Tókesenisa bolembu, motema mabe, mpe kobongola motema
LISUMU lizali eloko oyo baklisto bayinaka—kozanga kotosa mitindá ya sembo ya Yehova. (Baebele 1:9) Na mawa, biso banso tosalaka masumu mbala na mbala. Biso banso tobundaka na bolembu mpe kozanga kokoka oyo tosangolaki. Nzokande, mbala mingi, soki toyamboli masumu na biso epai na Yehova mpe soki tosali milende ya kozongela yango lisusu te, tokoki kobɛlɛma na ye na lisosoli ya pɛto. (Baloma 7:21-24; 1 Yoane 1:8, 9; 2:1, 2) Tozali kotɔ́nda Yehova ete, mpo na mbeka ya lisiko, andimaka mosala na biso ya bulɛɛ atako tozali bato ya bolembu.
Soki moto moko akwei na lisumu monene na ntina na bolembu ya nzoto, azali mpenza na mposa ya lisungi ya nokinoki ya bakɛngɛli engebene mwango oyo emonisami na Yakobo 5:14-16: “Mɔkɔ na bino abɛli malali [ya elimo]? Tika ete abianga mikolo na lingomba . . . Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye. Boye, boyambolana masumu, moto na moninga na ye, mpe bobɔndelana ete bobika.”
Na yango, ntango moklisto oyo amipesi akwei na lisumu monene, asengeli kosala likambo mosusu nsima ya koyambola lisumu na ye epai na Yehova. Bankulutu basengeli kokamata meko moko, mpamba te bopɛto mpe kimya ya lisangá ezali na likámá. (Matai 18:15-17; 1 Bakolinti 5:9-11; 6:9, 10) Mbala mosusu bankulutu basengeli koluka koyeba: Moto yango asili kobongola motema? Nini ememaki ye na kosala lisumu? Ezalaki likambo lisalemi bobele mbala moko mpo na bolembu? Lisumu yango lisilaki kokóma momeseno? Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te kosala bokeseni to bokabwani ya polele motindo yango mpe ezali kosɛnga bososoli mozindo.
Nzokande, ezali boni soki moto yango asalaki lisumu mpo ete aponaki kotambola kati na bizaleli ya mbindo? Na bongo, mokumba ya bankulutu ekozala polele. Ntango azalaki kosambisa lisumu moko monene kati na lisangá ya Kolinti, ntoma Paulo alobaki ete: “Bengana moto yango mabe na kati na bino.” (1 Bakɔlinti 5:13) Bato mabe bazali na esika te kati na lisangá ya boklisto.
Lolenge nini kososola bolembu, motema mabe, mpe kobongola motema
Lolenge nini bankulutu bakoki koyeba soki moto moko asili kobongola motema?a Oyo ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Na ndakisa, kanisá mokonzi Davidi. Asalaki ekobo mpe na nsima, abomisaki mpenza moto. Nzokande, Yehova atikaki ye na bomoi. (2 Samwele 11:2-24; 12:1-14) Na nsima kanisá Anania mpe Safila. Na lokuta nyonso balukaki kokosa bantoma, komimonisáká na bokosi nyonso bato ya bokabi mingi, nzokande bazalaki mpenza bongo te. Ezalaki lisumu monene? Ee. Ezali mpenza mabe lokola koboma moto mpe ekobo? Soko moke te! Nzokande, Anania mpe Safila babungisaki bomoi na bango.—Misala 5:1-11.
Mpo na nini bokeseni kati na kosambisama wana mibale? Davidi akweaki na lisumu moko monene mpo na bolembu ya nzoto. Ntango bamonisaki ye mabe oyo asalaki, abongolaki motema, mpe Yehova alimbisaki ye—atako bongo azwaki disipilini makasi na nzela ya mikakatano oyo mikweaki kati na libota na ye. Anania mpe Safila basalaki lisumu na boye ete na ezaleli ya bokosi nyonso babukaki lokuta, kolukáká kokosa lisangá ya boklisto mpe na yango ‘babukaki lokuta na elimo santu mpe na Nzambe.’ Yango ezalaki elembo ya motema mabe. Na yango, bazwaki lisambisi ya makasi.
Kati na makambo wana mibale, Yehova nde asambisaki, mpe kosambisama na ye ezalaki sembo, mpamba te atalaka na motema. (Masese 17:3) Bankulutu bazali na likoki ya kosala bongo te. Bongo lolenge nini bankulutu bakoki kososola soki lisumu moko lizali elembo ya bolembu kasi ya motema mabe te?
Ya solo, masumu nyonso mazali mabe, kasi basumuki nyonso te bazali na motema mabe. Masumu motindo moko makoki kozala elembo ya bolembu epai na moto moko mpe ekoki kozala elembo ya motema mabe epai na mosusu. Ya solo, mbala mingi kosala lisumu eutaka na mwa ndambo na bolembu mpe ndambo na motema mabe ya moto oyo asali lisumu. Likambo ya ntina mingi litali lolenge mosumuki azali kotalela lisumu na ye mpe oyo azali kokana kosala na yango. Azali komonisa elimo ya kobongola motema? Bankulutu basengeli kozala na bososoli mpo na koyeba yango. Lolenge nini bakoki kozwa bososoli wana? Ntoma Paulo apesaki Timoté elaka oyo, ete: “Kanisa oyo ejali ngai koloba. Jambi Nkolo akopɛsa yɔ bosɔsɔli na makambo yɔnsɔ.” (2 Timɔtɛ 2:7) Soki, na komikitisa nyonso, bankulutu bazali “kokanisa” maloba wana mapemami oyo Paulo mpe bakomi mosusu ya Biblia bakomaki, bakozwa bososoli oyo bazali na yango mposa mpo na kotalela na lolenge lobongi baoyo bazali kosala lisumu. Boye, bikateli na bango bikomonisa likanisi ya Yehova, kasi ya bango moko te.—Masese 11:2; Matai 18:18.
Yango ekoki kosalema lolenge nini? Moko na myango mpo na kosala bongo ezali ya kotalela lolenge Biblia ezali kolobela bato mabe mpe komona soki maloba yango makokani na moto oyo bazali kosambisa likambo na ye.
Kondima libunga mpe kobongola motema
Adama mpe Eva bazali bato ya liboso oyo baponaki etamboli ya mabe. Atako bazalaki bato ya kokoka mpe na boyebi mingi ya mibeko ya Yehova, batombokelaki boyangeli monene ya Nzambe. Ntango Yehova amonisaki bango lisumu oyo basalaki, lolenge oyo basalaki ezali mpenza kobenda likebi—Adama afundaki Eva, mpe Eva afundaki nyoka! (Genese 3:12, 13) Kokanisá yango na komikitisa mozindo oyo Davidi amonisaki. Ntango bamonisaki ye masumu minene oyo asalaki, andimaki libunga na ye mpe asɛngaki bolimbisi, ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.”—2 Samwele 12:13; Nzembo 51:4, 9, 10.
Bankulutu basengeli kotalela bandakisa wana mibale ntango bazali kosambisa likambo litali masumu minene, mingimingi epai na bato oyo bakóli. Mosumuki—na motindo na Davidi ntango bayebisaki ye masumu na ye—andimi polele mabe na ye mpe na ezaleli ya kobongola motema, amibaloli epai na Yehova mpo na koluka lisalisi mpe bolimbisi, to azali koluka komonisa ete mabe na ye mazali moke, mbala mosusu kobwakáká yango likoló na bato mosusu? Ezali solo ete, moto oyo asali lisumu akoki kolinga kolimbola makambo oyo ememaki ye na kosala bongo, mpe ekoki kozala na makambo masalemi kala to masalemi sika, oyo makoki kolɛmbisa bikateli, oyo bankulutu basengeli kotalela ntango bazali koluka mwango ya kosalisa ye. (Kokanisá na Hosea 4:14.) Kasi asengeli kondima ete ezali ye nde asali lisumu mpe ete ye nde asengeli kozongisa monoko liboso na Yehova. Tómikundola ete: “[Yehova] ajali pɛnɛpɛnɛ na bango bajali na mitema mitutami; akobikisa bango bajali na milimo minyɛtami.”—Njembo 34:18.
Momeseno ya kosala lisumu
Bisika mingi kati na mokanda ya Nzembo, bizali kolobela bato mabe. Mikapo lolenge yango mikoki kosalisa mpenza bankulutu na koyeba soki moto moko azali mpenza moto na motema mabe to soki azali na bolembu. Na ndakisa, tótalela libondeli lipemami oyo Mokonzi Davidi asalaki: “Longola ngai esika mɔkɔ na bato mabe tɛ to elɔngɔ na bato na bokɛsɛnɛ tɛ; bango bakolobaka kimia epai na baninga na bango nde lokuta ejali na motema.” (Njembo 28:3) Tómona ete bato mabe batyami na molɔngɔ́ moko elongo na “bato na bokɛsɛnɛ.” Moto oyo asalaki lisumu na ntina na bolembu ya nzoto akotika yango nokinoki nsima ya kozongela makanisi na ye ya malamu. Nzokande, soki moto moko ‘akosalaka’ oyo ezali mabe na boye ete yango ekómi lokola lolenge ya bomoi na ye, yango ekoki kozala elembo ya motema mabe.
Davidi alobeli ezaleli mosusu ya motema mabe kati na mokapo yango. Na motindo ya Anania mpe Safila, bato mabe bakolobaka makambo malamu na monoko na bango kasi babombaka makambo mabe kati na mitema na bango. Bakoki kozala bakosi—lokola Bafalisai ya mikolo ya Yesu baoyo ‘bamɔnani libanda epai na bato ete bajali bayɛngɛbɛni nde katikati batondi na bokosi mpe na yauli.’ (Matai 23:28; Luka 11:39) Yehova ayini bokosi. (Masese 6:16-19) Soki na bokosi nyonso moto moko aluki koangana masumu minene oyo asalaki wana azali liboso ya komité ya kosambisa, to soki andimi na motema mibale bobele lisumu oyo eyebani na bato mosusu, koboyáká koyambola polele mabe na ye, yango ekoki mpe kozala elembeteli ya motema mabe.
Kotyola Yehova na lolendo nyonso
Bizaleli mosusu ya bato mabe bimonisami kati na Nzembo 10. Tozali kotánga ete: “Kati na njombo, bato na masumu babengani babola; . . . atioli [Yehova].” (Njembo 10:2, 3) Lolenge nini tokotalela moklisto amipesi oyo amonisi lolendo mpe atioli Yehova? Na ntembe te, wana ezali bizaleli ya motema mabe. Moto oyo asali masumu mpo na bolembu, wana akangi ntina ya lisumu na ye to soki babendi likebi na ye likoló na yango, akobongola motema mpe akosala molende mpo na kobongola motindo ya bomoi na ye. (2 Bakolinti 7:10, 11) Nzokande, soki moto moko asali lisumu mpo ete azangaki botosi epai na Yehova, nini ekopekisa ye na kozongela mbala na mbala etamboli na ye ya mbindo? Soki amonisi lolendo atako asilaki kozwa toli ya boboto, lolenge nini akoki komonisa komikitisa oyo esengeli mpo na kobongola mpenza motema?
Talá sikawa maloba ya Davidi oyo mazwami mwa moke nsima kati na Nzembo yango: “Mpɔ na nini moto mabe akotiola Njambe mpe akoloba na motema na ye ete, Yɔ okoluka likambo tɛ?” (Njembo 10:13) Kati na lisangá ya boklisto, bato mabe bayebi malamu bokeseni kati na malamu mpe mabe, kasi bakokakatanaka te mpo na kosala mabe soki bakanisi ete bakozwa etumbu moko te. Lokola bakanisi ete mabe na bango ekomonana polele te, bakomipesa mobimba na mposa ya masumu. Na kokesena na Davidi, soki masumu na bango mayebani, bakoluka myango ya kokima disipilini. Bato motindo oyo bazali mpenza na botosi moko te epai na Yehova. “Nsɔmɔ na Njambe ejali liboso na miso na ye tɛ. . . . Akoboya mabe tɛ.”—Njembo 36:1, 4.
Kosala mabe epai na basusu
Mbala mingi, lisumu epesaka mpasi epai na bato mingi. Na ndakisa, moto na ekobo akosalela Nzambe lisumu; akopesa mpasi epai na mwasi na ye mpe na bana na ye; soki moto oyo asali na ye ekobo azali na mobalani, asaleli mpe libota na ye mabe; mpe abebisi lokumu ya lisangá. Lolenge nini azali kotalela nyonso wana? Azali komonisa mawa ya solo elongo na kobongola motema ya solosolo? To azali komonisa elimo oyo elobelami na Nzembo 94: “Bakonganga mpe bakolobaka makambo makasi. Ɛ [Yehova] bajali kotutatuta bato na yɔ, bajali kotungisa libula na yɔ. Bajali koboma mwasi oyo akufeli mobali mpe mopaya lokola, bajali koboma bitike. Bajali koloba ete ‘[Yehova] akomɔna tɛ! Njambe na Yakobo akokanisa sɔkɔ mokɛ tɛ’”?—Njembo 94:4-7.
Ya solo, masumu oyo masalemi kati na lisangá mazalaka mpenza likambo litali koboma bato te. Nzokande elimo oyo emonisami awa—elimo ya kosala baninga mabe mpo na matomba ya moimi—ekoki komonana polele wana bankulutu bazali kotalela malamumalamu lisumu oyo esalemi. Oyo mpe ezali komonisa enzombo, ezaleli ya bato na motema mabe. (Masese 21:4) Yango ekeseni mpenza na elimo ya moklisto ya solo, oyo azali ntango nyonso pene ya komipimela mpo na bandeko na ye.—Yoane 15:12, 13.
Tósalela bizaleli ya moto na Nzambe
Mwa malako oyo mazali te mpo na kopesa mibeko. Nzokande, yango ezali komonisa bandakisa ya makambo oyo Yehova azali kotala ete ezali mabe mpenza. Moto yango aboyaki kondima mabunga na ye kati na mabe oyo masalemi? Mosumuki aboyaki na ezaleli ya kotyola nyonso kolanda toli oyo bapesaki ye liboso na lisumu yango? Masumu minene oyo masalemaki masili kokóma momeseno oyo ekɔteli ye mozindo? Mosumuki azali nde kotyola na nkó nyonso mibeko ya Yehova? Asalaki milende mpo na kobomba lisumu na ye, mpe mbala mosusu kobebisáká bizaleli ya basusu na ntango wana? (Yuda 4) Milende motindo yango mizali bobele koyikana nsima wana masumu na ye masili koyebana? Mosumuki azali komonisa mawa soko moke te mpo na mpasi oyo asaleli basusu mpe mpo na nkombo ya Yehova? Ezali boni mpo na elimo na ye? Nsima wana basili kopesa ye toli ya Makomami na boboto nyonso, azali bobele komonisa lolendo mpe enzombo? Azali na mposa ya sikisiki te ya kotika lisumu yango? Soki bankulutu basosoli makambo motindo yango, oyo ezali mpenza komonisa kozanga kobongola motema, bakoki kosukisa ete masumu oyo asalaki mazali elembeteli ya motema mabe kasi bobele ya bolembu mpamba ya nzoto te.
Ata ntango bazali kotalela likambo ya moto oyo amonani lokola ete asali makambo na motema mabe nyonso, bankulutu bakotika te kolendisa ye ete alanda nzela ya boyengebene. (Baebele 3:12) Bato ya motema mabe bakoki kobongola motema mpe kobongwana. Soki ezalaki bongo te, mpo na nini Yehova akokaki kolendisa Bayisraele ete: “Tika ete moto mabe alongwa na njela na ye mpe moto na masumu alongwa na mabanja na ye. Tika ete abutwa epai na [Yehova], ete ayokela ye mawa, epai na Njambe na biso, jambi akolimbisa na sɔlɔ”? (Yisaya 55:7) Wana bazali kosambisa moto moko, bankulutu bakoki mbala mosusu komona elembo ya mbongwana kati na motema na ye, kobongwana oyo emonisami kati na ezaleli na ye mpe elimo na ye.
Ata wana bazali kobimisa moto na lisangá, bankulutu, lokola babateli ya bampate, bakolendisa ye na kobongola motema mpe na kosala matambe mpo na kozongela ngɔlu ya Yehova. Tómikundola na ntina na “moto mabe” oyo azalaki na Kolinti. Ya solo, abongolaki etamboli na ye, mpe na nsima Paulo asɛngaki ete bázongisa ye na lisangá. (2 Bakolinti 2:7, 8) Tómikundola lisusu Mokonzi Manase. Azalaki mpenza mabe mingi, kasi na nsima, ntango abongolaki motema, Yehova andimaki kobongola motema oyo ye amonisaki.—2 Mikonzi 21:10-16; 2 Ntango 33:9, 13, 19.
Ezali solo ete, lisumu mosusu ekolimbisama te—kosalela elimo santu lisumu. (Baebele 10:26, 27) Yehova ye moko azali kokata nani asili kosalela elimo santu lisumu. Bato bazali na bokonzi te ya kokata bongo. Mokumba ya bankulutu ezali ya kobatela lisangá ete lizala pɛto mpe ya kosalisa basumuki oyo babongoli motema. Soki bakosala bongo na bososoli mpe na komikitisa nyonso, kotikáká ete bikateli na bango bimonisa mayele ya Yehova, na bongo Yehova akopambola lolenge wana ya mosala na bango ya kobatela bampate.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Mosenzeli ya 1 Sɛtɛ́mbɛ, 1982, nkasa 9-15; Insight on the Scriptures, Volumi 2, nkasa 772-774.
[Elilingi na lokasa 29]
Na ezaleli ya bokosi nyonso Anania mpe Safila babukaki lokuta epai na elimo santu, komonisáká bongo motema mabe