Mokapo 8
Basakoli ya nsango malamu
YEHOVA apesá biso ndakisa oyo tosengeli kolanda: Mwana na ye, Yesu Kristo. (1 Pe. 2:21) Ntango moto akómi moyekoli ya Yesu, asakolaka nsango malamu, mpo azali mosaleli ya Nzambe. Yesu amonisaki ete mosala yango epemisaka na elimo ntango alobaki ete: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.” (Mat. 11:28, 29) Yesu akokisaka maloba na ye epai ya moto nyonso oyo andimi libyangi na ye!
2 Lokola Yesu azali Mosaleli ya liboso ya Nzambe, abengaki bato mosusu bákóma bayekoli na ye. (Mat. 9:9; Yoa. 1:43) Apesaki bango formasyo na mosala ya kosakola mpe atindaki bango bákende kosala mosala oyo ye moko azalaki kosala. (Mat. 10:1–11:1; 20:28; Luka 4:43) Na nsima, atindaki bayekoli mosusu 70 bákende kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Luka 10:1, 8-11) Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye, alobaki na bango boye: “Moto oyo ayoki bino ayoki mpe ngai. Mpe moto oyo atyoli bino atyoli mpe ngai. Mpe moto oyo atyoli ngai atyoli mpe moto oyo atindaki ngai.” (Luka 10:16) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bazwaki mokumba monene. Basengelaki kozala bamonisi ya Yesu mpe ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló! Lelo oyo, esengeli mpe kozala bongo mpo na bato nyonso oyo bandimi libyangi oyo ya Yesu: “Yaká, landá ngai.” (Luka 18:22; 2 Ko. 2:17) Bato nyonso oyo bandimi libyangi yango bazali na mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli.—Mat. 24:14; 28:19, 20.
3 Lokola tondimi libyangi ya kolanda Yesu, tozwi mbano ya ‘koyekola koyeba’ Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo. (Yoa. 17:3) Toyekoli banzela ya Yehova. Na lisalisi ya Yehova, tokómisi makanisi na biso sika, tobongoli bomoto na biso, mpe tozali kotosa mibeko ya sembo ya Yehova na etamboli na biso ya mokolo na mokolo. (Rom. 12:1, 2; Ef. 4:22-24; Kol. 3:9, 10) Lokola mitema na biso ezali mpenza na botɔndi, tomipesi na Yehova mpe tomonisi yango na batisimo ya mai. Ntango tozwi batisimo, tokómaka basaleli ya Nzambe.
4 Tóbosanaka te ete tosengeli kosalela Nzambe na mabɔkɔ oyo ezali na ngambo te mpe na motema ya pɛto. (Nz. 24:3, 4; Yis. 52:11; 2 Ko. 6:14–7:1) Lokola tondimeli Yesu Kristo, yango epesi biso lisosoli ya pɛto. (Ebr. 10:19-23, 35, 36; Em. 7:9, 10, 14) Ntoma Paulo apesaki bakristo toli ete básalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe, mpo na kobɛtisa basusu libaku te. Ntoma Petro amonisaki ete kozala na etamboli ya malamu ekoki kobenda bato oyo bazali bandimi te báya na solo. (1 Ko. 10:31, 33; 1 Pe. 3:1) Ndenge nini okoki kosalisa moto akokisa masɛngami ya Biblia mpo na kokóma mosakoli ya nsango malamu?
BASAKOLI YA SIKA
5 Ntango kaka obandi koyekola Biblia na moto, lendisáká ye ayebisaka bato makambo oyo azali koyekola. Akoki koyebisa yango bandeko na ye, baninga, baninga ya mosala, mpe bato mosusu soki azwi libaku. Yango ezali ndenge ya kobongisa bato ya sika mpo bákóma bayekoli ya Yesu Kristo mpe basakoli ya nsango malamu. (Mat. 9:9; Luka 6:40) Ntango moto ya sika azali kokola na elimo mpe amesani kopesa litatoli ya libaku malamu, na ntembe te akomonisa mposa na ye ya kosangana na mosala ya kosakola.
MASƐNGAMI MPO NA KOKÓMA MOSAKOLI
6 Liboso ya kosɛnga moto abanda kokende na yo na mosala ya kosakola ndako na ndako mpo na mbala ya liboso, osengeli komindimisa ete akokisi masɛngami. Moto oyo abimi na biso na mosala ya kosakola amimonisi na miso ya bato nyonso ete azali Motatoli ya Yehova. Yango elingi koloba ete azali kotosa mitinda ya boyengebene ya Yehova na bomoi na ye mpe akoki kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te.
7 Ntango ozali koyekola na moto mpe ozali koteya ye mitinda ya Biblia, na ntembe te okoyeba makambo ya bomoi na ye. Mbala mosusu omoni ete azali kosalela makambo ayekoli na Biblia. Kasi, ezali na makambo mosusu ya bomoi ya moyekoli oyo bankulutu bakolinga kosolola na ye, na miso na yo.
8 Mokambi-misala ya bankulutu akosɛnga bankulutu mibale (moko na bango asengeli kozala na Komite ya mosala ya lisangá) básolola na moyekoli ya Biblia yango na miso na yo. Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, nkulutu moko akoki kosala yango elongo na mosaleli na misala moko oyo abongi. Bandeko oyo baponami basengeli kosala makasi básolola na moyekoli yango kozanga koumela. Na ndakisa, soki moyekoli amonisi mposa ya kobanda kosakola ntango bozali na makita na Ndako ya Bokonzi, mbala mosusu bakoki kosolola na moyekoli yango na miso na yo nsima ya makita. Lisolo yango esengeli kosalema na ndenge oyo ekosala ete moyekoli abanga te. Liboso ya kondima moyekoli akóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, esengeli kotala soki:
(1) Andimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu.—2 Tim. 3:16.
(2) Ayebi mpe andimi mateya ya moboko ya Biblia na ndenge ete ntango batuni ye mituna, apesa biyano oyo eyokani na Biblia, kasi te na mateya ya mangomba ya lokuta to makanisi na ye moko.—Mat. 7:21-23; 2 Tim. 2:15.
(3) Atosaka etinda ya Biblia oyo elobi ete tosengeli koyanganaka na makita elongo na basaleli ya Yehova, soki azali na likoki ya kosala yango.—Nz. 122:1; Ebr. 10:24, 25.
(4) Ayebi oyo Biblia eteyaka mpo na makambo ya pite, ekobo, kobala basi mingi to mibali mingi, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, mpe soki atosaka mateya yango. Soki moto yango azali na libala ya yaká tófanda, ye ná moto yango basengeli kobalana ndenge mibeko esɛngi.—Mat. 19:9; 1 Ko. 6:9, 10; 1 Tim. 3:2, 12; Ebr. 13:4.
(5) Atosaka mobeko ya Biblia oyo epekisi molangwa mpe amɛlaka bangi to mpe bilangwiseli mosusu, longola kaka soki minganga bakomeli ye yango.—2 Ko. 7:1; Ef. 5:18; 1 Pe. 4:3, 4.
(6) Ayebi ntina ya koboya baninga mabe.—1 Ko. 15:33.
(7) Akati mpenza boyokani nyonso oyo azalaki na yango na mangomba ya lokuta. Atiki kokende na misa mpe na bandako-nzambe to kosangana na milulu na yango mosusu ata mpe kopesa yango mabɔkɔ.—2 Ko. 6:14-18; Em. 18:4.
(8) Akɔtaka ata moke te na makambo ya politiki ya mokili oyo.—Yoa. 6:15; 15:19; Yak. 1:27.
(9) Andimaka likambo oyo Biblia elobi na Yisaya 2:4 mpo na bikólo mpe atosaka yango.
(10) Alingi mpenza kokóma Motatoli ya Yehova.—Nz. 110:3.
9 Soki bankulutu bayebi mpenza te makanisi ya moyekoli na makambo mosusu oyo etyami awa, basengeli kotuna ye yango, mbala mosusu kosɛnga asalela bavɛrsɛ oyo etyami mpe alimbola yango. Ezali na ntina ayeba ete baoyo bazali kosakola elongo na Batatoli ya Yehova basengeli kotosa masɛngami wana ya Biblia na bomoi na bango. Maloba na ye ekosalisa bankulutu báyeba soki ayebi nini asengeli kosala mpe soki akokisi masɛngami na ndenge oyo ekoki mpo abanda kobima na mosala ya kosakola.
10 Bankulutu basengeli koyebisa moyekoli yango mbala moko soki akokisi masɛngami to te. Mbala mingi, bakoki koyebisa ye yango na nsuka ya lisolo na bango. Soki akokisi masɛngami yango, bankulutu bakomonisa ye na esengo ete bandimi akóma mosakoli. (Rom. 15:7) Basengeli kolendisa ye abanda mbala moko kobima na mosala ya kosakola mpe apesa lapolo na ye na nsuka ya sanza. Bankulutu bakoki kolimbolela ye ete soki moyekoli ya Biblia akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te apesi lapolo na ye ya liboso, bakosalela ye Fishɛ ya lisangá mpo na mosakoli (S-21) oyo ekozala na nkombo na ye mpe bakotya yango na dosye ya lisangá. Bankulutu bazwaka makambo oyo ezali na fishɛ yango mpo na kosalisa ebongiseli ya Yehova eyeba ndenge ya kokokisa mposa ya elimo ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe kosalisa mosakoli asangana na makambo oyo lisangá ebongisi mpe azwa lisungi ya elimo ndenge esengeli. Lisusu, bakoki kokundwela mosakoli ya sika ete basalelaka makambo oyo etali moto na kolanda mibeko ya Batatoli ya Yehova na oyo etali kobomba makambo ya moto, oyo ezali na jw.org.
11 Koyeba mosakoli ya sika malamu mpe kolakisa ete tozali mpenza kosepela na milende oyo asali, ekoki kopesa ye mposa ya kosala malamu koleka. Yango ekoki kotinda ye apesaka lapolo na ye ya mosala ya kosakola sanza na sanza mpe abakisa milende mpo na kosalela Yehova.—Flp. 2:4; Ebr. 13:2.
12 Soki bankulutu bamoni ete moyekoli ya Biblia akokisi masɛngami mpo na kobima na mosala ya kosakola, bakopesa ye buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova. Soki apesi lapolo na ye ya mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso, bakopesa liyebisi ya mokuse na lisangá ete akómi mosakoli oyo azwi naino batisimo te.
KOSALISA BILENGE
13 Bana mike bakoki mpe kokokisa masɛngami mpo bákóma basakoli ya nsango malamu. Yesu ayambaki bana mike mpe apambolaki bango. (Mat. 19:13-15; 21:15, 16) Atako mokumba ya kosalisa bana ezali libosoliboso ya baboti na bango, bandeko mosusu na lisangá bakoki mpe kosalisa bana oyo bazali mpenza na mposa ya kobima na mosala ya kosakola Bokonzi. Soki ozali moboti, ndakisa malamu oyo ozali kopesa na mosala ya kosakola ekolendisa mpenza bana na yo bázala mpe na molende na mosala ya Nzambe. Soki mwana azali na bizaleli ya malamu mpe azali mpenza na mposa ya koyebisa bato nsango malamu mpo na komonisa kondima na ye, eloko nini mosusu bokoki kosala mpo na kosalisa ye?
14 Esengeli ete tata to mama na ye akutana na nkulutu moko oyo azali na Komite ya mosala ya lisangá mpo na kotalela soki mwana yango akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli. Mokambi-misala ya bankulutu akopona bankulutu mibale (moko na bango asengeli kozala na Komite ya mosala ya lisangá) mpo básolola na mwana yango na miso ya moboti to baboti na ye soki bazali Batatoli to na miso ya moto oyo azali lokola moboti na ye soki azali Motatoli ya Yehova. Soki mwana yango azali na mwa boyebi ya mateya ya Biblia mpe amonisi ete alingi kosakola Bokonzi, yango emonisi ete azali kokende liboso. Nsima ya kotalela makambo yango mpe makambo mosusu lokola oyo basɛngaka mikóló, bankulutu yango mibale bakotala soki mwana yango akoki kondimama lokola mosakoli oyo azwi naino batisimo te. (Luka 6:45; Rom. 10:10) Ntango bozali kosolola na mwana moke, ezali na ntina te kotalela makambo mosusu oyo etali mikóló, oyo emonani polele ete etali bana mike te.
15 Ntango bankulutu bazali kosolola na mwana yango, basengeli kopesa ye longonya ndenge azali kokola na elimo mpe kolendisa ye amityela mokano ya kozwa batisimo. Lokola baboti nde basalaki makasi mpo bákɔtisa mateya ya solo na motema ya mwana na bango, esengeli mpe kopesa bango longonya. Mpo na kosalisa baboti bákoba kopesa bana na bango mabɔkɔ, bankulutu basengeli kolendisa bango bátalela “Liyebisi epai ya baboti oyo bazali bakristo,” na nkasa 179-181.
KOMIPESA MPE BATISIMO
16 Soki oyebi Yehova mpe omonisi ete olingi ye na ndenge ozali kotosa makambo oyo asɛngi mpe ozali kobima na mosala ya kosakola, osengeli kokómisa makasi boyokani na yo na ye. Na ndenge nini? Osengeli koyebisa ye na libondeli ete omipesi na ye kozwa batisimo na mai mpo na komonisa yango.—Mat. 28:19, 20.
17 Komipesa elimboli kotyama pembeni mpo na mokano moko mosantu. Komipesa na Nzambe elimboli kolaka ye na motema moko na libondeli ete okosalela ye bomoi na yo mobimba mpe okotambola na banzela na ye. Elimboli kokangama kaka na ye libela na libela. (Mib. 5:9) Yango ezali likambo oyo moto asalaka ye moko. Moto te akoki kosala yango na esika na yo.
18 Kasi, osengeli kosuka kaka te na koyebisa Yehova ete olingi kozala mosaleli na ye. Osengeli mpe komonisa bato ete omipesi na Nzambe. Okomonisa yango ntango ozwi batisimo na mai, ndenge Yesu asalaki. (1 Pe. 2:21; 3:21) Soki ozwi mokano ya kosalela Yehova mpe olingi kozwa batisimo, osengeli kosala nini? Osengeli koyebisa mokambi-misala ya bankulutu mposa na yo. Ye akozwa bibongiseli mpo bankulutu ebele básolola na yo mpo báyeba soki okokisi masɛngami ya Biblia mpo na kozwa batisimo. Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá “Liyebisi epai ya mosakoli oyo azwi naino batisimo te,” na nkasa 182-184 ya buku oyo, mpe “Mituna mpo na baoyo balingi kozwa batisimo,” na nkasa 185-207.
BALAPOLO OYO EZALI KOMONISA BOKOLI YA MOSALA YA KOSAKOLA
19 Banda bambula mingi, balapolo oyo ezali komonisa bokoli ya losambo ya pɛto na mokili mobimba elendisaka mpenza basaleli ya Yehova. Banda ntango oyo Yesu Kristo ayebisaki bayekoli na ye ya liboso ete nsango malamu ekosakolama na mokili mobimba, bakristo ya solo balukaka mpenza koyeba ndenge nini likambo yango ekokokisama.—Mat. 28:19, 20; Mrk. 13:10; Mis. 1:8.
20 Bayekoli ya liboso ya Yesu bazalaki kosepela koyoka balapolo oyo ezalaki kolobela ndenge mosala ya kosakola ezalaki kokola. (Mrk. 6:30) Mokanda ya Misala eyebisi biso ete elimo santu ekitelaki bayekoli soki 120 na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Eumelaki te, bayekoli bakómaki soki 3 000 mpe na nsima soki 5000. Lapolo mosusu emonisaki ete “Yehova akobaki kobakisela bango mokolo na mokolo baoyo bazalaki kobikisama” mpe ete “ebele ya banganga-nzambe babandaki kotosa kondima.” (Mis. 1:15; 2:5-11, 41, 47; 4:4; 6:7) Na ntembe te, bansango wana oyo emonisaki bokoli elendisaki mpenza bayekoli! Balapolo ya malamu ndenge wana epesaki bango mposa ya kokende liboso na mosala oyo Nzambe apesaki bango, atako bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kobimisela bango minyoko makasi!
21 Na mokanda oyo ntoma Paulo atindelaki Bakolose na mobu soki 60-61 T.B., alobaki ete nsango malamu ezalaki “kobota mbuma mpe kokola na mokili mobimba” mpe ete “esakolamaki na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Kol. 1:5, 6, 23) Bakristo ya liboso batosaki Liloba, mpe elimo santu epesaki bango makasi ya kosala mosala monene ya kosakola nsango malamu liboso ete ebongiseli ya makambo ya Bayuda esuka na mobu 70 T.B. Bakristo wana ya sembo balendisamaki mpenza ntango bayokaki balapolo ya mosala oyo ezalaki kosalema!
Ozali kosala nyonso oyo ekoki na yo mpo mosala ya kosakola esalema liboso nsuka eya?
22 Ndenge moko mpe, ebongiseli ya Yehova na mikolo na biso esalaka milende mpo na kokoma balapolo ya sikisiki ya mosala oyo ezali kosalema mpo na kokokisa Matai 24:14, oyo elobi: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” Biso basaleli ya Nzambe oyo tomipesi na ye, tozali na mosala oyo tosengeli kosala na lombangu mpenza. Mokomoko na biso asengeli kosala nyonso oyo ekoki na ye mpo mosala ya kosakola esalema malamumalamu liboso nsuka eya. Yehova akosala ete mosala yango esalema tii na nsuka, mpe soki biso mpe tozali kopesa mabɔkɔ mpo na kosala yango, Yehova akosepela na biso.—Ezk. 3:18-21.
LAPOLO NA YO YA MOSALA YA KOSAKOLA
23 Tosengeli kopesa lapolo ya makambo nini? Lokasa Lapolo ya mosala ya kosakola oyo bapesaka biso na lisangá emonisaka makambo oyo tosengeli kokoma. Kasi, makanisi oyo tokopesa awa ekoki kosalisa yo.
24 Na molɔngɔ oyo bakomi “Mikanda (ya papye mpe ya Internet),” komá motángo ya mikanda nyonso ya papye to ya Internet oyo opesaki to otindelaki bato oyo bazwi naino batisimo te. Na esika bakómi “Bavideo oyo olakisi,” komá mbala boni olakisi bato video na biso na mosala ya kosakola.
25 Na molɔngɔ oyo bakomi “Bato oyo ozongeli,” komá mbala boni okendaki lisusu kotala bato oyo bamipesá na Nzambe te mpe bazwá naino batisimo te mpo bósolola lisusu makambo ya Biblia. Okoki kotánga ete ozongeli moto soki okei kotala moto na ndako mpe bokutani, soki okomeli ye mokanda, osololi na ye na telefone, otindeli ye mesaje na telefone to na Internet, to soki otikeli ye mokanda ya moombo ya sembo. Mbala nyonso oyo oyekoli na moto Biblia, osengeli kotánga ete ozongeli moto. Moboti akoki kotánga ete azongeli moto soki atambwisi Losambo na kati ya libota mpe mwana oyo azwi naino batisimo te azali wana.
26 Ata soki toyekoli na moto Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, tokotánga kaka boyekoli moko na sanza. Basakoli basengeli kokoma motángo ya bato nyonso oyo bayekoli na bango Biblia na boumeli ya sanza. Na molɔngɔ ya Bayekoli ya Biblia, tokoki mpe kotánga bato oyo tozali koyekola na bango kasi bamipesi naino na Nzambe te mpe bazwi naino batisimo te. Okoki mpe kotánga boyekoli ya Biblia, soki nkulutu moko ya Komite ya mosala ya lisangá apesi yo mokumba ya koyekola Biblia na ndeko moko oyo atiká kosakola to ozali koyekola na ndeko moko oyo azwi batisimo sika kasi asilisi naino te buku Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia.
27 Ezali na ntina mingi kokoma mitángo ya sikisiki na molɔngɔ oyo bakomi “Ngonga.” Yango ezali ngonga nyonso oyo olekisi na mosala ya kosakola ndako na ndako, na kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, na koyekola na bato Biblia, to na kopesa litatoli ezala na libaku malamu to te epai ya bato oyo bazali Batatoli te. Soki basakoli mibale bazali kosakola elongo, bango nyonso bakotánga ngonga, kasi kaka mosakoli oyo azongeli moto to ayekoli na moto Biblia nde akotánga bozongeli to boyekoli moko. Soki baboti nyonso mibale bazali koteya bana na bango na Losambo na kati ya libota, mokomoko na bango akoki kotánga ngonga moko na pɔsɔ. Bandeko mibali bakotánga ngonga oyo basali diskur ya bato nyonso. Ndeko oyo azali kobongola diskur ya bato nyonso na monɔkɔ mosusu akoki mpe kotánga ngonga. Ezali na makambo mosusu ya ntina oyo tosengeli te kotánga ngonga na yango, na ndakisa komibongisa mpo na kobima na mosala ya kosakola, kozala na likita ya mosala ya kosakola, kosala makambo mosusu ntango ozali na mosala ya kosakola, mpe bongo na bongo.
28 Mosakoli mokomoko asengeli kolanda lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia ntango azali kotánga ngonga oyo alekisi mpenza na mosala ya kosakola. Basakoli mosusu basakolaka na bisika ya bato mingi, kasi basusu basakolaka na bateritware oyo ezali na bato mingi te mpe esɛngaka kotambola mingi mpo na kokutana na bato. Lokola bateritware ekeseni, ndenge oyo basakoli basakolaka mpe ekeseni. Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyeli masangá ya mokili mobimba mibeko te na likambo ya kotánga ngonga oyo tolekisaka na mosala ya kosakola; moto moko mpe te asengeli kotyela bandeko mibeko na likambo yango.—Mat. 6:1; 7:1; 1 Tim. 1:5.
29 Na lokasa na biso ya lapolo, tosengeli kokoma kaka ngonga, kasi miniti te. Yango etali te basakoli oyo bakoki kosakola mingi te mpo bakómi mibange, bakɔtá ndako mpo na maladi, bafandaka na ndako ya mibange, to mpe bazali na mikakatano mosusu ya nzoto. Basakoli yango bakoki kopesa miniti 15. Soki mosakoli ya ndenge wana apesi litatoli miniti 15 na sanza, asengeli kokoma yango na lapolo. Akotángama ete asakolaka Bokonzi sanza na sanza. Bokoki mpe kolanda ebongiseli yango mpo na mosakoli oyo azwi mokakatano mpo na mwa ntango, mbala mosusu akoki kobima te sanza mobimba to koleka mpo abɛli makasi to azoki makasi to abukani makasi. Ebongiseli yango ezali kaka mpo na baoyo bazangi mpenza likoki ya kosakola. Komite ya mosala ya lisangá nde ekotalela soki ndeko nini akoki kosalela ebongiseli wana.
FISHƐ YA LISANGÁ MPO NA MOSAKOLI
30 Lapolo ya mosakoli ya sanza mokomoko ekomamaka na Fishɛ ya lisangá mpo na mosakoli. Bafishɛ yango ezali ya lisangá. Soki olingi kokende na lisangá mosusu, yebisá bankulutu ya lisangá na bino. Sɛkrɛtɛrɛ akozwa bibongiseli mpo na kotinda fishɛ na yo na lisangá na yo ya sika. Yango ekosalisa bankulutu báyamba yo mpe bálandela bokoli na yo ya elimo. Soki okotika lisangá na yo mpo na ntango oyo ekoleka sanza misato te, osengeli kokoba kotinda lapolo na yo ya mosala ya kosakola na lisangá oyo outi.
NTINA OYO TOPESAKA LAPOLO NA BISO YA MOSALA YA KOSAKOLA
31 Ekómelaka yo ntango mosusu obosana kopesa lapolo na yo ya mosala ya kosakola? Na ntembe te, biso nyonso tozalaka mbala mosusu na mposa bákundwela biso makambo. Kasi, soki tozali kotalela likambo ya kopesa lapolo ya mosala ya kosakola na ndenge ya malamu mpe soki tozali koyeba ntina na yango, ekoki kosalisa biso mpo tóbosanaka te kopesa lapolo na biso.
32 Bandeko mosusu batunaka boye: “Lokola Yehova ayebi mosala oyo nazali kosalela ye, mpo na nini nasengeli kopesa lapolo na lisangá?” Ya solo, Yehova amonaka mosala oyo tozali kosalela ye, mpe ayebi soki tozali kosalela ye na molimo na biso mobimba to tozali kosala kaka moke, nzokande tozali na likoki ya kosala mingi. Kasi, kobosana te ete Yehova asalaki ete mikolo oyo Noa alekisaki na kati ya masuwa mpe bambula oyo Bayisraele batambolaki na esobe ekomama. Nzambe akomisaki motángo ya bato oyo bazalaki sembo mpe baoyo bazangaki botosi. Akomisaki lisolo oyo elobeli ndenge oyo Bayisraele babɔtɔlaki mokemoke mokili ya Kanana mpe makambo oyo basambisi ya sembo basalaki na Yisraele. Ya solo, akomisaki ata makambo ya mikemike oyo basaleli na ye basalaki. Lokola akomisaki makambo oyo esalemaki, amonisi biso polele ete na miso na ye, kokoma lapolo ya sikisiki ezali na ntina mingi.
33 Masolo ya kala oyo ezali na Biblia emonisi ete basaleli ya Yehova bazalaki kosala balapolo mpe kokoma makambo na bosikisiki. Na bisika mingi, soki mitángo ya sikisiki epesamaki te, tolingaki te kozala na likoki ya kokanga malamu ntina ya lisolo. Talelá bandakisa oyo ezali na: Ebandeli 46:27; Kobima 12:37; Basambisi 7:7; 2 Bakonzi 19:35; 2 Ntango 14:9-13; Yoane 6:10; 21:11; Misala 2:41; 19:19.
34 Atako balapolo na biso emonisaka te makambo nyonso oyo tosalaka na mosala ya Yehova, makambo oyo tokomaka na balapolo yango esalisaka mingi na ebongiseli ya Yehova. Na siɛklɛ ya liboso, ntango bantoma bautaki na kampanye moko ya mosala ya kosakola, bapesaki Yesu lapolo ya “makambo nyonso oyo basalaki mpe bateyaki.” (Mrk. 6:30) Na bantango mosusu, balapolo ekoki komonisa makambo mosusu oyo tosengeli kotyela likebi na mosala ya kosakola. Mitángo ekoki komonisa ete tozali kokende liboso na makambo mosusu, nzokande na makambo mosusu tozali kozonga nsima; na ndakisa emonisaka soki basakoli bazali kokóma mingi to te. Yango ekoki komonisa ete tozali na mposa ya kolendisama to ezali na mikakatano oyo esengeli kosilisa. Bakɛngɛli oyo bakokisaka mokumba na bango na ndenge esengeli bakotalela balapolo mpe bakosala makasi mpo básilisa likambo nyonso oyo ezali kopekisa bokoli ya bandeko mosusu to ya lisangá mobimba.
35 Balapolo esalisaka mpe ebongiseli ya Yehova eyeba bisika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Bateritware nini ezali kobota mbuma mingi? Bisika nini bokoli ezali mpenza te? Mikanda nini esengeli mpo na kosalisa bato báyeba solo? Balapolo esalisaka mpo na koyeba motángo ya mikanda oyo esengeli kotindama na bisika ndenge na ndenge na mokili mpe kobongisa makambo mpo na kotinda mikanda yango.
36 Mpo na mingi kati na biso, balapolo elendisaka mpenza. Na ntembe te, biso nyonso toyokaka esengo soki toyoki nsango ya mosala oyo bandeko na biso bazali kosala mpo na kosakola nsango malamu na mokili mobimba. Balapolo oyo elobelaka bokoli ya mosala na biso esalisaka biso tómona ndenge ebongiseli ya Yehova ezali kokende liboso. Masolo ya makambo oyo bandeko bakutanaka na yango esepelisaka biso mpe ebakiselaka biso molende, epesaka biso mposa ya komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. (Mis. 15:3) Ezali na ntina mingi tópesaka lapolo ya mosala ya kosakola; yango emonisaka ete tozali kotyela bandeko na biso ya mokili mobimba likebi. Ntango tosali mwa likambo yango ya moke, tozali komonisa ete tozali kotosa ebongiseli ya Yehova.—Luka 16:10; Ebr. 13:17.
OMITYELA MIKANO
37 Ezali na ntina te ete tókokanisa mosala na biso ya kosakola ná oyo ya moto mosusu. (Gal. 5:26; 6:4) Makambo ya bomoi ya bato ekeseni. Kasi, tokoki kozwa matomba mingi soki tomityeli mikano oyo ebongi mpo tóyebaka soki tozali kokende liboso na mosala ya kosakola. Soki tokokisi mikano oyo tomityeli, tokoyoka esengo oyo moto ayokaka ntango akokisi likambo moko oyo akanaki.
38 Ezali komonana polele ete Yehova azali kotambwisa nokinoki mosala ya koyanganisa bato oyo akobatela na “bolɔzi monene.” Tozali sikoyo na ntango oyo esakweli ya Yisaya ezali kokokisama: “Oyo ya moke akokóma nkóto moko (1 000), mpe oyo azali mpamba akokóma ekólo ya nguya. Ngai Yehova nakokolisa yango mbangu na ntango na yango.” (Em. 7:9, 14; Yis. 60:22) Kozala basakoli ya nsango malamu na eleko oyo ya nsuka ezali libaku malamu mpenza!—Mat. 24:14.