Okolanda litambwisi ya Yehova oyo etondi na bolingo?
“Nayini nzela nyonso ya lokuta.”—NZ. 119:128.
1, 2. (a) Ntango osɛngi toli mpo na kosala mobembo na esika moko, likebisi nini okosepela na yango, mpe mpo na nini? (b) Yehova akebisaka biso na nini, mpe mpo na nini?
KANISÁ naino: Olingi kosala mobembo na esika moko boye. Okei koluka lisalisi epai ya moninga moko ya motema oyo ayebi nzela yango malamu. Wana azali koyebisa yo malako oyo esengeli, mbala mosusu akoki mpe koyebisa yo likambo lokola oyo: “Kebá soki okómi na esika oyo. Elembo oyo ezali wana ezali malamu te. Bato mingi balandaki yango mpe babungaki nzela.” Okosepela na likebisi na ye mpe okolanda yango? Yehova akokani na moninga wana. Apesaka biso malako oyo tosengeli na yango mpo tókóma na nsuka ya mobembo na biso mpo na bomoi ya seko. Akebisaka biso mpe na makama oyo ekoki komema biso na nzela ya mabe.—Mib. 5:32; Yis. 30:21.
2 Na lisolo oyo mpe na oyo elandi, tokolobela mwa makama yango mosusu. Tóbosana te ete moninga na biso Yehova Nzambe akebisaka biso na makama yango mpo amibanzabanzaka mpo na biso mpe alingi biso. Alingi tózwa bomoi ya seko. Ayokaka mawa soki bato bakwei na makama yango mpe batiki kosalela ye. (Ezk. 33:11) Na lisolo oyo, tokolobela makama misato. Likama ya liboso eutaka epai ya bato mosusu, ya mibale eutaka na kati na biso moko. Oyo ya misato eutaka na eloko moko oyo ezali solo te. Tosengeli koyeba makama yango mpe ndenge Yehova azali koteya biso tókima yango. Mokomi moko ya nzembo ayebisaki Yehova ete: “Nayini nzela nyonso ya lokuta.” (Nz. 119:128) Ezali mpe bongo mpo na yo? Tótala ndenge tokoki kolendisa ekateli na biso ya kokima “nzela nyonso ya lokuta.”
Kolanda “ebele ya bato” te
3. (a) Ntango oyebi te nzela nini ozwa, mpo na nini kolanda bato mosusu ekoki kozala likama? (b) Etinda nini ya ntina mingi ezali na Kobima 23:2?
3 Ntango ozali kosala mobembo moko molai, okosala nini soki okómi na esika moko mpe oyebi mpenza te nzela nini ezali malamu? Okoki koyoka mposa ya kolanda bato mosusu ya mobembo—mingimingi soki omoni ete ebele bazali kokende na nzela moko. Kosala bongo ekozala likama. Mbala mosusu, bato yango bazali kokende esika oyo ozali kokende te, to mbala mosusu bango mpe babungi nzela. Na likambo yango, tótala etinda oyo ezali na mobeko moko oyo Yehova apesaki Bayisraele. Yehova alobaki na bazuzi mpe na bato oyo bazalaki batemwe na makambo ya kosamba ete bákeba na likama ya “kolanda ebele ya bato.” (Tángá Kobima 23:2.) Mpo na bato ya kozanga kokoka, kolanda ebele ya bato mpe na ndenge yango kobebisa bosembo ezalaka mpasi te. Nzokande, etinda oyo elobaki ete kolanda ebele ya bato te esuki kaka na makambo ya kosamba te.
4, 5. Na libaku nini Yosua ná Kalebe bakokaki kolanda ebele ya bato, kasi nini esalisaki bango bázala na mpiko?
4 Mpo na koloba solo, mposa ya kolanda ebele ya bato ekoki koyela biso na makambo mingi oyo tokutanaka na yango. Ekoki kobima na mbalakaka, mpe ekoki kozala mpasi mpenza tósala te ndenge bato mosusu bazali kosala. Na ndakisa, tókanisa likambo oyo ekómelaki Yosua ná Kalebe. Mibali yango mibale bazalaki na kati ya mibali 12 oyo batindamaki mpo na konɔnga Mokili ya Ndaka. Ntango bazongaki, mibali zomi bapesaki lapolo ya mabe mpe elɛmbisaki Bayisraele mosusu nzoto. Balobaki kutu ete bafandi mosusu ya mokili yango bazalaki bingambe oyo bautaki na Banefilime, bana oyo baanzelu oyo batombokaki babotaki na basi awa na mabele. (Eba. 6:4) Balobaki lokuta mpenza. Banefilime nyonso bakufaki na Mpela esilaki koleka bankama ya bambula, mpe batikaki ata mwana moko te. Kasi, bato oyo bazali na kondima makasi te bakoki kondima ata makanisi oyo ezangá motó ná makolo. Eumelaki te, lapolo ya lokuta oyo banɔngi 10 bapesaki ebangisaki bato mpe epesaki bango nsɔmɔ. Mosika te, Bayisraele mingi bakómaki kondima ete kokɔta na Mokili ya Ndaka, ndenge Yehova ayebisaki bango, ekozala libunga. Yosua ná Kalebe basalaki nini na mokakatano wana?—Mit. 13:25-33.
5 Balandaki ebele ya bato te. Atako bato baboyaki koyoka likambo oyo ezalaki solo, mibali yango mibale bayebisaki bango yango mpe bakangamaki na yango—ata ntango balingaki koboma bango! Nini epesaki bango mpiko wana? Ezalaki mingimingi kondima na bango epai ya Yehova. Moto oyo azali na kondima amonaka polele bokeseni oyo ezali kati na bilaka ya Yehova Nzambe mpe maloba ya lokuta ya bato. Ntango mibali yango mibale bayaki kolobela kondima na bango, bayebisaki moto nyonso ete Yehova akokisaka bilaka na ye nyonso. (Tángá Yosua 14:6, 8; 23:2, 14.) Yosua ná Kalebe bakangamaki na Nzambe na bango ya sembo, mpe baboyaki kosala ata likambo moko oyo ekokaki kopesa Yehova mawa kaka mpo na kolanda ebele ya bato oyo bazangaki kondima. Na yango, batikalaki ngwi, mpe batikelá biso lelo ndakisa ya malamu.—Mit. 14:1-10.
6. Na makambo nini tokoki koyoka mposa ya kolanda ebele ya bato?
6 Yo mpe oyokaka ntango mosusu mposa ya kolanda ebele ya bato? Bato oyo bazali mosika na Yehova mpe oyo batyolaka mitinda na ye na oyo etali malamu ná mabe bazali mpenza ebele lelo. Na oyo etali kominanola, mbala mingi ebele ya bato yango balendisaka makanisi ya lokuta. Na ndakisa, bakoki koloba ete pite mpe ekobo, mobulu, mpe misala ya bilimo mabe oyo etondi na baemisyo ya televizyo, bafilme, mpe masano ya video ezali na likama moko te. (2 Tim. 3:1-5) Ntango ozali kopona kominanola mpo na yo moko mpe libota na yo, oponaka oyo bato mosusu balobi ete lisosoli na bango emonaka yango mabe te? Soki osalaka bongo, olandaka nde ebele ya bato.
7, 8. (a) Ndenge nini komesenisa ‘makoki na biso ya kososola,’ mpe mpo na nini kosala yango ezali malamu koleka kolanda liste moko ya mibeko makasimakasi? (b) Mpo na nini ndakisa ya bilenge bakristo mingi esepelisaka yo?
7 Yehova apesá biso likabo moko kitoko oyo esalisaka biso na kozwa bikateli: ‘makoki na biso ya kososola.’ Kasi tosengeli kosalela makoki yango mpo emesana. (Ebr. 5:14) Kolanda ebele ya bato, to kozala na mibeko makasimakasi na makambo oyo tosengeli kosalela lisosoli na biso mpo na kozwa ekateli, ekomesenisa makoki na biso ya kososola te. Yango wana, na ndakisa, bapesá te basaleli ya Yehova liste moko ya bafilme, babuku, mpe basite ya Internet oyo basengeli koboya. Lokola mokili oyo ebongwanaka mpambampamba, liste ya ndenge wana ekoumela te kosila ngala. (1 Ko. 7:31) Ekopekisa nde biso tósalela likoki oyo Yehova apesá biso ya kokanisa malamu mitinda ya Biblia kobondela mpo na kosɛnga litambwisi na ye, mpe na nsima kozwa bikateli na kolanda mitinda yango.—Ef. 5:10.
8 Ya solo, ntango tozwi bikateli oyo eyokani na mitinda ya Biblia, na bantango mosusu bato bakosepela na biso te. Na ndakisa, bilenge bakristo oyo bazali naino na kelasi bazalaka na mpasi, mpo bato batindaka bango ntango nyonso bátala to básala makambo oyo bato mosusu bazali kotala to kosala. (1 Pe. 4:4) Yango wana, ezali mpenza esengo komona ete bakristo mingi, bilenge mpe mikóló, bazali komonisa kondima lokola Yosua mpe Kalebe na ndenge bazali koboya kolanda ebele ya bato.
Bólanda “mitema na bino ná miso na bino” te
9. (a) Na mobembo, mpo na nini ekoki kozala likama kolanda kaka nzela oyo motema na biso elingi? (b) Mpo na nini mobeko oyo ezali na Mitángo 15:37-39 ezalaki na ntina mpo na basaleli ya Nzambe na Yisraele?
9 Likama ya mibale oyo tokolobela eutaka na kati na biso moko. Tópesa ndakisa: Ozali kokende na esika moko boye mpe ozali na karte mpo esalisa yo okóma kuna. Nini ekosalema soki olobi ete okosalela karte yango te, kasi okolanda kaka nzela oyo motema na yo elingi, na ndakisa nzela nyonso oyo ezali na biloko kitoko ya kotala? Ezali polele ete soki osali bongo, okokóma te na esika oyo olingaki kokende. Na likambo yango, tótala mobeko mosusu oyo Yehova apesaki Bayisraele. Lelo oyo, bato mingi bayebaka te ntina ya mobeko ya kotya malenda mpe nsinga ya bulé na bilamba na bango. (Tángá Mitángo 15:37-39.) Omoni ntina ya mobeko yango? Kotosa mobeko ya ndenge wana esalisaki basaleli ya Nzambe bákesena na bikólo ya bapakano oyo ezalaki zingazinga na bango. Kosala bongo ezalaki na ntina mingi mpo Yehova akoba kosepela na bango. (Lev. 18:24, 25) Kasi, mobeko yango emonisaki mpe likama moko oyo eutaka na kati na biso moko, oyo ekoki kolongola biso na nzela ya bomoi ya seko. Na ndenge nini?
10. Ndenge nini Yehova amonisaki ete ayebi bato malamu mpenza?
10 Ntango Yehova apesaki bato na ye mobeko wana, apesaki bango ntina na yango: “Bosengeli te kolanda mitema na bino ná miso na bino, oyo bozali kolanda na pite.” Yehova alobaki bongo mpo ayebi bato malamu mpenza. Ayebi ete motema na biso, elingi koloba bomoto na biso ya kati, eumelaka te kolula makambo oyo miso emoni. Yango wana Biblia ekebisi biso ete: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?” (Yir. 17:9) Talá ntina oyo Yehova ayebisaki Bayisraele ete bálanda mitema mpe miso na bango te! Ayebaki malamu ete soki Bayisraele batali bikólo ya bapakano, makambo oyo bamoni ekoki kobenda bango. Bakokaki koluka kolata lokola bapakano yango, mpe na nsima kokanisa mpe kosala makambo lokola bango.—Mas. 13:20.
11. Ndenge nini tokoki kobendama na makambo oyo tomoni?
11 Lelo oyo, ezali kutu pɛtɛɛ mpo motema na biso ya bokosi ebendama na makambo oyo miso emoni. Tozali na mokili oyo etindaka bato bálanda bamposa ya mosuni. Na yango, ndenge nini tokoki kosalela etinda oyo ezali na Mitángo 15:39? Zingazinga na biso, na kelasi, na mosala, mpe na bakartye, bato bazali kolata na ndenge oyo emonisi ete balingi mpenza basusu bakóma na makanisi ya mbindo. Komona bato yango ntango nyonso ekoki kobenda biso mpe mposa ya komekola bango ekoki kokóma makasi. Bongo, tokoki kobanda komekola ndenge na bango ya kolata, na esika tólata lokola bakristo.—Rom. 12:1, 2.
12, 13. (a) Tosengeli kosala nini soki miso na biso elingi kotala esika oyo ebongi te? (b) Nini ekoki kotinda biso tóboya kolamusa mposa ya mabe epai ya bato mosusu?
12 Tosengeli mpenza kolona komipekisa. Soki miso na biso elingi kotala esika oyo ebongi te, tókanisa ekateli makasi ya mosembwi Yobo. Asalaki kondimana na miso na ye—azwaki ekateli ya kotala ata moke te mwasi mosusu na ndenge ya kolula ye. (Yobo 31:1) Mokonzi Davidi mpe azwaki ekateli oyo: “Nakotya eloko moko te ya mpambampamba liboso ya miso na ngai.” (Nz. 101:3) ‘Eloko ya mpambampamba’ ezali eloko nyonso oyo ekoki kobebisa lisosoli na biso ya pɛto mpe boyokani na biso na Yehova. Ekoki kozala eloko nyonso oyo miso emoni, oyo ekoki kobimisa mposa ya mabe na motema na biso mpo esala mabe.
13 Nzokande, tokolinga mpe soki moke te kokóma ‘eloko ya mpambampamba’ mpo na basusu, kotinda bango bákóma na bamposa ya mabe, na ndakisa na molato na biso. Yango wana, tosengeli kotosa ndenge Biblia elobi ete tosengeli kozala na molato ya malamu mpe ya kolekisa ndelo te. (1 Tim. 2:9) Kolekisa ndelo te na molato elakisi koboya kosala kaka oyo tolingi. Tosengeli kotalela lisosoli ya basusu, koluka liboso bolamu na bango na esika tómisepelisa biso moko. (Rom. 15:1, 2) Na lisangá ya bokristo, ezali na bilenge ebele oyo bazali ndakisa malamu mpenza na likambo yango. Tosepelaka na bango mingi mpo baboyaka ‘kolanda mitema mpe miso na bango,’ mpe baponaka nde kosepelisa Yehova na makambo nyonso oyo basalaka—ata mpe na molato na bango!
Kolanda te “biloko oyo ezali solo te”
14. Samwele apesaki likebisi nini na ntina etali kolanda “biloko oyo ezali solo te”?
14 Kanisá sikoyo ete na mobembo na yo, ozali kokatisa esobe moko monene. Na esika moko, okanisi ete omoni mai, nzokande eloko te ezali wana. Nini ekokómela yo soki otiki nzela na yo mpe obandi kokende na esika yango? Okoki kobunga mpe kokufa na esobe. Yehova ayebi malamu likama ya kotya motema na eloko oyo ezali solo te. Tózwa ndakisa. Bayisraele balingaki bákokana na bikólo mosusu, oyo ezalaki koyangelama na bato. Ezalaki lisumu monene mpo elakisaki ete baboyi Yehova azala Mokonzi na bango. Atako Yehova atikaki moto akóma mokonzi na bango, atindaki mosakoli Samwele akebisa bango polele na likama ya kolanda “biloko oyo ezali solo te” to ya kotya motema na eloko oyo ekokaki mpenza kosalisa bango te.—Tángá 1 Samwele 12:21.
15. Na ndenge nini Bayisraele balandaki biloko oyo ezali solo te?
15 Mbala mosusu Bayisraele yango bakanisaki ete bakotyela mokonzi oyo azali moto motema koleka Yehova. Soki ezali bongo, bazalaki mpenza kolanda eloko oyo ezali solo te! Mpe bazalaki na likama ya kolanda makanisi mosusu ya lokuta oyo euti na Satana. Bato oyo bazalaki koyangela bango bakokaki noki komema bango na losambo ya bikeko. Basambeli ya bikeko basalaka libunga mpo bakanisaka ete bakoki kotya motema mingi na banzambe oyo esalami na nzete to na mabanga mpo emonanaka, koleka epai ya Yehova, Nzambe oyo amonanaka te, oyo akelá biloko nyonso. Kasi ndenge Paulo alobaki yango, ekeko ezali “eloko te.” (1 Ko. 8:4) Bikeko ekoki komona te, koyoka te, koloba te, mpe kosala eloko te. Okoki komona yango mpe kosimba yango, kasi soki osambeli yango, ozali nde kolanda eloko oyo ezali solo te—eloko ya mpamba oyo ekomema kaka na likama.—Nz. 115:4-8.
16. (a) Ndenge nini Satana azali kokosa bato mingi lelo mpo bálanda biloko oyo ezali solo te? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete biloko ya mokili ezali biloko ya solo te, mingimingi soki tokokanisi yango na Yehova Nzambe?
16 Satana azali mayele mingi, mpe tii lelo atindaka bato bálanda biloko oyo ezali solo te. Na ndakisa, atindi bato mingi bákanisa ete soki bakómi na biloko mingi ya mokili, bakozala na esengo mpe na kimya. Ekoki komonana lokola ete mbongo, bomɛngo mpe mosala oyo efutaka malamu, ezali na matomba mingi. Kasi, biloko ya mokili esalaka mpenza nini soki moto abɛli, soki nkita ebebi, to ntango likama moko ebimi? Esalaka nini soki moto azali komona ete bomoi na ye ezali na ntina moko te, azali koluka litambwisi mpe biyano na mituna minene oyo etali bomoi? Ekoki kosala nini soki moto alingi kokufa? Soki totye motema na biloko ya mosuni mpo na kokokisa bamposa ya elimo, tokolɛmba nzoto. Biloko ya mokili ebikisaka te; ezali biloko oyo ezali solo te. Ekokoka kobatela bomoi na biso te, mpo epekisaka maladi ná liwa te. (Mas. 23:4, 5) Nzokande, Yehova Nzambe na biso azali mpenza solo! Tokozala na esengo mpe kimya ya solosolo kaka soki tozali na boyokani malamu na ye. Ezali esengo monene! Tótika ye soki moke te mpo na kolanda biloko oyo ezali solo te.
17. Ekateli na yo ezali nini mpo na makama oyo tolobeli na lisolo oyo?
17 Tozali na esengo te ndenge moninga na biso Yehova azali kotambwisa biso na mobembo mpo na bomoi ya seko? Soki tokobi kolanda makebisi na ye mpo na makama misato oyo tolobeli: ebele ya bato, mitema na biso, mpe biloko oyo ezali solo te, tokoki kozwa bomoi ya seko. Na lisolo elandi, tokolobela makebisi mosusu misato oyo Yehova apesi mpo na kosalisa biso tóyina mpe tóboya “nzela nyonso ya lokuta” oyo ebungisaka bato mingi.—Nz. 119:128.
Okanisi nini?
Ndenge nini okoki kosalela mitinda oyo ezali na mikapo oyo?
[Elilingi na lokasa 11]
Oyokaka mposa ya kolanda ebele ya bato?
[Elilingi na lokasa 13]
Mpo na nini kolanda motema na yo ezali likama?
[Elilingi na lokasa 14]
Ozali kolanda eloko moko oyo ezali solo te?