Batosi ya Liloba ya Nzambe bazali kozwa bolamu
Na ntɔngɔ ya mokolo ya liboso na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova, oyo ezalaki na motó ya likambo “Batosi ya Liloba ya Nzambe,” molobi moko alobaki boye: “Tozali kotalela liyangani oyo lokola moko na bibongiseli oyo Yehova azwaki mpo na kolɛngɛla biso na mosala monene ya kosakola Bokonzi. Tomibongisaki mpo báteya biso makambo etali bomoi ya libota ya esengo, mpo tólendisama mpo na kokangama na ebongiseli ya Yehova, mpo tózala ntango nyonso na molende na mosala ya kosakola Bokonzi, mpe mpo tóbosana te ete tosengeli kosɛnzɛla ntango nyonso.”
KOBANDA sanza ya Mai ya mobu 2000, bamilio ya batosi ya liloba ya Nzambe, elongo na baninga na bango, bayanganaki na bisika ebele na mokili mobimba mpo na koyoka mateya ya ntina oyo euti na Biblia. Makambo nini bayekolaki na liyangani wana ya mikolo misato?
Mokolo ya liboso—Bóbosana misala ya Yehova te
Na lisukulu ya liboso, mokambi ya liyangani asɛngaki na bayangani bázwa mapamboli oyo eutaka na kosambela Yehova kati na bomoko, na mayangani. Bayangani nyonso bandimaki ete kondima na bango ekokola mpe boyokani na bango na Yehova ekokóma makasi.
“Nzambe ya esengo” ayebi eloko nini tosengeli na yango mpo tózala na esengo. (1 Timote 1:11, NW) Na yango, lisukulu “Kosala mokano ya Nzambe epesaka esengo” elobelaki mingi likambo oyo, ete Biblia, Liloba ya Yehova, ezali kolakisa lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. (Yoane 13:17) Mituna-lisolo oyo esalemaki elongo na Batatoli ya Yehova oyo baumeli mingi, emonisaki ndenge oyo kosala mokano ya Nzambe kati na makambo ndenge na ndenge esalaka ete bomoi na biso ekóma na ntina koleka. Lisukulu oyo elandaki, oyo ezalaki na motó ya likambo “Bótonda na esengo mpo na malamu ya Yehova,” emonisaki polele ete lokola baklisto bazali “bamekoli ya Nzambe,” basengeli komonisa “lolenge nyonso ya malamu” na bomoi na bango. (Baefese 5:1, 9, NW) Kosakola nsango malamu mpe kozalisa bayekoli ezali lolenge malamu mpenza ya komonisa ezaleli yango.—Nzembo 145:7, NW.
Lisukulu “Tɛlɛmá ntango nyonso ngwi lokola nde ozali komona Ye oyo amonanaka te” emonisaki ndenge oyo kondima makasi esalisaka biso “tómona” Nzambe oyo amonanaka te. Molobi alimbolaki ete bato ya elimo bayebi bizaleli ya Nzambe, lokola likoki na ye ya koyeba ata makambo oyo tozali kokanisa. (Masese 5:21) Baoyo batunamaki mituna bamonisaki bibongiseli oyo bazwaki mpo na kokolisa kondima na bango mpe kokómisa yango makasi mpe kotya matomba ya elimo liboso kati na bomoi na bango.
Lisukulu-moboko: “Sanzola Yehova—Ye asalaka makambo ya kokamwa” nde ezalaki lisukulu ya nsuka na ntɔngɔ. Emonisaki na bayangani ete soki toyebi makambo mingi oyo etali Yehova, tokozala mpenza na bantina mingi ya kokumisa ye oyo asalaka makambo ya kokamwa. Molobi alobaki ete: “Ntango tozali kotala misala ya kokamwa oyo Nzambe asalá mpe makambo mosusu ya kokamwa oyo azali kosala mpo na biso sikawa, yango ezali kotinda biso tósanzola ye na motema na biso mobimba. Ntango tozali komanyola makambo ya kokamwa oyo Nzambe asalaki mpo na basaleli na ye na ntango ya kala, yango ezali kopesa biso mposa ya kokumisa ye. Mpe ntango tozali kokanisa bilaka ya makambo ya kokamwa oyo akosala, biso mpe tolukaka ndenge ya kotɔnda ye.”
Nsima ya bopemi ya midi, manaka ebandaki na lisukulu “Kolɛmba te kosala oyo ezali malamu.” Ekundolelaki bayangani nyonso ete bampasi ya mokili oyo ezali kondimisa biso ete nsuka ekómi pene. (2 Timote 3:1) Nzokande, soki tolɛmbi te tokomonisa ete “tozali kati na baoyo bazali na kondima mpe bakobikisa molimo.”—Baebele 10:39, NW.
Toli nini ya Biblia epesamaki mpo na oyo etali bomoi ya libota? Masukulu-matongani ya liboso na liyangani oyo, oyo ezalaki na motó ya likambo “Tosá Liloba ya Nzambe,” ebandaki na eteni oyo ezalaki na motó ya likambo “Mpo na kopona moto oyo okobala.” Kopona moto oyo okobala ezali moko ya bikateli minene oyo bato bazwaka. Na yango, ezali malamu bilenge baklisto bázela ntango bakokóma basi to mibali oyo bakɔmeli mpo na kobala. Lisusu, basengeli kobala “kaka kati na Nkolo.” (1 Bakɔlinti 7:39) Eteni oyo elandaki emonisaki ete Yehova azali na mposa ete libota mokomoko ya baklisto ekóma makasi na elimo. Mpo na kokokisa likambo yango, kaka eteni yango emonisaki lolenge ya kosala oyo ebongi mpenza. Eteni ya nsuka ekundolelaki baboti ete mpo na koteya bana na bango bálinga Nzambe esengeli bango moko baboti bámonisa ete balingaka Nzambe.
Lisukulu “Kebá na nungunungu mpe matɔngi” esalisaki bayangani báyeba ete atako makambo ya kokamwisa esalemaka, tosengeli te kozala na bindimandima, kasi tosengeli kozala na mayele ntango toyoki nsango oyo ezali kitoko na matoi. Eleki malamu mpo na baklisto báloba makambo oyo bayebi ete ezali solo, elingi koloba, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Ebele ya bayangani babɔndisamaki mpe balendisamaki na lisukulu “Tóyika mpiko na ‘monzube kati na nzoto,’” oyo elandaki. Esalisaki bango na komona ete atako tokoki kobunda na komekama oyo ezali se kobakisama, Yehova akoki kopesa biso nguya na nzela ya elimo santu na ye, Liloba na ye, mpe na libota na biso ya boklisto. Ndakisa ya ntoma Paulo, ndenge ayikaki mpiko, atako akutanaki na komekama ya ndenge na ndenge na bomoi na ye, elendisaki mingi.—2 Bakɔlinti 12:7-10; Bafilipi 4:11, 13.
Mokolo ya liboso esukaki na lisukulu “Tambolá elongo na lisangá ya Yehova,” oyo etalelaki makambo misato oyo emonisi ete ebongiseli ya Nzambe ezali kokende mpenza liboso. Makambo yango, oyo: (1) Yehova azali kopesa pole ya elimo mpe yango ezali kobakisa bososoli, (2) mosala ya kosakola oyo Nzambe apesi biso, mpe (3) mbongwana oyo ezali kosalema, mbala na mbala, mpo na lolenge ya kotambwisa mosala. Na nsima, molobi alobaki na elikya nyonso ete: “Tozali kosepela na mapamboli oyo ezali liboso.” Mpe atunaki boye: “Ntembe ezali te ete tozali na bantina nyonso ya kokoba kozala na elikya oyo tozalaki na yango na ebandeli kino na nsuka, boye te?” (Baebele 3:14) Eyano ezalaki ya koluka te. Na nsima na yango, molobi alakisaki mwa buku ya sika oyo ezalaki na motó ya likambo ete Okoki kozala moninga ya Nzambe! Ekozala mpenza lisalisi ya malamu mpo na koteya boyebi ya Yehova epai ya bato oyo batángi kelasi mingi te to baoyo bazali na mikakatano mpo na kotánga malamu.
Mokolo ya mibale—Bósakola ntango nyonso misala ya kokamwa ya Nzambe
Nsima ya kotalela mokapo ya mokolo, mokolo ya mibale ya liyangani ekobaki na masukulu-matongani “Baministre ya Liloba ya Nzambe.” Eteni na yango ya liboso ebendaki likebi na ndenge mosala na biso ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba ezali kolonga sikawa. Atako tozali na mpiko na mosala yango, tokutanaka na botɛmɛli ya bato mingi oyo baboyaka nsango ya Bokonzi. Basakoli ya kala, oyo batunaki bango mituna, balimbolaki ndenge oyo babatelaka esengo na bango na mosala ya kosakola: basalaka milende mpo ete makanisi na bango mpe mitema na bango ebeba te na ezaleli ya kozanga kosepela to botɛmɛli ya bato mosusu. Eteni ya mibale ekundolelaki bayangani ete Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na kokutana na bato na bisika nyonso, ezala na ndenge ya komibongisa liboso to na ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Mpe eteni ya nsuka elimbolaki mitindo ndenge na ndenge oyo baklisto nyonso bakoki kosala mpo na kokolisa mosala na bango. Mpo na yango, molobi abendaki likebi na komonisáká ete tosengeli kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, atako kosala bongo esɛngaka komipimela makambo mosusu.—Matai 6:19-21.
Lokola tofandi kati na mokili oyo ezali kobanga Nzambe te, oyo ezali mpe ntango nyonso na mposa makasi mpenza ya biloko ya mosuni, lisukulu “Kolisá ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe ya kosepela na oyo ozali na yango,” eyaki mpenza na ntango malamu. Molobi alimbolaki mwa moke makambo oyo ezali na mokanda ya 1 Timote 6:6-10, 18, 19 mpe amonisaki ndenge ezaleli ya kokangama na Nzambe esalisaka baklisto bámipesa te na ezaleli ya kolinga mbongo mingi, yango ekoki komema bango na nzela ya mabe mpe ekoki kobimisela bango mikakatano mingi. Alobelaki mpe mingi likambo oyo ete ata soki tozali na mbongo to te, bolamu eutaka nde na boyokani na biso na Yehova mpe na kozala makasi na elimo. Makambo oyo elobamaki na lisukulu “Tóyokisa Nzambe nsɔni ata na likambo moko te,” esimbaki mpenza mitema ya bato mingi. Likambo oyo, ete Yehova akoki kobosana ata moke te Batatoli na ye ya sembo, elobelamaki mingi. Ndakisa ya Yesu oyo eleki ndakisa mosusu nyonso—ye oyo “azali motindo moko, lobi mpe lelo mpe libela”—yango nde ekosalisa bato mingi bákoba kopota na etingya kati na momekano ya mbangu mpo na kozwa bomoi.—Baebele 13:8.
Manaka ya ntɔngɔ esukaki na lisukulu ya batisimo oyo ezalaka ntango nyonso likambo ya ntina mingi kati na mayangani ya Batatoli ya Yehova. Oyo nde esengo ya komona bato bauti komipesa sika, balandi matambe ya Yesu mpe bazali kozwa batisimo na mai! (Matai 3:13-17) Bango nyonso basili kosala makambo mingi oyo emonisi ete bazali batosi ya liloba ya Nzambe. Lisusu, lokola bazwi batisimo bakómi baministre ya nsango malamu oyo bandimami. Lokola mpe bayebi ete bazali kosantisa nkombo ya Yehova, yango ezali kopesa bango esengo.—Masese 27:11.
Lisukulu “Esengeli kokɔmela mpo na koyeba ‘kokesenisa na mabe na malamu’” epesaki toli ya ntina. Mibeko oyo bato batyá mpo na oyo etali malamu na mabe ebongi mpenza te. Na yango, biso tosengeli nde kotyela mibeko ya Yehova motema. (Baloma 12:2) Bayangani nyonso balendisamaki ete básala makasi mpo na kozwa boyebi ya sikisiki ya banzela ya Nzambe mpe mpo na kokɔmela na elimo. Nsima na yango, ntango tozali kosalela lisosoli na biso, ekokóma mpenza malamu mpe ekosalisa biso na “kokesenisa na mabe na malamu.”—Baebele 5:11-14, NW.
Na nsima, masukulu-matongani “Salá makasi mpo okola na elimo” emonisaki ete baklisto ya solo bayebi ntina ya kokolisa mpe kobatela elimo na bango. Yango esɛngaka kosala makasi mpo na kotánga Biblia, koyekola mpe komanyola likoló na yango. (Matai 7:13, 14; Luka 13:24) Lisusu, bato ya elimo basalaka ntango nyonso “mabondeli [ya ndenge] nyonso mpe malɔmbɔ.” (Baefese 6:18) Tondimi ete mabondeli na biso emonisaka soki kondima na biso ezali makasi mpe soki tokangami na Nzambe makasi, soki tozali makasi na elimo; emonisaka mpe makambo oyo tomonaka ete ezali “makambo maleki ntina” na bomoi na biso. (Bafilipi 1:10, NW) Masukulu-matongani oyo, elobelaki mpe mingi ntina ya kokolisa boyokani malamu na Yehova, boyokani ya bolingo, lokola oyo ezalaka kati na tata ya boboto na mwana na ye ya botosi. Ezali kaka likambo ya kozala kati na lingomba moko boye te, ata ezali lingomba ya solo, kasi esengeli kozala na kondima makasi, “lokola nde ozali komona Nzambe.”—Baebele 11:6, 27.
Likambo ya kokola na elimo elobelamaki lisusu kati na lisukulu “Monisá polele ete ozali kokende liboso.” Etalelaki makambo misato oyo tosengeli kokende liboso: (1) kokolisa boyebi na biso, bososoli na biso mpe mayele na biso, (2) komonisa mbuma ya elimo ya Nzambe, mpe (3) kokokisa mokumba na biso kati na libota.
Wana lisukulu ya nsuka ya mokolo wana, “Tótambola na pole ya Liloba ya Nzambe oyo ezali se kobakisama” ekómaki pene na kosila, bayangani basepelaki na kozwa buku ya sika, Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, volimi 1. Mokanda oyo ezali nde volimi ya liboso kati na bavolimi mibale oyo ezali kolimbola mokapo mokomoko ya mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo Yisaya. Molobi alobaki boye: “Mokanda ya Yisaya ezali na nsango moko mpo na biso lelo oyo. Ɛɛ, ebele ya bisakweli na yango ekokisamaki na mikolo ya Yisaya. . . . Kasi ebele ya bisakweli ya Yisaya ezali kokokisama lelo oyo, mpe mosusu ekokokisama na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.”
Mokolo ya misato—Bózala batosi ya liloba ya Yehova
Mokolo ya nsuka ya liyangani ebandaki na botaleli ya mokapo ya mokolo. Na nsima, masukulu-matongani “Esakweli ya Sefania ezali na ntina mpo na baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe” elandaki. Biteni misato na lisukulu yango, emonisaki ete, lokola asalaki yango na mikolo ya bato ya Yuda oyo bazalaki motó makasi, Yehova akoyeisa mpasi likoló na baoyo bazali, sikoyo, koboya koyoka likebisi na ye. Lokola basaleli Nzambe lisumu, bakotambolatambola lokola bato bakufá miso oyo bazangi moto ya kosunga bango mpe bakobika te. Nzokande, baklisto ya solo bazali koluka Yehova ntango nyonso mpe na bosembo. Na yango, bakobombama na mokolo ya nkanda ya Nzambe. Lisusu, ata sikawa, bazali kozwa mapamboli mingi. Bazali na libaku malamu ya “koloba monɔkɔ ya pɛto” oyo etali solo ya Biblia. (Sefania 3:9, NW) Molobi amonisaki ete: “Koloba monɔkɔ ya pɛto ezali kaka te kondima solo mpe koteya yango na bato mosusu, kasi esɛngi mpe ete bizaleli na biso eyokana na mibeko mpe mitinda ya Nzambe.”
Bayangani bazalaki kozela na mposa makasi drame oyo ezalaki na motó ya likambo “Bandakisa ya kokebisa biso lelo oyo.” Drame, oyo basani na yango balataki lokola bato ya ntango ya kala, emonisaki ndenge Bayisalaele mingi bakufaki pene na Mokili ya Ndaka mpo babosanaki Yehova, lisusu mpo, na mayele mabe, basi bapakano bakweisaki bango na pite mpe na losambo ya lokuta. Yamini, moko na basani oyo drame elobelaki mingi, azalaki koyeba te, na ebandeli soki alanda basi ya Moaba to akangama na Yehova. Nzokande Fineasi azalaki na kondima mpe akangamaki na Nzambe, yango mpe emonisamaki polele, ndenge moko mpe makanisi mabe mpe ya lokuta ya Zimiri, moto oyo azalaki kobanga Nzambe te. Drame oyo esimbaki mitema ya bayangani mpe emonisaki likama oyo eyaka soki tozali kolanda baoyo balingaka Yehova te.
Nsima ya drame, lisukulu “Kozala te moyoki oyo abosanaka makambo” elandaki. Etalelaki mokanda ya 1 Bakɔlinti 10:1-10 mpo na komonisa ete Yehova azali komeka botosi na biso mpo na komona soki tobongi kozwa libula na mokili ya sika. Mpo na bamosusu, ata sikoyo, ndenge tokómi pene na kokɔta na mokili ya sika, bamposa ya mosuni ezali kobebisa mikano na bango ya elimo. Bayangani nyonso balendisamaki ete bátika te ete moto abebisa libaku oyo bazali na yango ya ‘kokɔta na bopemi ya Yehova.’—Baebele 4:1.
Lisukulu ya bato nyonso ezalaki na motó ya likambo “Mpo na nini tosengeli kotya likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe?” “Misala ya kokamwa” ya Yehova ezali komonisa ete azali na mayele mpe ete azali na bokonzi likoló na biloko nyonso oyo tomonaka. (Yobo 37:14) Mituna ya ntina mingi mpenza oyo Yehova atunaki Yobo ekokaki mpo na kondimisa ye nguya ya Mozalisi oyo azali mozwi-na-nguya-nyonso. Na mikolo ezali koya, Yehova akosala lisusu “misala ya kokamwa” mpo na basaleli na ye ya sembo. Mpo na kosukisa, molobi alobaki boye: “Tozali mpenza na bantina mingi ya kotalela na likebi misala ya kokamwa ya Yehova—misala oyo asalaki na ntango ya kala, oyo azali kosala na biloko bizalisami zingazinga na biso lelo, mpe oyo alaki ete akosala na mikolo ezali koya.”
Lisukulu ya nsuka ya liyangani “Tósepela na libaku malamu ya kozala batosi ya liloba ya Nzambe” epesamaki na nsima ya lisolo mokuse na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebongisamaki mpo na pɔsɔ ya liyangani. Lisukulu oyo ya kolendisa, ebendaki likebi ya bayangani na kolobáká ete kozala batosi ya liloba ya Nzambe ezali likambo ya lokumu mpenza. (Yakobo 1:22) Bakundolelaki bayangani ete libaku malamu oyo tozali na yango ya kozala batosi ya liloba ya Nzambe ekokani na libaku mosusu te, mpe wana tokozala ntango nyonso kosalela yango, tokosepela na yango lisusu mingi koleka. Bayangani nyonso balendisamaki ete esengo oyo bazwaki na liyangani ya etúká emonana epai na bango na mposa na bango ya kozala mpenzampenza batosi ya liloba ya Nzambe. Wana nde ezali nzela se moko ya kozwa bolamu ya koleka.
[Etanda/Elilingi na lokasa 25]
Okoki kozala moninga ya Nzambe!
Na nsima ya nzanga ya mokolo ya mitano, mwa buku ya sika oyo ezalaki na motó ya likambo Okoki kozala moninga ya Nzambe! elakisamaki. Na bisika mingi na mokili, bato bazali na mposa mpenza ya kozwa mateya ya Biblia na mikanda oyo ezali na makambo ya pɛtɛɛ. Tokosalela mwa buku oyo mpo na kokokisa mposa yango. Ekozala lipamboli monene mpo na bato oyo batángi kelasi mingi te to bayebi kotánga malamu te.
[Etanda/Bililingi na lokasa 26]
Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso
Bayangani batondaki na esengo ya kozwa volimi ya liboso ya buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, oyo ezali na bavolimi mibale. Kati na buku oyo balobeli mingi motuya ya esakweli ya Yisaya mpo na mikolo na biso.