Elikya ya lisekwa ekokokisama!
“Nazali na elikya na Nzambe . . . ete lisekwa ekozala.”—Misala 24:15.
1. Mpo na nini tosengeli kozala na elikya ya lisekwa?
YEHOVA amonisi biso makambo mingi oyo ezali kotinda biso tózala na elikya ya lisekwa. Ye moko alobi na biso ete bakufi bakosekwa, elingi koloba bakozonga na bomoi. Mpe mokano na ye mpo na bato oyo bakufá ekokokisama mpenza. (Yisaya 55:11; Luka 18:27) Kutu, Nzambe asilá komonisa ete azali na nguya ya kosekwisa bakufi.
2. Elikya ya lisekwa ekoki kopesa biso bolamu nini?
2 Tokoki kobɔndisama na ntango ya mpasi soki tozali kondima ete Nzambe akosekwisa bakufi na nzela ya Mwana na ye Yesu Klisto. Soki tondimi ete lisekwa ekozala, yango ekoki mpe kosalisa biso tóbatela bosembo na biso epai ya Tata na biso ya likoló ata soki esɛngi ete tókufa. Na ntembe te, elikya oyo tozali na yango na lisekwa ekokóma makasi ntango tozali kotalela bato oyo basekwaki oyo balobelami na Biblia. Makamwisi nyonso wana esalemaki na nguya ya Nkolo Mokonzi Yehova.
Bazwaki bakufi na bango na lisekwa
3. Eliya azwaki nguya ya kosala nini ntango mwana ya mwasi oyo akufelá mobali na Salepata akufaki?
3 Ntango alobelaki kondima makasi oyo batatoli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabele bamonisaki, ntoma Paulo akomaki ete: “Basi bazwaki bakufi na bango mpo na lisekwa.” (Baebele 11:35; 12:1) Moko na basi yango ezalaki mwasi akufelá mobali na engumba ya Salepata, na etúká ya Foinike. Lokola azalaki ntango nyonso koyamba mosakoli Eliya na ndako na ye, ntango ekómaki na eleko ya nzala, na ndenge ya likamwisi, fufu na mafuta na ye ezalaki kosila te mpe yango esalisaki ye na mwana na ye ete bákufa te. Na nsima, ntango mwana yango akufaki, Eliya alalisaki ye na mbeto, asalaki libondeli, alalelaki elenge yango na ntolo mbala misato, mpe alobaki ete: “Ɛ [Yehova], Nzambe na ngai, tiká ete molimo ya mwana oyo [ezonga, NW] lisusu epai na ye.” Nzambe azongisaki molimo, to bomoi, ya mwana. (1 Mikonzi 17:8-24) Kanisá esengo ya mwasi yango oyo akufelá mobali ntango azwaki mbano mpo na kondima na ye na lisekwa ya liboso oyo Biblia elobeli: lisekwa ya mwana na ye ya bolingo!
4. Likamwisi nini Elisa asalaki na Suneme?
4 Mwasi mosusu oyo azwaki mokufi na ye mpo na lisekwa, azalaki kofanda na engumba Suneme. Mobali na ye azalaki mobange, mwasi yango amoniselaki mosakoli Elisa na mosaleli na ye boboto mingi. Azwaki mbano mpo na boboto na ye, abotaki mwana. Kasi, nsima ya bambula mingi, abengisaki mosakoli na ndako na ye, mpe mosakoli akutaki mwana yango akufi. Elisa abondelaki mpe asalaki makambo mosusu, mpe mokemoke “nzoto ya mwana ezwaki mɔ́tɔ.” “Mwana akiswaki mbala nsambo mpe mwana azipolaki miso na ye.” Na ntembe te, mama na mwana na ye basepelaki mingi na ntango ya lisekwa yango. (2 Mikonzi 4:8-37; 8:1-6) Kasi bakozala na esengo mingi koleka ntango bakozonga na bomoi awa na mabele na “lisekwa [oyo] eleki malamu,” lisekwa oyo ekopesa bango likoki ya kokufa lisusu te! Talá ntina ya kotɔnda Yehova, Nzambe ya bolingo, oyo asekwisaka bato!—Baebele 11:35.
5. Likamwisi nini etaleli mpe Elisa atako asilaki kokufa?
5 Ata ntango Elisa akufaki mpe bakundaki ye, Nzambe apesaki mikwa ya Elisa nguya na lisalisi ya elimo santu. Biblia elobi boye: “Ezalaki bato [mosusu ya Yisalaele] kokunda moto bamonaki ebolo ya bapunzi [Bamoaba]. Babwakaki moto kati na nkunda ya Elisa [mpe bakimaki NW]. Mpe wana ekitaki moto [oyo akufi] mpe [atutaki] mikwa ya Elisa, abikaki mpe atɛlɛmaki na makolo na ye.” (2 Mikonzi 13:20, 21) Na ntembe te moto yango akamwaki mpe asepelaki mpenza! Kanisá esengo oyo ekozala ntango bato oyo tolingaki, bakosekwa ntango mokano ya Yehova Nzambe oyo ekoki kobeba te, ekokokisama!
Mwana ya Nzambe asekwisaki bakufi
6. Likamwisi nini Yesu asalaki pene ya engumba Naina, mpe likambo yango eteyi biso nini?
6 Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, asalaki makambo oyo ezali kotinda biso tóndima mpenza ete bato bakoki kosekwa mpe kozala na elikya ya bomoi ya seko. Likambo moko esalemaki pene ya engumba Naina ekoki kosalisa biso tómona ete likamwisi ya ndenge wana esalemaki na nguya ya Nzambe. Mokolo moko, Yesu akutanaki na bato bazali kolela, bamemaki ebembe ya elenge mobali moko, mwana ya mwasi akufelá mobali, mpe bazalaki kokende na ebembe yango libándá ya mboka mpo na kokunda yango. Azalaki mwana kaka moko ya mwasi yango oyo akufelá mobali. Yesu alobaki na mama yango ete: “Lelá te!” Asimbaki mbeto mpe alobaki ete: “Elenge mobali, nalobi na yo ete, sekwá!” Mbala moko atɛlɛmaki mpe alobaki. (Luka 7:11-15) Likamwisi yango endimisi biso ete elikya ya lisekwa ekokokisama.
7. Eloko nini esalemaki epai ya mwana mwasi ya Yailo?
7 Tótalela lisusu likambo moko oyo esalemaki epai ya Yailo, mokambi ya eyanganelo ya Kapalanauma. Moto yango azalaki na mwana mwasi moko ya mbula 12 mpe azalaki kolinga ye mingi, kasi lokola mwana yango alingaki kokufa, asɛngaki Yesu aya kobikisa mwana na ye. Mwa moke na nsima, bayaki koyebisa ye ete mwana yango akufi. Yesu ayebisaki Yailo ntango azali koyoka mpasi makasi na motema ete azala na kondima, bakendaki na ndako na ye mpe bakutaki bato ebele bazali kolela. Bato yango basɛkaki ntango Yesu alobaki na bango ete: “Mwana akufi te kasi azali kolala mpɔngi.” Mwana akufaki mpenza, kasi Yesu alingaki kosala likambo moko mpo na komonisa ete bato bakoki kosekwa se ndenge bakoki kolamwisa moto oyo alali mpɔngi makasi. Asimbaki mwana yango na lobɔkɔ mpe alobaki ete: “Elenge mwasi, Nalobi na yo ete, Sekwá!” Mbala moko atɛlɛmi, mpe “baboti na ye bakamwi” mpenza. (Malako 5:35-43; Luka 8:49-56) Na ntembe te, bato ‘bakokamwa’ ntango bandeko na bango oyo balingaki mingi bakosekwa na paladiso awa na mabele.
8. Likambo nini Yesu asalaki na lilita ya Lasalo?
8 Lasalo akufaki banda mikolo minei ntango Yesu akómaki na lilita na ye mpe alobaki ete bálongola libanga oyo bazipaki na yango ekɔtelo. Nsima ya kosala libondeli na miso ya bato nyonso mpo báyeba ete nguya na ye euti epai ya Nzambe, Yesu alobaki na mongongo makasi ete: “Lasalo, bimá libándá.” Mpe abimaki! Mabɔkɔ na makolo na ye ezingamaki naino na bilamba oyo bazingaki ye ntango bakundaki ye, mpe elongi na ye ezipamaki na elamba. Yesu alobaki ete: “Bókangola ye mpe tiká [ye akende].” Bato mingi oyo bazalaki wana mpo na kobɔndisa bandeko basi ya Lasalo, Malia na Malata, ntango bamonaki likamwisi yango, bandimelaki Yesu. (Yoane 11:1-45) Lisolo yango epesi yo elikya makasi ete bato oyo olingaki mingi mpe bakufá, bakosekwa na mokili ya sika ya Nzambe, boye te?
9. Mpo na nini tokoki kotya mpenza motema ete Yesu akoki sikoyo kosekwisa bakufi?
9 Ntango Yoane Mobatisi azalaki na bolɔkɔ, Yesu atindelaki ye nsango ya kolendisa ete: “Bakufeli miso bazali komona lisusu mpe . . . bakufi bazali kosekwa.” (Matai 11:4-6) Lokola Yesu asekwisaki bakufi ntango azalaki awa na mabele, na ntembe te akoki mpenza kosekwisa bakufi lokola azali sikoyo ekelamu ya elimo oyo Nzambe apesi nguya mingi. Yesu azali “lisekwa mpe bomoi,” mpe tobɔndisami mpenza na koyeba ete etikali moke “nyonso bazali kati na [malita ya kokanisama, NW] bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima”!—Yoane 5:28, 29; 11:25.
Lisekwa mosusu oyo ezali kolendisa elikya na biso
10. Lisekwa ya liboso oyo ntoma moko asalaki elekaki ndenge nini?
10 Ntango Yesu atindaki bantoma na ye na mosala ya kosakola Bokonzi, alobaki ete: “Bósekwisa bakufi.” (Matai 10:5-8) Na yango, mpo na kosala yango, basengelaki kotya motema na nguya ya Nzambe. Na mobu 36 T.B. na mboka Yafo, mwasi moko mondimi nkombo na ye Doloka (Tabita) akufaki. Azalaki kosala misala malamu, lokola kotonga bilamba mpo na basi bakufelá mibali oyo bazalaki babola. Basi yango balelaki mingi ntango Doloka akufaki. Bayekoli babongisaki ye mpo bákende kokunda ye mpe batindaki moto abenga ntoma Petelo, mbala mosusu mpo na kobɔndisa bango. (Misala 9:32-38) Petelo abimisaki bato nyonso na eteni ya ndako ya likoló, abondelaki, mpe alobaki ete: “Tabita! Sekwá!” Afungolaki miso, alamukaki, asimbaki Petelo na lobɔkɔ, mpe Petelo atɛlɛmisaki ye. Bato mingi bakómaki bandimi mpo na lisekwa yango ya liboso oyo ntoma moko asalaki. (Misala 9:39-42) Yango epesi biso lisusu ntina ya kotya elikya na lisekwa.
11. Lisekwa ya nsuka oyo Biblia elobeli ezalaki ya nani?
11 Lisekwa ya nsuka oyo Biblia elobeli esalemaki na Toloa. Ntango Paulo akómaki kuna na mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, asalaki lisukulu moko oyo eumelaki tii na midi ya butu. Lokola alɛmbaki mpe mbala mosusu mpo na molunge, lokola miinda ezalaki mingi mpe mpo bato batondaki na ndako ya likita yango, elenge mobali moko nkombo na ye Yutuku alalaki mpɔngi mpe akweaki na lininisa banda na etazi ya misato. ‘Batomboli ye akufi’; ezali te ete azalaki lisusu komiyeba te. Paulo alalaki na ntolo ya Yutuku mpe alobaki na bato ete: “Bóbanga te, mpo ete bomoi na ye ezali kati na ye.” Na maloba yango, Paulo amonisaki ete bomoi ya elenge ezongaki. Baoyo bazalaki wana ‘babɔndisamaki mingi mpenza.’ (Misala 20:7-12) Lelo oyo, basaleli ya Nzambe babɔndisamaka mingi na koyeba ete baninga na bango oyo basalaki na bango mosala ya Nzambe mpe bakufá bakosekwa.
Elikya ya lisekwa ebanda kala
12. Elikya nini Paulo amonisaki liboso ya Feliki, guvɛrnɛrɛ Moloma?
12 Ntango Paulo azalaki kosamba liboso ya Feliki, guvɛrnɛrɛ Moloma, alobaki ete: “Nandimi makambo nyonso masili kokomama kati na Mibeko mpe na basakoli. Nazali na elikya na Nzambe, . . . ete lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:14, 15) Ndenge nini mikanda mosusu ya Liloba ya Nzambe, na ndakisa mikanda ya “Mibeko,” ezali kolobela lisekwa ya bakufi?
13. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe alobelaki lisekwa ntango apesaki esakweli ya liboso?
13 Nzambe ye moko alobelaki lisekwa ntango apesaki esakweli ya liboso na Edene. Ntango Nzambe apesaki “nyoka ya kalakala,” Satana Zabolo, etumbu, alobaki boye: “Nakotya koyinana kati na yo na mwasi, kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Ye akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Emoniseli 12:9; Genese 3:14, 15, NW) Kosasa mombóto ya mwasi na litindi elimbolaki koboma Yesu Klisto. Mpo ete na nsima Mombóto yango esasa motó ya nyoka, esengelaki Yesu asekwa.
14. Maloba oyo ete Yehova azali “Nzambe ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi,” elimboli nini?
14 Yesu alobaki ete: “Bakufi bakosekwa, Mose mpe atalisi bongo na ndambo na mwa nzete, kuna ebyangaki ye Nkolo, Nzambe ya Abalayama mpe Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo. Azali Nzambe ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpo ete mpo na ye bato nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:27, 37, 38; Exode 3:6) Abalayama, Yisaka, na Yakobo bakufá, kasi mokano ya Nzambe mpo na kosekwisa bango ekokokisama, yango wana mpo na ye ezali lokola nde bazali na bomoi.
15. Mpo na nini Abalayama azalaki na ntina ya kondima lisekwa?
15 Abalayama azalaki na ntina mpenza ya kozala na elikya na lisekwa, mpamba te ntango ye na mwasi na ye Sala bakómaki mibange mpe bakokaki lisusu kobota bana te, kasi Nzambe asalaki likamwisi mpe apesaki bango lisusu makoki ya kobota. Likambo yango ezalaki lokola lisekwa. (Genese 18:9-11; 21:1-3; Baebele 11:11, 12) Ntango mwana na bango, Yisaka, azalaki na mbula soki 25, Nzambe asɛngaki Abalayama akaba ye mbeka. Kasi, ntango kaka Abalayama alingaki koboma Yisaka, anzelu ya Yehova akangaki lobɔkɔ na ye. Abalayama “atángáki ete Nzambe azalaki na nguya [ya] kosekwisa [Yisaka] ata na bakufi. Bongo tokoki koloba ete azwaki ye lisusu.”—Baebele 11:17-19; Genese 22:1-18.
16. Atako Abalayama akufá, kasi azali kozela nini?
16 Abalayama azalaki na elikya ete lisekwa ekozala na ntango Masiya, Mombóto oyo alakamaki, akoyangela. Na esika azalaki liboso abotama awa na mabele lokola moto, Mwana ya Nzambe amonaki kondima ya Abalayama. Yango wana, ntango abotamaki lokola moto, Yesu Klisto alobaki na Bayuda ete: “Abalayama, tata na bino, asepelaki komona mokolo na ngai.” (Yoane 8:56-58; Masese 8:30, 31) Sikoyo Abalayama akufá, azali kozela lisekwa ntango Bokonzi ya Masiya ya Nzambe ekoyangela.—Baebele 11:8-10, 13.
Mokanda ya Mibeko mpe ya Nzembo elobeli lisekwa
17. Ndenge nini “makambo nyonso masili kokomama kati na Mibeko” ezali kolobela lisekwa ya Yesu Klisto?
17 Elikya ya lisekwa oyo Paulo azalaki na yango eutaki na “makambo nyonso masili kokomama kati na Mibeko.” Nzambe alobaki na Bayisalaele boye: “Bokoya na liboke ya mbuma ya liboso ya kobuka na bino epai ya nganga. [Na mokolo ya 16 Nisana] ye mpe akoninganisa liboke yango liboso na [Yehova] ete bózwa koyambama.” (Levitike 23:9-14) Mbala mosusu Paulo azalaki kokanisa mobeko ntango akomaki ete: “Klisto asekwi longwa na bakufi, mbuma ya liboso na [kati na] bango balali.” Yesu asekwaki mokolo ya 16 Nisana ya mobu 33 T.B. lokola “mbuma ya liboso.” Na nsima, na eleko ya kozala na ye, ‘bambuma ya nsima’ bakosekwa, elingi koloba bayekoli na ye bapakolami na elimo.—1 Bakolinti 15:20-23; 2 Bakolinti 1:21; 1 Yoane 2:20, 27.
18. Ndenge nini Petelo amonisaki ete lisekwa ya Yesu esakolamaki na mokanda ya Nzembo?
18 Mokanda ya Nzembo mpe eyebisi makambo mosusu oyo ezali komonisa elikya ya lisekwa. Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petelo atángaki makambo oyo ezali na Nzembo 16:8-11, mpe alobaki boye: “Davidi alobaki na ntina na [Klisto] ete, Nazalaki kotala Nkolo liboso na ngai ntango nyonso, mpo ete azali na lobɔkɔ na ngai na mobali ete naningana te. Yango wana motema na ngai esepeli mpe lolemo na ngai ezali na esengo, mpe nzoto na ngai ekozila naino na elikya. Mpo ete okotika bomoi na ngai na esika na bakufi te, mpe okotika Mobulami na yo komona kopɔla mpe te.” Petelo abakisaki ete: “[Davidi] amoni bongo liboso, mpe alobi na ntina na lisekwa na Klisto ete atikami kati na [Hadesi, NW] te, mpe nzoto na ye epɔli te. Mpo na Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye.”—Misala 2:25-32.
19, 20. Ntango nini Petelo atángaki makambo ya Nzembo 118:22, mpe ndenge nini yango ekokisamaki na liwa mpe na lisekwa ya Yesu?
19 Elekaki mwa mikolo, Petelo asambaki na Sanedrina mpe atángaki lisusu makambo oyo ezali na mokanda ya Nzembo. Ntango batunaki ye ndenge nini abikisaki ebɔsɔnɔ oyo azalaki kosɛngasɛnga, ntoma alobaki boye: “Tiká ete eyebana na bino nyonso mpe na bato nyonso na Yisalaele ete na nkombo na Yesu Klisto moto na Nasalete, oyo bino bobakisi ye na [nzete, NW] kasi oyo Nzambe asekwisi na bakufi, mpo na ye moto oyo atɛ[lɛ]mi liboso na bino na nzoto makasi. Ye Yesu azali libanga lityolami na bino batongi, ye mpe asili kokóma motó na nsuka. Lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te esili kopesama awa na nse kati na bato ete tókoka kobika mpo na yango.”—Misala 4:10-12.
20 Awa Petelo atángaki maloba ya Nzembo 118:22, mpe akokanisaki makambo yango na liwa mpe na lisekwa ya Yesu. Bayuda balandaki makambo ya bakonzi ya mangomba na bango, yango wana baboyaki kondima Yesu. (Yoane 19:14-18; Misala 3:14, 15) Likambo oyo ete ‘batongi’ baboyaki libanga ekokisamaki ntango babomaki Yesu, kasi ‘libanga ekómaki motó ya nsuka,’ elingi koloba basekwisaki ye na nkembo ya elimo na likoló. Lokola mokomi ya nzembo asakolaki yango, ‘oyo ezalaki mosala ya [Yehova].’ (Nzembo 118:23) Kokómisa “libanga” Motó ya nsuka elimboli mpe kotombola ye na lokumu monene lokola Mokonzi-Oyo-Aponami.—Baefese 1:19, 20.
Balendisamaki na elikya ya lisekwa
21, 22. Na kotalela mokanda ya Yobo 14:13-15, elikya nini Yobo amonisaki, mpe ndenge nini yango ekoki kobɔndisa baoyo bazali kokufela bato lelo oyo?
21 Atako tomoná naino te moto asekwi na miso na biso, kasi mwa masolo ya Makomami oyo totaleli endimisi biso ete lisekwa ezali likambo ya solo. Na yango, tokoki kozala na elikya oyo Yobo, moto ya sembo, azalaki na yango. Ntango azalaki na mpasi, abondelaki Nzambe na maloba oyo: “Ɛ soko [Yehova] okobomba ngai kati na [Sheol, NW], . . . soko okotyela ngai elaka mpe okokanisa ngai? Soko moto akokufa, akobika nde lisusu? . . . Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:13-15) Nzambe ‘akozala na mposa ya mosala ya mabɔkɔ na ye,’ elingi koloba mposa mpenza ya kosekwisa Yobo. Likambo yango epesi biso mpenza elikya!
22 Na kati ya libota, mosaleli ya Nzambe akoki kobɛla makasi lokola Yobo abɛlaki, mpe akoki ata kokwea na mabɔkɔ ya liwa monguna na biso. Bato oyo bakufeli moto bakoki kolela ndenge Yesu mpe alelaki na liwa ya Lasalo. (Yoane 11:35) Kasi, koyeba ete Nzambe akobenga baoyo bazali na makanisi na ye mpe bakoyanola, ezali mpenza kobɔndisa biso! Ekozala lokola nde bazongi na mobembo, bazali na maladi te to na minyoko te, kasi na nzoto kolɔngɔnɔ.
23. Bato mosusu balobaki nini mpo na komonisa kondima na bango na elikya ya lisekwa?
23 Ntango moklisto moko mobange oyo azalaki sembo akufaki, bandeko ya lisangá bakomelaki mwana na ye ete: “Tokomeli yo mpo na kobɔndisa yo ndenge okufeli mama. Ekoleka kaka ntango moke mpe tokoyamba ye lisusu, na nzoto malamu mpe kolɔngɔnɔ!” Baboti oyo bakufelaki mwana balobaki ete: “Tozali kozela mokolo oyo Jason akosekwa! Akotala epai na epai mpe akomona Paladiso oyo azalaki kolikya banda kala. . . . Yango ezali kotinda biso baoyo tozalaki kolinga ye tósala makasi mpo biso mpe tózala kuna!” Ya solo, tosengeli kopesa Nzambe matɔndi mpo ete elikya ya lisekwa ekokokisama solo!
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini kondima mokano ya Nzambe ya kosekwisa bakufi ezali kosalisa biso?
• Makambo nini oyo ezali na Makomami ezali kopesa biso ntina ya kotya elikya na lisekwa?
• Mpo na nini tokoki koloba ete lisekwa ezali elikya oyo ebandá kala?
• Elikya nini tozali na yango oyo ekoki kopesa biso makasi mpo na bakufi?
[Elilingi na lokasa 10]
Na nguya ya Yehova, Eliya asekwisaki mwana mobali ya mwasi oyo akufelá mobali
[Elilingi na lokasa 12]
Ntango Yesu asekwisaki mwana mwasi ya Yailo, baboti na ye bakamwaki mpenza
[Elilingi na lokasa 15]
Na mokolo ya Pantekote, ntoma Petelo amonisaki polele na molende ete Yesu asekwaki