Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mokanda ya Nehemia
MBULA zomi na mibale esili koleka banda makambo oyo balobeli na nsuka ya Mokanda ya Ezela esalemaki. Ntango ekómi sikoyo pene mpo “na kobima ya liloba ya kotɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme,” oyo ezali ebandeli ya bapɔsɔ 70 ya bambula oyo ekomema na Masiya. (Danyele 9:24-27) Mokanda ya Nehemia ezali kolobela ndenge Bayisalaele bamipesaki mpo na kotonga lisusu lopango ya Yelusaleme. Elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula koleka 12, banda na 456 liboso na ntango na biso (L.T.B.) tii mwa moke nsima ya 443 L.T.B.
Mokanda yango oyo ekomamaki na Guvɛrnɛrɛ Nehemia, ezali lisolo moko kitoko oyo ezali komonisa ndenge losambo ya solo etombwamaka soki basaleli ya Nzambe bamonisi molende mpe batyeli Yehova Nzambe motema mobimba. Ezali komonisa polele ndenge Yehova atambwisaka makambo mpo mokano na ye ekokisama. Ezali mpe lisolo ya mokonzi moko ya makasi mpe ya mpiko. Mokanda ya Nehemia ezali na mateya ya ntina mingi mpo na basambeli ya solo lelo oyo, “mpo liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.”—Baebele 4:12.
“LOPANGO ESILAKI”
Nehemia azali kosala na Susana, na ndako ya mokonzi Alatazelezese Lobɔkɔ-Molai, epai azali na etɛlɛmɛlo ya lokumu. Ntango kaka ayoki ete bato na ye “bazali na bolɔzi monene mpe na nsɔni; lopango ya Yelusaleme mpe ebwakami na nse mpe bikuke na yango ezikisami na mɔtɔ,” Nehemia atungisami makasi mpenza. Abondeli Nzambe makasi mpo atambwisa ye. (Nehemia 1:3, 4) Nsukansuka, mokonzi amoni ete Nehemia azali na mawa mpe apesi ye nzela ya kokende na Yelusaleme.
Nsima ya kokóma na Yelusaleme, Nehemia abandi kotalatala lopango na butu mpe ayebisi Bayuda mokano na ye ya kotonga yango lisusu. Babandi kotonga. Babandi mpe kotɛmɛla mosala yango. Nzokande, na litambwisi ya mpiko ya Nehemia, ‘lopango esili.’—Nehemia 6:15.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:1; 2:1—‘Mbula ya ntuku mibale’ oyo balobeli na bavɛrsɛ mibale oyo, ezali ndenge moko? Ɛɛ, mbula ya 20 oyo balobeli awa ezali nde ya boyangeli ya mokonzi Alatazelezese. Nzokande, lolenge ya kotánga oyo basaleli na bavɛrsɛ yango ekeseni. Masolo ya kala emonisi ete Alatazelezese abandaki koyangela na mobu 475 L.T.B. Lokola bakomeli ya Babilone bazalaki na momeseno ya kotánga bambula ya boyangeli ya bakonzi ya Perse banda na Nisana (Marsi/Aprili) tii na Nisana, mbula ya liboso ya boyangeli ya mokonzi Alatazelezese ebandaki na Nisana ya mobu 474 L.T.B. Yango wana, mbula ya 20 ya boyangeli oyo balobeli na Nehemia 2:1 ebandaki na Nisana ya mobu 455 L.T.B. Emonani mpenza ete Sanza ya Kislev (Novɛmbɛ/Desɛmbɛ) oyo balobeli na Nehemia 1:1 ezalaki Kislev ya mbula oyo elekaki, elingi koloba mobu 456 L.T.B. Nehemia mpe amonisi ete sanza yango ekweaki na mbula ya ntuku mibale ya boyangeli ya Alatazelezese. Soki ezali bongo, abandaki kotánga bambula yango ntango mokonzi abandaki koyangela. Ekoki mpe kozala ete Nehemia azalaki kotánga mikolo na kolanda oyo Bayuda bazali kobenga lelo oyo mbula ya mikolo 365, oyo ebandi na sanza ya Tisri, oyo ekweaka na Sɛtɛmbɛ/Ɔkɔtɔbɛ. Ezala lolenge oyo to mosusu ya kotánga, mbula oyo liloba ebimaki mpo na kotonga lisusu Yelusaleme ezali 455 L.T.B.
4:17, 18, NW—Ndenge nini moto akokaki kotonga na lobɔkɔ moko? Mpo na bato oyo bazalaki komema mikumba, yango ezalaki mpasi te. Soki batye bango mokumba na motó to na mapeka, bakokaki kosimba mokumba yango na lobɔkɔ moko ‘mpe kosimba ebundeli na lobɔkɔ mosusu.’ Batongi oyo basengelaki kosalela mabɔkɔ nyonso mibale ‘bazalaki kolata mopanga na loketo ntango bazali kotonga.’ Bakokaki mbala moko kobunda soki monguna abimeli bango.
5:7—Na ndenge nini Nehemia ‘[apamelaki, NW] bato ya lokumu mpe mikóló’? Bato yango bazalaki kosɛnga matabisi likoló ya mosolo oyo badefisaki bandeko na bango Bayuda; momeseno yango ezalaki kobuka Mobeko ya Moize. (Levitike 25:36; Deteronome 23:19) Lisusu, matabisi oyo badefisi bazalaki kosɛnga elekaki mingi. Soki basɛngi matabisi yango sanza na sanza, “ndambo ya mokama” ya mbongo yango ekokokana na (12%) na mbula. (Nehemia 5:11) Ezalaki mpenza mabe kosala bongo epai ya bato oyo bazalaki konyokwama na bampako mpe bazangaki biloko ya kolya. Nehemia apamelaki bato wana ya bomɛngo na ndenge asalelaki Mobeko ya Nzambe mpo na komonisa mabe na bango polele.
6:5—Lokola bazalaki kokanga malamumalamu mikanda oyo ezali na sɛkɛlɛ, mpo na nini Sanebalata atindelaki Nehemia ‘mokanda efungwamá’? Ekoki kozala ete Sanebalata asalaki bongo mpo bato nyonso báyeba bifundeli ya lokuta oyo afundaki na yango Nehemia. To akanisaki ete yango ekopesa Nehemia nkanda makasi mpe akotika mosala ya kotonga mpo na kokende kobunda. To mpe Sanebalata akanisaki ete makambo oyo akomaki na mokanda yango ekotungisa Bayuda mpe bakotika mosala na bango ya kotonga. Nehemia abangaki te mpe akobaki na motema mpiɔ mosala oyo Nzambe apesaki ye.
Mateya mpo na biso:
1:4; 2:4; 4:4, 5. Soki tokutani na mikakatano to tosengeli kozwa bikateli ya ntina, tosengeli ‘kotingama na mabondeli’ mpe kotosa bibongiseli ya teokrasi.—Baloma 12:12.
1:11–2:8; 4:4, 5, 15, 16; 6:16. Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye.—Nzembo 86:6, 7.
1:4; 4:19, 20; 6:3, 15. Atako Nehemia azalaki moto ya motema mawa, atiká ndakisa malamu ya moto ya mpiko mpe oyo abangaka te kokokisa boyengebene.
1:11–2:3. Esengo ya Nehemia ezalaki kouta libosoliboso te na etɛlɛmɛlo ya lokumu oyo azalaki na yango ya kosala na mesa ya mokonzi. Ezali nde ndenge losambo ya solo ezalaki kokende liboso. Losambo ya Yehova mpe makambo nyonso oyo ekoki kotombola yango nde esengeli kozala eloko ya libosoliboso oyo tosengeli komibanzabanza mpo na yango.
2:4-8. Yehova nde asalaki ete Alatazelezese apesa Nehemia nzela ya kokende kotonga lisusu lopango ya Yelusaleme. Masese 21:1 elobi boye: “Motema ya mokonzi kati na lobɔkɔ ya [Yehova] ezali lokola bitima na mai, akobongola yango na epai na epai elingi ye.”
3:5, 27. Tosengeli te kotalelaka misala ya mabɔkɔ oyo tosali mpo na kotombola losambo ya solo lokola nde ezali kokitisa biso valɛrɛ, ndenge “mikóló” ya Batekoa basalaki. Nzokande, tosengeli kolanda ndakisa ya Batekoa mosusu oyo basalaki mosala yango na motema moko.
3:10, 23, 28-30. Wana basusu bazali na likoki ya kokende epai mposa ya basakoli ezali monene, mingi kati na biso bapesaka mabɔkɔ na losambo ya solo na bisika bafandi. Tokosala bongo soki tosangani na kotonga Bandako ya Bokonzi, kosalisa bandeko oyo bazwi makama, kasi libosoliboso soki tozali kosakola Bokonzi.
4:14. Soki tokutani na botɛmɛli, biso mpe tokoki kolonga kobanga soki tobosani te “Nkolo oyo azali monene mpe na nsɔmɔ.”
5:14-19. Guvɛrnɛrɛ Nehemia azali ndakisa malamu mpenza ya komikitisa, ya komipimela mpe ya mayele mpo na bankulutu. Atako azalaki na molende mpo na kosalisa bato bátosa mobeko ya Nzambe, alukaki te kokonza basusu mpo na koluka matomba na ye. Nzokande, azalaki komibanzabanza mpo na bato oyo bazalaki konyokwama mpe babola. Nehemia atikelá basaleli nyonso ya Nzambe ndakisa kitoko ya kokaba.
“NZAMBE NA NGAI, KANISÁ NGAI MPO NA MALAMU”
Ntango kaka basilisi kotonga lopango ya Yelusaleme, Nehemia atye baporte mpe azwi bibongiseli mpo na kobatela engumba. Akomi bankombo ya bato na kolanda mabota na bango. Ntango bato nyonso bayanganaki “na etando monene oyo ezalaki liboso na ekuke ya Mai,” Ezela atángaki mokanda ya Mobeko ya Moize, Nehemia mpe Balevi balimbolelaki yango bato. (Nehemia 8:1) Ntango bayokaki makambo etali fɛti ya mingombo, yango etindaki bango básala yango na esengo.
Fɛti mosusu elandi, mokolo oyo “libota ya Yisalaele” eyamboli masumu ya ekólo mobimba, Balevi balobeli lisusu makambo oyo Nzambe asalelaki Bayisalaele mpe libota mobimba ekati ndai ya ‘kotambola kati na mobeko ya Nzambe ya [solo].’ (Nehemia 9:1, 2; 10:29) Lokola bato bakómi naino ebele te na Yelusaleme, babɛti mbɛsɛ mpo na kopona mobali mokomoko na kati ya bituluku ya mibali zomi. Na nsima, basali molulu ya bofungoli lopango na ndenge moko ete ‘esengo ya Yelusaleme eyokani mosika mingi.’ (Nehemia 12:43) Mbula zomi na mibale nsima ya kokóma na ye, Nehemia atiki Yelusaleme mpo na kozonga na mosala na ye epai ya Atalazelezese. Eumelaki te, mabe etondaki lisusu na kati ya Bayuda. Ntango Nehemia azongi lisusu na Yelusaleme, abandi kosembola makambo. Na komikitisa nyonso, abondeli boye: “Nzambe na ngai, kanisá ngai mpo na malamu.”—Nehemia 13:31.
Biyano na mituna ya Biblia:
7:6-67—Mpo na nini motángo ya bato ya libota mokomoko ya Bayuda oyo bazongaki na Yelusaleme elongo na Yelubabele ezali ndenge moko te na Mokanda ya Nehemia mpe ya Ezela? (Ezela 2:1-65) Ntina ya bokeseni wana ekoki kozala ete Ezela ná Nehemia bazwaki mitángo yango esika moko te. Na ndakisa, ekoki kozala ete motángo ya baoyo bakomisaki nkombo ete bakozonga ekeseni na motángo ya bato oyo bazongaki mpenza. Mitángo yango ekoki mpe kokesena mpamba te Bayuda oyo bakokaki te kolimbola molɔngɔ ya mabota na bango na ebandeli, basalaki yango na nsima. Nzokande, masolo yango mibale eyokani na likambo moko: Bayuda oyo bazongaki liboso bazalaki 42 360, longola baombo mpe bayembi.
10:34—Mpo na nini basɛngaki na Bayisalaele bápesaka nkoni? Mobeko ya Moize esɛngaki te ete bápesaka nkoni. Mobeko yango ebimaki kaka mpo na bosɛnga oyo bakómaki na yango. Mpo na kotumba mbeka na etumbelo, ezalaki kosɛnga nkoni ebele. Emonani lokola Banetinimi, bato ya ekólo mosusu oyo bazalaki baombo na tempelo bazalaki mingi te. Yango wana, babɛtaki mbɛsɛ mpo na kopona bato oyo bakobanda kopesa nkoni.
13:6—Nehemia atikaki Yelusaleme na boumeli ya ntango boni? Biblia elobi kaka ete “nsima ya mwa ntango” (Bible na lingala ya lelo oyo), Nehemia asɛngaki nzela epai ya mokonzi mpo azonga lisusu na Yelusaleme. Na yango, ezali mpasi koyeba ntango boni asalaki. Nzokande, ntango Nehemia azongaki na Yelusaleme, amonaki ete bazalaki lisusu kokipe banganga-Nzambe te mpe bazalaki lisusu kotosa mobeko ya Sabata te. Mingi kati na bango babalaki basi bapaya mpe bana na bango bazalaki ata koloba monɔkɔ ya Bayuda te. Lokola makambo ebebaki bongo, na ntembe te Nehemia alekisaki ntango molai.
13:25, 28—Longola ‘kopamela’ Bayuda oyo bazongelaki lisusu masumu, makambo nini mosusu Nehemia asalaki mpo na kosembola bango? ‘Nehemia alakelaki bango mabe’ na ndenge atángelaki bango bitumbu oyo ezali na kati ya Mobeko ya Nzambe. Kobɛta oyo ‘abɛtaki bamosusu na bango’ ekoki kozala ete apesaki kaka mobeko bápesa bango bitumbu. Mpo na komonisa ete asepeli te na makambo oyo basalaki, ‘alongolaki bango nsuki.’ Abenganaki mpe nkɔkɔ ya nganga monene Eliasibi oyo abalaki mwana ya Sanebalata, Moholoni.
Mateya mpo na biso:
8:8. Lokola tozali basakoli ya Liloba ya Nzambe, ‘tokopesa ndimbola’ na yango ntango tozali kotánga maloba polele, ntango tozali konyata makambo ya ntina, kolimbola bavɛrsɛ malamu mpe komonisa polele ndenge ya kosalela yango.
8:10. Moto azwaka “esengo na Yehova” soki azali koyeba mpe kokokisa bamposa na ye ya elimo mpe azali kolanda litambwisi ya teokrasi. Ezali na ntina mpenza tóyekolaka Biblia na molende, tóyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita mpe tósalaka na molende nyonso mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli!
11:2. Kotika libula mpe kokende kofanda na Yelusaleme ezalaki kosɛnga moto abimisa mbongo na ye moko mpe abungisa makambo mosusu. Baoyo basalaki bongo bamonisaki elimo ya komipimela. Biso mpe tokoki komonisa elimo ya ndenge wana ntango mabaku emonani ya kosalela basusu na mayangani mpe na mabaku mosusu.
12:31, 38, 40-42. Koyemba ezali lolenge moko malamu ya kokumisa Yehova mpe komonisa botɔndi na biso epai na ye. Tosengeli koyembaka na motema moko na makita ya Boklisto.
13:4-31. Tosengeli kokeba ete mposa ya kozala na biloko mingi ya mokili, mabe mpe lipɛngwi ebebisa biso te.
13:22. Nehemia ayebaki malamu ete asengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe. Biso mpe tosengeli kobosana te ete tokozongisa monɔkɔ epai ya Yehova.
Lisalisi ya Yehova ezali na ntina mingi!
Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basali bakosala wana bobele mpamba.” (Nzembo 127:1) Mokanda ya Nehemia ezali mpenza komonisa bosolo ya maloba wana!
Liteya mpo na biso ezali polele. Soki tolingi kolonga na makambo nyonso oyo tozali kosala, tosengeli na lisalisi ya Yehova. Soki totye losambo ya solo na esika ya liboso na bomoi na biso te Yehova akoki mpenza kopambola biso? Na yango, tiká ete lokola Nehemia, mokano na biso ya liboso ezala ya kotombola losambo ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 8]
“Motema ya Mokonzi kati na lobɔkɔ ya [Yehova] ezali lokola bitima na mai”
[Elilingi na lokasa 9]
Nehemia—moto ya mpiko mpe ya motema mawa—ayei na Yelusaleme
[Bililingi na lokasa 10]
Oyebi ‘kopesa ndimbola’ na Liloba ya Nzambe?