Mosala ya kolɔba bato na Mai Monene ya Égée
MAI Monene ya Égée ezali eteni ya Mai Monene ya Méditerranée na ngámbo ya ɛsti. Na nɔrdi mpe na wɛsti, mai yango ebandi na ekólo Grèce; esanga ya Crète ezali na sudi na yango mpe ekólo Turquie ezali na ɛsti na yango. Mai monene yango etondi na bisanga minene na bisanga mike, mpe bikólo mingi ya makasi ya ntango ya kala ebandaki kuna. Ntango mokomi moko ya maloba ya ntɔki atalaki mabongo ya mabangamabanga ya bisanga yango, oyo ezali na mwa bandako mikemike ya mpɛmbɛ na bisika moko moko oyo, soki moi ebimi engɛngisaka yango makasi, alobaki ete ezali lokola “bampunda ya mabanga oyo ezali na bilimu ya bato minene oyo bakufá.”
Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bisanga yango ekómá bisika oyo baturiste oyo bautaka na mokili mobimba bakendeke kotala! Longola kitoko ya mokili yango moko, bato oyo bafandi kuna mpe basalaka kuna bazali na boboto mingi. Bato yango bazali bato ya mindɔndɔ te, bayebi koyamba bapaya, bazali bato ya bilandalanda te, bizaleli na bango ya malamu ekesenisi mpenza mboka na bango na bisika nyonso mosusu na mokili.
Bato mingi oyo bafandi na bisanga wana basalaka mosala ya koboma mbisi na Mai Monene ya Égée. Kasi, mosala mosusu ya ntina, “mosala ya koboma mbisi” ya ndenge mosusu, ezali kosalema malamu kuna. “Balɔbi na bato,” elingi koloba basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, bakatisaka bisanga ya Égée mpo na kokómisa bato bayekoli ya Klisto.—Matai 4:18, 19; Luka 5:10.
Esili koleka soko bikeke 19, basakoli baklisto bakendaki na bisanga ya Mai Monene ya Égée. Pene na mobu 56 T.B., ntango ntoma Paulo autaki na mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, atɛlɛmaki moke na bisanga Lesbos, Chios, Samos, Cos mpe Rhodes. Lokola azalaki mosakoli ya molende, na ntembe te Paulo asakolelaki bato ya bisanga wana nsango malamu. (Misala 20:14, 15, 24; 21:1, 2) Nsima ya kolekisa mbula mibale na bolɔkɔ na engumba Loma, Paulo akendaki na esanga ya Crète mpe asakolaki kuna. Na nsuka ya ekeke ya liboso, bakangaki ntoma Yoane mpe batindaki ye na bolɔkɔ na esanga ya Patmos (Patamo) “mpo na Liloba na Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu.” (Emoniseli 1:9) Ndenge nini basakoli ya nsango malamu lelo oyo bazali kolonga na mosala na bango na bisanga yango?
Kampanye ya kosakola eboti mbuma
Ezali mpasi mpe esɛngaka makambo mingi mpo na kosakola na bisanga yango. Esɛngaka milende mingi mpe komipesa mpenza. Bisanga mosusu ezali mosika mpenza. Na mwa bisanga mosusu, mpɛpɔ to masuwa ekómaka mpenza te mpe na bisanga mosusu, ekómaka kutu te, mingimingi na eleko ya malili. Mai monene etombokaka mingimingi ntango meltemia, elingi koloba mopɛpɛ makasi oyo eutaka na nɔrdi, epɛpaka. Lisusu, bamboka mike ya bisanga mingi ezali mpenza mosika mpe ezalaka mpasi mpo na kokóma kuna mpamba te banzela ezali na mputulu mingi, ezali na gudrɔ te mpe mituka elekaka na banzela yango mpenza te. Mpo na kokóma na bamboka mosusu, esengeli kaka kozwa bamasuwa ya mike.
Tózwa ndakisa ya esanga Icarie. Esanga yango ezali na lisangá moko ya moke oyo ezali na basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi 11, kasi bakoki te kosakola na bamboka nyonso ya esanga wana mpe ya bisanga mikemike oyo ezali pembenipembeni wana. Yango wana, bandeko baklisto ya esanga Samos bayaka mpo na kosalisa bango na koteya bato ya esanga Icarie, na esanga Fournoi, na esanga Patmos mpe na esanga Lipsos. Na mikolo eleki, Batatoli basalaki kampanye moko ya mikolo mibale mpe bakabolaki mikanda oyo elimbolaka Biblia: zulunalo 650, mwa babuku 99 mpe babuku 25! Bakamwaki ntango bakutanaki na bato oyo bayebaki ata moke te soki Yehova azali nani mpe bazalaki kobondela bango báfanda mpo na koteya bango makambo ya Biblia mingi. Mwasi moko ayebisaki Motatoli moko ete: “Sikoyo bozali kokende, kasi nazali naino na mituna mingi na Biblia. Nani akosalisa ngai?” Ndeko mwasi moklisto yango alakaki ye ete akosalela telefone mpo na kosolola na ye mpe abandaki koyekola na ye Biblia na telefone.
Ntango mokɛngɛli-motamboli moko akendaki na esanga Icarie, amibongisaki mpo na kotala bato ya esanga mobimba na wikende moko. Azwaki basakoli ya Bokonzi 30 ya esanga Samos mpo na kosalisa ye. Bandeko yango bamibongisaki mpo na kofutela esika ya kolala na otɛlɛ na mbongo na bango moko mpo na mikolo mibale mpe kofutela lisusu mituka mpo na komema bango. Liboso bákende, mbula ebɛtaki makasi na boumeli ya mikolo mibale mpe meteo esakolaki ete mbula ekobɛta lisusu na nsuka ya pɔsɔ wana. Kasi bandeko balɛmbaki mpo na yango te mpe bakanisaki maloba ya Mosakoli 11:4 ete: “Ye oyo akotalaka mipɛpɛ akokona te, mpe ye oyo akotala mapata akobuka te.” Nsukansuka, likoló ebongaki mwa moke mpe, ntango basilisaki kosakola nsango ya ntina oyo bazalaki na yango na esanga mobimba, bandeko wana bazongaki epai na bango na esengo mpenza.
Basakoli 16 oyo bazali na esanga Andros basalaki milende mpenza mpo na kosakola na esanga mobimba. Ntango bandeko mibale bakómaki na mboka moko oyo ezali mosika, bakanaki kosakolela bato nyonso oyo bafandi wana. Basololaki na bato na bandako na bango, na balabala mpe na bilanga. Bakendaki kutu na biro ya bapolisi mpe bakabolaki mikanda kuna. Lokola bakanisaki ete batalaki bato nyonso ya mboka, bamibongisaki mpo na kozonga. Ntango balongwi na esika monene ya mboka mpe babandi kokenda, bamonaki sango ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse azali koya. Bandeko bamonaki ete basololaki na ye te, bapesaki ye trakte moko mpe sango wana azwaki yango na esengo mpenza. Sikoyo bamonaki mpenza ete babosanaki ata moto moko te!
Gadvos (to Cauda), mwa esanga moke oyo ezali nsima ya esanga Crète ezali na bato 38 mpamba, ezali na sudi mpenza koleka bamboka nyonso ya Mpoto. (Misala 27:16) Mokɛngɛli-motamboli moko na ndeko moko, elongo na basi na bango, balekisaki mikolo misato mpo na kosakola kuna. Mpo na kobatela mbongo, balalaki na hema. Basakolaki nsango malamu epai ya bato nyonso oyo bafandaka wana mpe bandeko basepelaki ndenge bato yango bakaniselaki bango mabe te. Bato ya esanga yango bayoká naino likambo moko te, ezala ya malamu to ya mabe mpo na Batatoli ya Yehova. Bato yango mpe sango ya esanga wana, bandimaki kozwa buku 19 mpe mwa babuku 13. Ntango Batatoli bazalaki kozonga na esanga Crète na masuwa ya moke, mai monene etombokaki mpe bakómaki na likama. Balobi ete: “Topesaki Yehova matɔndi mpo tokómaki malamu na ndako, kasi tokumisaki ye lisusu mpo apesaki biso nzela tókumisa nkombo na ye na esika oyo ezali na sudi mpenza koleka bisika nyonso ya Mpoto.”
Ntoma Yoane akomaki Emoniseli, mokanda ya nsuka ya Biblia, na esanga Patmos. Tii bambula euti koleka, ezalaki ata na Motatoli ya Yehova moko te na esanga yango. Bandeko ya esanga Samos babongisaki kampanye moko malamu mpo na kosakola na esanga wana. Bayebaki ete bakoki kotɛmɛla bango makasi mpamba te na esanga yango makambo ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ezali makasi. Bandeko basi mibale bazalaki kosolola na mwasi moko mpe mwasi yango abengaki bango na ndako na ye. Mobali ya mwasi wana atingamaki ayeba kaka soki nani atindaki bandeko basi wana báya na ndako na bango. Ntango bayebisaki ye ete bazali kokɔta ndako na ndako, atunaki bango lisusu: “Ya solo mpenza, ata moto moko te ya kartye atindi bino awa?” Mwasi yango akutanaki na Batatoli ya Yehova ntango azalaki na Zaïre, ayebisaki bandeko basi likambo moko oyo esalemaki na ntɔngɔ wana. Alobaki ete: “Nazalaki kobondela Yehova, ndenge mpe nazalaki kobondela mikolo mosusu, ete atinda Batatoli na esanga oyo. Mobali na ngai azalaki kosɛka ngai. Ntango namonaki bino na ekuke, ngai na mobali na ngai tokamwaki. Yango wana azalaki kotuna bino mbala na mbala soki moto moko atindaki bino na ndako na biso.” Babandaki mbala moko koyekola Biblia na mwasi yango. Bayekolaki Biblia na mwasi yango na telefone na boumeli ya sanza zomi, atako yango ezalaki kosɛnga mbongo mingi ezala mpo na bandeko basi wana to mpe mpo na mwasi wana oyo asepelaki. Azwaki batisimo mpe lelo azali Motatoli se moko ya esanga epai batindaki ntoma Yoane lokola mokangami eleki mbula 1 900.
Mosala ya “kolɔba mbisi” na mabongo
Na eleko nyonso ya molunge, bamasuwa minene esɛmaka na mabongo ya bisanga mingi ya Mai Monene ya Égée mpe ememaka bapaya mingi oyo bayaka kopema wana. Na yango, Batatoli ya Yehova bazali na libaku malamu ya kokutana na bato ya bikólo mingi mpe ya nkota mingi. Na masangá, bazali na mikanda oyo elimbolaka Biblia na nkota ndenge na ndenge, mpe basakoli bakabolaka mikanda ebele epai ya baturiste. Bamasuwa mosusu ezongaka pɔsɔ na pɔsɔ na libongo; yango esalisaka bandeko bázongela mpe bábanda koyekola Biblia na bato oyo basalaka na bamasuwa yango.
Na eleko ya molunge ya mobu 1996, ndeko mwasi moko, mobongisi-nzela na esanga Rhodes, asololaki na elenge mobali moko ya ekólo Jamaïque oyo azalaki kosala na masuwa moko ezalaki kosɛma na libongo mokolo ya mitano ya pɔsɔ na pɔsɔ. Ndeko mwasi abengisaki elenge mobali yango na liyangani ya etúká oyo esengelaki kosalema na esanga wana na mokolo ya mitano oyo elandaki. Ndeko yango asalelaki Biblia ya Lingelesi mpo na kolimbolela ye mateya mosusu ya solo ya Biblia oyo bazalaki kolobela na liyangani. Bolingo mpe esengo oyo Batatoli bamonisaki na liyangani yango, esimbaki mpenza motema ya elenge mobali yango. Na mokolo ya mitano oyo elandaki, akɔtisaki babongisi-nzela mibale na masuwa. Babongisi-nzela yango bamemaki mikanda ya Lingelesi mpe ya Espagnol. Bakokisaki ata ngonga moko te, bakabolaki mikanda nyonso oyo bazalaki na yango! Elenge mobali wana ya ekólo Jamaïque azalaki koyekola Biblia na mokolo ya mitano ya pɔsɔ na pɔsɔ tii na nsuka ya eleko ya molunge. Na eleko ya molunge ya mbula oyo elandaki, ayaki lisusu mpe asepelaki kozongela boyekoli na ye. Kasi mbala oyo, amonaki malamu aluka mosala mosusu mpo na kokola na elimo. Ntango atikaki mosala yango mpe akendaki, bandeko ya Rhodes bazalaki na esengo mingi ntango bayokaki ete elenge mobali wana azwaki batisimo na ebandeli ya mobu 1998!
Bazali kozwa “mbisi” oyo eutaka bisika mosusu
Mai Monene ya Égée eyebani mpo ezali na mbisi mingi oyo eutaka bisika mosusu mpe eyaka wana—na ndakisa sardini mpe espadon—mpe babomi-mbisi babomaka yango na minyama na bango. Ndenge moko mpe, basakoli ya Bokonzi bazali kokutana na bato ya mitema malamu na kati ya bato oyo bauti na mikili ya Mpoto ya Ɛsti mpe bakei kofanda na Grèce.
Rezi azalaki na mbula zomi ntango atángaki mpo na mbala ya liboso makambo ya Yehova mpe mikano na ye na kati ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na ntango wana azalaki na ekólo Albanie. Nsima ya mbula misato, libota na bango mobimba bakendaki kofanda na esanga Rhodes. Mokolo moko, Rezi abondelaki Yehova asalisa ye mpo akutana na basaleli na Ye na mboka oyo bakei kofanda. Na mokolo oyo elandaki, Rezi asepelaki mingi ntango tata na ye azongaki na ndako na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bazulunalo oyo amonaka yango mbala na mbala. Rezi akutanaki na ndeko mwasi oyo apesaki tata na ye bazulunalo yango, mpe mbala moko, abandaki koyekola Biblia na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Na bantango mosusu, azalaki kosɛnga báyekolaka mbala misato na mokolo moko! Nsima ya sanza mibale, akómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te, mpe na sanza ya Marsi 1998, azwaki batisimo, azalaki na mbula 14. Kaka mokolo yango, abandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe sanza motoba na nsima, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza to mosakoli ya ntango nyonso.
Ndeko mobali moko na esanga Cos, azalaki koyekola na mwa bato oyo bautaki na Russie. Ntango atunaki bango soki bazali na baninga oyo balingaki koyekola Biblia, bamemaki ye epai ya Leonidas na mwasi na ye Ophelia, bango bazalaki bato ya ekólo Arménie mpe bazalaki kofanda na mboka moko oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 30. Bandeko bakendaki kokutana na likambo oyo bakanisaki ata moke te. Mobali na mwasi wana, oyo bautaki Arménie, babimisaki sakosi moko etonda na mikanda ya la Société na lokota ya Arménien mpe lokota ya Russe! Bayebisaki bango ete bazalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe bakómaki basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Lokola mboka na bango ezalaki na yikiyiki mpo na makambo ya politiki mpe mikakatano ya nkita, balongwaki kuna. Ntango bakómaki na esanga Cos, babandaki koyekola na mama ya Leonidas mpe ndeko na ye ya mwasi oyo bazalaki kofanda kuna liboso na bango. Mbala moko, Batatoli wana babandaki kotambwisa boyekoli misato ya Biblia: Ophelia, Leonidas, mama na ye mpe na ndeko na ye ya mwasi. Mpo na koyekola na bango esɛngaki kotambola na ntaka ya kilomɛtrɛ 30 na tukutuku mbala misato na pɔsɔ. Nsima ya mwa basanza, Leonidas na mwasi na ye bazwaki batisimo. Elimo ya komipesa oyo bandeko ya esanga wana bazalaki na yango ebotaki mpenza mbuma!
Yehova azali kokolisa
Yehova azali mpenza kopambola makasi ya basakoli ya Bokonzi koleka 2 000 oyo bafandi na bisanga wana ya Mai Monene ya Égée. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali na masangá 44 kuna mpe bituluku 25. Na kati ya bituluku yango, 17 ezali na nkota ya bapaya lokola mokano ya Yehova ezali ete “bato ya lolenge nyonso bábika mpe báyeba solo malamumalamu.” (1 Timote 2:4, NW ) Longola wana, babongisi-nzela monene 13 bazali kosala makasi mpo na kokutana na bato mingi lisusu na kati ya bamboka oyo ezali mosika.
Na boumeli ya bikeke mingi, Mai Monene ya Égée ezalaki esika oyo bato ya mikili ndenge na ndenge bazalaki kotombola mimeseno na bango mpe bato ya mikili mingi bazalaki kokende kosala mombongo na bango. Na bambula oyo euti koleka, ekómi esika oyo baturiste mingi bakendeke kotalatala. Kasi likambo eleki ntina ezali ete “balɔbi na bato,”—elingi koloba basakoli ya Bokonzi—bakutani na ebele ya bato ya mitema sembo oyo bazali mpenza na mposa ya kokumisa Yehova na bisanga yango. Bango nyonso bandimi mpenza libyangi ya esakweli oyo elobi ete: “Bákumisa [Yehova] na nkembo, bátatola lisanzoli na ye na kati na [bisanga, NW ].”—Yisaya 42:12.
[Karte na lokasa 22]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mai Monene ya Égée
GRÈCE
Lesbos
Chios
Samos
Icarie
Fournoi
Patmos
Cos
Rhodes
Crete
TURQUIE
[Elilingi na lokasa 23]
Esanga Lesbos
[Bililingi na lokasa 24]
Esanga Patmos
[Bililingi na lokasa 24]
Esanga Crète.