Bomɛngo ya solosolo na mokili ya sika ya Nzambe
DAVID,a moklisto moko oyo azali tata ya libota, akendaki na États-Unis, na elikya ete akobongisa bomoi na ye mpe ya libota na ye. Atako azalaki na mposa ya kotika mwasi na ye ná bana te, amonaki mpenza ete bomoi na ye mpe oyo ya bango ekobonga kaka soki akómi na mbongo mingi. Yango wana, andimaki kokende na New York epai bandeko na ye babengaki ye, mpe aumelaki te kozwa mosala kuna.
Kasi, nsima ya basanza, elikya nyonso oyo David azalaki na yango ebandaki kobunga. Azalaki lisusu na ntango mpenza te mpo na makambo ya elimo. Na ntango moko boye, kondima na ye epai ya Nzambe elɛmbaki mpenza. Ayaki kolamuka kaka ntango akweaki na lisumu ya ekobo. Komipesa mingi na bozwi ya mokili esalaki ete akóma kobosana mokemoke makambo oyo eleki ntina na bomoi na ye. Asengelaki kosala mbongwana na bomoi na ye.
Mbula na mbula, bato ebele ya mikili ya bobola bazali kotika bamboka na bango lokola David mpe bazali kokende na mikili mosusu, na elikya ete bakozwa bomɛngo kuna. Kasi, mbala mingi esukelaka bango mabe na elimo. Bato mingi bamitunaka boye: ‘Moklisto oyo amipesi na bomɛngo ya mokili oyo akoki mpe kozala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe?’ Bakomi mpe bateyi ya mangomba balobaka ete ekoki kosalema. Nzokande, ndenge David ná bato mosusu bamoni yango, ekoki kozala mpasi mpo moto oyo amipesi na bomɛngo ya mokili azala moto ya bomɛngo epai ya Nzambe.—Luka 18:24.
Mosolo ezali mabe te
Mosolo, moto nde asalá yango. Lokola biloko mingi mosusu oyo moto asalá, mosolo ezali mpenza mabe te. Kutu, ezali nde eloko oyo epesaka moto likoki ya kozwa biloko oyo azangi. Na yango, soki esalelami na ndenge ebongi, ekoki mpenza kosalisa. Na ndakisa, Biblia elobi ete “mosolo ebatelaka,” mingimingi na mikakatano ya bobola. (Mosakoli 7:12, NW) Bato mosusu kutu bamonaka ete “mbongo ekoki kosilisa makambo nyonso.”—Mosakoli 10:19, New International Version.
Biblia epekisi gɔigɔi mpe ezali kolendisa biso tózala makasi na mosala. Tosengeli koluka mpo na koleisa mabota na biso, mpe soki mwa eloko etikali, tozali “na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.” (Baefese 4:28; 1 Timote 5:8) Lisusu, Biblia ezali te kosɛnga biso tomipimelaka makambo nyonso oyo ezali kosepelisa biso, kasi ezali nde kolendisa biso tósepela na biloko na biso. Biblia elobi na biso ‘tósimba ndambo na biso’ mpe tósepela na biloko oyo tozwi na mosala na biso. (Mosakoli 5:18-20) Biblia elobeli ebele ya mibali mpe basi ya sembo oyo bazalaki na bozwi mingi.
Mibali ya sembo oyo bazalaki na bozwi mingi
Abalayama, mosaleli ya sembo ya Nzambe, akómaki na ebele ya bibwɛlɛ, ya palata mpe ya wolo, mpe na bankama ya basali. (Genese 12:5; 13:2, 6, 7) Yobo moto ya sembo mpe azalaki na bozwi mingi: bibwɛlɛ, basali, wolo mpe palata. (Yobo 1:3; 42:11, 12) Bozwi ya mibali wana ezalaki mpenza mingi, ata soki totaleli yango na ndenge ya lelo, kasi bazalaki mpe bato ya bomɛngo epai ya Nzambe.
Ntoma Paulo abengaki Abalayama “tata ya baoyo nyonso bazali na kondima.” Abalayama azalaki mabɔkɔ makasi te, amipesaki mpe mobimba te na bozwi na ye. (Baloma 4:11; Genese 13:9; 18:1-8) Ndenge moko mpe, Nzambe ye moko alobaki ete Yobo azali “moto malamu [mingi] mpe ya sembo.” (Yobo 1:8) Azalaki ntango nyonso kosalisa babola mpe bato ya mawa. (Yobo 29:12-16) Abalayama mpe Yobo batyaki motema na bango epai ya Nzambe, kasi na bozwi na bango te.—Genese 14:22-24; Yobo 1:21, 22; Baloma 4:9-12.
Ndakisa mosusu ezali ya Mokonzi Salomo. Lokola Salomo asangolaki kiti ya bokonzi ya Nzambe na Yelusaleme, Nzambe apesaki ye kaka bwanya te, kasi mpe bozwi mingi mpe lokumu. (1 Mikonzi 3:4-14) Pene na bomoi na ye mobimba, azalaki sembo. Kasi, na nsuka ya bomoi na ye, “motema ya [Salomo] ezalaki malamu nyonso liboso ya [ Yehova] . . . te.” (1 Mikonzi 11:1-8) Likambo ya mawa wana oyo ekómelaki ye ezali komonisa mitambo mosusu ya bomɛngo. Tólobela mwa ndambo ya mitambo yango.
Mitambo ya bomɛngo
Motambo ya mabe koleka ezali ya kokóma na bolingo ya mbongo mpe ya biloko oyo mbongo ekoki kosomba. Bozwi epesaka bato mosusu mposa oyo esilaka te. Na ebandeli ya boyangeli na ye, Salomo amonaki ezaleli yango epai ya bato mosusu. Akomaki boye: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te. Oyo ezali mpe mpamba.” (Mosakoli 5:10) Na nsima, Yesu ná Paulo bakebisaki mpe baklisto na bolingo yango.—Malako 4:18, 19; 2 Timote 3:2.
Soki tokómi kolinga mbongo mingi na esika tótalela yango kaka lokola eloko oyo ekoki kosalisa biso na kozwa biloko oyo tosengeli na yango, tokoki kokwea na mitambo ya ndenge nyonso, na ndakisa lokuta, moyibi mpe mayele mabe. Yuda Mokeliota, moko ya bantoma ya Yesu, atɛkaki nkolo na ye kaka mpo na palata 30. (Malako 14:11; Yoane 12:6) Baoyo balingaka mbongo mingi, bakómaka kutu kotya yango na esika ya Nzambe. (1 Timote 6:10) Yango wana, baklisto basengeli ntango nyonso koluka koyeba nini mpenza ezali kotinda bango bákóma na mbongo mingi.—Baebele 13:5.
Komipesa na bozwi ezali na mitambo mosusu oyo ekoki komonana polele te. Ya liboso, soki moto akómi na bozwi mingi, akómaka komimona ete akoki na nyonso. Yesu atángaki yango mpe ntango alobelaki “nguya ya bokosi ya bomɛngo.” (Matai 13:22) Yakobo, mokomi moko ya Biblia, akebisaki baklisto ete bábosana Nzambe te, ata ntango bazali koluka kosala mimbongo. (Yakobo 4:13-16) Lokola mbongo epesaka moto mwa bonsomi, baoyo bazali na yango bazali ntango nyonso na likama ya kobanda kotya motema na mbongo na bango na esika bátya motema epai ya Nzambe.—Masese 30:7-9; Misala 8:18-24.
Ya mibale, ndenge David oyo tolobelaki liboso amonaki yango, komipesa na koluka bomɛngo elyaka moto ebele ya ntango mpe ya makasi na ye, mpe mokemoke, etindaka ye abosana makambo ya elimo. (Luka 12:13-21) Bato oyo bazali na bozwi mingi bamekamaka mpe ntango nyonso na kosalela bozwi na bango libosoliboso mpo na koluka bisengo ya mokili to kokokisa bamposa na bango mosusu ya mosuni.
Ekoki mpe kozala ete Salomo alɛmbaki na elimo mpo atikaki bomɛngo ekanga ye miso? (Luka 21:34) Ayebaki malamu ete Nzambe apekisaki kobala basi ya bikólo mosusu. Kasi, na nsima abalaki basi soki nkóto moko. (Deteronome 7:3) Lokola alingaki kosepelisa basi na ye ya bikólo mosusu, akómaki kosangisa losambo ya Yehova ná losambo ya bikeko. Ndenge tolobaki yango liboso, motema ya Salomo ekómaki mokemoke kotika Yehova.
Na ntembe te, bandakisa wana emonisi mpenza bosolo ya maloba ya Yesu oyo: “Bokoki te kosala lokola baombo mpo na Nzambe mpe mpo na Bomɛngo.” (Matai 6:24) Na yango, ndenge nini moklisto akoki kolonga mikakatano ya mbongo oyo bato mingi bazali kobunda na yango lelo oyo? Mpe likambo eleki ntina, elikya nini tozali na yango mpo na bomoi ya malamu na mikolo ekoya?
Bomɛngo ya solosolo ezali koya
Na bokeseni na Abalayama, Yobo mpe ekólo Yisalaele, bayekoli ya Yesu bazali na mokumba ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19, 20) Mpo na kokokisa mokumba yango, esengeli bápesa ntango mpe makasi na bango, oyo bakokaki kosalela mpo na makambo mosusu. Mpo na kolonga, sɛkɛlɛ ezali kaka kosala oyo Yesu asɛngaki biso: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe], mpe biloko nyonso wana mosusu ekobakisamela bino.”—Matai 6:33.
Ntango amonaki ete akómi pene na kobungisa libota na ye mpe boyokani na ye na Yehova, David atikaki mabe na ye mpe abongisaki bomoi na ye. Ndenge kaka Yesu alakaki, ntango David abandaki lisusu kotya boyekoli ya Biblia, mabondeli mpe mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye, makambo na ye nyonso ekómaki kotambola malamu. Boyokani na ye ná mwasi mpe bana na ye ebandaki kozonga malɛmbɛmalɛmbɛ. Akómaki lisusu na bomoi ya esengo. Tii lelo asalaka kaka mingi. Akómá na bozwi mingi te. Kasi, likambo ya mawa oyo ekómelaki ye epesá ye mateya ya ntina mingi.
David amonaki ete asalelaki mpenza bwanya te ntango azwaki ekateli ya kokende na États-Unis, mpe akani ete akotika lisusu mbongo ekonza ye ata mokolo moko te. Ayebi sikoyo ete mbongo ekoki te kopesa moto makambo oyo eleki ntina na bomoi lokola libota ya bolingo, baninga ya malamu mpe boninga na Nzambe. (Masese 17:17; 24:27; Yisaya 55:1, 2) Na yango, kokangama na bizaleli ya malamu ezali na motuya koleka bomɛngo ya mokili. (Masese 19:1; 22:1) David ná libota na ye bazwi ekateli ya kotya makambo eleki ntina na esika ya liboso na bomoi na bango.—Bafilipi 1:10.
Bato bameki mbala na mbala kosala mokili moko ya bomɛngo mpe ya bizaleli malamu, kasi balongi te. Kasi, Nzambe alaki ete Bokonzi na ye ekotondisa biso na bomɛngo ya mokili mpe ya elimo oyo tozalaka na mposa na yango mpo na kozala malamu. (Nzembo 72:16; Yisaya 65:21-23) Yesu ateyaki ete mpo na kozala na bomɛngo ya solosolo, tosengeli naino koyeba bobola na biso ya elimo. (Matai 5:3) Na yango, ezala tozali na bozwi mingi to tozali babola, kotya makambo ya elimo na esika ya liboso lelo oyo ezali lolenge eleki malamu ya komibongisa mpo na mokili ya sika oyo ekómi mpenza pene. (1 Timote 6:17-19) Mokili yango ekozala mokili moko ya bomɛngo mpenza, ezala na mosuni mpe na elimo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi ye nkombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 5]
Yobo azalaki kotya motema epai ya Nzambe, kasi na bozwi te
[Bililingi na lokasa 7]
Mbongo ekoki te kopesa biso makambo oyo eleki ntina na bomoi