“Oyo ezali nzela, tambolá na yango”
Lisolo ya Emilia Pederson
Ekomami na Ruth Pappas
MAMA na ngai Emilia Pederson, abotamaki na mobu 1878. Atako azalaki molakisi, azalaki na mposa makasi ya kosalela bomoi na ye mpo na kosalisa bato mosusu báyeba Nzambe. Yango ezalaki komonana na valize moko ya monene oyo ezalaki na ndako na biso na Jasper, mwa engumba moko moke na etúká ya Minnesota, na États-Unis. Asombaki valize yango mpo na komema na yango biloko na ye na Chine, epai alingaki kokende kosala lokola misionɛrɛ. Kasi, ntango mama na ye akufaki, atikaki makanisi yango mpe atikalaki na ndako mpo na kobɔkɔla baleki na ye. Na mobu 1907, abalanaki na Theodore Holien. Nabotamaki na mokolo ya 2, Desɛmbɛ 1925—nazalaki mwana ya nsuka na bana nsambo oyo babotaki.
Mama azalaki koluka biyano na mituna mingi ya Biblia oyo azalaki komituna. Motuna moko ezalaki mpo na liteya oyo elobaka ete lifelo ezali esika ya mɔtɔ mpo na konyokola bato mabe. Ntango mokambi moko ya Lingomba ya Protesta ayaki, mama atunaki ye alakisa ye esika liteya yango ezali na Biblia. Ayebisaki mama ete yango ezali likambo ya Biblia te—liteya ya lifelo ya mɔtɔ esengeli koteyama.
Mposa na ye ya elimo ekokisami
Mwa moke nsima ya mbula 1900, Emma, leki ya mama, akendaki na engumba Northfield, na etúká ya Minnesota, mpo na kotánga kelasi ya miziki. Afandaki na ndako ya Milius Christianson, molakisi na bango, oyo mwasi na ye azalaki Moyekoli ya Biblia, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Emma ayebisaki bango ete ndeko na ye alingaka kotánga Biblia mingi. Eumelaki te, mwasi ya Christianson akomelaki Mama mokanda mpo na koyanola na mituna ya Biblia oyo azalaki komituna.
Mokolo moko, Lora Oathout, oyo azalaki mpe Moyekoli ya Biblia, azwaki engbunduka na Sioux Falls, na etúká ya Dakota du Sud mpo na koya kosakola na Jasper. Mama ayekolaki mikanda ya Biblia oyo azwaki, mpe na 1915 abandaki koyebisa basusu mateya ya Biblia, mpe kokabola mikanda oyo Lora atikelaki ye.
Na 1916, Mama ayokaki ete Charles Taze Russell akoya na liyangani oyo ekosalema na engumba Sioux City, na etúká ya Iowa. Ye mpe azalaki na mposa ya kokende na liyangani yango. Na ntango wana Mama azalaki na bana mitano, mpe Marvin, mwana ya mitano, azalaki kaka na sanza mitano. Atako bongo, elongo na bana na ye nyonso, mama asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ soki 160 na engbunduka tii na Sioux City mpo na kozala na liyangani. Ayokaki masukulu ya Ndeko Russell, atalaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi,” mpe azwaki batisimo. Ntango azongaki na ndako, akomaki lisolo moko oyo elobelaki liyangani yango, mpe ebimisamaki na zulunalo Jasper.
Na 1922, Mama azalaki na kati ya bato 18 000 oyo bazalaki na liyangani oyo esalemaki na Cedar Point, na etúká ya Ohio. Nsima ya liyangani yango, atikaki ata mokolo moko te kosakola Bokonzi ya Nzambe. Kutu, azalaki kolendisa biso tólanda maloba oyo: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.”—Yis. 30:21.
Matomba ya mosala ya kosakola Bokonzi
Na ebandeli ya bambula ya 1920, baboti na ngai balongwaki na Jasper. Tata azalaki na mosala ya malamu mpe libota monene oyo asengalaki kobɔkɔla. Azalaki koyekola Biblia mingi te lokola Mama, kasi azalaki kosimba na motema mobimba mosala ya kosakola mpe azalaki koyamba bakɛngɛli-batamboli na ndako na biso. Mbala mingi, ntango mokɛngɛli-motamboli moko azali kosala lisukulu na ndako na biso, bato nkama to koleka bazalaki koya mpo na koyoka; bazalaki kofanda na salon, na salle à manger, mpe na shambre.
Ntango nazalaki na mbula soki nsambo, mama-leki Lettie abengaki na telefone mpe alobaki ete Ed Larson ná mwasi na ye, oyo afandaka na bango kartye moko, bazalaki na mposa ya koyekola Biblia. Bandimaki mbala moko mateya ya solo mpe na nsima, balendisaki Martha Van Daalen, mama moko ya bana mwambe, kaka ya kartye yango ayekola na bango Biblia. Martha ná libota na ye mobimba bakómaki Bayekoli ya Biblia.a
Na ntango yango, Gordon Kammerud, elenge mobali moko oyo azalaki kofanda mosika te na ndako na biso akómaki kosala elongo na Tata. Bato bayebisaki Gordon ete: “Kebá na bana ya patrɔ na yo. Bazali na lingomba moko ya mabe.” Atako bongo, Gordon abandaki koyekola Biblia mpe eumelaki te andimaki mpenza ete amoni solo. Sanza misato na nsima, azwaki batisimo. Baboti na ye mpe bandimaki solo; yango wana mabota na biso—libota ya Holien, ya Kammerud, mpe ya Van Daalen—tokómaki mpenza baninga.
Mayangani ezalaki kolendisa
Liyangani ya Cedar Point elendisaki Mama mingi, yango wana azalaki kolinga lisusu kozangisa mayangani te. Na yango, nabosanaka te ete ntango nazalaki mwana moke tozalaki kosala mibembo milai mpo na kokende na mayangani. Moko na yango, oyo nabosanaka te ezali liyangani oyo esalemaki na Columbus, na etúká ya Ohio na 1931, na liyangani yango nde tozwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova. (Yis. 43:10-12) Nabosanaka mpe te liyangani oyo esalemaki na Washington, D.C., na 1935; ezalaki na lisukulu moko oyo elobelaki “ebele monene,” to “ebele ya bato,” oyo mokanda ya Emoniseli elobeli. (Emon. 7:9; haut fleuve) Lilian ná Eunice, bandeko na ngai ya basi, bazalaki na kati ya bato koleka 800 oyo bazwaki batisimo na liyangani yango.
Libota na biso mobimba tokendaki na mayangani oyo esalemaki na Columbus, Ohio na 1937; na Seattle, Washington, na 1938; mpe na New York City na 1939. Libota ya Van Daalen mpe ya Kammerud mpe bato mosusu bakendaki elongo na biso mpe na nzela tozalaki kolala na bandako ya kapo. Eunice abalanaki na Leo Van Daalen na 1940, mpe bakómaki babongisi-nzela. Kaka na mbula yango, Lilian abalanaki na Gordon Kammerud, bango mpe bakómaki babongisi-nzela.
Nasepelaki mingi na liyangani oyo esalemaki na 1941 na St. Louis, Missouri. Na liyangani yango, bankóto ya bilenge bazwaki buku Children (Bana). Liyangani yango ebongolaki bomoi na ngai. Mwa moke na nsima, na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 1941, elongo na ndeko na ngai Marvin ná mwasi na ye Joyce, tokómaki babongisi-nzela. Nazalaki na mbula 15.
Lokola tozalaki kofanda na esika oyo basalaka bilanga, ezalaki mpasi mpo bandeko mibali nyonso bákende na mayangani mpamba te mbala mingi, mayangani ezalaki kosalema na eleko ya kobuka mbuma. Na yango, nsima ya mayangani, tozalaki kosala bozongeli ya liyangani mpo na bato oyo bakokaki kokende te. Yango ezalaki bantango ya esengo.
Gileadi mpe bateritware ya sika
Na sanza ya Febwali 1943, bafungolaki Eteyelo ya Gileadi mpo na kobongisa babongisi-nzela mpo na mosala ya misionɛrɛ. Bato motoba ya libota Van Daalen bakɔtaki na kelasi ya liboso: Emil, Arthur, Homer, mpe Leo; ndeko na bango mosusu Donald; mpe mwasi ya Leo, yaya na ngai Eunice. Tokabwanaki na mai na miso, mpamba te toyebaki te soki tokomonana lisusu. Nsima ya kelasi, bango nyonso motoba batindamaki na Porto Rico, epai Batatoli bazalaki ata zomi na mibale te.
Mbula moko na nsima, Lilian ná Gordon mpe Marvin ná Joyce bakɔtaki na kelasi ya misato ya Gileadi. Bango mpe batindamaki na Porto Rico. Na nsima, na Sɛtɛmbɛ 1944, ntango nakómaki na mbula 18, nakɔtaki na kelasi ya minei ya Gileadi. Ntango kelasi esilaki, na Febwali 1945, natindamaki mpe na Porto Rico epai bandeko na ngai bazalaki. Yango ezalaki likambo ya sika mpo na ngai! Atako koyekola monɔkɔ ya Espagnol ezalaki pɛtɛɛ te, eumelaki te, bamosusu kati na biso bakómaki koyekola Biblia na bato koleka 20. Yehova apambolaki mosala na biso. Lelo oyo Batatoli bazali soki 25 000 na Porto Rico!
Mpasi ekómeli libota na biso
Leo ná Eunice batikalaki kaka na Porto Rico nsima ya kobotama ya mwana na bango Mark, na 1950. Na 1952, basalaki mobembo mpo na kokende kotala bandeko ya libota. Bazwaki mpɛpɔ na mokolo ya 11 Aprili. Likambo ya mawa, mwa moke nsima ya komata, mpɛpɔ ekweaki na mbu. Leo ná Eunice bakufaki. Mark, mwana na bango oyo azalaki na mbula mibale azalaki kotɛpatɛpa na mai. Moto moko oyo mpe abikaki na likama yango azwaki ye; minganga basalisaki ye mpe abikaki.b
Mbula mitano na nsima, na mokolo ya 7 Marsi 1957, ntango Mama ná Tata bazalaki kokende na Ndako ya Bokonzi, pinɛ ya motuka na bango etɔbɔkaki. Ntango Tata azalaki kotya pinɛ mosusu, motuka moko oyo ezalaki koleka etutaki ye mpe akufaki na mbala moko. Bato soki 600 bayaki na lisukulu ya bokundi, mpe litatoli malamu epesamaki na kartye, epai bato mingi bazalaki kopesa Tata limemya.
Bateritware ya sika
Mwa moke liboso Tata akufa, batindaki ngai na Argentine. Na Augusto 1957, nakómaki na engumba Mendoza na bangomba ya Andes. Na 1958, George Pappas, oyo akɔtaki kelasi ya mbala ya 30, atindamaki mpe na Argentine. Tokómaki baninga, mpe tobalanaki na Aprili 1960. Na 1961, Mama akufaki, azalaki na mbula 83. Atambolaki na nzela ya solo na bosembo mpe asalisaki bato mingi mpenza bátambola mpe na nzela yango.
Na boumeli ya mbula zomi, ngai ná George tosalaki elongo ná bamisionɛrɛ mosusu na bisika ndenge na ndenge. Na nsima, tosalaki mbula nsambo na mosala ya zongazonga. Na 1975, tozongaki na États-Unis mpo na kosalisa bandeko na biso oyo bazalaki kobɛla. Na 1980, batindaki mobali na ngai na zongazonga na teritware ya monɔkɔ ya Espagnol. Na ntango wana masangá ya monɔkɔ ya Espagnol ezalaki soki 600 na États-Unis. Na boumeli ya mbula 26, totalaki mingi kati na masangá yango mpe tomonaki ndenge masangá yango ekómi koleka 3 000.
Batambolaki na “nzela”
Mama mpe azwaki esengo ya komona ndenge bandeko na ye bakɔtaki na mosala ya ntango nyonso. Na ndakisa, Carol, mwana ya yaya na ngai ya mwasi, Ester, akómaki mobongisi-nzela na 1953. Abalanaki na Dennis Trumbore, mpe bakobaki na mosala ya ntango nyonso. Lois, mwana mosusu ya Ester abalanaki na Wendell Jensen. Bakɔtaki kelasi ya mbala ya 41 ya Gileadi mpe basalaki lokola bamisionɛrɛ na Nigeria na boumeli ya mbula 15. Mark, oyo baboti na ye bakufaki na likama ya mpɛpɔ, abokwamaki epai ya Ruth La Londe ndeko mwasi ya Leo ná mobali na ye Curtiss. Mark ná mwasi na ye Lavonne, bazalaki babongisi-nzela na boumeli ya bambula mingi mpe babɔkɔlaki bana na bango minei na “nzela.”—Yis. 30:21.
Orlen, ndeko na ngai kaka moko oyo atikali na bomoi, akómi na mbula koleka 90. Azali kaka sembo epai ya Yehova. Ngai ná George tozali kokoba na mosala ya ntango nyonso.
Oyo Mama atikaki
Lelo oyo nazali na eloko moko oyo Mama azalaki kopesa motuya mingi—mesa na ye ya kotánga. Yango ezali kado oyo Tata apesaki ye na mokolo ya libala na bango. Na tirware moko ezali na albome moko ya kala, oyo ezali na mikanda mpe masolo ya bazulunalo oyo akomaki oyo epesaki litatoli malamu mpo na Bokonzi. Masolo yango mosusu ekomamaki na ebandeli ya bambula ya 1 900. Mesa yango ezalaki mpe na mikanda ya ntina mingi oyo bana na ye bamisionɛrɛ bazalaki kotindela ye. Nasepelaka kotánga mikanda yango mbala na mbala! Mpe mikanda oyo ye azalaki kokomela biso ezalaki ntango nyonso kolendisa. Mama atikalaki kokóma misionɛrɛ te ndenge azalaki kokana. Kasi, molende na ye mpo na mosala ya misionɛrɛ emonanaki epai ya bana mpe bankɔkɔ na ye. Nazali kozela mokolo oyo libota na biso mobimba tokokutana na paladiso awa na mabelé, elongo na Tata mpe Mama!—Emon. 21:3, 4.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya bomoi ya Emil Van Daalen ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1983, nkasa 27-30 (na Lifalanse).
[Elilingi na lokasa 17]
Emilia Pederson
[Elilingi na lokasa 18]
Na 1916: Mama ná Tata (asimbi Marvin); na nse, kobanda na lobɔkɔ ya mwasi, Orlen, Ester, Lilian, Mildred
[Elilingi na lokasa 19]
Leo ná Eunice, mwa moke liboso ya liwa na bango
[Elilingi na lokasa 20]
Na 1950: Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi, na likoló: Ester, Mildred, Lilian, Eunice, Ruth; na nse: Orlen, Mama, Tata, mpe Marvin
[Elilingi na lokasa 20]
George ná Ruth Pappas na mosala ya zongazonga, na 2001