Otalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango?
‘Bókeba malamu mpenza . . . mpo moto ya pite azala te to moto oyo azalaka na botɔndi te mpo na makambo mosantu.’—BAEBELE 12:15, 16.
1. Elimo nini basaleli ya Yehova balandaka te?
NA MOKILI mobimba, bato bazali lisusu kotyela makambo mosantu likebi te. Edgar Morin, moto moko ya mayele ya ekólo France alobaki boye: “Na ntango ya kala, Nzambe, biloko oyo Nzambe akelá, mboka ya moto, makambo eleká mpe makanisi ya moto nde ezalaki koyebisa moto oyo asengeli kosala ná oyo asengeli kosala te. Kasi, lelo ezali bongo te. . . . Bato bazali kopona bango moko oyo basengeli kosala.” Yango ezali komonisa “elimo ya mokili,” to “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” (1 Bakolinti 2:12; Baefese 2:2) Bato oyo bamipesi na Yehova mpe batosaka boyangeli na ye, balandaka elimo yango te. (Baloma 12:1, 2) Kutu, basaleli ya Nzambe bayebaka ete kozala mosantu to kozala bulɛɛ ezali likambo ya ntina mingi na losambo na bango epai na Yehova. Makambo nini na bomoi na biso esengeli kozala mosantu? Lisolo oyo ekolobela makambo mitano oyo ezali mosantu mpo na basaleli ya Nzambe nyonso. Lisolo oyo ekolanda ekomonisa mingi ete makita na biso ya boklisto ezali mosantu. Kasi, liloba “mosantu” elimboli mpenza nini?
2, 3. (a) Ndenge nini Makomami elobeli bosantu ya Yehova? (b) Ndenge nini tomonisaka ete nkombo ya Yehova ezali mosantu?
2 Na monɔkɔ ya Liebele oyo bakomaki na yango Biblia, liloba “mosantu” epesaka likanisi ya kotyama pembeni. Na makambo etali losambo, eloko “mosantu” to ya bulɛɛ ezali eloko oyo esalelamaka mpambampamba te lokola biloko mosusu. Yehova azali mosantu na makambo nyonso. Biblia ebengi ye “Oyo-Aleki-Bosantu.” (Masese 9:10; 30:3, NW) Na Yisalaele ya kala, nganga monene azalaki kolata elamba moko na motó oyo ezalaki na etando ya wolo oyo ezalaki na makomi “bosantu ezali ya Yehova.” (Exode 28:36, 37, NW) Biblia emonisi elilingi ya Bakeluba ná Baselafa oyo batɛlɛmi liboso ya kiti ya Yehova mpe bazali koloba ete: “Yehova azali mosantu, mosantu, mosantu.” (Yisaya 6:2, 3, NW; Emoniseli 4:6-8) Bazongeli liloba mosantu mbala misato mobimba mpo na komonisa ete Yehova azali mosantu na lolenge oyo eleki mpenza. Azali mpenza Nkolo bosantu.
3 Nkombo ya Yehova ezali bulɛɛ, to mosantu. Mokomi ya nzembo alobaki boye: “Tiká bákumisa nkombo na yo monene mpe ya nsɔmɔ. [yango ezali mosantu, NW].” (Nzembo 99:3) Yesu ateyaki biso tóbondelaka: “Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Malia, mama ya Yesu, alobaki boye: “Molimo na ngai ezali kokumisa Yehova . . . Moto ya nguya asali misala minene mpo na ngai, mpe nkombo na ye ezali mosantu.” (Luka 1:46, 49) Biso basaleli ya Yehova tomonaka nkombo na ye mosantu mpe toboyaka kosala eloko nyonso oyo ekoki kofingisa yango. Lisusu, totalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango.—Amosa 5:14, 15.
Ntina oyo tomemyaka Yesu mingi
4. Mpo na nini Biblia elobi ete Yesu azali “Mosantu”?
4 Lokola “mwana mobotami-se-moko” ya Yehova, Nzambe mosantu, Yesu akelamaki mosantu. (Yoane 1:14; Bakolose 1:15; Baebele 1:1-3) Kutu, Biblia ebengi ye mpe “Mosantu ya Nzambe.” (Yoane 6:69) Abungisaki bosantu na ye te ntango Nzambe azwaki bomoi na ye na likoló mpe atindaki yango awa na mabelé, mpamba te, ezali na nguya ya elimo santu nde Malia abotaki Yesu. Anzelu moko alobaki na ye boye: “Elimo santu ekoya likoló na yo . . . oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35) Na libondeli moko oyo baklisto ya Yelusaleme basalaki, babengaki Mwana ya Nzambe mbala mibale mobimba ete “mosaleli na yo mosantu Yesu.”—Misala 4:27, 30.
5. Wapi mokumba mosantu oyo Yesu akokisaki awa na mabelé, mpe mpo na nini makila na ye ezali na motuya?
5 Yesu azalaki na mokumba mosantu ya kokokisa awa na mabelé. Ntango Yesu azwaki batisimo na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.), apakolamaki mpo akóma nganga-nzambe monene ya tempelo ya elimo. (Luka 3:21, 22; Baebele 7:26; 8:1, 2) Lisusu, asengelaki kokufa lokola mbeka. Makila na ye oyo esopamaki ezalaki na likoki ya kosikola bato ya masumu. (Matai 20:28; Baebele 9:14) Yango wana, tomonaka makila ya Yesu eloko moko ya “motuya” to ya bosantu.—1 Petelo 1:19.
6. Ndenge nini totalelaka Klisto Yesu, mpe mpo na nini?
6 Mpo na komonisa ete tomemyaka mpenza Klisto Yesu, Mokonzi mpe nganga-nzambe monene na biso, ntoma Paulo akomaki boye: “Nzambe atombolaki [Mwana na ye] na esika moko ya likoló mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo ezali likoló ya nkombo mosusu nyonso, mpo ete na nkombo ya Yesu mabɔlɔngɔ nyonso egumbama ya baoyo bazali na likoló mpe ya baoyo bazali na mabelé mpe ya baoyo bazali na nse ya mabelé, mpe monɔkɔ nyonso endima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.” (Bafilipi 2:9-11) Tomonisaka ete totalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango ntango totosaka na esengo nyonso Klisto Yesu, Motambwisi mpe Mokonzi na biso, Mokonzi ya lisangá ya boklisto.—Matai 23:10; Bakolose 1:18.
7. Ndenge nini tomonisaka ete tomemyaka Klisto?
7 Kotosa Klisto ezali kosɛnga mpe komemya bato oyo azali kosalela mpo na kotambwisa mosala oyo azali kotambwisa sikoyo. Mokumba ya baklisto bapakolami oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe bakɛngɛli oyo bango baponaka na babiro ya filiale, na bitúká, na bazongazonga mpe na masangá esengeli kotalelama lokola mokumba mosantu. Yango wana, tosengeli mpenza komemya mpe kotosa ebongiseli yango.—Baebele 13:7, 17.
Libota moko mosantu
8, 9. (a) Na ndenge nini Bayisalaele bazalaki libota moko mosantu? (b) Ndenge nini Yehova amonisaki Bayisalaele ntina ya kozala mosantu?
8 Yehova asalaki kondimana na Yisalaele. kondimana yango ekesenisaki bango mpenza na bikólo mosusu. Basantisamaki to batyamaki pembeni. Yehova alobaki na bango boye: “Bino bokozala bulɛɛ mpo na ngai, mpo ete ngai [Yehova] nazali bulɛɛ, mpe nasili kokabola bino na bato mosusu, ete bózala ya ngai.”—Levitike 19:2; 20:26.
9 Ntango ekólo Yisalaele ebandaki, Yehova ayebisaki bango ntina ya kozala mosantu. Basengelaki te kopusana penepene na ngomba oyo Mibeko Zomi epesamaki mpo bákufa te. Na yango, Ngomba Sinai ezalaki lokola eloko mosantu. (Exode 19:12, 23) Bonganga-nzambe, tabenakle mpe biloko na yango ezalaki mpe mosantu. (Exode 30:26-30) Ezali boni mpo na lisangá ya boklisto?
10, 11. Mpo na nini tokoki koloba ete lisangá ya baklisto bapakolami ezali mosantu, mpe yango ezali kosala nini na mitema ya “bampate mosusu”?
10 Lisangá ya baklisto bapakolami ezali mosantu na miso ya Yehova. (1 Bakolinti 1:2) Kasi, baklisto bapakolami nyonso awa na mabelé, ezala ya eleko nini, bakokisami na tempelo mosantu, atako bango te nde bazali tempelo monene ya elimo. Yehova afandi na tempelo mosantu yango na nzela ya elimo santu na ye. Ntoma Paulo akomaki boye: “Na bomoko elongo na [Klisto Yesu] ndako yango mobimba, kosanganáká liboke moko na boyokani mpenza, ezali komata mpo na kokóma tempelo mosantu mpo na Yehova. Na bomoko elongo na ye, bino mpe bozali kotongama elongo mpo na kozala esika oyo Nzambe asengeli kofanda na elimo.”—Baefese 2:21, 22; 1 Petelo 2:5, 9.
11 Paulo akomelaki lisusu baklisto bapakolami ete: “Boyebi te ete bino bozali tempelo ya Nzambe, mpe ete elimo ya Nzambe efandi na kati na bino? . . . Tempelo ya Nzambe ezali mosantu, tempelo yango nde bino.” (1 Bakolinti 3:16, 17) Na nzela ya elimo na ye, Yehova ‘afandi’ na kati ya bapakolami mpe ‘azali kotambola na kati na bango.’ (2 Bakolinti 6:16) Yehova azali ntango nyonso kotambwisa ‘moombo na ye ya sembo.’ (Matai 24:45-47) “Bampate mosusu” bazali kosepela na libaku malamu oyo bazali na yango ya kosangana na bapakolami.—Yoane 10:16; Matai 25:37-40.
Makambo mosantu na bomoi na biso ya boklisto
12. Makambo nini ezali mosantu na bomoi na biso, mpe mpo na nini?
12 Makambo mingi ya bomoi ya baklisto bapakolami mpe baninga na bango ezali mosantu. Boyokani na biso na Yehova ezali eloko moko mosantu. (1 Ntango 28:9; Nzembo 36:7) Lokola ezali na motuya mingi, totikaka soki moke te ete likambo moko to moto akabola biso na Yehova, Nzambe na biso. (2 Ntango 15:2; Yakobo 4:7, 8) Libondeli ekoki kosalisa biso mingi mpo tóbatela boyokani na biso na Yehova. Libondeli ezalaki eloko mosantu mpo na mosakoli Danyele, yango wana atikaki te momeseno na ye ya kobondela Yehova, atako yango ekokaki kotya bomoi na ye na likama. (Danyele 6:7-11) Biblia ekokanisi “mabondeli ya basantu,” to baklisto bapakolami na mpaka-ya-malasi oyo bazalaki kotumba na tempelo. (Emoniseli 5:8; 8:3, 4; Levitike 16:12, 13) Elilingi yango emonisi ete libondeli ezali mpenza eloko mosantu. Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kosolola na Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba! Yango wana, libondeli esengeli kaka kozala eloko mosantu na bomoi na biso.
13. Nguya nini ezali mosantu, mpe ndenge nini tokoki kopesa yango nzela esala na bomoi na biso?
13 Elimo santu ezali nguya moko mosantu mpo na baklisto bapakolami ná baninga na bango. Elimo yango ezali nguya ya Yehova oyo esalaka mosala; mpe lokola ekokisaka ntango nyonso mokano ya Nzambe mosantu, ebongi mpenza ete elimo yango ebengama “elimo santu,” to “elimo ya bosantu.” (Yoane 14:26; Baloma 1:4) Na nzela ya elimo santu, Yehova apesaka basaleli na ye nguya ya kosakola nsango malamu. (Misala 1:8; 4:31) Yehova apesaka elimo santu na “baoyo bazali kotosa ye lokola azali moyangeli,” baoyo ‘bazali kokoba kotambola na elimo,’ kasi na bamposa ya nzoto te. (Misala 5:32; Bagalatia 5:16, 25; Baloma 8:5-8) Nguya yango esalisaka baklisto bábota “mbuma ya elimo,” elingi koloba bizaleli ya malamu mpe “misala ya etamboli ya bosantu mpe . . . misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (Bagalatia 5:22, 23; 2 Petelo 3:11) Soki elimo santu ezali eloko mosantu mpo na biso, tokoboya kosala eloko nyonso oyo ekoki ‘koyokisa yango mawa,’ to kopekisa yango esala na bomoi na biso.—Baefese 4:30.
14. Mokumba nini bapakolami bamonaka mosantu, mpe bampate mosusu bazali kosala nini na mokumba yango?
14 Libaku malamu oyo tozali na yango ya komema nkombo ya Yehova, Nzambe mosantu, mpe ya kozala Batatoli na ye, ezali mpe eloko mosantu. (Yisaya 43:10-12, 15) Yehova apesi baklisto bapakolami makoki ya kozala “baministre ya kondimana ya sika.” (2 Bakolinti 3:5, 6) Na yango, bazali na mokumba ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” mpe ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 24:14; 28:19, 20) Bazali kokokisa mokumba yango na bosembo nyonso, mpe ebele ya bampate bazali koyokela bango, mpe na ndenge ya elilingi, bazali koloba na baklisto bapakolami ete: “Tokokenda na yo elongo, zambi toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zekalia 8:23) Na maloba ya elilingi, bampate yango bazali kosala lokola “basali bilanga” mpe “babateli ya bilanga ya vinyo” mpo na bapakolami, “basaleli ya Nzambe na biso.” Na ndenge yango, bampate mosusu bazali kosalisa bapakolami mpo bákokisa mokumba na bango na mokili mobimba.—Yisaya 61:5, 6, NW.
15. Mosala nini ntoma Paulo azalaki komona ete ezali mosantu, mpe mpo na nini totalelaka yango bongo?
15 Ntoma Paulo azalaki kotalela mosala ya kosakola lokola eloko ya bulɛɛ to mosantu. Amibengaki “mosaleli ya Klisto Yesu epai na bikólo mosusu mpo na bolamu ya bango nyonso, komikɔtisáká na mosala mosantu ya nsango malamu ya Nzambe.” (Baloma 15:16) Ntango Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti, alobaki ete mosala na ye ezali “eloko ya motuya.” (2 Bakolinti 4:1, 7) Na mosala na biso ya kosakola, toyebisaka bato “maloba mosantu ya Nzambe.” (1 Petelo 4:11) Na yango, ezala tozali bapakolami to bampate mosusu, biso nyonso tomonaka ete mosala ya kopesa litatoli ezali mosala mosantu.
“Tókokisa bosantu malamumalamu na kati ya kobanga Nzambe”
16. Nini ekosalisa biso tókóma te bato oyo “bazalaka na botɔndi te mpo na makambo mosantu”?
16 Ntoma Paulo akebisaki baninga na ye baklisto bakóma te bato oyo ‘bazalaka na botɔndi te mpo na makambo mosantu.’ Kasi, apesaki nde bango toli ‘bálanda kosantisama,’ “kokebáká malamu . . . mpo mosisa moko te ya ngɛngɛ mabe ebota mpe ekɔtisa mobulu mpe mpo mingi bákómisama mbindo te na nzela na yango.” (Baebele 12:14-16) Maloba ‘mosisa ya ngɛngɛ mabe’ ezali komonisa mwa ndambo ya baklisto oyo bakómaka koloba mabe mpo na lolenge oyo makambo ezali kosalema na lisangá. Na ndakisa, bakoki koboya makanisi ya Yehova oyo elobi ete libala ezali mosantu to oyo ezali kosɛnga ete tózala pɛto na bizaleli. (1 Batesaloniki 4:3-7; Baebele 13:4) To mpe bakoki kobanda kolanda makanisi ya bapɛngwi, elingi koloba “bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo ya bosantu,” oyo baoyo ‘batangwá mosika na solo’ babimisaka.—2 Timote 2:16-18.
17. Mpo na nini esengeli bapakolami básalaka ntango nyonso milende mpo na kotalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango?
17 Paulo akomelaki bandeko na ye bapakolami boye: “Balingami, tiká tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tókokisa bosantu malamumalamu na kati ya kobanga Nzambe.” (2 Bakolinti 7:1) Maloba oyo emonisi ete baklisto bapakolami, oyo bazali “basangani na kobengama ya likoló,” basengeli ntango nyonso kosalaka milende mpo na komonisa na bomoi na bango mobimba ete bazali kotalela makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango. (Baebele 3:1) Ndenge moko, ntoma Petelo mpe alendisaki bandeko na ye bapakolami ete: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala na kati ya kozanga boyebi na bino, kasi, na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na kati ya etamboli na bino mobimba.”—1 Petelo 1:14, 15.
18, 19. (a) Ndenge nini “ebele ya bato” bamonisaka ete batalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango? (b) Wapi makambo mosusu oyo ezali mosantu na bomoi na biso baklisto tokolobela na lisolo oyo elandi?
18 Ezali boni mpo na “ebele ya bato,” oyo bakobika na “bolɔzi monene”? Bango mpe basengeli komonisa ete batalelaka makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango. Na Mokanda ya Emoniseli, bamonisi bango bazali kosalela Yehova “mosala mosantu” na lopango ya libándá ya tempelo ya elimo awa na mabelé. Bamonisi kondima na mbeka ya lisiko ya Klisto; na maloba ya elilingi, “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na kati ya makila ya Mwana-Mpate.” (Emoniseli 7:9, 14, 15) Yango ekómisi bango pɛto na miso ya Nzambe mpe epesi bango mokumba ya ‘komipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo mpe kokokisa bosantu malamumalamu na kati ya kobanga Nzambe.’
19 Likambo moko ya ntina mingi na bomoi ya baklisto bapakolami mpe baninga na bango ezali ete báyanganaka na makita nyonso mpo na kosambela Yehova mpe koyekola Liloba na ye. Yehova amonaka mayangani ya basaleli na ye eloko mosantu. Na lisolo oyo elandi, tokomona ndenge nini mpe ntina nini tosengeli kotalela mayangani ete ezali mosantu ndenge Yehova atalelaka yango.
Bozongeli
• Wapi makanisi ya mokili oyo basaleli ya Yehova balandaka te?
• Mpo na nini Yehova azali liziba ya bosantu?
• Ndenge nini tomonisaka ete tomemyaka bosantu ya Klisto?
• Makambo nini tosengeli kotalela ete ezali mosantu na bomoi na biso?
[Elilingi na lokasa 23]
Na Yisalaele ya kala, bonganga-nzambe, tabenakle, mpe biloko na yango ezalaki mosantu
[Elilingi na lokasa 24]
Baklisto bapakolami awa na mabelé bazali tempelo mosantu
[Bililingi na lokasa 25]
Libondeli mpe mosala na biso ya kosakola ezali mikumba mosantu