Tyá likebi na Liloba ya Esakweli ya Nzambe mpo na ntango na biso
“Oyeba, mwana ya moto, ete emonaneli ezali mpo na ntango ya nsuka.”—DANYELE 8:17.
1. Yehova alingi bato nyonso báyeba nini mpo na ntango na biso?
YEHOVA abombaka mpo na ye moko te makambo oyo ekoya. Azali Momonisi ya makambo mabombami. Kutu, mposa na ye ezali ete bato nyonso báyeba ete “ntango ya nsuka” ekómi mpenza na nsuka na yango. Likambo yango ezali na ntina mingi mpo na bato miliare motoba oyo bazali lelo oyo na mokili!
2. Mpo na nini bato bazali komibanzabanza mpo na bomoi ya bato na mikolo ekoya?
2 Ezali mpenza likambo ya kokamwa ete nsuka ya mokili oyo ekómi pene? Moto akei tii na sanza, kasi na bisika mingi awa na mabele, azali kobanga ntango azali kotambola na balabala. Akoki kotondisa ndako na biloko kitoko ya mikolo oyo, kasi azali kokoka te kosilisa bokabwani kati na mabota mingi. Moto akoki kotinda to kozwa bansango nokinoki, kasi azali kokoka te koteya bato báfanda na kimya. Makambo yango ezali komonisa ete ebele ya mikapo ya Makomami oyo emonisi ete tozali sikoyo na ntango ya nsuka elobi solo.
3. Ntango nini maloba “ntango ya nsuka” elobamaki mpo na mbala ya liboso awa na mabele?
3 Maloba “ntango ya nsuka” ezali mpenza kobenda likebi; maloba yango ebimaki mpo na mbala ya liboso awa na mabele na monɔkɔ ya anzelu Gabaliele, eleki sikoyo mbula 2 600. Mosakoli moko ya Nzambe ayokaki mpenza nsɔmɔ ntango ayokaki anzelu Gabaliele alobi ete: “Oyeba, mwana ya moto, ete emonaneli ezali mpo na ntango ya nsuka.”—Danyele 8:17.
Tozali sikoyo na “ntango ya nsuka”!
4. Maloba nini mosusu Biblia ezali kosalela mpo na kolobela ntango ya nsuka?
4 Mokanda ya Danyele esaleli maloba “ntango ya nsuka” mpe “ntango eponami na nsuka” mbala motoba mobimba. (Danyele 8:17, 19; 11:35, 40; 12:4, 9) Maloba yango elimboli eloko moko na maloba “mikolo ya nsuka” oyo ntoma Paulo asakolaki. (2 Timote 3:1-5) Yesu Klisto abengaki eleko yango lokola “kozala” na ye lokola Mokonzi oyo afandi na kiti ya bokonzi kuna na likoló.—Matai 24:37-39, NW.
5, 6. Banani ‘bapoti bipai na bipai’ na ntango ya nsuka, mpe bazwi nini?
5 Mokapo ya Danyele 12:4 elobi boye: “Nde yo, Danyele, zipá maloba mpe kangá mokanda na elembo, kino [ntango, NW] ya nsuka. Bato mingi bakopota bipai na bipai, mpe boyebi [ya solo ekokóma mingi, NW].” Makambo mingi oyo Danyele akomaki ezalaki mabombami mpe ekangamaki na boumeli ya bikeke mingi mpo bato báyeba ndimbola na yango te. Kasi tokoki koloba boni mpo na mikolo oyo?
6 Na ntango oyo ya nsuka, ebele ya baklisto ya sembo ‘bapoti bipai na bipai’ na kati ya Biblia, Liloba ya Nzambe. Makambo nini bazwi? Yehova apamboli milende na bango, yango wana boyebi ya solo ekómi mingi. Na ndakisa, Batatoli ya Yehova bapakolami na elimo santu basosolaki ete Yesu Klisto akómaki Mokonzi kuna na likoló na 1914. Lokola ntoma alobaki yango na 2 Petelo 1:19-21, bapakolami yango na baninga na bango ya sembo bazali ‘kotya likebi na liloba ya esakweli’ mpe bandimi mpenza ete tozali sikoyo na ntango ya nsuka.
7. Tángá mwa masolo oyo ezali na mokanda ya Danyele oyo ezali kokesenisa yango na mikanda mosusu nyonso.
7 Ezali na makambo mwa mingi oyo ekesenisi mokanda ya Danyele na mikanda mosusu nyonso. Mokanda yango elobeli lisolo ya mokonzi moko oyo alingaki kobomisa bato ya mayele ya mboka na ye mpo bakokaki te koyebisa ye ndɔtɔ oyo alɔtaki mpe kolimbwela ye yango; kasi mosakoli ya Yehova ayebisaki ye mpe alimbwelaki ye ndɔtɔ yango. Babwakaki bilenge mibali misato na litumbu ya mɔ́tɔ makasi mpenza mpo baboyaki kosambela ekeko moko molai, kasi babimaki mpe bazikaki ata na esika moko te. Bato ebele oyo bazalaki kosala fɛti bamonaki lobɔkɔ moko ya moto ezali kokoma maloba ya kokamwa na efelo ya ndako ya mokonzi. Bato ya mitema mabe basalelaki mayele mabe mpo bábwaka mobange mobali moko na libulu ya bankosi, kasi abimaki na libulu yango mpe bankosi esalaki ye eloko te. Mokanda yango elobeli emonaneli ya banyama minei, mpe bapesi ndimbola na yango oyo ezali esakweli; esakweli yango ezali kokokisama tii na ntango ya nsuka.
8, 9. Ndenge nini mokanda ya Danyele ekoki kopesa biso litomba, mingimingi sikoyo na ntango ya nsuka?
8 Tomoni mpenza ete tokoki kokabola mokanda ya Danyele na biteni mibale: eteni mosusu ezali masolo mpe eteni mosusu ezali bisakweli. Biteni yango mibale ekoki kolendisa kondima na biso. Masolo ya mokanda yango ezali komonisa biso ete Yehova Nzambe apambolaka bato oyo bazalaka sembo epai na ye. Bisakweli ezali kolendisa kondima na biso na ndenge ezali komonisa biso ete Yehova ayebaka makambo oyo ekosalema bankama ya bambula, ata mpe bankóto bambula liboso makambo yango esalema.
9 Bisakweli ndenge na ndenge oyo Danyele akomaki ezali kobenda likebi na biso na Bokonzi ya Nzambe. Ntango tozali komona ndenge bisakweli yango ezali kokokisama, kondima na biso ezali kolendisama, mpe tozali lisusu kondima makasi ete tozali na ntango ya nsuka. Kasi, bato mosusu ya mayele bazali koloba mabe mpo na Danyele; bazali koloba ete bisakweli ya mokanda ya Danyele ekomamaki na nsima, wana makambo mosusu esilaki kosalema, yango esalaki lokola kokokisa bisakweli yango. Soki makambo oyo bato yango balobi ezali solo, tokozala mpenza na mokakatano mpo na kondima makambo oyo mokanda ya Danyele esakolaki mpo na ntango ya nsuka. Bato ya ntembe bakakatanaka mpe mpo na kondima masolo oyo elobami na mokanda yango. Tótalela naino likambo yango malamumalamu.
Ntembe mpo na mokanda ya Danyele
10. Na ndimbola nini mokanda ya Danyele ezali kosambisama?
10 Kanisá ete ofandi na kati ya tribinale moko mpe ozali kolanda ndenge bazali kosambisa likambo moko. Molobeli ya Leta alobi ete tómata, tókita, moto oyo bafundi ye azali mobuki ya lokuta. Ezali mpe bongo mpo na mokanda ya Danyele. Mokanda yango moko elobi ete ezali na makambo ya solo oyo ekomamaki na mosakoli moko Moebele oyo azalaki na bomoi na ekeke ya nsambo mpe ya motoba L.T.B. Kasi bato mosusu ya mayele bazali koloba ete ezali lokuta monene. Lokola ezali boye, tóluka naino koyeba soki masolo ya mokanda yango eyokani na makambo ya kala oyo eyebani.
11, 12. Likambo oyo bazalaki koloba ete Belesasala azalaki mpenza na bomoi te esukaki ndenge nini?
11 Na ndakisa, tózwa oyo tokoki kobenga likambo ya mokonzi oyo ayebani te. Mokanda ya Danyele mokapo 5 emonisi ete Belesasala azalaki mokonzi ya Babilone ntango engumba yango ekweaki, na mobu 539 L.T.B. Bato mosusu ya mayele bazalaki kondima likambo yango te mpamba te nkombo Belesasala ezalaki te na mikanda mosusu nyonso ya kala, ezalaki kaka na Biblia. Mikanda ya kala emonisaki ete mokonzi ya nsuka ya Babilone nkombo na ye ezalaki Nabonide.
12 Kasi, na mobu 1854, bato ya arkeoloji babimisaki bitanda mike ya mabele na esika oyo engumba moko ya Babilone ya kala babengi Ulu ezalaká; lelo oyo ezali na ekólo Irak. Bitanda yango ezalaki na makomi ya cunéiforme, kati na yango ezali mpe na libondeli ya Mokonzi Nabonide oyo alobaki ete “Bel-sar-ussur, mwana na ngai ya mobali ya liboso.” Bato ya ntembe bakokaki lisusu koloba eloko te: Ezalaki Belesasala oyo mokanda ya Danyele elobeli. Na bongo mokonzi yango azalaki lisusu te mokonzi oyo alobelamá te, ezalaki kaka ete tii na ntango wana, bamonaki naino mikanda mosusu te oyo elobelaki ye. Yango ezali kaka elembeteli moko na kati ya bilembeteli mingi oyo emonisi ete Danyele akomaki makambo oyo esalemaki solo. Elembeteli yango ezali komonisa ete mokanda ya Danyele ezali moko ya mikanda ya Liloba ya Nzambe mpe ebongi tótyela yango likebi mpenza lelo oyo, na ntango ya nsuka.
13, 14. Nebukadanesala azalaki nani mpe amipesaki na losambo ya nzambe nini ya lokuta?
13 Mokanda ya Danyele ezali na bisakweli oyo eyebisi ndenge oyo banguya ya mokili mobimba ekolandana mpe makambo oyo bakonzi mosusu ya bikólo yango bakosala. Tokoki kobenga moko na bakonzi yango ete mobundi oyo asalaki bokonzi moko monene. Moto yango azalaki mwana ya mokonzi mpe asengelaki kokóma mokonzi nsima ya liwa ya tata ye. Ye na basoda na ye balongaki basoda ya Falo Neko, mokonzi ya Ezipito, na engumba Kalekemisi. Kasi, bamemelaki ye nsango moko mpe mpo na nsango yango atikaki mokumba ya kotambwisa etumba na mabɔkɔ ya bakonzi ya basoda na ye. Ntango ayokaki ete tata na ye Nabopolasala akufi, elenge yango oyo nkombo na ye ezalaki Nebukadanesala, akómaki mokonzi na mobu 624 L.T.B. Ayangelaki mbula 43 mpe na ntango yango asalaki bokonzi oyo esangisaki bamboka oyo ezalaki liboso na mabɔkɔ ya Asulia, mpe ayeisaki bokonzi na ye monene tii na Sulia mpe na Palestine, tii na ndelo ya Ezipito.
14 Nebukadanesala amipesaki mpenza na losambo ya Maladuku, mokonzi ya banzambe ya Babilone. Mbala nyonso oyo azalaki kolonga etumba, mokonzi yango azalaki koloba ete ezali na lisalisi ya Maladuku. Na engumba Babilone, Nebukadanesala atongaki mpe abongisaki batempelo ya Maladuku mpe ya ebele ya banzambe mosusu ya Babilone. Ekoki kozala ete ekeko ya wolo oyo mokonzi yango atɛlɛmisaki na esobe ya Dula ezalaki mpo na kokumisa Maladuku. (Danyele 3:1, 2) Mpe emonani ete Nebukadanesala azalaki kolanda mingimingi toli ya banganga-nkisi ntango azali kokanisa epai oyo akotinda basoda na ye.
15, 16. Makambo nini Nebukadanesala asalaki na Babilone, mpe likambo nini ekómelaki ye ntango asalaki lofundo mpo na bokonzi na ye?
15 Nebukadanesala asilisaki mosala oyo tata na ye abandaki, mosala ya kotonga bifelo mineneminene ya lopango oyo ezingaki Babilone. Na ndenge yango, akómisaki mboka-mokonzi esika oyo emonanaki ete banguna bakoki kozwa yango te. Balobaka ete mwasi na ye azalaki moto ya Mede mpe azalaki koyoka mposa ya bangomba mpe bazamba oyo atiká na mboka na ye. Mpo na kosepelisa ye, Nebukadanesala alonisaki bilanga ya fololo oyo ezipaki bifelo mpe likoló ya bandako. Lelo oyo, balobaka ete bilanga yango ezali moko na Misala Nsambo ya Kokamwa oyo esalemaki na mokili na ntango ya kala. Akómisaki Babilone moko na bingumba ezingamaki na lopango oyo elekaki makasi na ntango wana. Azalaki na lolendo mingi mpo na mboka yango epai losambo ya lokuta efandaki mpenza!
16 Mokolo mosusu Nebukadanesala alobaki na lofundo nyonso ete: “Oyo ezali Babele Monene te, oyo esili ngai kotonga?” Kasi, mokanda na Danyele 4:30-36 elobi ete “wana etikalaki maloba yango naino na monɔkɔ na mokonzi,” azwaki ligboma. Ndenge Danyele asakolaki yango, na boumeli ya mbula nsambo mobimba azalaki lisusu koyangela te, azalaki kolya matiti. Na nsima azongaki na bokonzi. Oyebi soki lisolo yango ezali mpe esakweli? elimboli nini? Okoki kolimbola ndenge oyo kokokisama na yango monene ememi biso tii na ntango ya nsuka?
Makambo oyo ezali bisakweli
17. Lobelá ndɔtɔ oyo ezali esakweli oyo Nzambe alɔtisaki Nebukadanesala na ntango akómaki na mbula ya mibale lokola mokonzi ya ekólo oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba.
17 Tólobela sikoyo mwa makambo oyo ezali bisakweli na mokanda ya Danyele. Na mbula ya mibale ya boyangeli ya Nebukadanesala lokola mokonzi ya nguya ya mokili mobimba oyo Biblia esakolaki (na mobu 606 to 605 L.T.B.), Nzambe alɔtisaki ye ndɔtɔ moko ya nsɔmɔ. Mokanda ya Danyele mokapo ya 2 elobi ete na kati ya ndɔtɔ yango amonaki ekeko moko monene oyo motó na yango ezalaki ya wolo, ntolo mpe mabɔkɔ ya palata, libumu mpe bibɛlɔ ya motako, makolo ezalaki ya ebende, mpe matambi ezalaki ya ebende esangani na mabele. Eteni mokomoko ya ekeko yango ezalaki komonisa nini?
18. Motó ya wolo, ntolo mpe mabɔkɔ ya palata, mpe libumu mpe bibɛlɔ ya motako ya ekeko oyo balɔtaki na ndɔtɔ ezalaki elilingi ya nini?
18 Mosakoli ya Nzambe ayebisaki Nebukadanesala boye: “Ɛ mokonzi . . . yo ozali motó ya wolo.” (Danyele 2:37, 38) Nebukadanesala azalaki mokonzi ya Babilone mpe bakitani na ye bakómaki mpe bakonzi ya ekólo yango nsima na ye. Bamede na Baperse, oyo bamonisamaki na ntolo mpe mabɔkɔ ya palata ya ekeko bakweisaki Babilone. Na nsima, ekólo mosusu eyaki: Grèce, oyo emonisamaki na libumu mpe bibɛlɔ ya motako ya ekeko. Ebandaki ndenge nini mpo ekólo yango ekóma nguya ya mokili mobimba?
19, 20. Alesandala Monene azalaki nani, mpe akokisaki mokumba nini mpo Grèce ekóma nguya ya mokili mobimba?
19 Na ekeke ya minei L.T.B., elenge mobali moko asalaki likambo moko monene oyo ekokisaki esakweli ya Danyele. Elenge mobali yango abotamaki na mobu 356 L.T.B. mpe ayebanaki na mokili na nkombo ya Alesandala Monene. Ntango babomaki tata na ye Filipo na mobu 336 L.T.B., Alesandala akómaki mokonzi ya Makedonia, ntango wana azalaki na mbula 20.
20 Na ebandeli ya sanza ya Mai ya mobu 334 L.T.B., Alesandala abandaki kobunda bitumba mpo na kobɔtɔla bamboka. Azalaki na basoda mingi te kasi bazalaki mpenza mibali ya etumba. Azalaki kaka na basoda 30 000 oyo bazalaki kotambola na makolo mpe basoda 5 000 oyo bazalaki kokende bitumba na bampunda. Alesandala abundaki etumba na ye ya liboso na Baperse mpe alongaki bango na Ebale Granique, na nɔrdi-wɛsti ya Asie Mineure (lelo oyo ezali na ekólo Turquie) na mobu 334 L.T.B. Na mobu 326 L.T.B., elombe yango ya bitumba akómaki koyangela Baperse mpe abɔtɔlaki bamboka tii na ɛsti ya Ebale Indus, oyo ezali lelo na ekólo Pakistan. Kasi Alesandala alongaki te na etumba ya nsuka oyo abundaki ntango azalaki na Babilone; tolingi koloba ete na mokolo ya 13 Yuni ya mobu 323 L.T.B., Alesandala oyo azalaki kaka na mbula 32 na sanza 8, monguna moko ya nsɔmɔ alongaki ye, monguna yango liwa. (1 Bakolinti 15:55) Kasi, lokola Alesandala abɔtɔlaki bamboka mingi, Grèce ekómaki nguya ya mokili mobimba, lokola esakweli ya Danyele eyebisaki yango.
21. Longola Bokonzi ya Loma, makolo ya ebende ya ekeko ezalaki mpe elilingi ya nguya nini ya mokili mobimba?
21 Makolo ya ebende ya ekeko monene ezalaki elilingi ya nini? Ezalaki nde Loma, bokonzi oyo ezalaki lokola ebende oyo ebukaki mpe epanzaki Bokonzi ya Grèce. Bokonzi ya Loma ezalaki na limemya te mpo na Bokonzi ya Nzambe oyo Yesu Klisto asakolaki; bato ya Loma babomaki Yesu na nzete ya mpasi na mobu 33 T.B. Bokonzi ya Loma elukaki kosukisa boklisto ya solo, yango wana enyokolaki bayekoli ya Yesu. Kasi, makolo ya ebende ya ekeko oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ ezalaki kaka elilingi ya Bokonzi ya Loma te, kasi ezalaki mpe elilingi ya bokonzi ya politiki oyo Loma ebotaki: bokonzi ya Anglo-américain oyo ekómaki nguya ya mokili mobimba.
22. Ndenge nini ekeko oyo Nebukadanesala amonaki na ndɔtɔ ezali kosalisa biso na koyeba ete mikolo ya nsuka ekómi mpenza na nsuka na yango?
22 Soki tolandi makambo malamumalamu, tokomona ete ntango ya nsuka esili kokóma na nsuka na yango, mpamba te tokómi na makolo ya ekeko oyo esalemi na bibende esangani na mabele. Baguvɛrnɛma mosusu ya mikolo na biso ezali lokola ebende to ezali na makambo makasi, nzokande baguvɛrnɛma mosusu ezali lokola mabele. Atako mabele oyo “bana ya bato” basalami na yango ezalaka makasi te, baguvɛrnɛma oyo ezali lokola ebende ezali ntango nyonso kokoka kopekisa te ete bato mpamba bázala na likambo ya koloba te na ndenge oyo bazali koyangela bango. (Danyele 2:43; Yobo 10:9) Bokonzi ya makambo makasi esangani na bato mpamba ndenge kaka ebende esanganaka na mabele. Kasi, etikali moke, Bokonzi ya Nzambe esukisa mokili oyo ekabwanikabwani na makambo ya politiki.—Danyele 2:44.
23. Lobelá ndɔtɔ mpe bimonaneli oyo Danyele amonaki na mbula ya liboso ya boyangeli ya Belesasala.
23 Esakweli oyo ezali na mokapo 7 ya mokanda ya Danyele ezali kosimba motema, ezali mpe komema biso na ntango ya nsuka. Mokapo oyo elobeli likambo moko oyo esalemaki na mbula ya liboso ya boyangeli ya Belesasala, mokonzi ya Babilone. Na ntango yango, Danyele azalaki na mbula koleka 70, “alɔtaki ndɔtɔ mpe amonaki bimonaneli ya motema na ye wana elalaki ye na mbeto.” Bimonaneli yango ebangisaki ye mpenza! Agangaki ete: “Talá, mipɛpɛ minei na lola mikitaki makasi na likoló ya mai monene. Mpe banyama minene minei babimaki na mai monene, mpe bakesanaki.” (Danyele 7:1-8, 15) Banyama yango ezalaki nsɔmɔ mpenza! Nyama ya liboso ezalaki nkosi oyo ezali na mapapu, mpe ya mibale ezalaki lokola ngombolo. Na nsima, nkoi na mapapu minei mpe mitó minei! Nyama ya minei ezalaki na makasi ya kokamwa mpe ezalaki na mino minene ya ebende mpe na maseke zomi. Liseke moko “moke” ebimaki na katikati ya maseke yango zomi mpe ezalaki na “miso . . . [lokola] miso na moto” mpe “monɔkɔ oyo ezalaki koloba makambo minene.” Ezalaki mpenza banyama ya nsɔmɔ!
24. Mokanda ya Danyele 7:9-14 elobi makambo nini oyo Danyele amonaki na likoló mpe emonaneli yango ezali komonisa likambo nini?
24 Na nsima, Danyele amonaki bimonaneli ya makambo oyo ezali na likoló. (Danyele 7:9-14) Amonaki Yehova Nzambe, “[Mokóló ya Mikolo, NW]” afandi na nkembo na kiti ya bokonzi lokola Mosambisi. ‘Nkóto nkóto bazali kosalela ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmi liboso na ye.’ Nzambe akateli banyama yango etumbu mpe abɔtɔli bango bokonzi mpe abomi nyama ya minei. Bapesi ye oyo azalaki “lokola mwana ya moto” bokonzi ya seko likoló ya “mabota mpe mikili mpe nkota nyonso.” Yango ezali kolobela ntango ya nsuka mpe kotyama ya Mwana ya moto, Yesu Klisto, na kiti ya bokonzi na 1914.
25, 26. Mituna nini tokoki komituna ntango tozali kotánga mokanda ya Danyele mpe mokanda nini ekoki kosalisa biso na kozwa biyano na mituna yango?
25 Toyebi ete moto nyonso oyo akotánga mokanda ya Danyele akozala na mituna mingi. Na ndakisa, banyama minei oyo mokanda na Danyele mokapo 7 elobeli, ezali elilingi ya nini? “Pɔsɔ ntuku nsambo” ya esakweli oyo mokanda ya Danyele 9:24-27 elobeli, elimboli nini? Bongo makambo oyo ezali na mokanda na Danyele mokapo 11 mpe esakweli oyo elobeli kowelana kati na “mokonzi ya nɔrdi” na “mokonzi ya sudi”? Bakonzi yango bakosala makambo nini na ntango ya nsuka?
26 Yehova apesi basaleli na ye bapakolami oyo bazali awa na mabele, “bato ya bulɛɛ ya Oyo-Aleki-Likoló” ndenge babengi bango na mokanda ya Danyele 7:18, bososoli ya makambo wana. Lisusu, “moombo ya sembo mpe ya mayele” abongisi eloko moko mpo tósosola malamumalamu makambo oyo mosakoli Danyele akomaki na lisalisi ya elimo santu. (Matai 24:45) Tokoki sikoyo kozwa bandimbola yango na mokanda oyo ebimi sika mpe ezali na motó ya likambo ete Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Mokanda yango ya nkasa 320 ezali na bililingi ya kitoko, ezali kolimbola biteni nyonso ya mokanda ya Danyele. Mokanda yango ezali kolobela esakweli mokomoko oyo ezali kolendisa kondima mpe ezali kolobela masolo nyonso oyo Danyele, mosakoli oyo alingamaki mingi akomaki.
Ndimbola ya solo mpo na mikolo na biso
27, 28. (a) Tokoki koloba nini na ntina etali kokokisama ya bisakweli ya mokanda na Danyele? (b) Sikoyo tozali na eleko nini mpe tosengeli kosala nini?
27 Talá likambo ya ntina mingi oyo: Longola mwa makambo mikemike, bisakweli nyonso ya mokanda ya Danyele esili kokokisama. Na ndakisa, tokómi sikoyo na makambo oyo emonisamaki na elilingi ya makolo ya ekeko ya mokanda na Danyele mokapo 2. Balongolaki nkamba oyo bakangaki na mobimbi ya nzete oyo mokanda ya Danyele mokapo 4 elobeli ntango Yesu azwaki bokonzi na 1914. Ya solo, ndenge mokanda ya Danyele mokapo 7 esakolaki yango, Mokóló na Mikolo apesaki bokonzi na mabɔkɔ ya Mwana ya moto.—Danyele 7:13, 14; Matai 16:27–17:9.
28 Mikolo 2 300 oyo mokanda ya Danyele mokapo 8 elobeli mpe mikolo 1 290 na mikolo 1 335 oyo mokanda ya Danyele mokapo 12 elobeli, esilaki koleka. Boyekoli ya mokanda ya Danyele mokapo 11 ezali komonisa ete kowelana ya “mokonzi ya nɔrdi” na “mokonzi ya sudi” ekómi na eteni na yango ya nsuka. Nyonso oyo ezali kobakisama na bilembeteli mosusu ya Biblia oyo emonisi ete tokómi mpenza na nsuka ya ntango ya nsuka. Soki tokanisi libaku malamu oyo tozali na yango ya kozala na bomoi na ntango oyo, mokano na biso esengeli kozala nini? Na ntembe te, tosengeli mpenza kotya likebi na liloba ya esakweli ya Yehova Nzambe.
Okopesa eyano nini?
• Nzambe alingi bato nyonso báyeba nini mpo na ntango na biso?
• Ndenge nini mokanda ya Danyele ekoki kolendisa kondima na biso?
• Ekeko oyo Nebukadanesala alɔtaki na ndɔtɔ ezalaki ndenge nini mpe yango ezalaki elilingi ya nini?
• Likambo nini ezali komonana mpo na kokokisama ya bisakweli ya mokanda ya Danyele?