Yehova—Nzambe oyo azali na mokano
“Lokola mwango mobɔngisaki ngai, ekojala mpe bongo; lokola mokano mokanaki ngai, ekotɛma mpe bongo.”—YISAYA 14:24.
1, 2. Bato mingi bazali koloba nini likoló na mokano ya bomoi?
BATO na bipai binso bazali kotuna ete: “Bomoi ezali na mokano nini?” Mokonzi moko ya politiki na mikili ya Wɛ́sti, alobaki ete: “Bato bazali kotuna koleka na liboso ete, ‘Biso tozali banani? Nini ezali mokano na biso?’” Wana zulunalo moko etunaki bilenge mpo na mokano ya bomoi na bango, biyano mingi bizalaki ete: “Kosala nyonso oyo motema elingi.” “Kosalela mabaku nyonso mpo na komisepelisa mpenza.” “Kosepela mingi mpe mingi koleka kati na bomoi.” “Kozala na bana, kozala na esengo mpe na nsima, kokufa.” Mingi bakanisaki ete lolenge ya bomoi mosusu ezalaki te. Moko te alobelaki mokano ya kozala na bomoi molai awa na mabelé.
2 Moto moko na mayele na mateya ya Confucius, alobaki ete: “Ndimbola monene ya bomoi ezwami kati na ezalela na biso bato.” Na kotalela likanisi yango, bato basengeli ntango nyonso kobotama, kobunda mpo na koumela mibu 70 soko mibu 80, na nsima kokufa mpe kozanga bomoi libela. Molakisi moko ya évolution alobaki ete: “Tokoki koluka eyano ‘eleki malamu’—kasi ezali te.” Mpo na bato ya évolution wana, bomoi ezali etumba mpo na kobika, mpe kufa ezali nsuka na yango nyonso. Mateya ya motindo wana mazali komonisa lokola ete bomoi ezali na elikya moko te.
3, 4. Lolenge nini makambo ya mokili mazali kobebisa makanisi ya bato mingi likoló na bomoi?
3 Bato mingi bazali kobɛta ntembe ete bomoi ezali na mokano te wana bazali komona ete mikolo ya bomoi ya moto mitondi na mpasi mingi. Na ntango na biso, wana ekanisami ete moto akómi na nsɔngɛ́ ya mayele ya kosala bamasini mpe na mayele ya zebi, soko miliare moko na bato ya mokili mobimba bazali mpenza na bokɔnɔ mpe bazali kolya malamu te. Bamilió na bana bazali kokufa mbula na mbula mpo na bantina motindo oyo. Lisusu, ekeke oyo ya ntuku mibale, mpo na etumba, bato bakufaki mbala minei koleka oyo esalemaki na boumeli ya mibu nkámá minei misili koleka. Mabe, mobulu, bilangwiseli (drogues), mabota makabwani, SIDA mpe bamaladi mosusu euti na kosangisa nzoto—molɔngɔ́ ya makambo mabe mozali sé kobakisama. Bakambi ya mokili bayebi te nini basengeli kosala mpo na kosilisa makambo wana.
4 Na ntina na makambo ya motindo wana, mwasi moko amonisaki lolenge oyo bato mingi bakanisaka: “Mokano ya bomoi mozali te. Soki makambo nyonso wana ya mabe mazali kosalema, boye bomoi ezali na ntina mingi te.” Mpe mobangé mobali moko alobaki ete: “Nazali komituna uta kala ete, mpo na nini nazali awa. Soki yango ezali na mokano, nakomibanzabanza lisusu te na ntina na yango.” Ezali bongo mpo ete bato mingi bayebi te ntina oyo Nzambe apesaki nzela na mpasi, nsɔmɔ ya makambo oyo mazali kobima na mokili mazali kosala ete bazala na elikya ya solo te mpo na mikolo mizali koya.
5. Mpo na nini mangomba ya mokili oyo mazali kobakisa mobulungano likoló na mokano ya bomoi?
5 Ata bakonzi ya mangomba bazali na likanisi moko te, mpe bazali kokakatana na likambo litali mokano ya bomoi. Mobali moko oyo azaláká mokambi kati na Ndakonzambe St. Paul ya engumba Londres, alobaki ete: “Na boumeli ya bomoi na ngai mobimba, nasalaki makasi mpo na koyeba mokano ya kozala na bomoi. . . . Nazwaki yango te.” Ya solo, bakonzi mingi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bakoteyaka ete, na ntango ya liwa, moto malamu akokende na likoló mpe moto mabe akokende na lifelo ya mɔ́tɔ na seko. Kasi likanisi oyo lizali bobele kopesa nzela na bato awa na mabelé ete bálanda kotungisama. Bongo, soki mokano ya Nzambe mozalaki ete bato bazala na bomoi na likoló, mpo na nini uta ebandeli asalaki bango bobele bikelamu ya likoló te, lokola asalaki baanzelu, mpe bongo kobatela bato na mpasi monene boye? Mobulungano mozali mpenza likoló na mokano ya bomoi awa na mabelé to mpo na koboya kondima ete bomoi ezali na mokano.
Nzambe oyo azali na mokano
6, 7. Biblia eyebisi biso nini na ntina na Nkolo ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba?
6 Nzokande, Biblia Mosantu, búku oyo esili kokabolama mingi mpenza kati na Lisoló ya bato, eyebisi biso ete Yehova, Nkolo Moyangeli ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba, azali Nzambe oyo azali na mokano. Ya solo, yango emonisi biso ete, ye azali na mokano ya libela, mokano ya seko mpo na bato awa na mabelé. Mpe wana Yehova akani kosala likambo moko, yango ekozanga kokokisama te. Nzambe alobi ete, lokola mbula ekokólisa mombotó, “boye na liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; ekobutwa epai na ngai mpamba te, kasi ekosukisa oyo ekani ngai, ekolonga na likambo litindaki ngai yango.” (Yisaya 55:10, 11) Likambo nyonso oyo Yehova asili koloba, akokokisa yango, “yango nde ekosalema.”—Yisaya 14:24, NW.
7 Biso tokoki mpenza kotya motema ete Mozwi-na-Nguya-Nyonso akokokisa bilaká na ye, mpo ete “Nzambe akobukaka lokuta te.” (Tito 1:2; Baebele 6:18) Ezali ye koloba na biso ete akosala likambo moko, liloba na ye lizali ndanga ete yango ekosalema. Yango ezali lokola nde esili kokokana. Alobi ete: “Ngai nazali Nzambe mpe Nzambe mosusu azali te, soko moko te oyo akokani na ngai; Ye oyo uta ebandeli akosakolaka nsuka, mpe uta ntango na kalakala akosakolaka makambo oyo masalemi naino te; Ye oyo alobi ete: ‘Toli na ngai mpenza ekotelema, mpe likambo nyonso lisepelisi ngai nakosala [yango].’ . . . Nasili koloba yango, mpe nakoyeisa yango. Nasili kobimisa yango, mpe nakosala yango.”—Yisaya 46:9-11, NW.
8. Baoyo balingi koyeba Nzambe na bosembo nyonso, bakoki mpenza kozwa ye?
8 Lisusu, Yehova “alingi te ete moto moko abomama, kasi alingi ete banso bakóma kino kobongola motema.” (2 Petelo 3:9, NW) Mpo na ntina oyo, alingi te ete moto moko azanga koyeba ye. Mosakoli Azalia alobaki ete: “Sɔkɔ bokoluka ye, akojuana na bino nde sɔkɔ bokotika ye, akotika bino.” (2 Ntango 15:1, 2) Na bongo, baoyo balingi solo koyeba Nzambe mpe mikano na ye bakoki mpenza kosala yango soki batii milende na koluka ye.
9, 10. (a) Nini esili kopesama na baoyo balingi koyeba Nzambe? (b) Bolukiluki na Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso na kosala likambo nini?
9 Epai wapi bakoluka ye? Mpo na baoyo bazali solo koluka Nzambe, ye asili kopesa Liloba na ye, Biblia. Na nzela ya elimo santu na ye, nguya ekosalaka mosala oyo asalelaki yango mpo na kozalisa mɔlɔ́ngɔ́, Nzambe akambaki bato ya sembo mpo na kokoma makambo oyo tosengeli na yango mpo na koyeba mikano na ye. Na ndakisa, na ntina na bisakweli ya Biblia, ntoma Petelo alobaki ete: “Esakweli moko te esili kobima na mokano na moto, kasi bato balobaki na ntina na Nzambe wana bapusamaki na elimo santu.” (2 Petelo 1:21, NW) Bobele bongo, ntoma Paulo alobaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mabongi mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola, mpo na kobɔkɔlo kati na boyengebene, ete moto na Nzambe akoka mpenza, asɛlingwa mpenza mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17, NW; 1 Batesaloniki 2:13.
10 Tósimba ete Liloba ya Nzambe likoki kosalisa biso mpo na kokoka moke te soko na kosɛlingwa moke te, kasi ‘kokoka mpenza, kosɛlingwa mpenza.’ Ekoki kosalisa moto na koyeba sikisiki lolenge Nzambe azali, nini ezali mikano na ye, mpe nini azali kosɛnga na basaleli na ye. Yango esengelaki mpenza komonana kati na búku oyo Nzambe akomisaki yango. Mpe búku yango ezali liziba bobele moko oyo tokoki koluka kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe. (Masese 2:1-5; Yoane 17:3) Na kosaláká bongo, tokozala “bana mikɛ tɛ baoyo bakoninganaka mpe bakotengatenga epai na epai na mipɛpɛ yɔnsɔ na mateyo mpe na mayɛlɛ na bato, na bojimbisi na bango na njela na mikano mabe.” (Baefese 4:13, 14) Mokomi na Nzembo alobeli lolenge malamu ya komonela makambo: “Liloba na yo [Nzambe] lizali mwinda mpo na lokolo na ngai, mpe pole mpo na nzela na ngai.”—Nzembo 119:105, NW.
Mikano ya Nzambe mimonisami mokemoke
11. Lolenge nini Yehova amonisaki mikano na ye epai na bato?
11 Uta ebandeli mpenza ya libota ya bato, Yehova amonisaki mikano na ye mpo na mabelé mpe bato oyo bafandi likoló na yango. (Genese 1:26-30) Kasi ntango baboti na biso ya liboso babwakaki boyangeli ya Nzambe, bato bakɔtaki kati na molili ya elimo mpe na liwa. (Baloma 5:12) Atako bongo, Yehova ayebaki ete esengelaki kozala na bato oyo bakolinga kosalela ye. Bongo, na boumeli ya bikeke, amonisaki mokemoke mikano na ye epai na basaleli na ye ya sembo. Bamoko kati na baoyo ye asololaki na bango, ezalaki Enoka (Genese 5:24; Yuda 14, 15), Noa (Genese 6:9, 13), Abalayama (Genese 12:1-3), mpe Mose (Exode 31:18; 34:27, 28). Amosa, mosakoli ya Nzambe, akomaki ete: “Sɔlɔ Nkolo [Yehova] akosala likambo tɛ bobɛlɛ ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.”—Amosa 3:7; Danyele 2:27, 28.
12. Lolenge nini Yesu angɛngisaki pole monene likoló na mikano ya Nzambe?
12 Ntango Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, azalaki awa na mabelé soko mibu 4 000 nsima ya botomboki na Edene, makambo mingi ya mikano ya Yehova mamonisamaki. Yango etalaki mingimingi mokano ya Nzambe mpo na kotya Bokonzi ya likoló mpo na koyangela mabelé mobimba. (Danyele 2:44) Yesu asalelaki Bokonzi yango lokola motó ya likambo ya mateya na ye. (Matai 4:17; 6:10) Ye mpe bayekoli na ye bateyaki ete, na nzela na Bokonzi, mokano ya Nzambe na ebandeli mpo na mabelé mpe mpo na bato, ekokokana. Mabelé makobongwana paladiso oyo ekofandama na bato ya kokoka, baoyo bakozala na bomoi mpo na seko. (Nzembo 37:29; Matai 5:5; Luka 23:43; 2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:4) Lisusu, Yesu mpe bayekoli na ye bamonisaki makambo oyo makosalema kati na mokili ya sika na nzela ya makamwisi oyo bazalaki kosala mpo na nguya oyo Nzambe apesaki bango.—Matai 10:1, 8; 15:30, 31; Yoane 11:25-44.
13. Na kotalela boyokani ya Nzambe elongo na bato, mbongwana nini esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
13 Na Pantekote ya mobu 33 T.B., mikolo 50 nsima na lisekwa ya Yesu, elimo ya Nzambe esopamaki likoló na lisangá ya bayekoli na Klisto. Lisangá yango ekómaki libota liponami na Yehova na esika ya Yisraele oyo ezangaki sembo. (Matai 21:43; 27:51; Misala 2:1-4) Kosopama ya elimo santu na libaku wana ezalaki elembeteli ete, uta ntango wana, Nzambe asengelaki komonisa solo na ntina ya mikano na ye na nzela ya bamonisi wana ya sika. (Baefese 3:10) Na boumeli ya ekeke ya liboso ya ntango na biso, moboko ya ebongiseli ya lisangá ya boklisto motyamaki.—1 Bakolinti 12:27-31; Baefese 4:11, 12.
14. Lolenge nini baoyo bazali koluka solo bakoki koyeba lisangá ya boklisto ya solo?
14 Lelo oyo, baoyo bazali koluka solo bakoki koyeba lisangá ya boklisto ya solo na lolenge yango ezali komonisa ezaleli ya monene ya Nzambe, bolingo. (1 Yoane 4:8, 16) Ya solo, bolingo mpo na bandeko ezali elembo ya boklisto ya solo. Yesu alobaki ete: “Soki bozali na bolingo kati na bino, bato nyonso bakoyeba ete bino bozali bayekoli na ngai.” “Oyo ezali etindá na ngai, ete, bolinganaka lokola ngai nasili kolinga bino.” (Yoane 13:35, NW; 15:12, NW) Mpe akundwelaki bayoki na ye ete: “Soki bokosala makambo mazali ngai kolaka bino, boye bozali baninga na ngai.” (Yoane 15:14, NW) Na bongo, basaleli ya solo ya Nzambe bazali bato oyo bazali kosalela mobeko ya bolingo. Bazali bobele kolobela yango te, mpo ete “kondima ezangi misala esili kokufa.”—Yakobo 2:26, NW.
Kongɛngisama
15. Basaleli ya Nzambe bakoki kondimisama na likambo nini?
15 Yesu asakolaki ete nsima ya ntango, lisangá ya boklisto ya solo likongɛngisama mingi mpenza na kotalela mikano ya Nzambe. Alakaki bayekoli na ye ete: “Mosungi, [elimo santu, NW] oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye akolakisa bino makambo yɔnsɔ.” (Yoane 14:26) Yesu alobaki lisusu ete: “Tala! Ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ebongiseli ya biloko.” (Matai 28:20, NW) Na bongo, kongɛngisama na ntina na solo na Nzambe mpe mikano na ye, ezali kobakisama kati na basaleli ya Nzambe. Ya solo, “nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ekongɛnga lisusu mpe lisusu kino mokolo mokomonana malamu.”—Masese 4:18, NW.
16. Kongɛngisama na biso kati na elimo ezali koyebisa biso nini likoló na esika na biso mpenza kati na mikano ya Nzambe?
16 Lelo oyo, pole ya elimo ezali kongɛnga mingi koleka, mpo ete tozali kobika na ntango oyo bisakweli mingi ya Biblia bizali kokokana to bizali pene na kokokana. Yango ezali komonisa biso ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe ya biloko. Oyo ezali eleko oyo ebéngami ete “nsuka ya ebongiseli ya biloko”; yango ekolandama na mokili ya sika ya Nzambe. (2 Timoté 3:1-5, 13; Matai 24:3-13) Lokola Danyele asakolaki yango, mosika te Bokonzi ya Nzambe na likoló “ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo yɔnsɔ [oyo ezali lelo], mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
17, 18. Bisakweli nini minene oyo bizali kokokana sikawa?
17 Esakweli ezwami na molɔngɔ́ 14 ya Matai mokapo 24 (NW) ezali moko na bisakweli oyo bizali kokokana lelo oyo. Kuna, Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba mafandami mpo na litatoli epai na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” Epai nyonso na mokili, mosala oyo ya kosakola Bokonzi mosalemi na bamilió ya Batatoli ya Yehova. Mpe mbula na mbula, bato nkóto na nkóto bazali kosangana na bango. Yango eyokani na esakweli ya Yisaya 2:2, 3, oyo elobi ete “na mikolo ya nsuka” ya mokili oyo mabe, bato bauti na mabota mingi bakoya na losambo ya solo ya Yehova, mpe ‘ye akolakisa bango banzela na ye, mpe bakotambola kati na bilekelo na ye.’
18 Bato wana ya sika bazali kokɔta na losambo ya Yehova “lokola lipata,” lolenge esakolamaki na Yisaya mokapo 60, molɔngɔ́ 8. Isa 60 Molɔngɔ́ 22 mobakisi ete: “Oyo mokɛ akokoma nkoto mpenja, oyo eleki mokɛ akokoma libota na makasi. Ngai najali [Yehova]; na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.” Bilembeteli bimonisi ete, ntango yango ezali sikawa. Mpe bato ya sika bakoki kondimisama ete na kosanganáká elongo na Batatoli ya Yehova, bazali na boyokani elongo na lisangá ya boklisto ya solo.
19. Mpo na nini tozali koloba ete bato ya sika baoyo bazali kosangana elongo na Batatoli ya Yehova, bazali koya na lisangá ya boklisto ya solo?
19 Mpo na nini tokoki mpenza koloba yango na elikya nyonso? Mpo ete bato wana ya sika, elongo na bamilió na bato oyo basilá kokɔta kati na ebongiseli ya Yehova, basili kopesa bomoi na bango epai na Nzambe mpe bazali kosala mokano na ye. Yango elimboli mpe komiyokanisa na mobeko ya bolingo ya Nzambe. Lokola moko na bilembeteli na yango, baklisto wana basili kotula ‘mipanga na bango ete mijala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete majala bikateli na matiti. Bakoyekola etumba lisusu mpe tɛ.’ (Yisaya 2:4) Batatoli ya Yehova nyonso na mokili mobimba bazali kosala yango mpo ete bazali komonisa bolingo. Yango elimboli ete bakoki soko moke te kobunda etumba bango na bango to na bato mosusu. Kati na likambo oyo, bazali bobele bango moko—bakeseni na mangomba ya mokili oyo. (Yoane 13:34, 35; 1 Yoane 3:10-12, 15) Bakomikɔtisaka te kati na bolingo ya ekólo oyo ekokabolaka bato, mpo ete basali lisangá ya bandeko oyo likangisami na bolingo, “ekangeli ekoki.”—Bakolose 3:14, NW; Matai 23:8; 1 Yoane 4:20, 21.
Bato mingi baponi kozanga boyebi
20, 21. Mpo na nini ndambo monene na bato bazali kati na molili ya elimo? (2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19)
20 Wana pole ya elimo ezali kongɛnga kati na basaleli ya Nzambe, bato ya mokili bafandi nde kati na molili moleki monene kati na elimo. Bayebi Yehova te mpe bayebi mikano na ye te. Mosakoli ya Nzambe amonisaki likambo yango wana alobaki ete: “Tala, molili ekojipa mokili, molili tuu ekojipa mpe mabota.” (Yisaya 60:2) Ezali bongo mpo ete bato bazali komonisa bosepeli ya solo te mpo na koyekola makambo matali Nzambe, bazali mpe na mposa te ya koluka kosepelisa ye. Yesu alobaki ete: “Talá ntina ya kosambisama, ete pole eyei na mokili nde bato balingi molili koleka pole, mpo ete misala na bango mizali mabe. Mpo ete ye oyo akosalaka misala mabe, ayini pole mpe akoya epai na pole te ete misala na ye mipamelama te.”—Yoane 3:19, 20, NW.
21 Bato motindo wana bazali mpenza kosepela te mpo na koyeba mokano ya Nzambe. Na esika ya kosala bongo, bazali nde komipesa mpo na kosala mokano na bango moko. Na kozangáká koyeba mokano ya Nzambe, bazali komitya kati na etelemelo ya likámá, mpamba te Liloba na ye liyebisi ete: “Ye oyo akolongola litoi na ye ete ayoka mobeko tɛ, ata libɔndeli na ye ekojala elɔkɔ na koboyama.” (Masese 28:9) Bakozwa mpasi euti na etamboli na bango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bomizimbisa te: bakosɛkaka Nzambe te. Mpo ete, soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.”—Bagalatia 6:7, NW.
22. Bibele oyo balingi koyeba Nzambe bazali kosala nini sikawa?
22 Nzokande, ezali na bibele mingi oyo balingi koyeba mokano ya Nzambe, baoyo bazali koluka ye na bosembo nyonso, mpe bazali kobɛlɛma epai na ye lokola elobamaki na Yakobo 4:8 (NW) ete: “Bobɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma na bino.” Mpo na bato ya lolenge wana, Yesu alobi ete: “Ye oyo akosalaka malamu, akoya epai na pole, mpo ete misala na ye mimonana ete misalemi na boyokani elongo na Nzambe.” (Yoane 3:21, NW) Oyo nde makambo kitoko Nzambe akani kosala na mikolo mizali koya mpo na baoyo bazali koya epai na pole! Lisoló na biso lilandi likolobela makambo kitoko oyo mazali koya.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Bato mingi balobaka nini likoló na mokano ya bomoi?
◻ Lolenge nini Yehova amimonisi ete azali Nzambe ya mikano?
◻ Kongɛngisama nini ya monene oyo emonanaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso?
◻ Lolenge nini lisangá ya boklisto ya solo likoki koyebana na mikolo na biso?