Mokapo ya zomi na libwa
Landá kosakola Liloba ya Nzambe na mpiko
1. (a) Nsango malamu nini bayekoli ya Yesu bazalaki kosakola, kasi ndenge nini Bayuda mosusu batalelaki yango? (b) Mituna nini tosengeli komituna?
ESILI koleka mbula pene na 2000, Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, apakolamaki lokola Mokonzi oyo akoyangela mabele mobimba. Babomaki Yesu mpo na mayele mabe ya bakonzi ya lingomba oyo bazalaki banguna na ye, kasi Yehova asekwisaki ye. Na nzela ya Yesu, likoki ezalaki sikoyo mpo na kozwa bomoi ya seko. Kasi, ntango bayekoli ya Yesu bazalaki kosakola nsango malamu yango liboso ya bato nyonso, yango ebimiselaki bango minyoko. Bamosusu kati na bango bakɔtaki bolɔkɔ, babɛtamaki fimbo mpe basɛngaki bango bátika kosakola makambo ya Yesu. (Misala 4:1-3, 17; 5:17, 18, 40) Basengelaki kosala nini? Soki yo, mbɛlɛ osali nini? Mbɛlɛ okobi kopesa litatoli na mpiko?
2. (a) Wapi nsango ya malamu oyo esengeli kosakolama na mikolo na biso? (b) Nani azali na mokumba ya kosakola nsango malamu?
2 Na 1914, Yesu Klisto, Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, atyamaki na kiti ya bokonzi na likoló mpo na koyangela ‘kati na bayini na ye.’ (Nzembo 110:2) Na nsima, Satana na bademo na ye babwakamaki awa na mabele. (Emoniseli 12:1-5, 7-12) Mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo ebandaki. Ntango eleko yango ekosila, Nzambe akobebisa ebongiseli nyonso ya Satana. (Danyele 2:44; Matai 24:21) Bato oyo bakobika bakozala na libaku malamu ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paladiso. Soki ondimi nsango malamu yango, okosepela koyebisa yango mpe na bato mosusu. (Matai 24:14) Kasi okanisi ete bato bakoyamba nsango yango ndenge nini?
3. (a) Ndenge nini bato bayambaka nsango ya Bokonzi? (b) Motuna nini tosengeli kotalela?
3 Ntango ozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi, bato mosusu bakoki koyoka yango, kasi mingi bakotyola yango. (Matai 24:37-39) Basusu bakoki kutu kosɛka yo to kotɛmɛla yo. Yesu alobaki ete botɛmɛli ekoki kouta ata epai ya bandeko na yo moko. (Luka 21:16-19) Ekoki mpe kouta na esika osalaka to na eteyelo. Na bipai mosusu na mokili, guvɛrnɛma epekisi mosala ya Batatoli ya Yehova. Ntango okutani na makambo ya ndenge wana, okokoba kosakola Liloba ya Nzambe na mpiko mpe ‘okotɛlɛma ngwi na kati ya kondima’?—1 Bakolinti 16:13.
Tótya motema na makasi na biso moko te
4. (a) Mpo tómonisa ete tozali mpenza basaleli ya sembo ya Nzambe, lisɛngami nini ezali mpenza na ntina? (b) Mpo na nini makita ya boklisto ezali na ntina mingi?
4 Likambo ya ntina mpo na kozala mosaleli ya sembo ya Yehova ezali bongo kotya motema na bibongiseli oyo ye atii. Moko na bibongiseli yango ezali makita ya lisangá. Makomami ezali kosɛnga na biso ete tótalela yango na lisɛki te. (Baebele 10:23-25) Baoyo bazali kokoba kozala Batatoli ya sembo ya Yehova basalaka makasi mpo na koyangana pɔsɔ na pɔsɔ na makita elongo na baninga na bango basaleli ya Yehova. Na makita yango, tokolisaka boyebi na biso ya Makomami. Lisusu, bososoli na biso ya makambo ya solo oyo toyebi ekolaka, mpe toyebaka malamumalamu ndenge oyo tokosalela yango. Tokómaka na boyokani makasi na bandeko na biso baklisto na kati ya bomoko ya losambo mpe tolendisamaka mpo na kosala mokano ya Nzambe. Elimo ya Yehova etambwisaka biso na nzela ya lisangá, mpe na nzela ya elimo yango, Yesu azalaka na katikati na biso.—Matai 18:20; Emoniseli 3:6.
5. Ntango bapekisaka mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova, basalaka nini mpo na makita?
5 Oyanganaka na makita nyonso pɔsɔ na pɔsɔ, mpe osalelaka mpenza makambo oyo oyokaka na makita yango? Mbala mosusu, ntango bapekisaka mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova, ezalaka na ntina koyangana na makita na bituluku ya mikemike na bandako ya bandeko. Bisika ya koyangana mpe ngonga ekoki kokesene mpe ezalaka ntango nyonso te oyo ekoki kosepelisa yo, makita mosusu ekoki kosalema na butu makasi. Kasi atako mokakatano yango ezali to makama, bandeko ya sembo basalaka makasi mpo na kozala na makita nyonso.
6. Ndenge nini tokolakisa ete tozali kotyela Yehova motema, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso tókoba kosakola na mpiko?
6 Mpo na kotyela Yehova motema, tosengeli kopusana mbala na mbala pene na ye na nzela ya libondeli, mpe tóyeba ete tozali na mposa ya lisalisi ya Nzambe. Osalaka bongo? Yesu azalaki kobondela mbala na mbala ntango azalaki kosala mosala na ye ya kosakola awa na mabele. (Luka 3:21; 6:12, 13; 22:39-44) Mpe na butu ya mokolo oyo liboso ya liwa na ye, alendisaki bayekoli na ye ete: “Bókɛngɛlaka mpe bóbondelaka, mpo bókɔta na komekama te.” (Malako 14:38) Soki bato bayambi biso te na mosala ya kosakola Bokonzi, ntango mosusu, yango ekoki kotya biso na komekama mpo na kolɛmbisa mosala na biso ya kosakola. Soki bato bazali kosɛka biso to konyokola biso, tokoki komekama ete tókanga monɔkɔ mpo na kokima mokakatano. Kasi soki tobondeli na molende mpo Nzambe apesa biso elimo na ye esalisa biso tókoba kosakola na mpiko, tokopesa nzela te na komekama yango ete elɛmbisa biso.—Luka 11:13; Baefese 6:18-20.
Litatoli ya mpiko oyo esalemaki
7. (a) Mpo na nini lisolo ya mokanda ya Misala ezali na ntina mingi mpo na biso? (b) Yanolá na mituna oyo batuni na nsuka ya paragrafe oyo, lobelá mingi litomba oyo tokoki kozwa na makambo yango.
7 Lisolo ya mokanda ya Misala ya bantoma ezali mpenza na litomba monene mpo na biso nyonso. Ezali kolobela ndenge bantoma mpe bayekoli mosusu ya liboso—bato oyo bazalaki na mayoki lokola biso—balongaki mikakatano mpe bamonisaki ete bazalaki batatoli ya Yehova ya mpiko mpe ya sembo. Tótalela naino eteni moko ya lisolo yango na lisalisi ya mituna oyo elandi mpe bavɛrsɛ oyo epesami. Ntango tozali kotalela yango, luká koyeba ndenge okoki mpenza kozwa matomba na makambo oyo ozali kotánga.
Bantoma bazalaki mibali oyo batángá mingi? Bazalaki bato oyo babangaka te, ezala ata likambo nini ekokaki kokómela bango? (Yoane 18:17, 25-27; 20:19; Misala 4:13)
Nini esalisaki Petelo aloba na mpiko liboso ya tribinale ya Bayuda oyo ekweisaki Mwana ya Nzambe? (Matai 10:19, 20; Misala 4:8)
Na bapɔsɔ oyo ezalaki liboso ete básambisa bango na Sanedrina, bantoma bazalaki kosala nini? (Misala 1:14; 2:1, 42)
Ntango bakonzi basɛngaki bantoma ete bátika kosakola na nkombo ya Yesu, ndenge nini Petelo na Yoane bazongisaki? (Misala 4:19, 20)
Ntango batikaki bango, bantoma balukaki kozwa lisusu lisalisi epai ya nani? Babondelaki Nzambe mpo ete minyoko esila to basalaki nini? (Misala 4:24-31)
Ntango banguna bamekaki kopekisa mosala ya kosakola, na nzela nini Yehova asalisaki bango? (Misala 5:17-20)
Na lolenge nini bantoma bamonisaki ete bakangaki mpenza ntina oyo batikaki bango? (Misala 5:21, 41, 42)
Ata ntango bayekoli mingi bapanzanaki mpo na minyoko, bakobaki kosala nini? (Misala 8:3, 4; 11:19-21)
8. Tángá makambo ya malamu oyo mosala ya kosakola ya bayekoli ya liboso ebimisaki; mpe ndenge nini tokómi kopesa mabɔkɔ na mosala yango?
8 Mosala ya kosakola nsango malamu ezalaki mosala ya mpamba te. Bayekoli soki 3000 bazwaki batisimo na Pantekote ya mobu 33 na ntango na biso (T.B.). “Bandimi na kati ya Nkolo bakobaki kobakisama, bibele ya mibali mpe ya basi.” (Misala 2:41; 4:4; 5:14) Na nsima, kutu Saulo ya Tarse, moko ya bato oyo banyokolaki basaleli ya Nzambe na ndenge ya mabe mpenza, akómaki moklisto mpe abandaki kopesa litatoli mpo na solo na mpiko. Ayaki koyebana na nkombo ya ntoma Paulo. (Bagalatia 1:22-24) Mosala oyo ebandaki na ekeke ya liboso esukaki te. Ekoli mingi na mikolo oyo ya nsuka mpe ekómi bipai nyonso na mabele. Tozali na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango, mpe lokola tozali kosala bongo, tokoki kozwa liteya na ndakisa oyo batatoli ya sembo oyo bazalaki liboso na biso batikaki.
9. (a) Mabaku nini Paulo asalelaki mpo na kopesa litatoli? (b) Na lolenge nini opalanganisaka nsango ya Bokonzi?
9 Ntango Paulo ayaki koyeba solo oyo etali Yesu Klisto, asalaki nini? “Na mbala moko . . . abandaki kosakola Yesu, ete Ye azali Mwana ya Nzambe.” (Misala 9:20) Azalaki na botɔndi mingi mpo na motema boboto ya Nzambe oyo amoniselaki ye, mpe amonaki ete moto nyonso azalaki na mposa ya nsango malamu oyo ye azwaki. Paulo azalaki Moyuda, mpe ndenge momeseno ya ntango yango ezalaki kosɛnga, akendeki na basinagoga mpo na kopesa litatoli. Asakolaki mpe ndako na ndako, mpe atalelaki Makomami elongo na bato na bisika ya bazando. Azalaki mpe na mposa ya kokenda na bisika ya sika mpo na kosakola nsango malamu.—Misala 17:17; 20:20; Baloma 15:23, 24.
10. (a) Ndenge nini Paulo amonisaki ete atako azalaki kobanga te, azalaki mpe na bososoli na lolenge azalaki kopesa litatoli? (b) Ndenge nini tokoki komonisa bizaleli lokola ya Paulo ntango tozali kopesa litatoli epai ya bandeko na biso ya libota, baninga na biso ya mosala, to baninga na biso ya kelasi?
10 Paulo azalaki kobanga te, kasi azalaki mpe na bososoli, biso mpe tosengeli kozala na bososoli. Epai ya Bayuda, azalaki kolobela bilaka oyo Nzambe apesaki na bankɔkɔ na bango. Epai ya Bagrɛki azalaki kolobela makambo oyo bango bamesanaki na yango. Na bantango mosusu, mpo na kopesa litatoli, azalaki kolobela makambo oyo ekómelaki ye moko ndenge oyo ayebaki solo. Alobaki ete: “Nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nakóma mosangani na yango elongo na bamosusu.”—1 Bakolinti 9:20-23; Misala 22:3-21.
11. (a) Paulo asalaki nini mpo na koboya komikɔtisa mbala mbala na ntembe makasi elongo na batɛmɛli? (b) Ntango nini tokoki, na mayele mpenza, komekola ndakisa ya Paulo, mpe ndenge nini? (c) Mpo na kokoba kosakola na mpiko, nguya eutaka wapi?
11 Lokola botɛmɛli ezalaki makasi, Paulo akendaki kosakola bipai mosusu mpo na mwa ntango, na esika ete amikɔtisa mbala na mbala na ntembe makasi elongo na batɛmɛli, alongwaki nde wana. (Misala 14:5-7; 18:5-7; Baloma 12:18) Kasi azalaki koyoka nsɔni soki moke te mpo na nsango malamu. (Baloma 1:16) Atako batɛmɛli banyokolaki Paulo makasi mpe kutu na ndenge ya bonyama mpenza, azwaki “mpiko na lisalisi ya Nzambe na biso” mpo na kokoba kosakola. Alobaki ete: “Nkolo atɛlɛmaki pene na ngai mpe atondisaki ngai na nguya, mpo ete na nzela na ngai mosala ya kosakola ekoka kosalema malamumalamu.” (1 Batesaloniki 2:2; 2 Timote 4:17) Yesu, Mokonzi ya lisangá ya boklisto, azali kokoba kopesa nguya oyo tozali na mposa na yango mpo na kosala mosala oyo asakolaki ete ekosalema na mikolo na biso.—Malako 13:10.
12. Nini ezali mpenza komonisa ete baklisto bazali na mpiko, mpe yango eutaka na nini?
12 Tozali na bantina nyonso ya kokoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko, kaka ndenge Yesu na basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe basalaki na ekeke ya liboso. Yango elingi koloba te ete tosengeli kozanga limemya to kondimisa bato nsango na makasi. Kasi ata soki bato bazali kotyola biso totikaka te kosakola to soki batɛmɛli biso tokangaka monɔkɔ te. Ndenge moko na Yesu, tomonisaka ete Bokonzi ya Nzambe nde ezali boyangeli kaka moko oyo ebongi mpo na mabele mobimba. Tolobaka na molende mpamba te tozali bamonisi ya Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe mpo nsango oyo tosakolaka ezali ya biso te kasi euti na ye. Mpe bolingo na biso mpo na Yehova esengeli kozala ntina monene oyo etindaka biso tósanzola ye.—Bafilipi 1:27, 28; 1 Batesaloniki 2:13.
Bozongeli
• Mpo na nini ezali na ntina mingi kosakola nsango ya Bokonzi epai ya moto nyonso soki likoki ezali, kasi makambo nini tosengeli kokanisa ete tokokutana na yango?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete totyaka motema na makasi na biso moko te mpo na kosalela Yehova?
• Makambo nini ya ntina tozali koyekola na mokanda ya Misala?
[Bililingi na lokasa 173]
Ndenge moko na ntango ya kala, lelo oyo mpe basaleli ya Yehova bazali kosakola liloba ya Nzambe na mpiko