Basambole ya Biblia mpe mokano ya Nzambe
NA NTANGO moto ayebi eyano na yango te, ekokóma momekano ya kokanisa tii akoyeba eyano; kasi soki moto ayebi eyano na yango, momekano esili. Ezali nini? Sambole.
Diksionere moko (The Interpreter’s Dictionary of the Bible) elobi ete, lelo oyo, lokola bato balingaka makambo nyonso ezala pɛtɛɛ, bakoki kotalela kobɛta sambole lokola lisano ya bana mike, kasi na ntango ya kala sambole ezalaki “komeka mayele.”—Talá Masese 1:5, 6.
Na esika ya koyebisa mposa to mokano na ye polele, ntango mosusu Yehova azalaki komona malamu koyebisa bisakweli na ye na maloba ya elilingi. Azalaki kosalela bokokanisi ya eloko moko na mosusu, na “maloba oyo ezali polele te,” to basambole oyo etambwisaka makanisi. (Nzembo 78:2; Mituya 12:8) Kutu, atako Biblia esaleli liloba ya Liebele oyo ebongolami na sambole kaka mbala 17, mokanda yango ezali na basambole mpe masese ebele mpenza.
Biblia etondi na basambole
Balobaka ete Mokonzi Salomo ayebaki kopesa biyano ata na mituna makasi, to basambole oyo bazalaki kotuna ye. (1 Mikonzi 10:1, NW, maloba na nse ya lokasa) Na ntembe te, ezalaki mpo na mayele oyo Nzambe apesaki ye. Soki ezali solo, ndenge bato ya mayele ya masolo ya kala balobaka, ete mokolo moko Hilama, mokonzi ya Tulo alongaki Salomo na momekano ya basambole, na ntembe te yango esalemaki nsima wana Yehova alongolaki Salomo elimo na ye mpo apɛngwaki. Samasona, mosambisi na Yisalaele, ye mpe alingaki mingi kosala lisano ya kobɛta basambole. Mokolo moko, atondaki na nguya ya elimo santu, alobaki sambole moko mpe yango ebangisaki banguna ya Nzambe.—Basambisi 14:12-19.
Kasi, basambole mingi ya Biblia ezali koyebisa mikano ya Yehova. Na ndakisa, tótalela maloba ya Genese 3:15. Esakweli yango, ezali na motó ya likambo ya Biblia, ezali sambole, “libombami mosantu.” (Baloma 16:25, 26, NW) Longola bimonaneli mpe bimoniseli oyo Nzambe alakisaki ye, ntoma Paulo amonaki makambo mosusu etali mokano ya Nzambe na ‘kokakatana’ to ndenge mpenza elobami na lokota ya Greke, “maloba oyo ezali polele te.” (1 Bakolinti 13:12; 2 Bakolinti 12:1-4) Tokoloba boni na bandimbola ebeleebele oyo bato bazali kopesa na motuya ya kokamwa oyo ezali na nyama ya yauli, “nkama motoba na ntuku motoba na motoba,” oyo Emoniseli 13:18 elobeli yango na mbalakaka mpe elimboli yango te? Nani akoki kolimbola basambole ya Biblia, mpe yango epesamaki mpo na nini?
Ndimbola ya mabombami mosantu
Mingi kati na biso, tobatelaka mingi miso koleka matoi, mabɔkɔ, zolo, mpe lolemo. Kasi, soki kongɛnga ezali te, miso ya moto ekozala na mosala te. Tokozala mpenza lokola bato bakufá miso. Ezali mpe bongo mpo na makanisi ya moto. Makanisi ya moto ekoki koluka makambo oyo ekokani kati na biloko mingi, kokanisa malamu, mpe na bongo kozwa ndimbola to eyano na makambo oyo ezali kobulunganisa. Kasi, mpo na kolimbola mabombami mosantu, moto azali na mposa ya eloko mosusu. Atako bato mosusu bakoki kopesa biyano na basambole ya Biblia, kaka Mosali na yango, Yehova, Nzambe ya pole, nde akoki kolimbola ntina oyo apesaki yango.—1 Yoane 1:5.
Nzokande, mbala mingi bato bazalaka na lolendo mingi mpe bamityelaka motema, yango wana bazelaka te ete Yehova ye moko apesa biyano. Mpo na koluka koyeba mabombami, bato mosusu, na esika ete bátánga Liloba ya Nzambe, balukaki koyeba yango na makambo mosusu. Basalaki yango mpo na komeka mayele na bango, kasi mpo na koyeba solo te. Na ndakisa, Lingomba ya Bayuda ezalaki kosalela maji ndenge emonisami na mokanda Kabbale, elukaki kolimbola mituya mpe balɛtɛlɛ ya alfabɛ ya Liebele na ndenge ya maji. Nzokande, bato oyo balobaka ete bayebi mabombami (gnostiques) oyo bazalaki na ekeke ya mibale, bazalaki kotánga Mikanda ya Biblia oyo ekomami na Liebele mpe na Greke mpo na koluka bandimbola ya mabombami na yango.
Kasi, ndenge wana ya koluka ememaki bango na milulu to biyambayamba ya bapakano mpe epɛngwisaki bango mosika na mateya ya solo oyo euti na Nzambe. Bato yango bazalaki kokanisa boye: ‘Lokola mokili etondi na makambo mabe, boye Yawe, Mozalisi na yango akoki kozala Nzambe ya malamu te.’ Okanisi ete yango nde ndimbola eleki malamu oyo bakokaki kopesa? Ya solo mpenza, bato bakanisaka na bozindo te! Yango wana, tokokamwa te ete ntoma Paulo akweisaki mateya ya lipɛngwi oyo mangomba ya bato oyo balobaka ete bayebi mabombami ebimisaki na nsima. Na mikanda na ye apesaki likebisi oyo: “Bólanda sé makambo maye makomámí”!—1 Korinti (Bakolinti) 4:6, Liloba lya Nzambe.
Koyeba “maloba oyo ezali polele te”
Kasi, mpo na nini Nzambe ya pole alobaka “maloba oyo ezali polele te”? Ntina ya sambole ezalaka ete moto akanisa mpe ameka mayele na ye. Na yango, basambole oyo etondi na Biblia ezali lokola bikelakela kati na bilei kitoko. Mbala mingi bazalaki kosalela basambole mpo na kolamusa likebi ya bayoki to mpo na koyebisa nsango na ndenge oyo ekobenda likebi ya bato. Na bisika oyo basalelaki yango bongo, mbala mingi bandimbola epesami mwa moke na nsima.—Ezekiele 17:1-18; Matai 18:23-35.
Yehova apesaka bato mayele kasi apesaka yango bipesela te. (Yakobo 1:5-8) Tózwa ndakisa ya mokanda ya Masese, mokanda oyo etondi na maloba oyo ezali polele te, oyo bato mosusu bakoki kotalela lokola basambole. Mpo na koyeba yango esɛngaka ntango mpe kokanisa na mozindo. Kasi, bato boni bandimaka kosala milende yango? Kaka bato oyo bandimaka kotimola kati na mokanda yango nde bazwaka mayele oyo ezali kuna.—Masese 2:1-5.
Yesu mpe asalelaki masese mpo na koyeba mposa ya motema ya bato oyo bazalaki koyoka ye. Bato ebele bazalaki kolanda ye. Bazalaki kosepela na masolo na ye. Bazalaki kolinga makamwisi oyo azalaki kosala. Kasi, bato boni bandimaki kotika bizaleli na bango mpe kolanda ye? Bayekoli ya Yesu bazalaki bongo te, bango bazalaki mbala na mbala koluka koyeba ndimbola ya mateya ya Yesu mpe bandimaki kotika misala na bango mpo na kokóma bayekoli na ye!—Matai 13:10-23, 34, 35; 16:24; Yoane 16:25, 29.
Tótala epai kongɛnga ezali
Buku moko elobi ete: “Emonani ete moto akómaka kosepela na basambole ntango mposa ya koyeba makambo eyaka makasi.” Lelo oyo tozali na libaku malamu ya kozala na bomoi na ntango oyo “pole [ya elimo] engɛngi” mpo na basaleli ya Nzambe. (Nzembo 97:11, NW; Danyele 12:4, 9) Tokondima kozela na motema molai nyonso ete Yehova alimbola mikano na ye na ntango oyo ye moko akani? Na koleka, tobongolaka bizaleli na biso soki bayebisi biso ndenge nini tokoki kosala mpo na kokokisa mokano ya Nzambe malamumalamu? (Nzembo 1:1-3; Yakobo 1:22-25) Soki tosalaka yango, Yehova akopambola milende na biso, mpo ete, ndenge manɛti ebongisaka miso ya moto mpo akoka komona malamu, elimo santu ekoyeisa mokano ya Nzambe polele na miso ya makanisi na biso, ekongɛngisa miso na biso ya elimo.—1 Bakolinti 2:7, 9, 10.
Ɛɛ, basambole ya Biblia ekumisaka Yehova lokola ye oyo “akomonisaka makambo mabombami.” (Danyele 2:28, 29) Azali mpe Ye oyo atalaka mitema. (1 Ntango 28:9) Tosengeli kokamwa te ete mateya ya solo oyo euti na Nzambe engɛngisamaka mokemoke. (Masese 4:18; Baloma 16:25, 26) Tóluka koyeba makambo mozindo ya Nzambe na nzela ya maji te to na mayele ya bato te, mpamba te yango ezali se likolólikoló mpe ekopesa biso eloko ya malonga te. Tótalela Yehova Nzambe mpo angɛngisa mateya ya solo oyo ayebisi biso na “maloba oyo ezali polele te,” mpo amonisa mikano malamu na ye epai na basaleli na ye ya sembo na ntango oyo aponi.—Amosa 3:7; Matai 24:25-27.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]
Biblia Hebraica Stuttgartensia, Deutsche Bibelgesellschaft Stuttgart.