Boyengebene mpo na bato banso na nzela na mosambisi aponami na Nzambe
”Mpamba te Tata alingi Mwana mpe . . . asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana.—YOANE 5:20, 22.
1. Lokola bato mosusu ya ekeke na liboso, mituna nini osengeli kokanisa na yango?
MOTUYA nini ozali kopesa na boyengebene? Okosala nini mpo na kondimisama ete okozwa boyengebene mpe lisusu mpo ozala wana ntango yango ekoyangela na mabelé mobimba? Esengeli na yo kokanisa na mituna oyo, lokola esalaki yango mibali mpe basi ya lokumu na Atene.
2, 3. (a) Na nsuka ya likanisi nini Paulo alendisaki balobani na ye ete babongola mitema? (b) mpo na nini kobongola motema ezalaki liteya moko ya kokamwisa mpo na bayoki na Paulo?
2 Bayokaki diskur monene oyo Paulo asalaki liboso na libanda ya lokumu na Aréopage. Ntoma yango ya Klisto apusaki bango libosoliboso bakanisa na likambo oyo ete Nzambe bobele moko azali, ye Mozalisi, mobandisi na bomoi na biso. Likanisi yango ememaki na bosukisi oyo ya mayele ete: tozali na nyongo na Nzambe yango. Ekomaki ye na esika oyo na lisolo na ye, Paulo alobaki: “Na ntina na ntango na kozanga boyebi [oyo, na ndakisa, ememaka na losambo ya bikeko], solo, Nzambe akanisi yango te, nde sikawa azali kosakola na bato nyonso mpe na bisika nyonso ete babongola mitema.”—Misala 17:30.
3 Kobongola motema. Ezalaki wana liteya ya kokamwisa mpenza mpo na bayoki na Paulo. Mpamba te, mpo na Bagreke ya kala, kobongola motema elimbolaki koyoka mpasi na motema mpo na likambo moko to liloba moko oyo bayokaki mawa mpo na yango. Nzokande, lokola emonisi yango buku monene to encyclopédie moko, kobongola motema ezalaki na likanisi “ata moke te ya mbongwana mobimba ya makanisi na oyo etali bizaleli ya bomoi, kokamata mpenza nzela mosusu, mbongwana oyo etali etamboli nyonso.”
4. Likanisi nini ya mayele esimbaki maloba na Paulo mpe oyo matalaki kobongola motema?
4 Nzokande, biso banso tokangi ntina oyo ebongi ete tobongola motema mobimba na motindo wana. Tolanda likanisi na Paulo: Lokola bomoi na bato nyonso euti na Nzambe, bango banso bazali na makambo ya kozongisela ye; na bongo ezali sembo ete Mozalisi asenga ete bato baluka koyeba ye. Soki mitinda na ye mpe mokano na ye eyebanaki te epai na bato na Atene, basengelaki koyeba yango, kobongola mitema mpe koyokanisa bomoi na bango na yango, ezala milende nini oyo yango ezalaki kosenga. Ezali yango Paulo amonisi biso kati na bosukisi na ye ya nguya ete: “Mpamba te asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na boyengebene, mpe akosambisa bango na nzela na moto oyo asili kopona. Amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye na bakufi.”—Misala 17:31.
5. Diskur na Paulo esalaki nini likoló na bayoki na ye, mpe mpo na nini?
5 Verset yango ya mozindo mpe ya kondimisa, ebongi etalelama na likebi mpamba te ezali kopesa elikya ete etikali moke boyengebene ya kokoka ekoyangela na mabelé. Tala maloba oyo: “Kopona mokolo”; “kosambisa mikili nyonso”; “na boyengebene”; “na nzela na moto oyo aponi”; ‘amonisi ete ezali solo’; “asekwisi ye.” Maloba oyo ya nsuka ete “asekwisi ye”, mazangaki te kolamusa bayoki na Paulo. Bamoko basekaki ye, lokola elobeli biso yango ba versets 32 kino 34, bamosusu basepelaki lisusu na lisolo yango te: kasi mwa ndambo bandimaki mpe babongolaki mitema. Mpo na biso, soki tozali na mposa na boyengebene ya solosolo, tozala na mayele koleka ntalo monene na bato ya Atene; yango ezali na ntina mingi mpenza mpo na biso. Mpo na kokanga malamu ntina na verset 31, totalela naino maloba oyo: “Akosambisa mikili nyonso”. Nani wana mosambisi yango? Mibeko nini ye ayebi, mingimingi mpo na oyo etali boyengebene?
6. Nini elakisi biso makambo matali Ye oyo aponi mokolo mpo na kosambisa mabelé?
6 Misala 17:30 emonisi biso nani Paulo alobelaki: alobelaki mpo na Nzambe ya solo, Ye oyo apesaki biso bomoi, Mozalisi na biso, oyo azali kosakola na bato nyonso ete basengeli kobongola mitema. Misala na Nzambe mizali kolakisa biso makambo mingi oyo matali ye, kasi mibeko na ye ya boyengebene mikomami polelepolele kati na Biblia: mokanda yango elimboli boyokani nini azalaki na yango elongo na bato lokola Moïse mpe eyebisi mibeko oyo apesaki na Yisraele ya kala.
Lisambisi mpe boyengebene ya motindo nini?
7. Litatoli nini Moïse apesaki mpo na boyengebene na Jéhovah?
7 Mbala mosusu oyebi ete, na boumeli na bambula mingi, Moïse azalaki na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah, ezalaki mpenza makasi na boye ete Nzambe akokaki koloba ete azalaki kosolola na ye ’na miso na ye boye’. (Mituya 12:8) Moïse ayebaki ndenge nini Jéhovah azalaki kosala epai na ye, epai na bato mosusu mpe epai na mabota. Pene na nsuka ya bomoi na ye, amonisaki lolenge na Nzambe na maloba oyo ezali kopesa elikya: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na bokeseni te, ye moyengebene mpe mosembwi.”—Deteronome 32:4.
8. Mpo na nini tosengeli kotya likebi na oyo Elihu alobaki mpo na boyengebene?
8 Totalela mpe litatoli na Elihu. Moto yango, oyo ayebanaki mpo na bwanya na ye mpe mayele na ye, azalaki na motema likoló mpo na kozwa bosukisi kati na makambo te; kasi, afandaki koleka poso moko mpo na koyoka masolo oyo mazalaki kosila te. Mayele na ye mpe boyebi na ye ya mozindo ya banzela na Nzambe ememaki ye na kozwa esukiseli nini? Alobaki ete: “Bino bato na bososoli, boyokamela ngai. Tika ete ezala mosika na Nzambe ete asala mabe! Ezala mosika mpe na Oyo-na-Nguya-Nyonso ete ásala na bokeseni! Mpo ete akozongisela moto engebene mosala na ye; akozwisa moto na moto lokola ezali nzela na ye. Solo, Nzambe akosalaka na mabe te mpe Oyo-na-Nguya-Nyonso akobebisaka kosambisa te.”—Yobo 34:10-12.
9, 10. Mpo na nini masengami na Nzambe epai na basambisi ya bato ezali kolendisa? (Levitike 19:15)
9 Ezali yango oyo tozali koluka epai na mosambisi, ete asalela moto na moto engebene misala na ye, kozanga koponapona, kozanga kobebisa boyengebene, boye te? Tokozala na motema mpio soki totelemi liboso na moto oyo azali mosambisi mpe oyo azali na bizaleli yango, boye te?
10 Biblia elobi ete Jéhovah azali “Mosambisi ya mabelé mobimba.” (Genese 18:25) Atako bongo, asalelaki mbala mosusu basambisi oyo bazalaki bato. Asengaki nini, na ndakisa, epai na basambisi ya Yisraele oyo bazalaki komonisa ye? Deteronome 16:19, 20, epai tokuti mateya na Nzambe oyo elimbolaki mosala na basambisi, elakisi biso yango na maloba oyo: “Okopengwisa boyengebene te, mpe okokamata lifuti te, mpo ete lifuti ebomi miso na bato na mayele mpe ebebisi maloba na bato na sembo. Okobila boyengebene mpe bobele boyengebene, ete okoka kobika.” Mpo na kopesa elilingi ya boyengebene, bikeko emonisaka mwasi moko bazipá ye miso na elamba, yango elilingi ya kozanga koponapona oyo bazali koluka epai na ye. Kasi Nzambe, akendeki mosika koleka. Apesaki lisengami epai na basambisi ya bato oyo basengelaki komonisa ye mpe kotosisa mibeko na ye ete basala na kozanga koponapona.
11. Tokoki kozwa esukiseli nini na kotalela makambo oyo Biblia elakisi biso mpo na boyengebene?
11 Makambo yango oyo matali lolenge Nzambe azali kotalela boyengebene ezalaki na bopusi likoló na esukiseli na diskur ya Paulo oyo alobi na Misala 17:31 ete Nzambe “asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na boyengebene.” Boyengebene mpe kozanga koponapona, ezali mpenzampenza makambo oyo tokoki kolikya kozwa epai na Nzambe. Bato mosusu bakoki komitungisa na likambo oyo ete, engebene verset 31, Nzambe akosalela “moto moko” mpo na kosambisa bato nyonso. Moto yango azali nani? Tokoki kozala na kondimisama ete akomemya mibeko mitombwami ya boyengebene oyo Nzambe atyaki?
12, 13. Ndenge nini toyebi “moto” oyo Nzambe akosalela mpo na kosambisa?
12 Misala 17:18 ekundoleli biso ete Paulo azalaki kosakola “nsango malamu na Yesu mpe lisekwa”. Na yango, na nsuka ya diskur na ye, bayoki na ye bayebaki ete azalaki koloba mpo na Yesu Klisto ntango alobaki ete Nzambe asengelaki ‘kosambisa mikili nyonso na boyengebene na nzela na moto oyo asili kopona. Amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye na bakufi.’
13 Yesu ayebaki ete Nzambe atyaki ye mosambisi, oyo akokisaki masengami ya Nzambe. Alobi na Yoane 5:22 ete: “Tata azali kosambisa moto te, kasi asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana.” Nsima na kosakola lisekwa na baoyo bazali kati na nkunda, Yesu abakisaki ete: “Ngai nakoki kosala mosala ngai moko te, nakosambisa lokola ekoyokaka ngai mpe esambiseli na ngai ezali sembo, mpamba te nakolukaka mokano na ngai moko te kasi mokano na ye oyo atindi ngai.”—Yoane 5:30; Nzembo 72:2-7.
14. Kosambisa ya ndenge nini tokoki kolikya kozwa epai na Yesu?
14 Maloba wana makokani mpenza na Misala 17:31, epai Paulo apesi kondimisama ete Mwana asengeli “kosambisa mikili nyonso na boyengebene.” Maloba yango mamonisi te boyengebene ya makasi makasi, oyo ebongwanaka te to oyo ezangi mayoki. Kasi, kosambisa oyo ezali na bokokani na boyengebene esengeli kolembisama moke na lilimbisi mpe mawa. Lisusu, tobosana te ete, Yesu azali lelo na likoló, kasi liboso azalaki moto. Na bongo akoki kozala na mawa epai na biso. Na Baebele 4:15, 16, kolobelaka mpo na nganga monene Yesu, Paulo alobeli likambo yango.
15. Na nini Yesu akeseni na basambisi ya bato?
15 Ntango tozali kotanga Baebele 4:15, 16, tosepelaka te kozala na Yesu lokola mosambisi? Ekomami kuna ete: “Mpo tozali na Nganga Monene [mpe mosambisi] te oyo azangi koyoka mpasi esika moko na biso kati na bolembu na biso. Nde amekami na makambo nyonso lokola biso, bobele ete akwei na masumu te. Boye, tika ete tobelema na molende epai na kiti na bokonzi na ngolu ete tozwa mawa mpe tomona ngolu na kosunga na ntango na bosenga.” Na eleko na biso, kotelema liboso na tribinale epesaka elikya te; kasi na mosambisi lokola Klisto, tokoki ‘kobelema na molende ete tozwa mawa, ngolu mpe lisalisi na ntango na bosenga’. Mpo na oyo etali ntango yango ya bosenga, tokoki mpenza komituna motuna oyo: ‘Ntango nini Yesu akosambisa bato na boyengebene?
“Mokolo” mpo na kosambisa Ntango nini?
16, 17. Ndenge nini toyebi ete, longwa na makoló, Yesu azali kosala mosala ya kosambisa?
16 Tomikundola maloba oyo Paulo asalelaki: Nzambe “asili kopona mokolo” mpo na kosambisa mokili na nzela na Mosambisi oyo aponi. Na kozelaka “mokolo” yango ya kosambisa, Yesu azali uta sikawa kosala mosala monene ya kosambisa. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Na bongo, mwa ntango moke liboso ete akangama, wana bafundaki ye na efundeli ya lokuta mpe bakatelaki ye liwa kozanga ete ásala mabe, Yesu apesaki esakweli oyo etali eleko na biso. Tozali kokuta maloba na yango na Matai mokapo ya 24, epai Yesu alobeli makambo na mokili oyo masengelaki komonisa eleko ebengami ’nsuka na biloko mabe’. Bitumba, nzala, koningana na mabelé mpe bampasi mosusu oyo ezali konyokola mokili uta Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezali kondimisa ete esakweli na Yesu ezali kokokisama mpe ete mosika te “nsuka ekoya”. (Matai 24:3-14) Ba Témoins de Jéhovah bazali kopesa bandimbola ya Biblia esili koleka bambula mingi. Soki olingi kozwa makambo mingi lisusu oyo emonisi ete tozali kobika na mikolo na nsuka na biloko mabe ya lelo, ekoki na yo bobele kosolola na Témoin de Jéhovah moko.
17 Sikawa, totya likebi na biso likoló na eteni ya mibale ya Matai mokapo 25. Tozali bobele kolobela esakweli na Yesu oyo etali mikolo na nsuka. Maloba oyo tokoki kotanga na Matai 25:31, 32 mazwi kokokisama na yango na eleko na biso: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe baanze na ye nyonso elongo na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo [na makoló]. Mpe akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango, lokola mobateli akokabolaka bampate na bantaba.” Totala oyo Yesu alobi mpo na kosukisa na oyo etali mosala yango ya kokabola to ya lisambisi yango. Totangi na verset 46 ete: “Bango [Bato oyo batyamaki na molongo ya “bantaba”] bakolongwa kino etumbu na seko nde bayengebene [“bampate”], kino bomoi na seko.”
18. Lisambisi oyo ezali kosalema lelo ekosuka na nini?
18 Na bongo tozali kobika na eleko na mpasi, eleko ya kosambisa Bato oyo bazali ‘koluka Nzambe mpe bazali kozwa ye mpenza’ bakondimama na molongo ya “bampate”; bakozala na likoki ya kobika na kufa ya biloko mabe ya ntango oyo mpe kokota na mokili ya sika elakami na Nzambe. Na ntango yango maloba oyo tokuti na 2 Petelo 3:13 makokokisama: “Tozali kozela likoló na sika mpe nse na sika, engebene elaka na ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” “Mokolo” wana, maloba na Paulo oyo makomami na Misala 17:31 makokokisama nyonso, mpe mabelé ekosambisama na boyengebene.
19, 20. Nani akomona Mokolo na Kosambisa oyo ezali koya?
19 Mokolo na Kosambisa ekotalela bobele “bampate” te, baoyo bakosila kondimama mpo na kokota na mokili ya sika. Mpo ete, nsima na koloba ete Tata na ye apesaki ye kosambisa, Yesu alobaki mpo na lisekwa oyo ekoya. Ndenge moko, na Misala 10:42, ntoma Petelo alobi ete Yesu Klisto azali “Moponami na Nzambe lokola Mosambisi na bato na bomoi mpe na bakufi.”
20 Na yango, na “mokolo eponamaki” na Nzambe mpo na “kosambisa mikili nyonso na bato na boyengebene” na nzela na Yesu Klisto, mokolo oyo elobelami na Misala 17:31, bakufi bakosekwa Oyo nde esengo ekozala na komona nguya na Nzambe kosala mpo na kolonga liwa, oyo mbala mingi emonisaka kozanga boyengebene eleki monene mpenza! Bato mosusu, lokola Yesu ye mpenza, babomamaki kozanga ntina na bikonzi to na ntango na bitumba. Bamosusu bakufaki na mipepe makasi, na koningana ya mabelé, na kozika na móto to na makama mosusu ya lolenge yango.—Mosakoli 9:11.
Kosilisama ya bokeseni ya kala
21. Ndenge nini bokeseni ya kala ekosilisama na mokili ya sika?
21 Oyo nde esengo ekozala na komona lisekwa ya bandeko na biso oyo bakufá! Mingi bakozwa mpo na mbala ya liboso libaku ya ‘koluka Nzambe mpe ya kozwa ye mpenza’, yango ekopesa bango nzela na kolikya kozwa “bomoi ya seko”, lifuti ya “bampate”. Basekwi, bakisa mpe bamoko na baoyo bakobika na kufa ya biloko mabe, banyokwamaki na mpasi oyo etalelamaki lokola bokeseni: kobotama na mpasi na nzoto, kozanga komona, kozanga koyoka, mokakatano na koloba. Bampasi yango ekozala na ‘mabele ya sika epai boyengebene ekofanda’? Jéhovah asalelaki Yisaya mpo na koloba bisakweli ndenge na ndenge oyo ekokokisama solosolo na boumeli ya mokolo na kosambisa. Totala makambo oyo tokomona: “Na ntango yango miso na bakufi miso makofungolama mpe matoi na bimimi makozipolama. Na ntango yango motengumi akopombwa lokola mboloko mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.”—Yisaya 35:5, 6.
22. Kondimisama nini ya kolendisa mpenza epesami na mokapo 65 ya Yisaya mpo na boyengebene?
22 Ekozala boni mpo na bokeseni mosusu oyo ezali kobimisa bampasi minene? Na Yisaya mokapo 65, tokuti maloba kitoko mpe ya kolendisa. Soki tokokanisi verset 17 na 2 Petelo 3:13, tozali komona ete mokapo yango elobeli mpe ‘makoló na sika mpe nse na sika’, ebongiseli na sika ya biloko oyo ezali sembo. Nzokande, eloko nini ekopekisa mwa motuya moke ya bato ete babebisa kimya mpe boyengebene? Mwa mosika na nsima, bobele mokapo yango ya Yisaya emonisi ete likambo ya motindo wana ekosalema te.
23. Nini ekozala nsuka na Mokolo ya Kosambisa mpo na bamosusu?
23 Na boumeli nyonso ya Mokolo na Kosambisa, Yesu akolanda mosala na ye mpo na kolakisa nani abongi kozwa bomoi na seko. Bamoko bakobonga na yango te. Nsima wana ezwaki bango ntango ekoki na bango mpo na koluka Nzambe, mbala mosusu ata “mbula nkama”, bakomonisa ete baboi kosala na boyengebene. Na bongo bakolanda te kobika kati na mokili ya sika mpe yango ekozala na bokokani na boyengebene; ezali yango emonisi Yisaya 65:20 oyo elobi ete: “Mpo na moto mabe, ata azali na mbula monkama, akolakelama mabe.” Baoyo bakomonana ete babongi na bomoi te bakozala moke. Biso mpenza mpe bato mosusu mingi, tokosepela na koyekola mpe kosala na boyengebene, boye te?—Yisaya 26:9.
24. Bokeseni na makambo na nkita ekosuka boni?
24 Maloba yango malingi koloba ete bokeseni ekozala lisusu te, ata na makambo matali nkita? Ezali mpenza bongo. Ezali yango emonisi Yisaya 65:21-23 na maloba oyo: “Bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga na miwiti mpe bakolia mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda; bakokona te ete mosusu alia; mpamba te lokola mikolo na nzete, bongo ekozala mikolo na bato na ngai, mpe baponami na ngai bakosepela kino ntango molai mpo na misala na maboko na bango. Bakosala mosala na mpamba te, bakobota bana mpo na mobulungano te, mpamba te bakozala bakitani na bapambolami na Jéhovah mpe bana na bango elongo na bango.” Oyo nde libongwani ekozala soki tokokanisi yango na makambo ya lelo! Mpe oyo nde lipamboli!
25. Ozali kolikya kozwa nini na boyengebene oyo ekotyama na Mosambisi oyo Nzambe aponi mpe ozwi likatami ya kosala nini?
25 Na ndenge yango, baoyo nyonso bazali na mposa na boyengebene, boyengebene ya seko, bakoki kozwa mpiko: ekosalama solo mpe etikali moke mpenza. Tika ete basimba libaku na mwa ntango oyo etikali na eleko oyo ya kosambisa, mpo na koluka Nzambe elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe bazwa ye mpenza. Bakozwa na yango matomba ya seko.
Bozongeli
◻ Makambo nini toyebi mpo na mibeko ya boyengebene na Nzambe?
◻ Yesu akosala nini na boumeli na Mokolo ya Kosambisa oyo ezali koya?
◻ Nini emonisi ete tozali kobika na eleko na mpasi mpo na oyo etali kosambisa na Nzambe?
◻ Ndenge nini bokeseni ya kala ekosilisama na mokili ya sika?