Bolamu ya solosolo: Fungola na yango ezali nini?
BATO basalemaki mpo ete bázala malamu. Mpo na nini tokoki kondima likambo yango? Tótalela ebandeli ya moto.
Yehova Nzambe azalisaki babalani ya liboso na likoki ya kozala na bomoi ya malamu. Adama na Eva batyamaki na paladiso, elanga ya bisengo oyo ebéngamaki Edene. Mozalisi apesaki bango biloko nyonso bisengeli mpo na bomoi. Elanga ezalaki na “nzeté nyonso izali na kitoko na kotala, mpe yango izali malamu na kolya.” (Genese 2:9) Adama na Eva bazalaki na nzoto kolɔngɔ́nɔ́, bazalaki makasi, mpe bazalaki na bonzenga—bazalaki bato ya kokoka mpe bazalaki na bolamu ya solosolo.
Boye, nini ezalaki fungola ya bolamu na bango? Ezalaki bongo paladiso, esika bafandaki to mbala mosusu nzoto na bango ya kokoka? Makabo yango oyo mautaki na Nzambe masalisaki bango na kosepela na bomoi. Kasi bolamu na bango etalelaki te biloko wana oyo bizalaki komonana. Elanga ya Edene ezalaki bobele parke kitoko te. Ezalaki mpe esika ya bulɛɛ mpo na kosambela Nzambe. Fungola mpo na bolamu na bango ya seko ezalaki bongo likoki na bango ya kosala mpe kobatela boyokani ya bolingo elongo na Mozalisi. Mpo ete bázala na bolamu, basengelaki liboso kozala bato ya bizaleli ya elimo.—Kokanisá na Matai 5:3.
Bizaleli ya elimo bipesaka bolamu
Na ebandeli Adama azalaki na boyokani ya elimo elongo na Nzambe. Ezalaki boyokani ya bolingo, ya boboto lokola oyo ezalaka kati na mwana na tata na ye. (Luka 3:38) Kati na elanga ya Edene, Adama na Eva bazalaki na makambo kitoko oyo epesaki bango likoki ya kokokisa mposa na bango ya kosambela. Na botosi na bango ya bolingo malamu epai na Yehova, balingaki kopesa lokumu mpe nkembo epai ya Nzambe koleka mpenza oyo banyama bakokaki kosala. Bakokaki kokumisa Nzambe na mayele na bango mpo na bizaleli na ye kitoko mpe kosimba bokonzi na ye. Bakokaki mpe ntango nyonso kozwa libateli ya bolingo mpe ya boboto ya Yehova.
Boyokani wana elongo na Mozalisi mpe botosi na mibeko na ye ememaki bolamu ya solosolo epai ya baboti na biso ya liboso. (Luka 11:28) Esengelaki te ete Adama na Eva bálekisa naino bambula mingi ya komekameka myango liboso ete báya komona fungola ya bolamu. Bazalaki na bolamu uta kozalisama na bango. Kimya elongo na Nzambe mpe kotosa bokonzi na ye epesaki bango bolamu.
Nzokande, bolamu wana esukaki na ntango bazangaki botosi epai ya Nzambe. Na botomboki na bango, Adama na Eva babebisaki boyokani ya elimo elongo na Yehova. Bazalaki lisusu baninga ya Nzambe te. (Genese 3:17-19) Emonani ete kobanda mokolo oyo Yehova abenganaki bango na elanga, akataki boyokani nyonso elongo na bango. Babungisaki ezaleli na bango ya kokoka, likoki ya kozala na bomoi ya seko, mpe elanga oyo ezalaki esika na bango ya kofanda. (Genese 3:23) Kasi likambo lileki ntina, lokola babungisaki boyokani na bango elongo na Nzambe, babungisaki fungola ya bolamu.
Likoki na biso ya kopona
Liboso ya kokufa, Adama na Eva balekisaki epai ya bakitani na bango bomoto na bango, lisosoli na bango, mpe likoki ya kozala na bizaleli ya elimo. Bato bakómaki te lokola banyama. Tokoki kozongisa boyokani elongo na Mozalisi. (2 Bakolinti 5:18) Lokola bazali bikelamu ya mayele, bato bazali naino na likoki ya kopona kotosa Nzambe to te. Yango emonisamaki bikeke mingi na nsima na ntango Yehova apesaki na libota ya Yisalaele oyo liutaki kosalema, liponi kati na bomoi to liwa. Na nzela ya molobeli na ye Mose, Nzambe alobaki ete: “Natii liboso na yo lelo bomoi mpe malamu, mpe kufa mpe mabe.”—Deteronome 30:15-18.
Ata sikawa, bambula mingi nsima ya kobungisama ya Paladiso ya ebandeli, biso bato tozali naino na likoki ya kopona oyo ezali malamu. Tozali na lisosoli oyo ezali kosala mpe na likoki ya kotosa mibeko ya Nzambe. Biblia ezali kolobela “ndambo na biso na kati” mpe moto na “kati.” (2 Bakolinti 4:16; Baloma 7:22) Maloba yango mazali komonisa likoki oyo biso banso tobotamá na yango ya komonisa bomoto ya Nzambe, ya kosala lokola ye, mpe ya kozala na bizaleli ya elimo.
Na kotaleláká bomoto mpe lisosoli na biso, ntoma Paulo akomaki ete: “Bapakano baoyo bazangi mibeko, awa ezali bango kosalaka makambo na Mibeko (ata bazangi mibeko mpenza) bazali na mibeko kati na bango moko. Bazali komonisa polele ete makambo malaki Mibeko makomami na mitema na bango. Lisosoli na mitema na bango ekotatolaka, makanisi na bango ndenge na ndenge makolobela mpe bango mpo na kokitisa bango soko kolóngisa bango.”—Baloma 2:14, 15.
Mayele mauti na Nzambe mpe botosi—Yango nde fungola
Kasi moto mosusu akoki kotuna ete, ‘Soki biso banso tobotamaka na mposa ya kosambela Nzambe mpe, mpo na yango, tolingaka kozala na bolamu ya solosolo, mpo na nini kozanga bolamu epalangani mingi lelo?’ Mpamba te liboso ya kozwa bolamu, mokomoko na biso asengeli kokóla na elimo. Atako azalisamaki na elilingi ya Nzambe, moto asili kotangwa mosika na Mozalisi na ye. (Baefese 4:17, 18) Na yango, mokomoko na biso asengeli kokokisa matambe ya sikisiki mpo na kosala mpe kobatela boyokani ya elimo elongo na Nzambe. Boyokani wana ekokóla yango moko te.
Yesu amonisaki mitindá mibale ya ntina mpo na kokólisa bizaleli ya elimo. Ya liboso ezali bongo kozwa boyebi ya sikisiki ya Nzambe, mpe ya mibale ezali bongo kotosa bolingi na ye. (Yoane 17:3) Kotángáká Liloba ya Nzambe, Yesu alobaki ete: “Ekomami ete, Moto akobika bobele na kwanga te nde na maloba nyonso makobimaka na monɔkɔ na Nzambe.” (Matai 4:4) Na libaku mosusu, Yesu alobaki ete: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano na Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” (Yoane 4:34) Tozali na ntina te ya kolekisa bambula mingi na komekameka myango mikeseni mpo na kozwa bolamu. Komesana na makambo mingi na bomoi ezali fungola ya bolamu te. Kasi bobele mayele mauti na Nzambe mpe botosi epai na Mozalisi na biso nde ekoki kopesa esengo ya solosolo na bomoi.—Nzembo 19:7, 8; Mosakoli 12:13.
Ya solo, tokoki kozwa bolamu na komonisáká mayele mauti na Nzambe mpe kozala na etɛlɛmɛlo malamu liboso ya Nzambe. (Misala 17:26, 27) Moto nyonso akoki kozwa boyebi ya Yehova mpe mokano na ye. Lokola Biblia ezali bamiliare mpe na nkótá ebele, ezali kino sikawa búku oyo eleki kokabolama kati na mokili. Biblia ekoki kosalisa yo ete okóma moninga ya Nzambe mpe ozala na bolamu ya solosolo, mpamba te Makomami malobi na biso ete: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.”—Nzembo 144:15.
[Etanda na lokasa 6]
Masɛngami mpo na kozwa bolamu
1. Sepelá na bizaleli ya elimo mpe kólisá yango. Yesu alobaki ete: “Esengo eleki na bango bayoki Liloba na Nzambe mpe batosi yango.”—Luka 11:28.
2. Yebá ete kondimama na Nzambe ezali na ntina mingi koleka bozwi to bomɛngo. Paulo akomaki ete: “Ɛɛ, bokangami epai ya Nzambe elongo na koyeba komikokela ezali mwango ya litomba monene. . . . Awa tozali na biloko ya kolya mpe na bilamba ya kolata, tósepela na yango.”—1 Timoté 6:6-8, NW.
3. Salá makasi ete okólisa mpe otosa lisosoli oyo liteyami na Biblia.—Baloma 2:14, 15.
4. Zalá na ekateli ya kotosa Yehova Nzambe, na lolenge yango okokóma moto oyo abongi kozala mosaleli na ye. Davidi, moto moko ya kala akomaki ete: “Esengo ezali na bato oyo [Yehova] azali Nzambe na bango.”—Nzembo 144:15.
[Elilingi na lokasa 7]
“Esengo na baoyo bazali kososola bamposa na bango ya elimo.”—Matai 5:3, NW