Yisaka mwana na Abalayama, Yakobo mwana na Yisaka mpe Yuda mwana na Yakobo, moko na moko na bango azwaki elaka wana moko. (Genese 22:18; 26:2-5; 28:12-15; 49:10) Molɔngɔ́ ya bankɔ́kɔ ya Masiya ekitaki kino na bikeke oyo bilandaki na nsima na ntango elobamaki na Mokonzi Davidi ete libota na ye ekobimisa Mombóto yango. (Nzembo 132:11; Yisaya 11:1, 10) Evanzile ya Matai mpe ya Luka endimisi ete Yesu abimaki na libota yango. (Matai 1:1-16; Luka 3:23-38) Atako Yesu azalaki na banguna mingi, ezali na moko te kati na bango oyo atyaki ntembe na ntina na libota liyebani malamu oyo ye abimaki. (Matai 21:9, 15) Na bongo, ezali polele ete molɔngɔ́ ya bankɔ́kɔ na ye ezali likambo oyo likoki kotyamela ntembe te. Nzokande, mikanda ya mabota ya Bayuda mibebisamaki ntango Baloma babebisaki Yelusaleme na mobu 70 T.B. Nsima ya ntango wana, moto moko te akokaki kopesa bilembo ete azali Masiya oyo alakamaki.
7. (a) Nini ezali elembeteli ya mibale oyo emonisi ete Yesu azali Masiya? (b) Lolenge nini Mika 5:2 ekokisamaki na boyokani na Yesu?
7 Kokokisama ya bisakweli ezali elembeteli ya mibale. Ebele na bisakweli ya Makomami ya Liebele ezali kolobela makambo makeseni matali bomoi ya Masiya. Na ekeke ya mwambe L.T.B., mosakoli Mika asakolaki ete Mokonzi wana monene akobotama na engumba moke ya Beteleme. Na Yisraele, ezalaki na bingumba mibale oyo bibéngamaki Beteleme, kasi esakweli wana emonisaki na sikisiki oyo wapi: Beteleme Ɛfalata, epai Mokonzi Davidi abotamaki. (Mika 5:2) Baboti ya Yesu, Yosefe mpe Malia, bazalaki kofanda na Nasalɛtɛ na ntáká soko ya bakilomɛtɛlɛ 150 na nɔ́rdi ya Beteleme. Nzokande, ntango Malia azalaki na zemi, Moyangeli Moloma Kaisala Auguste apesaki etindá ete bato nyonso bákomisa nkombo moto na moto na engumba na ye.a Na bongo, Yosefe akamataki mwasi na ye oyo azalaki na zemi mpo na kokende na Beteleme, mpe ezali epai kuna Yesu abotamaki.—Luka 2:1-7.
8. (a) Ntango nini mpe makambo nini mabandisaki “bapɔ́sɔ” 69? (b) “Bapɔ́sɔ” 69 ezalaki na boumeli ya mibu boni, mpe makambo nini masalemaki ntango yango esukaki?
8 Na ekeke ya motoba L.T.B., mosakoli Danyele asakolaki ete “Mokambi Masiya” asengelaki kobima “bapɔ́sɔ” 69 nsima na etindá ya kozongela mpe kotonga lisusu Yelusaleme. (Danyele 9:24, 25, NW) Moko na moko na bapɔ́sɔ wana ezalaki na boumeli ya mbula nsambo.b Na kotalela Biblia mpe lisoló ya bato, etindá ya kotonga lisusu Yelusaleme epesamaki na mobu 455 L.T.B. (Nehemia 2:1-8) Na bongo, Masiya asengelaki kobima bambula 483 (69 mbala 7) nsima ya mobu 455 L.T.B. Yango ememi biso na mobu 29 T.B., mbula oyo Yehova apakolaki Yesu na elimo santu. Na yango Yesu akómaki “Klisto” (oyo elimboli “Mopakolami”), to Masiya.—Luka 3:15, 16, 21, 22.
9. (a) Lolenge nini Nzembo 2:2 ekokisamaki? (b) Tángá mwa ndambo na bisakweli mosusu oyo bisengelaki kokokisama epai na Yesu? (Talá etánda.)
9 Ya solo, bato nyonso bandimaki Yesu te lokola Masiya oyo alakamaki, mpe Makomami masilaki kosakola likambo yango. Lokola eyebisami na Nzembo 2:2, Mokonzi Davidi apemamaki na Nzambe mpo na kosakola ete: “Mikonzi na nsé bazali kotɛlɛma mpe mikóló bayangani myango elongo kotɛmɛla Yehova mpe Mopakolami na ye.” Esakweli wana emonisaki ete bakonzi ya mikili mingi bakoyangana na mokano ya kobundisa Mopakolami ya Yehova, to Masiya. Mpe ezali yango nde esalemaki. Bakonzi na mangomba ya Bayuda, Mokonzi Elode mpe Ponti Pilata, moyangeli ya Loma, bango nyonso bazalaki na ngambo monene mpo na liwa ya Yesu. Elode mpe Pilata, oyo bazalaki liboso banguna, bakómaki baninga mpenza uta ntango wana. (Matai 27:1, 2; Luka 23:10-12; Misala 4:25-28) Mpo na bilembeteli mosusu oyo bimonisi ete Yesu azalaki Masiya, talá etánda oyo ezali na motó na likambo “Mwa ndambo na bisakweli minene bitali Masiya.”
10. Lolenge nini Yehova amonisaki polele ete Yesu azalaki Mopakolami na ye oyo alakamaki?
10 Litatoli ya Yehova Nzambe ezali elembeteli ya misato endimisi ete Yesu azali Masiya. Yehova atindaki baanzelu mpo na kosalisa bato na koyeba ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. (Luka 2:10-14) Ya solo, na ntango Yesu azalaki na bomoi awa na mabelé, Yehova ye moko alobaki longwa na makoló mpo na komonisa ete andimaki Yesu. (Matai 3:16, 17; 17:1-5) Yehova Nzambe apesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi. Moko na moko ya makamwisi yango ezalaki elembeteli ya Nzambe oyo emonisi ete Yesu azalaki Masiya, mpamba te Nzambe akokaki soko moke te kopesa mokosi moko nguya ete asala makamwisi. Lisusu, Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kopemisa masoló ya Baevanzile, kosɛnzɛláká na boye ete bilembeteli bimonisi ete Yesu azali Masiya bikomama kati na Biblia, búku oyo eleki kobongolama mpe kokabolama kati na lisoló ya bato.—Yoane 4:25, 26.
11. Bilembeteli boni tozali na yango oyo bimonisi ete Yesu azali Masiya?
11 Bilembeteli nyonso wana bisangisi makambo mingi oyo mamonisi Yesu ete azali Masiya oyo alakamaki. Na ntina wana, baklisto ya solo bazali na lotómo mpenza ya kotalela ye lokola ‘moto oyo basakoli nyonso batatolaki na ntina na ye’ mpe lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe. (Misala 10:43) Kasi ekoki bobele te kozala na bilembeteli oyo bimonisi ete Yesu azali Masiya; tosengeli koyekola makambo mingi mosusu na ntina na Yesu. Autaki wapi? Azalaki lokola nani?
BOMOI YA YESU LIBOSO YA KOBOTAMA LOKOLA MOTO
12, 13. (a) Lolenge nini toyebi ete Yesu azalaki na bomoi kati na makoló liboso ya koya awa na mabelé? (b) Nani azali “Liloba,” mpe azalaki kosala nini liboso ya kokóma moto?
12 Bomoi ya Yesu ekoki kokabolama na biteni misato. Ya liboso ebandaki kala yambo ete abotama awa na mabelé. Mika 5:2 (NW), eyebisaki ete ebandeli ya Masiya ezalaki “uta kalakala, longwa na mikolo miyebani te.” Mpe Yesu mbala mingi azalaki koloba ete autaki na “bisika ya likoló,” elingi koloba na lóla. (Yoane 8:23; 16:28, NW) Ntango boni afandaki na likoló liboso ete aya awa na mabelé?
13 Yesu abéngamaki “Mwana bobele moko” ya Nzambe mpamba te Yehova azalisaki ye na mabɔkɔ na ye moko. (Yoane 3:16) Lokola “Mobotami na liboso na biloko nyonso bizalisami,” Yesu asalelamaki na Nzambe mpo na kozalisa biloko nyonso mosusu. (Bakolose 1:15; Emoniseli 3:14) Yoane 1:1 eyebisi ete “Liloba” (Yesu liboso ya kobotama lokola moto) azalaki elongo na Nzambe “na ebandeli.” Na bongo Liloba azalaki elongo na Yehova na ntango “makoló mpe mabelé” mazalisamaki. Nzambe asololaki na Liloba ntango Ye alobaki ete: “Tiká tózalisa moto na elilingi na biso.” (Genese 1:1, 26) Na ntembe te, Liloba azalaki “kapita-mosáli,” molingami na Nzambe oyo alobelami na Masese 8:22-31 lokola mayele oyo mamonisami na motindo na moto, oyo asalaki mosala makasi pembeni na Yehova mpo na kozalisa biloko nyonso. Na nsima wana Yehova azalisaki ye, Liloba alekisaki bikeke mingi elongo na Nzambe kati na makoló liboso ete akóma moto awa na mabelé.
14. Mpo na nini Yesu abéngami “elilingi ya Nzambe oyo akomonanaka te”?
14 Na yango, tokoki kokamwa te na kotánga kati na Bakolose 1:15 ete Yesu azali “elilingi na Nzambe oyo akomonanaka te”! Nsima na bambula mingi ya boyokani ya penepene elongo, Mwana wana ya botosi akómaki lokola Tata na ye, Yehova. Oyo ezali ntina mosusu esali ete Yesu azala lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe oyo ekopesaka bomoi. Likambo nyonso oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabelé ezali motindo moko na oyo Yehova akokaki kosala. Na yango, koyeba Yesu elimboli mpe kokólisa boyebi na biso ya Yehova. (Yoane 8:28; 14:8-10) Na yango, esengeli na biso koyekola makambo mingi na ntina na Yesu Klisto.
BOMOI YA YESU AWA NA MABELÉ
15. Lolenge nini Yesu akokaki kobotama mwana ya kokoka?
15 Eteni ya mibale ya bomoi ya Yesu ezalaki awa na mabelé. Atosaki na motema moko ntango Nzambe alongolaki bomoi na ye longwa na likoló mpo na kotya yango kati na libumu ya moseka Moyuda moko ya sembo na nkombo Malia. Nguya ya elimo santu ya Yehova, to nguya na ye oyo ekosalaka mosala ‘ekitelaki’ Malia; na yango, azwaki zemi mpe na nsima abotaki mwana moko ya kokoka. (Luka 1:34, 35) Yesu asangolaki libebi te, mpamba te bomoi na ye eutaki na Liziba ya kokoka. Abɔkwamaki na ndako moko ya bopɔlɔ lokola mwana-mobɔkwami ya Yosefe, mosáli na mabaya, mpe mwana ya liboso kati na libota oyo ezalaki na bana mingi.—Yisaya 7:14; Matai 1:22, 23; Malako 6:3.
16, 17.(a) Epai wapi Yesu azwaki nguya mpo na kosala makamwisi, mpe tángá mwa ndambo kati na yango? (b) Bizaleli nini Yesu amonisaki?
16 Ekómaki ye na mibu 12, Yesu asilaki komonisa komipesa mozindo epai na Yehova Nzambe. (Luka 2:41-49) Nsima ya kokóla mpe kobanda mosala na ye wana azalaki na mibu 30, Yesu amonisaki mpe bolingo mozindo oyo azalaki na yango mpo na bazalani na ye. Ntango elimo santu ya Nzambe epesaki ye nguya ya kosala makamwisi, na motema mawa nyonso abikisaki babɛ́li, bibɔsɔnɔ, batɛngumi, bakufi-miso, bakufi-matoyi, bato na maba. (Matai 8:2-4; 15:30) Yesu aleisaki bankóto ya bato oyo bazalaki na nzala. (Matai 15:35-38) Akitisaki mopɛpɛ oyo etyaki na likámá bomoi ya baninga na ye. (Malako 4:37-39) Asekwisaki ata bakufi. (Yoane 11:43, 44) Makamwisi wana mazali makambo mayebani malamu na lisoló ya bato. Ata banguna ya Yesu bandimaki ete ‘azalaki kosala bilembo mingi.’—Yoane 11:47, 48.
17 Yesu azalaki kotambola na mokili na ye, koteyáká bato na ntina na Bokonzi ya Nzambe. (Matai 4:17) Lisusu, atikaki ndakisa monene ya kozala na motema pɛtɛɛ mpe ya kozala na makambo makasi te. Ata wana bayekoli na ye bazalaki kolɛmbisa ye, na boboto nyonso alobaki ete: “Ya solo, elimo ezali na mpiko, kasi nzoto ezali motau.” (Malako 14:37, 38, NW) Nzokande, Yesu azalaki na mpiko mpe akangaki monɔkɔ te liboso na baoyo bazalaki kotyola solo mpe konyokola bato bazangi nguya. (Matai 23:27-33) Na koleka nyonso, amekolaki na kokoka ndakisa ya bolingo ya Tata na ye. Yesu andimaki ata kokufa mpo ete bato ya kozanga kokoka bázwa elikya mpo na ntango ezali koya. Na yango, likambo ya kokamwa ezali te ete tokoki kotalela malamu Yesu lokola lifungola mpo na kozwa boyebi ya Nzambe! Ee, azali lifungola ya bomoi! Kasi mpo na nini tozali kolobela lifungola ya bomoi? Yango ememi biso na eteni ya misato ya bomoi na ye.
YESU LELO
18. Lolenge nini tosengeli kotalela Yesu Klisto lelo?
18 Atako Biblia ezali kolobela liwa ya Yesu, ye azali sikawa na bomoi! Ya solo, ebele na bato oyo bazalaki na bomoi na ekeke ya liboso T.B. bazalaki batatoli ya likambo oyo ete asekwisamaki. (1 Bakolinti 15:3-8) Lokola esakolamaki, na nsima afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye mpe azelaki kino akozwa nguya ya bokonzi kati na makoló. (Nzembo 110:1; Baebele 10:12, 13) Na bongo, lelo oyo, lolenge nini tosengeli kotalela Yesu? Tosengeli kokanisa ete azali lokola elɛzi oyo azangi nguya kati na eliɛlo moko? To lokola moto oyo azali kobunda na mpasi ya liwa? Te. Azali Mokonzi na nguya oyo azali koyangela! Mpe mosika te, akomonisa bokonzi na ye likoló na mabelé na biso oyo etondi na mikakatano.
19. Likambo nini Yesu akosala mosika te?
19 Na Emoniseli 19:11-15, Mokonzi Yesu Klisto alobelami polele ete azali koya na nguya monene mpo na koboma basáli-na-mabe. Oyo nde mposa makasi Mokonzi wana ya likoló azali na yango mpo na kotya nsuka na bampasi oyo ezali kozwa bibele ya bato lelo oyo! Mpe azali na mposa makasi ya kosalisa baoyo bazali kosala makasi na komekola ndakisa ya kokoka oyo atikaki ntango azalaki awa na mabelé. (1 Petelo 2:21) Alingi kobatela bango na “etumba na mokolo yango monene na Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” oyo ezali kobɛlɛma nokinoki, oyo mbala mingi ebéngamaka Armagedon, mpo ete bákoka kozala na bomoi libela na libela lokola bayangelami ya mabelé na Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na makoló.—Emoniseli 7:9, 14; 16:14, 16.
20. Yesu akosala nini mpo na bato na boumeli ya Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto?
20 Na boumeli ya Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto ya kimya oyo esakolamaki, Yesu akosala makamwisi mpo na bolamu ya bato nyonso. (Yisaya 9:6, 7; 11:1-10; Emoniseli 20:6) Yesu akobikisa bokɔnɔ nyonso mpe akotya nsuka na kufa. Akosekwisa bibele ya bato mpo ete bango mpe bákoka kozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. (Yoane 5:28, 29) Okosepela koyekola makambo mingi na ntina na Bokonzi ya Masiya na moko na mikapo mikolanda nsima. Ondimisama na likambo oyo ete: Tokoki mpenza te kokanisa lolenge bomoi na biso ekozala kitoko na nsé ya Bokonzi yango. Ezali mpenza likambo ya ntina ete tóyekola koyeba malamumalamu Yesu Klisto! Ee, ezali likambo ya ntina mingi ete tóbosana soko moke te Yesu, lifungola ya bomoi mpo na kozwa boyebi ya Nzambe oyo ezali komema kino na bomoi ya seko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Kokomisa nkombo esalisaki Boyangeli ya Loma na koyeba na sikisiki motuya ya mpako. Na yango, kozanga koyeba, Auguste asanganaki na kokokisa esakweli moko na ntina na moyangeli moko oyo ‘akotinda mokɔngɔli na mpako kati na bokonzi.’ Esakweli yango moko esakolaki ete “Mokambi ya kondimana,” to Masiya, asengelaki “kobukana” na mikolo ya mokitani ya moyangeli yango. Yesu abomamaki na boumeli ya boyangeli ya Tibère, mokitani ya Auguste.—Danyele 11:20-22.
b Bayuda ya kala bazalaki mbala mingi kotánga bileko engebene bapɔ́sɔ ya bambula. Na ndakisa, lokola mokolo nyonso ya nsambo ezalaki mokolo ya Sabata, bobele bongo mbula nyonso ya nsambo ezalaki mbula ya Sabata.—Exode 20:8-11; 23:10, 11.
MEKÁ BOYEBI NA YO
Lolenge nini molɔngɔ́ ya bankɔ́kɔ ya Yesu emonisi polele ete azali Masiya?
Tángá mwa ndambo na bisakweli bitali Masiya oyo bikokisamaki epai na Yesu?
Lolenge nini Nzambe amonisaki polele ete Yesu azalaki Mopakolami na ye?
Mpo na nini Yesu azali lifungola na bomoi mpo na kozwa boyebi ya Nzambe?
[Etanda/Karte na lokasa 37]
MWA NDAMBO NA BISAKWELI MINENE BITALI MASIYA
ESAKWELI LIKAMBO KOKOKISAMA
BOMWANA NA YE
Yisaya 7:14 Akobotama epai na moseka Matai 1:18-23
Yilimia 31:15 Bana babomami na nsima ya Matai 2:16-18
kobotama na ye
MOSALA NA YE
Yisaya 61:1, 2 Nzambe apesaki ye mosala Luka 4:18-21
Yisaya 9:1, 2 Mosala na ye epesaki bato Matai 4:13-16 Likoki ya komona pole monene
Nzembo 69:9 Molende mpo na ndako ya Yehova Yoane 2:13-17
Yisaya 53:1 Bakondima ye te Yoane 12:37, 38
Zekalia 9:9; Akokɔta kati na Yelusaleme Matai 21:1-9
Nzembo 118:26 likoló na mwana na mpunda; akokumisama lokola mokonzi mpe lokola moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova
KOTƐKAMA MPE LIWA NA YE
Nzembo 41:9; 109:8 Ntoma moko azangi sembo; Misala1:15-20
atɛki Yesu mpe na nsima mosusu azwi esika na ye Zekalia 11:12 Atɛkamaki na palata 30 Matai 26:14, 15
Nzembo 27:12 Batatoli ya lokuta batatoli Matai 26:59-61
likoló na ye
Nzembo 22:18 Bilamba na ye ekobetama mbese Yoane 19:23, 24
Yisaya 53:12 Akotángama elongo na basumuki Matai 27:38
Nzembo 22:7, 8 Akofingama na ntango ya liwa Malako 15:29-32
Nzembo 69:21 Bakopesa ye vinyo ya ngáí Malako 15:23, 36
Yisaya 53:5; Bakotɔbɔla mopanzi na ye Yoane 19:34, 37
Yisaya 53:9 Akokundama elongo na bazwi Matai 27:57-60
Nzembo 16:8-11 Akosekwisama liboso ya kopɔla Misala 2:25-32; Misala 13:34-37
[Elilingi na lokasa 35]
Nzambe apesaki na Yesu nguya ya kobikisa babɛ́li