Oteyaka na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma?
MOTO nyonso oyo azali moboti, to nkulutu, to mosakoli ya nsango malamu, asengeli kozala moteyi. Moboti ateyaka bana na ye, nkulutu ateyaka na lisangá ya boklisto, mpe mosakoli ya nsango malamu ateyaka bato oyo bazali kosepela na nsango malamu. (Deteronome 6:6, 7; Matai 28:19, 20; 1 Timote 4:13, 16) Makambo nini okoki kosala mpo lolenge na yo ya koteya ebota mbuma mingi mpenza? Okoki kolanda ndakisa mpe mayele ya koteya ya bateyi oyo Liloba ya Nzambe ezali kolobela. Ezela azalaki moko na bateyi ya ndenge yango.
Zwá liteya na ndakisa ya Ezela
Ezela azalaki moto ya libota ya Alona, libota ya banganga, mpe azalaki na Babilone, eleki sikoyo mbula soki 2 500. Na mobu 468 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), akendaki na Yelusaleme mpo na kolendisa losambo ya pɛto na kati ya Bayuda oyo bazalaki kuna. (Ezela 7:1, 6, 12, 13) Mokumba na ye esɛngaki ye ateyaka bato Mibeko ya Nzambe. Ezela asalaki nini mpo lolenge na ye ya koteya ebota mbuma? Asalaki makambo mingi oyo ezalaki na ntina. Tyá likebi na makambo oyo asalaki ndenge ekomami na Ezela 7:10 (NW):
“Ezela [1] abongisaki motema na ye [2] mpo na kotalela mibeko ya Yehova mpe [3] mpo na kosalela yango mpe [4] mpo na koteya malako mpe boyengebene na Yisalaele.” Tótalela naino mokomoko ya makambo yango mpe tótala liteya nini tokoki kozwa na yango.
“Ezela abongisaki motema na ye”
Moto oyo asalaka bilanga abalolaka mabele mpo na kobongisa yango liboso ya kolona; ndenge moko mpe, Ezela azalaki kobondela mingi mpo na kobongisa motema na ye mpo na kokɔtisa liloba ya Nzambe na kati na yango. (Ezela 10:1) Na maloba mosusu, ‘atyaki motema na ye’ na mateya ya Yehova.—Masese 2:2.
Biblia elobi mpe mpo na Mokonzi Yosafata ete ‘abongisaki motema na ye mpo na koluka Nzambe ya solo.’ (2 Ntango 19:3, NW) Nzokande, balobi mpo na Bayisalaele “oyo babongisaki motema na bango te” ete bazalaki “motó makasi mpe batomboki.” (Nzembo 78:8, NW) Yehova amonaka “bomoto oyo ebombami na motema.” (1 Petelo 3:4, NW) Yango wana, “akolakisa bato ya bopɔlɔ nzela na ye.” (Nzembo 25:9) Na yango, lelo oyo ezali na ntina mingi ete bateyi bálanda ndakisa ya Ezela, elingi koloba ete basengeli kobondelaka liboso mpo na kobongisa mitema na bango!
“Mpo na kotalela Mibeko ya Yehova”
Mpo na kozala moteyi malamu, Ezela azalaki kotalela Liloba ya Nzambe. Soki okei kokutana na monganga, tobanzi ete okoyoka ye malamumalamu mpe okoluka ete okanga ntina ya maloba to malako na ye nyonso, boye te? Okosala bongo mpamba te ezali likambo oyo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo. Yango wana, ezali na ntina mingi koleka ete tótya mpenza likebi na makambo oyo Yehova azali koloba na biso, to malako oyo azali kopesa na kati ya Biblia, Liloba na ye mpe na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Tosengeli mpenza kosala yango mpamba te toli na ye ezali mpo na bomoi na biso! (Matai 4:4; 24:45-47) Kutu, monganga akoki komikosa, nzokande “mobeko ya Yehova ezali sembo.” (Nzembo 19:7) Nsima ya koyoka Yehova, tokozala lisusu na mposa te ya kotuna makanisi ya moto mosusu.
Mokanda ya Ntango ya Liboso mpe ya Mibale (oyo ezalaki kaka mokanda moko ntango Ezela akomaki yango) ezali komonisa ete na oyo etali koyekola, Ezela azalaki kosala na lisɛki te. Mpo na kokoma mikanda wana, atángaki mikanda mingi mpenza epai azwaki makambo oyo akomaki.a Bayuda oyo bautaki na Babilone mpe bakómaki na ekólo na bango bazalaki na mposa ya koyeba na mokuse masolo ya kala ya ekólo na bango. Bayebaki malamumalamu te ndenge ya kosala milulu ya lingomba na bango, mosala ya tempelo, mpe misala ya Balevi. Mikanda oyo emonisi kolandana ya mabota ezalaki na ntina mingi mpenza mpo na bango. Ezela atyelaki makambo nyonso wana likebi mingi. Tii na koya ya Masiya, Bayuda basengelaki kozala na ekólo na bango, na tempelo na bango, na banganga na bango, mpe na guvɛrnɛrɛ na bango. Makambo oyo Ezela akomaki esalisaki bango na kotikala liboke moko mpe mpo na yango losambo ya solo ebatelamaki.
Yo mpe oyekolaka lokola Ezela? Koyekola Biblia malamumalamu ekosalisa yo oyeba koteya yango na lolenge oyo ekobota mbuma.
‘Bótalela Mibeko ya Yehova’ na kati ya libota
Kotalela mibeko ya Yehova esuki kaka te na boyekoli ya moto ye moko. Boyekoli ya libota ezali mpe libaku malamu mpenza ya kotalela mibeko ya Yehova.
Mobali moko nkombo na ye Jan, na mwasi na ye Julia, bango bafandi na Pays-Bas, bazalaki kotángela mokomoko na bana na bango mibale mikanda banda mokolo oyo abotamaki. Lelo oyo, Ivo azali na mbula 15, mpe Edo azali na mbula 14. Tii lelo oyo, mbala moko na pɔsɔ, libota na bango mobimba bayekolaka Biblia. Jan alobi boye: “Ntango tofandi mpo na koyekola, mokano na biso ya liboso ezalaka te ya koyekola makambo ebele, kasi ezalaka ete bana bákanga ntina ya makambo oyo tokolobela.” Abakisi ete: “Bana balukaka makambo mingi na mikanda. Balukaka koyeba ndimbola ya maloba mpe bato oyo Biblia ezali kolobela oyo bayebi bango malamu te; balukaka koyeba eleko oyo bato yango bazalaki na bomoi, bazalaki banani, bazalaki kosala mosala nini, mpe bongo na bongo. Banda bayebá kotánga, balukaka makambo na babuku lokola Étude perspicace, na badiksionɛrɛ mpe mikanda mosusu ya minene oyo elimbolaka makambo. Yango wana, boyekoli ya libota ezalaka na esengo mingi. Bana bazelaka boyekoli ya libota na mposa mingi.” Litomba mosusu ezali ete bana na bango nyonso mibale, bazali kozwa bapwɛ malamu koleka baninga na bango ya kelasi na mateya ya lokota.
Mobali mosusu nkombo na ye John na mwasi na ye Tini, bango mpe bazali bato ya Pays-Bas, bazalaki koyekola na Esli, mwana na bango ya mobali (lelo oyo azali na mbula 24 mpe azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza na lisangá mosusu) na Linda, mwana na bango ya mwasi (lelo oyo azali na mbula 20 mpe ndeko mobali moko ya malamu abalá ye). Bango bazalaki koyekola mokanda moko na mituna mpe biyano te, kasi bazalaki kobongisa boyekoli ya libota na kotalela bambula mpe bamposa ya bana. Bazalaki kosala ndenge nini?
John alobi ete bana na bango bazalaki kopona lisolo moko ya malamu na masolo ya “Mituna ya batángi” (na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli) mpe na masolo ya “Engebene Biblia” (na Lamuká!). Na nsima, bazalaki koloba makambo oyo babongisaki, mpe makambo yango ezalaki kobota lisolo oyo ekosala ete libota bábanda kopesana makanisi. Na ndenge yango, bilenge bazwaki mayele ya koluka makambo na kati ya mikanda mpe na nsima kolobela makambo oyo bazwi. Yo mpe ‘otalelaka mibeko ya Yehova’ na bana na yo? Soki osalaka yango, ekobakisa lisusu makoki na yo ya koteya, mpe ekosalisa bana na yo báyeba koteya na lolenge oyo ekobota mbuma mingi mpenza.
“Mpo na kosalela yango”
Ezela azalaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola. Na ndakisa, ekoki mpenza kozala ete ntango azalaki naino na Babilone, azalaki na bomoi ya malamu mpenza. Atako bongo, ntango amonaki ete akoki kosala eloko mpo na kosalisa bato ya ekólo na ye oyo bazalaki mosika, kuna na mboka na bango, atikaki bomoi ya malamu na Babilone mpe akendaki na Yelusaleme, mboka oyo ezalaki mosika, mpe ezalaki na mpasi, na mikakatano mingi mpe na makama. Tomoni mpenza ete Ezela asukaki kaka te na kozwa boyebi ya Biblia, kasi alingaki mpe kosalela makambo oyo ayekolaki. —1 Timote 3:13.
Na nsima, na ntango oyo Ezela azalaki na Yelusaleme, amonisaki lisusu ete azalaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola mpe koteya. Yango emonanaki ntango ayokaki ete mibali ya Yisalaele bazalaki kobala basi ya bikólo mosusu. Biblia elobi na biso ete ‘apasolaki bilamba na ye mpe elamba na ye ya libándá, alongolaki nsuki na motó na ye mpe mandɛfu na ye mpe afandaki na kokamwa.’ Kutu ayokaki ‘nsɔni mpe abangaki kotɛlɛmisa elongi’ epai ya Yehova.—Ezela 9:1-6.
Talá ndenge oyo makambo oyo ayekolaki na Liloba ya Nzambe ekɔtaki mpenza na motema na ye! Ezela azalaki koyeba malamu mbuma mabe oyo ekobima soki bato bazali kotosa te. Bayuda oyo bazongaki bazalaki mingi te. Soki babandi kobala basi bapaya, nsukansuka bakosangana na bato ya bikólo ya bapakano oyo ezalaki zingazinga, mpe losambo ya solo ekokaki kolimwa!
Kasi, ndakisa ya kozanga kobanga mpe ya molende oyo Ezela amonisaki etindaki Bayisalaele na kosembola banzela na bango. Balongolaki basi na bango bapaya. Nsima ya sanza misato, makambo nyonso ezongaki na nzela. Bosembo oyo Ezela ye moko azalaki na yango mpo na Mibeko ya Nzambe esalaki ete mateya na ye ebota mbuma malamu.
Ezali mpe bongo lelo oyo. Moklisto moko oyo azali tata ya libota alobaki boye: “Bana basalaka te makambo oyo ozali koloba; basalaka nde makambo oyo ozali kosala!” Ezali se ndenge yango na kati ya lisangá ya boklisto. Bankulutu oyo bapesaka ndakisa ya malamu bakoki kolikya ete bandeko na lisangá bakotosa makambo oyo bango bazali koteya.
“Mpo na koteya malako mpe boyengebene na Yisalaele”
Kasi, ezali na likambo mosusu oyo esalaki ete mateya ya Ezela ebota mbuma malamu. Azalaki koteya makanisi na ye moko te, kasi azalaki koteya “malako mpe boyengebene.” Elingi koloba malako, to mibeko ya Yehova. Yango ezalaki mokumba na ye lokola azalaki nganga. (Malaki 2:7) Azalaki mpe koteya boyengebene, mpe apesaki ndakisa malamu na ndenge oyo azalaki kolanda, na bosembo mpe na kozanga koponapona, makambo oyo ezali malamu. Ntango bato oyo bazali na bokonzi bazali na boyengebene, balendisaka kimya mpe yango ebotaka mbuma oyo eumelaka. (Masese 29:4) Ndenge moko mpe, bankulutu, baboti, mpe basakoli ya Bokonzi oyo bayebi Liloba ya Nzambe malamu, bakoki kolendisa kimya ya elimo ntango bazali koteya malako ya Yehova mpe boyengebene na kati ya lisangá, na mabota na bango, mpe epai ya bato oyo bazali kosepela.
Ondimi ete lolenge na yo ya koteya ekoki kobota mbuma mingi soki olandi malamu mpenza ndakisa ya Ezela, moto ya sembo? Boye, ‘bongisá motema na yo, talelá mibeko ya Yehova, salelá yango, mpe teyá malako mpe boyengebene ya Yehova.’—Ezela 7:10, NW.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liste ya mikanda 20 epai azwaki makambo oyo akomaki ezali na buku Étude perspicace des Écritures, volimi I, nkasa 449-450, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Elilingi na lokasa 22]
MPO NA NINI MATEYA YA EZELA EBOTAKI MBUMA?
Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 22]
1. Abongisaki motema na ye
2. Atalelaki Mibeko ya Yehova
3. Apesaki ndakisa malamu na ndenge azalaki kosalela makambo oyo azalaki koyekola
4. Amipesaki na koteya Makomami