MOKAPO 15
Moná bolamu mpo na mosala na yo ya makasi
“Moto nyonso . . . amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi.”—MOSAKOLI 3:13.
1-3. (a) Ndenge nini bato mingi batalelaka mosala na bango? (b) Biblia elendisi biso tótalelaka mosala ndenge nini, mpe na mokapo oyo tokozwa biyano na mituna nini?
LELO oyo, bato mingi bazali kosepela na mosala na bango te. Lokola bazali kosala misala oyo ezwaka bango bangonga ebele kasi esepelisaka bango te, kolamuka ntɔngɔ nyonso mpo na kokende mosala ezalaka lokola etumbu. Lokola bazali na makanisi ya ndenge wana, ezali mwa mpasi bámipesa na mosala yango to mpe básepela na yango!
2 Biblia ezali kolendisa biso tótalelaka mosala ya makasi na ndenge ya malamu. Elobi ete mosala mpe mbuma na yango ezali lipamboli. Salomo akomaki boye: “Moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi. Ezali likabo ya Nzambe.” (Mosakoli 3:13) Yehova, Nzambe oyo alingaka biso mpe alukaka ntango nyonso bolamu na biso, alingi ete tósepela na mosala na biso mpe tózwela yango litomba. Mpo tótikala na kati ya bolingo na ye, tosengeli kotalela mosala ndenge oyo ye atalelaka yango mpe kolanda mitinda na ye.—Tángá Mosakoli 2:24; 5:18.
3 Na mokapo oyo, tokozwa biyano na mituna minei oyo: Ndenge nini tokoki komona bolamu mpo na mosala na biso ya makasi? Misala ya ndenge nini ebongi te mpo na bakristo ya solo? Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati kati na mosala na biso mpe makambo ya elimo? Mpe wapi mosala eleki ntina oyo tosengeli kosala? Kasi, tótalela naino ndakisa ya basali oyo baleki basali nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba: Yehova Nzambe ná Yesu Kristo.
MOSALI OYO ALEKI BASALI NYONSO NÁ MOSALI YA MAYELE
4, 5. Ndenge nini Biblia emonisi ete Yehova asalaka mosala ya ntina?
4 Yehova azali Mosali oyo aleki basali nyonso. Ebandeli 1:1 elobi boye: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.” Ntango Nzambe asilisaki kokela biloko nyonso awa na mabele, alobaki ete nyonso ezalaki “malamu mingi.” (Ebandeli 1:31) Yango elingi koloba ete asepelaki mingi na mosala nyonso oyo asalaki awa na mabele. Na ntembe te, Yehova, “Nzambe ya esengo,” asepelaki mingi na ndenge asalaki mosala ya ntina.—1 Timote 1:11.
5 Nzambe na biso azali kokoba kosala mosala. Bambula mingi mpenza nsima ya kozalisama ya mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, Yesu alobaki boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo.” (Yoane 5:17) Misala nini Nzambe azalaki kosala? Na ntembe te, longwa na likoló epai afandi, akobaki kotambwisa bato mpe kobatela bango. Asalaki “ekelamu ya sika,” elingi koloba lisangá ya bakristo oyo babotami lokola bana ya elimo mpe bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (2 Bakorinti 5:17) Azalaki mpe kosala mosala mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato, mokano oyo ezali ete baoyo balingaka ye bázwa bomoi ya seko na mokili ya sika. (Baroma 6:23) Na ntembe te, Yehova asepelaka mingi na mbuma oyo mosala yango eboti. Nzambe abendi bamilio ya bato oyo bandimi nsango ya Bokonzi mpe bazali kobongola bomoi na bango mpo bátikala na kati ya bolingo na ye.—Yoane 6:44.
6, 7. Makambo nini emonisi ete Yesu azalaki mosali ya molende banda kala?
6 Biblia emonisi ete Yesu asalaka mosala makasi banda kala. Liboso abotama lokola moto, Yesu azalaki “mosali ya mayele” ntango Nzambe azalaki kokela biloko nyonso “na likoló mpe awa na mabele.” (Masese 8:22-31; Bakolose 1:15-17) Ntango ayaki awa na mabele, Yesu akobaki kosala mosala makasi. Na bolenge na ye, ayekolaki mosala ya kotonga bandako mpe akómaki kobengama “mosali ya mabaya.”a (Marko 6:3) Mosala yango ezalaki kosɛnga kozala nzoto makasi mpe koyeba kosala malamu makambo ndenge na ndenge, mingimingi lokola na eloko wana bamasini mpo na kopasola mabaya ezalaki te, bazalaki na bamagazini te mpo na kosomba mabaya mpe biloko mosusu, bazalaki mpe na bisaleli ya kura te. Kanisá ndenge oyo Yesu azalaki kokende koluka mabaya mpo asala mosala na ye! Mbala mosusu asengelaki naino kokata nzete, na nsima, komema mabaya tii na esika oyo akosala mosala! Kanisá ndenge oyo azalaki kotonga bandako; na ndakisa, ndenge azalaki kobongisa mabaya mpe kosala nsamba ya ndako, kosala baporte, ata mpe biloko mosusu ya ndako. Na ntembe te Yesu azalaki koyoka esengo oyo moto azalaka na yango soki asali mosala makasi mpe na nsuka amoni ete esalemi malamu.
7 Yesu azalaki mpe na molende na mosala ya kosakola. Na boumeli ya mbula misato ná ndambo, amipesaki mobimba na mosala wana ya ntina mingi. Lokola alingaki ete bato mingi báyoka nsango oyo azalaki kosakola, azalaki kobungisa ntango te; azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe azalaki kosala tii na butu. (Luka 21:37, 38; Yoane 3:2) Azalaki kotambola “engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Yesu atambolaki bankama ya bakilomɛtrɛ na makolo, na banzela oyo etondi na putulu mpo na komemela bato nsango malamu.
8, 9. Ndenge nini Yesu amonaki bolamu mpo na mosala na ye ya makasi?
8 Yesu amonaki bolamu mpo na mosala na ye? Ɛɛ! Alonaki mboto ya Bokonzi mpe atikaki bilanga oyo mbuma na yango etelaki mpe ezalaki kosɛnga bábuka yango. Yesu azalaki na molende mpe na mposa makasi ya kosala mosala ya Nzambe mpe azalaki ata komipimela kolya mpo mosala yango esalema. (Yoane 4:31-38) Kanisá esengo oyo azalaki na yango na nsuka ya mosala na ye awa na mabele, ntango alobaki epai ya Tata na ye ete: “Napesi yo nkembo na mabele, mpo nasilisi mosala oyo opesaki ngai nasala.”—Yoane 17:4.
9 Ya solo mpenza, Yehova ná Yesu bazali bandakisa eleki monene ya basali oyo bamonaka bolamu mpo na mosala na bango ya makasi. Bolingo na biso epai ya Yehova etindaka biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe.’ (Baefese 5:1) Bolingo na biso mpo na Yesu etindaka biso ‘tólanda matambe na ye malamumalamu.’ (1 Petro 2:21) Sikoyo, tótalela ndenge oyo biso mpe tokoki komona bolamu mpo na mosala na biso ya makasi.
NDENGE OYO TOKOKI KOMONA BOLAMU MPO NA MOSALA NA BISO YA MAKASI
10, 11. Nini ekoki kosalisa biso tókóma kotalela mosala na biso na ndenge ya malamu?
10 Bakristo ya solo basengeli kosalaka mosala. Mposa na biso ezalaka ete tósepela na mosala na biso; kasi, yango ekoki kozala mpasi soki tosalaka mosala moko oyo tolingaka te. Soki ezali bongo, ndenge nini tokoki komona bolamu mpo na mosala na biso?
11 Soki tozali na makanisi ya malamu. Ntango mosusu tozalaka na likoki te ya kobongola bomoi na biso, kasi tokoki kobongola makanisi na biso. Kokanisa ndenge oyo Nzambe atalelaka mosala ekoki kosalisa biso tókóma kotalela mosala na biso na ndenge ya malamu. Na ndakisa, soki ozali tata ya libota, kanisá ete mosala na yo, ata soki ezali ya lokumu te, esalisaka yo oleisa libota na yo. Nzokande, kokokisa bamposa ya libota na yo ezali likambo ya ntina mingi na miso ya Nzambe. Liloba na ye elobi ete moto oyo azali kokokisa bamposa ya libota na ye te “azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.” (1 Timote 5:8) Soki ozali koyeba ete mosala na yo ezali na ntina mpo esalisaka yo okokisa mokumba oyo Nzambe apesi yo, yango ekoki kosalisa yo osepela na mosala yango mpe otalelaka yango na ndenge oyo mbala mosusu baninga na yo ya mosala batalelaka yango te.
12. Na ndenge nini kozala na molende na mosala mpe kozala sembo epesaka matomba?
12 Soki tozali na molende mpe tozali sembo. Kozala makasi na mosala mpe koyekola ndenge malamu ya kosala yango ekoki komemela moto matomba. Mbala mingi, bakonzi ya mosala basepelaka na basali ya molende mpe oyo bayebi mpenza mosala. (Masese 12:24; 22:29) Lokola tozali bakristo ya solo, tosengeli mpe kozala sembo na mosala, tosengeli te koyiba mbongo, biloko ya mosala, to ngonga ya mosala. (Baefese 4:28) Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, kozala sembo ezali na matomba mingi. Mbala mingi, moto ya mosala oyo ayebani ete azalaka sembo, batyelaka ye motema. Ata soki nkolo-mosala amonaka yo ete ozali mosali ya molende to amonaka yo te, okoki koyoka esengo ya kozala na “lisosoli ya sembo” mpe koyeba ete ozali kosepelisa Nzambe na yo.—Baebre 13:18; Bakolose 3:22-24.
13. Ndakisa na biso ya malamu na esika ya mosala ekoki kobota mbuma nini?
13 Soki tozali koyeba ete etamboli na biso ekoki kopesa Nzambe nkembo. Soki na esika ya mosala tozalaka ntango nyonso na etamboli oyo ebongi na mokristo, bato mosusu bakozanga te komona yango. Yango ekoki kobota mbuma nini? Tokoki ‘kokembisa mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe.’ (Tito 2:9, 10) Ya solo, etamboli na biso ya malamu ekoki kosala ete bato mosusu básepela na losambo na biso mpe bábendama na yango. Kanisá esengo oyo okozala na yango soki moninga moko ya mosala ayambi solo mpo opesaki ndakisa ya malamu na esika ya mosala! Likambo mosusu mpe oyo ezali na ntina koleka: Mbano nini eleki mbano ya koyeba ete etamboli na yo ya malamu ezali kopesa Yehova nkembo mpe ezali kosepelisa motema na ye?—Tángá Masese 27:11; 1 Petro 2:12.
TÓZALA NA BOSOSOLI MPO NA KOPONA MOSALA
14-16. Mituna nini tosengeli komituna liboso ya kondima to koboya mosala moko?
14 Biblia epesi biso te liste ya misala oyo ebongi mpe misala oyo ebongi te. Yango elingi koloba te ete tokoki kondima mosala nyonso. Biblia ekoki kosalisa biso tópona mosala ya malamu mpe oyo ebongi, oyo ekosepelisa Nzambe; mpe koboya mosala oyo ekosepelisa ye te. (Masese 2:6) Liboso tóndima mosala moko, ezali na mituna mibale ya ntina oyo tosengeli komituna.
15 Kosala mosala yango ekomonisa ete nazali kosala likambo oyo Biblia epekisi? Liloba ya Nzambe epekisi koyiba, kokosa, mpe kosala bikeko mpo na losambo. (Kobima 20:4; Misala 15:29; Baefese 4:28; Emoniseli 21:8) Tosengeli koboya mosala nyonso oyo ezali kosɛnga biso tósalaka makambo yango. Lokola tolingaka Yehova, tokoki te kondima mosala oyo ekosɛnga biso tósala makambo oyo ezali kobuka mibeko na ye.—Tángá 1 Yoane 5:3.
16 Kosala mosala yango ekomonisa polele ete nazali kosangana to kolendisa misala ya mabe? Tózwa ndakisa moko. Kosala na esika oyo bayambaka bato ezali mosala ya mabe te. Kasi, ekozala boni soki bapesi mokristo mosala yango na esika oyo balongolaka basi zemi? Toboyi te, mosala na ye ezali kosɛnga te ete ye mpe apesaka mpenza mabɔkɔ ntango bazali kolongola mwasi zemi. Atako bongo, kosala kuna mokolo na mokolo ekomonisa ete azali kosala elongo na minganga oyo balongolaka basi zemi, likambo oyo Liloba ya Nzambe epekisi. (Kobima 21:22-24) Lokola tolingaka Yehova, tokolinga soki moke te kosangana na makambo oyo Biblia epekisi.
17. (a) Tosengeli kotalela nini mpo na kozwa bikateli na makambo etali mosala? (Talá etanda “Nasengeli kondima mosala oyo?”) (b) Ndenge nini lisosoli na biso ekoki kosalisa biso tózwa bikateli oyo ekosepelisa Nzambe?
17 Moto akoki kozwa biyano na mituna mingi oyo akoki komituna na ntina etali mosala soki ataleli malamu mituna mibale oyo etunami na paragrafe 15 mpe 16. Longola yango, ezali na mwa makambo mosusu oyo tosengeli kotalela mpo na kozwa bikateli oyo etali mosala.b Tokoki koluka te ete moombo ya sembo apesa malako oyo ekolobela makambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango na oyo etali mosala. Esengeli biso moko tósalela bososoli. Ndenge tomonaki yango na Mokapo 2, tosengeli koyekola ndenge ya kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi ya mokolo na mokolo mpo na koteya lisosoli na biso. Soki ‘tozali kosalela makoki na biso ya kososola,’ lisosoli na biso ekoki kosalisa biso tózwa bikateli oyo ekosepelisa Nzambe mpe ekosalisa biso tótikala na kati ya bolingo na ye.—Baebre 5:14.
TÓZALA NA BOKATIKATI NA NDENGE YA KOTALELA MOSALA
18. Mpo na nini kobatela bokatikati na makambo ya elimo ezali pɛtɛɛ te?
18 Na “mikolo ya nsuka” oyo ezali “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” kobatela bokatikati na makambo ya elimo ezali pɛtɛɛ te. (2 Timote 3:1) Kozwa mosala mpe kobatela yango ezali lisɛki te. Lokola tozali bakristo ya solo, toyebaka ete tosengeli kosala mosala makasi mpo na koleisa mabota na biso. Kasi, soki tokebi te, makambo oyo tokokutana na yango na esika ya mosala to ezaleli ya kolinga mingi biloko ya mokili ekoki kopekisa biso tókokisa mikano ya elimo. (1 Timote 6:9, 10) Tótalela ndenge oyo tokoki kobatela bokatikati, mpo tóluka koyeba mpenza “makambo oyo eleki ntina.”—Bafilipi 1:10.
19. Mpo na nini ebongi tótyela Yehova motema mobimba mpe ezaleli yango esalisaka biso tóboya makambo nini?
19 Tyelá Yehova motema na yo mobimba. (Tángá Masese 3:5, 6.) Ebongi mpenza tótyela Yehova motema mobimba! Kutu, atyelaka biso likebi. (1 Petro 5:7) Ayebi bamposa na biso malamu koleka biso moko, azalaka mpe ntango nyonso pene mpo na kosunga biso. (Nzembo 37:25) Yango wana, ezali na ntina mingi tólanda toli ya Liloba na ye oyo elobi boye: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo [Nzambe] alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’” (Baebre 13:5) Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bandimaka mpenza ete Nzambe azangaka te kopesa biso biloko ya ntina mpo na bomoi. Soki tozali mpenza na kondima ete Yehova atyelaka biso likebi, tokomitungisa mingi te mpo na bamposa ya libota na biso. (Matai 6:25-32) Tosengeli kotika nzela te ete mosala na biso ebosanisa biso makambo ya elimo, na ndakisa kosakola mpe koyangana na makita.—Matai 24:14; Baebre 10:24, 25.
20. Kozala liso alima elimboli nini, mpe ndenge nini okoki kobatela liso na yo alima?
20 Zalá liso alima. (Tángá Matai 6:22, 23.) Kozala liso alima elimboli kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Soki liso ya mokristo ezali alima, ekobanda kotala kaka likambo moko: kosala mokano ya Nzambe. Soki liso na biso ezali kotala esika ya malamu, tokomitungisa te na koluka mosala ya mbongo mingi to bomoi ya mindɔndɔ. Tokozwama mpe te na motambo ya koluka ntango nyonso kozala na biloko ya mikolo oyo, oyo bapiblisite ezali koluka kondimisa biso ete soki tozali na yango te, tokozanga eloko moko ya ntina na bomoi na biso. Ndenge nini okoki kobatela liso na yo alima? Boyá kokɔta banyongo ya mpambampamba. Koluka kokómisa bomoi na yo mindɔndɔ te na ebele ya biloko oyo ekosɛnga yo ntango mingi. Landá toli ya Biblia oyo elobi ete tósepela na “bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto.” (1 Timote 6:8) Lukáká ndenge oyo okoki kokómisa bomoi na yo pɛpɛlɛ.
21. Mpo na nini tosengeli koluka naino makambo oyo eleki ntina, mpe nini esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso?
21 Tyá makambo ya elimo na esika ya liboso mpe kangamá na yango. Lokola tokoki te kosala makambo nyonso na bomoi, tosengeli kolukaka naino makambo oyo eleki ntina. Soki tosali yango te, makambo ya mpambampamba ekolya biso ntango, mpe tokozanga ntango ya komipesa na makambo oyo eleki ntina. Makambo nini esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso? Na mokili, bato mingi bapesaka motuya mingi na bakelasi milaimilai mpo na kozwa mosala ya mbongo mingi. Nzokande, Yesu alendisaki bayekoli na ye ete ‘bákoba koluka liboso bokonzi.’ (Matai 6:33) Biso bakristo ya solo tosengeli mpenza kotyaka Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso. Bomoi na biso mobimba, elingi koloba makambo oyo tozali kopona, mikano oyo tozali komityela, mpe misala oyo tozali kosala, esengeli komonisaka ete Bokonzi mpe mokano ya Nzambe ezali na ntina koleka biloko mpe mikano ya mokili.
ZALÁ NA MOLENDE NA MOSALA YA KOSAKOLA
22, 23. (a) Mosala monene ya bakristo ya solo ezali nini, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete mosala yango ezali na ntina mingi mpo na biso? (Talá etanda “Ekateli na ngai ememeli ngai esengo mpe bolamu.”) (b) Ozali na ekateli nini na oyo etali mosala na yo?
22 Lokola nsuka ekómi mpenza pene, tosengeli kotya makanisi na biso na mosala ya liboso ya bakristo ya solo: kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Lokola Yesu, oyo azali Ndakisa na biso, tosengeli komipesa na mosala yango oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. Ndenge nini tokoki komonisa ete mosala yango ezali na ntina mingi mpo na biso? Basaleli mingi ya Nzambe bazali basakoli na masangá na bango mpe bamipesaka na mosala yango na motema mobimba. Bamosusu bazwi bibongiseli mpo na kosala lokola babongisi-nzela to bamisionɛrɛ. Baboti mingi, lokola bayebi ntina ya komityela mikano ya elimo, balendisaka bana na bango básala mosala ya ntango nyonso. Bato oyo basakolaka na molende bamonaka mpenza bolamu mpo na mosala na bango ya makasi? Ɛɛ! Kosalela Yehova na motema mobimba epesaka esengo ya solosolo mpe ebele ya mapamboli.—Tángá Masese 10:22.
23 Mingi kati na biso tosalaka misala oyo ezwaka biso bangonga ebele mpo na koleisa mabota na biso. Tóbosana te ete Yehova alingi ete tómona bolamu mpo na mosala na biso ya makasi. Soki toyokanisi makanisi mpe misala na biso ná makanisi mpe mitinda na ye, tokoki kosepela na mosala na biso. Atako bongo, tózala na ekateli ya kotika te ete mosala na biso ebosanisa biso mosala monene oyo tosengeli kosala: kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Soki tozali kotya mosala yango na esika ya liboso na bomoi na biso, tokomonisa bolingo na biso epai ya Yehova mpe na ndenge yango, tokotikala na kati ya bolingo na ye.
a Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mosali ya mabaya” ezali “nkombo oyo bazalaki kobenga na yango moto nyonso oyo azalaki kosalela mabaya, ezala mpo na kotonga bandako to kosala bamesa ná bakiti, mpe biloko mosusu ya mabaya.”
b Mpo na koyeba makambo mosusu ya kotalela liboso ya kozwa ekateli na oyo etali mosala, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/1999, nkasa 28-30, mpe ya 15/10/1982, lokasa 26 (na Lifalanse).