Mpo na nini Saulo anyokolaki baklisto?
‘NABANZAKI ETE EKOKI NA NGAI kosala makambo mingi na kobunda na Nkombo na Yesu na Nasalete. Nasali bongo kati na Yelusaleme. Ngai mpe nazwi bokonzi epai na banganga minene, bongo nakangi Babulami mingi kati na bolɔkɔ, mpe wana ezalaki bango kobomama, napesi monɔkɔ na ngai ete bákufa. Mbala mingi natamboli na biyanganelo nyonso, mpe nanyokoli bango ete nameka kotukisa bango Nzambe. Nangali mpenza, bongo [nalandi] bango ata kino mboka na bapaya.’—Misala 26:9-11.
SAULO moto na Talasia nde alobaki bongo, ayebani lisusu na nkombo ya ntoma Paulo. Ya solo, ntango alobaki bongo, asilaki kobongwana. Azalaki lisusu motɛmɛli ya boklisto te, kasi akómaki moko na bateyi na yango ya molende. Kasi, eloko nini epusaki Saulo na konyokola baklisto? Mpo na nini abanzaki ete ‘ekoki na ye kosala’ makambo ya ndenge wana? Mpe tokoki kozwa liteya na lisolo na ye?
Babomi Setefano na mabanga
Biblia elobeli Saulo mpo na mbala ya liboso na kati ya bato oyo babomaki Setefano. “Babwaki ye [Setefano] na libándá na mboka, mpe baboli ye na mabanga. Batatoli batii bilamba na bango epai na makolo na elenge mobali moko, nkombo na ye Saulo.” “Saulo mpe andimaki kufa na ye.” (Misala 7:58; 8:1) Mpo na nini babomaki ye? Bayuda, bakisa mpe bato mosusu oyo bautaki na Kilikya, batyanaki ntembe na Setefano kasi balongaki ye te. Bayebisi biso te soki Saulo, oyo azalaki mpe moto na Kilikya, azalaki na kati ya bato yango. Atako bongo, balukaki batemwe ya lokuta mpo bákosela Setefano ete azalaki kofinga Nzambe mpe bamemaki ye na Sanedrina. (Misala 6:9-14) Sanedrina ezalaki na bato ebele mpe nganga monene nde azalaki kotambwisa yango. Ezalaki tribinale monene ya Bayuda. Lokola ezalaki tribinale oyo eleki batribinale nyonso ya lingomba, basangani na yango bazalaki mpe wana mpo na kobatela ete mateya ebongwana te. Na miso na bango, Setefano abongaki kokufa. Mpamba te afundaki bango ete batosaka Mibeko te. (Misala 7:53) Babomaki ye na mabanga mpo na kolakisa ye ete batosaka yango na ndenge esengeli.
Bindimeli ya Saulo epusaki ye andima likanisi wana. Azalaki Mofalisai. Mwa lingomba yango oyo ezalaki makasi, ezalaki kosɛngisa bato bátosa mibeko mpe bonkɔkɔ. Bazalaki kotalela lingomba ya boklisto lokola ete ezali kotɛmɛla bindimeli wana, mpamba te ezalaki koteya nzela ya sika oyo ezali komema na lobiko na nkombo ya Yesu. Bayuda ya ekeke ya liboso bazalaki kokanisa ete Masiya akozala Mokonzi moko monene oyo akolongola bango na boombo ya Baloma oyo bazalaki koyina. Mpo na bango, moto oyo Sanedrina Monene ekatelaki ye etumbu ya liwa ete azalaki kofinga Nzambe mpe na nsima bakakisaki ye na nzete lokola mosali ya mabe oyo alakelami mabe, kaka moto yango azala lisusu Masiya ekokaki kosalema te, kondimama te, mpe ezalaki likambo ya mbindo.
Mobeko elobaki ete moto oyo akakisami na nzete “alakelami mabe na Nzambe.” (Deteronome 21:22, 23; Bagalatia 3:13) Frederick Bruce, alobi ete na makanisi ya Saulo, “maloba wana ebongaki mpenza mpo na Yesu. Akufaki mpo Nzambe alakelaki ye mabe, mpe akokaki soki moke te kozala Masiya, moto oyo Bayuda bazalaki kotalela ete Nzambe apambolaki koleka bato nyonso. Koloba ete Yesu azali Masiya ezalaki mpenza kofinga Nzambe; baoyo bazalaki koloba makambo ya bozoba ya ndenge wana esengelaki konyokola bango mpo ete bazali kofinga Nzambe.” Ndenge Saulo ye moko andimaki yango nsima, koloba ete ‘Klisto abakisamaki na nzete [ezalaki] libaku epai ya Bayuda.’—1 Bakolinti 1:23, NW.
Mposa ya Saulo ezalaki ya kosukisa mateya yango na molende makasi. Esengelaki ata konyokola bato yango na ndenge ya nsɔmɔ mpo na kolimwisa mateya wana. Andimaki ete Nzambe mpe azali kosepela bongo. Saulo alimbolaki makanisi oyo azalaki na yango na maloba oyo: “[Nazalaki] monyokoli na Lingomba mpo na etingya, nazangi ekweli mpo na boyengebene bozali kati na Mibeko.” “Nalekaki kobengana Lingomba na Nzambe mpe kobebisa yango nyɛ. Naingeli mosika kati na bizaleli na Bayuda koleka mingi na baoyo babotami na ngai elongo, nazalaki na mposa monene mpo na makambo na kala na batata na ngai.”—Bafilipi 3:6; Bagalatia 1:13, 14.
Azwi esika ya liboso mpo na konyokola baklisto
Nsima ya liwa ya Setefano, Saulo azalaki kaka kosuka te na kondima ete bányokola baklisto kasi azwaki nde esika ya liboso mpo na konyokola bango. Na ndenge yango, nsango na ye epanzanaki, mpamba te ata nsima ya kokóma moklisto, ntango alukaki kosangana na bayekoli ya Yesu, “bango nyonso babangaki ye mpo ete bandimi te ete azali moyekoli.” Ntango bamonaki ete azali solo moklisto, bayekoli basepelaki mpe batɔndaki Nzambe mpo na kobongwana na ye; bango bayokaki te ete motɛmɛli moko ya kala abongoli motema, kasi “ye oyo anyokolaki biso liboso azali [sikoyo] kosakolaka makambo na kondima manyokolaki ye yango liboso.”—Misala 9:26; Bagalatia 1:23, 24.
Damaseke mpo na kokóma na Yelusaleme ezali soki na kilomɛtɛlɛ 220; esengeli mikolo nsambo to mwambe mpo na kotambola na makolo. Kasi, Saulo “azalaki naino kokanela bayekoli na Nkolo makaneli na kufa,” akendaki epai ya nganga monene kosɛnga mikanda mpo na biyanganelo ya Damaseke. Mpo na nini? Mpo Saulo akanga bato oyo bazalaki na “Nzela” yango, basi na mibali mpe aya na bango na Yelusaleme. Na ndingisa ya nganga monene, abandaki ‘konyokola lisangá, akɔtaki ndako na ndako mpe azalaki kobenda mibali na basi, mpe kobwaka bango na bolɔkɔ.’ ‘Abetisaki bamosusu fimbo na biyanganelo,’ mpe ‘apesaki monɔkɔ na ye’ (elimboli, “andimi”) ete bákufa.—Misala 8:3; 9:1, 2, 14; 22:5, 19; 26:10, NW, maloba na nse ya lokasa.
Na kotalela kelasi oyo Saulo atángaki epai ya Gamaliele, mpe lokola akómaki kokanga bato, balimboli mosusu ya Biblia balobi ete asukaki kaka kozala moyekoli ya Mibeko te kasi akómaki moto monene na kati ya Lingomba ya Bayuda. Na ndakisa, moto moko alobaki ete mbala mosusu Saulo akómaki molakisi na eyanganelo moko ya Yelusaleme. Kasi, ntango balobi ete Saulo ‘apesaki monɔkɔ na ye,’ toyebi mpenza te soki asalaki yango lokola mosambisi na tribinale to lokola moto oyo andimaki ete baklisto bábomama.a
Lokola na ebandeli baklisto nyonso bazalaki Bayuda to baprozelite, emonani ete Saulo azalaki kotalela baklisto lokola bapɛngwi na kati ya Lingomba ya Bayuda, mpe amonaki ete mokumba ya mokonzi ya Lingomba ya Bayuda ezalaki ya kosembola bandimi na yango. Arland Hultgren, ye molimboli ya Biblia, alobi boye: “Ezali te ete Paulo atɛmɛlaki boklisto mpo amonaki yango lokola lingomba moko na libándá, to lingomba oyo ezali kosala bombanda na Lingomba ya Bayuda. Ye na bato mosusu bazalaki kotalela boklisto lokola lingomba oyo ezalaki kaka na nse ya bokonzi ya Bayuda.” Yango wana, mposa na ye ezalaki ya kotindika na makasi mpe kosalela makoki nyonso oyo azalaki na yango mpo Bayuda oyo babungaki nzela bátika nzela wana mpe bázonga na Lingomba ya Bayuda. (Misala 26:11) Asalelaki bolɔkɔ mpe lisusu azalaki kobɛtisa bango fimbo na biyanganelo, lolenge ya disipilini oyo ezalaki kopesama lokola etumbu epai na moto nyonso oyo azalaki kotosa balabi te. Yango ezalaki kosalema na tribinale nyonso oyo ezalaki na bazuzi misato.
Kasi, makambo wana nyonso esukaki ntango Yesu abimelaki Saulo na nzela ya Damaseke. Saulo atikaki kozala monguna ya baklisto, mpe mbala moko akómaki kokɔtela bango, mpe mosika te Bayuda ya Damaseke babandaki koluka mayele ya koboma ye. (Misala 9:1-23) Likambo ya kokamwa, ntango akómaki moklisto, Saulo akutanaki na makambo mingi oyo ye moko azalaki kosala ntango azalaki monyokoli, na boye ete nsima ya bambula alobaki ete: “Mbala mitano epai na Bayuda nazwi fimbo ntuku minei longola moko.”—2 Bakolinti 11:24.
Molende ekoki kosalema na ndenge ya mabe
Ntango Saulo abongwanaki, ayebanaki malamu na nkombo ya Paulo, akomaki boye: “Liboso nazalaki motuki na Nzambe mpe monyokoli mpe motyoli. Kasi, ayokeli ngai mawa, zambi nasalaki yango wana eyebaki ngai ntina te mpe wana ezangaki ngai kondima.” (1 Timote 1:13) Yango wana, Nzambe akondima yo te bobele mpo ozali na molende mpe sembo na lingomba na yo. Saulo azalaki na molende mpe asalaki makambo oyo lisosoli na ye ezalaki kotinda, kasi yango ekómisaki ye moto malamu te. Molende na ye ezalaki ya mabe. (Talá Baloma 10:2, 3.) Likambo yango esengeli kopusa biso na kokanisa.
Lelo oyo, bato mingi bandimaka makasi ete Nzambe azali kosɛnga bango eloko mosusu te bobele kozala na bizaleli malamu. Kasi ezali bongo? Ekozala malamu mokomoko alanda toli ya Paulo oyo elobi ete: “Bótalela makambo nyonso kasi bósimba makasi makambo oyo ezali malamu.” (1 Batesaloniki 5:21, NW) Yango elimboli kozwa ntango mpo na kokóma na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya solo ya Nzambe mpe kotosa yango nyonso. Ntango tozali koyekola Biblia, soki tomoni ete ezali na makambo oyo esengeli tósala mbongwana, tosengeli kosala yango nokinoki. Mbala mosusu, mwa bato moke kati na biso bazalaki kofinga Nzambe, bazalaki konyokola, to kotyola basaleli ya Nzambe ndenge Paulo azalaki. Atako bongo, Nzambe akoki koyokela biso mawa ndenge ayokelaki Saulo, soki tokomonisa kondima mpe tokozwa boyebi ya sikisiki.—Yoane 17:3, 17.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Emil Schürer, na buku na ye (Lisolo ya Bayuda na eleko ya Yesu Klisto, [175 L.T.B.–135 T.B.], alobi ete, atako Mishnah elobeli te ndenge Sanedrina Monene to Sanedrina ya bato ntuku nsambo na moko ezalaki kokata makambo, kasi elobeli makambo mikemike ya Basanedrina ya mike ya bato 23. Banakelasi ya makambo ya mibeko bakokaki kokɔta na Sanedrina mikemike ntango bazali kosambisa makambo oyo ebongaki na etumbu ya liwa, kuna basengelaki koloba kaka mpo na kokɔtela moto oyo bafundi. Na makambo oyo ebongi na etumbu ya liwa te, bakokaki koloba mpo na kokɔtela to kokweisa moto oyo bafundi.