“Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo”
NTANGO bandɛkɛ elamukaka na ntɔngɔ, mbala mingi eyembaka mwa moke mpe na nsima ekendaka koluka biloko ya kolya. Na mpokwa, ezongaka na bazumbu na yango, eyembaka lisusu mwa moke, mpe na nsima elalaka. Na bileko mosusu bandɛkɛ mibali ematelaka oyo ya basi, bandɛkɛ ya basi ebwakaka maki, mpe ebɔkɔlaka bana. Banyama mosusu mpe esalaka kaka bongo.
Biso bato tokeseni na banyama. Toboyi te, biso mpe tolyaka, tolalaka, tobotanaka lokola banyama, nzokande mingi kati na biso basepelaka kaka te na biloko wana. Tolingaka koyeba mpo na nini tozali awa na mabelé. Tolukaka koyeba ntina ya bomoi na biso. Tolingaka koyeba avenire na biso. Makambo wana ya ntina nde ezali komonisa ete moto azalaka na mposa ya makambo ya elimo, ezaleli oyo ekesenisi bato ná banyama.
Moto akelamaki na elilingi ya Nzambe
Biblia elimboli ntina oyo moto azalaka na mposa ya makambo ya elimo na maloba oyo: “Nzambe azalisaki moto na elilingi na ye mpenza, na elilingi ya Nzambe azalisaki ye; azalisaki bango mobali mpe mwasi.” (Genese 1:27) Kosalema “na elilingi ya Nzambe” elimboli ete, atako lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka ebebisá biso, tozali na likoki komonisa bizaleli mosusu ya Nzambe. (Baloma 5:12) Na ndakisa, tokoki kobimisa makambo ya sika. Tozali mpe na bwanya, ezaleli ya bosembo, mpe likoki ya kolingana. Lisusu, tokoki komikundola makambo oyo eleká mpe kobongisa makambo oyo tokosala na mikolo ezali koya.—Masese 4:7; Mosakoli 3:1, 11; Mika 6:8; Yoane 13:34; 1 Yoane 4:8.
Makoki na biso ya elimo emonanaka polele na mposa oyo tobotamaka na yango ya kosambela Nzambe. Soki tokokisi mposa na biso ya kozala na boyokani malamu na Mozalisi na biso te, tokozala mpe na bolamu ya solosolo mpe ya libela te. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.” (Matai 5:3) Nzokande, tosengeli kokokisa mposa yango na nzela ya solo, elingi koloba koyeba Nzambe, mitinda na ye mpe mokano na ye mpo na bato. Epai wapi tokoki kozwa solo yango? Na Biblia.
“Liloba na yo ezali solo”
Ntoma Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.” (2 Timote 3:16) Maloba wana ya Paulo ekokani na oyo Yesu alobaki na libondeli moko: “Liloba na yo ezali solo.” Lelo oyo, tobengaka Liloba yango Biblia Mosantu, mpe ekozala malamu tótalaka soki bindimeli mpe bizaleli na biso ezali na boyokani na mateya ya Biblia.—Yoane 17:17.
Soki tozali koluka koyokanisa bindimeli na biso na Liloba ya Nzambe, tokomekola bato ya Beloya ya kala, oyo bazalaki koluka koyeba soki mateya ya Paulo ezalaki koyokana na Makomami. Na esika atyola bango, Luka akumisaki bango mpo na ezaleli wana. Akomaki boye: “Bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.” (Misala 17:11) Lokola bongolabongola etondi lelo oyo na mateya ya mangomba, ezali na ntina tómekola ndakisa malamu ya bato ya Beloya.
Lolenge mosusu ya koyeba mateya ya solo ezali ya kotala ndenge mateya yango ezali kosala na bomoi ya bato. (Matai 7:17) Na ndakisa, kotosa solo ya Biblia esengeli kokómisa moto mobali malamu, tata malamu, mwasi to mama malamu, mpe yango ekoki kobakisa esengo na libota mpe kokolisa kimya na ye. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kobatela yango.”—Luka 11:28.
Maloba ya Yesu wana ezali kokundwela biso oyo Tata na ye ya likoló alobaki na Bayisalaele ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soki oyokaki malako na ngai! mbele kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge na mai-ya-monana.” (Yisaya 48:17, 18) Bato oyo balingaka malamu mpe boyengebene basengeli mpenza kosepela na maloba wana!
Bato mosusu basepelaka básala bango “nyɔminyɔmi na matoi”
Nzambe alobaki na Bayisalaele maloba wana mpo mateya ya lokuta ya mangomba ezalaki kopengwisa bango. (Nzembo 106:35-40) Biso mpe tosengeli komibatela na mateya ya lokuta. Paulo akomaki na ntina na bato oyo bamibengaka baklisto boye: “Ekozala na eleko moko boye oyo bakokoka te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na boyokani na bamposa na bango moko, bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi; mpe bakolongola matoi na bango uta na solo.”—2 Timote 4:3, 4.
Bakonzi ya mangomba basalaka bato nyɔminyɔmi na matoi na ndenge bakangaka miso na misala oyo ekokisaka bamposa mabe ya bato, na ndakisa kosangisa nzoto na moto oyo bobalani na ye te, kosangisa nzoto mibali na mibali, mpe kolangwa. Biblia emonisi polele ete baoyo bazali kondima makambo yango mpe baoyo bazali kosala yango “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”—1 Bakolinti 6:9, 10; Baloma 1:24-32.
Na ntembe te, kotosa mitinda ya Biblia esɛngaka mpiko, mingimingi soki bato bazali kosɛka biso. Kasi, tokoki kolonga. Bato mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova lelo bazalaki bamɛli-bangi, balangwi-masanga, basali ya pite, babundi ya balabala, miyibi, mpe bakosi. Likambo ya kokamwa, bato yango bandimaki Liloba ya Nzambe na mitema na bango mpe na lisalisi ya Elimo santu basalaki mbongwana na bomoi na bango mpo na “kotambola na ndenge ebongi na Yehova.” (Bakolose 1:9, 10; 1 Bakolinti 6:11) Lokola bákómi na boyokani na Nzambe, bazwi mpe kimya ya solosolo, mpe ndenge tokomona yango, bazwi elikya moko kitoko mpo na mikolo ezali koya.
Elikya ya Bokonzi
Elikya ya kimya ya libela oyo Biblia epesi mpo na bato ya botosi ekokokisama na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Yesu alobaki na libondeli ya ndakisa boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.” (Matai 6:10) Ya solo, kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabelé. Mpo na nini? Mpamba te na nzela ya Bokonzi wana ya likoló to guvernɛma oyo Yesu akoyangela, nde Nzambe akosalela lotomo na ye ya koyangela mabelé mobimba.—Nzembo 2:7-12; Danyele 7:13, 14.
Lokola mokonzi ya Bokonzi ya likoló, Yesu Klisto akosikola bato ya botosi na boombo ya ndenge nyonso, ezala lisumu ya Adama mpe maladi ná liwa oyo yango ememá. Emoniseli 21:3, 4 elobi ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali elongo na bato . . . Mpe [Yehova Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”
Kimya ya libela ekotonda na mabelé mobimba. Mpo na nini tokoki kondima likambo yango? Ntina yango emonisami na Yisaya 11:9, oyo elobi boye: “[Bato oyo bakoyangelama na bokonzi yango] bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-ya-monana.” Ya solo, moto nyonso na mabelé akokóma na boyebi ya sikisiki ya Nzambe mpe akotosa ye. Elikya wana kitoko ezali kosepelisa yo? Soki ezali bongo, oyo nde ntango ya koluka “boyebi ya Yehova.”
Okosepela koyoka nsango ya Bokonzi?
Na nzela ya Bokonzi yango, Nzambe akolongola misala nyonso ya Satana mpe akoteya bato banzela na ye ya boyengebene. Yango wana, tokoki kokamwa te ete Yesu azalaki kolobela mingi Bokonzi yango na mateya na ye. Alobaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe . . . mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Klisto apesaki bayekoli na ye etinda básakola kaka nsango yango epai ya bato mosusu. (Matai 28:19, 20) Asakolaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Nsuka yango ezali mpenza kobɛlɛma. Na yango, ezali mpenza na ntina bato ya mitema sembo báyoka nsango malamu oyo ezali kobikisa bomoi!
Albert, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, ayokaki nsango ya bokonzi ntango mwasi na ye ná mwana na ye ya mobali babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Na ebandeli, Albert azalaki kotya ntembe makasi. Asɛngaki kutu na mokonzi moko ya lingomba aya kotala mwasi na ye ná mwana na ye mpo amonisa bango lokuta ya Batatoli. Kasi, mokonzi yango ya lingomba aboyaki komikɔtisa na likambo yango. Na nsima, Albert azwaki ekateli ya kolanda lisolo na bango mpo na kokanga mabunga na mateya ya Batatoli. Nsima ya kolanda kaka boyekoli moko, akómaki mpe koyekola na bango mpe azalaki na mposa makasi ya koyeba makambo mingi. Na nsima, alimbolaki mpo na nini abongolaki makanisi na ye. Alobaki ete: “Oyo nde eloko nazalaki koluka banda kala.”
Nsukansuka, Albert abandaki kokokisa mposa na ye ya elimo, mpe ayokaka mawa te mpo na yango. Solo ya Biblia epesaki ye eloko oyo azalaki koluka bomoi na ye mobimba, elingi koloba ayebi ntina oyo kozanga bosembo mpe mabe ya ndenge nyonso etondi na mokili mpe akómi na elikya mpo na mikolo ezali koya. Solo ya Biblia epesaki ye kimya ya solosolo. Mposa na yo ya elimo ezali mpenza kokokisama? Tosɛngi yo ozwá mwa ntango ya kotánga mituna oyo ezali na etanda na lokasa 6. Soki ozali na mposa ya koyeba makambo mosusu, Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
MPOSA NA YO YA ELIMO EZALI MPENZA KOKOKISAMA?
Bilei ya elimo oyo ozwaka ekokisaka mpenza mposa na yo? Tosɛngi yo otánga mituna oyo elandi mpe otyá elembo na oyo okoki koyanola malamu.
□ Nzambe azali nani, mpe nkombo na ye nani?
□ Yesu Klisto azali nani? Mpo na nini asengelaki kokufa? Ndenge nini liwa na ye ekoki kopesa yo litomba?
□ Zabolo azali? Soki azali, autá wapi?
□ Nini ekómelaka biso soki tokufi?
□ Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na mabelé mpe mpo na bato?
□ Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
□ Wapi mitinda ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu?
□ Na kati ya libota, mikumba nini Nzambe apesi mobali mpe mwasi? Wapi mitinda mosusu ya Biblia oyo ekoki kokolisa kimya na libota?
Soki oyebi mpenza te koyanola na mituna mosusu, okoki kosɛnga mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Mwa buku yango oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova na minɔkɔ pene na 300, ezali na mateya 16 ya moboko ya Biblia mpe epesi biyano ya Biblia na mituna nyonso oyo etunami awa na likoló.
[Bililingi na lokasa 4]
Bato bakeseni na banyama mpo bazali na mposa ya makambo ya elimo
[Elilingi na lokasa 5]
“Bakomindukela bateyi mpo básalaka bango nyɔminyɔmi na matoi.”—2 Timote 4:3
[Elilingi na lokasa 7]
Kimya ya libela ekoya na nzela ya Bokonzi ya Nzambe oyo Masiya akotambwisa