Bazali kosakola na mpiko nyonso kati na mokili ya mpiɔ makasi mpe ya mɔ́tɔ
ISLANDE ezali na nord ya Océan Atlantique, penepene na katikati ya nzela oyo ekaboli Amérique mpe Europe. Atako ezali bobele mwa moke na nse ya etúka ebengami Cercle arctique, mboka yango ezali na mpiɔ makasi te lokola bato mingi bakoki kokanisa yango, mpo na bopusi ya mopepe ya molunge ebengami Gulf Stream. Islande ebengamaki “mokili ya mpiɔ makasi mpe ya mɔ́tɔ” mpo ete yango ezali na esika eleki monene ya kobomba malili na mikili ya Mpótó mpe ezali lisusu moko na bisika oyo kati na mokili mobimba ezali na bangomba mingi ya mɔ́tɔ oyo ezali naino kopela. Ezali mokili oyo eyebani malamu mpo na maziba ya mai na mɔ́tɔ mpe ba solfatares, to bisika ya bangomba ya mɔ́tɔ na yango oyo epesaka mbɔ́ngi ya molunge mpe mipepe ebengami gaz sulfureux.
Bafandi 260 000 ya esanga wana ya mibale ya monene na mikili ya Mpótó bazali bakitani ya ba Vikings, baoyo bayaki wana esili koleka mibu 1 100. Lokóta Islandais ezali mpenza lolenge moko na lokóta ya kala Norrois, oyo ba Scandinaves (bato bafandi mpenza na nord ya Mpótó) bazalaki koloba na eleko ya ba Vikings. Lokóta wana ebongwani mpenza te mpo ete bato ya Islande balingaki mingi kotanga masoló na bango ya kala ebengami sagas, oyo mingi na yango ekomamaki na ekeke ya zomi na misato.
Na ekeke ya zomi na motoba, babandaki kobongola Biblia na lokóta Islandais. “Kondimana ya Sika” ebimaki na mobu 1540, mpe Biblia mobimba ebimaki na mobu 1584. Koleka 90 % ya bafandi bazali basangani ya lingomba Eglise luthérienne évangelique, lingomba ya Leta. Atako Biblia ezali kati na bandako penepene na nyonso, bobele bato moke nde bazali kondima ete ezali Liloba ya Nzambe. Ntalo monene ya ba Islandais batalelaka makambo ya losambo na makanisi ya bokatikati, mbala mingi moto na moto azalaka na makanisi na ye moko.
Nsango malamu ekómi na Islande
Ba Islandais ya liboso oyo bayokaki nsango malamu ya Bokonzi bazalaki kofanda na Canada. Georg Fjölnir Lindal azalaki moko na bango. Baboti na ye bautaki na Islande, mpe azalaki koloba lokóta ya Islandais. Nsima na mwa ntango moke, wana asilaki komipesa epai na Jéhovah Nzambe, akómaki pionnier. Na 1929, wana azalaki na mibu 40, amemaki nsango malamu epai na bato ya mokili wana ya mpiɔ makasi mpe ya mɔ́tɔ.
Oyo nde mosala monene mpo na moto moko! Islande ezali na bakilomɛtɛlɛ soko 320 longwa na nord kino na sud mpe bakilomɛtɛlɛ soko 500 longwa na est kino na ouest. Nzela ya mai, na kolanda ndelo ya mokili, bakisa bisika bansongɛ ya mabelé ekaboli mai monene, ezali bakilomɛtɛlɛ soko 6 400. Na ntango wana, banzela ya malamu ezalaki te, mituka to mwango mosusu ya sika mpo na kotambola kati na mboka yango ezalaki mpe te. Atako bongo, ndeko Lindal asakolaki na Islande mobimba na boumeli ya mibu zomi mpe akabolaki bankóto ya mikanda. Atambolaki na masuwa kolanda bandelo ya mokili, mpe wana asengelaki kokende kotala basáli na bilanga ya Islande, azalaki kosalela bampunda mibale, moko mpo na komema ye, mosusu mpo na komema mikanda na ye mpe biloko na ye.
Na boumeli ya mibu 18, ndeko Lindal azalaki Temwe bobele moko na Islande. Atako asalaki mosala makasi, amonaki ata moto moko te kozwa etelemelo mpo na Bokonzi na ntango wana. Mokolo ya le 25 Mars 1947, ezalaki nsuka ya ntango molai oyo alekisaki ye moko, wana bandeko oyo bazwaki mapolomi ya liboso na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower bakómaki. Kanisa esengo na ye wana Jéhovah ayanolaki na mabondeli na ye mpo na kozwa basáli mingi mpo na kobuka mbuma. (Matai 9:37, 38) Ndeko Lindal alandaki mosala na ye na Islande kino ntango azongaki na Canada na 1953.
Basáli mingi mpo na kobuka mbuma
Bamisionere oyo bakómaki na 1947 bazalaki bandeko mibale ya mokili ya Danemark. Bamisionere mosusu bayaki nsima na mbula mibale. Bandeko wana bazalaki kosakola elongo na baninga mosusu oyo bakendeki kofanda na Islande, bakabolaki bankóto ya mikanda. Ba Islandais balingaka mingi kotanga mikanda, kasi mingi te kati na bango bayanolaki na nsango malamu. Nsima na mibu 27 ya kolona mpe ya komwangisa mai, bandeko wana ya motema molai babandaki komona mbuma ya mosala na bango. Na 1956 bato ya sika nsambo bazwaki etelemelo mpo na Bokonzi mpe bamipesaki epai na Jéhovah.
Na boumeli ya mibu zomi oyo miuti koleka, motuya ya basakoli ya Bokonzi esili koyikana koleka mbala mibale. Lelo oyo, masangá nsambo mpe etuluku ya moke moko esangisi basakoli ya nsango malamu 280. Tika ete totambola kati na esanga yango mpo na kotala masangá.
Mboka-mokonzi mpe zingazinga na yango
Bandeko mibali mpe basi oyo bayikelaki mibu wana nyonso mpiko bazwaki mapamboli mingi. Lelo oyo ezali na masangá mibale ya makasi na Reykjavik, mbokamokonzi. Bayanganaka na Salle du Royaume moko kitoko kati na ndako oyo bafungolaki na 1975, esika biro ya filiale ezali.
Fridrik mpe Ada bazalaki kati na bandeko nsambo ya liboso baoyo bazwaki batisimo na 1956. Fridrik alobi ete: “Nazali komikundola ete tozalaki na momeseno ya koyangana kati na eteni moko moke ya ndako epai bamisionere bazalaki kofanda. Esika ezalaki mpo na kotya bakiti 12, kasi mbala mosusu, ntango bato bazalaki koya mingi koleka motuya yango, tozalaki kofungola ekuke ya eteni ya moke oyo ezalaki pembeni. Oyo nde bokeseni lelo oyo, ntango masangá mibale mazali kotondisa Salle du Royaume yango!”
Fridrik azalaki na mokumba ya kokamba misala ya cafétéria ntango ba assemblées ya liboso esalemaki. “Nazalaki kosala misala mingi ngai moko, mpe bobele na ntango yango, ezalaki kokóma mbala mingi ete nasala masoló misato to minei na mokolo moko. Wana nazalaki kosala na kúku, nazalaki kolata tablier. Ntango nasengelaki kosala lisoló nazalaki kolata kazaka na ngai mpe kokima mbangu kino na estrade. Mbala mingi bandeko basengelaki kokundwela ngai ete nalongola tablier. Lelo oyo, bato 400 to 500 bazali koyangana na ba assemblées, elongo na bankulutu ya makoki baoyo bazali kosanganga na ebongiseli ya koteya. Tozali mpe na bandeko mingi oyo balingaka kosala misala ya cafétéria.”
Lisangá oyo lizali pembeni ya engumba Reykjavik ezali Keflavík, penepene na bakilomɛtɛlɛ 50 epai ya ouest. Balabala yango ezali komema biso na bisika ya potopoto ya bangomba ya mɔ́tɔ. Potopoto ya bangomba ya mɔ́tɔ ezipi 10 % ya etando ya Islande. Bitwele ya liboso ya kobima na bisika yango bizali ba lichens mpe makenzi, kasi na bisika ya potopoto ya kala okokuta mbuma ya mikemike mpe nzeté ya mike.
Lisangá ya Keflavík ezali na basakoli 19 mpe ebandaki na 1965. Pembeni wana ezali na libandá ya mpempo ya monene epai mpepo oyo eutaka na mikili ya bapaya ekitaka, mpe camp ya basodá ya mokili ya Amérique. Atako Batemwe basakoli naino te ndako na ndako kati na camp yango, nzokande boyekoli mingi ya Biblia ebandaki kotambwisama wana mpe mwa ndambo na bato bayebaki solo.
Lisangá mosusu lizali na Selfoss, bakilomɛtɛlɛ 55 na est ya engumba Reykjavik. Awa tozali kokuta mokili ya matiti mingi mpo na koleisa bangombe mpe bampate, etúka eleki kobimisa miliki kati mokili ya Islande. Na nzela, toleki penepene ya engumba Hveragerdi, engumba moko moke kati na lobwaku moko kitoko. Na mosika, tomoni mbɔ́ngi ya maziba ya mai na mɔ́tɔ bipai nyonso kati na lobwaku. Oyo ezali moko na bisika bileki minene ya maziba ya mai ya mɔ́tɔ kati na Islande mobimba, mpo na kozwa litomba na mɔ́tɔ yango, ba Islandais batóngaki bandako mingi ya kobatela molunge mpe kati na yango bazalaki kolona batomato, ba concombres mpe mitindo mikeseni ya bafololo.
Kati na etúka wana ezali na lisangá moko moke kasi ya molende oyo ezali na basakoli ya Bokonzi 19. Sigurdur mpe Gudrún Svava bakendeki kuna longwa na engumba ya Reykjavik mpo na kosunga etuluku yango na eleko oyo lisangá esalemaki na 1988. Sigurdur azali nkulutu bobele moko awa. Liboso ete akóma Témoin de Jéhovah esili kokoka penepene mibu zomi sikawa, azalaki mobeti miziki oyo ayebanaki mingi, azalaki kobeta mbonda kati na bituluku bikeseni ya miziki. Lelo oyo, azali kosukola talatala ya maninisa ya bandako mpe kolakisa miziki mpo na kozwa mosolo ya kobikela. Motindo na bomoi na ye lokola mosepelisi ya bato ememelaki ye mindondo mingi, lokola komela drogue, kolangwa masanga mpe koboma libala. Azali sikawa na esengo mingi, lokola oyo ya kozwa ntina kati na bomoi mpe azali kosalela Jéhovah!
Eteni ya est ya esanga
Wana tolongwi na Selfoss, tomati na motuka mpo na kotambola bakilomɛtɛlɛ 680, mingi mpenza na nzela moko moke mpe ya mabangamabanga. Tozali kokende na lisangá oyo lilandi, na engumba ya Reydarfjördur, na libongo ya est ya mai monene. Nsima na ndambo ya ngonga, tokómi komona Hekla, ngomba ya mɔ́tɔ oyo eyebani mingi kati na mokili ya Islande. Esili kobimisa mɔ́tɔ na yango mbala minei na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale.
Na 1973, mɔ́tɔ ya nsomo ya ngomba ebimaki na bisanga ya Vestmannaeyjar. Bafandi nyonso ya etúka wana, bato soko 5 300 bamemamaki epai mosusu bobele nsima ya mwa bangonga. Nsima ya kobongisama ya engumba yango, bafandi mingi na yango bazongaki. Lelo oyo, Batemwe mibale bazali kofanda kuna mpe bazali kosakola nsango malamu na bafándi ya esanga wana. Nsima ya kotambwisa motuka na boumeli ya ngonga mibale, tozalaki na esengo ya komona etando kitoko ya Vatnajökull, esika oyo eleki monene ya kobomba malili na mokili ya Islande, ezali etando ya 8 300 kilomètres carrés. Na nzela, tolekaki lisusu boéta mpe mingála mingi.
Nsima ya kolekisa penepene na ngonga zomi na nzela, tokómi epai tozalaki kokende. Na engumba Reydarfjördur tokutani na basakoli 12 ya lisangá moko ya sika ya Islande. Batemwe bazalaki na esika yango te kino la Société afungolaki ndako ya bamisionere na nsuka ya mobu 1988. Kjell mpe Iiris, bamisionere wana, babalani ya ekólo Suède oyo bazali kosala na Islande uta 1963, batindamaki epai na bafándi 15 000 ya eteni wana ya mboka moke. Mingi kati na bango bazali kofanda na mboka mike ya bɔlɔ́bi mbisi penepene ya mai monene, oyo etandani kino bakilomɛtɛlɛ 500.
Kjell ayebisi ete: “Ntembe ezali te ete Jéhovah asili kopambola mingi mosala ya kosakola Bokonzi na eteni oyo ya Islande. Na le 1er Janvier 1993, lisangá moko esalemaki, mpe tozali kotambwisa boyekoli malamu ya Biblia elongo na bato oyo bazali kokola malamu. Atako myango ya kotambola na nzela esili kobongwana mingi uta eleko oyo Lindal azalaki kosala mibembo na mpunda, ezali ntango nyonso likambo ya petee te kotambwisa mituka na bilekelo oyo bikaboli bangomba na banzela ezipami na mbula mpembe na boumeli ya basanza ya malili makasi wana kongenga ya moi ekoumelaka mingi te, ata na Jeep oyo biyika na yango nyonso bikopusamaka na motɛlɛ. Mokolo moko, Jeep elongwaki na nzela oyo ezalaki na mbula mpembe mpe ebalukaki mbala mibale to misato na mopanzi ya ngomba. Tozalaki mpenza na esengo ete tozokaki te!”
Nsima ya mibu 30 na Islande, Iiris alobi ete: “Na boumeli ya bambula, bandeko mingi oyo bautaki na mikili misusu bapesaki lisalisi. Atako mingi na bango basengelaki kolongwa mpo na bantina ekeseni, na ntembe te basanganaki mingi mpenza na mosala ya kolona mpe komwangisa mai. Tozali na esengo ete tozali na libaku ya kozala naino awa, mpamba te likoki lipesameli biso ya komona kobukama ya mbuma. Awa mpe Jéhovah azali koyeisa mosala na ye mbangu.”
Bokóli oyo mingi esalemi mpo ete basakoli ya sika bapesaki litatoli epai na baninga na bango ya mosala. Atli ayekolaki solo elongo na bamisionere mpe abandaki kolobela yango epai na bato mosusu na kompanyi ya botóngi epai azalaki kosala. Baninga na ye mibale ya mosala oyo bazali sikawa kosangana na mosala ya kosakola, mosusu azwaki batisimo elongo na mwasi na ye na sanza ya Novembre 1992. Monginga na ye mosusu akómi koyekola Biblia elongo na Batemwe.
Tokómi na nord
Wana tolongwi na Reydarfjördur, tokei epai ya ouest. Lisangá oyo lilandi lizali na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 300, na engumba ya Akureyri. Basakoli oyo bazali ba pionniers speciaux batindamaki kuna na ebandeli ya bambula 1950. Uta na ebandeli mpenza, mosala ya kosakola ekutanaki na botemeli makasi ya bakonzi ya mangomba na engumba yango. Masoló mabimaki kati na zulunalo ya engumba yango mpo na koyebisa bato ete bakeba na ba Témoins de Jéhovah. Bato mingi ya engumba wana bazalaki mpe komipesa na misala ya bilimu mabe. Kasi mpo na mpiko mpe motema petee ya ba pionniers mpe bamisionere, lelo oyo ezali na lisangá moko ya molende mpe ya mɔ́tɔ mingi oyo ezali na basakoli ya Bokonzi 35.
Fridrik, moko na bankulutu ya lisangá wana, azalaki molɔ́bi mbisi. Nsima ya koyangana na assemblée ya district ya 1982, andimisamaki mpenza ete oyo ye azali koyekola ezalaki solo. Azongaki na Akureyri na ekateli makasi ya kopesa litatoli epai na bandeko na ye, bayebani na ye mpe baninga na ye ya mosala. Fridrik asalaki ebongiseli mpo na kotika mosala ya molɔ́bi mbisi mpo akoka kozala na ntango mingi ya kosalisa lisangá. Ayebisaki makango na ye, Helga, ete akokaki lisusu te kofanda elongo na ye kino bakobalana, mpo ete alingaki kokóma Témoin de Jéhovah. Fridrik alingaki ete Helga ayekola Biblia mpo alingaki te ‘kobala moto oyo azali mondimi te.’ (1 Bakolinti 7:39) Akamwaki na komona ete Helga abandaki koyekola. Babalanaki na Février 1983 mpe mwa moke na nsima bazwaki batisimo. Na nsima ya mwa ntango, mama mpe ndeko ya Fridrik ya mwasi bandimaki solo.
Esika na biso ya nsuka ezali Akranes, na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 350 longwa na Akureyri, nsima ya bituluku misato ya bangomba mpe kati na lobwaku ya kitoko. Awa nzela ebongisami malamu, epesi libaku ya kotambola malamu na motuka soki tokokanisi yango na nzela moke mpe ya mabangamabanga oyo tolekaki na eteni monene ya mobembo. Na Akranes tozali na lisangá oyo eleki moke na Islande—basakoli bazali mitano, mibale kati na bango bazali bankulutu. Esangisi mabota mibale oyo eyanolaki na ‘libyangi ya moto na Makedonia,’ batikaki moko na masangá minene ya Reykjavik, mpe bayaki na engumba wana moke kosakola na esika mposa ezali mpenza mingi. (Misala 16:9, 10) Sikawa basili kosakola nsango malamu kati na teritware wana na motema petee nyonso na boumeli ya mibu koleka mibale, na elikya ete Jéhovah akokolisa yango.—1 Bakolinti 3:6.
Bilikya kitoko mpo na bokóli
Na bandako na bango ya milona oyo ezali kozwa molunge na nguya ya maziba ya mai na mɔ́tɔ mpe na miinda ya lotiliki, baloni ya Islande bazali na makoki ya kokona mbuma, ndunda ndenge na ndenge, mpe bitwele mosusu. Bobele bongo, Batemwe, na nzela ya pole ya elimo, mɔ́tɔ ya elobeli, boboto mpo na kondimisa bato, mpe na mapamboli ya elimo santu ya Jéhovah, bazwi mbano ya kitoko na elanga ya Islande.
Na mbula oyo, bato 542 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na Klisto, mpe boyekoli ya Biblia penepene ya 200 ezali sikawa kotambwisama. Lisusu, eyano ya malamu na bilendiseli mpo na kokende na bateritware oyo ezali na basakoli te, ezali kopesa biso elikya ete bato oyo bakokani na bampate kati na esanga wana monene bakoyoka mongongo ya Yesu Klisto, Mobateli Malamu. (Yoane 10:14-16) Oyo nde mbano kitoko mpo na basakoli ya Bokonzi wana ya sembo oyo bamonisaki motema molai mpe mpiko kati na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili ya mpiɔ makasi mpe ya mɔ́tɔ na boumeli ya mibu 64 oyo miuti koleka!
[Karte na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Akureyri
Akranes
Keflavík
Selfoss
Vestmannaeyjar
Reyðarfjörður
Hekla
Geysir
VATNAJÖKULL
REYKJAVÍK
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Based on map by Jean-Pierre Biard