Tokozwa toli ya malamu wapi?
SOKI ozali koluka toli, batoli ezali beboo. Babuku mpe biloko mosusu oyo moto akoki kosalela ye moko mpo na kozwa toli ezali se kokóma mingi na mokili. Na bisika lokola Angleterre, Amerika ya Sudi, Japon, mpe na États-Unis, babuku ya toli ezali kotɛkama mingi koleka babuku mosusu. Bavideo, baseminɛrɛ, mpe baprogramɛ ya televizyo oyo eyebisaka bato ndenge bakoki kosilisa mikakatano na bango ezali kobenda ebele ya bato. Balobelaka mingi ndenge oyo moto akoki kosilisa ye moko mokakatano na ye, kozanga aluka toli epai ya bato ya pisikoloji, bapesi-toli na makambo ya libala, bapastɛrɛ to basango. Batoli yango elobelaka makambo nini?
Mbala mingi elobelaka makambo lokola ndenge ya kolonga to kozwa lokumu, ndenge ya kofanda malamu na libala mpe ndenge ya kobɔkɔla bana. Mosusu ezalaka mpo na kosalisa bato oyo bazali kotungisama na makanisi, baoyo bazali konyokwama mpe baoyo mabala na bango ekufá. Bato mingi balukaka mpe toli oyo ekoki kosalisa bango bátika kolya na lokoso, bátika komɛla likaya mpe kolangwa masanga. Batoli yango esalisaka mpenza? Ntango mosusu esalisaka, kasi mbala mingi esalisaka te. Yango wana, ebongi kolanda toli oyo ya Biblia: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.”—Masese 14:15.
Babuku to biloko mosusu oyo moto akoki kosalela mpo na kozwa toli, ekeseni na babuku oyo eteyaka makambo lokola kokanga bafɔtɔ, kotánga mbongo (comptabilité), to koloba monɔkɔ moko. Babuku yango ekoki mpenza kosalisa moto azwa boyebi kozanga kobimisa mbongo mingi. Nzokande, babuku to biloko mosusu oyo moto akoki kosalela ye moko mpo na kozwa toli, ezala na makambo ya mombongo, libala, kobɔkɔla bana to maladi ya motó ekeseni mpenza. Mbala mingi etindaka moto akóma na lolenge moko boye ya bomoi to ya kokanisa. Na yango, ekozala malamu tómituna: ‘Nani azali kopesa toli yango? Azwi yango wapi?’
Mbala mingi, batoli ya bato yango eutaka na boyebi ya solosolo te. Bamosusu bapesaka toli oyo bato mingi balingaka koyoka, mpo bayebi ete bakozwa mbongo mingi soki balobeli yango. Na mboka moko mpamba, babuku to biloko mosusu ya toli ekɔtisaka dolare koleka miliare mwambe mbula na mbula!
Batoli yango esalisaka mpenza?
Ntango moto akei koluka toli, mposa na ye ezalaka ete esalisa ye mpenza. Kasi ntango mosusu, toli yango ezalaka kaka ya likolólikoló to makanisi mpamba. Na ndakisa, basukaka kaka na koyebisa moto ete ‘soki ozali na makanisi ya malamu, okolonga. Ezala eloko nini oyo olingi, na ndakisa mbongo, kozala nzoto kolɔngɔnɔ, to koyokana malamu na bato, okozwa yango soki ozali na makanisi ya malamu.’ Toli ya ndenge wana ekoki kosalisa mpenza? Ekosalisa yo oyeba kotalela makambo ndenge ezali mpe olonga mitungisi ya bomoi?
Tózwa ndakisa ya babuku oyo elobelaka koyokana malamu na bato to na molongani, oyo ezali kati na babuku oyo bato balingaka mingi. Esalisaka bato bázala na mabota ya esengo, mpe ya malamu? Ntango nyonso te. Mwasi moko oyo atalelaka babuku yango amonisaki ete mokomi ya babuku oyo epesaka toli na makambo ya bolingo, oyo ezalaki kotɛkama mingi na Amerika ya Sudi “ayebisaki batángi ndenge ya koyokana malamu na bato mpe ndenge ya komipesa kilo.” Moto oyo akomaki buku yango amonisi ete kokangama na moto oyo ozali koyokana na ye malamu te, ezali lokola komitɛka. Mpo na ye, likambo ya ntina ezali kosala oyo ekomemela yo bolamu na esika ya kokanisaka mikakatano na yo to koluka kosilisa yango.
Babuku mpe biloko yango mosusu ekoki kozala na batoli ya malamu. Kasi, ekoki mpe kopesa toli ya mabe. Mopesi-toli moko akoki kopesa toli ya malamu na likambo moko, kasi na likambo mosusu apesi toli ya mabe. Ezali mpasi kopona toli ya malamu na kati ya ebele ya batoli wana, oyo mbala mingi ekesanaka. Toli ya nani osengeli kotyela motema? Omituna boye: ‘Moto oyo apesi toli yango aluki malamumalamu, to apesi kaka makanisi na ye moko? Batoli na ye emonisi nde ete alingaka mbongo mpe lokumu mingi?’
Ezali na buku moko ya kala oyo batoli na yango esilaka ngala te; buku yango ezali Biblia. Epesaka toli ya malamu na makambo mingi oyo bapesi-toli ya lelo balobelaka mpe na makambo mosusu. Esalisi bamilio ya bato bálanda toli oyo: ‘Bókómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na bino . . . Bólata bomoto ya sika.’ (Baefese 4:23, 24) Biblia esalisaka biso tóyeba ntina ya mikakatano na biso mpe ndenge oyo tokoki kolonga yango. Likambo eleki ntina, elendisaka biso tósala oyo ezali malamu. Lisolo oyo elandi ekolimbola biso likambo yango.