Tózala na botɔndi mpo na “makabo na motindo na mibali”
“Bótosa bango bakosalaka mosala [makasi] kati na bino mpe . . . bókumisa bango mingi kati na bolingo mpo na mosala na bango.”—1 BATESALONIKI 5:12, 13.
1. Na kolanda Misala 20:35, kopesa ezali na nguya nini? Pesá ndakisa.
“ESENGO ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” (Misala 20:35) Okoki koyeba lisusu mbala ya nsuka oyo omonaki ete maloba oyo ya Yesu ezali mpenza solo? Mbala mosusu okabelaki moto moko oyo olingaka mingi eloko. Oponaki eloko yango malamu, mpamba te olingaki ete esepelisa mpenza moto oyo okopesa yango. Esengo oyo emonanaki na elongi na ye esepelisaki motema na yo! Soki moto azali kokaba na motema malamu elakisaka ete azali na bolingo, mpe komonisa bolingo ezali likambo oyo epesaka biso esengo.
2, 3. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete moto moko te azali na esengo koleka Yehova, mpe ndenge nini “makabo na motindo na mibali” esepelisaka motema na ye? (b) Eloko nini tokosala te na likabo oyo Nzambe apesi biso?
2 Na bongo, nani akoki kozala na esengo koleka Yehova, Mopesi ya “makabo nyonso malamu”? (Yakobo 1:17; 1 Timote 1:11) Soki akabi eloko, asalaka yango kaka na bolingo. (1 Yoane 4:8) Ezali mpe bolingo nde epusaki ye ete, na nzela ya Klisto, apesa lisangá “makabo na motindo na mibali.” (Baefese 4:8) Lokola Nzambe atii bankulutu mpo bákɛngɛlaka etonga, emonisi ete alingaka basaleli na ye mingi. Mibali yango baponamaka malamumalamu; basengeli kokokisa masɛngami oyo Biblia eyebisi. (1 Timote 3:1-7; Tito 1:5-9) Bayebi ete basengeli “kosalela etonga makambo na boboto,” na bongo nde bampate bakozala na botɔndi mpo na babateli yango ya bolingo. (Misala 20:29, NW; Nzembo 100:3) Soki Yehova amoni ete mitema ya bampate na ye ezali na botɔndi ya ndenge wana, motema na ye moko esepelaka!—Masese 27:11.
3 Na ntembe te tokolinga te ete tómona ya likabo oyo Nzambe apesi biso lokola eloko mpamba; mpe tokolinga te tózanga botɔndi mpo na makabo na ye. Yango wana, mituna mibale oyo ezali kotunama: Ndenge nini bankulutu basengeli kotalela mokumba na bango na kati ya lisangá? Mpe ndenge nini bandeko mosusu bakolakisa ete bazali na botɔndi mpo na “makabo na motindo na mibali”?
‘Tozali baninga na bino ya mosala’
4, 5. (a) Paulo akokanisi lisangá na nini, mpe mpo na nini ndakisa yango ebongi mpenza? (b) Ndenge nini elakiseli ya Paulo ezali komonisa motindo oyo tosengeli kotalela mpe kosala makambo bamoko mpo na bamosusu?
4 Yehova apesi “makabo na motindo na mibali” mwa bokonzi na kati ya lisangá. Ya solo, bankulutu basengeli kosalela bokonzi na bango na ndenge mabe te, kasi bayebi ete lokola bazali bato ya masumu, bakoki mpe kokwea na likambo yango. Na bongo, ndenge nini basengeli kotalelaka bandeko oyo bazali na kati ya etonga? Tótalela elakiseli oyo ntoma Paulo asalelaki. Nsima ya kolobela ntina oyo Yehova apesi “makabo na motindo na mibali,” Paulo akomaki boye: “Tókola na makambo nyonso epai na ye oyo azali motó, ye Klisto. Na nguya na ye, nzoto mobimba ezali kokola, awa ezali yango kokangama mpe kotongama na bilembo nyonso bizwi yango, bizali mpe kosalaka lokola ebongi na yango mpe bongo ezali komilendisa na bolingo.” (Baefese 4:15, 16) Paulo akokanisaki lisangá—kamatá bankulutu na bandeko mosusu—lokola nzoto ya moto. Mpo na nini tokoki koloba ete elakiseli oyo ebongi mpenza?
5 Nzoto ezali na binama ndenge na ndenge kasi ezali se na motó moko. Kasi, na kati ya nzoto—ezala mosuni to mosisa—eloko moko te ezangi ntina. Enama mokomoko ezali na ntina mpe esungaka na likambo moko mpo nzoto mobimba ezala kolongɔnɔ mpe ezala malamu. Ndenge moko mpe, lisangá ezali na bato ebele, kasi moto na moto, azala elenge to mokóló, azala na nzoto makasi to alɛmba, akoki kosala eloko moko mpo lisangá mobimba ezala kolɔngɔnɔ mpe ezala malamu. (1 Bakolinti 12:14-26) Moto moko te asengeli komona ete azali na ntina moko te. Mpe lisusu, moto moko te asengeli komona ete aleki baninga, mpamba te biso nyonso—ezala babateli to bampate—tozali biteni ya nzoto, mpe motó ezali se moko: Klisto. Yango wana, Paulo asaleli maloba kitoko mpenza mpo na kolobela bolingo, lobanzo, mpe limemya oyo tosengeli kozala na yango moko epai na mosusu. Soki bankulutu bazali koyeba likambo yango, ekosalisa bango bázala bato ya komikitisa mpe bázala na bokatikati na ndenge oyo bazali kotalela mokumba na bango na lisangá.
6. Atako azalaki na bokonzi lokola ntoma, ndenge nini Paulo alakisaki ete azali moto ya komikitisa?
6 “Makabo na motindo ya mibali” balukaka te kolandela bomoi to kozala na bokonzi likoló ya kondima ya bandeko na bango. Atako Paulo azalaki na bokonzi lokola ntoma, na komikitisa nyonso, ayebisaki Bakolinti boye: “Biso tozali koyangela kondima na bino te, kasi tozali baninga na bino ya mosala mpo na esengo na bino, mpamba te kondima na bino nde etɛlɛmisi bino.” (2 Bakolinti 1:24, NW) Paulo alukaki kozala na bokonzi likoló ya kondima ya bandeko na ye te to mpe kolandela bomoi na bango te. Amonaki ntina ya kosala bongo te, mpamba te azalaki na elikya ete bazalaki bato ya sembo oyo bakɔtaki na ebongiseli ya Yehova mpo balingaki kosala makambo ya malamu. Yango wana, mpo na ye moko mpe mpo na Timote, moninga na ye ya mibembo, Paulo alobaki boye: ‘Mosala na biso ezali ya kosala elongo na bino mpo na kosalela Nzambe na esengo.’ (2 Bakolinti 1:1) Talá elimo ya komikitisa!
7. Bankulutu oyo bazali na komikitisa bayebaka nini mpo na mokumba na bango na kati ya lisangá, mpe bazalaka na elikya nini mpo na bandeko na bango?
7 Lelo oyo, “makabo na motindo na mibali” bazali kosala mosala ya ndenge yango. Bazali ‘baninga na biso ya mosala mpo na esengo na biso.’ Bankulutu oyo bazali na komikitisa bayebaka ete ezali bango te nde basengeli kokatela bandeko mosusu motuya ya mosala oyo bakoki kosalela Nzambe. Bayebaka ete atako bakoki kolendisa bandeko mosusu mpo bábakisa milende to bábongisa mosala na bango, motema ya moto ye moko nde esengeli kopusa ye na kosalela Nzambe. (Talá 2 Bakolinti 9:7.) Bazalaka na elikya ete soki baninga na bango ya mosala bazali na esengo, bakosala nyonso oyo bakoki. Yango wana, bazalaka na mposa makasi ya kosalisa bandeko na bango mpo ‘básalela Yehova na esengo.’—Nzembo 100:2.
Bósalisa bato nyonso básala na esengo
8. Yebisá mwa makambo oyo ebongi bankulutu básalaka mpo na kosalisa bandeko na bango básalela Yehova na esengo?
8 Ndenge nini bino bankulutu bokoki kosalisa bandeko na bino mpo básalela Nzambe na esengo? Bokoki kopesa ndakisa oyo ezali kolendisa. (1 Petelo 5:3) Bózala na molende mpe na esengo na mosala, bongo bandeko mosusu bakolanda ndakisa na bino. Bópesaka bandeko longonya na milende oyo bazali kosala na motema na bango mobimba. (Baefese 4:29) Kopesa longonya na esengo mpe na motema mobimba esalaka ete basusu bámona ete bazali na ntina mpe bazali na mposa na bango. Elendisaka bampate na kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalela Nzambe. Bóluka kokokanisa bandeko na ndenge ya mabe te. (Bagalatia 6:4) Kokokanisa bato na ndenge wana elɛmbisaka na esika epusa basusu na kokende liboso. Lisusu, bomoi mpe makoki ya mpate mokomoko ya Yehova akeseni. Lokola Paulo, bótyelaka bandeko motema. Bolingo “ekondimaka nyonso”; yango wana, eleki malamu tótya motema ete bandeko na biso balingaka Nzambe mpe bazali na mposa básepelisa motema na ye. (1 Bakolinti 13:7) Ntango bozali ‘kokumisa basusu,’ bakobimisa makambo malamu oyo ebombami na mitema na bango. (Baloma 12:10) Bóyeba ete soki bampate balendisami mpe babɔndisami, mingi bakosala oyo bakoki na mosala ya Nzambe, mpe mosala yango ekopesa bango esengo.—Matai 11:28-30.
9. Nkulutu mokomoko asengeli kozala na makanisi nini mpo na baninga na ye bankulutu mpo asala mosala na ye na esengo?
9 Soki ozali na komikitisa mpe ozali komona ete ozali ‘moninga ya mosala,’ ekosalisa yo osala mosala na yo na esengo mpe osepela na makoki ya bankulutu mosusu. Nkulutu mokomoko azali na makoki na ye oyo akoki kosalela mpo na bolamu ya lisangá. (1 Petelo 4:10) Nkulutu moko akoki kozala moteyi malamu. Mosusu akoki kozala makasi na kobongisa makambo ya lisangá. Nzokande, mosusu akoki kozala moto oyo bandeko bakakatanaka te koyebisa ye makambo na bango mpo azali na boboto mpe na motema mawa. Nkulutu moko te azali na makabo nyonso. Soki nkulutu moko azali na makoki mingi na likambo moko, na ndakisa koteya, yango elingi koloba ete aleki basusu? Te! (1 Bakolinti 4:7) Lisusu, ezali na ntina te koyokela ndeko moko zuwa mpo na makoki oyo azali na yango na likambo moko to koyoka mabe soki bandeko bazali kokumisa nkulutu mosusu mpo na makoki na ye. Kobosana te ete yo mpe ozali na makoki oyo Yehova azali komona epai na yo. Akoki kosalisa yo okolisa makoki yango mpe osalela yango mpo na bolamu ya bandeko na yo.—Bafilipi 4:13.
‘Bótosa mpe bomisɔkisa’
10. Mpo na nini ebongi tózala na botɔndi mpo na “makabo na motindo na mibali”?
10 Soki bapesi biso likabo moko, ebongaka mpenza tózala na botɔndi mpo na yango. Bakolose 3:15 elobi ete, “Bózalaka mpe na matɔndi.” Tokoki koloba nini sikoyo mpo na “makabo na motindo na mibali,” likabo ya motuya monene oyo Yehova apesi biso? Ya solo, libosoliboso tokotɔnda Yehova, Mopesi ya Makabo. Kasi ezali boni mpo na “makabo na motindo na mibali” bango moko? Ndenge nini tokoki kolakisa ete tozali na botɔndi mpo na bango?
11. (a) Ndenge nini tokoki kolakisa botɔndi na biso mpo na “makabo na motindo na mibali”? (b) Maloba ‘bótosa’ mpe ‘bómisɔkisa’ elimboli nini?
11 Tokoki kolakisa botɔndi na biso mpo na “makabo na motindo na mibali” soki tozali koyoka noki toli euti na Biblia oyo bazali kopesa biso mpe soki tozali kotosa bikateli na bango. Biblia elobi na biso ete: “Bótosa bango bakokambaka bino mpe bómisɔkisa liboso na bango. Zambi bazali kokɛngɛlaka milimo na bino lokola bato baoyo bakozongisa monɔkɔ na ntina na makambo na bango. Tiká ete básala mosala na esengo, na mawa te mpo ete yango ekosungaka bino te.” (Baebele 13:17) Tomoni ete longola ‘kotosa,’ tosengeli mpe “komisɔkisa” liboso ya baoyo bazali kokamba biso. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “bómisɔkisa” elimboli mpenza “bóyokela.” Richard Lenski, nganga-mayele moko ya Biblia, alimboli maloba “bótosaka” mpe “bómisɔkisa” na maloba oyo: “Moto atosaka soki andimi makambo oyo basɛngi ye, soki amoni mpenza ete makambo yango ezali sembo mpe ekopesa litomba; [nzokande] moto ayokelaka . . . soki likanisi na ye ekeseni na oyo ya bato mosusu.” Soki tokangi ntina mpe tondimi litambwisi ya baoyo bazali kokamba biso, tokokakatana te kotosa bango. Kasi, tosengeli kosala nini soki tozali koyeba mpenza te ntina ya ekateli moko oyo bazwi?
12. Mpo na nini tosengeli komisɔkisa, to koyokela bankulutu, ata soki toyebi mpenza te ntina oyo bazwi ekateli moko?
12 Na esika oyo nde tosengeli komisɔkisa, to koyokela bango. Mpo na nini? Mpo tosengeli kotya motema ete bato yango bazali na makoki ya elimo mpe balingaka mpenza tózala malamu. Bayebi ete Yehova akotuna bango makambo oyo bazali kosalela bampate oyo bapesi bango bábatelaka. (Yakobo 3:1) Lisusu, ebongi tóbosana te ete mbala mosusu toyebi te makambo mosusu oyo epusaki bango bázwa ekateli moko.—Masese 18:13.
13. Eloko nini ekosalisa biso tótosa bikateli oyo bankulutu bazwi nsima ya kosambisa ndeko?
13 Tokoloba boni na oyo etali komisɔkisa na ekateli oyo bakoki kozwa nsima ya kosambisa likambo moko? Ya solo, ekoki kozala mpasi, mingimingi soki bazwi ekateli ya kobimisa moto moko oyo tolingaka mingi na lisangá, mbala mosusu azali ndeko na biso to moninga na biso ya motema. Na likambo oyo lisusu, ebongi malamu kondima ekateli ya “makabo na motindo na mibali.” Bango bakoki kozwa ekateli ya sembo koleka biso, mpe mbala mosusu bayebi malamu ndenge oyo makambo elekaki. Mbala mingi, kozwa bikateli ya ndenge wana esalaka bandeko yango motema mpasi; ‘kosambisa mpo na Yehova’ ezali ngambo monene. (2 Ntango 19:6) Basalaka nyonso ete bázala na motema mawa, mpamba te bayebi malamu ete Nzambe “alimbisaka.” (Nzembo 86:5) Kasi, basengeli mpe kobatela lisangá ezala pɛto, yango wana Biblia elobi bábimisa na lisangá bato oyo bazali kosala mabe kasi baboyi kobongola motema. (1 Bakolinti 5:11-13) Mbala mingi moto oyo asali mabe andimaka ekateli oyo bazwi. Mbala mosusu disipilini yango nde ekosalisa ye mpo akanisa lisusu malamu. Soki biso baoyo tolingaka ye, tomisɔkisi na ekateli ya bankulutu, yango ekosalisa ye mpo disipilini oyo azwi ememela ye bolamu.—Baebele 12:11.
“Bókumisa bango mingi”
14, 15. (a) Na kotalela 1 Batesaloniki 5:12, 13, mpo na nini ebongi tópesaka bankulutu lokumu? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete bankulutu bazali ‘kosala mosala makasi kati na biso’?
14 Tokoki lisusu kolakisa botɔndi na biso mpo na “makabo na motindo na mibali” soki tozali kokumisa bango. Ntango akomelaki lisangá ya Tesaloniki mokanda, Paulo ayebisaki bandeko yango boye: “Bótosa bango bakosalaka mosala [makasi] kati na bino mpe . . . bókumisa bango mingi kati na bolingo mpo na mosala na bango.” (1 Batesaloniki 5:12, 13) Tokoki mpenza koloba ete bankulutu oyo bamipesi na motema mobimba mpo na bolamu na biso bazali mpenza ‘kosala makasi,’ boye te? Kanisá naino mokumba monene oyo bazali komema.
15 Mingi kati na bango bazali batata ya mabota oyo basalaka mosala ya mosuni mpo bákokisa bamposa ya mabota na bango. (1 Timote 5:8) Soki nkulutu azali na bana, bana yango bazalaka na mposa ete tata na bango alekisaka ntango elongo na bango mpe atalaka mpe makambo na bango. Mbala mosusu asengeli kosalisa bango na badevuare oyo bapesaka bango na kelasi, mpe lisusu koluka mwa ntango ya kolekisa na masano oyo ezali malamu mpo na bilenge. (Mosakoli 3:1, 4) Likambo eleki ntina ezali ete akokisaka bamposa ya libota na ye na makambo ya elimo, atambwisaka boyekoli ya libota pɔsɔ na pɔsɔ, abimaka na bango na mosala ya kosakola, mpe akendaka na bango na makita ya lisangá. (Deteronome 6:4-7; Baefese 6:4) Tóbosana te ete longola mikumba oyo ezali ya basakoli nyonso, bankulutu bazali na mikumba mosusu lokola kobongisa masolo oyo bakosala na makita, kotala bandeko na bandako na bango, koluka bolamu ya lisangá na makambo ya elimo, mpe soki esengeli, kosambisa makambo. Basusu bazali na mikumba mosusu na makambo ya kobongisa mayangani ya zongazonga, mayangani ya etúká, botongi Bandako ya Bokonzi, mpe na komite ya boyokani na minganga. Ya solo, mpenza bandeko yango bazali ‘kosala mosala makasi’!
16. Tángá mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kokumisa bankulutu.
16 Ndenge nini tokoki kokumisa bango? Lisese moko ya Biblia elobi ete: “Liloba lilobami na ntango ekoki ezali malamu boni!” (Masese 15:23; 25:11) Soki tozali kotɔnda bango mpe kolendisa bango na maloba ya malamu bakomona ete tondimaka mosala makasi oyo bazali kosala. Lisusu, tosengeli kozala na bokatikati na makambo oyo tozali kolikya ete básalela biso. Ya solo, tosengeli kokakatana te mpo na kosɛnga bango lisalisi. Ekoki kokóma na ntango mosusu ete ‘motema na biso ezali koyoka mpasi’; mpe tokoki kozala na mposa ete ‘balakisi malamu’ wana ya Liloba ya Nzambe bálendisa biso to bálakisa biso eloko nini tokoki kosala to bápesa biso toli oyo euti na Biblia. (Nzembo 55:4; 1 Timote 3:2) Kasi, tosengeli kobosana te ete nkulutu azali mpenza na ntango mingi te ya kopesa biso, mpamba te akoki kosundola bamposa ya libota na ye moko te mpe bamposa ya bandeko mosusu na lisangá. Lokola tozali na “boboto epai ya bandeko” yango oyo bazali kosala mosala makasi, tosengeli te kosɛngaka bango makambo ebele ebele. (1 Petelo 3:8, NW) Tózala nde na botɔndi mpo na ntango mpe likebi oyo bakoki kopesa biso.—Bafilipi 4:5.
17, 18. Basi ya bankulutu mingi bandimaka kozanga makambo nini, mpe ndenge nini tokoki kolakisa ete tokumisaka bandeko basi yango ya sembo?
17 Tokoloba nini mpo na basi ya bankulutu? Ebongi mpe tókumisa bango, boye te? Soki totali malamu, ezali lokola nde bazali kokabola mibali na bango na lisangá. Mbala mingi yango esɛngaka bango bándima kozanga makambo mosusu. Ntango mosusu, bankulutu basengeli kolekisa bangonga mingi na mpokwa mpo na kobongisa makambo ya lisangá; bangonga oyo bakokaki kolekisa na mabota na bango. Na masangá mingi, basi baklisto ya sembo bandimaka kozanga ndenge yango mpo mibali na bango bábatela bampate ya Yehova.—Talá 2 Bakolinti 12:15.
18 Ndenge nini tokoki kolakisa bandeko basi yango ya sembo ete tosepelaka na bango mingi? Soki tokolekisa ndelo te na lisalisi oyo tokoki kosɛnga na mibali na bango. Kasi, tóbosana mpe te ete mwa maloba ya botɔndi esalaka malamu mingi. Masese 16:24 elobi ete: “Maloba kitoko izali lokola mafuta na nzoi na elɛngi epai na molimo mpe na kobika kati na mikuwa.” Tótala likambo moko esalemaki. Nsima ya likita, mobali moko na mwasi na ye bakutanaki na nkulutu moko mpo na koyebisa ye ete bazali na mposa básolola na ye mpo na mwana na bango oyo azali naino elenge. Na ntango nkulutu azalaki kosolola na bandeko yango, mwasi na ye azalaki kozela bango na motema molai. Na nsima, mama yango akendaki epai ya mwasi ya nkulutu mpe alobaki na ye boye: “Melesi mingi mpo na ntango oyo mobali na yo apesi mpo na kosalisa libota na ngai.” Mwa maloba wana kaka—maloba kitoko oyo ezali kolakisa botɔndi—esimbaki mpenza motema ya mwasi ya nkulutu yango.
19. (a) Soki tokamati bango nyonso lokola liboke, bankulutu bazali kokokisa mikumba nini na bosembo nyonso? (b) Biso nyonso tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
19 Kozala na bankulutu oyo bazali kobatela bampate ezali moko na ‘makabo malamu’ ya Yehova. (Yakobo 1:17) Mibali yango bazali bato ya masumu; basalaka mpe mabunga lokola biso. (1 Mikonzi 8:46) Kasi, soki tozwi bango nyonso lokola liboke, bankulutu na masangá ya mokili mobimba bazali kokokisa na bosembo mpenza mikumba oyo Yehova apesi bango, elingi koloba kobongisa, kotonga, kosala ete lisangá ezala na bomoko, mpe kobatela etonga. Tiká ete nkulutu mokomoko azala na mposa makasi ya kobatela ntango nyonso bampate ya Yehova na boboto, mpe na ndenge yango, akomimonisa ete azali likabo to lipamboli mpo na bandeko na ye. Mpe tiká ete biso nyonso tósala makasi na kolakisa botɔndi na biso mpo na “makabo na motindo na mibali” na botosi mpe komisɔkisa liboso na bango mpe tókumisa mosala makasi oyo bazali kosala. Tokoki kozala na botɔndi mingi ete na bolingo na ye, Yehova apesi biso mibali oyo bazali mpenza koloba na bampate na ye ete: ‘Mosala na biso ezali ya kosalisa bino bósalela Nzambe na esengo’!
Okopesa eyano nini?
◻ Mpo na nini kokokanisa lisangá na nzoto ebongi mpenza?
◻ Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bandeko na bango mpo básalela Yehova na esengo?
◻ Mpo na nini tosengeli kozala na botosi mpe lisusu na komisɔkisa liboso ya baoyo bazali kokamba biso?
◻ Ndenge nini tokoki kokumisa bankulutu?
[Elilingi na lokasa 16]
Bankulutu, bópesa bandeko longonya mpo na milende oyo bazali kosala na motema na bango
[Elilingi na lokasa 17]
Na molende na bango na mosala ya kosakola, bankulutu bakoki kosalisa mabota na bango mpe bato mosusu na kosalela Nzambe na esengo
[Bililingi na lokasa 18]
Tokumisaka bankulutu na biso mpo basalaka mosala makasi!