Lisolo ya bomoi
Boninga oyo eumeli mbula 60, kasi ezali kaka na ebandeli
Na mpokwa moko na 1951, bilenge mibali minei, oyo bazalaki na mbula mwa moke koleka 20, batɛlɛmaki na kabine moko ya telefone na engumba Ithaca, na etúká ya New York, na États-Unis, mpe na esengo mpenza, bazalaki kosolola na bato oyo bazalaki mosika na etúká ya Michigan, ya Iowa, mpe ya Californie. Bazalaki na nsango malamu ya koyebisa bango!
NA SANZA ya Febwali oyo elekaki, babongisi-nzela 122 bayaki na South Lansing, na etúká ya New York, mpo na kokɔta na kelasi ya mbala ya 17 ya Eteyelo ya Gileade. Na kati ya bandeko yango oyo bakendaki kozwa formasyo mpo na mosala ya misionɛrɛ, ezalaki na Lowell Turner, William (Bill) Kasten, Richard Kelsey, ná Ramon Templeton. Lowell ná Bill bautaki na etúká ya Michigan, Richard na etúká ya Iowa, mpe Ramon na etúká ya Californie; eumelaki te, bango minei bakómaki baninga ya motema.
Sanza soki mitano na nsima, bazalaki mitema likoló ntango bayebisaki bango ete Ndeko Nathan Knorr oyo akouta na biro monene akoya kosolola na bana-kelasi. Bandeko yango minei bamonisaki ete bakosepela bátinda bango na mboka moko, soki likoki ezali. Ntango ekokaki nde mpo báyeba bamboka oyo bakotinda bango? Ɛɛ!
Mitema na bango ekómaki lisusu likoló ntango Ndeko Knorr, oyo azalaki koloba na bana-kelasi nyonso, abandaki koyebisa bamboka oyo bakotinda bango. Baoyo babengamaki liboso na estrade ezalaki bilenge yango minei oyo bazalaki mitema likoló, kasi mitema na bango ekitaki ntango bayokaki ete bakotinda bango na mboka moko! Kasi, mboka nini? Baninga na bango ya kelasi bakamwaki mpe babɛtaki mabɔkɔ makasi ntango bayokaki ete bakotinda bango na Allemagne.
Lisolo ya bosembo oyo Batatoli ya Allemagne bamonisaki kobanda 1933 na boyangeli ya Hitler esimbaki mitema ya Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba. Bana-kelasi mingi babosanaki te ntango oyo bazalaki kobongisa bakartɔ ya bilamba mpe biloko mosusu oyo bazalaki kotindela bandeko ya Mpoto mpo na kosunga bango nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Basaleli ya Yehova na Allemagne bapesaki ndakisa malamu ya kondima, ya mpiko, mpe ya kotyela Yehova motema. Lowell alobi ete azalaki kokanisa boye: ‘Sikoyo tokozwa libaku ya koyeba malamu bandeko yango.’ Tokoki kokamwa te ndenge bango nyonso bazalaki na esengo makasi mpe bakendaki kosolola na telefone kaka na mpokwa wana!
MOBEMBO MPO NA KOKENDE NA ALLEMAGNE
Mokolo ya 27 Yuli 1951, masuwa Homeland elongwaki na libongo ya New York, mpe baninga yango minei babandaki mobembo ya mikolo 11 mpo na kokende na Allemagne. Ndeko Albert Schroeder, moko ya balakisi na Gileade, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alakisaki bango mwa maloba ya monɔkɔ ya Allemand. Lokola bato mingi ya Allemagne bazalaki na kati ya masuwa yango, bakanisaki ete bakoyekola maloba mosusu. Kasi, bamonaki ete bato yango bazalaki koloba monɔkɔ ya Allemand ndenge moko te. Yango ebulunganisaki bango!
Mokolo ya mibale, 7 Augusto na ntɔngɔ, nsima ya koyika mpiko na mikakatano ya mobembo na nzela ya mai, nsukansuka, bandeko yango bakómaki na engumba Hambourg, na Allemagne. Bipai na bipai bazalaki komona bilembo ya etumba oyo eutaki kosila eleki kaka mbula motoba. Na mawa na mitema mpo na makambo oyo bamonaki, bamataki na engbunduka mpo na kosala mobembo butubutu tii na Wiesbaden, esika biro ya filiale ezalaki na ntango wana.
Mokolo ya misato na ntɔngɔ, bakutanaki na Motatoli ya liboso na Allemagne; azalaki mpenza na nkombo ya bato ya Allemagne! Ndeko Hans amemaki bango na motuka kolongwa na gare tii na Betele, epai atikaki bango na mabɔkɔ ya ndeko mwasi moko ya mobange, oyo azalaki na mpiko kasi ayebaki koloba Lingelesi ata moke te. Emonani ete ndeko mwasi yango azalaki kokanisa ete akoki koyokana na bato oyo balobaka monɔkɔ mosusu soki azali koloba na mongongo makasi. Nzokande, atako azalaki kokoba komatisa mongongo, ye ná bandeko yango minei bazalaki kaka koyokana te. Nsukansuka, Ndeko Erich Frost, mokɛngɛli ya filiale, ayaki mpe apesaki bango mbote ya esengo na Lingelesi. Mitema na bango ekitaki.
Pene na nsuka ya sanza ya Augusto, bandeko yango minei bakendaki na liyangani ya liboso na monɔkɔ ya Allemand, na engumba Francfort-sur-le-Main. Motó ya likambo ya liyangani yango ezalaki “Losambo ya pɛto.” Bayangani bazalaki 47 432 mpe bato 2 373 bazwaki batisimo; yango ebakisaki molende ya bamisionɛrɛ yango mpe mposa na bango ya kosakola. Kasi, mwa mikolo na nsima, Ndeko Knorr alobaki ete bandeko yango bakotikala na Betele mpo na kosala kuna.
Mapamboli oyo bazwaki na mosala na bango endimisaki bango ete Yehova ayebi oyo eleki malamu mpo na biso
Lokola Ramon azalaki nde na mposa ya kokóma misionɛrɛ, aboyaki libaku oyo azwaki liboso ya kosala na Betele ya États-Unis. Ata mpe Richard ná Bill bazalaki na likanisi ya kosala na Betele te. Kasi, mapamboli oyo bazwaki na mosala na bango endimisaki bango ete Yehova ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Yango wana, eleki malamu kotika ete Yehova atambwisa biso ndenge alingi, na esika ya kolanda bamposa na biso moko! Moto oyo ayekoli liteya yango akozala na esengo ya kosalela Yehova na esika nyonso mpe akondima kosala mosala nyonso oyo bapesi ye.
VERBOTEN!
Bandeko mingi ya Betele ya Allemagne basepelaki kozala na bandeko ya Amerika na kati na bango, oyo bakokaki kosololaka na bango na Lingelesi mpo báyeba monɔkɔ yango malamu. Kasi, mokolo moko na ndako ya kolya, elikya yango esilaki mbala moko. Ndeko Frost, na elobeli na ye ya mpiko, alobaki na monɔkɔ ya Allemand likambo moko oyo tomonaki ete ezalaki ya kozwa na lisɛki te. Bandeko mingi bafandaki nyɛɛ, moto na moto akitisaki elongi na saani na ye. Bandeko yango ya sika bazalaki kokanga ntina te ya makambo oyo azalaki koloba, kasi mokemoke, babandaki koyeba ete likambo yango etalelaki bango. Na yango, ntango Ndeko Frost alobaki na mongongo makasi ete, “VERBOTEN!” (“Epekisami!”) mpe azongelaki yango na mongongo ya makasi koleka, bandeko yango babangaki. Likambo nini basalaki oyo etindaki ndeko yango aloba ndenge wana?
Nsima ya kolya, moto na moto akendaki nokinoki na shambrɛ na ye. Na nsima, ndeko moko alimbolelaki bango boye: “Mpo bósalisa biso, bosengeli koyeba koloba Allemand. Yango wana Ndeko Frost alobaki ete tóloba na bino lisusu na Lingelesi te, tii bokoyeba koloba Allemand.”
Bandeko ya Betele batosaki nokinoki. Yango esalisaki bandeko yango ya sika báyekola Allemand, kasi eteyaki mpe bango ete toli oyo epesami na ndeko moko ya bolingo, ata soki na ebandeli ezali mpasi mpo na kosalela yango, ezalaka mbala mingi mpo na bolamu na biso. Toli ya Ndeko Frost emonisaki ete azalaki kotalela matomba ya ebongiseli ya Yehova mpe emonisaki bolingo oyo azalaki na yango mpo na bandeko wana.a Yango wana bandeko yango minei bakobaki kolinga ye!
TOYEKOLAKI MINGI EPAI YA BANINGA NA BISO
Tokoki koyekola makambo ya ntina epai ya baninga oyo babangaka Nzambe, mpe yango ekoki kosalisa biso tókóma baninga ya motema ya Yehova. Baninga yango minei bayekolaki mingi epai ya bandeko mibali mpe basi ya sembo oyo bazalaki bato ya Allemagne; bandeko yango baleki ebele, mwaye ya kotánga bankombo na bango nyonso ezali te. Kasi bayekolaki mpe makambo mingi mokomoko epai ya mosusu. Richard alobi boye: “Lowell ayebaki Allemand mwa moke mpe azalaki koloba yango malamu, kasi biso baoyo totikali tozalaki kobundana mpo na koloba. Lokola azalaki mokóló koleka biso nyonso, tozalaki kokende epai na ye soki tozali na mokakatano na monɔkɔ yango mpe mpo akamba biso.” Ramon alobi boye: “Nsima ya kolekisa mbula moko na Allemagne, nasepelaki mingi ntango ndeko moko ya Suisse ayebisaki biso tókende konje mpo na mbala ya liboso, mpe tófanda na mwa ndako na ye na Suisse! Tokanisaki ete tokolekisa pɔsɔ mibale kozanga komeka ata moke koloba Allemand! Nzokande, Lowell azalaki kokanisa bongo te. Atyaki biso mbamba tótángaka mokapo ya mokolo na Allemand ntɔngɔ nyonso! Likambo oyo esalaki ngai mpasi koleka ezalaki ete atingamaki tósalaka bongo mikolo nyonso tii mokolo konje ekosila. Kasi toyekolaki liteya moko ya ntina mingi: Esengeli kolanda litambwisi ya baoyo bazali koluka bolamu na yo, ata soki ntango mosusu ozali kondima te bikateli oyo bazwi. Ezaleli wana ememelaki biso matomba na boumeli ya bambula mpe esalisaki biso tózala na mokakatano te mpo na kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova.”
Baninga yango minei bayekolaki mpe kosepela na bizaleli malamu oyo mokomoko azalaki na yango, ndenge Bafilipi 2:3 elobi ete: “Na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino.” Na yango, bazalaki mbala mingi kopesa Bill mokumba ya kosala misala oyo bayebaki ete ye nde akosala yango malamu koleka bango nyonso misato. Lowell alobi boye: “Ntango esɛngaki kosala makambo mosusu oyo ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kosembola likambo moko boye, tozalaki kokende epai ya Bill. Ayebaki kosembola makambo oyo ezalaki mpasi na ndenge oyo tozalaki komona ete esengelaki mpenza kosalema bongo, atako biso tozalaki te na mpiko mpe makoki ya kosala bongo.”
MABALA YA ESENGO
Na nsima, baninga yango minei bazwaki ekateli ya kobala, moto na moto na ngala na ye. Lokola boninga na bango esimbamaki na bolingo oyo bazalaki na yango mpo na Yehova mpe mosala ya ntango nyonso, bamityelaki mokano ya koluka basi oyo bandimaka kotya Yehova na esika ya liboso. Mosala ya ntango nyonso eteyaki bango ete esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa mpe ete tosengeli kotya mosala ya Bokonzi na esika ya liboso, kasi bamposa na biso moko na esika ya mibale. Na yango, baponaki bandeko basi oyo basilaki kobanda mosala ya ntango nyonso na ndenge na bango moko. Yango wana, bazalaki na esengo mpe boyokani makasi na mabala na bango.
Mpo boninga to libala eumela, babalani basengeli kotika ete Yehova azwa esika na kati ya libala na bango. (Mos. 4:12) Atako na nsima Bill ná Ramon bayokaki mpasi mingi ntango basi na bango bakufaki, bango mibale bamonaki ete mwasi ya sembo akoki kopesa molongani na ye esengo mpe kosalisa ye na mosala ya Nzambe. Mwasi ya Lowell ná mwasi ya Richard bazali naino na bomoi, mpe Bill, abalaki lisusu mpe aponaki mwasi ya malamu mpo akoba na mosala ya ntango nyonso.
Na bambula oyo elandaki, batindaki bango na bisika ekeseni, na ndakisa na Allemagne, na Autriche, na Luxembourg, na Canada, mpe na États-Unis. Na yango, baninga yango minei bakokaki lisusu te kolekisa ntango mingi elongo ndenge bazalaki kolinga. Kasi, atako bazalaki mosika, bazalaki ntango nyonso kokomelana mpe kobengana; bazalaki kosepela elongo soki bayoki nsango ya esengo mpo na moninga, mpe bazalaki kolela elongo soki bayoki nsango ya mawa mpo na moninga. (Rom. 12:15) Baninga ya ndenge wana bazali na motuya mingi mpe esengeli kozala na botɔndi mpo na boninga ya ndenge wana. Bazali makabo ya motuya oyo euti epai ya Yehova. (Mas. 17:17) Baninga ya solosolo bazali mingi te na mokili oyo! Kasi, mokristo nyonso ya solo akoki kozwa baninga ya solosolo ebele. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, tozali baninga ya bandeko na biso na mokili mobimba, mpe oyo eleki nyonso, tozali baninga ya Yehova Nzambe ná Yesu Kristo.
Kaka ndenge ekómelaka biso nyonso, baninga yango minei bakutanaki mpe na mikakatano na bomoi na bango, na ndakisa mpasi ya kokufela molongani, mpasi ya kobunda na maladi makasi, motungisi ya kobatela baboti oyo bakómi mibange, mikakatano ya kobɔkɔla bana na ntango ozali na mosala ya ntango nyonso, kobanga ntango ozwi mokumba ya sika na ebongiseli ya Yehova, mpe sikoyo, mikakatano ya bobange oyo ezali se kobakisama. Kasi, makambo oyo bakutanaki na yango eteyaki mpe bango ete baninga, ezala baoyo bazali pene na biso to baoyo bazali mosika, basalisaka bato oyo balingaka Yehova bálonga mikakatano nyonso oyo bakutani na yango.
BANINGA MPO NA LIBELA
Ezalaki malamu mpenza ndenge Lowell azwaki batisimo na mbula 18, Ramon na mbula 12, Bill na mbula 11, mpe Richard na mbula 10; bango nyonso minei babandaki mosala ya ntango nyonso kobanda na mbula 17 tii na mbula 21. Basalaki ndenge Mosakoli 12:1 elendisaki bango ete: “Kanisá Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo.”
Soki ozali elenge mobali, mpe soki likoki ezali, ndimá kosala mosala ya ntango nyonso, ndenge Yehova azali kolendisa biso tósala. Na nsima, na lisalisi ya boboto monene ya Yehova, okoki kozwa mapamboli mingi, ndenge baninga wana minei bazwaki, na ndakisa kozala mokɛngɛli ya zongazonga, mokɛngɛli ya etúká, mokɛngɛli ya zone, kosala na Betele, ata mpe na Komite ya filiale, kozala molakisi na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpe na Eteyelo ya babongisi-nzela, mpe kosala badiskur na mayangani ya minene mpe ya mike. Baninga yango minei basepelaki mingi koyeba ete bankóto ya bato bazwaki litomba na mosala na bango! Bazwaki libaku ya kozwa mikumba nyonso wana mpo bandimaki kosalela Yehova na molimo na bango mobimba kobanda ntango bazalaki naino bilenge.—Kol. 3:23.
Lelo oyo, Lowell, Richard, ná Ramon bazali lisusu kosala elongo na biro ya filiale oyo ezali na Selters, na Allemagne. Likambo ya mawa, Bill akufaki na 2010 ntango azalaki mobongisi-nzela monene na États-Unis. Liwa ekabolaki bango na ndeko oyo azalaki moninga na bango na boumeli ya mbula soki 60! Kasi, Nzambe na biso Yehova abosanaka baninga na ye te. Tokoki kozala na elikya ete ntango Bokonzi na ye ekoyangela, bandeko nyonso oyo bazalaki baninga kasi liwa ekabolaki bango, bakozala lisusu elongo.
“Na boumeli ya mbula 60 oyo tozalaki baninga, nayebi ata mokolo moko te oyo boninga na biso ebebaki”
Mwa moke liboso Bill akufa, akomaki boye: “Na boumeli ya mbula 60 oyo tozalaki baninga, nayebi ata mokolo moko te oyo boninga na biso ebebaki. Boninga na biso ezalaka ntango nyonso na motuya mingi mpo na ngai.” Na elikya ete boninga na bango ekokoba na mokili ya sika, baninga na ye misato babakisaki mbala moko ete: “Wana ezalaki kaka ebandeli.”
a Lisolo ya bomoi ya Ndeko Frost ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 1962, nkasa 28-31, na Lifalanse.