Bolamu: Ezali komonana te
NKANDA, mitungisi, mpe konyokwama na makanisi ezali makambo oyo, uta kala bato ya siansi bazali kosala bolukiluki likoló na yango. Nzokande, na bambula oyo tozali na yango, bato minene ya siansi bazali mingimingi kotya likebi likoló ya likambo moko ya malamu koleka mpe oyo bato bazalaka na mposa na yango mingi—ezali bongo bolamu.
Nini ekoki kopesa bato bolamu mingi koleka? Bato bakozala nde na bolamu soki bazali bilenge, bazali na bozwi, na nzoto kolɔngɔ́nɔ́, bazali bingambe, to bazali na nzoto mike? Fungola ya bolamu ya solosolo ezali nini? Bato mingi bamonaka ete ezali mpasi, to mpe ete eyano na motuna wana ezali te. Na kotaláká ete na makambo mingi bato balóngi te kozwa bolamu, mbala mosusu bamoko bakoki kokanisa ete ezali pɛtɛɛ mpo na bango kolobela makambo oyo ezali fungola ya bolamu te.
Na boumeli ya ntango molai, banganga-mayele minene ya pisikoloji bazalaki kopesa toli ete moimi ezali fungola ya bolamu. Balendisaki bato oyo balukaka bolamu ete bátya likebi na bango bobele na kokokisa bamposa na bango moko. Maloba lokola “talelá sé makambo na yo moko,” “luká omiyeba,” mpe “sosolá bomoto na yo ya solosolo” mazalaki kosalelama na mwango ebéngami psychothérapie mpo na kosilisa maladi. Kasi banganga-mayele mosusu ya pisikoloji oyo kala balendisaki makanisi wana bazali sikawa kondima ete ezalela wana ya moimi epesaka bolamu oyo ekoumela te. Nsukansuka, moimi ekomema sé mpasi mpe kozanga bolamu. Moimi ezali fungola ya bolamu te.
Fungola ya makambo oyo mapesaka bolamu te
Baoyo bazali koluka bolamu na kolandáká bisengo bazali koluka yango na esika ebongi te. Tótalela ndakisa ya Salomo, Mokonzi ya Yisalaele ya kala, oyo azalaki na mayele mingi. Kati na mokanda ya Mosakoli, alimboli ete: “Nyonso oyo miso na ngai izalaki na mposa na yango, naboyisi yango te; nalongoli motema na ngai na esengo na yango te; zambi motema na ngai esepelaki na mosala na ngai mpe oyo ezalaki libonza na ngai mpo na mosala na ngai.” (Mosakoli 2:10) Salomo atongaki bandako, alónaki bilanga ya vinyo, asalaki bilanga ya banzeté kitoko, baparke, mpe maziba ya mai. (Mosakoli 2:4-6) Mokolo moko atunaki ete: “Nani akoki kolya mpe nani akoki kosepela [koleka ngai, NW]?” (Mosakoli 2:25) Bazalaki kosepelisa ye na baalanga-nzembo mpe babɛti minene ya miziki, azalaki na basi oyo balekaki kitoko na mokili yango.—Mosakoli 2:8.
Elingi koloba ete Salomo amipimelaki eloko moko te na oyo etali komisepelisa. Nsima ya koyoka bisengo mingi mpenza na bomoi, akómaki na bosukisi nini? Alobaki ete: “Ngai natali misala nyonso misalaki mabɔkɔ na ngai mpe na makambo nyonso mamekaki ngai kosala, mpe talá, nyonso izalaki bobele bisalasala mpe koluka kokwa mopɛpɛ. Libonza ezalaki mpe na nsé na moi te.”—Mosakoli 2:11.
Makambo oyo mokonzi yango ya mayele amonaki mazali solo kino lelo oyo. Tózwa ndakisa ya mokili ya bozwi lokola États-Unis. Na boumeli ya mbula 30 oyo euti koleka, banamboka Amerika bakólisaki mbala mibale bozwi na bango ya mosuni, lokola mituka mpe batelevizyó. Kasi, engebene banganga-mayele na makambo matali bokolɔngɔ́nɔ́ ya motó, bolamu ebakisami te epai ya banamboka Amerika. Engebene zulunalo moko, “bobele na eleko moko wana motángo ya bato oyo bazali konyokwama na makanisi ebakisamaki mingi koleka. Motángo ya bilenge oyo bazali komiboma emataki mbala misato. Motángo ya mabala oyo mazali kokufa ebakisamaki mbala mibale.” Na mikolo miuti koleka, balukiluki bamonaki ete likambo yango ezali sé ndenge moko epai ya bafandi ya mikili 50 mikeseni, nsima ya koyekola boyokani kati na mosolo mpe bolamu. Mpo na koloba solo, bolamu ekoki kosombama na mbongo te.
Nzokande, koluka bomɛngo ekoki kobéngama mpenza fungola ya kozanga bolamu. Ntoma Paulo akebisaki na maloba oyo ete: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na lilonga, mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛɛ. Zambi mposa na mosolo ezali ntina na mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu basili kopɛngwa longwa na kondima mpe bamitoboli bango mpenza na bolɔ́zi mingi.”—1 Timoté 6:9, 10.
Eloko moko te—ezala bozwi, bomɛngo, bolenge, bonzenga, bokonzi to kosangisama ya makambo yango nyonso—ezali ndanga ya bolamu oyo ekoumela. Mpo na nini? Mpamba te tozali na nguya te ya kopekisa makambo mabe ete mákómela biso te. Na lolenge lobongi mpenza, Mokonzi Salomo alobaki ete: “Moto ayebi ntango na ye te. Lokola mbisi oyo ikamatami na moluba mabe mpe ndɛkɛ oyo izwami na motambo, boye bana na bato basimbami na ntango mabe wana ekokwela bango.”—Mosakoli 9:12.
Mokano oyo mozali kokokisama te
Bolukiluki moko te ya siansi ekoki komonisa mwango ya mayele ya bato mpo na kozwa bolamu. Salomo alobaki lisusu ete: “Nabutwi mpe namoni ete na nsé na moi elónga kati na komekama ezali mpo na bato na mbango te, to etumba epai na bato na makasi te, to kwanga epai na bato na mayele te, to mosolo epai na bato na boyebi te, to ngɔlu epai na bato bamesani na mosala te; nde ntango mpe [makambo makanami te makokwela, NW] bango nyonso.”—Mosakoli 9:11.
Bato mingi oyo bandimaka likanisi yango basili kozwa bosukisi ete koluka bolamu ya solo na bomoi ezali ndɔ́tɔ mpamba. Molakisi moko ya lokumu alobaki ete “bolamu ezali makanisi mpamba.” Basusu bakanisaka ete fungola ya bolamu ya solo ezali libombami, bakanisaka ete likoki ya koyeba sɛkɛlɛ́ yango ezali bobele na mwa bato moke oyo bapesameli mayele ya kokamwa.
Nzokande, mpo na kozwa bolamu, bato bazali komeka mitindo ndenge na ndenge ya bomoi. Atako baoyo bamekaki liboso balóngi te, bato mingi lelo oyo bazali koluka bozwi, bokonzi, kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, mpe bisengo lokola monɔ́ oyo ekosilisa mawa na bango. Bolukiluki ezali kokóba mpo ete bato mingi, kati na mitema na bango bandimisami ete bolamu oyo ekoumela ezali makanisi mpamba te. Balikyaka ete bolamu ezali bobele ndɔ́tɔ te. Boye, okoki komituna, ‘Ndenge nini nakoki kozwa yango?’