Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
BIBLIA ezali na masolo mingi ya basi na mibali oyo tosengeli komekola kondima na bango. Tótalela ndakisa ya Filipo, moklisto oyo azalaki misionere na ekeke ya liboso. Azalaki ntoma te, kasi asalaki mosala mingi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Mpo na yango, Filipo ayebanaki lokola “mosakoli ya nsango malamu.” (Misala 21:8, NW) Mpo na nini Filipo azwaki nkombo wana? Mpe liteya nini tokoki kozwa na lisolo na ye?
Biblia elobeli Filipo mpo na mbala ya liboso mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Na ntango yango, Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greke babandaki koimaima mpo na Bayuda oyo bazalaki koloba Liebele, mpamba te basi-bakufeli-mibali na kati ya Bagreke bazwaki eloko te na ntango ya kokabola biloko ya mokolo na mokolo. Mpo na kosilisa likambo yango, bantoma baponaki “babáli nsambo bazali na ezaleli elámu.” Filipo azalaki na kati ya mibali yango oyo baponamaki.—Bikela (Misala) Mis 6:1-6, Liloba lya Nzambe.
Mibali yango nsambo bazalaki na “bizaleli malamu.” Libongoli ya haut-fleuve elobi ete bazalaki na “lokumu malamu.” Ɛɛ, ntango baponamaki basilaki koyebana lokola bato oyo balingaka makambo ya elimo mpe bazalaki na makoki mpenza ya kokanisa mpe ya kosala mosala. Ezali mpe bongo lelo oyo mpo na baklisto oyo bazali kosala lokola bakɛngɛli. Mibali yango baponamaka na lombangu te. (1 Timote 5:22) Basengeli kozala na “litatoli malamu epai ya bato ya libándá,” mpe boboto na bango mpe makanisi na bango ya malamu esengeli koyebana na bandeko ya lisangá.—1 Timote 3:2, 3, 7; Bafilipi 4:5.
Emonani polele ete Filipo akokisaki malamu mokumba na ye na Yelusaleme. Nzokande, mosika te, minyoko makasi ebimaki mpe epanzaki bayekoli ya Klisto. Lokola bato mosusu, Filipo mpe atikaki Yelusaleme, kasi mosala na ye esilaki te. Ateyaki mpo na ntango molai na teritware ya sika—Samalia.—Misala 8:1-5.
Bafungoli bateritware ya sika
Yesu asakolaki ete bayekoli na ye bakoteya “na Yelusaleme na Yuda mobimba, na Samalia, mpe kino nsuka na mokili.” (Misala 1:8) Ntango azalaki koteya na Samalia, Filipo azalaki kosangana na kokokisama ya maloba oyo. Bayuda bazalaki kotalela bato ya Samalia lokola bato mpamba. Kasi Filipo azalaki na makanisi mabe te mpo na bato yango, mpe apambolamaki mpo na ezaleli na ye ya kozanga koponapona. Na yango, Basamalia mingi bazwaki batisimo, na kati na bango Simona, oyo azalaki moto ya maji.—Misala 8:6-13.
Na ntango yango, anzelu ya Yehova atambwisaki Filipo na nzela ya mokili mokaoki, nzela oyo ekiti na Yelusaleme mpo na kokende na Gaza. Kuna Filipo amonaki likalo moko oyo ememaki mosali moko ya Leta na Etiopia, azalaki kotánga na mongongo makasi esakweli ya Yisaya. Filipo apusanaki pene ya likalo yango mpe abandaki lisolo na moto yango. Atako Moetiopia yango azalaki prozelite mpe azalaki na mwa boyebi ya Nzambe mpe ya Makomami, andimaki na komikitisa nyonso ete azali na mposa ya lisalisi mpo na kokanga ntina ya makambo oyo azalaki kotánga. Yango wana, asɛngaki Filipo amata na likalo mpe afanda pene na ye. Nsima ya kopesa ye litatoli, bakómaki na mai moko. Moetiopia yango atunaki ete: “Likambo nini ekopekisa ngai kobatisama?” Mbala moko, Filipo abatisaki ye, mpe Moetiopia akendaki nzela na ye na esengo. Na ntembe te, moyekoli oyo ya sika apalanganisaki nsango malamu ntango azongaki na mboka na ye.—Misala 8:26-39.
Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Filipo ateyaki Basamalia mpe moto ya Etiopia? Tosengeli te koloba ete bato ya ekólo boye, ya lopɔsɔ boye, to bato na bomoi ya motindo boye bakosepela na nsango malamu te. Kasi, tosengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai ‘ya bato ya lolenge nyonso.’ (1 Bakolinti 9:19-23) Soki tomipesi mpo na kosakola epai ya bato nyonso, Yehova akoki kosalela biso na mosala ya ‘kozalisa bayekoli na mabota nyonso’ liboso ete nsuka ya ebongiseli mabe ya ntango oyo eya.—Matai 28:19, 20.
Mikumba ya Filipo ebakisami
Nsima ya koteya moto ya Etiopia, Filipo ateyaki mpe na Azoto, “mpe aleki kati na mboka nyonso kosakoláká Nsango Malamu, kino ekómi ye na Kaisalia.” (Misala 8:40) Na ekeke ya liboso, bingumba yango mibale ezalaki na bato mingi ya mabota. Ntango azalaki kokende na nɔrdi ya Kaisalia, emonani ete Filipo ateyaki mpe na bingumba minene ya Bayuda, lokola Luda mpe Yafo. Mbala mosusu ezali mpo na yango nde na nsima bakutaki bayekoli na bingumba yango.—Misala 9:32-43.
Biblia elobeli lisolo ya Filipo mpo na mbala ya nsuka nsima ya mbula 20. Na nsuka ya mobembo na ye ya misato ya misionere, Paulo akitaki na Potolemai. Luka, moninga ya mobembo ya Paulo alobi ete: “Na mokolo ya nsima tolongwi wana kokóma na Kaisalia, mpe tokɔti na ndako ya Filipo molakisi ya Nsango Malamu.” Na ntango yango, Filipo “azalaki na bana basi minei, baseka, basakoli.”—Misala 21:8, 9.
Emonani ete, Filipo akómaki kofanda na Kaisalia. Kasi abungisaki te elimo na ye ya misionere, mpamba te Luka abéngi ye “mosakoli ya nsango malamu.” Liloba oyo esalelamaka mingi mpo na komonisa moto oyo atiki mboka na ye mpo na kosakola nsango malamu na bamboka oyo basakoli bazali te. Lokola Filipo azalaki na bana basi minei oyo bazalaki basakoli, yango emonisi ete bana yango balandaki molende ya tata na bango.
Baboti na mikolo na biso basengeli koyeba ete bana na bango bazali bayekoli na bango ya liboso. Ata soki baboti yango batiki mikumba mosusu ya Teokrasi mpo na kokokisa mikumba ya libota na bango, lokola Filipo bakoki kotikala basaleli ya Nzambe oyo bamipesi na motema na bango mobimba mpe kozala baboti oyo bazali kopesa ndakisa malamu.—Baefese 6:4.
Koya ya Paulo na baninga na ye epesaki libota ya Filipo libaku ya komonisa elimo ya boyambi bapaya. Kanisá naino ndenge balendisanaki! Ntango mosusu ezali na libaku yango nde Luka asangisaki makambo nyonso ya mosala ya kosakola ya Filipo, mpe na nsima akomaki yango na mokapo ya 6 mpe na mokapo ya 8 ya mokanda ya Misala ya bantoma.
Yehova Nzambe asalelaki Filipo mingi mpo na kokolisa lisusu matomba ya Bokonzi. Molende ya Filipo epusaki ye na kopalanganisa nsango malamu na bateritware ya sika mpe kokolisa elimo ya libota na ye. Okolinga kozwa mikumba mpe mapamboli ya ndenge yango? Na yango ekozala malamu olanda bizaleli oyo Filipo mosakoli ya nsango malamu amonisaki.