Basi Baklisto babongi kozwa lokumu mpe limemya
“Bino mibali . . . bozalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bópesa lokumu epai na bango.”—1 PETELO 3:7.
1, 2. (a) Lisoló ya Yesu elongo na mwasi Mosamalia penepene na libulu ya mai ebimisaki kokamwa nini, mpe mpo na nini? (Talá maloba na nsé ya lokasa.) (b) Na kosakoláká epai na mwasi Mosamalia, Yesu amonisaki nini?
NA LIBULU ya mai oyo ezalaki penepene ya engumba ya Sukala, mokolo moko na ngonga ya midi, pene na nsuka ya mobu 30 T.B., Yesu amonisaki lolenge nini engebene makanisi na ye basi basengeli kotalelama. Alekisaki bangonga nyonso ya liboso ya nzánga na mobémbo kati na mokili ya bankeka mingi ya Samalia mpe akómaki na libulu ya mai na kolɛmba makasi, na nzala mpe na mposa ya mai. Wana efandaki ye penepene na libulu ya mai, mwasi moko Mosamalia ayaki kotóka mai. Yesu alobaki na ye ete: “Pesá ngai komela.” Ekoki mpenza kozala ete mwasi yango atalaki ye na kokamwa nyonso. Ye atunaki ete: “Mpo na nini yo Moyuda ozali kolɔmba komela epai na ngai mwasi na Samalia?” Na nsima, ntango bayekoli na ye bazongaki wana eutaki bango kosomba bilei, bakamwaki, komitunáká mpo na nini Yesu “azali kosolola na mwasi.”—Yoane 4:4-9, 27.
2 Nini etindaki mwasi wana na kotuna motuna mpe nini epusaki bayekoli na kokamwa? Ye azalaki Mosamalia, mpe Bayuda bazalaki na boyokani moko te elongo na Basamalia. (Yoane 8:48) Kasi ezali polele ete ntina mosusu ya komitungisa ezalaki. Na eleko wana, mitindo ya bateyi ya mangomba mizalaki kopekisa mibali na kosolola na basi na miso na bato.a Nzokande, Yesu asakolaki na polele epai na mwasi wana ya motema sembo, komimonisáká nkutu epai na ye ete azali Masiya. (Yoane 4:25, 26) Na lolenge yango Yesu amonisaki ete apekisamaki te na mitindo oyo mizali na moboko te kati na Makomami, kati na yango, oyo ezalaki kotalela basi lokola biloko mpamba. (Malako 7:9-13) Na kokesana, ezala na makambo oyo asalaki to na mateya na ye, Yesu amonisaki ete basi babongi na lokumu mpe na limemya.
Lolenge Yesu azalaki kotalela basi
3, 4. (a) Yesu asalaki nini epai na mwasi oyo asimbaki elamba na ye? (b) Lolenge nini Yesu atikaki ndakisa moko kitoko mpo na mibali baklisto, mingi mpenza na bakɛngɛli?
3 Motema boboto ya Yesu epai na bato emonisamaki mpe na lolenge oyo azalaki kosala epai na basi. Mokolo moko, mwasi moko oyo azalaki na bokɔnɔ ya kotanga makila uta mibu 12 alukaki Yesu katikati na ebele ya bato. Ezalela na ye ekómisaki ye mbindo engebene mibeko, na yango asengelaki te kozala wana. (Levitike 15:25-27) Kasi lokola azalaki na elikya mosusu te, alandaki Yesu na mayele nyonso. Ntango asimbaki elamba na ye, nokinoki abikaki! Atako azalaki kokende na ndako ya Yailo, oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na bokɔnɔ makasi, Yesu atɛlɛmaki. Eyokaki ye ete nguya ebimi na ye, atali epai na epai mpo na komona moto oyo asimbaki ye. Na nsuka, mwasi yango ayaki mpe akweaki liboso na ye na kolɛnga nyonso. Yesu apamelaki ye mpo ete azalaki kati na ebele ya bato to mpo ete asimbaki elamba na ye kozanga ndingisa? Yesu azalaki nde na boboto mpe na maloba ya kolendisa. Ye alobaki, “Mwana [na ngai ya] mwasi, kondima na yo esili kobikisa yo.” Ezalaki libaku bobele moko oyo Yesu abéngaki mwasi ete “mwana na ngai ya mwasi.” Oyo nde kobɔndisama maloba yango mapesaki na motema na ye!—Matai 9:18-22; Malako 5:21-34.
4 Yesu asukaki te bobele na kotalela maloba ya Mibeko. Azalaki kotalela elimo oyo ezalaki nsima na yango mpe ntina ya komonisa ngɔlu mpe motema mawa. (Kokanisá na Matai 23:23.) Yesu amonaki kozanga elikya ya mwasi oyo azalaki na bokɔnɔ mpe atalelaki ete ye apusamaki na kondima. Na yango ye atikaki ndakisa moko kitoko mpo na mibali baklisto, mingi mpenza mpo na bakɛngɛli. Soki ndeko mwasi moko moklisto akutani na mikakatano na bomoi na ye to azali kati na komekama ya makasi, bankulutu basengeli te kosuka bobele na oyo auti koloba to kosala kasi ebongi kotalela makambo oyo matindaki na kosala bongo mpe kotalela mokano na ye mozalaki nini. Bososoli motindo yango ekoki komonisa ete ebongi kosalela motema pɛtɛɛ, mayele mpe motema mawa na esika ya kopesa toli mpe etumbu.—Masese 10:19; 16:23; 19:11.
5. (a) Lolenge nini basi bapekisamaki na ebele ya mibeko kati na mitindo ya balabi? (Talá maloba na nsé ya baparagrafe.) (b) Banani bazalaki bato ya liboso oyo bamonaki mpe bapesaki litatoli na ntina na Yesu oyo asekwisami?
5 Wana bapekisamaki na ebele ya mibeko kati na mitindo ya balabi, basi na ntango na Yesu basengelaki te kozala batatoli oyo bandimami na mibeko.b Tótala likambo lisalemaki mwa moke nsima wana Yesu asekwisamaki na bakufi na ntɔ́ngɔ́ ya 16 Nisan ya mobu 33 T.B. Banani bazalaki bato ya liboso oyo bamonaki Yesu oyo asekwisami mpe kotatola yango epai na bayekoli ete Nkolo na bango asilaki kosekwa? Ezalaki basi oyo bazalaki kotala ye longwa na mosika likoló na nzeté na mpasi kino ekataki ye motema.—Matai 27:55, 56, 61.
6, 7. (a) Yesu alobaki nini epai na basi oyo bakendeki na liyita? (b) Na ebandeli, bayekoli ya Yesu oyo bazalaki mibali basalaki nini liboso ya litatoli ya basi, mpe liteya nini tokoki kozwa na yango?
6 Na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ na mokolo ya liboso ya pɔ́sɔ, Malia Magadala mpe basi mosusu bakendeki na liyita na biloko na malasi mpo na kopakola na nzoto ya Yesu. Emonaki ye ete liyita lizali mpamba, Malia akimaki mbangu koyebisa Petelo mpe Yoane. Basi mosusu batikalaki kuna. Mwa moke na nsima, anzelu moko abimelaki bango mpe ayebisaki bango ete Yesu asilaki kosekwa. Anzelu ayebisaki bango ete: “Bókenda mbangu koyebisa na bayekoli na ye.” Wana ezalaki basi yango kopota mbangu mpo na koyebisa nsango, Yesu ye moko abimelaki bango. Ayebisaki bango ete: “Bókenda koyebisa bandeko na ngai.” (Matai 28:1-10; Malako 16:1, 2; Yoane 20:1, 2) Kozanga koyeba ete anzelu abimelaki basusu mpe wana atondaki na mawa, Malia Magadala azongaki na liyita oyo ezalaki mpamba. Kuna Yesu abimelaki ye, mpe nsima wana ye ayebaki ete ezalaki Yesu, Yesu alobaki ete: “Kendá epai na bandeko na ngai mpe lobá na bango ete, Nazali kobuta epai na Tata na ngai mpe Tata na bino, na Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.”—Yoane 20:11-18; kokanisá na Matai 28:9, 10.
7 Yesu akokaki komonana liboso epai na Petelo, na Yoane to na mosusu kati na bayekoli na ye ya mibali. Nzokande, aponaki kopesa basi wana libaku kitoko na kokómisáká bango batatoli ya liboso ya lisekwa na ye mpe na kopesáká bango mokumba ya kotatola na ntina na yango epai na bayekoli na ye ya mibali. Na ebandeli lolenge nini mibali yango bayanolaki? Lisoló elobi ete: “Makambo oyo mamonanaki na bango lokola bilobaloba, mpe bazalaki kondima [basi yango] te.” (Luka 24:11) Ekoki kozala ete bazalaki na mpasi mpo na kondima litatoli yango mpamba te yango eutaki na basi? Soki ezali bongo, na nsima bazwaki bilembeteli mingi ete Yesu asilaki solo kosekwa longwa na bakufi. (Luka 24:13-46; 1 Bakolinti 15:3-8) Lelo oyo, mibali baklisto bakosala na mayele wana bakotalela maloba mpe makanisi ya bandeko basi baklisto.—Kokanisá na Genese 21:12.
8. Na lolenge oyo asalaki epai na basi, Yesu amonisaki nini?
8 Ezali mpenza likambo ya kolendisa na komona motindo oyo Yesu atalelaki basi. Wana ezalaki ye ntango nyonso na motema mawa mpe na bokatikati kati na boyokani na ye elongo na basi, nzokande atombolaki bango te koleka ndelo mpe epai mosusu, akitisaki bango te lokola ete bazali na motuya moke. (Yoane 2:3-5) Abwakaki mitindo ya balabi oyo ezalaki kolongwela bango lokumu oyo ebongi na bango mpe oyo ezalaki koyeisa Liloba na Nzambe mpamba. (Kokanisá Matai 15:3-9.) Na kopesáká basi lokumu mpe limemya, Yesu ye moko amonisaki lolenge nini Yehova Nzambe alingaki bátalela bango. (Yoane 5:19) Yesu atikaki mpe ndakisa monene mpo na mibali baklisto ete bámekola yango.—1 Petelo 2:21.
Mateya ya Yesu na ntina na basi
9, 10. Lolenge nini Yesu akweisaki mitindo ya balabi na ntina na basi, mpe ayanolaki nini na Bafalisai oyo batunaki ye na likambo litali koboma libala?
9 Yesu akweisaki mitindo ya balabi mpe apesaki basi lokumu oyo ebongi na bango bobele na misala na ye te kasi lisusu na mateya na ye. Na ndakisa, tótalela oyo ateyaki na ntina na koboma libala mpe ekobo.
10 Na likambo litali koboma libala, batunaki Yesu motuna oyo: “Ebongi nde kolongola mwasi na ntina nyonso?” Engebene lisoló ya Malako, Yesu alobaki ete: “Mobali nani akoboma libala na mwasi na ye [soko mpo na pite te] mpe akobala mwasi mosusu, azali [kosalela ye ekobo, NW]. Mpe soko mwasi nani akoboma libala na mobali na ye mpe akobala mobali mosusu, akozala mwasi na ekobo.” (Malako 10:10-12, NW; Matai 19:3, 9) Maloba oyo ya pɛtɛɛ mamonisaki limemya mpo na lokumu oyo lobongi kopesamela basi. Lolenge nini?
11. Maloba ya Yesu oyo ete “soko mpo na pite te” mazali komonisa nini na ntina na nsinga ya libala?
11 Ya liboso, na maloba “soko mpo na pite te” (oyo ezwami kati na Evanzile ya Matai), Yesu azalaki komonisa ete nsinga ya libala esengeli te kotalelama na lisɛki to kokabwana mpambampamba. Liteya ya balabi oyo epalanganaki mingi ezalaki kopesa nzela na koboma libala mpo na bantina ya mikemike, na ndakisa soki mwasi ayebi kolamba te to asololi elongo na mobali mosusu oyo mobali ayebi ye te. Koboma libala endimamaki mpe soki mobali amoni mwasi mosusu oyo aleki kitoko na miso na ye! Nganga-mayele moko na makambo ya Biblia alobi ete: “Wana Yesu alobaki maloba wana azalaki . . . kokɔtela basi na kolukáká kozongisa libala na etɛlɛmɛlo oyo esengelaki kozala na yango.” Ya solo, libala esengeli kozala bokangani ya libela oyo kati na yango mwasi akoki komiyoka ete abatelami.—Malako 10:6-9.
12. Na maloba “azali kosalela ye [lisumu ya] ekobo,” likanisi nini Yesu akɔtisaki?
12 Ya mibale, na maloba “azali kosalela ye ekobo,” Yesu akɔtisaki likanisi oyo eyebanaki te na bisambiselo ya balabi—likanisi oyo ete mobali akoki kosalela mwasi na ye [lisumu ya] ekobo. Búku The Expositor’s Bible Commentary elimboli ete: “Kati na Lingomba ya Bayuda oyo ekambami na balabi, mpo na kozanga bosembo kati na libala mwasi akokaki kosalela mobali na ye lisumu soki asali ekobo; mpe mobali, na kosanganáká na mwasi ya mobali mosusu, akokaki kosalela mobali wana lisumu. Kasi mobali akokaki soko moke te kosalela mwasi na ye lisumu, atako asali ekobo. Na kotyáká mobali na nsé ya mobeko moko elongo na mwasi na ye, Yesu atombolaki bongo etɛlɛmɛlo mpe lokumu oyo lobongi kopesamela basi.”
13. Na ntina na koboma libala, lolenge nini Yesu amonisaki ete na nsé ya ebongiseli ya boklisto, esengeli kozala na mobeko sé moko mpo na mibali mpe mpo na basi?
13 Ya misato, na maloba “soko mwasi akoboma libala na mobali na ye,” Yesu andimaki lotómo oyo mwasi azali na yango ya koboma libala na mobali oyo azali sembo te—momeseno oyo moyebanaki kasi mozalaki mpenza kosalelama mingi te na nsé ya mibeko ya Bayuda ya eleko yango.c Bazalaki koloba ete “mwasi akoki kolongolama na libala ata soki andimi to aboyi yango, kasi mobali akokaki kolongolama na libala bobele soki ye moko andimi yango.” Nzokande, engebene Yesu, na nsé ya ebongiseli ya boklisto, mobeko sé moko mosengeli kosalelama mpo na mibali mpe mpo na basi.
14. Na nzela ya mateya na ye, Yesu amonisaki likambo nini?
14 Mateya ya Yesu mazali komonisa polele komibanzabanza mozindo mpo na bolamu ya basi. Na yango, ezali mpasi te kososola mpo na nini basi mosusu bamonisaki bolingo monene mpo na Yesu na boye ete basalelaki ye na biloko bizalaki na bango. (Luka 8:1-3) Yesu alobaki ete: “Mateyo na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai.” (Yoane 7:16) Na mateya na ye, Yesu amonisaki likebi ya boboto oyo Yehova azali na yango mpo na basi.
“Bópesa lokumu epai na bango”
15. Ntoma Petelo akomaki nini na ntina na lolenge oyo mibali basengeli kotalela basi na bango?
15 Ntoma Petelo ye moko amonaki lolenge oyo Yesu azalaki kotalela basi. Mibu soko 30 na nsima, Petelo apesaki basi ya libala toli moko ya bolingo mingi mpe na nsima abakisaki ete: “Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bópesa lokumu epai na bango lokola na bato bakozwa libula na likabo na bomoi na bino elongo; bongo mabondeli na bino makopekisama te.” (1 Petelo 3:7) Petelo alingaki koloba nini na maloba “bópesa lokumu epai na bango”?
16. (a) Wapi ndimbola ya liloba ya Greke oyo ebongolami na “lokumu”? (b) Lolenge nini Yehova akumisaki Yesu na ntango na kobongwana na ye, mpe yango eteyi biso nini?
16 Engebene nganga-mayele moko ya boyekoli maloba, liloba ya Greke oyo ebongolami “lokumu” (ti·meʹ) elimboli “ntálo, motuya, lokumu, limemya.” Lolenge mosusu ya liloba yango ya Greke ebongolamaki ete “makabo” mpe “motuya monene.” (Misala 28:10; 1 Petelo 2:7) Tozali kozwa engɛngiseli na ntina na oyo elimboli kokumisa moto soki totaleli motindo nini Petelo asaleli lolenge mosusu ya liloba yango kati na 2 Petelo 1:17. Kuna alobaki na ntina na kobongwana ya Yesu ete: “Azwi lokumu mpe nkembo na mabɔ́kɔ na Nzambe Tata mpe mongongo ebimi mpo na ye na nkembo monene monene ete, Oyo Mwana na ngai molingami na ngai; nakosepelaka [na] ye mingi.” Ntango Yesu abongwanaki, Yehova akumisaki Mwana na ye na kolobáká ete ye asepeli na Yesu, mpe bato mosusu bayokaki ntango Nzambe alobaki bongo. (Matai 17:1-5) Boye, mobali oyo azali kokumisa mwasi na ye akokitisa ye te to akotalela ye te ete azali na motuya moke. Nzokande, akomonisaka na maloba mpe na misala na ye—wana bazali bango mibale mpe kati na bato mingi—ete azali kokumisa mwasi na ye mingi.—Masese 31:28-30.
17. (a) Mpo na nini basi baklisto babongi kozwa lokumu? (b) Mpo na nini mibali basengeli te kokanisa ete baleki basi na motuya na miso na Nzambe?
17 Petelo alobi ete, mibali baklisto basengeli ‘kopesa’ lokumu wana epai na basi na bango. Esengeli kopesama te lokola likabo, kasi lokola lotómo ya basi na bango. Mpo na nini basi ya libala babongi kozwa lokumu motindo yango? Petelo alimboli ete, mpamba te “bakozwa libula na likabo na bomoi na bino elongo.” Na ekeke ya liboso T.B., mibali mpe basi epai mokanda ya Petelo motindamaki bazalaki banso bato babyangami mpo na kosangola libula elongo na Klisto. (Baloma 8:16, 17; Bagalatia 3:28) Bango nyonso bazalaki na mikumba lolenge moko te kati na lisangá, kasi na nsima basengelaki kosangana na boyangeli elongo na Klisto na likoló. (Emoniseli 20:6) Lelo mpe, wana ntálo monene kati na basaleli ya Nzambe bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, ekozala libúngá monene mpo na mobali nyonso moklisto oyo akokanisa ete lokola azali na mikumba kati na lisangá, na miso na Nzambe ye azali na motuya mingi koleka basi. (Kokanisá na Luka 17:10.) Mibali mpe basi bazali na etɛlɛmɛlo ya elimo lolenge moko liboso na Nzambe, mpamba te kufa ya Yesu lokola mbeka efungolaki epai na mibali mpe basi libaku moko—oyo ya kosikolama na ekweli ya lisumu mpe ya liwa, mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko.—Baloma 6:23.
18. Ntina mosusu nini monene oyo Petelo apesi mpo na yango mibali basengeli kokumisa basi na bango?
18 Petelo apesi ntina mosusu ya monene mpo na yango mobali asengeli kokumisa mwasi na ye: “bongo mabondeli na bino makopekisama te.” Liloba ‘kopekisama’ euti na likelelo ya Greke (en·koʹpto) oyo elimboli mpenza “kokata.” Engebene búku Expository Dictionary of New Testament Words ya Vine, “ezalaki kosalelama na likambo ya kopekisa bato ete báleka te na kobebisáká balabála, to na kotyáká epekiseli monene na nzela.” Na yango, mobali oyo apesaka mwasi na ye lokumu te akoki komona ete ezali na epekiseli kati na mabondeli na ye ete ekóma epai na Nzambe te. Mobali yango akoki koyoka ete abongi te kobɛlɛma na Nzambe, to Yehova akoki koboya koyoka ye. Ezali polele ete, Yehova azali mpenza komibanzabanza na lolenge oyo mibali bazali kotalela basi.—Kokanisá na Bileli 3:44.
19. Lolenge nini mibali mpe basi kati na lisangá bakoki kosala elongo na komonisana limemya?
19 Lisɛngami oyo litali kokumisa esuki te bobele epai na mibali. Atako mobali asengeli kopesa mwasi na ye lokumu na kosaleláká ye na bolingo mpe na lokumu oyo ebongi kopesamela ye, mwasi ya libala asengeli mpe kokumisa mobali na ye na kozaláká na botosi mpe na limemya mozindo. (1 Petelo 3:1-6) Lisusu, Paulo alendisaki baklisto na ‘kokumisana.’ (Baloma 12:10) Oyo ezali libyangi mpo na mibali mpe basi kati na lisangá ete básala elongo na kopesanáká limemya. Ntango elimo motindo yango ezali, basi baklisto bakolobaloba te mpo na kokweisa bokonzi ya mibali oyo bazali kokamba lisangá. Nzokande, bakosunga bankulutu mpe bakosala na boyokani elongo na bango. (1 Bakolinti 14:34,35; Baebele 13:17) Na ngámbo na bango, bakɛngɛli baklisto bakotalela “mibangé basi lokola bamama mpe bilenge basi lokola bandeko basi na pɛtɔ nyonso.” (1 Timoté 5:1, 2) Bankulutu basengeli kotya likebi na boboto nyonso mpe na mayele mpenza na maloba ya bandeko na bango baklisto ya basi. Na yango, soki ndeko mwasi moko amonisi botosi epai na litambwisi ya teokrasi mpe atuni na limemya nyonso motuna moko to mpe soki amonisi likambo moko oyo ezali kosɛnga likebi, bankulutu bakotalela na esengo nyonso motuna na ye to mokakatano oyo ye alobeli.
20. Engebene Makomami, lolenge nini basi basengeli kotalelama?
20 Kobanda lisumu ekɔtaki na Edene, kati na bisika mingi basi bazali kotalelama lokola biloko mpamba. Kasi yango ezali te lolenge oyo Yehova alingaki na ebandeli ete basi bátalelama. Ata lolenge nini bato bakoki kotalela basi, Makomami ya Liebele mpe ya Greke ya boklisto mazali komonisa polele ete basi ya kobanga Nzambe basengeli kopesamela lokumu mpe limemya. Ezali lotómo na bango oyo Nzambe apesi bango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku The International Standard Bible Encyclopedia eyebisi ete: “Basi bazalaki kolya elongo na babyangami mibali te, mpe mibali bapekisamaki na kosolola elongo na basi. . . . Kosolola elongo na mwasi na bisika ya bato mingi ezalaki mpenza likambo ya nsɔ́ni.” Mishnah ya Bayuda, oyo esangisi mateya ya balabi epesi toli oyo: “Kosolola mingi te elongo na basi. . . . Ye oyo akosololaka mingi elongo na basi akomibendela mabe likoló na ye moko mpe akomonisa bopotu mpo na boyekoli ya Mibeko mpe na nsuka akokende na Gehenna.”—Aboth 1:5.
b Búku Palestine in the Time of Christ (Palestine na eleko ya Klisto) elobi ete: “Mbala mosusu, mwasi atyamaki na etɛlɛmɛlo lokola ya baombo. Na ndakisa, akokaki te kotatola liboso na esambiselo, longolá bobele koyebisa liwa ya mobali na ye.” Kolobeláká Levitike 5:1, búku Mishnah eyebisi ete: “[Mobeko na ntina na] ‘kolapa ndai ya kotatola’ ezali mpo na mibali kasi mpo na basi te.”—Shebuoth 4:I.
c Josèphe, Moyuda oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala na ekeke ya liboso ayebisi ete Salome ndeko mwasi ya Mokonzi Elode atindelaki mobali na ye “mokanda moko ya koboma libala, oyo eyokanaki te na mibeko ya Bayuda. Mpamba te ezali (bobele) na mobali nde epesamelaki nzela ya kosala bongo.”—Jewish Antiquities, XV, 259 [vii, 10].
Okopesa eyano nini?
◻ Bandakisa nini ezali komonisa ete Yesu atalelaki basi na lokumu mpe na limemya?
◻ Lolenge nini mateya ya Yesu mamonisaki limemya mpo na lokumu oyo lobongi kopesamela basi?
◻ Mpo na nini mobali asengeli kopesa mwasi na ye moklisto lokumu?
◻ Etindá nini etali kopesa lokumu baklisto nyonso bazali na yango?
[Elilingi na lokasa 17]
Na esengo monene na bango, basi ya kobanga Nzambe bazalaki bato ya liboso oyo bamonaki Yesu asekwi, oyo atindaki bango kotatola epai na bandeko na ye