Ndenge ya koyeba kosolola na bato
OKOKAKA te kosolola na bato? Bato mingi bamitungisaka mpenza soki kaka bakanisi ete basengeli kobanda lisolo na moto moko oyo bayebi ye te. Mbala mosusu bato yango bazalaka nsɔninsɔni mpe bamitunaka boye: ‘Nakoloba nini? Ndenge nini nakobanda lisolo? Ndenge nini nakoki kosala ete nakata lisolo yango te?’ Nzokande, bato oyo babangabangaka te mpe bazali na boboto, bakoki koluka ete kaka bango moko bálobaka, basusu báyokaka bango. Mbala mosusu basengeli kosala milende mpenza mpo na kotikela basusu ntango ya koloba mpe basengeli koyekola koyoka makambo oyo basusu bazali koloba. Yango wana biso nyonso, ezala bato ya nsɔninsɔni to bato ya boboto, tosengeli koyekola ndenge ya kosolola na bato.
Bandá na ndako na bino
Mpo na koyeba kosolola na bato, osengeli kobanda na ndako na bino. Masolo ya kolendisa ekoki kosala ete libota ezala na esengo.
Likambo ya liboso mpo na koyeba kosolola na bato ezali komibanzabanza mpo na basusu. (Det. 6:6, 7; Mas. 4:1-4) Soki tozali komibanzabanza mpo na basusu, tokosolola na bato mpe tokoyoka bango, ntango balingi koloba likambo moko. Likambo mosusu ya ntina ezali ete tosengeli kolobela likambo oyo ezali na ntina. Soki tozali na programɛ mpo na kotánga mpe koyekola Biblia biso moko, tokozala na makambo mingi oyo tokoki koyebisa basusu. Soki tozali kosalela na mayele mpenza mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo, yango ekoki kosalisa biso tózala na masolo ya kolendisa. Na boumeli ya mokolo, mbala mosusu tokutanaki na likambo moko ya esengo na mosala ya kosakola, to totángaki likambo moko oyo ekoteya bato to ekosɛkisa bango. Tosengeli kokóma na momeseno ya kolobela makambo yango ntango tozali kosolola na kati ya libota mpo na kolendisana. Yango ekosalisa biso tósololaka mpe na bato mosusu oyo bazali na libota na biso te.
Ndenge ya kosolola na moto oyo oyebi te
Bato mingi bakakatanaka mpo na kobanda lisolo na moto oyo bayebi te. Kasi Batatoli ya Yehova, lokola balingi Nzambe mpe bazalani na bango, basalaka makasi mpenza mpo na koyeba kosolola na bato mpe koyebisa bango solo ya Biblia. Nini ekoki kosalisa yo obongisa lolenge na yo ya kosolola na bato oyo oyebi te?
Bafilipi 2:4 epesi etinda moko oyo ezali na ntina mingi. Elendisi biso ete tótyaka likebi “kaka na makambo na [biso] moko te, kasi na komibanzabanza mpe na makambo ya basusu lokola.” Kanisá naino: Soki okutani na moto mpo na mbala ya liboso, akomona yo mopaya, boye te? Ndenge nini okoki kosala ete amiyoka malamu? Soki osɛki mwa moke na esengo mpenza mpe opesi ye mbote na boboto mpenza, yango ekosalisa yo. Kasi osengeli mpe kotalela makambo mosusu.
Mbala mosusu okataki ye maloba ntango azali koloba. Okanisi boni, soki olingi kosolola na ye makambo oyo ezali na makanisi na yo, kozanga ete otya likebi na makambo oyo ezali na makanisi na ye, akondima yango? Yesu asalaki nini ntango akutanaki na mwasi moko na libulu ya mai na Samalia? Makanisi ya mwasi wana ezalaki na mai oyo alingaki kotoka. Yesu abandaki kosolola na mwasi yango na kotalela likambo oyo ezalaki na makanisi na ye mpe na nsima, alobelaki makambo ya elimo oyo ezalaki kolendisa.—Yoa. 4:7-26.
Soki yo mpe ozali kotalatala makambo oyo ezali kosalema na esika bato bafandi, okoki koyeba makambo oyo ezali na makanisi na bango. Elongi ya moto yango ezali na esengo to na mawa? Azali mobange to mbala mosusu ebɔsɔnɔ? Ezali na biloko oyo emonisi ete bana bazalaka na ndako yango? Emonani ete azali na bozwi to azali nde kobundana mpo na kobikela? Biloko oyo batii mpo na kobongisa ndako to babiju oyo alati ezali komonisa lingomba na ye? Soki ntango ozali kopesa ye mbote, olobeli makambo yango, moto yango akoki komona ete osepelaka na likambo moko oyo esepelisaka mpe ye.
Bongo soki ozali komona moto oyo bozali kosolola na ye te, mbala mosusu ozali koyoka kaka mongongo na ye mpamba te aboyi kofungola ekuke, okoloba nini? Mbala mosusu moto yango abangaka. Okoki kosalela likanisi yango mpo na kobanda lisolo, atako ekuke ekangami?
Na bisika mosusu, okoki kokɔtisa moto na lisolo soki oyebisi ye makambo na yo, na ndakisa, esika outi, ntina oyo oyei kotala ye, ntina oyo ondimaka Nzambe, ntina oyo obandaki koyekola Biblia mpe ndenge oyo Biblia esalisi yo. (Mis. 26:4-23) Ya solo, osengeli kosala na mayele mpenza mpe koyeba malamu ntina oyo ozali kosolola na ye. Soki osali bongo, yango ekoki kotinda moto yango ayebisa yo makambo na ye mpe makanisi na ye.
Na mikili mosusu, bato bazali na momeseno ya koyamba bapaya. Bato yango bakoki kokakatana te mpo na kokɔtisa yo na ndako mpe kofandisa yo. Ntango bafandisi yo, soki obandi kotuna na limemya mpenza soki libota na bango ezali malamu mpe soki ozali mpenza koyoka biyano na bango, bato yango bakoki mpe kotya likebi na makambo oyo okoloba. Bato mosusu basepelaka mingi mpenza na bapaya, yango wana ekosɛnga mbala mosusu olekisa ntango mingi kaka mpo na kopesa mbote liboso obanda lisolo na yo. Na ntango wana, bakoki komona ete yo na bango bozali na makambo mosusu oyo ezali ndenge moko. Yango ekosala ete bósolola masolo ya elimo oyo ekosalisa bango mpenza.
Bongo soki na esika oyo ofandi, bato mingi balobaka minɔkɔ mosusu oyo oyebi te? Ndenge nini okosolola na bango? Soki oyekoli ata kopesa mbote mpamba na minɔkɔ yango, bato wana bakomona mpenza ete ozali kosepela na bango. Yango ekosalisa yo osolola na bango masolo mosusu.
Ndenge ya kokoba lisolo elongo na bato
Mpo lisolo ekatana te, tyá likebi na makanisi ya moto oyo bozali kosolola na ye. Lendisá ye ete abimisa makanisi na ye soki alingi. Soki ozali kotuna mituna oyo ebongi, yango ekoki kosalisa yo. Mituna oyo ezali kosɛnga moto abimisa likanisi na ye ezali malamu mpenza mpamba te esɛngaka ete moto asuka kaka te na koyanola ‘te’ to ‘ɛɛ.’ Na ndakisa, nsima ya kolobela mokakatano moko oyo ezali kotungisa bato ya mboka na bino, okoki kotuna boye: “Okanisi nini, likambo nini ebimisi mokakatano oyo?” to “Mpo na yo, nini ekosilisa mokakatano yango?”
Ntango otuni moto motuna, yoká eyano na ye na likebi mpenza. Lobá ata mwa moke, ningisá motó to loboko mpo na komonisa ete ozali kotya likebi na eyano yango. Kokata ye maloba te. Zalá na makanisi malamu ntango ozali koyoka makambo oyo azali koloba. ‘Yokaká noki, kowelaka koloba te.’ (Yak. 1:19) Ntango ozali kopesa ye eyano, monisá mpenza ete ozalaki koyoka makambo oyo azalaki koyebisa yo.
Nzokande, yebá ete bato nyonso te nde bakoyanola na mituna na yo. Bato mosusu bakosuka kaka na kokamwa to kosɛka mwa moke. Basusu balobaka kaka ‘ɛɛ’ to ‘te.’ Kolɛmba te. Zalá na motema molai. Koluka te kolobisa bango na makasi. Soki moto yango andimi koyoka yo, salelá libaku yango mpo na koyebisa ye makanisi ya kolendisa oyo euti na Makomami. Nsima ya mwa ntango, moto yango akoki komona yo lokola moninga na ye. Mbala mosusu na ntango wana nde akosepela koyebisa yo polele makanisi na ye.
Ntango ozali kosolola na bato, omibongisaka mpe mpo na kozongela bango mwa mikolo na nsima. Soki moto atuni yo mituna ebele, pesá eyano na ndambo ya mituna yango mpe tiká motuna moko to mituna mibale mpo na mbala oyo okozonga mpo na kosolola na ye. Yebisá ye ete okolukaluka eyano mpe okoya koyebisa ye yango. Soki atuni ata motuna moko te, okoki kosukisa lisolo na yo na motuna moko oyo omoni ete ekobenda likebi na ye. Yebisá ye ete bokosolola yango mbala ya nsima. Okoki kozwa makanisi mingi na mokanda Ndenge ya kosolola na bato na Makomami, na mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? mpe na banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká!
Ntango ozali kosolola na bandeko baklisto
Ntango okutani na Motatoli ya Yehova mosusu mpo na mbala ya liboso, obandaka lisolo mpo na koluka koyeba ye? To otɛlɛmaka kaka mpe ofandi nyɛɛ? Bolingo mpo na bandeko na biso esengeli kotinda biso tóluka koyebana. (Yoa. 13:35) Okobanda ndenge nini? Okoki kaka kopesa nkombo na yo mpe kotuna ye oyo ya ye. Mbala mingi soki otuni ndenge oyo ayebaki solo, yango ekosala ete bóbanda lisolo moko ya kitoko oyo ekosalisa bino bóyebana. Ata soki ozali kokakatana moke mpo na koloba, milende na yo ekomonisa ndeko yango ete ozali mpenza kosepela na ye, yango nde likambo ya ntina.
Nini ekoki kosala ete lisolo na yo na ndeko moko na lisangá ezala mpenza na ntina? Monisá mpenza ete ozali kosepela na ndeko yango mpe na libota na ye. Bouti kosilisa makita? Lobelá makanisi oyo omoni ete esalisaki yo. Yango ekoki kosalisa bino nyonso mibale. Okoki kolobela likambo moko oyo esepelisi yo na nimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Osengeli te koyebisa ye yango lokola nde olingi komikumisa to olingi komeka boyebi na ye. Luká nde koyebisa ye likambo oyo esepelisaki yo mpenza. Okoki kolobela lisolo oyo moko kati na bino akosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo bópesana makanisi mpo na ndenge ya kosala yango. Okoki mpe kolobela makambo oyo okutanaki na yango na mosala ya kosakola.
Ya solo, mbala mingi ntango tosepeli na bato, tokobanda kosolola na bango makambo oyo bayebi mpe oyo basalaka. Tokoki mpe kolobela masolo oyo esɛkisaka. Makambo oyo tokoloba ekotonga mpenza basusu? Soki tondimi mpenza toli ya Liloba ya Nzambe mpe soki tozali na bolingo ya Nzambe, maloba na biso ekotonga mpenza basusu.—Mas. 16:27, 28; Ef. 4:25, 29; 5:3, 4; Yak. 1:26.
Liboso tóbima na mosala ya kosakola, tomibongisaka. Mpo na nini te kobongisa mpe nsango moko oyo ekosepelisa baninga na biso ntango tokosolola na bango? Ntango ozali kotánga mpe koyoka makambo oyo ezali kosepelisa yo, kangá makanisi oyo olingi koyebisa basusu. Nsima ya mwa ntango, okozala na makambo ebele oyo ekosɛnga opona oyo wapi okolobela. Soki ozali kosala bongo, yango ekosalisa yo ozala na makambo mingi ya koloba na basusu, longolá makambo mosusu oyo tolobaka mokolo na mokolo. Na koleka, tiká ete maloba na yo emonisa mpenza ete Liloba ya Nzambe ezali na motuya mingi mpo na yo!—Nz. 139:17.