Mokapo ya zomi na mwambe
“Bazali bato ya mokili te”
1. (a) Liboso ya liwa na ye, Yesu abondelaki nini mpo na bayekoli na ye? (b) Mpo na nini likambo ya kozala “bato ya mokili te” ezali na ntina mingi?
NA BUTU ya mokolo oyo liboso báboma ye, Yesu abondelaki mpo na bantoma na ye. Lokola ayebaki ete Satana akotungisa bango makasi, Yesu alobaki na Tata na ye ete: “Nazali te kosɛnga yo olongola bango na mokili, kasi okɛngɛla nde bango mpo na moto mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:15, 16) Mpo na nini kokabwana na mokili ezali likambo ya ntina mingi? Mpamba te Satana azali moyangeli ya mokili oyo. Baklisto bakolinga te kozala bato ya mokili oyo ye azali kotambwisa.—Luka 4:5-8; Yoane 14:30; 1 Yoane 5:19.
2. Na lolenge nini Yesu azalaki moto ya mokili te?
2 Kozala bato ya mokili te elingi koloba te ete Yesu azalaki kolinga bato mosusu te. Kutu, abikisaki bato ya maladi, asekwisaki bato oyo bakufaki, mpe ateyaki bato makambo ya Bokonzi ya Nzambe. Apesaki ata bomoi na ye mpo na bato. Kasi alingaki te bizaleli mpe misala ya kotyola Nzambe oyo bato oyo bazalaki na elimo ya mokili ya Satana bazalaki komonisa. Yango wana, akebisaki bango mpo na makambo lokola mposa ya kosala pite, kolinga mingi biloko ya mosuni, mpe koluka lokumu. (Matai 5:27, 28; 6:19-21; Luka 20:46, 47) Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yesu aboyaki makambo ya politiki. Atako azalaki Moyuda, amikɔtisaki te na kowelana ya makambo ya politiki oyo ezalaki kati na bato ya Loma mpe Bayuda.
“Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te”
3. (a) Makambo nini bakonzi ya Lingomba ya Bayuda bakoselaki Yesu epai ya Pilato, mpe mpo na nini? (b) Nini ezali komonisa ete Yesu azalaki na mposa ya kokóma mokonzi awa na mabele te?
3 Tótalela naino likambo oyo esalemaki ntango bakonzi ya Lingomba ya Bayuba bakangaki Yesu mpe bakendeki na ye epai ya Poso Pilato, guvɛrnɛrɛ Moloma. Soki totali malamu, bakambi yango batungisamaki mingi mpamba te Yesu atɔndɔlaki bokosi na bango. Mpo ete guvɛrnɛrɛ akweisa Yesu, bafundaki ye ete: “Tokuti moto oyo azali kokɔtisa mobulu na ekólo na biso mpe azali kopekisa kofuta mpako epai ya Kaisala mpe koloba ete ye moko azali Klisto mokonzi.” (Luka 23:2) Yango ezalaki mpenza lokuta, mpamba te mbula moko liboso, ntango bato balingaki kotya Yesu mokonzi, aboyaki. (Yoane 6:15) Ayebaki ete akozala Mokonzi na likoló na mikolo ezalaki koya. (Luka 19:11, 12) Lisusu, asengelaki kotyama na kiti ya bokonzi, na bato te, kasi na Yehova.
4. Makanisi ya Yesu ezalaki nini mpo na likambo ya kofuta mpako?
4 Kaka mikolo misato liboso bákanga Yesu, Bafalisai bamekaki kosala ete Yesu aloba likambo moko oyo ekobuka mobeko ya kofuta mpako. Kasi alobaki ete: “Bólakisa ngai denali moko [mbongo ya ebende ya Baloma]. Yango ezali na elilingi mpe likomi ya nani?” Ntango balobaki “ya Kaisala,” ye azongisaki ete: “Boye, kozanga kokakatana, bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.”—Luka 20:20-25.
5. (a) Liteya nini Yesu apesaki bayekoli na ye ntango bakangaki ye? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya likambo asalaki? (c) Ndenge nini bakataki likambo na ye?
5 Te, Yesu ateyaki bato te ete bátombokela bakonzi. Ntango basoda mpe mibali mosusu bayaki mpo na kokanga Yesu, Petelo abimisaki mopanga mpe abɛtaki moko na mibali yango, akataki ye litoi. Kasi Yesu alobaki ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso bakamataka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:51, 52) Na mokolo oyo elandaki, Yesu ayebisaki Pilato mpo na nini asalaki bongo, alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbɛlɛ basaleli na ngai babundi mpo nakabama te epai ya Bayuda.” (Yoane 18:36) Pilato andimaki ete “eloko moko te ezali kondimisa bifundeli” oyo bazalaki kofunda Yesu. Kasi lokola bato bazalaki kotinda ye na makasi, Pilato apesaki nzela bábaka Yesu na nzete.—Luka 23:13-15; Yoane 19:12-16.
Bayekoli balandaka malako ya Yesu
6. Ndenge nini baklisto ya liboso bamonisaki ete baboyaki elimo ya mokili kasi balingaki bato?
6 Na nsima, bayekoli ya Yesu bayaki koyeba eloko basengelaki kosala mpo na kozala bato ya mokili te. Elingi koloba koboya elimo mpe misala ya mokili oyo etyolaka Nzambe, lokola masano ya kobomana mpe ya mbindo na bisika ya masano ya Baloma. Lokola baboyaki makambo wana, bakómaki kobenga bayekoli ete bayini ya bato. Nzokande, bazalaki soki moke te bayini ya bato, basalaki nde makasi básalisa bato mpo bázwa matomba na bibongiseli ya Nzambe oyo epesaka lobiko.
7. (a) Lokola bazalaki bato ya mokili te, bayekoli ya liboso bakutanaki na makambo nini? (b) Ndenge nini bazalaki kotalela bakonzi ya Leta mpe likambo etali kofuta mpako, mpe mpo na nini?
7 Ndenge moko na Yesu, bayekoli na ye mpe bakutanaki na minyoko, mingimingi epai ya bakonzi ya Leta oyo bayebaki mpenza bango malamu te. Kasi, na mobu 56 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo akomelaki baklisto na Loma, alobaki na bango ‘bátosaka bakonzi oyo bazali liboso [bakonzi ya Leta], mpo ezali na bokonzi te soki na nzela ya Nzambe te.’ Ezali te ete Yehova nde atyaka baguvɛrnema ya bato, kasi atikaka nzela ete ezala tii ntango Bokonzi na ye ekoyangela mabele mobimba. Mpo na yango, Paulo asɛngaki na baklisto bátosaka bakonzi mpe báfutaka mpako.—Baloma 13:1-7; Tito 3:1, 2.
8. (a) Kino wapi baklisto basengeli kotosa bakonzi oyo bazali liboso? (b) Ndenge nini baklisto ya liboso balandaki ndakisa ya Yesu?
8 Kasi, botosi na bango epai ya bakonzi ya Leta esengeli kozala na ndelo. Soki kowelana ezali kati na mibeko ya Yehova mpe mibeko ya bato, baoyo basalelaka Yehova basengeli kotosa mibeko ya Yehova. Buku moko (On the Road to Civilization—A World History) elobi mpo na baklisto ya liboso ete: “Baklisto baboyaki kosala misala mosusu oyo bana-mboka Baloma bazalaki kosala. Baklisto . . . bamonaki ete kokɔta na mosala ya soda ezali kobebisa kondima na bango. Balingaki te kosala misala ya politiki. Balingaki te kosambela ampɛrɛrɛ.” Ntango tribinale Monene ya Bayuda epesaki “mitindo polelepolele” ete bayekoli bátika kosakola, bango bazongisaki ete: “Tosengeli kotosa Nzambe lokola azali moyangeli na esika ya kotosa bato.”—Misala 5:27-29.
9. (a) Mpo na nini baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme basalaki likambo oyo basalaki na 66 T.B.? (b) Likambo yango ezali ndakisa malamu na lolenge nini?
9 Na oyo etali ntembe na makambo ya politiki mpe mosala ya soda, baklisto bamikɔtisaki na yango te. Na mobu 66 T.B., Bayuda oyo bazalaki na Yudea batombokelaki Kaisala. Eumelaki te, Baloma bazingaki Yelusaleme. Baklisto oyo bazalaki na engumba yango basalaki nini? Bamikundolaki toli oyo Yesu apesaki ya kokima mosika na engumba yango. Ntango Baloma balongwaki mpo na mwa ntango, baklisto bakatisaki Ebale Yolodani mpe bakendeki na bangomba ya etúká ya Pela. (Luka 21:20-24) Ndenge baboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki, yango ezali ndakisa mpo na baklisto mosusu nyonso ya sembo na mikolo oyo ezalaki koya.
Ata na mikolo oyo ya nsuka baklisto bamikɔtisaka na makambo ya politiki te
10. (a) Batatoli ya Yehova bamipesi na mosala nini, mpe mpo na nini? (b) Na makambo nini bamikɔtisaka te?
10 Mikanda mosusu oyo ezali kolobela bato, ezali komonisa ete ezali na bato na mikolo oyo ya nsuka oyo bazali koboya komikɔtisa na makambo ya politiki ndenge baklisto ya liboso baboyaki? Ɛɛ, ezali Batatoli ya Yehova. Na eleko oyo nyonso, bazali kokoba kosakola ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekomemela bato oyo balingaka boyengebene kimya, bolamu, mpe esengo ya seko. (Matai 24:14) Kasi mpo na bitumba to kowelana oyo esalemaka kati na bikólo, bamikɔtisaka na yango te.
11. (a) Na ndenge nini likanisi ya Batatoli na makambo ya politiki ekeseni mpenza na misala ya bakonzi ya mangomba? (b) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka oyo bato mosusu basalaka na makambo ya politiki?
11 Na bokeseni mpenza, bakonzi ya mangomba ya mokili oyo bazali mpenza komikɔtisa na makambo ya politiki. Na mikili mosusu, basalaka propagande makasi mpo na kondima moto moko ya politiki oyo alingi kokóma mokonzi to mpe basalaka nyonso ete bato mosusu bákóma bakonzi te. Kutu bakonzi mosusu ya mangomba basalaka na bisika minene ya politiki. Bamosusu bazali mpenza kondimisa bato ya politiki mpo bándima kosala oyo bakonzi ya mangomba balingi. Kasi, Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka na makambo ya politiki te. Bapekisaka mpe te bato oyo balingaka komikɔtisa na mangomba ya politiki, oyo balukaka kozwa ebonga na politiki, to mpe oyo basalaka voti na ntango ya kopona bakonzi. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala bato ya mokili te, yango wana Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka na makambo ya politiki te.
12. Lokola mangomba ya mokili oyo emikɔtisaka na makambo ya politiki, yango ebimisi makambo nini?
12 Ndenge Yesu alobaki yango, bikólo ezali mpenza kobunda mbala na mbala. Ata bato ya ekólo moko kasi balobaka monɔkɔ te, bazali kobunda. (Matai 24:3, 6, 7) Bakonzi ya mangomba bapesaka mabɔkɔ na ekólo moko to na etuluku moko mpo na kobunda na mosusu, mpe balendisaka bandimi na bango básalaka bongo. Nini emonanaka? Bandimi ya lingomba moko bazali kobomana bango na bango kaka mpo bazali bato ya ekólo moko te to balobaka monɔkɔ moko te. Yango eyokani te na mokano ya Nzambe.—1 Yoane 3:10-12; 4:8, 20.
13. Nini ezali komonana epai ya Batatoli ya Yehova lokola bamikɔtisaka te na makambo ya mokili?
13 Kasi, Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka na bitumba yango te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1939 (ebimeli ya Lingelesi) elobaki ete: “Baoyo nyonso bazali na ngámbo ya Nkolo bakomikɔtisa te na bitumba ya bikólo.” Na bikólo nyonso mpe na makambo nyonso, Batatoli ya Yehova bazali kokoba koboya komikɔtisa na makambo yango. Bapesaka nzela te na bokabwani ya makambo ya politiki mpe bitumba ya mokili oyo ebebisa bondeko na bango ya mokili mobimba. ‘Batuli mipanga na bango ete mizala biloko ya mosala ya kobalola mabele, mpe makonga na bango ete mázala biloko ya mosala ya kokata matiti.’ Lokola bamikɔtisaka na makambo ya mokili te, bayekolaka bitumba te.—Yisaya 2:3, 4, NW; 2 Bakolinti 10:3, 4.
14. Lokola bakabwani na mokili, makambo nini Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango?
14 Lokola bamikɔtisaka na makambo ya politiki te, yango ebendeli bango nini? Yesu alobaki ete: “Lokola bozali bato ya mokili te, . . . yango wana mokili ezali koyina bino.” (Yoane 15:19) Bakangaki Batatoli ya Yehova mingi na bolɔkɔ kaka mpo bazali basaleli ya Nzambe. Banyokolaki bamosusu, kutu babomaki bamosusu, kaka ndenge basalaki baklisto ya ekeke ya liboso. Yango ezali kosalema bongo mpamba te Satana, “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” azali kotɛmɛla basaleli ya Yehova, oyo bazali kati na ebongiseli yango te.—2 Bakolinti 4:4; Emoniseli 12:12.
15. (a) Bikólo nyonso ezali kokende wapi, mpe Batatoli ya Yehova bazali koboya nini na bokɛngi mpenza? (b) Mpo na nini kokabwana na mokili ezali likambo ya ntina mingi?
15 Basaleli ya Yehova bazali na esengo ndenge bazali bato ya mokili te, mpamba te bikólo oyo nyonso ezali kokende na nsuka na yango, na Armagedon. (Danyele 2:44; Emoniseli 16:14, 16; 19:11-21) Tokokwea na likama wana te mpamba te tozali komikɔtisa na makambo ya mokili te. Lokola tozali libota ya bomoko na mabele mobimmba, tozali sembo na Bokonzi ya Nzambe ya likoló. Ya solo, lokola tozali bato ya mokili te, bato ya mokili bazali kosɛka biso mpe konyokola biso. Kasi, etikali moke, mitungisi wana ekosila, mpamba te mokili oyo mabe oyo etambwisami na Satana ekobebisama libela na libela. Nzokande, baoyo bazali kosalela Yehova bakozala na bomoi ya seko na mokili na ye ya sika ya boyengebene oyo ekotambwisama na Bokonzi ya Nzambe.—2 Petelo 3:10-13; 1 Yoane 2:15-17.
Bozongeli
• Na lolenge nini Yesu amonisaki likambo etali kozala “bato ya mokili te”?
• Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki kotalela (a) elimo ya mokili, (b) bayangeli ya mokili, mpe (c) kofuta mpako?
• Na lolenge nini Batatoli ya Yehova na ntango na biso bamonisi mpenza ete bamikɔtisaka te na makambo ya mokili?
[Elilingi na lokasa 165]
Yesu alimbolaki ete ye na bayekoli na ye bazali “bato ya mokili te”