Mikakatano mpo na bokeseni na kati ya bato
“EKOKI KOZALA SOLO ETE BATO BAZALI NA LOTOMO YA KOZALA BANGO NYONSO NDENGE MOKO, KASI MOKONZI MOKO TE AWA NA MABELE AKOKI KOKOKISA LIKAMBO YANGO.”
Wana ezali maloba ya Honoré Balzac, mokomi moko ya ekólo France na ekeke ya 19. Yo mpe ondimi makanisi na ye? Bato mingi bamonaka ete ndenge bato bakeseni ezali malamu te. Kasi, ata na ekeke oyo ya 21, bokeseni ezali kaka komonana na kati ya bato na makambo ebele.
CALVIN COOLIDGE, oyo azalaki prezida ya États-Unis banda 1923 tii 1929, azalaki komitungisa mpenza ndenge bato bakeseni mpe alobelaki ndenge nini “kosukisa likambo ya komona ete bato mosusu bazali malamu koleka bamosusu.” Nzokande, mbula soki 40 nsima ya boyangeli ya Coolidge, ntango basalaki komisyo moko oyo bapesaki yango mokumba ya koyekola likambo etali boyokani kati na mindɛlɛ na bato moindo, komisyo yango emonisaki ete nsukansuka na États-Unis, bato bakokabwana na bituluku mibale oyo ekeseni mpenza: “bato moindo epai, mindɛlɛ epai.” Bato mosusu bazali koloba ete kokabwana ya mindɛlɛ na bato moindo ebandá kala mpe na ekólo yango “bato bazali se kokabwana, bato ya mbongo mpe babola, mindɛlɛ mpe bato moindo.”
Mpo na nini ezali mpasi ete bato nyonso bázala ndenge moko? Libosoliboso ezali mpo na bomoto na biso. Mokolo moko William Randolph Hearst, oyo azalaki depite na États-Unis, alobaki boye: “Ezali na likambo moko oyo mpo na yango bato nyonso bakelamá ndenge moko: balingaka kozala ndenge moko te.” Alingaki mpenza koloba nini? Mbala mosusu Henry Becque, mokomi moko ya ekólo France, nde alobaki yango polele koleka: “Eloko oyo epesaka mpasi mpo bato nyonso bázala ndenge moko ezali mpo tolingaka kaka kokokana na bato oyo baleki biso.” Na maloba mosusu, bato balingaka kokokana na baoyo baleki bango; kasi bato minene oyo bakoki kondima kotika makambo ya malamu oyo bazali na yango mpo na komikitisa mpe kozala ndenge moko na baoyo bango bamonaka ete bazali na nse, bazali mingi te.
Na ntango ya kala, ezalaki boye: bato mosusu bazalaki kobotama bato mpamba, mpe basusu lokola bato minene, to mpe bato ya libota ya mokonzi. Tii lelo oyo ezalaka bongo na bisika mosusu. Kasi, na mikili mingi lelo, eloko emonisaka ete moto boye azali moto monene, azali mozwi te mpe mobola te to azali moto mpamba, ezali nde soki azali na mbongo to te. Longola yango, ezali na makambo mosusu oyo emonisaka bokeseni na kati ya bato; ekoki kozala loposo ya nzoto, kelasi oyo moto atángá, mpe makambo ayebi na mikanda oyo atángaka. Mpe na bisika mosusu, bokeseni na kati ya basi na mibali ezali kobimisa mikakatano; basi bamonanaka lokola bato mpamba.
Mwa elikya ekoki kozala?
Mibeko mosusu oyo basali mpo na kobatela ntomo ya bato elongoli makambo mosusu oyo ezalaki kosala ete bato bázala ndenge moko te. Na États-Unis, batyaki mibeko oyo epekisi kokabola mindɛlɛ na bato moindo. Na Afrika ya Sudi, balongolaki Apartheid, elingi koloba kokabola mindɛlɛ na bato moindo. Atako na bisika mosusu bazali naino kokómisa bato mosusu baombo, mibeko ya bamboka mingi esilá kopekisa yango. Na bamboka mingi, Leta azwá bikateli oyo epesaki nzela ete bakóló-mabele bábatela mabele na bango, mpe asalaki mibeko oyo ezalaki kopekisa kokabola bato mpe yango ekitisaki mpenza mitema ya bato mosusu oyo bazali na nse.
Yango elingi nde koloba ete likambo ya kokabola bato esuki? Ezali mpenza bongo te. Atako makambo mwa mingi oyo ezalaki kokesenisa bato ezali lisusu mpenza te, ezali na bokabwani ya ndenge mosusu oyo ebandi komonana. Buku moko (Class Warfare in the Information Age) elobi boye: “Soki lelo oyo tokoki koloba te ete bato ya mbongo bakabwani mpenza na bato ya misala, ezali mpo ete na esika ezala bato ya mbongo epai mpe babola epai, bakabwani nde na makambo mikemike mpe bato na bato bazali na makambo oyo ezali kosepelisa bango te epai ya bamosusu.”
Bato bakokabwana libela na libela? Ndenge lisolo oyo elandi emonisi yango, tozali na elikya ete makambo ekobongwana.