Sepelá elongo na Nzambe ya esengo
“Na nsuka, bandeko, bósepelaka ntango nyonso, . . . mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino.”—2 BAKOLINTI 13:11, NW.
1, 2. (a) Mpo na nini bato mingi bazali na esengo te na bomoi na bango? (b) Esengo ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kolona yango?
NA MIKOLO ya mpasi oyo tozali na yango, ebele ya bato bazali komona makambo mingi te oyo ekoki kopesa bango esengo. Ntango likama moko ekómeli bango moko to ekómeli moto moko oyo balingaka, ntango mosusu bakanisaka lokola Yobo, moto moko na ntango ya kala, oyo alobaki ete: “Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi.” (Yobo 14:1) Baklisto mpe bakutanaka na mitungisi mpe na mikakatano ya “ntango ya mpasi” oyo, mpe ekoki kokóma ete basaleli ya sembo ya Yehova bálɛmba nzoto.—2 Timote 3:1.
2 Kasi, baklisto bakoki kozala na esengo, ata ntango bazali na mikakatano. (Misala 5:40, 41) Mpo na koyeba ndenge oyo yango ekoki kosalema, tótala naino soki esengo ezali nini. Esengo ezali “ezaleli ya motema ya moto ntango azwi eloko moko ya malamu to azali na elikya ya kozwa yango.”a Yango wana, soki totali mapamboli oyo tozali na yango lelo oyo mpe tokanisi makambo ya malamu oyo tokozwa na mokili ya sika, tokoki kozanga esengo te.
3. Mpo na nini tokoki koloba ete moto na moto azali na mwa bantina ya kozala na esengo?
3 Moto na moto azali na mwa mapamboli oyo asengeli kozongisa botɔndi mpo na yango. Tata moko ya libota akoki kolongwa na mosala. Ya solo, likambo yango ekotungisa ye, mpamba te mposa na ye ezali ete aleisaka libota na ye. Kasi, soki azali makasi mpe nzoto kolɔngɔnɔ, akoki kozala na botɔndi mpo na yango. Soki azwi mosala mosusu, lokola azali na nzoto kolɔngɔnɔ ekosalisa ye asala yango na molende. Ekoki mpe kozala ete mwasi moklisto moko akómi na maladi ya makasi. Kasi, akoki kozala na botɔndi ete azali na baninga mpe na bandeko ya bolingo oyo bazali kosalisa ye mpo ayikela maladi na ye mpiko. Moklisto nyonso ya solo, ata soki bomoi na ye ezali ndenge nini, akoki mpe kozala na esengo mpo na libaku malamu ya koyeba Yehova, “Nzambe ya esengo,” mpe Yesu Klisto, “Mokonzi monene mpe ya esengo kaka moko.” (1 Timote 1:11, NW; 6:15, NW) Yehova Nzambe na Yesu Klisto bazali na esengo koleka bato nyonso. Babungisi esengo na bango te atako makambo oyo ezali kosalema awa na mabele ezali yango te oyo Yehova akanaki na ebandeli. Ndakisa na bango ekoki koteya biso mingi mpo tóbungisa esengo na biso te.
Babungisaki esengo na bango te
4, 5. (a) Yehova asalaki nini ntango mwasi na mobali ya liboso bazangaki botosi? (b) Ndenge nini Yehova azalaki kaka na ndenge malamu ya kotalela bato?
4 Ntango Adama na Eva bazalaki na elanga ya Edene, bazalaki nzoto kolɔngɔnɔ mpe bazalaki bato ya kokoka tii na makanisi na bango. Bazalaki na mosala ya ntina mpe bazalaki na esika ya malamu mpenza mpo na kosala mosala yango. Likambo oyo eleki malamu ezali ete bazalaki na libaku malamu ya kosolola ntango nyonso na Yehova. Nzambe alingaki ete esengo na bango esuka te. Kasi, mpo na baboti na biso ya liboso, makabo nyonso wana ekokaki te; bayibaki mbuma ya “nzete ya koyeba malamu mpe mabe” oyo bapekisaki bango. Lokola batosaki te, yango ememelaki biso bana na bango makambo nyonso ya mpasi oyo ezali kolongola biso esengo lelo oyo.—Genese 2:15-17; 3:6; Baloma 5:12.
5 Kasi, atako Adama na Eva bazalaki na botɔndi te, Yehova abungisaki esengo na ye te. Ayebaki ete na kati ya bana na bango, bato ata moke bakozala na mposa ya kosalela ye. Ayebaki mpenza ete ekozala bongo, yango wana, liboso kutu Adama na Eva bábota mwana na bango ya liboso, ayebisaki ete akobikisa bana na bango oyo bakotosa ye! (Genese 1:31; 3:15) Na bambula oyo elandaki, bato mingi balandaki nzela ya Adama na Eva; kasi, atako bato mingi bazangaki botosi, Yehova asundolaki bato nyonso te. Kasi, atyaki nde likebi na ye likoló ya mibali mpe basi oyo ‘basepelisaki motema na ye,’ oyo basalaki nyonso mpo na kosepelisa ye mpo balingaki ye.—Masese 27:11; Baebele 6:10.
6, 7. Makambo nini esalisaki Yesu na kobatela esengo na ye?
6 Ndenge nini Yesu abatelaki esengo na ye? Ntango Yesu azalaki ekelamu ya elimo mpe ya nguya kuna na likoló, azalaki komona makambo oyo bato bazalaki kosala awa na mabele. Azalaki komona polele ete bazali bato ya kozanga kokoka, kasi Yesu alingaki bango. (Masese 8:31) Na nsima, ntango ayaki awa na mabele mpe “azalaki kati na” bato, atikaki kolinga bango te. (Yoane 1:14, Boyokani ya Sika) Nini esalisaki Mwana ya Nzambe, moto ya kokoka, azala ntango nyonso na makanisi ya malamu ndenge yango mpo na bato ya masumu?
7 Ya liboso, Yesu azalaki na makambo makasi te; azalaki koluka mindɔndɔ te, ezala mpo na ye moko to mpo na bato mosusu. Ayebaki ete akobongola bato nyonso na mokili te. (Matai 10:32-39) Yango wana, azalaki kosepela soki moto ata moko mpamba andimi nsango ya Bokonzi. Atako bayekoli na ye bazalaki ntango mosusu na elimo mpe na etamboli ya malamu te, Yesu ayebaki ete, na mitema na bango, bazalaki mpenza na mposa ya kosala mokano ya Nzambe; yango wana alingaki bango. (Luka 9:46; 22:24, 28-32, 60-62) Kutu, na libondeli moko oyo asalaki epai ya Tata na ye ya likoló, Yesu alobaki na mokuse likambo ya malamu oyo bayekoli na ye basalaki tii na ntango wana: “Batosi liloba na yo.”—Yoane 17:6.
8. Na makambo nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu mpo na kobatela esengo na biso?
8 Soki tokanisi ndakisa ya Yehova Nzambe mpe ya Klisto Yesu, biso nyonso tokoki mpenza kozwa liteya monene. Tokoki nde kolanda ndakisa ya Yehova malamumalamu, na ndakisa, tómitungisa mingi te soki makambo esalemi na ndenge oyo tokanisaki? Tokoki nde kolanda ndakisa ya Yesu malamumalamu, elingi koloba kosepela na bomoi na biso ndenge ezali sikoyo, mpe koluka makambo ya mindɔndɔ te, ezala mpo na biso moko to mpo na bato mosusu? Sikoyo, tótala ndenge oyo tokoki kosalela makanisi yango na likambo moko oyo ezali na esika monene na mitema ya baklisto nyonso ya molende na bisika nyonso oyo bazali, elingi koloba mosala ya kosakola.
Tózalaka na makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola
9. Ndenge nini Yilimia azwaki lisusu esengo, mpe ndenge nini ndakisa na ye ekoki kosalisa biso?
9 Yehova alingi ete tózalaka na esengo na ntango tozali kosalela ye. Esengo na biso esengeli te kotalela mbuma oyo mosala na biso ezali kobota. (Luka 10:17, 20) Mosakoli Yilimia asalaki mosala na ye na boumeli ya bambula ebele na mboka oyo bazalaki koyoka ye te. Ntango azalaki kokanisa mingi ndenge oyo bato bazalaki koboya nsango na ye, abungisaki esengo na ye. (Yilimia 20:8) Kasi, ntango amanyolaki likoló ya nsango kitoko oyo azalaki koyebisa bato, azongelaki esengo na ye. Yilimia alobaki na Yehova boye: “Maloba na yo mazwani mpe nalei yango, mpe liloba na yo ezali epai na ngai esengo mpe kosepela na motema na ngai; zambi nabyangami na nkombo na yo, ɛ [Yehova].” (Yilimia 15:16) Yilimia asepelaki na libaku malamu ya kosakola liloba ya Nzambe. Ekoki mpe kozala bongo mpo na biso.
10. Ndenge nini tokoki kobatela esengo na biso na mosala ya kosakola ata soki teritware na biso ezali kobota mbuma te sikoyo?
10 Atako bato mingi bazali kondima nsango malamu te, tozali na ntina mpenza ya kozala na esengo ntango tozali kosala mosala yango. Tóbosana te ete Yehova ayebaki ete ekozala kaka na bato mosusu oyo bakosalela ye. Lokola Yehova, tosengeli kozala na elikya ete nsukansuka, ata bato moke bakoyeba mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe bakondima nsango ya Bokonzi. Tóbosana te ete makambo ebongwanaka na bomoi ya bato. Ata moto oyo akanisaka ete akoká na makambo nyonso, soki likambo moko ya mpasi ekómeli ye na mbalakaka, akoki kobanda komituna soki bomoi ezali mpenza na ntina nini. Okozala wana mpo na kosunga moto ya ndenge yango ntango ‘akoyeba bamposa na ye ya elimo’? (Matai 5:3, NW) Yebá ete na teritware na bino, ekoki kozala na moto moko oyo akondima koyoka nsango malamu mbala ya nsima oyo okokóma na ndako na ye!
11, 12. Likambo nini esalemaki na engumba moko, mpe yango ekoki koteya biso nini?
11 Bato ya teritware na biso bakoki mpe kobongwana. Tótalela ndakisa moko. Na mwa engumba moko, ezalaki na bilenge mingi oyo bazalaki baninga, babalaki mpe babotaki bana. Na ndako nyonso oyo Batatoli ya Yehova bakobɛta, bazalaki koyamba bango kaka na maloba ndenge moko: “Tozali na mposa ya koyoka bino te!” Soki moko na bango asepeli na nsango ya Bokonzi, nokinoki baninga na ye bazalaki kotya ye mbamba ete ayamba lisusu Batatoli te. Omoni ete ezalaki mokakatano monene mpo na kosakola na teritware wana. Atako bongo, Batatoli balɛmbaki te; bazalaki kaka kosakola. Likambo nini emonanaki?
12 Nsima ya bambula, bana mingi na engumba wana bakolaki, babalaki mpe basalaki mabota na bango. Ntango bamonaki ete bomoi na bango ezali komemela bango esengo ya solosolo te, bamosusu na kati na bango bakómaki koluka mateya ya solo. Bazwaki mateya yango ntango bandimaki nsango malamu oyo Batatoli bazalaki koteya. Na bongo, nsima ya bambula ebele, mwa lisangá ya engumba yango ebandaki kokola. Kanisá esengo oyo basakoli oyo bazongaki nsima te bazalaki na yango! Biso mpe tólendendela na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi ya nkembo mpo tózwa esengo!
Bandeko na yo bandimi bakosunga yo
13. Tokoki kokende epai ya nani ntango tolɛmbi nzoto?
13 Okoki koluka libɔndisi epai wapi ntango mitungisi elekeli yo to ntango okutani na likama? Ebele ya basaleli ya Yehova babondelaka naino Yehova, mpe na nsima, balukaka lisalisi epai ya bandeko na bango baklisto. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ayebaki ete lisungi ya bayekoli na ye ezali na ntina mingi. Na butu na ye ya nsuka liboso akufa, alobaki na bango ete “bino bato bosili koumela na ngai elongo kati na makambo na ngai ya mpasi.” (Luka 22:28) Ya solo, bayekoli yango bazalaki bato ya kozanga kokoka, kasi bosembo na bango ebɔndisaki Mwana ya Nzambe. Biso mpe bandeko na biso bandimi bakoki kobɔndisa biso.
14, 15. Nini esalisaki mobali moko na mwasi na ye bálonga mpasi ya kokufela mwana, mpe likambo yango eteyi yo nini?
14 Baklisto mibale, Michel na mwasi na ye Diane, bamonaki ndenge oyo bandeko na bango baklisto bakoki mpenza kosunga bango. Mwana na bango ya mobali, Jonathan, abɛlaki maladi moko mabe (tumeur au cerveau). Jonathan azalaki elenge moklisto ya mbula 20, azalaki nzoto makasi mpe azalaki kokola malamu. Minganga babundaki na ndenge nyonso mpo na kosalisa ye, kasi mpasi ya Jonathan ezalaki se koya makasi, tii nsukansuka, mokolo moko na mpokwa, akufaki. Michel na Diane babulunganaki mpenza. Ntango batalaki ngonga, bamonaki ete Likita ya Mosala oyo ezalaki na mpokwa wana etikalaki moke esila. Kasi, bazalaki na mposa mpenza ya libɔndisi, yango wana basɛngaki na nkulutu oyo azalaki na bango ete akende na bango na Ndako ya Bokonzi. Bakómaki na ntango oyo bazalaki kopesa liyebisi na lisangá ete Jonathan akufi. Nsima ya makita, ebele ya bandeko bayaki kozinga bango mpo na koyamba bango mpe koloba na bango mwa maloba ya kobɔndisa. Diane alobi ete: “Tozalaki biso te ntango tokómaki na Ndako ya Bokonzi, kasi bandeko babɔndisaki biso mpenza! Atako bakokaki kosilisa mpasi na biso te, basalisaki biso tóyikela mokakatano yango mpiko!”—Baloma 1:11, 12; 1 Bakolinti 12:21-26.
15 Mokakatano oyo Michel na Diane bakutanaki na yango esalisaki bango bákóma na boninga makasi na bandeko na bango baklisto. Esalaki mpe ete bango mibale bálingana lisusu mingi. Michel alobi boye: “Likambo yango esalisi ngai nalinga mwasi na ngai mingi lisusu. Soki toyoki lokola kolɛmba nzoto, tosololaka makambo ya Biblia mpe tolobelaka ndenge oyo Yehova azali kosunga biso.” Diane abakisi boye: “Sikoyo, nakómi na ndenge mosusu ya kotalela elikya ya Bokonzi.”
16. Mpo na nini ezali na ntina tóyebisaka bandeko na biso bamposa na biso?
16 Ya solo, bandeko na biso baklisto bakoki kozala “lisungi oyo ezali kolendisa” biso na ntango ya mpasi mpe na ndenge yango, bakoki kosalisa biso tóbatela esengo na biso. (Bakolose 4:11, NW) Kasi, bandeko bakoki koyeba te makambo nini ezali na mitema na biso. Yango wana, ntango tozali na mposa ya lisungi, ezali malamu tóyebisa bango. Na bongo nde tokosepela na libɔndisi nyonso oyo bandeko bakoki kopesa biso, tokotalela yango ete euti na Yehova.—Masese 12:25; 17:17.
Talá na lisangá na bino
17. Mama moko oyo abɔkɔlaka bana na ye ye moko azali na mikakatano nini, mpe ndenge nini totalelaka bato oyo bazali lokola ye?
17 Soki ozali kotala malamumalamu bandeko na yo bandimi, okosepela na bango mingi mpe okozala na esengo ya kosangana na bango. Talá na kati ya lisangá na bino. Ozali komona nini? Ezali na moboti moko oyo azali kobunda mpo na kobɔkɔla bana na ye ye moko mpe azali koteya bango nzela ya solo? Osi okanisá ndakisa malamu oyo azali kopesa? Meká naino kokanisa mikakatano mosusu oyo akutanaka na yango. Jeanine abɔkɔlaka bana na ye ye moko; atángeli biso ndambo ya mikakatano yango: kozanga moto pembeni na yo, motungisi ya mibali oyo bazali kolula yo na esika ya mosala, kozanga mbongo mpo na kokokisa bamposa nyonso ya libota. Kasi, alobi ete mokakatano oyo eleki monene ezali kokokisa bamposa ya bana, mpamba te mwana na mwana azali na makambo na ye. Jeanine ayebisi mpe mokakatano mosusu: “Ekoki kozala mpasi mpo na kolonga makanisi ya kolinga kokómisa mwana na yo ya mobali mokonzi ya libota, lokola tata azali te. Nazali na mwana ya mwasi, mpe mbala mingi nabosanaka ete nasengeli kobakisela ye kilo na motó te, elingi koloba nasengeli te kokómisa ye moto oyo nayebisaka basɛkɛlɛ na ngai.” Lokola ebele ya basi mosusu oyo bazali kosalela Nzambe kasi bazali na mobali te, Jeanine akendaka mosala mpe lisusu asungaka libota na ye. Ayekolaka mpe Biblia na bana na ye, abimaka na bango na mosala ya kosakola mpe akendaka na bango na makita. (Baefese 6:4) Mokolo na mokolo Yehova ayokaka esengo na kotala ndenge oyo libota yango esalaka milende mpo na kotikala sembo! Ya solo, kozala na bandeko ya ndenge wana na kati na biso ezali mpenza esengo!
18, 19. Monisá ndenge oyo tokoki kokóma na bolingo mingi mpo na bandeko na lisangá.
18 Talá lisusu na kati ya lisangá na bino. Mbala mosusu okomona mpe basi bakufelá mibali to mibali oyo bakufelá basi, kasi ‘bazangaka te’ na makita. (Luka 2:37, NW) Bamiyokaka ntango mosusu ete bazali na moto te pembeni na bango? Ɛɛ. Bakanisaka balongani na bango mingi! Kasi bazali kaka komipesa na mosala ya Yehova mpe kosalisa bato mosusu. Elimo na bango ya malamu ebakisaka esengo ya bandeko na kati ya lisangá! Moklisto moko oyo asalaki mosala ya mobongisi-nzela koleka mbula 30 alobaki boye: “Komona mibange oyo balongi ebele ya mikakatano bazali kokoba kosalela Yehova na bosembo ezali moko ya makambo oyo epesaka ngai esengo mingi!” Ya solo, mibange baklisto oyo tozali na bango balendisaka bilenge.
19 Tokoloba boni mpo na bandeko oyo babandi kosangana na biso sika? Bango mpe balendisaka biso ntango tozali komona bango bazali koyambola kondima na bango na makita! Kanisá epai bauti banda babandaki koyekola Biblia mpo bákóma esika oyo bazali lelo oyo. Na ntembe te Yehova asepelaka na bango. Tomonisaka ete tosepelaka na bango? Topesaka bango longonya mpo na milende oyo bazali kosala?
20. Mpo na nini tokoki koloba ete ndeko mokomoko azali na ntina na kati ya lisangá?
20 Obalá? ozali monzemba? obɔkɔlaka bana yo moko? Ozali mwana etike? ozali mwasi oyo akufelá mobali to mobali oyo akufelá mwasi? Ozali na lisangá banda bambula ebele to obandi koyangana sika? Yebá ete bosembo na yo elendisaka biso nyonso. Ntango ozali koyemba nzembo ya Bokonzi elongo na bandeko mosusu, ntango opesi eyano to osali lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nyonso wana ebakisaka esengo na biso. Mpe likambo oyo eleki ntina ezali ete esepelisaka motema ya Yehova.
21. Tozali na bantina mingi ya kosala likambo nini, kasi mituna nini ezali kotunama?
21 Ya solo, ata na ntango ya mpasi oyo, tokoki kozala na esengo na losambo ya Nzambe na biso ya esengo. Tozali na bantina mingi ya kolanda elendiseli ya Paulo ete: “Bósepelaka ntango nyonso, . . . mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino.” (2 Bakolinti 13:11, NW) Kasi, ezali boni soki tozwi likama, monyoko to mokakatano ya mbongo? Tokoki nde kobatela esengo na biso ata na makambo ya ndenge wana? Yo moko luká ozwa biyano na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá mokanda Étude perspicace des Écritures, volimi 2, lokasa 45, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kopesa eyano?
• Esengo elimboli nini?
• Na ndenge nini kozala ntango nyonso na makanisi malamu ekoki kosalisa biso tóbatelaka esengo na biso?
• Nini ekoki kosalisa biso na kozala na makanisi malamu mpo na teritware ya lisangá na biso?
• Ndenge nini omonisaka ete osepelaka na bandeko na lisangá na bino?
[Bililingi na lokasa 10]
Bato na teritware na biso bakoki kobongwana
[Elilingi na lokasa 12]
Na lisangá na bino, bandeko bazali na mikakatano nini?