“Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela”
“Moko na bayekoli na ye alobaki na ye ete: ‘Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela.’”—LUKA 11:1.
1. Mpo na nini moyekoli moko ya Yesu asɛngaki ye ateya bango ndenge ya kobondela?
MOKOLO moko, na mobu 32 ya ntango na biso (T.B.), moyekoli moko ya Yesu amonaki Ye azali kobondela. Moyekoli yango azalaki koyoka te makambo oyo Yesu azalaki koloba na Tata na ye, mpamba te ekoki kozala ete azalaki kobondela na nse ya motema. Kasi, ntango Yesu asilisaki kobondela, moyekoli yango alobaki na ye boye: “Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela.” (Luka 11:1) Mpo na nini moyekoli yango asɛngaki likambo wana? Bayuda bazalaki na momeseno ya kobondela, ezala na bantango mosusu to na ntango ya losambo. Mokanda ya Nzembo mpe mikanda mosusu ya Makomami ya Liebele ezali na ebele ya mabondeli. Yango emonisi ete moyekoli wana asɛngaki te likambo oyo ayebaki ata moke te to oyo asalá naino te. Na ntembe te amesanaki koyoka mabondeli ya likolólikoló oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kosala. Kasi, na ntembe te amonaki ete ndenge Yesu azalaki kobondela ekesanaki mpenza na ndenge Balabi bazalaki kobondela mpo bámonana basantu.—Matai 6:5-8.
2. (a) Nini emonisi ete Yesu alingaki te ete tózongelaka libondeli ya ndakisa ndenge kaka alobaki yango? (b) Mpo na nini tosengeli koyeba ndenge ya kobondela?
2 Sanza soki 18 liboso, na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki bayekoli na ye libondeli oyo bakoki kolanda lokola ndakisa na mabondeli na bango. (Matai 6:9-13) Ekoki kozala ete moyekoli yango azalaki te na ntango wana; yango wana, Yesu azongelaki makanisi ya ntina ya libondeli ya ndakisa. Tokomona ete azongelaki te liloba mokomoko oyo alobaki liboso; yango emonisi ete basengelaki te kokanga libondeli yango na motó mpe kozongelaka yango lokola tshaku. (Luka 11:1-4) Lokola moyekoli wana, esengeli biso mpe báteya biso ndenge ya kobondela mpo ete, na nzela ya mabondeli na biso, tópusana lisusu penepene ya Yehova. Na yango, tótalela libondeli ya ndakisa na mobimba na yango, ndenge ntoma Matai akomaki yango. Ezali na malɔmbɔ nsambo; misato etaleli mikano ya Nzambe mpe minei etaleli bamposa na biso ya mosuni mpe ya elimo. Na lisolo oyo tokolobela malɔmbɔ misato ya liboso.
Tata ya bolingo
3, 4. Kobenga Yehova “Tata na biso” ezali komonisa nini?
3 Na ebandeli mpenza, Yesu amonisaki ete mabondeli na biso esengeli komonisa ete tozali baninga ya Yehova, kasi tozali mpe na limemya mpo na ye. Yesu azalaki koloba libosoliboso na bayekoli na ye oyo bazalaki penepene na ye na ngomba wana; ayebisaki bango ete bábengaka Yehova “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobaki ete ezala ete Yesu alobaki na Liebele ya bato nyonso to na Aramɛyɛ, liloba oyo asalelaki mpo na “Tata” ekokani na oyo mwana asalelaka mpo na kobenga tata na ye, ezali ‘elobeli ya mwana.’ Kobenga Yehova “Tata na biso” emonisaka ete tozali na boyokani malamu ná ye.
4 Ntango tozali kobenga Yehova “Tata na biso,” tozali kondima ete tozali na libota monene ya bato oyo batalelaka Ye lokola Mopesi ya bomoi. (Yisaya 64:8; Misala 17:24, 28) Baklisto oyo babotami na elimo bakómi “bana ya Nzambe,” mpe bakoki ‘koganga ete: “Aba, Tata!”’ (Baloma 8:14, 15) Bamilio ya bato bakómi baninga na bango ya sembo. Bato yango bamipesi na Yehova mpe, mpo na komonisa yango, babatisami na mai. “Bampate mosusu” yango bakoki mpe kopusana penepene na Yehova na nkombo ya Yesu mpe kobenga Ye “Tata na biso.” (Yoane 10:16; 14:6) Tokoki mbala na mbala kobondelaka Tata na biso ya likoló mpo na kosanzola ye, kotɔnda ye mpo na malamu nyonso oyo azali kosalela biso, mpe mpo na kokitisela ye mikumba na biso mpo tozali na elikya ete atyelaka biso likebi.—Bafilipi 4:6, 7; 1 Petelo 5:6, 7.
Bolingo mpo na nkombo ya Yehova
5. Na libondeli ya ndakisa, lilɔmbɔ ya liboso elobi nini, mpe mpo na nini ebongi kozala bongo?
5 Lilɔmbɔ ya liboso elobeli likambo oyo eleki ntina. Elobi boye: “Tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Mposa na biso ya liboso esengeli kozala ete nkombo ya Yehova esantisama mpamba te tolingaka ye mpe toyinaka makambo nyonso oyo ebebisi nkombo na ye. Kotomboka oyo Satana atombokelaki Nzambe ná ndenge amemaki mwasi ná mobali ya liboso na koboya kotosa Yehova Nzambe ezalaki kofinga nkombo ya Nzambe mpamba te, na maloba mosusu, yango emonisaki ete Nzambe azalaki kosalela bokonzi na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba na ndenge ya malamu te. (Genese 3:1-6) Lisusu, banda na ntango wana, misala ya nsɔni mpe mateya ya baoyo bamibengaka basaleli ya Nzambe ebebisaka lokumu ya nkombo ya Yehova.
6. Eloko nini tokosala te soki tozali kobondela ete nkombo ya Yehova esantisama?
6 Ntango tobondelaka ete nkombo ya Yehova esantisama, yango emonisaka ete, na ntembe oyo etaleli bokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, toponi ngámbo ya baoyo bandimi ete Yehova azali na lotomo ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba. Yehova alingi ete baanzelu na likoló mpe bato awa na nse bándima ete azali na lotomo ya kozala mokonzi mpe básepela kotosa ye mpo balingaka ye mpe balingaka kobatela lokumu ya nkombo na ye. (1 Ntango 29:10-13; Nzembo 8:1; 148:13) Bolingo na biso mpo na nkombo ya Yehova ekosalisa biso tóboya kosala likambo nyonso oyo ekoki kofingisa nkombo na ye mosantu. (Ezekiele 36:20, 21; Baloma 2:21-24) Lokola kosantisama ya nkombo ya Yehova mpe kotosa bokonzi na ye nde ekomemela molɔ́ngɔ́ mobimba mpe bafandi na yango kimya, ntango tobondelaka ete “tiká nkombo na yo esantisama,” yango emonisaka ete tozali na elikya ete mokano ya Yehova ekokokisama mpo na nkembo na ye.—Ezekiele 38:23.
Bokonzi oyo tosɛngaka
7, 8. (a) Bokonzi oyo Yesu ateyaki biso tósɛngaka ezali nini? (b) Mokanda ya Danyele mpe mokanda ya Emoniseli emonisi biso nini mpo na Bokonzi yango?
7 Likambo ya mibale oyo tosɛngaka na libondeli ya ndakisa ezali ete: “Tiká bokonzi na yo eya.” (Matai 6:10) Lilɔmbɔ yango ezali mpenza na boyokani na oyo ya liboso. Yehova akosalela Bokonzi ya Masiya, elingi koloba guvɛrnema na ye ya likoló, oyo Mwana na ye Yesu Klisto azali Mokonzi na yango mpo na kosantisa nkombo na ye. (Nzembo 2:1-9) Esakweli ya Danyele elobeli Bokonzi ya Masiya lokola “libanga” moko oyo elongwe na “ngomba” moko. (Danyele 2:34, 35, 44, 45) Ngomba wana ezali nde bokonzi ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba; na bongo, Bokonzi oyo emonisami na libanga ezali ebongiseli ya sika oyo Yehova asali mpo na koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba. Na esakweli wana, libanga ‘ekómaki [ngomba] monene, mpe etondisaki mokili mobimba’; yango elakisi ete Bokonzi ya Masiya ekomonisa ete Nzambe nde azali mokonzi awa na mabelé.
8 Klisto akosala guvɛrnema na ye na bato mosusu 144 000, oyo “basombamaki na kati ya bato”; akoyangela na bango lokola bakonzi mpe banganga-nzambe. (Emoniseli 5:9, 10; 14:1-4; 20:6) Danyele abengi bango “bato ya bulɛɛ ya Oyo-Aleki-Likoló,” baoyo, elongo na Mokonzi na bango Klisto, bakozwa “bokonzi mpe nguya mpe lokumu na bokonzi ya nse ya lola mobimba . . . bokonzi na bango ekozala bokonzi ya lobiko na lobiko, mpe bokonzi nyonso bokosalela bango mpe bokotosa bango.” (Danyele 7:13, 14, 18, 27) Yango nde guvɛrnema ya likoló oyo Klisto ateyaki bayekoli na ye básɛngaka.
Mpo na nini tosengeli kokoba kobondela ete Bokonzi eya?
9. Mpo na nini ebongi tókoba kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya?
9 Na libondeli ya ndakisa, Klisto ateyaki biso tóbondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Bisakweli ya Biblia oyo ekokisami ezali komonisa ete Bokonzi ya Masiya ebandaki koyangela na likoló na 1914.a Na bongo, ezali kaka na ntina tóbondelaka ete Bokonzi “eya”? Ɛɛ. Mpamba te esakweli ya Danyele emonisi ete libanga, oyo ezali komonisa Bokonzi ya Masiya, ekotuta ekeko moko monene, oyo ezali komonisa baguvɛrnema ya mokili. Libanga yango etuti naino ekeko te mpo ekómisa yango mputulu. Esakweli ya Danyele elobi ete: “Bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
10. Mpo na nini tozali na mposa ete Bokonzi ya Nzambe eya?
10 Tozali mpenza kozela ete Bokonzi ya Nzambe eya koboma mokili mabe ya Satana mpamba te yango nde ekosantisa nkombo ya Yehova mpe ekolongola banguna nyonso ya bokonzi ya Nzambe. Tozali kobondela makasi ete: “Tiká bokonzi na yo eya,” mpe lokola ntoma Yoane, tozali koloba ete: “Amen! Yaká, Nkolo Yesu.” (Emoniseli 22:20) Tiká ete Yesu aya kosantisa nkombo ya Yehova mpe kolongisa Bokonzi na Ye, mpo maloba ya mokomi ya nzembo ekokisama ete: “Ɛɛ báyeba ete ezali bobele yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba.”—Nzembo 83:18.
“Tiká mokano na yo esalema”
11, 12. (a) Tosɛngaka nini ntango tobondelaka ete mokano ya Nzambe “esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé”? (b) Tolingaka lisusu koloba nini ntango tozali kobondela ete mokano ya Yehova esalema?
11 Na nsima, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Yehova akelaki molɔ́ngɔ́ na mokano na ye. Bikelamu ya nguya oyo bafandaka na likoló bagangaka ete: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpamba te yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” (Emoniseli 4:11) Yehova azali na mokano mpo na “biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.” (Baefese 1:8-10) Ntango tobondelaka Yehova ete mokano na ye esalema, tosɛngaka nde ete akokokisa mokano na ye. Lisusu, tomonisaka ete tozali na mposa ete mokano ya Nzambe esalema na molɔ́ngɔ́ mobimba.
12 Ntango tozali kobondela bongo tomonisaka mpe mposa na biso ya kosala mokano na ye na bomoi na biso. Yesu alobaki boye: “Bilei na ngai ezali nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Lokola tozali baklisto oyo tomipesi na Nzambe, tosepelaka kosala mokano na Ye ndenge Yesu azalaki kosepela na yango. Tosalelaka bomoi na biso “na bamposa ya bato lisusu te, kasi na mokano ya Nzambe” mpo tolingaka Yehova mpe Mwana na ye. (1 Petelo 4:1, 2; 2 Bakolinti 5:14, 15) Tosalaka makasi mpo na kokima makambo oyo eyokani te na mokano ya Yehova. (1 Batesaloniki 4:3-5) Ntango tozali kosomba ntango mpo na kotánga mpe koyekola Biblia, ‘tokobaka kososola mokano ya Yehova,’ oyo esɛngi mpe kosakola na molende “nsango malamu oyo ya bokonzi.”—Baefese 5:15-17; Matai 24:14.
Mokano ya Yehova na likoló
13. Ndenge nini mokano ya Nzambe ezalaki kosalema liboso kutu Satana atombokela Nzambe?
13 Mokano ya Yehova ebandá kokokisama na likoló liboso kutu mwana na ye moko ya elimo atombokela ye mpe akóma Satana. Mokanda ya Masese elobeli Mwana ya liboso ya Nzambe na motindo ya bwanya oyo emonisami lokola moto. Yango ezali komonisa ete na boumeli ya ntango oyo eyebani te, Mwana mobotami-se-moko ya Nzambe azalaki na “esengo ntango nyonso liboso na ye,” azalaki kosepela kosala mokano ya Tata na ye. Na nsima akómaki “mosali ya mayele” ya Yehova ntango azalaki kokela biloko nyonso “na likoló mpe awa na mabelé, biloko oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te.” (Masese 8:22-31, NW; Bakolose 1:15-17) Yesu azalaki Liloba to molobeli ya Yehova.—Yoane 1:1-3.
14. Nzembo 103 ezali koteya biso nini na ndenge oyo baanzelu basalaka mokano ya Yehova na likoló?
14 Mokomi ya nzembo amonisi ete bokonzi ya Yehova ezali likoló ya nyonso mpe ete ebele ya baanzelu batosaka malako mpe mibeko na ye. Tozali kotánga boye: “[Yehova] apimi kiti ya bokonzi na ye kuna na lola mpe bokonzi na ye ezali likoló ya bato nyonso. Bósanzola [Yehova] bino baanzelu na ye na likoló, bino boleki na nguya, bino bokotosaka ye, ekoyokaka bino mongongo na ye. Bósanzola [Yehova], bibolo na ye nyonso, basali na ye baoyo bakosalaka mokano na ye. Bósanzola [Yehova], bino misala na ye nyonso, na bipai nyonso ya bokonzi na ye.”—Nzembo 103:19-22.
15. Ndenge nini mokano ya Nzambe esalemaki na likoló ntango Yesu azwaki Bokonzi?
15 Mokanda ya Yobo emonisi ete nsima ya kotombokela Yehova, Satana azalaki naino kokɔta na likoló. (Yobo 1:6-12; 2:1-7) Kasi, mokanda ya Emoniseli esakolaki ntango oyo basengelaki kobengana Satana ná bademo na ye na likoló. Emonani ete ntango yango ekokaki mwa moke nsima wana Yesu Klisto azwaki Bokonzi na 1914. Kobanda wana, batomboki wana bakoki lisusu kokɔta na likoló te. Babwakaki bango na mabelé. (Emoniseli 12:7-12) Kuna na likoló, moto moko te akoki lisusu kotɛmɛla bokonzi ya Yehova, mingongo nyonso esangani mpo na kokumisa “Mwana mpate,” Klisto Yesu, mpe kosanzola Yehova na komikitisa. (Emoniseli 4:9-11) Mokano ya Yehova ezali mpenza kokokisama na likoló.
Mokano ya Yehova mpo na mabelé
16. Ndenge nini libondeli ya ndakisa ezali kokweisa liteya ya mangomba ya boklisto mpo na oyo etali elikya ya bato?
16 Ntango bato ya mangomba ya boklisto bateyaka ete bato nyonso ya malamu bakokende na likoló, babosanaka mpenza mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Kasi, Yesu ateyaki biso tóbondelaka ete: “Tiká Bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Moto akoki mpenza koloba ete lelo oyo mokano ya Yehova ezali kokokisama awa na mabelé oyo etondi na mobulu, na kozanga bosembo, na maladi, mpe na liwa? Te! Yango wana, esengeli mpenza tóbondelaka ete mokano ya Nzambe esalema na mabelé, mpo na kokokisa elaka oyo ntoma Petelo akomaki ete: “Ezali na likoló ya sika [Bokonzi ya Masiya oyo Klisto akotambwisa] mpe na mabelé moko ya sika [bato ya sembo] oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.”—2 Petelo 3:13.
17. Mokano ya Yehova mpo na mabelé ezali nini?
17 Yehova akelaki mabelé na mokano moko. Atindaki mosakoli Yisaya akoma boye: “Zambi [Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko ya mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana; ye ete, Ngai nazali [Yehova], mosusu azali te.” (Yisaya 45:18) Nzambe atyaki mwasi ná mobali ya liboso na elanga moko kitoko mpe alobaki na bango boye: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino.” (Genese 1:27, 28; 2:15) Emonani polele ete mokano ya Mozalisi ezali ete bato ya kokoka, ya sembo, mpe oyo bazali kotosa bokonzi ya Yehova na esengo, báfanda libela na Paladiso oyo Klisto alakaki.—Nzembo 37:11, 29; Luka 23:43.
18, 19. (a) Nini esengeli kosalema liboso mokano mobimba ya Nzambe ekokisama na mabelé? (b) Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo nini mosusu oyo Yesu ateyaki na libondeli ya ndakisa?
18 Mokano ya Yehova mpo na mabelé ekoki kokokisama mobimba te soki bato oyo bazali kotosa bokonzi na ye te bazali naino awa na mabelé. Nzambe akotinda Klisto ná bikelamu ya elimo ya nguya mpo na “kobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.” Ebongiseli mobimba ya makambo mabe ya Satana, elingi koloba mangomba ya lokuta, bato ya politiki oyo batondi na lokuta, bato ya mombongo oyo batondi na lokoso mpe kozanga bosembo, basoda oyo bazali koboma ebele ya bato ná bibundeli na bango, bakolongolama mpo na libela. (Emoniseli 11:18; 18:21; 19:1, 2, 11-18) Bokonzi ya Yehova ekolongisama mpe nkombo na ye ekosantisama. Tosɛngaka makambo nyonso wana ntango tobondelaka ete: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama. Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”—Matai 6:9, 10.
19 Kasi, na libondeli ya ndakisa, Yesu amonisaki ete tokoki mpe kobondela mpo na bamposa na biso. Tokolobela makambo oyo ateyaki na ntina na yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele!, mokapo 6, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Bozongeli
• Mpo na nini ebongi tóbengaka Yehova “Tata na biso”?
• Mpo na nini ezali na ntina mingi tóbondelaka ete nkombo ya Yehova esantisama?
• Mpo na nini tobondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya?
• Tosɛngaka nini ntango tobondelaka ete mokano ya Nzambe esalema na mabelé lokola na likoló?
[Elilingi na lokasa 9]
Mabondeli ya Yesu ekesanaki mpenza na mabondeli oyo Bafalisai bazalaki kosala mpo bámonana basantu
[Elilingi na lokasa 10]
Baklisto babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya, nkombo na ye esantisama, mpe mokano na ye esalema