MOKAPO 7
Makita oyo ‘elendisaka na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu’
BANDA kala, basaleli ya Yehova bayanganaka na ndenge oyo ebongisami. Na Yisraele, mibali nyonso bazalaki kokende na Yerusaleme mpo na bafɛti misato ya minene. (Mib. 16:16) Na siɛklɛ ya liboso, bakristo bazalaki koyangana mbala na mbala, mingimingi na bandako ya bato. (Flm. 1, 2) Lelo oyo, tozalaka na makita, na mayangani ya mike, mpe mayangani ya minene. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bayanganaka elongo? Libosoliboso mpo yango ezali na ntina mingi na kati ya losambo na biso.—Nz. 95:6; Kol. 3:16.
2 Makita mpe esalisaka bayangani. Mpo na fɛti ya mwa bandako ya matiti, oyo ezalaki kosalema nsima ya mbula nsambo nyonso, Bayisraele bazwaki etinda oyo: “Yanganisá bato, mibali, basi ná bana mike mpe mopaya oyo afandi na yo, oyo azali kofanda na kati ya baporte na yo, mpo báyoka mpe mpo báyekola, mpo basengeli kobanga Yehova Nzambe na bino mpe kokeba ete bákokisa maloba nyonso ya mobeko oyo.” (Mib. 31:12) Emonani polele ete ntina mpenza oyo toyanganaka elongo ezali mpo ‘Yehova ateya’ biso. (Yis. 54:13) Makita epesaka biso mpe libaku ya koyebana na bandeko, kolendisana, mpe kozwa makasi epai ya baninga.
MAKITA YA LISANGÁ
3 Bayekoli oyo bazalaki koyangana elongo na nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B. bamipesaki na mateya ya bantoma, mpe “mokolo na mokolo bazalaki ntango nyonso kosangana na tempelo na bomoko mpenza.” (Mis. 2:42, 46) Na nsima, ntango bakristo bazalaki koyangana mpo na losambo, bazalaki kotánga makambo oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, kati na yango mikanda ya bantoma mpe ya bakristo mosusu. (1 Ko. 1:1, 2; Kol. 4:16; 1 Tes. 1:1; Yak. 1:1) Lisangá mobimba ezalaki mpe kobondela. (Mis. 4:24-29; 20:36) Na bantango mosusu, bamisionɛrɛ bazalaki koyebisa makambo oyo bakutanaki na yango na mosala na bango. (Mis. 11:5-18; 14:27, 28) Bazalaki mpe koyekola mateya ya Biblia mpe ndenge oyo bisakweli ya Makomami ezalaki kokokisama. Bazalaki mpe kolobela etamboli oyo ebongi na bakristo mpe ezaleli ya kokangama na Nzambe. Bazalaki kolendisa bato nyonso básakolaka nsango malamu na molende.—Rom. 10:9, 10; 1 Ko. 11:23-26; 15:58; Ef. 5:1-33.
Na mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi, tozali na mposa makasi ya malendisi oyo tozwaka na makita na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ
4 Na mikolo na biso, makita ya lisangá esalemaka lokola oyo ya ntango ya bantoma. Tolandaka na likebi elendiseli oyo ezali na Baebre 10:24, 25 ete: “Tótyelanaka likebi . . . , tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” Na mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi, tozali na mposa makasi ya malendisi oyo tozwaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpo tókoba kozala makasi na elimo mpe tóbatela bosembo na biso. (Rom. 1:11, 12) Biso bakristo tofandi na kati ya libota oyo etɛngamá mpe egumbamá. Tobwaki ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili oyo. (Flp. 2:15, 16; Tito 2:12-14) Soki na lisangá ya Yehova te, epai wapi tokoki kozala elongo na bato ya malamu? (Nz. 84:10) Lisusu, nini ekoki kozala na litomba koleka koyekola mpe kotalela elongo Liloba ya Nzambe? Tótalela sikoyo makita ndenge na ndenge oyo ebongisamá mpo na bolamu na biso.
LIKITA YA NSUKA YA PƆSƆ
5 Eteni ya liboso ya likita ya nsuka ya pɔsɔ ezalaka diskur moko oyo euti na Biblia, oyo ebongisami mingimingi mpo na bato nyonso, ata mpe baoyo bayei na makita mpo na mbala ya liboso. Diskur ya bato nyonso esalisaka mingi na kokokisa bamposa ya elimo, ezala ya bato ya sika to ya basakoli ya lisangá.—Mis. 18:4; 19:9, 10.
6 Kristo Yesu, bantoma na ye, mpe bakristo mosusu bazalaki kosala makita ya bato nyonso lokola oyo esalemaka lelo oyo na masangá ya basaleli ya Yehova. Yesu azalaki molobi oyo aleki balobi nyonso awa na mabele. Bato balobaki mpo na ye ete: “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te.” (Yoa. 7:46) Yesu azalaki koloba lokola moto oyo azali na bokonzi; bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki kokamwa mpenza. (Mat. 7:28, 29) Bato oyo bazalaki kobatela maloba na ye na mitema na bango bazwelaki yango bolamu mingi. (Mat. 13:16, 17) Bantoma balandaki ndakisa na ye. Misala 2:14-36 elobeli diskur ya kafukafu oyo Petro asalaki na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Ntango bankóto ya bato bayokaki diskur yango, mitema na bango etindaki bango básalela makambo oyo bayokaki. Nsima ya mwa bambula, bato mosusu bakómaki bandimi ntango bayokaki diskur oyo Paulo asalaki na Atene.—Mis. 17:22-34.
7 Ndenge moko mpe lelo oyo, bamilio ya bato bazwi matomba na badiskur ya bato nyonso oyo esalemaka pɔsɔ na pɔsɔ na masangá mpe badiskur oyo esalemaka na mayangani ya mike to ya minene. Badiskur yango esalisaka biso tókoba kotya likebi na mateya ya bokristo mpe tópikama makasi na mosala ya Bokonzi. Ntango tozali kobengisa bato oyo bazali kosepela na mateya na biso, ata mpe bato mosusu, tokoki kosalisa bango báyeba mateya ya moboko ya Biblia.
8 Diskur ya bato nyonso elobelaka makambo ndenge na ndenge. Elobelaka mateya ya Biblia mpe bisakweli, mitinda mpe batoli ya Biblia mpo na bomoi ya libota, libala, mikakatano oyo bilenge bazali kokutana na yango, mpe bizaleli oyo bakristo basengeli kozala na yango. Badiskur mosusu elobelaka biloko ya kokamwa oyo Yehova akelá. Mosusu elobelaka bato ya kondima, ya mpiko mpe ya sembo oyo Biblia elobeli, mpe emonisaka mateya oyo tokoki kozwa na bandakisa na bango lelo oyo.
9 Mpo tózwa mpenza matomba na diskur ya bato nyonso, tosengeli koyokaka molobi na likebi, kolukaka bavɛrsɛ oyo azali kopesa, mpe kolanda ye malamu ntango azali kotánga mpe kolimbola bavɛrsɛ yango. (Luka 8:18) Ntango tozali koluka koyeba bosolo ya makambo na ndenge wana, tokozala na ekateli ya kokangama makasi na makambo yango mpe kosalela yango.—1 Tes. 5:21.
10 Soki bandeko oyo bakoki kosala badiskur bazali mingi, na ntembe te diskur ya bato nyonso ekosalema pɔsɔ na pɔsɔ. Mbala mingi babengaka mpe balobi ya masangá oyo ezali pene. Soki balobi bazali te, badiskur yango ekosalema mbala nyonso oyo likoki emonani.
11 Eteni ya mibale na likita ya nsuka ya pɔsɔ ezali Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo esalemaka na mituna mpe biyano na masolo oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli. Na nzela ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Yehova apesaka biso bilei ya elimo na ntango ebongi.
12 Mbala mingi, masolo ya boyekoli emonisaka ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi ya mokolo na mokolo. Epesaka bakristo makasi ya kotɛmɛla “elimo ya mokili” mpe koboya etamboli ya mbindo. (1 Ko. 2:12) Masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebakisaka boyebi na biso ya mateya mpe ya bisakweli ya Biblia, mpe yango esalisaka biso tóyeba makambo ya sika oyo esembolami mpe tótikala na nzela ya boyengebene. (Nz. 97:11; Mas. 4:18) Koyangana na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe kopesa biyano ekoki kosalisa biso tósepela na elikya ya mokili ya sika mpe ya boyengebene oyo Yehova alaki. (Rom. 12:12; 2 Pe. 3:13) Boyekoli yango esalisaka biso tólona mbuma ya elimo mpe tókómisa makasi mposa na biso ya kosalela Yehova na molende. (Gal. 5:22, 23) Elendisaka biso tókoka koyikela komekama mpiko mpe tótonga ‘moboko malamu na mikolo oyo ezali koya’ mpo ‘tósimba makasi bomoi ya solosolo.’—1 Tim. 6:19; 1 Pe. 1:6, 7.
13 Ndenge nini tokoki kozwa matomba na ebongiseli yango oyo ezwami mpo tólyaka malamu na elimo? Tosengeli kobongisa lisolo ya boyekoli na ndako, ezala moto ye moko to elongo na libota, kotánga bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami te, mpe kopesa biyano na maloba na biso moko na likita yango. Yango ekokɔtisa mpenza mateya ya solo na motema na biso, mpe bandeko bakosepela ntango bazali koyoka maloba oyo emonisi kondima na biso. Soki tozali koyoka na likebi ntango bandeko bazali kopesa biyano, tokozwa matomba na lisolo ya pɔsɔ nyonso.
LIKITA YA KATI YA PƆSƆ
14 Pɔsɔ nyonso, lisangá eyanganaka na Ndako ya Bokonzi mpo na likita oyo ebengami Bomoi mpe mosala ya bakristo. Likita yango ezali na biteni misato oyo ebongisami mpo na kosalisa biso tózala basaleli ya Nzambe oyo ‘babongi mpenza.’ (2 Ko. 3:5, 6) Programɛ mpe makambo oyo tokoyekola ebimaka sanza na sanza na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Mokanda ya likita yango ezalaka mpe na makanisi mpo na kobanda lisolo na mosala ya kosakola.
15 Eteni ya liboso ya likita yango, oyo ebengami Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe, esalisaka biso tóyeba malamu makambo ndenge na ndenge oyo etali masolo ya Biblia mpe ndenge oyo tokoki kosalela yango. Likita yango ezali na diskur moko, botángi ya Biblia, mpe lisolo na bayangani oyo euti na botángi ya Biblia ya pɔsɔ yango. Bililingi mpe bitanda oyo esalisaka biso tóyeba malamu masolo yango ezali mpe na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Koyekola Biblia na mozindo ndenge wana ekosalisa biso na bomoi na biso mpe na mosala na biso ya koteya, mpo ‘tókoka mpenza, tózala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’—2 Tim. 3:16, 17.
16 Eteni ya mibale ya likita yango, oyo ebengami Omipesa na mosala ya kosakola, ebongisami mpo na kopesa bato nyonso libaku ya kosala bilakiseli mpo na mosala ya kosakola mpe kokolisa makoki na bango ya kosakola mpe ya koteya. Longola badevuare ya bana-kelasi, ezali mpe na bavideo oyo elakisaka ndenge ya kobanda lisolo. Eteni yango ya likita esalisaka biso tózwa “lolemo ya bato oyo bateyami” mpo ‘tóyeba ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa bato oyo balɛmbi.’—Yis. 50:4.
17 Eteni ya misato, oyo ebengami Bomoi ya bakristo, emonisaka ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi ya mokolo na mokolo. (Nz. 119:105) Likambo ya ntina mingi na eteni yango ezali Boyekoli ya Biblia na lisangá. Ndenge moko na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Boyekoli ya Biblia na lisangá esalemaka na mituna mpe biyano.
18 Sanza nyonso, ntango Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo ebimi, mokambi-misala ya bankulutu, to nkulutu oyo akosalisa ye, akotánga yango na likebi mpe akosala programɛ. Pɔsɔ na pɔsɔ, nkulutu moko oyo azali moteyi ya malamu mpe oyo lisangani ya bankulutu endimi akozala prezida ya likita yango. Mokumba na ye ezali mpe ya kosala makasi mpo likita ebanda mpe esila na ngonga oyo etyami, mpe akopesa bana-kelasi longonya mpe toli.
19 Soki tozali kobongisa likita Bomoi mpe mosala, koyangana na likita yango mpe kosala masolo to kopesa biyano, tokoyeba makambo mingi ya Biblia, tokoyeba malamumalamu mitinda ya Biblia, tokosakola na mpiko mpe tokoyeba kokómisa bato bayekoli. Bato oyo bazwi naino batisimo te oyo bayanganaka na likita yango bakoki mpe kozwa matomba na bolingo ya bandeko ya lisangá mpe na masolo ya elimo oyo elendisaka. Mpo tómibongisa mpo na likita yango mpe makita mosusu, tokoki kosalela Watchtower Library, JW Library®, Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET (soki ezali na monɔkɔ na bino) mpe bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi. Bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi ezalaka na mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisá, Index des publications des Témoins de Jéhovah to Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova, mabongoli mingi ya Biblia, ata mpe mabongoli mosusu ya Biblia, Concordance, diksionɛrɛ mpe mikanda mosusu oyo ekoki kosalisa na kosala bolukiluki. Moto nyonso akoki kosalela bibliotɛkɛ yango liboso to nsima ya makita.
MAKITA YA MOSALA YA KOSAKOLA
20 Na mikolo mpe bangonga ekeseni na kati ya pɔsɔ, mpe na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, basakoli ya bituluku bayanganaka mwa ntango mokuse na likita ya mosala ya kosakola. Mbala mingi, likita yango esalemaka na bandako ya bandeko to na bisika mosusu oyo ebongi. Ekoki mpe kosalema na Ndako ya Bokonzi. Soki bituluku mikemike ya basakoli ezali kosala likita yango na bisika ekeseni na teritware ya lisangá, ekozala mpasi te mpo basakoli bákende na likita yango mpe bákóma na teritware. Ekozwa ntango mingi te mpo na kokabola basakoli mpe ekoumela te mpo bákóma na teritware. Ekozala mpe mpasi te mpo mokɛngɛli ya etuluku atyela bandeko ya etuluku na ye likebi. Atako eleki malamu etuluku mokomoko esalaka likita na yango, makambo mosusu ekoki kosɛnga ete bituluku ebele esangana esika moko. Na ndakisa, soki basakoli oyo babimaka na mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ bazali mingi te, ekoki kozala malamu kosangisa bituluku mingi esika moko to mpe lisangá mobimba ekoki kosala likita yango esika moko na Ndako ya Bokonzi to na esika mosusu oyo ebongi. Na ndenge yango, basakoli bakozanga te kosakola. Lisangá ekoki mpe komona malamu koyangana elongo mpo na likita ya mosala ya kosakola na Ndako ya Bokonzi na mikolo oyo bato bakei mosala te (jours feriés). To mpe lisangá ekoki kopona kosala likita ya mosala ya kosakola esika moko nsima ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.
21 Soki etuluku mokomoko eyangani na esika na yango, mokɛngɛli ya etuluku nde akotambwisa likita ya mosala ya kosakola. Na bantango mosusu, mokɛngɛli ya etuluku akoki kosɛnga mosungi na ye to ndeko mobali mosusu oyo abongi atambwisa likita ya mosala ya kosakola. Motambwisi asengeli komibongisa mpo alobela likambo moko oyo esalemaka na teritware mpe oyo ekosalisa na mosala ya kosakola. Nsima ya kokabola basakoli, ndeko moko akosala libondeli. Nsima na yango, bango nyonso bakokende mbala moko kosakola. Likita yango esengeli koumela ata miniti 5 kasi eleka miniti 7 te, mpe soki esalemi nsima ya makita ya lisangá, esengeli kozala lisusu mokuse koleka. Makita yango esengeli kolendisa bandeko oyo bakobima na mosala ya kosakola mpe kopesa bango makanisi oyo ebongi mpe malako oyo bakosalela. Basakoli ya sika to oyo basengeli na lisalisi bakoki kosakola elongo na basakoli oyo bamesani mpo bápesa bango formasyo.
MAKITA NA MASANGÁ YA SIKA TO YA MIKE
22 Lokola bato ebele bazali kokóma bayekoli, masangá mpe ezali kokóma ebele. Mbala mingi, mokɛngɛli ya zongazonga nde asɛngaka ete lisangá ya sika esalema. Kasi, na bantango mosusu, bituluku ya mike ekoki komona ete eleki malamu eyanganaka na lisangá moko ya pembeni.
23 Masangá mosusu ya mike ekoki kozala kaka na bandeko basi. Soki ezali bongo, ndeko mwasi oyo azali kobondela na lisangá to azali kotambwisa makita asengeli kozipa motó na ye, na boyokani na kotosa etinda ya Biblia. (1 Ko. 11:3-16) Mbala mingi, ndeko mwasi yango asengeli kofanda na kiti, azali kotala bayangani. Bandeko basi basalaka badiskur na makita te. Kasi, bakotánga makambo oyo ezali na mikanda ya ebongiseli ya Yehova mpe bakolimbola yango, to mpo na kobongola mwa moke, bakoki kosala yango lokola lisolo, to lokola elakiseli. Biro ya filiale ekopona ndeko mwasi moko kati na bango mpo azwaka mpe atindaka mikanda na biro mpe azwa bibongiseli mpo na kosala makita. Na nsima, soki bandeko mibali bakokisi masɛngami mpo na kosala yango bango nde bakozwa mikumba yango.
MAYANGANI YA ZONGAZONGA
24 Mbala mibale na mbula, bibongiseli ezwamaka mpo masangá ya zongazonga moko esala liyangani ya zongazonga ya mokolo moko. Ntango wana ya esengo epesaka bayangani nyonso libaku ya ‘kofungola mitema na bango’ mpo na koyebana na bakristo mosusu. (2 Ko. 6:11-13) Lokola ebongiseli ya Yehova eyebi bamposa ya bandeko, ebongisaka mitó ya makambo oyo euti na Biblia mpe masolo ndenge na ndenge oyo ekosalema. Mateya yango epesamaka na nzela ya badiskur, bilakiseli, bilakiseli ya kozongela ndenge makambo elekaki, bilakiseli ya bandeko bazali kolobaloba bango moko, mpe mituna-lisolo. Mateya yango oyo eyaka na ntango oyo ebongi elendisaka bayangani nyonso. Mayangani yango epesaka bayekoli ya sika libaku ya kozwa batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Yehova.
MAYANGANI YA ETÚKÁ
25 Mbala moko na mbula, tosalaka mayangani ya minene. Mbala mingi ezalaka mayangani ya etúká oyo eumelaka mikolo misato, oyo esangisaka bandeko ya masangá ya bazongazonga ebele. Kasi, bafiliale oyo ezali na basakoli mingi te ekoki komona malamu masangá nyonso eyangana esika moko. Na mikili mosusu, ndenge ya kobongisa mayangani yango ekoki kokesana na kotalela ndenge makambo ezali to na kolanda malako oyo euti na ebongiseli ya Yehova. Na bantango mosusu, bankóto na bankóto ya Batatoli ya Yehova bakendaka na mayangani ya minene, ezala oyo esangisaka mikili mingi to ya sipesiale, na bikólo oyo eponami. Banda bambula mingi, bato ebele bayoki nsango malamu ya Bokonzi na nzela ya piblisite oyo tosalaka mpo mayangani minene ya Batatoli ya Yehova.
26 Mpo na bato oyo bamipesi na Yehova, mayangani ya etúká ezalaka libaku ya kosambela Yehova na esengo mpe na bomoko. Na mayangani yango, tozwaka bingɛngiseli ya sika ya mateya ya solo. Na mayangani mosusu, mikanda ya sika ebimaka mpo na boyekoli ya moto ye moko to ya lisangá to mpo na mosala ya kosakola. Bato bazwaka mpe batisimo na mayangani yango. Mayangani ya etúká esalisaka mingi mpo tókola na elimo. Emonisaka ete basaleli ya Yehova na mokili mobimba bazali mpenza libota moko ya bakristo oyo bamipesi na Nzambe, oyo bamonisaka elembo ya bayekoli ya Yesu Kristo.—Yoa. 13:35.
27 Soki tozali koyangana na makita na masangá na biso mpe tozali kokende na mayangani ya zongazonga mpe ya etúká, tokolendisama mpo na kosala mokano ya Yehova. Tokobatelama mpe na makambo mabe ya mokili oyo ekoki kobebisa kondima na biso. Mayangani yango epesaka Yehova lokumu mpe nkembo. (Nz. 35:18; Mas. 14:28) Tokoki mpenza kozongisa matɔndi epai ya Yehova oyo apesi basaleli na ye mabaku wana ya kolendisama na elimo na mikolo oyo ya nsuka.
BILEI YA MPOKWA YA NKOLO
28 Mbala moko na mbula, na mokolo oyo Yesu Kristo akufaki, masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba esalaka Ekaniseli ya liwa ya Kristo, to Bilei ya Mpokwa ya Nkolo. (1 Ko. 11:20, 23, 24) Na mbula mobimba, yango ezalaka likita oyo eleki ntina mpo na basaleli ya Yehova. Biblia esɛngi biso polele tósalaka Ekaniseli yango.—Luka 22:19.
29 Dati ya Ekaniseli ekokani na dati ya Elekeli ya ntango ya kala, mpe emonisami na Biblia. (Kob. 12:2, 6; Mat. 26:17, 20, 26) Elekeli ezali molulu oyo Bayisraele bazalaki kosala mbula na mbula mpo na kokanisa kobima na bango na Ezipito na mobu 1513 L.T.B. Na mbula yango, Yehova aponaki mokolo ya 14 ya sanza na bango ya liboso mpo bálya mwana-mpate ya Elekeli mpe bálongwa na boombo na Ezipito. (Kob. 12:1-51) Mpo na koyeba dati yango, batángaka mikolo 13 banda ntango sanza ya sika emonani na mokolo oyo moi ná butu eumelaka ndenge moko na Yerusaleme. Mbala mingi, dati ya Ekaniseli ekweaka mokolo ya liboso oyo sanza emonanaka mobimba nsima ya mokolo oyo moi ná butu eumelaka ndenge moko.
30 Na Matai 26:26-28, Yesu ye moko amonisaki ndenge oyo Ekaniseli yango esengeli kosalemaka. Molulu yango ezalaka na makamwisi te, kasi ezali bilei ya elilingi ya bato oyo baponami mpo na kozwa libula elongo na Kristo na Bokonzi na ye ya likoló. (Luka 22:28-30) Bakristo nyonso oyo bamipesi na Nzambe mpe bato oyo basepelaka na nsango malamu balendisami ete báyangana na Bilei ya Mpokwa ya Nkolo lokola batali mpamba. Ndenge bayanganaka na Ekaniseli emonisaka ete bazali kotɔnda Yehova ndenge azwaki ebongiseli mpo na bolamu ya bato nyonso na nzela ya Mwana na ye Yesu Kristo. Liboso ya dati ya Ekaniseli, ezalaka na diskur ya sipesiale mpo na bato nyonso oyo ebongisami mpo kolendisa bato bázanga te na molulu yango mpe kolamusa mposa na bango ya koyekola Biblia.
31 Batatoli ya Yehova bazelaka na mposa makasi mabaku ya koyangana na makita, epai ‘batyelanaka likebi mpo bálendisana mpo bázala na bolingo mpe básala misala ya malamu.’ (Ebr. 10:24) Moombo ya sembo mpe ya mayele abongisaka makita yango na kotalela bamposa na biso ya elimo. Basaleli nyonso ya Yehova ná bato oyo basepelaka na mateya ya solo balendisami ete bázwa litomba mpenza na makita yango oyo ezangaka te. Ntango tozali komonisa botɔndi na motema mobimba epai ya Yehova mpo na bibongiseli oyo azwi na nzela ya lisangá na ye, tozali kobatela bomoko na biso. Likambo eleki ntina, tozali kokumisa Yehova mpe kosanzola ye.—Nz. 111:1.