Basaleli ya Yehova balongi etumba moko molai na tribinale!
EBANDAKI na 1995 mpe eumelaki mbula 15. Na boumeli ya ntango yango nyonso, bato oyo balingaka bonsomi ya losambo te banyokolaki bakristo ya solo na Russie. Bato yango bazalaki na ekateli ya kotinda Leta apekisa mosala ya Batatoli ya Yehova na Moscou mpe na bisika mosusu. Atako bongo, Yehova amonaki malamu apesa bandeko na biso ya mibali mpe ya basi na Russie mbano mpo na bosembo na bango. Asalisaki bango bálonga. Kasi, etumba yango ebandaki ndenge nini?
BAZWI BONSOMI!
Banda na 1990 tii na 1995, bapesaki lisusu bandeko na biso na Russie bonsomi ya losambo, oyo babungisaki na 1917. Na 1991, guvɛrnema ya Union soviétique endimaki lingomba ya Batatoli. Ntango Union soviétique ekweaki, guvɛrnema ya Russie endimaki mpe Batatoli ya Yehova. Guvɛrnema yango emonisaki mpe ete guvɛrnema oyo ezalaki liboso enyokolaki Batatoli na boumeli ya bambula mingi. Na 1993, ebongiseli oyo etalelaka makambo ya kosambisa na Moscou endimaki Lisangá ya Batatoli ya Yehova ya Moscou. Kaka na mbula yango, guvɛrnema ya Russie ebimisaki mobeko likonzi (constitution) ya sika oyo epesaki moto nyonso bonsomi ya kozala na lingomba oyo alingi. Yango wana ndeko moko alobaki ete: “Tokanisá ata mokolo moko ete tokozwa bonsomi ya boye!” Na nsima, alobaki ete: “Tozeli likambo oyo mbula 50!”
Na “eleko [wana] ya malamu,” bandeko ya Russie babakisaki molende na mosala ya kosakola, mpe bato mingi bandimaki solo. (2 Tim. 4:2) Mwasi moko alobaki boye: “Bato bazalaki kosepela mingi na losambo.” Eumelaki te, motángo ya basakoli, babongisi-nzela, mpe ya masangá ebakisamaki mingi. Kutu banda na 1990 tii 1995, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki soki 300 na Moscou balekaki 5 000! Lokola motángo ya basaleli ya Yehova ezalaki komata na Moscou, banguna bakómaki komitungisa. Na 1995, babandaki kobundisa, to kofunda Batatoli ya Yehova na batribinale. Etumba yango esalemaki na biteni minene liboso eya kosila.
ANKƐTƐ MPO NA KOYEBA SOKI BAZALI BASALI-MABE
Eteni ya liboso ya etumba yango ebandaki na sanza ya Yuni 1995. Na Moscou, etuluku moko ya bato oyo bazalaki nsima ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie bafundaki bandeko na biso na Leta ete bazalaki kosala makambo ya mabe. Bato yango balobaki ete bazalaki kosala mpo na bolamu ya bato oyo basiliki mpo molongani na bango to bana na bango bakómá Batatoli. Na sanza ya Yuni 1996, baankɛtɛ esalemaki mpo na koyeba soki Batatoli ya Yehova bazali basali-mabe, kasi bazwaki eloko te. Nzokande, kaka etuluku yango efundaki bandeko lisusu ete bazali kosala mabe. Baankɛtɛ esalemaki lisusu, kasi bazwaki eloko te. Atako bongo, banguna wana bafundaki Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya misato, kaka mpo na makambo yango. Na mbala oyo mpe, basalaki baankɛtɛ epai ya Batatoli ya Yehova ya Moscou, kasi prokirɛrɛ asukisaki kaka ndenge moko—likambo moko te emonisaki ete Batatoli ya Yehova bazali basali-mabe. Na nsima, banguna wana bafundaki lisusu mpo na mbala ya minei, kaka mpo na makambo yango. Na mbala oyo mpe, prokirɛrɛ amonaki eloko te. Likambo ya kokamwa, kaka bato yango basɛngaki ete ankɛtɛ mosusu esalema. Nsukansuka, na mokolo ya 13 Aprili 1998, moto oyo asalaki ankɛtɛ alobaki ete likambo yango esuki wana.
Avoka moko oyo ayebaki likambo yango alobaki boye: “Na ntango wana, likambo moko ya kokamwa esalemaki.” Momonisi ya biro ya prokirɛrɛ oyo atambwisaki ankɛtɛ yango ya mitano alobaki ete eloko moko te emonisi ete Batatoli ya Yehova bazalaki basali-mabe. Kasi, na nsima mwasi yango apesaki toli ete na esika polisi efunda Batatoli, malamu nde bato ya mpamba báfunda bango. Mwasi yango alobaki ete Batatoli ya Yehova ya Moscou babukaki mibeko ya ekólo na bango mpe ya bikólo mosusu. Prokirɛrɛ ya tribinale oyo ezali na nɔrdi ya Moscou andimaki kofunda bandeko na biso.a Na mokolo ya 29 Sɛtɛmbɛ 1998, babandaki kosamba likambo yango na tribinale ya Golovinsky, na Moscou. Wana ezalaki eteni ya mibale ya etumba.
BIBLIA NA TRIBINALE
Na kati ya ndako ya tribinale ya nɔrdi ya Moscou oyo etondaki na bato, prokirɛrɛ Tatyana Kondratyeva, abandaki na mobeko moko oyo ebimaki na 1997, oyo elobaki ete banda kala, kaka Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, ya Bamizilma, ya Bayuda, mpe ya Bouddha nde endimami.b Mpo na mobeko yango, ekómaki mpasi mpo mangomba mosusu endimama na Leta. Mobeko yango epesi mpe batribinale nzela ya kopekisa mangomba oyo ezali kolendisa bato báyinaka basusu. Prokirɛrɛ asalelaki mobeko yango; alobaki ete Batatoli ya Yehova bazali kolendisa koyinana mpe bazali kopanza mabota, yango wana esengeli kopekisa lingomba na bango.
Avoka oyo azalaki kolobela bandeko na biso atunaki boye: “Na Lisangá ya Moscou, banani babuki mobeko wana?” Prokirɛrɛ akokaki kotánga ata nkombo moko te. Kasi alobaki ete mikanda ya Batatoli ya Yehova etindaka bango báyina bato ya mangomba mosusu. Mpo na kondimisa yango, mwasi yango atángaki zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ná mikanda mosusu (talá wana na likoló). Ntango batunaki ye soki na ndenge nini mikanda yango ezali kotinda na koyinana, alobaki boye: “Batatoli ya Yehova bateyaka ete bango nde bazali na lingomba ya solo.”
Avoka moko, oyo azali ndeko na biso Motatoli, apesaki zuzi ná prokirɛrɛ Biblia; na nsima atángaki Baefese 4:5: “Nkolo kaka moko, kondima kaka moko, batisimo kaka moko.” Eumelaki te, zuzi, prokirɛrɛ, mpe avoka, bango nyonso na Babiblia na mabɔkɔ, bakómaki kolobela nde bavɛrsɛ lokola Yoane 17:18 mpe Yakobo 1:27. Zuzi atunaki boye: “Bavɛrsɛ wana ezali kolendisa koyina bato ya mangomba mosusu?” Prokirɛrɛ ayanolaki ete abongi te mpo na kolobela makambo ya Biblia. Avoka alakisaki mikanda ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie oyo ezalaki koloba mabe mingi mpo na Batatoli ya Yehova mpe atunaki boye: “Makambo oyo ezali na mikanda oyo ebuki mobeko wana?” Prokirɛrɛ azongisaki ete: “Nabongi te mpo na kolobela makambo oyo bato ya mangomba balobi.”
BIFUNDELI EZANGÁ BILEMBETELI
Mpo na kofunda Batatoli ete bazali kopanza mabota, prokirɛrɛ alobaki ete basalaka bafɛti te, na ndakisa Noele. Kasi, na nsima andimaki ete mobeko ya Russie esɛngisi bato básalaka fɛti ya Noele te. Bato ya Russie, ata mpe Batatoli ya Yehova, bakoki kopona. Prokirɛrɛ yango alobaki mpe ete Batatoli batikaka ‘bana bápema ndenge esengeli te mpe básepela te.’ Kasi, ntango batunaki ye, andimaki ete asololá ata na mwana moko te oyo abɔkwamá na baboti oyo bazali Batatoli. Ntango avoka moko atunaki prokirɛrɛ yango soki asilá kokɔta na makita ya Batatoli ya Yehova, ayanolaki ete: “Ezali na ntina te.”
Prokirɛrɛ yango abengaki profesɛrɛ moko ya makambo ya motó (psychiatrie) mpo apesa makanisi na ye na tribinale. Profesɛrɛ yango alobaki ete kotánga mikanda na biso epesaka maladi ya motó. Ntango avoka moko ya Batatoli ya Yehova amonaki ete mokanda oyo profesɛrɛ yango azalaki kotánga liboso ya tribinale ezalaki na makambo oyo ekokani na mokanda moko oyo bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na Russie bakomaki, profesɛrɛ yango andimaki ete biteni mosusu ezali ndenge moko, abongolaki eloko te. Alobaki boye: “Tosalelaki disquette moko.” Ntango batunaki ye mituna mosusu, emonanaki ete asalisá naino ata Motatoli ya Yehova moko te na lopitalo na ye. Nzokande, profesɛrɛ mosusu ya makambo ya motó alobaki liboso ya tribinale ete asalaki ankɛtɛ epai ya Batatoli koleka 100 na Moscou. Amonaki ete bato yango bazali na maladi ya motó te, mpe ete bakómá na limemya makasi mpo na mangomba mosusu banda bakómá Batatoli ya Yehova.
BALONGI, KASI MPO NA LIBELA TE
Na mokolo ya 12 Marsi 1999, zuzi aponaki bato mitano oyo batánga mingi báyekola mikanda ya Batatoli ya Yehova, mpe atyaki naino likambo na bango pembeni. Na ngámbo na bango, Ministère de la Justice ya Russie mpe etindaki bato oyo batánga mingi báyekola mikanda na biso. Na mokolo ya 15 Aprili 1999, bato yango oyo Ministère de la Justice etindaki balobaki ete bamoni eloko moko ya mabe te na mikanda na biso. Na yango, na mokolo ya 29 Aprili 1999, Ministère de la Justice endimaki lisusu lingomba ya Batatoli ya Yehova. Atako ankɛtɛ wana esalemaki, zuzi ya Moscou atingamaki kaka ete bato mitano oyo ye aponaki báyekola mikanda na biso. Ezalaki likambo ya kokamwa mpenza: Ministère de la Justice ya ekólo mobimba endimaki ete Batatoli ya Yehova bazali lingomba oyo endimami mpo batosaka mibeko, kasi na ntango yango, Departema ya Justice ya Moscou ezalaki kosala ankɛtɛ mpo bafundaki Batatoli ete bazali kobuka mibeko!
Mbula pene na mibale na nsima, tribinale ezongelaki lisusu likambo yango, mpe na mokolo ya 23 Febwali 2001, zuzi Yelena Prokhorycheva akataki likambo. Nsima ya kotalela makambo oyo bato oyo atindaki básala ankɛtɛ balobaki, azwaki ekateli oyo: “Ezali na ntina te kosukisa to kopekisa makambo ya losambo ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na Moscou.” Nsukansuka, tribinale emonaki ete bandeko na biso bazalaki na likambo te mpe ete bifundeli wana nyonso ezalaki lokuta! Kasi, prokirɛrɛ andimaki ekateli yango te mpe atindaki likambo yango na tribinale monene ya engumba Moscou. Sanza misato na nsima, na mokolo ya 30 Mai 2001, tribinale yango ekweisaki ekateli ya zuzi Prokhorycheva. Tribinale yango etindaki likambo yango etalelama lisusu kaka na prokirɛrɛ yango, kasi ekambama na zuzi mosusu. Eteni ya misato ya etumba elingaki kobanda.
BAKWEI, KASI LIKAMBO ESUKI TE
Na mokolo ya 30 Ɔkɔtɔbɛ 2001, zuzi Vera Dubinskaya abandaki lisusu kosambisa likambo yango.c Prokirɛrɛ Kondratyeva afundaki lisusu Batatoli ya Yehova ete bazali kolendisa koyinana mpe abakisaki ete soki Leta epekisi lisangá ya Batatoli ya Yehova, ekozala lolenge moko ya kobatela ntomo ya Batatoli ya Moscou! Ntango bayokaki maloba wana, Batatoli nyonso 10 000 ya Moscou bakomaki mbala moko mokanda mpo na koyebisa zuzi ete bango bazali na mposa ya “libateli” wana te oyo prokirɛrɛ asɛngi mpo na bango.
Prokirɛrɛ alobaki ete ezalaki na ntina moko te apesa elembeteli mpo na komonisa ete Batatoli bazali basali-mabe. Mwasi yango alobaki ete bazalaki kosambisa Batatoli ya Yehova nde mpo na mikanda mpe bindimeli na bango kasi mpo na misala na bango te. Alobaki ete akobenga molobeli moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie mpo aloba malamumalamu liboso ya tribinale. Likambo yango emonisaki ete bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie bazalaki mpenza koluka ete lingomba ya Batatoli ya Yehova epekisama. Na mokolo ya 22 Mai 2003, zuzi atindaki etuluku moko ya bato ya mayele báyekola mikanda ya Batatoli ya Yehova, lisusu.
Na mokolo ya 17 Febwali 2004, tribinale eyanganisaki bato mpo báyoka soki baoyo bayekolaki mikanda ya Batatoli ya Yehova bakoloba nini. Bato yango bamonaki ete mikanda na biso elendisaka batángi “bábatela libota mpe libala” mpe ete eloko moko te oyo emonisi ete mikanda na biso etindaka bato báyina basusu. Bato mosusu ya mayele mpe bandimaki likambo yango. Zuzi atunaki profesɛrɛ moko ya istware ya makambo ya losambo motuna oyo: “Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka?” Profesɛrɛ yango ayanolaki liboso ya tribinale ete: “Mosala ya kosakola ezali mokumba ya mokristo. Yango nde Baevanzile elobi mpe yango nde Kristo atindaki bayekoli na ye básala: ‘bókende mpe bósakola na mikili nyonso.’” Atako bongo, na mokolo ya 26 Marsi 2004, zuzi apekisaki misala ya Batatoli ya Yehova na Moscou. Na mokolo ya 16 Yuni 2004, tribinale monene ya engumba Moscou endimaki ekateli yango.d Mpo na ekateli yango, ndeko mobali moko oyo azali Motatoli banda kala alobaki boye: “Na boyangeli ya soviétique, mwana-mboka Russie asengelaki kondima ete Nzambe azali te. Lelo ekómi mwana-mboka Russie asengeli kozala na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse.”
Bandeko na biso basalaki nini na epekiseli wana? Ndenge kaka Nehemia ya ntango ya kala asalaki. Ntango banguna ya bato ya Nzambe batɛmɛlaki milende na ye mpo na kotonga lisusu efelo ya Yerusaleme, Nehemia mpe bato na ye batikaki ata botɛmɛli moko te epekisa bango kosala mosala. Bakobaki nde kotonga mpe “bazalaki kaka kotya motema na mosala.” (Neh. 4:1-6) Ndenge moko mpe, bandeko na biso na Moscou batikaki te batɛmɛli bápekisa bango kosala mosala oyo esengeli kosalema lelo oyo: kosakola nsango malamu. (1 Pe. 4:12, 16) Bazalaki na elikya ete Yehova akobatela bango mpe bamibongisaki mpo na kobunda lisusu mpo na mbala ya minei.
BOTƐMƐLI EBAKISAMI
Na mokolo ya 25 Augusto 2004, bandeko na biso batindaki mokanda epai ya Vladimir Putin, oyo azalaki prezida ya Russie na ntango wana. Na mokanda yango, bayebisaki ete bazali na susi mingi mpo na epekiseli; mokanda yango ezalaki na bavolimi 76 ná basinyatire ya bato koleka 315 000. Na ntango wana, bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie bamonisaki mpenza makanisi na bango ya mabe. Molobeli moko ya bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse na Moscou alobaki boye: “Tozali koboya mpenza misala ya Batatoli ya Yehova.” Mokonzi moko ya Bamizilma alobaki ete epekiseli yango ezali “likambo monene mpe ya malamu.”
Na yango, bato mosusu ya Russie bandimaki bifundeli wana ya lokuta mpe babandaki kobundisa Batatoli ya Yehova. Na Moscou, ntango Batatoli mosusu bazalaki na mosala ya kosakola, batɛmɛli babɛtaki bango makɔfi mpe makolo. Moto moko oyo azalaki na nkanda makasi abenganaki ndeko na biso moko ya mwasi mpe abɛtaki ye lokolo na mokɔngɔ na nkanda mpenza mpe ndeko yango akweaki mpe atutanaki na motó. Esɛngaki bámema ye na lopitalo; kasi polisi esalaki mobali yango eloko te mpo na likambo yango. Polisi ekangaki Batatoli mosusu, bazwaki bilembo ya misapi na bango, bakangaki bango bafoto, mpe bamemaki bango na bolɔkɔ butubutu. Babangisaki bakonzi ya bisika oyo Batatoli bazalaki kofutela mpo na koyangana mpe bayebisaki bango ete bakolongwa na mosala soki bakobi kopesa bango bisika yango. Eumelaki te, masangá mingi ezalaki lisusu na bisika ya kofutela te mpo na kosala makita. Na ndakisa, masangá 40 basengelaki kokabola Ndako ya Bokonzi minei mpamba oyo ezalaki na lopango moko. Moko na masangá yango ezalaki kosala diskur mpo na bato nyonso na ngonga ya 7:30 na ntɔngɔ. Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki boye: “Mpo na koya na makita, basakoli basengelaki kolamuka na ngonga ya 5:00, kasi bandimaki kosala yango na boumeli ya mbula koleka moko.”
‘MPO NA KOPESA BANGO LITATOLI’
Mpo na komonisa ete epekiseli yango eyokanaki na mibeko te, na sanza ya Desɛmbɛ 2004, baavoka na biso basɛngaki lisalisi ya Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme). (Talá etanda “Ntina oyo bazongelaki ekateli ya Russie na France,” na lokasa 6.) Mbula 6 na nsima, na mokolo ya 10 Yuni 2010, nsima ya kotalela bifundeli nyonso, Tribinale yango ekataki ete efundeli ata moko te ekweisi Batatoli ya Yehova!e Tribinale yango elobaki ete bifundeli nyonso wana ezalaki lokuta. Elobaki mpe ete guvɛrnema ya Russie esengeli kolongola epekiseli mpe kosala nyonso mpo na kobongisa mabe oyo ekateli na bango ebimiseli Batatoli ya Yehova.—Talá etanda “Ekateli ya Tribinale,” na lokasa 8.
Tribinale yango elobaki ete Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya moto ebatelaka misala ya Batatoli ya Yehova. Ekateli yango etali kaka Russie te, kasi etali mpe mikili mosusu 46 oyo ezali na kati ya Conseil de l’Europe. Longola yango, ekateli wana ekobenda mpe likebi ya bazuzi mingi, bato oyo basalaka mibeko, mpe bato mosusu na mokili mobimba oyo bayekolaka ntomo ya bato. Mpo na nini? Mpamba te, ntango bazuzi ya Tribinale bazalaki kozwa ekateli yango, balobelaki bikateli mwambe oyo Tribinale yango ezwaki liboso mpo na bolamu ya Batatoli ya Yehova. Elobelaki mpe bikateli mosusu libwa oyo ezwamaki mpo na kolongisa Batatoli ya Yehova na batribinale minene ya Afrique du Sud, Angleterre, Argentine, Canada, Espagne, États-Unis, Japon, mpe Russie. Makambo wana nyonso mpe ndenge Tribinale monene eboyaki mpenza bifundeli ya prokirɛrɛ ya Moscou ekosalisa mpenza Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ntango bazali kosamba mpo na bindimeli mpe misala na bango.
Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bakomema bino na makasi liboso ya baguvɛrnɛrɛ mpe bakonzi mpo na ngai, mpo na kopesa bango mpe bikólo litatoli.” (Mat. 10:18) Etumba wana oyo esalemaki na boumeli ya mbula 15 epesaki bato mingi ya Moscou mpe ya bisika mosusu libaku ya koyeba nkombo ya Yehova. Likebi nyonso oyo batyelaki Batatoli ntango bazalaki kosala baankɛtɛ, ntango bazalaki kosambisa bango, mpe ekateli oyo ezwamaki na tribinale ya Mpoto ezali mpenza “litatoli” mpe esalisi mpo “nsango malamu ekende liboso.” (Flp. 1:12) Kutu, lelo, ntango Batatoli ya Moscou babimaka na mosala ya kosakola, bato mingi balobaka na bango ete: “Kasi bapekisá bino te?” Mbala mingi motuna wana epesaka bandeko na biso libaku ya koyebisa bato yango makambo mosusu oyo etali bindimeli na biso. Ezali polele ete eloko mpe moto moko te akoki kopekisa biso tósakola nsango malamu ya Bokonzi. Tozali kobondela Yehova akoba kopambola mpe kosunga bandeko na biso ya mpiko oyo tolingaka mingi, na Russie.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bamemaki likambo yango na tribinale na mokolo ya 20 Aprili 1998. Pɔsɔ mibale na nsima, na mokolo ya 5 Mai 1998, Russie endimaki Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya moto (Convention européenne des droits de l’homme).
b “Mobeko yango ebimisamaki mpo na mbamba ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie, oyo ezali koluka kobatela esika na yango na Russie mpe kolinga kaka bápekisa lingomba ya Batatoli ya Yehova.”—Zulunalo Associated Press, 25 Yuni 1999.
c Likambo ya kokamwa, na dati yango, mobeko oyo ebimaki na Russie mpo na kondima ete Batatoli ya Yehova banyokwamaki mingi na boyangeli ya soviétique mpo na lingomba na bango ekokisaki mbula zomi.
d Ekateli yango epekisaki ebongiseli oyo Batatoli ya Moscou bazalaki kosalela mpe oyo endimamaki na mibeko. Banguna bakanisaki ete kosala bongo ekopekisa bandeko na biso bábima na mosala ya kosakola.
e Na mokolo ya 22 Novɛmbɛ 2010, ntango Russie esɛngaki ete likambo yango etalelama na Grande Chambre epai bazuzi minene ya Tribinale yango bazalaka, bazuzi mitano ya Grande Chambre yango baboyaki. Na yango, ekateli oyo ezwaki na mokolo ya 10 Yuni 2010 ezalaki ya nsuka mpe esengelaki kotosama.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Ntina oyo bazongelaki ekateli ya Russie na France
Na mokolo ya 28 Febwali 1996, Russie etyaki sinyatire na Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya moto. (Na mokolo ya 5 Mai 1998, Russie endimaki Boyokani yango.) Ntango etyaki sinyatire na mokanda yango, guvɛrnema ya Russie emonisaki ete bato ya ekólo na bango bazali na
‘lotomo ya kopona lingomba oyo balingi mpe kosala makambo ya lingomba na bango na ndako, na bisika ya bato ebele mpe kokɔta na lingomba mosusu soki basepeli.’—Artikle 9.
‘lotomo ya koloba mpe kokoma makanisi na bango na ndenge ya malamu mpe koyebisa yango bato mosusu.’—Artikle 10.
‘lotomo ya koyangana na makita oyo ezali na mobulu te.’—Artikle 11.
Bato to bibongiseli nyonso oyo lotomo na bango etosami te na makambo wana mpe oyo bamemaki likambo yango na batribinale ndenge na ndenge ya mboka na bango mpe likambo yango esili te, bakoki komema yango na tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato na Strasbourg, France (ezali wana likoló). Ezali na bazuzi 47—motángo ya bikólo oyo endimaki Boyokani ya mikili ya Mpoto mpo na ntomo ya moto. Ekateli oyo ezwami na Tribinale yango ezalaka ya kokakola te. Bikólo oyo endimaki boyokani yango esengeli kotosa bikateli ya tribinale yango.
[Etanda na lokasa 8]
Ekateli ya Tribinale
Talá mwa maloba oyo euti na ekateli ya Tribinale yango.
Efundeli moko elobaki ete Batatoli ya Yehova bazali kopanza mabota. Tribinale emonaki bongo te. Elobaki boye:
“Matata ebimaka nde ntango bato ya libota oyo balingi makambo ya losambo te baboyi kondima mpe kotika ndeko na bango oyo alingi makambo ya losambo amonisa mpe asala makambo ya lingomba na ye polele.”—Par. 111.
Tribinale emonaki mpe eloko moko te oyo emonisi ete Batatoli balukaka “kobebisa makanisi ya bato”; elobaki boye:
“Tribinale ekamwe ete batribinale [ya Russie] etángi ata nkombo ya moto moko te oyo alobi ete mayele oyo [Batatoli] basalelaka ebebisaki lotomo na ye ya kopona kosalela lisosoli na ye.”—Par. 129.
Efundeli mosusu elobaki ete lokola baboyaka bázongisa bango makila, Batatoli ya Yehova babebisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bandimi na bango. Tribinale emonaki bongo te; elobaki boye:
“Bonsomi ya kopona to koboya lolenge moko boye ya kosalisa nzoto, to ya kopona nkisi mosusu na esika na yango ezali na ntina mingi mpo moto asalela lotomo ya kozwa bikateli ye moko mpe kosala oyo alingi na nzoto na ye. Moto ya maladi oyo azali mokóló azali na bonsomi ya kozwa ekateli, na ndakisa, ya kondima básala ye lipaso to bápesa ye nkisi moko boye to te, to mpe bázongisa ye makila to te.”—Par. 136.