Bilenge—Bómonisa bokoli na bino polele
“Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso.”—1 TIM. 4:15.
1. Nzambe alingaka nini mpo na bilenge?
MOKONZI Salomo akomaki boye: “E elenge, sepelá na bolenge na yo mpe tiká ete motema na yo esepelisa yo na mikolo ya bolenge na yo.” (Mos. 11:9) Na ntembe te, Yehova Nzambe, ye oyo akomisaki maloba yango, alingaka ete bilenge bázala na esengo, kaka ntango bazali bilenge te, kasi ata mpe ntango bakokola. Kasi, mbala mingi bilenge basalaka mabunga oyo ekoki komemela bango mikakatano ntango bakokola. Ata Yobo, moto ya sembo, amilelaki mpo na ‘mabunga ya bolenge na ye.’ (Yobo 13:26, NW) Mbala mingi, esɛngaka elenge moklisto oyo abandi kokola azwa bikateli ya minene. Soki azwi ekateli ya mabe, yango ekoki kotika ye na mpota na motema mpe komemela ye mikakatano na bomoi na ye mobimba.—Mos. 11:10.
2. Toli nini ya Biblia ekosalisa bilenge básala te mabunga ya minene?
2 Bilenge basengeli kozala na bososoli. Talá toli oyo ntoma Paulo apesaki baklisto ya Kolinti. Akomaki boye: “Bókóma bana te na oyo etali makoki ya kososola . . . Bókóma mikóló na oyo etali makoki ya kososola.” (1 Kol. 14:20) Toli yango ekoki kosalisa bilenge básala te mabunga ya minene.
3. Osengeli kosala nini mpo na kokɔmela?
3 Elenge, kobosana te ete kokɔmela esɛngaka milende. Paulo alobaki na Timote boye: “Moto atyola bolenge na yo te. Nzokande, zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bopɛto ya bizaleli. . . . Kobá komipesa na botángi liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya. . . . Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango, mpo bokoli na yo emonana polele na miso ya bato nyonso.” (1 Tim. 4:12-15) Bilenge baklisto basengeli kokola, mpe bokoli yango esengeli komonana polele na miso ya basusu.
Bokoli ezali nini?
4. Kokola na elimo elakisi nini?
4 Kokola elakisi “kokende liboso, kokóma malamu mingi koleka.” Paulo alendisaki Timote akoba komipesa mpo bokoli na ye emonana polele na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bopɛto ya bizaleli, ata mpe na mosala ya kosakola. Asengelaki kosalaka nyonso mpo azala ndakisa malamu. Mpo na yango, Timote asengelaki kokoba kokola na elimo.
5, 6. (a) Ntango nini bokoli ya Timote ebandaki komonana polele? (b) Ndenge nini bilenge lelo oyo bakoki komekola Timote na likambo yango?
5 Na mobu soki 61 to 64 T.B., ntango Paulo apesaki ye toli yango, Timote azalaki nkulutu moko ya makoki. Azalaki moklisto ya sika te. Na mobu soki 49 to 50 T.B., wana Timote azalaki na mbula soki 20, “bandeko na kati ya Lisitala mpe na Ikoniumu,” oyo bamonaki bokoli na ye ya elimo, “bazalaki koloba mpo na ye na ndenge ya malamu.” (Mis. 16:1-5) Na ntango yango, Paulo amemaki Timote na mobembo na ye ya misionɛrɛ. Nsima ya kotalela Timote na boumeli ya mwa basanza, Paulo atindaki ye na Tesaloniki akende kobɔndisa mpe kolendisa baklisto ya engumba yango. (Tángá 1 Batesaloniki 3:1-3, 6.) Emonani ete banda bolenge, Timote azalaki komonisa polele bokoli na ye epai ya basusu.
6 Bilenge baklisto, bósala makasi mpo na kolona bizaleli ya malamu banda sikoyo, mpo bokoli na bino na etamboli ya boklisto mpe makoki na bino ya koteya Biblia emonana polele. Banda ntango azalaki na mbula 12, Yesu “akobaki kokola na bwanya.” (Luka 2:52) Tótala sikoyo ndenge bokoki komonisa polele bokoli na bino na makambo misato oyo: (1) Ntango tokutani na mikakatano, (2) ntango ozali kokanisa kobala, mpe (3) ntango ozali kosala nyonso mpo na kokóma “ministre ya malamu mpenza.”—1 Tim. 4:6.
Zalá na “makanisi malamu” liboso ya mikakatano
7. Mikakatano ekoki kosala elenge nini?
7 Carol, elenge moko ya mbula 17, alobaki boye: “Mikolo mosusu, lokola nazalaki kolɛmba mpenza na nzoto mpe na makanisi, nazalaki kutu koboya kolamuka na ntɔngɔ.”a Nini ezalaki kotungisa ye? Ntango Carol azalaki na mbula 10, baboti na ye bakabwanaki mpe akómaki kofanda na mama na ye, oyo azalaki kotosa mitinda ya Biblia te. Lokola Carol, ekoki kozala ete yo mpe ozali na mikakatano oyo ozali komona ete ekosila te.
8. Mikakatano nini Timote azalaki kobundana na yango?
8 Ntango Timote azalaki kokola na elimo, azalaki mpe na makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Na ndakisa, azalaki kobɛlabɛla mpo na estoma na ye. (1 Tim. 5:23) Ntango Paulo atindaki ye na Kolinti mpo na kosilisa mwa makambo oyo bato oyo bazalaki kotyola Paulo babimisaki kuna, asɛngaki bandeko ya lisangá báyokela Timote mpo “azala na kobanga te” na kati na bango. (1 Kol. 4:17; 16:10, 11) Emonani ete Timote azalaki nsɔninsɔni.
9. Kozala na “makanisi malamu” elimboli nini, mpe ndenge nini yango ekeseni na kozala bibangabanga?
9 Na nsima, Paulo apesaki Timote toli oyo: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi ya nguya mpe ya bolingo mpe ya makanisi malamu.” (2 Tim. 1:7) Kozala na “makanisi malamu” elimboli kozala na likoki ya kokanisa mpe kososola malamu. Elimboli mpe kondima makambo ndenge ezali, kasi te koluka ezala ndenge yo olingi. Bilenge mosusu bazalaka bibangabanga mpe balukaka kokima makambo oyo ezali kotungisa bango; yango wana bakómaka kolalalala, kolekisa ntango mingi liboso ya televizyo, komɛla bangi to kolangwa masanga, komipesa na biyenga to na pite. Biblia elobi na baklisto boye: “Tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.”—Tito 2:12.
10, 11. Ndenge nini kozala na makanisi malamu ekoki kosalisa biso tókɔmela na elimo?
10 Biblia elendisi “bilenge mibali ete bázala bato ya makanisi malamu.” (Tito 2:6) Kotosa toli yango ekotinda bino bóbondelaka ntango bokutani na mikakatano mpe bósɛngaka Nzambe apesa bino makasi. (Tángá 1 Petelo 4:7.) Na ndenge yango, bokokóma mpenza kotya motema na “makasi oyo Nzambe azali kopesa.”—1 Pet. 4:11.
11 Kozala na makanisi malamu mpe kobondela esalisaki Carol mingi. Alobi boye: “Kotɛmɛla etamboli mabe ya mama na ngai ezalaki likambo moko ya mpasi mingi mpo na ngai. Kasi, libondeli esalisaki ngai mpenza. Nayebi ete Yehova azali na ngai, yango wana nabangaka lisusu te.” Kobosana te ete mikakatano ekoki kobongisa mpe kokembisa yo. (Nz. 105:17-19; Bil. 3:27) Ezala okutani na mikakatano ya ndenge nini, Nzambe akotika yo te. ‘Akosunga yo.’—Yis. 41:10.
Ntango ozali kokanisa kobala
12. Mpo na nini moklisto oyo azali kokanisa kobala asengeli kotalela toli oyo ezali na Masese 20:25?
12 Bilenge mosusu bawelaka kobala mpo bakanisaka ete yango ekosilisa mawa na bango, mikakatano ya kozanga oyo ya yo moto, mpe mikakatano oyo bazali kokutana na yango na ndako ya baboti. Nzokande, ndai ya libala ezali likambo ya lisɛki te. Bato mosusu na ntango ya kala balapaki ndai ya kosalela Nzambe kozanga kokanisa liboso. (Tángá Masese 20:25.) Ntango mosusu, bilenge bakanisaka mpenza te na mikumba oyo libala ekoki komemela bango. Na nsima, bakómaka komona ete libala ezali ndenge bazalaki kokanisa te.
13. Mituna nini bilenge oyo bazali kokanisa kobala basengeli komituna, mpe toli nini ekoki kosalisa bango?
13 Yango wana, liboso bókoba tii na kobalana, omituna naino: ‘Mpo na nini nalingi kobala? Makambo nini nazali kozela na libala? Moto oyo nalingi kobalana na ye abongi na ngai? Nasili komibongisa mpo na kokokisa mikumba ya libala?’ Mpo na kosalisa yo omitalela malamu, “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisá masolo mingi na likambo yango.b (Mat. 24:45-47) Talelá masolo yango lokola toli oyo Yehova azali kopesa yo. Tángá yango na likebi mpenza mpe salelá yango. Kozala lokola “mbalata to mpunda te oyo ezali na mayele te.” (Nz. 32:8, 9) Osengeli mpe kokɔmela na ndenge ya kotalela mikumba ya libala. Soki omoni ete bokoki kokoba tii na kobalana, kobosana te ete osengeli kozala “ndakisa . . . na bopɛto ya bizaleli.”—1 Tim. 4:12.
14. Ndenge nini kokɔmela na elimo ekosalisa yo soki obali?
14 Kokɔmela na elimo esalisaka mpe nsima ya kobalana. Moklisto oyo akɔmeli asalaka makasi mpo akóma moto oyo alongobani na ndenge ya Klisto. (Ef. 4:11-14) Asalaka makasi mpo na kokóma na bizaleli lokola oyo ya Klisto. Ndakisa na biso, ‘Klisto amisepelisaki ye moko te.’ (Lom. 15:3) Ntango mwasi ná mobali bazali mokomoko koluka bolamu ya moninga, libala ekozala na kimya. (1 Kol. 10:24) Mobali akolinga mwasi na ye makasi, mpe mwasi akomemya mobali na ye ndenge Yesu amemyaka Mokonzi na ye.—1 Kol. 11:3; Ef. 5:25.
‘Kokisá mosala na yo malamumalamu’
15, 16. Ndenge nini okoki komonisa bokoli na yo polele na mosala ya kosakola?
15 Mpo na kobenda likebi ya Timote na mokumba monene oyo azwaki, Paulo akomelaki ye boye: “Nazali kopesa yo mokumba mpenza liboso ya Nzambe mpe ya Klisto Yesu, . . . sakolá liloba, salá yango na molende.” Abakisaki boye: “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo ya ministre malamumalamu.” (2 Tim. 4:1, 2, 5) Mpo na kokokisa mokumba yango, Timote asengelaki ‘koleisama na maloba ya kondima.’—Tángá 1 Timote 4:6.
16 Ndenge nini okoki ‘koleisama na maloba ya kondima’? Paulo akomaki boye: “Kobá komipesa na botángi liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya. Kanisaká malamumalamu makambo wana; omipesa mobimba na yango.” (1 Tim. 4:13, 15) Mpo na kokɔmela, esɛngaka komipesa na koyekola. Maloba “omipesa mobimba” ezali kopesa likanisi ya komikɔtisa mpenza na mosala to likambo moko. Oyekolaka ndenge nini? Omipesaka mobimba na koyekola “makambo mozindo ya Nzambe”? (1 Kol. 2:10) To oyekolaka kaka likolólikoló? Komanyola makambo oyo ozali koyekola ekolendisa yo omipesa mobimba.—Tángá Masese 2:1-5.
17, 18. (a) Makoki nini osengeli kosala makasi okóma na yango? (b) Ndenge nini kozala na elimo lokola oyo ya Timote ekosalisa yo na mosala ya kosakola?
17 Michelle, elenge mwasi moko mobongisi-nzela, alobaki boye: “Mpo nazala makasi na mosala ya kosakola, nazalaka na programɛ malamu ya koyekola mpe nazangisaka makita te. Yango wana nazali ntango nyonso kokola na elimo.” Kozala mobongisi-nzela ekosalisa yo oyeba lisusu malamu kosalela Biblia na mosala ya kosakola mpe okola na elimo. Salá makasi ozala motángi ya solosolo mpe opesaka biyano ya malamu na makita. Mpo na komonisa polele ete ozali kokɔmela na elimo, ekosɛnga obongisaka malamu masolo oyo bapesi yo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe olobelaka kaka makambo oyo basɛngi yo olobela.
18 ‘Kosala mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu’ esɛngaka kobongisa lisusu malamu mosala na biso ya kosakola mpe kosalisa basusu bázwa lobiko. Yango esɛngaka kokolisa “mayele ya koteya.” (2 Tim. 4:2) Soki ozali kosakola na bandeko oyo bakɔmeli na mosala yango, okoyekola mayele na bango ya koteya, ndenge Timote ayekolaki epai ya Paulo. (1 Kol. 4:17) Mpo na bato oyo asalisaki, Paulo alobaki ete asakwelaki bango kaka nsango malamu te, kasi apesaki ‘molimo na ye moko,’ to bomoi na ye mpo na kosalisa bango, mpamba te bakómaki balingami na ye. (1 Tes. 2:8) Mpo na kolanda ndakisa ya Paulo na mosala ya kosakola, osengeli kozala na makanisi ndenge moko na Timote, oyo azalaki komibanzabanza mpenza mpo na basusu mpe ‘asalaki lokola moombo mpo nsango malamu ekende liboso.’ (Tángá Bafilipi 2:19-23.) Omonisaka elimo yango na mosala ya kosakola?
Kokola na elimo ekopesa yo esengo
19, 20. Mpo na nini kokola na elimo epesaka esengo?
19 Esɛngaka milende mpo na kokola na elimo. Kasi, soki ozali kokolisa mayele na yo ya koteya, nsukansuka okozwa libaku ya “kokómisa bato mingi bato ya bomɛngo” na elimo, mpe bakokóma ‘esengo to motole na yo ya nsai.’ (2 Kol. 6:10; 1 Tes. 2:19) Fred, mobongisi-nzela moko, alobi boye: “Sikoyo nakómi kopesa ntango mingi mpo na kosalisa basusu. Ezali mpenza solo ete esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”
20 Mpo na esengo oyo azwi na ndenge akɔmeli na elimo, Daphne, elenge mwasi moko mobongisi-nzela, alobi boye: “Ntango nakómaki kotalela Yehova lokola Moto mpenza, nakómaki na boyokani makasi na ye. Ntango ozali kosala nyonso mpo na kosepelisa Yehova, okozala mpenza na esengo!” Atako bato bakoki te komona ndenge tozali kokola na elimo, Yehova azangaka te komona yango mpe asepelaka na yango. (Ebe. 4:13) Ntembe ezali te ete bino bilenge bokoki kopesa Tata na biso ya likoló nkembo mpe lokumu. Bókoba kosepelisa motema na ye wana bozali komonisa polele bokoli na bino.—Mas. 27:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo mosusu ezali ya bango te.
b “Moto oyo abongi mpenza na ngai?” na buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, Volimi 2 (na Lifalanse); “Toli ya Nzambe mpo na kopona molongani,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2001; mpe “Ebongi mpenza kobala ntango ozali naino elenge?” na Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ 1983 (na Lifalanse).
Oyekoli makambo nini?
• Kokola na elimo esɛngaka nini?
• Ndenge nini okoki komonisa polele bokoli na yo . . .
ntango okutani na mikakatano?
ntango ozali kokanisa kobala?
na mosala ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 15]
Libondeli ekoki kosalisa yo olonga mikakatano
[Elilingi na lokasa 16]
Ndenge nini bilenge bakoki kokolisa mayele na bango ya koteya?