Tózala na limemya mpo na mayangani na biso ya bosantu
“Nakoyeisa bango oyo kino ngomba na ngai [mosantu, NW], nakosepelisa mpe bango kati na ndako na ngai ya kobondela.”—YISAYA 56:7.
1. Na kotalela Makomami, wapi bantina oyo tosengeli komemyaka makita na biso?
YEHOVA asangisi basaleli na ye, baklisto bapakolami ná baninga na bango, mpo na kosambela ye na ‘ngomba na ye mosantu.’ Azali kosepelisa bango na kati ya ‘ndako na ye ya kobondela,’ elingi koloba na tempelo na ye ya elimo, oyo ezali “ndako ya mabondeli mpo na mabota nyonso.” (Yisaya 56:7; Malako 11:17) Makambo oyo nyonso emonisi ete losambo ya Yehova ezali mosantu, pɛto mpe etombwani. Soki tozali komemya makita na biso epai toyekolaka mpe tosambelaka, tokomonisa ete tozali kotalela makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango.
2. Nini emonisi ete Yehova azalaki kotalela esika oyo aponaki mpo na losambo na ye lokola esika mosantu, mpe ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki mpe kotalela yango bongo?
2 Na Yisalaele ya kala, esika oyo Yehova aponaki mpo na losambo na ye esengelaki kozala esika mosantu. Biblia emonisi ete bazalaki kopakola tabenakle mpe biloko na yango mafuta mpe kokómisa yango mosantu “mpo ekóma esika oyo eleki mosantu.” (Exode 30:26-29, NW) Biteni mibale ya hema ebengamaki “Esika Mosantu” mpe “Esika oyo Eleki Mosantu.” (Baebele 9:2, 3, NW) Na nsima, tempelo ya Yelusaleme ezwaki esika ya tabenakle. Lokola Yelusaleme ekómaki esika ya losambo ya Yehova, bazalaki kobenga yango “engumba mosantu.” (Nehemia 11:1, NW; Matai 27:53) Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, azalaki na limemya makasi mpo na tempelo. Asilikaki mpo bato bazalaki kosala mombongo na tempelo mpe kosalela yango lokola nzela mokuse.—Malako 11:15, 16.
3. Nini emonisi ete mayangani ya Yisalaele ezalaki mosantu?
3 Bayisalaele bazalaki koyangana mbala na mbala mpo na kosambela Yehova mpe koyoka Mibeko ya Yehova oyo bazalaki kotángela bango. Bafɛti mosusu oyo bazalaki kosala ebengamaki mayangani ya bulɛɛ; yango ezali komonisa ete mayangani yango ezalaki mosantu. (Levitike 23:2, 3, 36, 37) Na liyangani moko oyo esalemaki na mikolo ya Ezela mpe Nehemia, Balevi “[balimbolaki, NW] mobeko epai ya bato.” Lokola “bato nyonso bazalaki kolela wana eyokaki bango maloba ya mobeko,” Balevi “bazalisaki bato nyonso kimya, bango ete, zalá nyɛɛ! Mpo ete mokolo oyo ezali [mosantu, NW].” Na nsima, Bayisalaele basalaki fɛti ya mingombo mikolo nsambo mpe “basepelaki mingi mpenza.” Lisusu, “mokolo na mokolo longwa na mokolo ya liboso kino mokolo ya nsuka, atángaki kati na mokanda ya Mobeko ya Nzambe. Bakumisaki elambo kino mikolo nsambo, mpe na mokolo ya mwambe ezalaki koyangana monene lokola na lilako.” (Nehemia 8:7-11, 17, 18) Ezalaki mpenza mayangani mosantu oyo ezalaki kosɛnga ete bayangani na yango bázala na limemya makasi mpenza.
Makita na biso ezalaka mayangani mosantu
4, 5. Makambo nini etali makita na biso emonisi ete ezalaka mayangani mosantu?
4 Ya solo, lelo oyo, Yehova aponi engumba moko te awa na mabelé, epai tempelo ezali mpo na kosambela ye. Atako bongo, tosengeli kobosana te ete makita mpo na kosambela Yehova ezali mayangani mosantu. Mbala misato na pɔsɔ, toyanganaka mpo na kotánga mpe koyekola Biblia. Lokola na ntango ya Nehemia, ‘tolimbolaka’ Liloba ya Yehova mpe ‘tomonisaka ntina na yango.’ (Nehemia 8:8) Makita na biso nyonso ebandaka mpe esukaka na libondeli, mpe na makita mingi toyembaka mpo na kosanzola Yehova. (Nzembo 26:12) Makita ya lisangá ezali mpenza na kati ya losambo na biso mpe tosengeli komemyaka yango mingi.
5 Yehova apambolaka basaleli na ye ntango bayangani mpo na kosambela ye, koyekola Liloba na ye mpe kolekisa ntango na baninga na bango baklisto. Soki ngonga ya makita ekoki, tosengeli mpenza kondima ete ezali kuna nde ‘Yehova alobi ete akopesa mapamboli.’ (Nzembo 133:1, 3, NW) Tokozwa mapamboli yango soki tozali koyangana mpe kolanda masolo na likebi. Lisusu, Yesu alobaki boye: “Epai mibale to misato bayangani na nkombo na ngai, nakozala kuna na katikati na bango.” Maloba yango etaleli libosoliboso bankulutu, ntango bayanganaka mpo na kotalela makambo ya minene oyo ebimi na kati ya bandeko, kasi etaleli mpe makita na biso. (Matai 18:20) Soki Klisto, na nzela ya elimo santu, azali wana ntango baklisto bayangani na nkombo na ye, tosengeli kotalela mayangani yango lokola eloko mosantu te?
6. Tokoki koloba nini mpo na bisika na biso ya makita, ezala ya minene to ya mike?
6 Ya solo, Yehova afandaka te na batempelo oyo bato batongi. Kasi, Bandako ya Bokonzi ezali bisika ya losambo ya solo. (Misala 7:48; 17:24) Tokutanaka kuna mpo na koyekola Liloba ya Yehova, kobondela ye mpe koyemba mpo na kosanzola ye. Ezali mpe bongo mpo na Bandako na biso ya mayangani ya minene. Bisika ya masano mpe bandako ya makita minene ya mokili ekómaka bisika ya losambo ntango tozali kosalela yango mpo na mayangani mosantu. Soki tokutani na bisika yango, ezala na mayangani ya minene to mike, tosengeli kozala na limemya, mpe yango esengeli komonana na bizaleli na biso.
Ndenge ya komonisa limemya mpo na mayangani na biso
7. Ndenge nini tokoki komonisa limemya mpo na mayangani na biso?
7 Ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa limemya mpo na mayangani na biso. Moko na yango ezali ya kozala wana ntango nzembo ya Bokonzi ezali koyembama. Banzembo mingi ezali lokola mabondeli mpe esengeli koyembama na limemya nyonso. Ntoma Paulo amonisaki ete esakweli ya Nzembo 22 etalelaki Yesu. Alobaki boye: “Nakosakola nkombo na yo epai ya bandeko na ngai; na katikati ya lisangá nakosanzola yo na nzembo.” (Baebele 2:12) Na yango, tosengeli kozala na momeseno ya kozwaka bisika liboso ndeko oyo akokamba likita ayembisa nzembo; mpe ntango tozali koyemba, tótyaka makanisi na biso mobimba na ndimbola ya maloba ya nzembo yango. Lisusu, ntango tozali koyemba, tosengeli kozala na makanisi lokola mokomi na nzembo, oyo akomaki boye: “Nakosanzola [Yehova] na motema na ngai mobimba, kati na koyangana ya basembwi mpe kati na koyangana monene.” (Nzembo 111:1) Ya solo, koyemba mpo na kokumisa Yehova ezali moko ya bantina mpenza oyo esengeli tókómaka liboso na makita mpe tózalaka wana tii ntango ekosila.
8. Ndakisa nini na Biblia emonisi ete tosengeli mpenza kolandaka na limemya mpe na likebi mabondeli oyo esalemaka na makita na biso?
8 Likambo mosusu oyo ebakisaka motuya ya makita na biso ezali libondeli oyo euti mpenza na motema, oyo esalemaka mpo na bayangani nyonso. Mokolo moko, baklisto ya ekeke ya liboso bayanganaki na Yelusaleme mpe “batombolaki mingongo na bango na bomoko mpenza epai ya Nzambe” mpe babondelaki. Na yango, bakobaki “koloba liloba ya Nzambe na mpiko” atako minyoko ezalaki. (Misala 4:24-31) Tokanisi ete baoyo bazalaki wana batikaki makanisi na bango eyengayenga ntango libondeli yango ezalaki kosalema? Te, “babondelaki na bomoko mpenza.” Mabondeli oyo esalemaka na makita na biso esengeli komonisa mposa ya bayangani nyonso. Ebongi mpenza tólandaka yango na limemya mpe na likebi.
9. Ndenge nini molato mpe bizaleli na biso ekoki komonisa ete tozali na limemya mpo na mayangani mosantu?
9 Longola yango, lolenge na biso ya kolata ekomonisa soki tozali na limemya makasi mpo na mayangani mosantu. Soki tozali komonana malamu na miso ya bato, elingi koloba na kolata mpe kobongisa nsuki, yango ekoki mpenza kobakisa lokumu ya makita na biso. Ntoma Paulo apesaki toli ete: “Nalingi ete na esika nyonso mibali básalaka mabondeli, kotomboláká mabɔkɔ ya sembo, kozanga nkanda mpe bantembe. Ndenge moko mpe nalingi ete basi bábongisaka nzoto na bango na molato ya malamu, na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe.” (1 Timote 2:8-10) Ntango tosali mayangani na mabándá ya masano, tosengeli kolata bilamba ya malamu, elingi koloba oyo ebongi na ntango wana, ezala na molunge to na malili. Lisusu, limemya mpo na mayangani ekopekisa biso kolyalya bazoka to bɔmbɔ ntango mayangani ezali kosalema. Kolata malamu mpe kozala na bizaleli malamu na mayangani na biso epesaka Yehova Nzambe, losambo na ye, mpe bandeko na biso baklisto lokumu.
Etamboli oyo ebongi na ndako ya Nzambe
10. Ndenge nini ntoma Paulo amonisi ete tosengeli komonisaka bizaleli ya malamu mpenza ntango tozali na makita?
10 Na 1 Bakolinti, mokapo 14, ntoma Paulo amonisi lolenge ya malamu oyo makita ya boklisto esengeli kotambwisama. Asukisaki boye: “Tiká makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (1 Bakolinti 14:40) Makita na biso ezali na ntina mingi na kati ya makambo oyo tosalaka na lisangá; yango wana ntango tozali na makita, tosengeli kozala na etamboli oyo ebongi mpenza na ndako ya Nzambe.
11, 12. (a) Makambo nini esengeli kokɔtisa na makanisi ya bana oyo bayanganaka na makita na biso? (b) Wapi lolenge malamu oyo bana bakoki koyambola kondima na bango na makita na biso?
11 Baboti basengeli koteya bana ezaleli oyo basengeli kozala na yango na makita. Basengeli koyebisaka bana na bango ete Ndako ya Bokonzi mpe bisika ya Boyekoli ya Mokanda ezali bisika ya kosakana te. Ezali bisika oyo tosambelaka Yehova mpe toyekolaka Liloba na ye. Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki boye: “Batelá makolo na yo wana ekokɔta yo na ndako ya Nzambe, mpe meká koyoka.” (Mosakoli 5:1) Moize asɛngaki Bayisalaele báyanganaka, mikóló ná “bana.” Alobaki boye: “Yanganisá bato . . . mpo bákoka koyoka mpe báyekola mpe kobanga Yehova Nzambe na yo mpe kobatela maloba nyonso ya mobeko oyo. Mpe bana na bango oyo bayebi te basengeli koyoka, mpe basengeli koyekola kobanga Yehova.”—Deteronome 31:12, 13, NW.
12 Ndenge moko lelo oyo, bana bayanganaka na makita elongo na baboti na bango libosoliboso mpo na koyoka mpe koyekola. Soki bakómi koyoka na likebi mpe kokanga mateya ya moboko ya Biblia, bakoki kobanda ‘kosala eyambweli’ ya kondima na bango na kopesa biyano ya mikuse. (Baloma 10:10) Mwana ya moke akoki kobanda kopesa biyano ya mokuse na mituna oyo asimbi malamu. Na ebandeli, akoki kotánga eyano kotánga, kasi, na nsima akoki komeka kopesa na maloba na ye moko. Yango ekozala na litomba mpo na mwana, mpe mikóló basepelaka mingi ntango bazali koyoka bana bazali kosala eyambweli ya kondima na bango. Kasi, baboti bakopesa ndakisa malamu soki bango moko mpe bazali kopesa biyano. Soki likoki ezali, ekozala mpe malamu ete mwana mokomoko azala na Biblia, buku ya nzembo mpe mokanda oyo tozali koyekola. Esengeli mpe kolakisa bango ete bámonaka mikanda yango mpamba te. Makambo oyo nyonso ekosalisa bana báyeba ete makita na biso ezali mayangani mosantu.
13. Mposa na biso ezali nini mpo na bato oyo bayei na makita na biso mpo na mbala ya liboso?
13 Kasi, esengeli te ete makita na biso ezala lokola oyo ya mangomba ya boklisto. Mayangani na bango ezalaka mbala mosusu malilimalili, to basalaka makambo lokola bazali mpenza basantu, to ezalaka makɛlɛlɛ makasi lokola esika babɛtaka miziki. Kasi, biso tolingaka makita na biso ezala ya esengo mpe ya bolingo; kasi te esika ya fɛti. Toyanganaka mpo na kosambela Yehova, yango wana makita na biso esengeli ntango nyonso kosalema na limemya. Mposa na biso ezali ete soki bato oyo bayei na makita na biso mpo na mbala ya liboso bayoki masolo oyo esalemi, bamoni etamboli na biso mpe oyo ya bana na biso, báloba na nsuka ete: “Nzambe azali mpenza na kati na bino.”—1 Bakolinti 14:25.
Likambo ya libela na libela
14, 15. (a) Ndenge nini tokoki kosala ete ‘tótika ndako ya Nzambe na biso mpamba te’? (b) Ndenge nini maloba ya Yisaya 66:23 ezali kokokisama?
14 Ndenge tomoni yango, Yehova azali koyanganisa basaleli na ye mpe kosepelisa bango na kati ya ‘ndako na ye ya kobondela,’ elingi koloba tempelo na ye ya elimo. (Yisaya 56:7) Nehemia, moto ya sembo, akundwelaki bandeko na ye Bayuda ete basengeli kopesa makabo mpo na tempelo mpo na komonisa ete bazali na limemya mpo na yango. Alobaki boye: “Tokotika ndako ya Nzambe na biso mpamba te.” (Nehemia 10:39) Lisusu, tosengeli te komona mpamba libyangi ya Yehova ete tósambela ye na kati ya ‘ndako na ye ya kobondela.’
15 Mpo na komonisa ete esengeli tóyanganaka mbala na mbala mpo na kosambela, Yisaya asakolaki boye: “Longwa sanza ya sika kino sanza ya sika, mpe longwa sabata kino sabata, nyonso bazali na nzoto bakoya kosambela liboso na ngai. [Yehova] alobi bongo.” (Yisaya 66:23) Likambo yango ezali kosalema lelo. Pɔsɔ na pɔsɔ mpe sanza na sanza, baklisto basanganaka mpo na kosambela Yehova. Basalaka bongo, na ndakisa ntango bayanganaka na makita ya boklisto mpe ntango babimaka na mosala ya kosakola. Ozali moko na baoyo, ‘bayaka kosambela liboso ya Yehova’ pɔsɔ na pɔsɔ?
16. Mpo na nini tosengeli komesana koyanganaka na makita nyonso uta sikawa?
16 Yisaya 66:23 ekokokisama na mobimba na yango na mokili ya sika oyo Yehova alaki. Na ntango wana, pɔsɔ na pɔsɔ mpe sanza na sanza, ‘nyonso bazali na nzoto bakobanda koya kosambela liboso’ ya Yehova libela na libela. Lokola koyangana elongo mpo na kosambela Yehova ekozala likambo oyo tokobanda kosala libela na libela na mokili ya sika, esengeli tómesana uta lelo koyanganaka mbala na mbala na makita na biso ya bosantu.
17. Mpo na nini tosengeli koyanganaka na makita na biso “na koleka mpenza lokola tozali komona mokolo yango ezali kokóma pene”?
17 Lokola nsuka ekómi pene, tosengeli mpenza kozala lisusu na ekateli makasi ya koyanganaka mpo na kosambela. Mpo na komonisa limemya mpo na makita na biso ya bosantu, tosengeli kotika te ete mosala na biso, badevuare ya kelasi to kotánga bakelasi ya mpokwa epekisa biso koyanganaka mbala na mbala elongo na bandeko na biso baklisto. Tozali na mposa ya kolendisama na bandeko na biso. Makita esalisaka biso tóyebana, tólendisanaka mpo tózala na “bolingo mpe misala malamu.” Tosengeli kosalaka bongo ‘na koleka mpenza lokola tozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.’ (Baebele 10:24, 25) Na yango, tiká ete tózala ntango nyonso na limemya mpo na mayangani na biso ya bosantu, elingi koloba tóyanganaka na makita nyonso, tólataka malamu mpe tózalaka na etamboli ya malamu. Soki tozali kosala bongo, tokomonisa ete tozali kotalela makambo mosantu ndenge Yehova atalelaka yango.
Bozongeli
• Nini emonisi ete mayangani ya basaleli ya Yehova esengeli kozala mosantu?
• Makambo nini emonisi ete makita na biso ezalaka mayangani mosantu?
• Ndenge nini bana bakoki komonisa ete bazali na limemya mpo na makita na biso ya bosantu?
• Mpo na nini tosengeli komesana na koyangana na makita uta sikawa?
[Bililingi na lokasa 28]
Makita mpo na kosambela Yehova ezalaka mayangani mosantu na esika nyonso oyo esalemi
[Elilingi na lokasa 31]
Bana na biso bayanganaka na makita mpo na koyoka mpe koyekola