“Kotosa eleki mbeka”
SAULO azalaki mokonzi ya liboso na Yisraele ya kala. Atako Nzambe ya solo nde aponaki ye, nsukansuka Saulo azalaki lisusu na botosi te.
Mabunga nini Saulo asalaki? Akokaki kokima yango? Kotalela ndakisa na ye ekoki kosalisa biso na nini?
Yehova amonisi mokonzi oyo ye aponi
Liboso Saulo akóma mokonzi, mosakoli Samwele azalaki kosala lokola momonisi ya Nzambe na Yisraele. Sikoyo Samwele akómaki mobange, mpe bana na ye bazalaki sembo te. Kaka na ntango yango, banguna ya ekólo Yisraele bazalaki koluka kobundisa yango. Ntango mikóló ya Yisraele basɛngaki Samwele atyela bango mokonzi oyo akoki kosambisa bango mpe kokamba bango na etumba, Yehova apesaki mosakoli yango malako ete atya Saulo mafuta mpo azala mokambi mpe alobaki boye: “Akobikisa bato na ngai na lobɔkɔ ya Bafilistia.”—1 Sa. 8:4-7, 20; 9:16.
Saulo azalaki “elenge mpe kitoko.” Kasi, longola kitoko na ye, azalaki na bizaleli mosusu ya malamu. Azalaki na komikitisa. Na ndakisa, Saulo atunaki Samwele boye: “Ngai nazali moto ya Benyamina, ya etuluka oyo eleki moke na bituluka ya Yisraele, mpe libota na ngai ezangi mpenza ntina na mabota ya etuluka ya Benyamina, boye te? Bongo mpo na nini olobi na ngai likambo ya boye?” Saulo amitombolaki te, ezala mpo na ye moko to mpo na libota na bango, atako tata na ye Kishe azalaki na “bomɛngo mingi mpe moto monene.”—1 Sa. 9:1, 2, 21.
Talá mpe ndenge Saulo asalaki ntango Samwele alobaki polele ete Yehova aponi ye mpo azala mokonzi ya Yisraele. Liboso, ntango Samwele atyaki Saulo mafuta bazalaki kaka bango mibale mpe alobaki na ye boye: “Salá nyonso oyo lobɔkɔ na yo ekoki kosala, mpamba te Nzambe ya solo azali na yo.” Na nsima, mosakoli yango ayanganisaki bato mpo ayebisa bango moto oyo Yehova aponaki. Nzokande, ntango alobaki ete ezali Saulo, Saulo azalaki komonana te. Saulo, moto ya nsɔninsɔni abombanaki. Yehova alakisaki esika oyo azalaki, mpe bagangaki ete Saulo akómi mokonzi.—1 Sa. 10:7, 20-24.
Na etumba
Eumelaki te, Saulo amonisaki ete soki moto abɛti ntembe mpo na makoki na ye, amikosi. Ntango Baamone bayaki kobundisa engumba moko ya Yisraele, “elimo ya Nzambe ebandaki kosala kati na Saulo.” Na bokonzi mpenza, Saulo abengisaki babundi ya ekólo, abongisaki bango, akambaki bango mpe balongaki etumba. Kasi, Saulo amonisaki ete Nzambe nde asalisaki bango bálonga; alobaki boye: “Lelo, Yehova amemi lobiko na Yisraele.”—1 Sa. 11:1-13.
Saulo azalaki na bizaleli ya malamu mpe Nzambe azalaki kopambola ye. Andimaki mpe ete nguya ya Yehova ezali mingi. Kasi, mpo Bayisraele mpe mokonzi na bango bákoba kolonga, ezalaki kosɛnga básala likambo moko ya ntina mingi. Samwele ayebisaki bato ya Yisraele ete: “Soki bobangi Yehova mpe bosaleli ye mpenza mpe botosi mongongo na ye, mpe soki botombokeli etinda ya Yehova te, bino mpe mokonzi oyo akoyangela bino bokomonisa mpenza ete bozali kolanda Yehova Nzambe na bino.” Bayisraele bakokaki kolikya nini soki batikali sembo epai ya Nzambe? Samwele alobaki boye: “Yehova akotika bato na ye te, mpo na nkombo na ye monene, mpamba te Yehova akani kokómisa bino bato na ye.”—1 Sa. 12:14, 22.
Kotosa ezalaki likambo ya ntina mingi mpo na kondimama na Nzambe, mpe ezali bongo tii lelo. Ntango basaleli ya Yehova bazali kotosa mitindo na ye, ye apambolaka bango. Kasi kozanga botosi epai ya Yehova ememaka nini?
“Osali likambo na bozoba”
Likambo oyo Saulo asalaki Bafilistia na nsima etindaki bango básala likambo moko monene. Limpinga moko ya bato “ebele lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu” eyelaki Saulo. “Bato ya Yisraele bamonaki ete makambo eyelaki bango ndongo, mpamba te bato bazalaki na nkaka makasi; mpe bato bakendaki komibomba na kati ya mibenga mpe ya mabulu, mpe na mabanga mpe na biteni ya ndako ya nse oyo nsamba na yango egumbamá mpe na mabulu ya mai.” (1 Sa. 13:5, 6) Saulo akosala nini?
Samwele ayebisaki Saulo ete akokuta ye na Gilgale, epai mosakoli yango akotumba bambeka. Saulo azelaki mingi, kasi Samwele azalaki koya kaka te, mpe limpinga ya basoda ya Saulo ezalaki kopanzana. Na yango, Saulo ye moko azwaki ekateli ya kotumba mbeka. Kaka ntango asilisaki, Samwele mpe akómaki. Nsima ya koyoka likambo oyo Saulo asalaki, Samwele ayebisaki ye boye: “Osali likambo na bozoba. Otosi te mobeko oyo Yehova Nzambe na yo apesaki yo, mpo soki otosaka, Yehova alingaki kokómisa bokonzi na yo makasi na Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te. Kasi sikoyo bokonzi na yo ekoumela te. Ya solo, Yehova akozwa moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye; mpe Yehova akotya ye mokambi ya bato na ye, mpamba te yo otosi te mitindo oyo Yehova apesaki yo.”—1 Sa. 10:8; 13:8, 13, 14.
Saulo azangaki kondima ndenge aponaki na lolendo nyonso kobuka etinda ya Nzambe ya kozela Samwele aya kopesa mbeka. Ezaleli ya Saulo ekesanaki mpenza na oyo ya Gideona, mokambi moko ya kala ya basoda ya Yisraele! Yehova ayebisaki Gideona akitisa motángo ya basoda na ye oyo ezalaki 32 000 mpo bákóma 300, mpe Gideona atosaki. Mpo na nini? Mpo azalaki na kondima epai ya Yehova. Na lisalisi ya Nzambe, Gideona alongaki banguna oyo bazalaki 135 000. (Bas. 7:1-7, 17-22; 8:10) Yehova alingaki mpe kosalisa Saulo. Kasi lokola Saulo azangaki botosi, Bafilistia bapunzaki Yisraele.—1 Sa. 13:17, 18.
Ntango tokutani na mikakatano, ndenge nini tozwaka bikateli? Bato oyo bazangi kondima bakoki komona ete malamu nde koboya kolanda mitinda ya Nzambe. Wana Samwele azalaki te, mbala mosusu Saulo akanisaki ete asali likambo ya bwanya. Nzokande, mpo na bato oyo bazali na mposa makasi ya kondimama na Nzambe, kotosa mitinda ya Makomami oyo etali likambo oyo bakutani na yango nde nzela kaka moko oyo ebongi kolanda.
Yehova aboyi Saulo
Ntango babundisaki Baamaleke, Saulo asalaki libunga mosusu ya monene. Nzambe alobaki ete Baamaleke bakozwa etumbu mpo babundisaki Bayisraele ntango bazalaki kouta na Ezipito, atako Bayisraele basalaki bango mabe moko te. (Kob. 17:8; Mib. 25:17, 18) Longola yango, Baamaleke basanganaki mpe na bikólo mosusu mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe na ntango ya Basambisi. (Bas. 3:12, 13; 6:1-3, 33) Na yango, Yehova asɛngaki Baamaleke bázongisa monɔkɔ mpe atindaki Saulo apesa bango etumbu.—1 Sa. 15:1-3.
Na esika atosa mitindo oyo Yehova apesaki ye ya kosilisa nyɛɛ banguna na bango Baamaleke mpe kobebisa biloko na bango, Saulo akangaki mokonzi na bango mpe atikaki banyama na bango oyo elekaki kitoko. Nini esalemaki ntango Samwele atunaki Saulo alimbola ntina oyo asalaki bongo? Saulo alukaki kopesa basusu foti mpe alobaki boye: “Bato bayokaki mawa mpo na banyama oyo elekaki kitoko na kati ya etonga ya bampate mpe ya bangɔmbɛ, mpo na kopesa Yehova . . . mbeka.” Ezala Saulo azalaki mpenza na likanisi ya kopesa banyama yango mbeka to te, azangaki botosi. Saulo azalaki ‘moke na miso na ye moko’ lisusu te. Na yango, mosakoli ya Nzambe amonisaki ete Saulo azangaki botosi epai ya Nzambe. Mpe Samwele alobaki boye: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba mpe na bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa eleki mbeka . . . Lokola oboyi liloba ya Yehova, ye mpe aboyi yo ozala mokonzi.”—1 Sa. 15:15, 17, 22, 23.
Ntango Yehova alongolaki elimo santu na ye mpe lipamboli na ye likoló ya Saulo, “elimo moko ya mabe” ebandaki kotungisa mokonzi yango ya liboso ya Yisraele. Saulo akómaki kokanisela Davidi mabe mpe koyokela ye zuwa—Davidi azalaki moto oyo Yehova akopesa bokonzi na nsima. Mbala soki mibale, Saulo alukaki koboma Davidi. Biblia elobi ete ntango amonaki ete “Yehova azali na Davidi,” “Saulo akómaki monguna ya Davidi libela.” Saulo alukaki kolandalanda ye mpe apesaki kutu mitindo ete báboma banganga-nzambe 85 mpe bato mosusu. Tokoki kokamwa te ete Yehova aboyaki Saulo!—1 Sa. 16:14; 18:11, 25, 28, 29; 19:10, 11; 20:32, 33; 22:16-19.
Ntango Bafilistia bayaki lisusu kobundisa Yisraele, Saulo akendaki epai ya nganga-nkisi mpo na koluka lisalisi, kasi esimbaki te. Mokolo oyo elandaki, azokaki makasi na etumba mpe amibomaki. (1 Sa. 28:4-8; 31:3, 4) Mpo na mokonzi yango ya liboso ya Yisraele oyo azangaki botosi, Biblia elobi boye: “Saulo akufaki mpo azalaki sembo te mpe mpo, na makambo oyo asalaki, andimelaki Yehova te na ndenge atosaki te liloba ya Yehova mpe lisusu mpo asɛngaki moto oyo asololaka na bilimo atunela ye makambo. Mpe atunaki Yehova te.”—1 Nt. 10:13, 14.
Ndakisa mabe ya Saulo emonisi polele ete kotosa Yehova eleki kopesa ye mbeka ata ya ndenge nini. Ntoma Yoane akomaki boye: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.” (1 Yoa. 5:3) Tóbosana ata mokolo moko te likambo oyo: Mpo boninga na biso na Nzambe eumela, tosengeli kotosa ye.
[Elilingi na lokasa 21]
Na ebandeli, Saulo azalaki mokambi ya komikitisa
[Elilingi na lokasa 23]
Mpo na nini Samwele ayebisaki Saulo ete “kotosa eleki mbeka”?